“Sunga ngai esika ezangi ngai kondima!”
“Tata na mwana angángi mpe alobi ete: ‘Nazali na kondima! Sunga ngai esika ezangi ngai kondima!”—MALAKO 9:24, MN.
1. Likambo nini lipusaki tata na mwana mobali na kongánga ete: “Sunga ngai esika ezangi ngai kondima“?
TATA na mwana mobali oyo azalaki na elimo mabe ayei epai na Yesu Klisto. Alingi mpenza ete mwana na ye abikisama. Bayekoli na Yesu bazalaki na kondima mingi te ete babimisa elimo mabe, nde tata na mwana angángi ete: “Nazali na kondima! Sunga ngai esika ezangi ngai kondima!” Na nguya na Nzambe, Yesu abimisaki bongo elimo mabe wana, likambo oyo lilendisaki mpenza kondima ya tata na mwana.—Malako 9:14-29.
2. Na ntina etali kondima, makambo mibale nini baklisto basengeli kozala na nsɔni te mpo na kosala yango?
2 Lokola tata wana atondaki na elikya, basaleli na Jéhovah bazali na nsoni te mpo na koloba ete: “Nazali na kondima!” Mbala mosusu batyoli baboyi kondima nguya na Nzambe, bosolo ya Liloba na ye, mpe kino koboya kondima ete ye azali. Nzokande, baklisto ya solo bazali koloba na motema mobimba ete bandimeli Jéhovah Nzambe. Kasi, ntango bakolobanaka moto ye mei elongo na Tata na bango ya likoló, bakosɛngaka mbala mosusu ete: “Sunga ngai esika ezangi ngai kondima!” Bazali na nsɔni te mpo na kosala lilɔmbɔ oyo, mpo bayebi ete ata bantoma balobaki na Yesu Klisto ete: “Bakisela biso kondima.”—Luka 17:5.
3. Lolenge oyo Yoane asaleli liloba “kondima” kati na Evanzile na ye elakisi nini, mpe mpo na nini kosalelama wana ebongi?
3 Kondima elobelami mingimingi kati na Makomami na greke na boklisto. Motuya ya mabaku oyo balobeli liloba na greke oyo libongolami na “kondima” mpe mitindo na yango mikeseni kati na Evanzile na Yoane, ezali na motango ya 40% koleka oyo elobelami na Baevanzile mosusu misato Yoane amonisi ete kozala na kondima ekoki te; kasi kondimela nde ezali na ntina mingi. Ekomaki ye mokanda na mobu 98, Yoane amonaki bokóli makasi ya lipɛngwi limekaki kokangisa baklisto oyo kondima na bango elɛmbaki. (Misala 20:28-30; 2 Petelo 2:1-3; 1 Yoane 2:18, 19) Ezalaki bongo na ntina mingi na kondimela mpe komonisa yango na misala ya ezaleli na kobanga Nzambe.Ntango na mpasi ebɛlɛmaki.
4. Mpo na nini eloko moko te ezali mpasi mpo na baoyo bazali na kondima?
4 Kondima ezali kopesa nzela na baklisto ete balonga mokakatano nyonso. Yesu alobaki na bayekoli na ye ete soki bazalaki na “kondima lokola mbuma na sinapi,” mbɛlɛ likambo moko te likozala mpasi mpo na bango. (Matai 17:20) Azalaki bongo komonisa nguya ya mbuma na elimo santu oyo ete kondima Oyo ezalaki kobima na ye, ezalaki nguya na bato te, kasi oyo na elimo, to bokasi na Nzambe bokosalaka mosala Bato oyo batambwisami na elimo yango, bakolukaka te ete makambo mike makóma ngomba Bazali kosalela mayele oyo mapesameli bango na elimo na Nzambe, eloko oyo ezali kosalisa bango ete bayeisa makambo minene te.Ata mikakatano makasi ekoki koyeisama mike na nguya na kondima.—Matai 21:21, 22; Malako 11:22-24; Luka 17:5, 6.
Tobondela mpo ete kondima ezanga te
5-7. (a) Yesu apesaki makebisi nini na ntina etali kondima, wana esalaki Ekaniseli? (b) lolenge nini kondima ya Petelo esalisaki ye na kolendisa bandeko na ye?
5 Na mobu 33, Yesu akumisaki Pasiká elongo na bayekoli na ye mpo na mbala ya nsuka. Mpe, nsima wana abimisaki Yuda lskariote, asalaki elambo oyo ebengami ete Ekaniseli, ye ete: “Lokola Tata na ngai asili kosala kondimana elongo na ngai mpo na Bokonzi, ngai mpe nasali kondimana elongo na bino mpo na bokonzi na ngai . . . Simona, Simona, Safana alɔmbi ete azwa bino mpo na konyongela bino lokola masango. Kasi nasili kobondela na ntina na yo ete kondima na yo esɛnzwa te; mpe ekosila yo kobongola motema, lendisa bandeko na yo.”—Luka 22:28-32, MN.
6 Yesu abondelaki mpo ete kondima na Simona Petelo esɛnzwa te. Atako Petelo alobaki na komindimisáká ye moko ete akowangana Yesu te, ezali yango nde asalaki mbala misato, nsima ya mwa ntango (Luka 22:33, 34, 54-62) Na yango, wana Mobateli na bampate abomamaki, lokola yango esakolamaki bampate bapalanganaki. (Zakaria 13:7; Malako 14:27) Nsima wana elongamaki na bobangi, Petelo azwaki lisusu makasi mpe alendisaki bandeko na ye ya elimo, Ezali ye nde alobelaki likambo litali kokitanya moto mosusu na esika na Yuda lskariote, moto oyo azangaki sembo. Na Pantekɔte ya mobu 33, na lolenge na molobeli na bantoma, Petelo asalelaki “fungola” oyo Yesu apesaki ye mpo ete Bayuda bakoka kokɔta kati na Bokonzi. (Matai 16:19; Misala 1:15 kino 2:41) Satana alɔmbaki bantoma mpo na konyongela bango lokola masango, kasi Nzambe asɛnzelaki ete bazanga kondima te.
7 Kanisa mayoki Petelo azalaki na yango na ntango Yesu alobaki na ye ete: “Nasili kobondela na ntina na yo ete kondima na yo esɛnzwa te.” Kanisa naino! Nkolo na ye mpe Molakisi na ye abondelaki mpo ete azanga kondima te. Mpe, azangaki yango te, elingi koloba ete kondima na ye esɛnzwaki te! Mokolo ya Pantekɔte, Petelo mpe bayekoli mosusu bazalaki bato ya liboso oyo bapakolamaki na elimo santu mpo na kokóma bana na elimo na Nzambe, baoyo basengelaki kosangola libula elongo na Klisto kati na nkembo ya likoló. Lokola elimo santu ezalaki na bopusi makasi likoló na bango na motindo oyo emonanaki liboso te, bamonisaki mbuma na yango, kondima, koleka oyo bazalaki na yango liboso. Ezalaki eyano kitoko na lilɔmbɔ na bango oyo ete: “Bakisela biso kondima.’’—Luka 17:5; Bagalatia 3:2, 22-26; 5:22, 23.
Lolenge nini kolónga mimekamo mikoya elongo na kondima
8. Likebisi nini liyei na ntango na yango, oyo epesameli biso ma lisangá ya Jéhovah na ntina etali okokana ya 1 Batesaloniki 5:3?
8 Na boyokani na esakweli ya Biblia, mosika te ’’kimya mpe libateli!” ekosakolama. (1 Batesaloniki 5:3) Kondima na biso ekoki nde kotyama na komekama na libaku wana? Ee, mpamba te likama moko lizali: oyo ya komitika kokosama na kimya ya bokosi oyo mbala mosusu mabota bakotya yango. Nzokande soki tokomikundola ete Jéhovah Nzambe azali kosalela ata moko na masangá ya mokili te mpo na likambo yango, tokosangana te na bato ya lolendo oyo bakosakola kimya yango na molende nyonso. Mwango oyo asili kosala mpo na kotya kimya ya solo, ezali Bokonzi na ye botambwisami na Yesu Klisto. Yango wana, ata bolongi nini mabota bakozwa kati na kotyama ya kimya, ekozala bobele mpo na ntango mokuse mpe ekozala sé bokosi. Mpo na kosalisa biso ete tozala na bokɛngi-kati na likambo yango, “moombo na sembo mpe na mayele” akolanda kobimisa makebisi másengeli mpenza mpo ete basaleli na Jéhovah bakamwa te na ntango, mosika te, mabota bakosala “Kimya mpe libateli!”—Matai 24:45-47
9. Mpo na nini ekosɛnga na biso ete tozala na mpiko mpe na kondima na ntango Babilone Monene ekobomama?
9 Kosakolama ya “Kimya mpe libateli!” ekozala elembo ekoyebisa “libebi ya pwasa” mpo na Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba.(Emoniseli 17:1-6; 18: 4, 5) Yango mpe ekotya kondima ya baklisto na komekama. Ekomona bango kobebisama ya mangomba ya lokutá, ba Témoins de Jéhovah bakoumela nde kati na kondima? Na ntembe te. Likambo wana likoya pwasa mpe oyo mingi bakososola yango te, likosalema na mokano na bato te. Bato bakoyeba ete ezali nde kosambisama na Jéhovah, oyo azali kokumisa nkombo oyo efingamaki na mangomba ya lokuta uta kala. Kasi, ndenge nini bakoyeba yango soki bayebisi bango te? Mpo na yo, nani akoyebisa bango soki ba Témoins de Jéhovah te?—Tala Ezekiele 35:14, 15: Baloma 10:13-15.
10. Etumba oyo Gog de Magog akobundisa basaleli na Jéhovah ekomeka kondima na bango na likambo nini?
10 Ba Témoins ‘de Jéhovah bapakolami na elimo, mpe baninga na bango baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé, bazali na mpiko ekoki mpo na kolobela bato ya ntango na bango na ntina etali kosambisama na Jéhovah likoló na Babilone Monene mpe likoló na ebongiseli nyonso na biloko ya Satana. (2 Bakolinti 4:4) Kati na mokumba na ye ya Gog de Magog, nkombo oyo emonisi ezalela ya kokitisama oyo azali kati na yango lelo, Satana akoyanganisa banguya na ye ya mabelé mpo na kobundisa libota na Nzambe. Kondima ya ba Témoins de Jéhovah kati na libateli na Nzambe ekotyama na komekama. Atako bongo, lokola alakaki yango kati na Liloba na ye, Jéhovah akobikisa libota na ve.—Ezekiele 38:16:-23.
11, 12. (a) Eloko nini esalisaki Noa mpe libota na ye ete babika na ntango na mpela? (b) Na likambo nini tokomitungisa te na boumeli ya bolozi monene?
11 Lelo, toyebi mpenza te lolenge nini Jéhovah akobatela libota na ye na boumeli ya “bolozi monene,” kasi yango ekopusa biso te na kobɛta ntembe ete akosala yango te. (Matai 24:21, 22) Ezalela ya basaleli na Jéhovah ekozala lokola oyo Noa mpe libota na ye bazalaki kati na yango na boumeli ya mpela Wana bakangamaki kati na masuwa mpe bazingamaki na mai makasi ya koboma, na ntembe te bakamwaki mpe babondelaki mingi mpenza Makomami mayebisi te ete bamitungisaki mpe bamitunaki ete: ‘Masuwa oyo mazali mpenza makasi liboso na nguya na mai oyo ya koboma? Tozali nde na bilei mingi oyo ekosalisa biso kino na nsuka na mpela? Tokokoka nde koyika mpiko na ezalela na makambo ya sika oyo ekozala na mabelé?’ Makambo malandaki mamonisaki ete mitungisi motindo wana mikokaki kozala na moboko te.
12 Mpo na kobikisama, Noa mpe libota na ye basengelaki kondimela Basengelaki kolanda malako mpe litambwisi ya elimo santu na Nzambe. Na boumeli ya bolozi monene, ekozala mpe na ntina ete tolanda litambwisi ya elimo santu mpe totósa malako oyo Jéhovah azali kopesa biso na nzela ya lisangá na ye. Boye, tokomitungisa soko moke te mpe tokoloba te ete: ‘Lolenge nini bamposa na ngai ya elimo mpe ya mosuni ekokokisama? Bibongiseli nini bikozwama mpo na mibange, to mpo na baoyo basengeli kosalisama to mpe kozwa lisalisi ya sikisiki epai na monganga? Jéhovah akosala nini mpo ete tokoka kozala na bomoi mpe kokɔta kati na mokili ya sika?’ Kati na makambo nyonso, ba Témoins de Jéhovah ya sembo baoyo bazali na kondima, bakotalela nguya na ye.—Tala Matai 6:25-33.
13. Mpo na nini tokozala na mposa ya kondima lokola oyo na Abrahame, wana bolozi monene ekosila kobenda?
13 Na ntango bolɔzi monene ekobanda, kondima na biso epai na Nzambe ekolendisama mpenza. Tokomona te kokokana na makambo oyo Jéhovah asakolaki? Ee, tokomona kosambisama na ye na miso na biso! Kasi biso moko tokozala mpenza na kondima ete, Nzambe akobatela basaleli na ye wana ekoboma ye bato mabe? Tokozala nde lokola Abrahame, oyo andimisamaki ete ‘Mosambisi na mokili mobimba akosala sembo’ na kobomáká bayengebene elongo moko na bato mabe te?—Genese 18:23, 2.
14. Mituna nini misengeli kosalisa biso na kotalela kondima na biso mpe na kosala nyonso oyo ekoki na biso mpo na kolendisa yango?
14 Yango wana ezali ntina ete tolendisa kondima na biso uta sikawa. Lokola nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo ebɛlɛmi, totika ete elimo na Nzambe epusa biso na kokokisa “misala na bizaleli ya bulɛɛ” mpe “misala na ezaleli ya kobanga Nzambe.” (2 Petelo 3:11-14) Na yango, na boumeli ya bolozi monene, tokotungisama te na makanisi oyo ete: ‘Ngai nabongi kozwa libateli ya Jéhovah? Nasengelaki nde kosala mingi kati na mosala na ye? Nasalaki milende nyonso mpo na kolata “bomoto na sika?” Nazali nde motindo na moto oyo Jéhovah alingi komona ye kati na mokili ya sika?’ Ezali sikawa nde tosengeli kotalela kondima na biso mpe kosala nyonso ekoki na biso mpo na kolendisa yango, na nzela na mituna oyo ya mozindo!—Bakolose 3:8-10.
Kondima oyo ezali kobikisa biso
15. Yesu alobaki nini epai na bato mosusu oyo ye abikisaki, kasi mpo na nini yango elongisi te liteya ya kobikisama mpo na kondima oyo elobelami na eleko na biso?
15 Yesu abikisaki bobele bato oyo bazalaki na kondima te. (Yoane 5:5-9, 13) Na bongo, mosala na ye molongisi te libaya oyo liuti na Biblia te, ete kobikisama mpo na kondima Ya solo, Yesu azalaki mbala mosusu koloba na bato oyo ye azalaki kobikisa ete: “Kondima na yo esili kobikisa yo.” (Matai 9:22; Malako 5:34; 10:52; Luka 8:48; 17:19; 18:42) Nzokande, na maloba oyo, azalaki bobele koyebisa solo oyo ete: soki bato na maladi wana bazalaki na kondima te kati na nguya na ye ya kobikisa bango, mbɛlɛ bayaki epai na ye te.
16. Lelo oyo, Yesu azali kokamba ebongiseli nini ya kobikisama?
16 Lelo oyo, Yesu Klisto azali kokamba ebongiseli ya kobikisama na elimo oyo bato koleka 4 000 000, bazali kosala milende mpo na kozwa litomba na yango. Ata ezalela nini euti na kozanga kokoka oyo bazali na yango kati na mosuni, ba Témoins de Jéhovah wana bazali na kolongono malamu na elimo. Baoyo kati na bango bazali baklisto bapakolami, bazali na elikya ya kozala na bomoi na likoló mpe ‘bazali kotala makambo mamonani te makoumela seko.’ (2 Bakolinti 4:16-18; 5:6, 7) Nzokande baklisto oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé, bazali kozela na motema likoló, kobikisama kitoko oyo ekosalema kati na mokili ya sika na Nzambe.
17, 18. Bibongiseli nini na Jéhovah lilobelami na Emoniseli 22:1, 2, mpe na likambo nini kondima ezali na ntina mpo na kozwa litomba na yango?
17 Na Emoniseli 22:1, 2 (MN) ntóma Yoane alobeli bibongiseli oyo Nzambe asili kozwa na ntina na bomoi ya seko. Totangi yango ete: “Atalisi ngai ebale na mai na bomoi, kitoko lokola kulusatala, kobima na kiti na bokonzi na Nzambe mpe na Mwana na Mpate mpe kotyola na katikati na balabala monene ya mboka. Na bipai binso mibale, ezalaki na nzete na bomoi kobotaka mbuma mbala zomi na mibale, sanza na sanza kobotáká mbuma na yango. Nkasa na ,nzete ezali mpo na kobikisa bato na mabota.” “Mai na bomoi” ezali elilingi ya Liloba ya solo na Nzambe mpe bibongiseli nyonso oyo asilaki kokamata mpo ete, na nzela na mbeka na lisiko na Yesu, bato na botosi babikisama na lisumu mpe na liwa, mpe bazwa bomoi ya seko. (Baefese 5:26; 1 Yoane 2:1, 2) Wana ezali bango awa na mabelé, ba 144 000 bayekoli na Yesu bapakolami, bazali ‘komela’ kati na bibongiseli ya bomoi oyo Nzambe akamataki na nzela na Klisto, mpe babengami “nzeté minene ya boyengebene.” (Yisaya 61:1-3; Emoniseli 14:1-5) Na mabelé, bazali kobota mbuma mingi ya elimo. Na boumeli na Boyangeli ya mbula nkɔto na Klisto, wana bakosila kosekwa mpo na kozala na bomoi na likoló, bakosangana mpo na kosalela bibongiseli bikamatamaki na nzela na lisiko, oyo ekosalelama mpo na “kobikisa mabota” na kosikoláká bango na lisumu mpe na liwa.
18 Wana kondima na biso ekozala se makasi kati na bibongiseli oyo ya Nzambe, tokozala ntango nyonso pene na kolanda litambwisi na elimo na Nzambe mpo na kozwa litomba na yango. Tokoki kokanisa ete bato bakokóma na ezalela ya kokoka kati na mosuni na kondimeláká Klisto mpe na kosaláká bokoli kati na elimo. Ata soki babikisami na bikamwiseli kati na mbébá minene na mosuni, nzokande bakobɛlɛma na ezalela ya kokoka bobele soko bakosala makambo ya sembo. Bakozwa litomba na bibongiseli oyo Nzambe asilaki kozwa mpo na kobikisama na nzela na mbeka na Klisto. Na yango, kondima na biso ekozala na bopusi likoló na kobika na biso mpe na ekomema biso kino na ezalela ya kokoka kati na mosuni.
“Babiki na nzela na kondima”
19. Mpo na nini ezali ntina na kozala ntango nyonso makasi kati na kondima?
19 Liboso ete pole makasi ya mokili ya sika na Nzambe ekoka kolongola molili mabe ya mokili ya lelo, ezali ntina ete basaleli na Jéhovah bazala ntango nyonso makasi kati na kondima. Bato oyo “bazangi kondima” bakobwakama kati na “libéké ya mɔtɔ mpe na sufulu,” yango kufa na mibale. Yango ekoya nsima na momekamo monene oyo ekosalema na nsuka na Boyangeli ya mbula nkɔto na Klisto. (Emoniseli 20:6-10; 21:8) Oyo nde nsuka na esengo ekozwama na baoyo bazali kolanda kondimela mpe baoyo bakozwa bomoi ya seko, na ntango bakobika na bileko wana!
20. 1 Bakolinti 13:13 ekozwa ndimbola nini ya sikisiki na nsuka na Boyangeli ya mbula nkoto na Klisto?
20 Na bongo, maloba ya ntóma Paulo makomami na 1 Bakolinti 13:13, makozwa ndimbola ya sikisiki, ete: “Kondima mpe elikya mpe bolingo ezali koumela, yango misato. Nde oyo eleki kati na yango misato ezali bolingo.” Tokozala lisusu na ntina te na kondimela elaká na esakweli oyo ezali na Genese 3:15 tokolikya mpe te na kokokana na yango. Ekosila kokokana. Lokola basaleli na sembo, tokolanda kolikya epai na Jéhovah na kondimela ye mpe Mwana na ye, mpe na kolinga bango nyonso mibale po ete bakokisi esakweli yango. Epai mosusu, bolingo ya mozindo mpe botɔndi ya sembo epai, na Ye mpo na lobiko oyo akopesa biso, ekokangisa biso na Nzambe na bokangani moko makasi mpe ya libela.—1 Petelo 1:8, 9.
21 Nini tosengeli kosala lelo mpo na “kobika na nzela na kondima’’?
21 Na nzela na lisangá na ye lizali komonana, Jéhovah asili kozwa bibongiseli kitoko mpo na kolendisa kondima na bato. Totya milende na kozwa litomba na bibongiseli nyonso wana. Toyanganaka mpe topesaka biyano mbala na mbala na makita ya libota na Nzambe. (Baebele 10:24, 25) Toyekola ntango nyonso Liloba na ye mpe mikanda na boklisto Tosɛngaka Jehovah elimo santu na ye. (Luka 11:13) Tomekola kondima ya bato na bopɔlɔ oyo bazali kokamba lisangá na biso. (Baebele 13:7).Totɛmɛla masenginya ya mokili. (Matai 6:9, 13) Kasi likoló nyonso wana, toluka kokolisa boyokani na biso elongo na Jéhovah kati na makambo nyonso ya bomoi na biso. Lisusu, tolanda kondimela Boye, tokokoka kotangama kati na baoyo bazali kosepelisa Jéhovah mpe baoyo bakozwa lobiko. Mpo na yango, Paulo alobaki ete: “Bobiki na ngolu na nzela na kondima, yango euti na bino te, ezali likabo na Nzambe.”—Baefese 2:8.
Bozongeli
◻ Mosika te, kondima na biso ekozwa mimekamo nini?
◻ Mitindo nini mibale oyo kondima na biso ekoki kobikisa biso?
◻ Engebene 1 Petelo 1:9, tosengeli kozala na kondima kino ntango nini?
◻ Bibongiseli nini bizali kosalisa biso mpo na kolendisa kondima na biso?
[Elilingi na lokasa 15]
Tozali na mposa ya kozala na kondima mingi, lokola mobali oyo Yesu abikisaki mwana na ye?
[Elilingi na lokasa 17]
Mpo na kobika na “bolozi monene,”esengeli kozala na kondima motindo moko na oyo na Noa mpe libota na ye