Tózala balɔbi na bato
“Yesu alobi na Simona ete: ‘Banga te. Uta sikawa, akozala mokangi na bato na bomoi.’”—LUKA 5:10.
1, 2. (a) Kolɔba mbisi ekokisaki mokumba nini kati na Lisoló ya bato? (b) Motindo nini ya sika na kolɔba mbisi oyo ebimaki ekokisi mibu pene 2 000 sikawa?
UTA mibu nkɔto mingi, moto akolɔbaka mbisi na mai minene, na mabéké mpe na bibale ya mokili mobimba mpo na komileisa na yango. Na Ezipito ya kala, mbisi ya ebale Nil ezalaki ndambo monene ya bilei. Wana mai ya ebale yango monene ebongwanaki makila na eleko ya Moize, Baezipito baokaki mpasi, bobele mpo na kozanga mai te, kasi lisusu mpo na kozanga bilei, mpamba te mbisi ekufaki. Na nsima, ntango Jéhovah apesaki Mibeko epai na Bayisraele na Sinai, alobaki na bango ete mbisi mosusu ekokaki kolyama, kasi mosusu esengelaki kolyama te, mpo ete ezalaki mbindo. Wana emonisi ete Bayisraele basengelaki kolya mbisi na ntango bakómaki na Mabelé na ndaká, mpe basusu kati na bango basengelaki kozala balɔbi mbisi.—Exode 7:20, 21; Levitike 11:9-12.
2 Kasi, esili koleka soko mibu 2 000, bato bamonaki motindo mosusu ya kolɔba mbisi. Ezalaki bongo kolɔba mbisi na elimo, oyo esengelaki kopesa bolamu epai na balɔbi mpe epai na mbisi! Lelo oyo, motindo na kolɔba wana ezali naino kosalema mpe bamilió na bato kati na mokili bazali kozwa bolamu mingi mpo na yango.
“Okozala mokangi na bato na bomoi”
3, 4. Tánga balobi mbisi mibale oyo basepelaki mingi na Yesu Klisto.
3 Na mobu 29 ya ntango na biso, Yesu, Oyo asengelaki kobanda motindo wana ya sika ya kolɔba mbisi, abatisamaki na Yoane Mobatisi na ebale Yordani. Mwa baposo na nsima, Yoane alakisaki Yesu na mosapi epai na bayekoli na ye mibale ete: “Botala Mwana na mpate na Nzambe!” Moko na bayekoli yango, nkombo na ye André, akendaki nokinoki koyebisa ndeko na ye Simona Petelo ete: “Tosili komona Masiya.” Toyeba ete André mpe Simona, bango mibale bazalaki balɔbi mbisi.—Yoane 1:35, 36, 40, 41; Matai 4:18.
4 Nsima na ntango mingi, Yesu asakwelaki bibele na libóngo ya libéké ya Galilai, mosika te na mboka oyo Petelo mpe André bazalaki kofanda. Alobaki na bato ete: “Bobongola mitema na bino, mpo ete bokonzi ya makoló ebɛlɛmi.” (Matai 4:13, 17, MN) Tokanisi ete Petelo mpe André bazelaki na motema likoló mpo na koyoka nsango na ye. Kasi, bakanisaki mpenza te ete Yesu alingaki koloba na bango likambo oyo likokaki kobongola bomoi na bango mpo na libela. Epai mosusu, makambo oyo Yesu asengelaki koloba mpe kosala liboso na bango, ezali na ntina mingi mpo na biso nyonso lelo.
5. Na likambo nini Petelo, molɔbi mbisi, azalaki na ntina mingi mpo na Yesu?
5 Totangi ete: “Mokolo mosusu oyo ebele na bato bazingaki ye mpo na koyoka liloba na Nzambe, batɛlɛmaki na libongo na libéké ya Genesalete. Mpe amonaki masuwa mibale ekangisami na libongo ya libéké, nde balɔbi mbisi balubwaki mpe bazalaki kosukola milubá na bango.” (Luka 5:1, 2, MN) Na eleko wana, balɔbi mbisi bazalaki kosala mbala mingi na butu; mibali yango bazalaki kopɛtola milubá na bango nsima na kolɔba na butu mobimba. Yesu asalelaki moko na masuwa na bango mpo na kosakola malamu epai na ebele na bato wana mpo ete bayoka ye malamu. “Amataki na moko na masuwa, oyo na Simona, mpe asɛngi ye ete atangola [yango] mwa moke na mokili. Bongo afandaki, mpe abandaki kolakisa bibele longwa na masuwa.”—Luka 5:3, MN.
6, 7. Likamwisi nini lisalemaki na mosala ya kolɔba mbisi likokisamaki na Yesu, mpe alobaki nini na ntina na kolɔba mbisi?
6 Toyeba ete Yesu akanisaki te bobele kolakisa bibele. “Esilisi ye kosolola, alobi na Simona ete: ‘Pusa masuwa na (mai) mozindo, mpe bobwaka milubá na bino mpo na kolɔba mbisi.’” Tomikundola ete balɔbi mbisi wana bauti kolɔba butu mobimba. Eyano ya Petelo ezali bongo kokamwisa te, ete: “Molakisi, tonyokwami butu mobimba nde tozwi eloko te, kasi, na etinda na yo, nakobwaka milubá.” Basalaki bongo. Kasi, likambo nini lisalemaki? “Wana basalaki bongo, bakangaki ebele na mbisi, mpe milubá na bango mizalaki kopaswana. Bongo babéngaki baninga na bango oyo bazalaki na masuwa mosusu ete baya kosalisa bango; bayaki, mpe batondisaki masuwa wana mibale, kino ebandaki kozinda.”—Luka 5:4-7, MN.
7 Yesu autaki kosala likamwisi. Esika wana, mbisi ezwamaki te na boumeli ya butu mobimba, kasi tala sikawa mbisi ekómaki mingi na esika yango. Likamwisi wana lizalaki na bopusi makasi likoló na Petelo. Simona Petelo afukami liboso na Yesu, mpe alobi ete: “‘Nkolo, longwa pene na ngai, mpo ete nazali moto na masumu.’ Aokaki nsɔmɔ, ye mpe baoyo nyonso bazalaki na ye elongo, na ntina na mbisi oyo bautaki kolɔba. Yakobo mpe Yoane, bana na Zebedai, baoyo bazalaki kosala elongo na Simona, baokaki mpe nsɔmɔ.” Yesu akitisaki motema ya Petelo mpe ayebisaki maloba oyo masengelaki kobongola bomoi ya moyekoli na ye. “Banga te. Uta sikawa, okozala mokangi na bato na bomoi.”—Luka 5:8-10, MN.
Balɔbi na bato
8. Lolenge nini balɔbi mbisi minei bayanolaki na libyangi ya ‘kokanga bato na bomoi’?
8 Bongo, Yesu akokanisaki bato na mbisi, mpe abyangaki molɔbi mbisi wana na bopɔlɔ ete atika mosala na ye mpo na kosala motindo na kolɔba mbisi moleki na motuya: kokanga bato na bomoi. Petelo mpe ndeko na ye André bandimaki libyangi yango. “Nokinoki, batiki milubá na bango mpe balandi ye.” (Matai 4:18-20, MN) Na nsima, Yesu abyangaki Yakobo mpe Yoane, baoyo bazalaki kobongisa milubá na bango kati na masuwa. Abyangaki bango ete bakóma mpe balɔbi na bato. Basalaki nini? “Nokinoki, batiki masuwa mpe tata na bango, mpe balandi ye.” (Matai 4:21, 22, MN) Yesu amimonisaki molɛɔbi na bato oyo azalaki na makoki mingi. Na libaku wana, akangaki bato minei na bomoi.
9, 10, Kondima nini emonisamaki na Petelo mpe baninga na ye, mpe kobongisama nini bazwaki mpo na kokóma balɔbi mbisi kati na elimo?
9 Moto oyo azali molɔbi mbisi abikelaka na mbisi ezali ye kozwa na mosala na ye wana, kasi ezali bongo te kati na elimo. Bayekoli yango bamonisaki kondima monene wana batikaki biloko nyonso mpo na kolanda Yesu. Bazalaki na ntembe moke te ete mosala na bango ya kolɔba kati na elimo, ekozwa bolóngi. Yesu ayeisaki mbisi mingi kati na mai mazalaki na mbisi te, boye te? Bobele bongo, wana basengelaki kobwaka milubá na bango na mai ya libota na Yisraele, bayekoli bakokaki kolikya kokanga bato na bomoi, na lisalisi ya Nzambe. Mosala ya kolɔba kati na elimo oyo ebandaki uta ntango wana, mozali sé kokóba na eleko na biso oyo, mpe Jéhovah azali sé kopesa nzela ete ezwa matomba mingi.
10 Koleka boumeli ya mibu mibale, Yesu abongisaki bayekoli yango ete bazala balɔbi na bato. Na mabaku makeseni, apesaki bango malako ya sikisiki mpe atindaki bango mpo na kosakola na bisika oyo akómaki naino te. (Matai 10:1-7; Luka 10:1-11) Na ntango Yesu akabamaki mpe abomamaki, bayekoli bazalaki na kobanga mingi. Kasi liwa na Yesu lisengelaki kosukisa mosala ya balobi na bato? Makambo masalemaki nsima, makopesa eyano.
Bazali kolɔba kati na mai monene na bato
11, 12. Likamwisi nini Yesu asalaki nsima na lisekwa na ye?
11 Mwa moke nsima na liwa na Yesu, na libandá na Yelusaleme, mpe nsima na lisekwa na ye, bayekoli bazongaki na Galilai. Mokolo moko, bayekoli nsambo kati na baoyo bayanganaki pene na libéké ya Galilai. Petelo alobaki ete alingaki kokende kolɔba mbisi, mpe basusu bakendaki elongo na ye. Lokola na momeseno, balɔbaki na butu. Ya solo, babwakaki lisusu milubá na bango na mai na boumeli ya butu mobimba, kasi bazwaki eloko te. Kasi, na ntɔngɔntɔngɔ, moto moko bazalaki komona ye malamu te, abelelaki bango longwa na esika oyo atɛlɛmaki na libóngo, ete: “Bana, bozali nde na eloko ya kolya?” Bayekoli bayanoli ye ete: “Eloko te.” Bongo ye oyo atɛlɛmaki na libóngo alobaki na bango ete: “‘Bobwaka molubá na lobɔkɔ ya mobali, mpe bokozwa.’ Babwaki molubá, kasi bakokaki kotombola yango te mpo na ebele na mbisi.”—Yoane 21:5, 6, MN.
12 Oyo nde ntango malamu mingi! Emonani mpenza ete, bayekoli bamikundolaki kolɔba mbisi na likamwisi ya liboso, mpe moko na bango ayebaki ye oyo atɛlɛmaki na libóngo. “Moyekoli oyo Yesu alingaki, alobaki na Petelo ete: ‘Ezali Nkolo!’ Eyoki Simona Petelo ete ezalaki Nkolo, alati elamba na ye, mpamba te azalaki bolumbu, mpe amibwaki na mai. Kasi bayekoli mosusu bayaki na masuwa moke, wana ezalaki bango kobenda molubá [motondi] na mbisi—mpamba te bazalaki mosika na mokili te, bobele pene na bametele ntuku libwa.”—Yoane 21:7, 8, MN
13. Nsima na komata na Yesu na likoló, ebongiseli nini ebandaki mpo na kolɔba mbisi kati na bikólo nyonso?
13 Likamwisi wana lilakisi nini? Ete mosala ya kolɔba bato mosilaki te. Ezali yango nde Yesu amonisaki ntango alobaki mbala misato epai na Petelo, mpe na nzela na ye, alobi mpe epai na bayekoli nyonso, mpo na koleisa bampate na ye. (Yoane 21:15-17) Ya solo, ebongiseli ya koleisa bato na elimo esengelaki kosalema na mikolo mizalaki liboso. Liboso na liwa na ye, Yesu apesaki esakweli ete: “Nsango malamu oyo na bokonzi ekosakolama na mokili mobimba, lokola litatoli na mabota nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14, MN) Ntango ekokaki mpo ete maloba oyo mabanda kokokisama na ekeke ya liboso. Bayekoli na Yesu bamilɛngɛlaki mpo na kokenda kobwaka milubá kati na mai na bato, mpe batombolaki milubá mpamba te.—Matai 28:19, 20.
14. Nini emonisi ete na bambula oyo ezalaki liboso na kobebisama na Yelusaleme, mosala ya kolɔba mbisi ya bayekoli na Yesu mopambolamaki?
14 Liboso na komata na likoló, na kiti na bokonzi ya Tata na ye, Yesu alobaki ete: “Bokozwa nguya na ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai na Yelusaleme, mpe kati na Yudea, mpe na Samalia, mpe kino na eteni eleki mosika na mokili.” (Misala 1:8, MN) Na ntango elimo santu esopamaki likoló na bayekoli, na Pantɛkɛte ya mobu 33, mosala monene ya kolɔba mbisi na elimo mobandaki kosalema na bikólo nyonso. Mokolo wana, nkɔto misato na bato na bomoi bakangamaki mpe, nsima na mwa ntango moke, “motuya na bato ekómaki pene na nkɔto mitano.” (Misala 2:41; 4:4, MN) Bokóli elandaki kosalema. Totangi ete: “Bato oyo bandimaki Nkolo bazalaki sé kobakisama, bibele na mibali mpe basi.” (Misala 5:14, MN) Mosika te, Basamalia mpe, nsima na mwa ntango moke, Bapakano, bato bakatamaki ngenga te, bayambaki nsango malamu. (Misala 8:4-8; 10:24, 44-48) Soko mibu 27 nsima ya Pantɛkɛte, ntóma Paulo akomelaki baklisto ya Kolose ete nsango malamu esilaki “kosakolama epai na bato nyonso na nsé na moi.” (Bakolose 1:23, MN) Emonani ete, bayekoli na Yesu bakendaki kosakola mosika longwa na mai ya Galilai. Babwaki milubá na bango kati na Bayuda oyo bapalanganaki na Bokonzi ya Loma, mpe na mai oyo emonanaki lokola ete eloko ekokaki kozwama kati na yango te: bikólo na Bayuda te. Kasi batombolaki milubá mitondi na mbisi. Mpo na baklisto ya ekeke ya liboso, esakweli na Yesu ekomami na Matai 24:14, ekokanaki liboso na kobebisama na Yelusaleme, na mobu 70 ya ntango na biso.
Kolɔba bato na “mokolo na Nkolo”
15. Mosala nini ya kolɔba mbisi oyo masakolamaki na mokanda ya Emoniseli, mpe ntango nini yango esengelaki kobanda?
15 Kasi, ezalaki naino na mosala mingi mpo na kosala. Pene na nsuka ya ekeke ya liboso, Jéhovah amonisaki makambo masengelaki kobima na boumeli ya “mokolo na Nkolo,” epai na Yoane, ntóma ya nsuka oyo azalaki na bomoi. (Emoniseli 1:1, 10) Moko na makambo ya ntina ya emoniseli yango, ezalaki kosakolama ya nsango malamu kati na mokili mobimba. Totangi ete: “Namonaki anzelu mosusu kopumbwa na likoló, mpe azalaki na nsango malamu ya seko mpo na kosakwela bafandi na mokili, mpe na bikólo nyonso mpe na bituká nyonso, mpe na minoko nyonso mpe na mabota nyonso.” (Emoniseli 14:6, MN) Na nsé na litambwisi ya baanzelu, basaleli na Nzambe basengelaki mpenza kosakola nsango malamu na mabelé mobimba, kasi bobele na etando ya Bokonzi ya Loma te. Mosala ya kolɔba bato na mokili mobimba mosengelaki kobanda, mpe emonaneli yango ekokisami na eleko na biso.
16, 17. Mosala ya kolɔba mbisi ya nsuka kati na elimo mobandaki ntango nini, mpe motindo nini Jéhovah asili kopambola yango?
16 Lolenge nini mosala yango ya kolɔba mokokisami na ekeke oyo ya ntuku mibale? Na ebandeli, balɔbi bazalaki bobele moke. Nsima na etumba ya Liboso ya mokili mobimba, basakoli ya nsango malamu ya molende bazalaki soko nkɔto minei. Mibali mpe basi wana ya molende, baoyo mingi na bango bazalaki bapakolami na elimo, babwakaki milubá na bango bisika nyonso epai Jéhovah afungolaki nzela, mpe bato mingi na bomoi bakangamaki. Nsima na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Jéhovah afungolaki bateritware ya sika mpo na mosala ya kolɔba. Bamisionere ya Galaad, Eteyelo ya la Société Watchtower bazalaki bato ya liboso oyo bakokisaki mosala yango kati na bituká mingi na mokili. Bamboka lokola Japon, ltalia mpe Espagne, oyo na ebandeli, emonanaki lokola ete ekokaki kobota mbuma mingi te, esukaki na kobimisa mbuma mingi na bato. Mpe kala mingi te, toyokaki ete mosala ya kolɔba mozali kobimisa matomba maleki kitoko na Europe de l’Est.
17 Lelo, kati mikili mingi, milubá mitondi kino pene na kopasuka. Liboso na mosala yango monene ya kobuka mbuma, esengeli kosala masangá mpe ba circonscriptions ya sika. Yango esɛngi ntango nyonso kotonga ba Salles du Royaume mpe ba Salles d’assemblées. Mpo na kokokisa mposa ebimisami na bokóli ya mosala, esengeli lisusu bankulutu mingi mpe basaleli na misala mingi. Ezali mosala na nguya oyo mobandisamaki na 1919 na bato wana ya sembo. Maloba na Yisaya 60:22 makokani mpenza na ndimbola na yango ya solo. ‘Oyo moke akómi nkoto mpenza,’ mpamba te tolongwi na balobi wana nkoto minei kino na balɔbi koleka bamilió minei. Mpe yango esili te.
18. Lolenge nini tokoki komekola ndakisa malamu ya balɔbi na bato na ekeke ya liboso?
18 Nyonso oyo elimboli nini mpo na moko na moko na biso? Engebene Makomami, ntango Petelo, André, Yakobo mpe Yoane babyangamaki mpo na kokóma balɔbi na bato, ‘batikaki biloko nyonso mpe balandaki Yesu.’ (Luka 5:11) Oyo nde ndakisa malamu ya kondima mpe ya komipesa! Tokoki nde kolóna elimo ya kosalela bato mosusu, motindo na mposa wana ya kosalela Jéhovah, ata soko yango esɛngi nini? Bamilió na bato bandimaki yango. Na ekeke ya liboso, bayekoli balobaki bato na bisika nyonso epai Jéhovah apesaki bango nzela. Ata kati na Bayuda to kati na Bapakano, balobaki kozanga koponapona. Bobele bongo, tolɔba epai na bato nyonso na molende mpe kozanga kokanisela bango mabe.
19. Tosengeli kosala nini soki tomoni ete mai epai tozali kolɔba ezali mpenza kopesa eloko te?
19 Kasi, osengeli kosala nini soki teritware na yo emonani lokola ete ezali sikawa kobota mbuma te? Kolɛmba te. Omikundola ete, Yesu atondisaki milubá ya bayekoli bobele nsima wana balobaki butu mobimba kozanga kozwa eloko. Likambo yango likoki mpe kosalema kati na elimo. Na ndakisa, na lrlande, Batemwe ya sembo bamipesaki na mosala na boumeli ya bambula mingi nde bazwaki bobele matomba moke. Kasi, kala mingi te ezalela yango esili kobongwana. Annuaire des Témoins de Jéhovah 1991 elakisi ete na nsuka ya mbula ya mosala 1990, lrlande ezwaki motuya ya sika mpo na mbala ya 29! Ntango mosusu ekozala bobele motindo moko kati na teritware na yo. Awa Jéhovah azali kopesa nzela, tokóba kolɔba!
20. Ntango nini tosengeli kokenda kolɔba bato?
20 Na Yisraele, balɔbi bazalaki kosala na butu, wana bato nyonso bazalaki kolala mpongi malamu. Bazalaki kokenda kolɔba te na ntango oyo bango moko basepelaki, kasi na ntango oyo bakokaki kokanga mbisi mingi. Bobele bongo, tokoki koloba ete, tosengeli koyekola teritware na biso mpo ete tokende kolɔba wana bato mingi bazali na bandako na bango mpe ntango oyo bakoki koyoka biso. Ekoki kozala na mpokwa, na wikende to na ntango mosusu. Atako nini ekoki kokóma, tosala nyonso ekoki na biso mpo na kokutana na bato ya motema sembo.
21. Likambo nini tosengeli komikundola soki teritware na biso esalemi mingi?
21 Bongo soki teritware na yo ezali kosalema mbala na mbala? Mbala mingi, balobi mbisi bamilelaka wana bisika ya kolɔba bisili kosalelama mingi. Kasi, bisika na biso ya kolɛɔba na elimo bikoki mpenza kosila kosalelama? Ekoki mpenza kosalema te! Bateritware mingi ekobotaka mbuma ata soki esili kosalema mingi. Mosusu ekobotaka mbuma mingi mpo ete mosala ya mozindo mokokisami kati na yango. Atako bongo, soki tozali kobɔta bobele na bikuke yango moko, tosɛnzela ete tokoma nkombo ya bato nyonso oyo bazali te, mpo na komeka kotala bango na ntango mosusu. Toyekola kosalela ebele na masoló makeseni mpo na mosala ya kosakola. Tobosana te ete, mosika te, moto moko akoleka nsima na biso; yango wana, toumela ntango molai te mpe tobimisa te maloba oyo makopesa molobani na biso mawa na motema. Epai mosusu, tosengeli kozala na mayele mpo na kopesa litatoli na libaku malamu. Tobwaka milubá na biso na mabaku nyonso mpe na ndenge nyonso ekoki.
22. Libaku monene nini tozali na yango na eleko na biso?
22 Tomikundola ete mosala wana ya kolɔba mbisi mozali kopesa litomba epai na balɔbi mpe epai na mbisi. Soki baoyo tozali kokanga na bomoi balendendeli, bakozala na bomoi ya seko. Paulo alendisaki Timoté na maloba oyo ete: “Umela na makambo oyo, mpo ete soki okosala bongo, okomibikisa yo mpe baoyo bazali koyoka yo.” (1 Timoté 4:16, MN) Yesu nde abandaki kobongisa bayekoli na ye mpo na koloba mbisi na elimo, mpe mosala yango mozali kokokisama bobele na nsé na litambwisi na ye. (Tala Emoniseli 14:14-16) Oyo nde libaku kitoko tozali na yango ya kosangana na mosala yango na nsé na litambwisi na ye! Tokóba kobwaka milubá na biso na boumeli ya ntango oyo Jéhovah apesi nzela mpo na yango. Mosala nini mosusu mokoki koleka oyo etali kokanga bato na bomoi?
Bozongeli
◻ Yesu abongisaki bayekoli na ye mpo na mosala nini?
◻ Lolenge nini Yesu amonisaki ete mosala ya kolɔba mbisi kati na elimo esukaki te nsima na liwa na ye?
◻ Motindo nini Jéhovah apambolaki mosala ya kolɔba mbisi kati na elimo, na ekeke ya liboso?
◻ Wapi mosala monene ya kolɔba mbisi mosili kosalema na boumeli ya “mokolo na Nkolo”?
◻ Lolenge nini biso moko tokoki kokóma balɔbi na bato na makoki mingi?
[Elilingi na lokasa 15]
Nsima na lisekwa na Yesu, bantóma bakólisaki mosala ya Nzambe na ntina kolɛɔba bato