Mekolá kondima na bango
“Talá! Mwana mwasi moombo ya Yehova!”
MALIA akamwaki makasi ntango mopaya moko akɔtaki na ndako na bango. Mopaya yango ayaki koluka tata to mama ya Malia te. Ayaki nde epai na ye! Malia ayebaki ete mopaya yango azalaki moto ya Nazalete te. Lokola Nazalete ezalaki mboka monene te, ezalaki mpasi te koyeba moto oyo azali mopaya. Mopaya yango ayebisaki Malia maloba oyo ekamwisaki ye mpenza; alobaki boye: “Mbote, moto oyo bamoniseli boboto mingi, Yehova azali elongo na yo.”—Luka 1:28.
Yango ezali mbala ya liboso oyo Biblia elobeli Malia, mwana ya Heli, moto ya Nazalete, na etúká ya Galilai. Biblia elobeli ye na eleko moko ya ntina mingi na bomoi na ye. Azalaki fianse ya Yozefe, mosali-mabaya oyo azalaki mozwi te, kasi azalaki sembo epai ya Nzambe. Na yango, Malia azalaki komona ete akozala na bomoi ya mindɔndɔ te, akozala mwasi ya Yozefe, bakobota bana mpe bakobɔkɔla bango elongo. Kasi, na mbalakaka, mopaya yango amemelaki ye nsango oyo eutaki epai ya Nzambe; Nzambe apesaki ye mokumba oyo esengelaki kobongola bomoi na ye.
Biblia eyebisi biso makambo mingi te mpo na Malia. Elobi makambo mingi te mpo na bomwana na ye, bomoto na ye, mpe elobi eloko te mpo na kitoko na ye. Kasi, mwa makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi mpo na ye ezali na ntina mingi mpo na biso.
Mpo tóyeba Malia malamu, tosengeli kotika pembeni makambo ndenge na ndenge oyo mangomba eteyaka na ntina na ye. Mpo na yango, tóbosana ebele ya mayemi mpe bililingi na ye oyo bato basalá. Tóbosana mpe mateya ya mangomba mpe bindimeli oyo ekumisaka mwasi yango lokola “Mama ya Nzambe” mpe “Mokonzi-mwasi ya likoló.” Kasi, tótya nde likebi na makambo oyo Biblia elobi na ntina na ye. Yango ekosalisa biso tóyeba malamu kondima na ye mpe ndenge oyo tokoki komekola yango.
Anzelu moko ayei epai na ye
Na ntembe te, oyebi ete mopaya oyo ayaki epai ya Malia azalaki moto te. Ezalaki anzelu Gabiliele. Ntango anzelu abengaki ye “moto oyo bamoniseli boboto mingi,” Malia “abulunganaki mingi” mpo na maloba yango mpe amitunaki soki ezalaki na ndimbola nini. (Luka 1:29) Nani amoniselaki ye boboto mingi? Malia azalaki komizela te ete bato bámonisela ye boboto mingi. Anzelu azalaki nde kolobela boboto ya Yehova Nzambe. Yango ezalaki na ntina mingi mpo na ye. Atako bongo, na nse ya motema, azalaki te koloba na lolendo nyonso ete Nzambe akomonisela ye boboto. Ntango tozali koluka boboto ya Nzambe mpe tozali kokanisa te na lolendo nyonso ete tosili kozwa yango, biso mpe tokoyekola liteya moko ya ntina mingi oyo Malia azwaki. Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi alingaka mpe asungaka bato ya komikitisa.—Yakobo 4:6.
Malia asengelaki kozala na komikitisa, mpamba te anzelu apesaki ye mokumba moko monene mpenza. Anzelu ayebisaki ye ete akobota mwana oyo akokóma moto oyo aleki bato nyonso. Gabiliele alobaki boye: “Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, mpe akoyangela ndako ya Yakobo libela na libela, mpe nsuka ekozala te na bokonzi na ye.” (Luka 1:32, 33) Na ntembe te, Malia ayebaki elaka oyo Nzambe apesaki Davidi mbula koleka nkóto liboso, ete mokitani na ye moko akoyangela libela na libela. (2 Samwele 7:12, 13) Na yango, mwana ya Malia asengelaki kozala Masiya oyo libota ya Nzambe ezalaki kozela banda bankama ya bambula!
Longola yango, anzelu ayebisaki Malia ete mwana oyo akobotama “akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló.” Ndenge nini moto akokaki kobota Mwana ya Nzambe? Kutu, ndenge nini Malia akokaki kobota? Ya solo, azalaki fianse ya Yozefe kasi babalanaki naino te. Malia atunaki boye: “Ndenge nini yango ekosalema, lokola nasangisi nzoto ná mobali te?” (Luka 1:34) Tomoni ete Malia ayokaki nsɔni te koloba ete azalaki naino ngɔndɔ. Kutu, azalaki kotalela yango na motuya. Lelo oyo, bilenge mingi bazali kobebisa bongɔndɔ na bango mpe bazali kotyola baoyo bazali kobatela bongɔndɔ na bango. Mokili ebongwani mingi. Nzokande, Yehova abongwani te. (Malaki 3:6) Ndenge ezalaki na mikolo ya Malia, Yehova asepelaka na baoyo balandaka mitinda na ye ya sembo.—Baebele 13:4.
Atako Malia azalaki mosaleli ya sembo ya Nzambe, azalaki moto ya kozanga kokoka. Na yango, ndenge nini akokaki kobota Mwana ya Nzambe? Gabiliele alobaki boye: “Elimo santu ekoya likoló na yo, mpe nguya ya Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo. Yango wana mpe oyo akobotama akobengama mosantu, Mwana ya Nzambe.” (Luka 1:35) Santu elimboli “ya pɛto,” “oyo ezangi mbindo,” “ya bulɛɛ.” Bato bazwaka ezaleli ya kozanga kokoka epai ya baboti na bango. Kasi epai ya Malia, Yehova alingaki kosala likamwisi. Alingaki kotya na libumu ya Malia bomoi ya Mwana na ye oyo azalaki na likoló mpe na nsima, kosalela elimo santu mpo na ‘kozipa’ Malia, mpe na ndenge yango, kobatela mwana ete azwa lisumu te. Malia andimaki maloba ya anzelu? Asalaki nini?
Likambo oyo Malia asalaki
Bato mosusu, ata mpe bakonzi ya mangomba ya boklisto, bandimaka te ete ngɔndɔ akoki kobota mwana. Atako batángá bakelasi milai, bakokaka te kokanga ntina ya likambo moko ya pɛtɛɛ. Ndenge Gabiliele amonisaki yango, “epai ya Nzambe ezali ata na liloba moko te oyo ekoki te kosalema.” (Luka 1:37) Malia andimaki maloba ya Gabiliele mpamba te azalaki na kondima makasi. Kasi, kondima yango ezalaki bindimela te. Ndenge moto nyonso oyo akanisaka malamu akokaki kosala, Malia asɛngaki elembeteli oyo ekokaki kosimba kondima na ye. Gabiliele azalaki na likambo mosusu oyo asengelaki kobakisa mpo Malia andima malamumalamu. Alobelaki likambo ya Elizabeti, ndeko ya Malia oyo bato bayebaki ete azali ekomba mpe akómaki mobange. Nzambe asalaki likamwisi: Elizabeti akómaki na zemi!
Malia alingaki kosala nini? Ayokaki mokumba oyo Nzambe apesaki ye mpe azalaki na elembeteli ete Nzambe akokokisa nyonso oyo Gabiliele alobaki. Tókanisa te ete Malia abangaki te to akutanaki na mikakatano te ntango azwaki mokumba yango. Ya liboso, azalaki fianse ya Yozefe. Akosuka ndenge nini ntango Yozefe akoyoka ete azali na zemi? Ya mibale, kobota mwana ya Nzambe ezalaki mokumba monene. Asengelaki komema bomoi ya Mwana molingami bobele moko ya Nzambe, ekelamu oyo aleki motuya na bikelamu nyonso! Asengelaki kokokisa bamposa na ye ntango azali naino mwana mpe kobatela ye na mokili oyo mabe. Ezalaki mpenza mokumba monene!
Biblia emonisi ete ata basaleli mosusu ya Nzambe oyo bazalaki makasi mpe bazalaki sembo, bakakatanaki kondima mikumba minene oyo Nzambe apesaki bango. Na ndakisa, Moize amonaki ete akokoka te kozala molobeli ya Nzambe mpamba te ayebaki koloba te. (Exode 4:10) Yilimia alobaki ete azali “bobele elenge,” mpo na kozwa mokumba oyo Nzambe apesaki ye. (Yilimia 1:6) Yona mpe akimaki mokumba na ye! (Yona 1:3) Ezalaki boni mpo na Malia?
Maloba na ye emonisi ete azalaki na komikitisa mpe na botosi. Alobaki na Gabiliele boye: “Talá! Mwana mwasi moombo ya Yehova! Tiká ekómela ngai ndenge olobi.” (Luka 1:38) Mwana mwasi moombo azalaki na nse ya basali nyonso; bomoi na ye mobimba ezalaki na mabɔkɔ ya nkolo na ye. Malia azalaki komimona ndenge yango liboso ya Yehova, Nkolo na ye. Ayebaki ete lokola bomoi na ye ezali na mabɔkɔ ya Yehova, azalaki na likama te, ayebaki ete Yehova azali sembo epai ya baoyo bazali sembo, mpe ete akopambola ye soki asali makasi mpo na kokokisa mokumba monene oyo apesaki ye.—Nzembo 18:25.
Na bantango mosusu, Nzambe asɛngaka biso makambo oyo tokoki komona ete ezali mpasi to ekoki kosalema te. Nzokande, Liloba na ye epesi biso bantina ya kotyela ye motema, ya komitika na mabɔkɔ na ye, ndenge Malia asalaki. (Masese 3:5, 6) Tokosala yango? Soki tosali yango, akopesa biso mbano mpe akosalela biso makambo oyo ekokómisa kondima na biso makasi koleka.
Epai ya Elizabeti
Makambo oyo Gabiliele alobaki mpo na Elizabeti ezalaki na ntina mingi mpo na Malia. Ezalaki nde na moto mosusu oyo akokaki kokanga ntina ya likambo oyo ekómelaki Malia? Malia akendaki mbangu na mokili ya ngombangomba ya Yuda; mobembo oyo mbala mosusu ezwaki ye mikolo misato to minei. Ntango akɔtaki na ndako ya Elizabeti ná nganga-nzambe Zekalia, Yehova apesaki Malia elembeteli mosusu ya makasi mpo na kolendisa kondima na ye. Ntango Elizabeti ayokaki mongongo ya Malia, wana apesaki ye mbote, mbala moko mwana oyo azalaki na libumu na ye apumbwaki na esengo. Elizabeti atondaki na elimo santu mpe abengaki Malia ete “mama ya Nkolo na ngai.” Nzambe ayebisaki Elizabeti ete mwana oyo Malia asengelaki kobota akozala Nkolo na ye, Masiya. Longola yango, elimo santu etindaki Elizabeti apesa Malia longonya mpo na bosembo mpe botosi na ye; alobaki na ye boye: “Esengo mpe na mwasi oyo andimaki.” (Luka 1:39-45) Ya solo, makambo nyonso oyo Yehova alakaki Malia esengelaki kokokisama!
Na nsima, Malia mpe alobaki. Maloba na ye ezali na Luka 1:46-55. Yango ezali maloba eleki molai na maloba nyonso ya Malia oyo ekomami na Biblia mpe ezali komonisa makambo mingi mpo na ye. Ezali komonisa ete azalaki na botɔndi; asanzolaki Yehova mpo na libaku malamu ya kozala mama ya Masiya. Ezali mpe komonisa ete azalaki na kondima makasi; alobaki ete Yehova akitisaka bato ya lolendo mpe ya nguya mpe asalisaka bato ya komikitisa mpe babola oyo balingaka kosalela ye. Maloba yango ezali mpe komonisa ete azalaki na boyebi mingi. Moto moko akomaki ete Malia alobaki makambo oyo ezali na bisika koleka 20 na Makomami ya Liebele!
Ezali polele ete Malia azalaki komanyola Liloba ya Nzambe. Atako bongo, azalaki na komikitisa; asepelaki kozongela makambo oyo ezalaki na Makomami na esika aloba oyo euti epai na ye moko. Yesu mpe amonisaki elimo yango; alobaki boye: “Oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ya moto oyo atindaki ngai.” (Yoane 7:16) Tosengeli komituna boye: ‘Ngai mpe namemyaka Liloba ya Nzambe ndenge wana? To nasepelaka kobimisa makanisi to mateya na ngai moko?’ Eyano ya Malia ezali polele na mituna yango.
Malia afandaki sanza misato na Elizabeti; na ntembe te, na ntango yango bazalaki kolendisana. (Luka 1:56) Basi yango mibale bamonisi biso ntina ya boninga. Soki tozali baninga ya bato oyo balingaka mpenza Yehova Nzambe, tokokola na elimo mpe tokopusana penepene na ye. (Masese 13:20) Nsukansuka, Malia azongaki na mboka na ye. Yozefe asalaki nini ntango ayokaki ete Malia azali na zemi?
Malia ná Yozefe
Emonani ete Malia azelaki te ete zemi na ye emonana. Na ntembe te, asengelaki koyebisa Yozefe likambo yango. Kasi, liboso asolola na ye, mbala mosusu azalaki komituna ndenge oyo mobali yango, oyo azalaki moto malamu mpe azalaki kobanga Nzambe, akosala ntango akoyoka ye. Atako bongo, asololaki na ye mpe ayebisaki ye likambo oyo ekómelaki ye. Ndenge okoki kokanisa yango, Yozefe abulunganaki. Akokaki kondimela Malia, kasi makambo oyo ayebisaki ye esalemá naino te. Biblia elobi te soki Yozefe azalaki kokanisa nini. Kasi, elobi ete azwaki mokano ya koboma libala, mpamba te na ntango wana, bazalaki kotalela bafianse lokola bato babalani. Kasi, alingaki te koyokisa ye nsɔni na miso ya bato to kotika ete azwa etumbu, yango wana aponaki kokabwana na ye na nkuku. (Matai 1:18, 19) Na ntembe te, Malia ayokaki mpasi na komona ndenge mobali yango ya boboto atungisamaki na likambo oyo esalemá naino te. Atako bongo, Malia akómaki mawamawa te mpo Yozefe andimelaki ye te.
Yehova atikaki te ete Yozefe asala likambo oyo amonaki malamu na miso na ye. Anzelu ya Nzambe ayebisaki Yozefe na kati ya ndɔtɔ ete zemi ya Malia ezalaki mpenza likamwisi. Na ntembe te, yango ekitisaki ye motema. Na nsima, Yozefe asalaki ndenge oyo Malia asalaki banda na ebandeli, elingi koloba, alandaki litambwisi ya Yehova. Abalaki Malia, mpe andimaki mokumba monene ya kobɔkɔla Mwana ya Yehova.—Matai 1:20-24.
Bato oyo babalá mpe baoyo bazali kokana kobala, basengeli kozwa liteya na ndakisa ya bato wana oyo babalanaki eleki sikoyo mbula 2000. Ntango Yozefe amonaki ndenge Malia azalaki kokokisa mokumba na ye ya mama, na ntembe te asepelaki ndenge anzelu ya Yehova atambwisaki ye. Ya solo, Yozefe amonaki ntina ya kotalela Yehova mpo na kozwa bikateli ya minene. (Nzembo 37:5; Masese 18:13) Yozefe azalaki ntango nyonso na boboto mpe na bokɛngi mpo na kozwa bikateli lokola mokonzi ya libota.
Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Malia andimaki kobala Yozefe? Atako na ebandeli Yozefe andimaki te makambo oyo ayebisaki ye, Malia azalaki kotalela ye lokola moto oyo asengelaki kozala mokonzi ya libota. Yango ezalaki liteya malamu mpo na ye; ezali mpe liteya malamu mpo na basi baklisto lelo oyo. Lisusu, makambo yango eteyaki Malia ná Yozefe ntina ya kosolola polele mpe na bosembo.
Tokanisi mpenza ete babalani yango babandaki libala na bango malamu. Bango mibale balingaki Yehova Nzambe koleka nyonso mpe bazalaki na mposa ya kokokisa mokumba na bango ya baboti mpo na kosepelisa Nzambe. Bazwaki mapamboli mingi, kasi mikakatano mpe ezangaki te. Bazalaki na libaku malamu ya kobɔkɔla Yesu, oyo asengelaki kozala moto oyo aleki bato nyonso tii lelo oyo.
[Elilingi na lokasa 17]
Kolinga Nzambe ezali moboko eleki malamu mpo na libala