“Bóyekola epai na ngai”
“Bómema ekangiseli na ngai mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na boboto mpe nazali na motema ya komikitisa, na bongo milimo na bino ekobɔndisama.”—MATAI 11:29, NW.
1. Mpo na nini koyekola epai na Yesu ekoki kozala likambo ya esengo mpe oyo ekoki kobongisa lisusu bomoi na biso?
YESU KLISTO azalaki kokanisa, koteya mpe kosala makambo na ndenge oyo ebongi mpenza. Awa na mabele, aumelaki mingi te, kasi asalaki mosala na ye malamu, azwelaki yango litomba, mpe azalaki ntango nyonso na esengo. Azwaki bayekoli mpe ateyaki bango ndenge oyo basengeli kosambela Nzambe, ateyaki bango bálingaka bato mpe ndenge ya kolonga mokili. (Yoane 16:33) Apesaki bango elikya mpe “angɛngisaki bomoi mpe ezalela ya kozanga kopɔla na nzela ya nsango malamu.” (2 Timote 1:10, NW) Soki ozali moyekoli na ye, kozala moyekoli elimboli nini mpo na yo? Soki totaleli makambo oyo Yesu alobaki mpo na bayekoli, yango ekoteya biso ndenge oyo tokoki kobongisa lisusu bomoi na biso. Yango ezali kosɛnga kolanda makanisi na ye mpe kosalela mwa mitinda ya ntina.—Matai 10:24, 25; Luka 14:26, 27; Yoane 8:31, 32; 13:35; 15:8.
2, 3. (a) Kozala moyekoli ya Yesu elimboli nini? (b) Mpo na nini ezali na ntina mingi moto amituna ete: ‘Nazali moyekoli ya nani?’
2 Na kati ya Makomami ya Grɛki ya boklisto, liloba oyo ebongolami na “moyekoli” elimboli mpenzampenza moto oyo azali kotya makanisi na ye na likambo moko, to moto oyo azali koyekola. Liloba yango euti na verbe koyekola oyo tozali mpe kokuta na Matai 11:29 (NW), vɛrsɛ oyo esimbi boyekoli na biso; vɛrsɛ yango elobi boye: “Bómema ekangiseli na ngai mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na boboto mpe nazali na motema ya komikitisa, na bongo milimo na bino ekobɔndisama.” Moyekoli azali moto oyo azali koyekola. Na kati ya Baevanzile, mbala mingi basaleli liloba “moyekoli” mpo na bato oyo bazalaki ntango nyonso na Yesu, bato oyo bazalaki kosala na ye mibembo ntango azalaki kosakola mpe baoyo azalaki koteya bango. Bato mosusu basukaki kaka na kondima mateya ya Yesu; bamosusu kutu balingaki te eyebana ete bazalaki kondimela Yesu. (Luka 6:17; Yoane 19:38) Bato oyo bakomaki Baevanzile balobelaki mpe “bayekoli ya Yoane [Mobatisi] mpe bayekoli ya bafalisai.” (Malako 2:18) Lokola Yesu alobaki na bayekoli na ye ete ‘bákeba . . . na mateya ya Bafalisai,’ tokoki komituna motuna oyo: ‘Nazali moyekoli ya nani?’—Matai 16:12, NW.
3 Soki tozali bayekoli ya Yesu, soki toyekoli mpenza epai na ye, bato mosusu basengeli kolendisama na elimo ntango bazali na biso esika moko. Basengeli komona ete tokómi na boboto mingi mpe na motema ya komikitisa mingi. Soki tozali bakonzi na esika ya mosala, to soki tozali baboti, to soki tozali bakɛngɛli na kati ya lisangá, bato oyo bazali nsima na biso bamiyokaka mpenza ete tosalelaka bango makambo ndenge oyo Yesu asalaki epai ya baoyo azalaki kotambwisa?
Ndenge Yesu azalaki kotalela bato
4, 5. (a) Mpo na nini ezali mpasi te tóyeba ndenge oyo Yesu azalaki kotalela bato oyo bazalaki na mikakatano? (b) Yesu akutanaki na likambo nini ntango akendaki kolya na ndako ya Mofalisai moko?
4 Tosengeli koyeba ndenge Yesu azalaki kotalela bato, mingimingi baoyo bazalaki na mikakatano makasi. Koyeba yango ezali likambo ya mpasi te; Biblia ezali na masolo mingi oyo ezali kolobela Yesu ntango azalaki elongo na bato, bamosusu kati na bango bazalaki na mpasi. Tótala mpe ndenge bakonzi ya mangomba, mingimingi Bafalisai, bazalaki kotalela bato oyo bazalaki na mikakatano ya ndenge wana. Bokeseni oyo tokomona ekoteya biso.
5 Na mobu 31 ya ntango na biso (T.B.), ntango Yesu azalaki kosakola na bamboka ya Galilai, “moto moko na Bafalisai abyangaki Yesu ete alya esika moko na ye.” Yesu akakatanaki te, andimaki. “Akɔtaki na ndako ya Mofalisai yango mpe afandaki na mesa. Mwasi moko ya mboka, mwasi ya masumu, ayebaki ete Yesu afandi na ndako ya Mofalisai, mpe ayaki na mwa mbeki ya mafuta ya malasi. Atɛlɛmaki nsima na ye epai na makolo na ye mpe alelaki, mpe abandaki kopɔlisa makolo na ye na mpisoli, mpe kokɔmba yango na nsuki ya motó na ye, mpe kopwɛpwa makolo na ye, mpe kopakola yango na malasi.”—Luka 7:36-38.
6. Ekoki kozala mpo na ntina nini mwasi oyo azalaki “mwasi ya masumu” akendaki na ndako ya Mofalisai?
6 Kanisá naino! Mokanda moko elobi boye: “Lokola ezalaki momeseno ya mboka na bango ete babola bákende na bisika oyo bato bazali kolya mpo na kozwa mwa biloko oyo etikalaka, mwasi yango (v.37) asalelaki libaku wana.” Ekoki kozala mpo na ntina yango nde moto oyo babengi ye te akokaki kokɔta na esika oyo bayambi bapaya mpo na kolya. Ekoki kozala mpe na bato mosusu oyo bazalaki kozela mpo bálɔkɔta mwa biloko soki bapaya basilisi kolya. Kasi, mwasi yango asalaki makambo ndenge oyo ezalaki kosalema te. Esengelaki atɛlɛma mwa mosika, atalaka ntango azali kozela básilisa kolya, kasi ye asalaki bongo te. Bayebaki ete mwasi yango azalaki na etamboli ya mabe, bayebaki ye mpenza ete azali “mwasi ya masumu”; yango wana Yesu alobaki ete ayebaki “masumu na ye mingi.”—Luka 7:47.
7, 8. (a) Mbala mosusu tolingaki kosala nini soki biso nde tokutanaki na makambo oyo ezali na Luka 7:36-38? (b) Simona asalaki nini?
7 Kanisá soki ozalaki na ntango wana mpe soki yo nde ozalaki Yesu. Olingaki kosala nini? Olingaki koyoka mabe ntango mwasi yango apusani pene na yo? Olingaki kotalela likambo yango ndenge nini? (Luka 7:45) Olingaki nde koyoka mabe mpenza?
8 Soki ozalaki na kati ya bapaya oyo babengaki, olingaki nde kokanisa ata mwa moke lokola Simona Mofalisai? “Wana emonaki Mofalisai, oyo abyangaki ye bongo, alobaki na motema na ye ete, Mpo na moto oyo, soko azalaki mosakoli, mbɛlɛ ayebi soko mwasi oyo azali [kosimba] ye azali motindo nini, mpo ete, azali mwasi ya masumu.” (Luka 7:39) Nzokande, Yesu azalaki na motema mawa mingi. Ayebaki mpasi ya mwasi yango mpe amonaki motungisi na ye. Biblia elobi te ndenge nini mwasi yango amipesaki na kosala masumu. Soki mpenza azalaki mwasi ya ndumba, boye bato ya mboka, Bayuda oyo bazalaki kosambela, basalisaki ye te.
9. Yesu asalaki nini, mpe ekoki kozala ete yango ebotaki mbuma nini?
9 Kasi, Yesu ayokaki mposa ya kosalisa ye. Alobaki na ye ete: “Masumu na yo malimbisami.” Na nsima alobaki lisusu ete: “Kondima na yo esili kobikisa yo; kendá na yo na kimya.” (Luka 7:48-50) Lisolo mpe esuki wana. Moto akoki koloba ete Yesu asalaki eloko mosusu te mpo na mwasi yango. Apambolaki ye mpe atikaki ye akende. Okanisi ete ntango mosusu azongelaki bomoi na ye ya mabe? Atako Biblia elobi na biso likambo moko ya polele te mpo na yango, tólanda naino malamu maloba oyo Luka alobaki na nsima. Akomaki ete Yesu atambolaki “kati na mboka minene mpe mboka mike. Asakolaki mpe alakisaki nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.” Luka akomaki mpe ete “basi mosusu” bazalaki na Yesu na bayekoli na ye, “basalelaki bango na biloko bizalaki na bango.” Ekoki mpe kozala ete mwasi wana, lokola abongolaki motema mpe azalaki na botɔndi, azalaki na kati ya basi yango, akómaki na bomoi ya malamu na miso ya Nzambe, lisosoli na ye ezalaki kotungisama lisusu te, akómaki na bomoi oyo ezali mpenza na ntina, mpe akómaki kolinga Nzambe mingi.—Luka 8:1-3.
Bokeseni kati na Yesu na Bafalisai
10. Mpo na nini kotalela lisolo ya Yesu na mwasi oyo akɔtaki na ndako ya Simona ezali na ntina?
10 Lisolo oyo ekoki koteya biso nini? Ezali mpenza kosimba motema na biso, boye te? Kanisá soki ozalaki na ndako ya Simona, olingaki komiyoka ndenge nini? Olingaki kosala lokola Yesu, to olingaki komiyoka mwa moke lokola Mofalisai oyo abengisaki ye na ndako na ye? Yesu azalaki Mwana ya Nzambe, yango wana, tokoki kokanisa te kosala mpenzampenza lokola ye. Nzokande, tokoki kokakatana mpo na koloba ete tolingaki kozala lokola Simona, Mofalisai. Lelo oyo, bato bazali mingi te oyo bakoki kosepela kozala lokola Bafalisai.
11. Mpo na nini tokoki kolinga te ete bákokanisa biso na Bafalisai?
11 Makambo oyo Biblia mpe mikanda mosusu ezali koloba mpo na Bafalisai ezali komonisa mpenza ete bato yango bazalaki komimona ete bango nde bazalaki kobatela bolamu ya bato mpe ya mboka. Bazalaki komona ntango nyonso lokola nde Mibeko ya Nzambe ezali mpenza polele te mpe ezali mpasi mpo na kokanga ntina na yango. Na esika nyonso oyo bamoni ete Mibeko ezali mpenza polele te, bazalaki kobakisa ebele ya makambo mpo na komonisa ndenge ya kokokisa yango, bazalaki kotika te ete moto asalela lisosoli na ye. Bakonzi ya mangomba balukaki kotya mobeko na likambo mokomoko, ata na makambo ya mpambampamba.a
12. Ndenge nini Bafalisai bazalaki komitalela?
12 Josèphe, Moyuda moko oyo azalaki na bomoi na ekeke ya liboso mpe azalaki mokomi ya makambo ya kala, amonisi polele ete Bafalisai bazalaki komimona ete bazali na boboto, bazali sembo, mpe bayebi kosala misala na bango malamu. Na ntembe te bamosusu na kati na bango bazalaki na bizaleli yango. Mbala mosusu Nikodeme akoki koyela yo na makanisi. (Yoane 3:1, 2; 7:50, 51) Na nsima, Bafalisai mosusu bakómaki baklisto. (Misala 15:5) Ntoma Paulo akomaki na ntina na Bayuda mosusu, lokola Bafalisai, ete: “Bazali na molende mpo na Nzambe; kasi ezali te na ndenge ya boyebi ya solosolo.” (Baloma 10:2, NW) Nzokande, Baevanzile ezali komonisa bango ndenge oyo bato mingi bazalaki kotalela bango: bato ya lolendo, ya lofundo; bato oyo bazalaki komimona sembo, bazalaki kaka komona mabe ya basusu, kosambisa bango, mpe kokitisa bango.
Makanisi ya Yesu
13. Yesu alobaki nini mpo na Bafalisai?
13 Yesu amonisaki ete bakomeli na Bafalisai bazali bakosi. “Bazali kokanga mikumba ya kilo mpe kotya yango na mapeka ya bato nde bango moko balingaka kotombola yango ata na mosapi na bango te.” Ya solo, mokumba ezalaki kilo, mpe ekangiseli oyo batyelaki bato ezalaki makasi. Lisusu, Yesu abengaki bakomeli na Bafalisai ete “bato ya ligboma.” Moto ya ligboma abebisaka kimya ya mboka. Yesu abengaki mpe bakomeli na Bafalisai ete “bato bakufá miso” mpe alobaki ete ‘babosanaki makambo oyo eleki ntina na kati ya Mibeko, elingi koloba boyengebene mpe ngɔlu mpe bosembo.’ Nani oyo akoki kolinga ete Yesu atalela ye lokola Mofalisai?—Matai 23:1-4, 16, 17, 23, NW.
14, 15. (a) Ndenge oyo Yesu atalelaki Matai Levi ezali komonisa nini na makambo ya Bafalisai? (b) Lisolo oyo ekoki koteya biso makambo nini ya ntina?
14 Moto nyonso oyo azali kotánga Baevanzile akozanga te komona ete Bafalisai mingi bazalaki na ezaleli ya koloba kaka mabe mpo na bato mosusu. Ntango Yesu abengaki Matai Levi, moto oyo azalaki mokɔngɔli ya mpako, ete akóma moyekoli na ye, Levi asalelaki Yesu fɛti moko monene. Lisolo elobi boye: “Bafalisai na bakomeli baimaimaki na bayekoli na ye ete, Azali kolyana mpe komɛlana esika moko na bakɔngɔli ya mpako mpe bato ya masumu mpo na nini? Yesu azongisaki monɔkɔ na bango ete, . . . Nayei kobyanga bayengebene te, kasi bato ya mabe mpo na kobongola motema.”—Luka 5:27-32.
15 Levi akangaki ntina ya likambo mosusu oyo Yesu alobaki mokolo yango: “Bókenda koyekola ntina na oyo ete, Nalingi mawa, nalingi mbeka te.” (Matai 9:13) Atako Bafalisai bazalaki koloba ete bandimaka mikanda oyo basakoli Baebele bakomaki, bazalaki te kolanda maloba wana oyo ezali na Hosea 6:6. Soki basengeli kopona kati na kotosa mibeko oyo ekomami te na komonisa motema mawa, bango bazalaki kopona kotosa mibeko oyo ekomami te. Mokomoko kati na biso akoki komituna ete, ‘Nayebani lokola moto oyo atingamaka na mibeko mosusu, na ndakisa oyo euti na makanisi na ngai moko to oyo ezali kolanda ndenge oyo bato bameseni kosala makambo? To bato bayebi ngai lokola moto ya motema mawa mpe ya boboto?’
16. Bafalisai bazalaki na bizaleli nini mpe ndenge nini tokoki koboya kozala lokola bango?
16 Bafalisai bazalaki na ezaleli ya kolobelalobela mabunga mikemike ya bato. Bafalisai bazalaki koluka kaka esika oyo mbeba ezali, ezala ya solo to oyo bakanisi yango kokanisa. Bazalaki kobangisa bato mpe bazalaki kolandela mabunga ya bato. Bafalisai bazalaki komipesa lokumu lokola bazalaki kopesa ndambo ya zomi ya mwa matiti mikemike lokola eidosomo, aneti, na nkumina. Bazalaki kolata bilamba oyo ezalaki komonisa bango na miso ya bato ete basambelaka mpe balingaki ete bato nyonso na ekólo bálanda makanisi na bango. Soki tolingi mpenza kolanda ndakisa ya Yesu na misala na biso, tosengeli koboya ezaleli ya kolandela mabunga ya basusu mpe kongalisa yango.
Ndenge nini Yesu azalaki kosilisa mikakatano?
17-19. (a) Ndenge nini Yesu asilisaki mokakatano moko oyo ekokaki kokóma likambo monene? (b) Mpo na nini likambo yango ezalaki mpasi? (c) Soki ozalaki wana ntango mwasi yango apusanaki penepene ya Yesu, olingaki kosala nini?
17 Ndenge oyo Yesu azalaki kosilisa mikakatano ekeseni mpenza na ndenge ya Bafalisai. Tótalela ndenge Yesu asilisaki likambo moko oyo akokaki mpe kokómisa yango likambo monene. Ezalaki na mwasi moko oyo aumelaki na maladi ya kotanga makila mbula 12. Lisolo yango ezali na Luka 8:42-48.
18 Malako alobi ete mwasi yango azalaki koyoka ‘nsɔmɔ mpe kolɛnga.’ (Malako 5:33) Mpo na nini? Ekoki mpenza kozala mpo ayebaki ete abuki Mibeko ya Nzambe. Levitike 15:25-28 elobi ete mwasi oyo azali na maladi ya kotanga makila azali mbindo ntango nyonso oyo azali na maladi yango, mpe soki esili, akotikala mbindo pɔsɔ mobimba lisusu. Eloko nyonso oyo ye asimbi to moto nyonso oyo asimbi akokóma mbindo. Mpo apusana penepene na Yesu, mwasi yango alekaki na katikati ya bato ebele. Lelo oyo, nsima ya mbula 2 000 banda likambo wana esalemá, ntango totángaka lisolo yango, toyokelaka mwasi yango mawa mpo na mokakatano na ye.
19 Soki ozalaki na bomoi na ntango wana, olingaki kotalela likambo yango ndenge nini? Olingaki koloba nini? Tomoni ete Yesu alakisaki mwasi yango boboto mpe bolingo mpe amityaki na esika na ye; kutu, alobaki ata moke te mabe oyo mwasi wana asalaki.—Malako 5:34.
20. Soki lelo tosɛngisamaki na kokokisa makambo oyo ezali na Levitike 15:25-28, mokakatano nini tokozala na yango?
20 Likambo yango ekoki koteya biso nini? Tókamata ndakisa ete lelo oyo ozali nkulutu na kati ya lisangá. Mpe soki basɛngisaki baklisto lelo oyo ete bákokisa makambo oyo ezali na Levitike 15:25-28 mpe ete ndeko mwasi moko moklisto abuki mobeko yango, mpe akómi komitungisa mpe kobanga. Okosala nini? Okolobela ye na miso ya bato? Toyebi, okoloba kaka ete, “Te, nakoki kosala ndenge wana te! Nakolanda ndenge Yesu asalaki, nakosala makasi ete nazala na boboto, na bolingo, nakanisa malamu mpe nayeba komitya na esika na ye.” Ezali malamu! Kasi, etumba ezali sikoyo ya kosala mpenza bongo, elingi koloba kolanda mpenza ndakisa ya Yesu.
21. Yesu ateyaki nini mpo na Mibeko?
21 Yesu azalaki mpenza kolendisa bato, azalaki kokitisa bango mitema. Na esika oyo Mibeko ya Nzambe ezalaki polele, ezalaki na ndenge mibale to misato te ya kolimbola yango, ezalaki kaka likambo ya kotánga mpe kosala ndenge oyo ekomamaki. Soki ezali kolobela likambo moko ya sikisiki te, bato basengelaki nde kosalela lisosoli na bango mpe bikateli na bango ezalaki komonisa ete balingaka Nzambe. Mibeko ezalaki lokola kotya bango nsinga na nkingo te. (Malako 2:27, 28) Nzambe alingaki basaleli na ye, azalaki ntango nyonso kosalela bango malamu, mpe azalaki pene ya kolimbisa bango soki babɛti libaku. Yesu mpe azalaki ndenge yango.—Yoane 14:9.
Mbuma oyo mateya ya Yesu ebotaki
22. Bayekoli ya Yesu bakómaki na makanisi nini nsima ya koyekola epai na ye?
22 Bato oyo bayokaki Yesu mpe bakómaki bayekoli na ye bamonaki mpenza ete alobaki solo ete: “Ekangiseli na ngai ezali pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.” (Matai 11:30, NW) Bamiyokaki te ete azali kotyela bango kilo, kotungisa bango to kopamela bango. Boyokani na bango na Nzambe mpe boyokani oyo bazalaki na yango kati na bango epesaki bango bonsomi mingi, esengo mingi mpe elikya mingi. (Matai 7:1-5; Luka 9:49, 50) Bayekolaki epai na ye ete kozala motambwisi ya bato na makambo ya elimo esɛngi kozala moto oyo alendisaka basusu, moto oyo azalaka na komikitisa.—1 Bakolinti 16:17, 18; Bafilipi 2:3.
23. Lokola bazalaki na Yesu, bayekoli bazwaki liteya nini ya ntina mingi mpe esalisaki bango bázwa makanisi nini?
23 Longola nyonso wana, mingi bamonaki mpenza ntina ya kokangama na Klisto mpe kolanda elimo oyo amonisaki. Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Lokola Tata alingi ngai, ngai mpe nalingi bino. Bóumela kati na bolingo na ngai. Soko bokotosa malako na ngai, bokoumela kati na bolingo na ngai lokola ngai natosi malako na Tata na ngai mpe naumeli na bolingo na ye.” (Yoane 15:9, 10) Mpo na kozala baministre malamu ya Nzambe, basengelaki kosalela mpenza makambo oyo Yesu ateyaki bango, ezala kosakola mpe koteya bato nsango malamu ya Nzambe mpe lolenge ya kofanda na bandeko mpe baninga na bango. Ntango masangá esalemaki, basengelaki mbala na mbala kokanisaka ete nzela ya Yesu nde ezali nzela ya malamu. Yesu ateyaki solo mpe bomoi na ye ezalaki mpenza ndakisa ya bomoi oyo basengelaki koluka kozala na yango.—Yoane 14:6; Baefese 4:20, 21.
24. Makambo nini tosengeli kolanda na kotalela ndakisa ya Yesu?
24 Ntango ozali kokanisa mwa makambo oyo tolobeli, ozali komona bisika oyo osengeli kobongisa? Ondimi ete Yesu azalaki ntango nyonso kokanisa, koteya mpe kosala makambo na ndenge oyo ebongi mpenza? Boye, zalá na mpiko. Alobaki na biso maloba oyo ezali kolendisa biso ete: “Soko boyebi makambo oyo, bokozala na esengo soko bokosalela yango.”—Yoane 13:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Bokeseni oyo ezalaki kati [na Yesu na Bafalisai] ezali komonana polele na ndenge oyo Yesu azalaki kotalela Nzambe mpe na ndenge oyo bango bazalaki kotalela ye. Mpo na Bafalisai, Nzambe azali libosoliboso moto oyo asɛngaka bato ebele ya makambo oyo basengeli kokokisa; nzokande mpo na Yesu, Nzambe azali na boboto mpe na motema mawa. Ya solo, Mofalisai mpe andimaka ete Nzambe azali malamu mpe azali na bolingo, kasi mpo na ye, malamu mpe bolingo ya Nzambe emonisamaki nde na ndenge apesaki Torah [Mibeko] mpe na ndenge apesi biso nzela ya kokokisa makambo oyo esɛngami kati na yango. . . . Mpo na Mofalisai, kotosa Torah esɛngaki kolanda mibeko oyo ekomami te mpe makanisi na yango mpo na kolimbola mibeko. . . . Lokola Yesu amonisaki ete Mibeko nyonso esimbami na mobeko ya kolinga Nzambe mpe kolinga mozalani (Mat. 22:34-40) mpe lokola aboyaki kolanda mibeko makasimakasi oyo ekomami te, . . . mateya na ye ezalaki koyokana te na ndenge ya kolimbola makambo ya Bafalisai.”—The New International Dictionary of New Testament Theology.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na yo, kozala moyekoli ya Yesu elimboli nini?
• Makambo nini Yesu azalaki kosalela bato?
• Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yesu azalaki koteya?
• Na ndenge nini Bafalisai bakesanaki na Yesu?
[Bililingi na lokasa 18]
Ndenge Yesu azalaki kotalela bato ekesanaki mpenza na Bafalisai!