Masɛngami mpo na kozwa batisimo
“Nini ezali kopekisa ngai kobatisama?”—MISALA 8:36.
1, 2. Ndenge nini Filipo abandaki lisolo na mosali ya Leta ya Etiopia, mpe nini emonisi ete moto yango azalaki komipesa na makambo ya elimo?
MBULA moko to mibale nsima ya liwa ya Yesu, mokonzi moko monene ya Leta oyo autaki Yelusaleme, azalaki kokende na sudi, na balabala oyo euti na Yelusaleme tii na Gaza. Ezalaki mobembo moko molai, kilomɛtrɛ 1500, oyo ezali pɛtɛɛ te kosala yango na likalo. Moto wana ya sembo asalaki mobembo longwa na Etiopia tii na Yelusaleme mpo na kosambela Yehova. Na nzela ya kozonga, azalaki kosalela ntango na ye malamu mpenza mpo na kotánga Liloba ya Nzambe; yango emonisi kondima na ye. Yehova amonaki kondima ya moto yango, mpe na nzela ya Anzelu, atindaki moyekoli Filipo mpo ateya ye.—Misala 8:26-28.
2 Filipo azalaki na mokakatano te mpo na kobanda lisolo na ye, mpamba te Moetiopia yango azalaki kotánga na mongongo makasi, ndenge bato bazalaki kosala na mikolo wana. Yango wana, Filipo ayokaki ete azali kotánga rulo ya Yisaya. Filipo atunaki mobali yango kaka motuna moko oyo ebendaki likebi na ye: “Ozali mpenza koyeba makambo oyo ozali kotánga?” Yango ememaki bango na kolobela Yisaya 53:7, 8. Nsukansuka, Filipo “asakolaki epai na ye nsango malamu oyo etali Yesu.”—Misala 8:29-35.
3, 4. (a) Mpo na nini Filipo abatisaki Moetiopia kozanga kozela? (b) Mituna nini tokotalela sikoyo?
3 Nsima ya ntango moke kaka, Moetiopia yango ayebaki mokumba oyo Yesu azali na yango na mokano ya Nzambe mpe ntina ya kozwa batisimo mpo na kokóma moyekoli ya Klisto. Ntango kaka mobali yango amonaki mai, atunaki Filipo boye: “Nini ezali kopekisa ngai kobatisama?” Na ntembe te, mabaku ya ndenge wana ezalaki mingi te. Moetiopia wana azalaki moto ya kondima oyo azalaki kosambela Nzambe lokola prozelite. Mbala mosusu, ekokaki kosɛnga ete azela lisusu ntango molai liboso azwa libaku mosusu ya kobatisama. Likambo eleki ntina, mobali yango asosolaki malamu oyo Nzambe asɛngaki ye, mpe asepelaki kosala yango na motema moko. Filipo andimaki kosala oyo Moetiopia wana asɛngaki, mpe nsima ya kozwa batisimo Moetiopia yango “akobaki nzela na ye na kosepeláká.” Na ntembe te, akómaki mpenza mosakoli ya molende ya nsango malamu na ekólo na ye.—Misala 8:36-39.
4 Atako ekateli ya komipesa mpe kozwa batisimo ezwamaka na lisɛki to na lombangu te, ndakisa ya mosali monene ya Leta ya Etiopia emonisi ete ezali mpe na bato oyo babatisamaki mwa moke kaka nsima ya koyoka solo ya Liloba ya Nzambe.a Na yango, ezali na ntina tótalela mituna oyo: Ndenge nini moto asengeli komibongisa mpo na batisimo? Ntango nini bakoki kotalela mbula ya moto mpo na kopesa ye batisimo? Makambo nini moto asengeli komonisa polele liboso azwa batisimo? Oyo eleki nyonso, mpo na nini Yehova asɛngaka basaleli na ye bázwa batisimo?
Elaka ya kosala mokano ya Nzambe
5, 6. (a) Ndenge nini basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala bamonisaki botɔndi mpo na bolingo oyo Yehova amoniselaki bango? (b) Kozwa batisimo ekoki kosalisa biso tókóma na boyokani ya ndenge nini na Nzambe?
5 Nsima ya kosikola Bayisalaele na Ezipito, Yehova alakaki ete akozwa bango lokola “bato na ye moko,” akolinga bango, akobatela mpe akokómisa bango “ekólo moko ya bulɛɛ.” Mpo na kozwa mapamboli wana, Bayisalaele basengelaki komonisa botɔndi mpo na bolingo oyo Yehova amoniselaki bango. Basalaki yango ntango bandimaki ete ‘bakosala nyonso oyo Yehova alobaki’ mpe basalaki kondimana elongo na ye. (Exode 19:4-9) Na ekeke ya liboso, Yesu apesaki bayekoli na ye etinda ete bákómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, mpe bato oyo bandimaki mateya na ye babatisamaki. Mpo na kokóma baninga ya Nzambe, esengelaki kondima Yesu Klisto mpe na nsima kobatisama.—Matai 28:19, 20; Misala 2:38, 41.
6 Masolo wana ya Biblia emonisi ete Yehova apambolaka baoyo balakaka liboso ya bato nyonso ete bakosalela ye mpe bakokisaka elaka yango. Mpo na baklisto, komipesa mpe batisimo ezali makambo ya ntina mingi oyo ememaka mapamboli ya Yehova. Tozali na ekateli ya kolanda banzela na ye mpe koluka litambwisi na ye. (Nzembo 48:14) Soki tosali bongo, Yehova akosimba biso na lobɔkɔ mpe akolakisa biso nzela oyo tosengeli kotambola.—Nzembo 73:23; Yisaya 30:21; 41:10, 13.
7. Mpo na nini komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo esengeli kozala ekateli ya moto ye moko?
7 Eloko esengeli kotinda biso tómipesa epai ya Yehova mpe tózwa batisimo ezali bolingo na biso mpo na ye mpe mposa ya kosalela ye. Moto asengeli kozwa batisimo te kaka mpo moto mosusu alobi na ye ete aumeli mingi na koyekola Biblia to mpo baninga na ye bazali kozwa batisimo. Ezali mabe te ete baboti mpe baklisto mosusu oyo bakɔmeli bálendisa moto akanisa komipesa na Nzambe mpe kobatisama. Ntoma Petelo alendisaki baoyo bayokaki ye na Pantekote ete ‘bábatisama.’ (Misala 2:38) Nzokande, komipesa na Nzambe ezali likambo ya moto ye moko, mpe moto moko te akoki kozwa ekateli yango mpo na moto mosusu. Moto ye moko nde asengeli kozwa ekateli ya kosala mokano ya Nzambe.—Nzembo 40:8.
Komibongisa malamu mpo na kozwa batisimo
8, 9. (a) Mpo na nini kobatisa bana mike eyokani te na Makomami? (b) Bilenge basengeli kozala na boyebi ya ndenge nini liboso ya kozwa batisimo?
8 Bana bakoki kozwa ekateli euti na motema ya komipesa epai ya Nzambe? Biblia epesi mbula te oyo moto akoki kozwa batisimo. Kasi, bana mike bakoki mpenza te kokóma bandimi, komonisa kondima na bango, to komipesa epai na Nzambe. (Misala 8:12) Na ntina na baklisto ya ekeke ya liboso, Augustus Neander, moto ya mayele ya istware alobaki na buku na ye Lisolo mobimba ya losambo ya boklisto mpe ya Lingomba (na Lingelesi) boye: “Na ebandeli, kaka mikóló nde bazalaki kozwa batisimo, mpamba te bazalaki kokanisa ete mpo na kozwa batisimo, esengeli moto azala na kondima.”
9 Mpo na bilenge, bamosusu bakómaka na makoki ya kosimba mateya ya Nzambe ntango bazali naino bana mike, nzokande bamosusu bakómaka na boyebi yango soki bapusani lisusu mwa moke. Liboso elenge azwa batisimo, asengeli ye moko kokóma moninga ya Nzambe, koyeba malamu mateya ya moboko ya Biblia, koyeba malamu soki komipesa na Nzambe elimboli nini, ndenge kaka esɛngamaka epai ya mikóló.
10. Makambo nini moto akoki kosala liboso ya komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo?
10 Yesu alakisaki bayekoli na ye báteya bato ya sika makambo nyonso oyo apesaki bango etinda. (Matai 28:20) Libosoliboso, bato ya sika basengeli kozwa boyebi ya sikisiki ya solo, oyo ekosalisa bango bákolisa kondima na bango epai ya Yehova mpe na Liloba na ye. (Baloma 10:17; 1 Timote 2:4; Baebele 11:6) Na nsima, soki solo ya Biblia esimbi motema ya moto, ekotinda ye abongola motema mpe atika etamboli na ye ya kala. (Misala 3:19) Nsukansuka, moto yango akokóma na mposa ya komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo, ndenge Yesu asɛngaki.
11. Mpo na nini ezali na ntina ete tósakolaka mingi liboso ya kozwa batisimo?
11 Likambo mosusu ya ntina oyo moto akoki kosala liboso ya kozwa batisimo ezali kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Yango nde mosala ya libosoliboso oyo Yehova apesi basaleli na ye na mikolo oyo ya nsuka. (Matai 24:14) Basakoli oyo bazwi naino batisimo te bakoki kosepela koyebisa basusu kondima na bango. Kosakola liboso ya kozwa batisimo ekobongisa bango mpo bázala basakoli ya molende ata nsima ya kozwa batisimo.—Baloma 10:9, 10, 14, 15.
Likambo moko ezali kopekisa yo kozwa batisimo?
12. Nini ekoki kopekisa bato mosusu kozwa batisimo?
12 Bato mosusu bakoki kokakatana mpo na kozwa batisimo mpo bazali kobanga mokumba oyo yango ememaka. Bayebaka ete mpo na kokokisa masɛngami ya Yehova, basengeli mpenza kosala mbongwana na bomoi na bango. To bakoki kobanga ete bakokoka te kokoba kokokisa masɛngami ya Nzambe nsima ya batisimo na bango. Basusu bakoki ata koloba: “Soki mokolo mosusu nasali mbeba bakobimisa ngai na lisangá.”
13. Na ntango ya Yesu, nini ezalaki kopekisa bato mosusu kokóma bayekoli na ye?
13 Na ntango ya Yesu, basusu batikaki ete matomba na bango moko mpe bolingo mpo na mabota na bango epekisa bango kokóma bayekoli na ye. Mokomeli moko alobaki ete akolanda Yesu bisika nyonso oyo akokende. Kasi, Yesu ayebisaki ye ete mbala mingi azalaki kozanga ata esika ya kolala. Ntango Yesu abengaki moto mosusu oyo azalaki koyoka ye mpo akóma moyekoli, moto yango ayebisaki ye ete alingi liboso “kokunda” tata na ye. Na esika alanda Yesu bongo soki tata na ye akufi azonga kokunda ye, ekoki kozala ete moto yango amonaki malamu afanda naino na ndako mpe azela tii ntango tata na ye akokufa. Mpe oyo ya misato alobaki ete liboso alanda Yesu, asengelaki naino “kopesa mbote ya bokabwani” na bato ya ndako na ye. Yesu alobaki ete kozongisa makambo nsima ndenge wana ezali nde ‘kotala biloko oyo ezali na nsima.’ Na yango, emonani ete baoyo balingaka kozongisa makambo nsima, balukaka ntango nyonso makambo ya lokuta mpo na kokima mikumba na bango ya boklisto.—Luka 9:57-62.
14. (a) Petelo, Andele, Yakobo, mpe Yoane basalaki nini ntango Yesu abengaki bango bakóma baluki-bato? (b) Mpo na nini tosengeli kokakatana te mpo na kondima ekanganeli ya Yesu?
14 Oyo Petelo, Andele, Yakobo, mpe Yoane basalaki ekesani mpenza na oyo bango basalaki. Biblia elobi ete ntango Yesu abengaki bango bálanda ye mpe bakóma baluki-bato, “na mbala moko kosundoláká minyama, balandaki ye.” (Matai 4:19-22) Lokola bandimaki mbala moko kolanda ye, bamonaki bango moko na miso bosolo ya maloba oyo Yesu alobaki na bango na nsima: “Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.” (Matai 11:29, 30) Atako batisimo ememaka ekanganeli ya mikumba, Yesu ayebisi biso ete ekanganeli yango ezali pɛtɛpɛtɛ, ekoki na kilo na biso mpe ekopemisa biso ntango nyonso.
15. Ndenge nini ndakisa ya Moize ná Yilimia emonisi ete tokoki kotya motema ete Yehova akopesa biso lisungi ntango tosengeli na yango?
15 Kobanga mokumba oyo batisimo ememaka ekoki kokómela moto nyonso. Na ebandeli, Moize ná Yilimia bamimonaki ete bakokoka te mikumba oyo Yehova apesaki bango. (Exode 3:11; Yilimia 1:6) Ndenge nini Nzambe alendisaki bango? Alobaki na Moize boye: “Ngai nakozala na yo elongo.” Alobaki mpe na Yilimia ete: “Ngai nazali na yo elongo mpo na kobikisa yo.” (Exode 3:12; Yilimia 1:8) Biso mpe tokoki kotya motema ete Nzambe akosunga biso. Bolingo mpo na Nzambe mpe kotyela ye motema ekoki kosalisa biso tótika kobanga ete tokokoka te kozala na bomoi oyo eyokani na komipesa na biso epai na Nzambe. Ntoma Yoane akomaki ete: “Na kati ya bolingo kobanga ezalaka te, kutu bolingo ya kokoka ebwakaka nde kobanga libándá.” (1 Yoane 4:18) Mwana moke akoki kobanga makasi soki azali kotambola ye moko, kasi akoki kobanga te ntango azali kotambola na tata na ye asimbi ye na lobɔkɔ. Ndenge moko, soki tozali kotyela Yehova motema na biso mobimba, alaki ete ‘akotambwisa biso,’ wana tozali kotambola elongo na ye.—Masese 3:5, 6.
Eleko moko ya ntina mingi
16. Mpo na nini batisimo esɛngaka kozindisama mobimba na mai?
16 Liboso batisimo epesama, lisolo moko oyo elimbolaka ntina ya batisimo ya boklisto esalemaka. Na nsuka ya lisolo yango, basɛngaka bato oyo balingi kobatisama báyanola na mituna mibale ya batisimo mpo na komonisa kondima na bango polele. (Baloma 10:10; Talá etanda na lokasa 22.) Na nsima, bazindisamaka mobimba na mai, ndenge babatisaki Yesu. Biblia emonisi ete nsima ya kobatisama, Yesu “abimaki na mai.” (Matai 3:16; Malako 1:10) Emonani polele ete Yoane Mobatisi azindisaki Yesu mobimba na mai.b Kozindisama mobimba na mai emonisaka ete tosali mbongwana monene na bomoi na biso; na ndimbola ya elilingi, ezali lokola nde tokufi na etamboli na biso ya kala mpe tobandi bomoi ya sika na mosala ya Nzambe.
17. Ndenge nini bato oyo bazali kozwa batisimo ná biso bamosusu tosengeli komonisa limemya na molulu ya batisimo?
17 Batisimo ezali eleko moko ya ntina mingi mpe ya esengo. Biblia emonisi ete Yesu azalaki kobondela ntango Yoane Mobatisi abatisaki ye na Ebale Yaladene. (Luka 3:21, 22) Na boyokani ya ndakisa oyo, moto oyo azali kozwa batisimo asengeli komonisa limemya na eleko yango. Lokola Biblia ezali mpe kosɛnga na biso ete tólataka mokolo na mokolo na ndenge ebongi, ekozala malamu mpenza tósalela toli yango mokolo oyo tozali kozwa batisimo. (1 Timote 2:9) Biso bamosusu tokomonisa mpe limemya na molulu yango soki tozali kolanda lisolo ya batisimo na likebi nyonso mpe kofanda kimya ntango tozali kotala ndenge batisimo ezali kopesama.—1 Bakolinti 14:40.
Mapamboli ya bato oyo bazwá batisimo
18, 19. Wapi mapamboli oyo batisimo ememaka?
18 Ntango kaka tomipesi epai na Nzambe mpe tobatisami, tokɔtaka na kati ya libota moko monene. Ya liboso, Yehova akómaka Tata mpe Moninga na biso. Liboso tózwa batisimo, tozalaki na boyokani te na Nzambe, kasi sikoyo toyokani na ye. (2 Bakolinti 5:19; Bakolose 1:20) Na nzela ya mbeka ya Klisto, topusani pene na Nzambe mpe Ye apusani pene na biso. (Yakobo 4:8) Mosakoli Malaki alimboli lolenge oyo Yehova atyelaka baoyo bazali kosalela mpe komema nkombo na ye likebi mpe ayokaka bango, mpe azali kokoma bankombo na bango na buku na ye ya kokanisa. Nzambe alobi ete: “Bakozala na ngai . . . Nakobikisa bango lokola moto akobikisa mwana na ye oyo azali kosalela ye mosala.”—Malaki 3:16-18.
19 Batisimo esalisaka biso mpe tókɔta na libota ya bandeko ya mokili mobimba. Ntango ntoma Petelo atunaki matomba oyo bayekoli ya Klisto bakozwa mpo na elimo na bango ya komipesa, Yesu alakaki ete: “Moto nyonso oyo atiki bandako to bandeko ya mibali to bandeko ya basi to tata to mama to bana to bilanga mpo na nkombo na ngai akozwa mbala mingi koleka mpe akozwa libula ya bomoi ya seko.” (Matai 19:29) Bambula na nsima, Petelo alobelaki “lisangá mobimba ya bandeko” oyo ezalaki kokola “na kati ya mokili.” Petelo amonaki lisungi mpe lipamboli ya bandeko ya mokili mobimba, biso mpe tokoki komona yango.—1 Petelo 2:17; 5:9.
20. Wapi elikya kitoko oyo batisimo epesaka?
20 Lisusu, Yesu alobaki ete baoyo bakolanda ye ‘bakozwa libula ya bomoi ya seko.’ Ya solo, komipesa epai na Nzambe mpe batisimo epesaka biso elikya ya ‘kosimba makasi bomoi ya solosolo,’ elingi koloba bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe. (1 Timote 6:19) Yango nde elikya eleki malamu oyo tokoki kotonga mpo na biso moko mpe mpo na mabota na biso. Elikya yango ekosalisa biso ‘tótambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso, libela na libela.’—Mika 4:5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bayuda mpe baprozelite nkóto misato oyo bayokaki lisolo ya Petelo na Pantekote babatisamaki mpe kozanga kozela. Ya solo, lokola mokube Moetiopia, bato yango mpe basilaki koyeba mateya ya moboko ya Nzambe mpe mitinda na ye.—Misala 2:37-41.
b Diksionɛrɛ ya Vine (Expository Dictionary of New Testament Words) elobi ete baʹpti·sma, liloba ya Grɛki oyo basaleli mpo na batisimo, elimboli “kozindisama mobimba na mai mpe kobimisama.”
Okoki kolimbola?
• Ndenge nini mpe mpo na nini tosengeli komonisa botɔndi mpo na bolingo ya Yehova?
• Makambo nini moto asengeli komonisa liboso ya kozwa batisimo?
• Mpo na nini kobanga ete tokokoka te komema mokumba oyo batisimo ememaka esengeli te kopekisa biso kozwa batisimo?
• Wapi mapamboli ya ntina mingi oyo bayekoli ya Yesu Klisto bakoki kozwa?
[Elilingi na lokasa 26]
“Nini ezali kopekisa ngai kobatisama?”
[Bililingi na lokasa 29]
Batisimo ezali eleko moko ya ntina mingi mpe ya esengo