Tósala lokola bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe
“Kitoko boni likoló na ngomba ezali makolo na ye . . .oyo akosakola kimya.”—YISAYA 52:7.
1, 2. (a) Lokola esakolamaki na Yisaya 52:7, nsango malamu nini esengeli kosakolama? (b) Maloba ya esakweli ya Yisaya mazalaki na ndimbola nini mpo na Yisalaele ya kala?
EZALI na nsango malamu moko oyo esengeli kosakolama! Ezali nsango ya kimya—kimya ya solosolo. Ezali nsango ya lobiko oyo etali Bokonzi ya Nzambe. Esili koleka ntango molai, mosakoli Yisaya akomaki na ntina na yango, mpe makambo oyo akomaki mabatelamaki mpo na biso kati na Yisaya 52:7, epai kuna totángi ete: “Kitoko boni likoló na ngomba ezali makolo na ye oyo akoyeisa nsango malamu, ye oyo akosakola kimya mpe akoyeisa nsango malamu na kosepela, ye oyo akosakola kobikisama, ye oyo akoloba na Siona ete, Nzambe na yo [akómi, NW] mokonzi.”
2 Yehova Nzambe apemisaki mosakoli Yisaya ete akoma maloba yango mpo na litomba ya Yisalaele ya kala mpe mpo na litomba na biso lelo oyo. Yango elimboli nini? Na eleko oyo Yisaya akomaki maloba wana, ekoki kozala ete Yisalaele, bokonzi ya nɔ́rdi, esilaki komemama na boombo epai na Baasulia. Na nsima, bafandi na Yuda, bokonzi ya súdi, basengelaki komemama lokola baombo na Babilone. Yango ezalaki mikolo ya mpasi mpe ya yikiyiki mpo na libota yango mpamba te bazangaki botosi epai na Yehova mpe na yango bazangaki kimya elongo na Nzambe. Lokola Yehova ayebisaki bango, etamboli na bango ya masumu ekɔtisaki bokabwani kati na bango mpe Nzambe na bango. (Yisaya 42:24; 59:2-4) Kasi, na nzela ya Yisaya, Yehova asakolaki ete, na ntango ebongi, bikuke ya Babilone bisengelaki kofungwama polele. Libota ya Nzambe lisengelaki kosikwama mpo na kozonga na mokili na bango, mpe kotonga lisusu tempelo ya Yehova kuna. Siona ekobongisama mpe losambo ya Nzambe ya solo ekosalema lisusu na Yelusaleme.—Yisaya 44:28; 52:1, 2.
3. Na ndenge nini elaka ya kozongisama ya Yisalaele ezalaki mpe esakweli ya kimya?
3 Elaka yango ya kosikolama ezalaki mpe esakweli ya kimya. Kozongisama ya Bayisalaele na mokili oyo Yehova apesaki bango esengelaki kozala elembo oyo emonisi motema mawa ya Nzambe mpe bobongoli motema na bango. Yango esengelaki komonisa ete bazalaki na kimya elongo na Nzambe.—Yisaya 14:1; 48:17, 18.
‘Nzambe na yo akómi mokonzi!’
4. (a) Na ndimbola nini ekokaki kolobama na 537 L.T.B. ete ‘Yehova akómaki mokonzi’? (b) Lolenge nini Yehova atambwisaki makambo mpo na bolamu ya libota na ye na bambula oyo elandaki?
4 Ntango Yehova asikolaki bango na mobu 537 L.T.B., liyebisi ekokaki na elónga mpenza kopesama epai na Siona ete: ‘Nzambe na yo akómi mokonzi!’ Ya solo, Yehova azali “Mokonzi ya seko.” (Emoniseli 15:3, NW) Kasi kosikolama yango ya libota na ye ezalaki nde komonisama ya sika ya bokonzi na ye monene. Yango emonisaki polele mpenza ete nguya na ye mpe bokonzi na ye eleki boyangeli ya nguya monene oyo etambwisamaki na bato kino na eleko wana. (Yilimia 51:56, 57) Lokola elimo ya Yehova ezalaki kosala mosala, myango mosusu nyonso oyo misalamaki mpo na kotɛmɛla libota na ye milóngaki ata moke te. (Esetele 9:24, 25) Mbala mingi mpenza, Yehova asalaki na mitindo mikeseni mpo na komema bakonzi ya Bamede mpe ya Baperse ete básala na bomoko mpo na kokokisa mokano na ye monene. (Zekalia 4:6) Makambo ya kokamwisa oyo masalemaki na mikolo yango makomamaki mpo na biso na mikanda ya Biblia oyo milandi: Ezela, Nehemia, Esetele, Hagai, mpe Zekalia. Mpe yango ezali mpenza kolendisa kondima na biso na ntango tozali kotalela yango!
5. Makambo nini ya ntina mingi malobelami na Yisaya 52:13–53:12?
5 Nzokande, makambo oyo masalemaki na mobu 537 L.T.B., mpe na nsima na yango, mazalaki bobele ebandeli. Nsima ya esakweli ya kozongisama oyo elobelami na mokapo 52, Yisaya akomaki na ntina na koya ya Masiya. (Yisaya 52:13–53:12) Na nzela ya Masiya, oyo ezali mpenza Yesu Klisto, Yehova apesaki nsango ya kosikolama mpe ya kimya monene koleka oyo esalemaki na mobu 537 L.T.B.
Momemi-nsango ya kimya ya Yehova oyo aleki basusu nyonso
6. Nani azali momemi-nsango ya kimya ya Yehova oyo aleki basusu nyonso, mpe mokumba nini alobaki ete mopesamelaki ye?
6 Yesu Klisto azali momemi-nsango ya kimya ya Yehova oyo aleki bamemi-nsango nyonso. Azali Liloba ya Nzambe, elingi koloba Molobeli ya Yehova mpenza. (Yoane 1:14) Na boyokani na likambo yango, mwa moke nsima na kobatisama na ye na Ebale Yordani, Yesu akendaki na eyanganelo ya Nasalete, atɛlɛmaki mpe atángaki na mongongo makasi mokumba na ye kati na Yisaya mokapo 61. Mokumba yango emonisaki polele ete nsango oyo batindaki ye asakola esangisaki “kosikolama” mpe “komona lisusu,” bakisá mpe kozwa ngɔlu ya Yehova. Kasi, Yesu asukaki te bobele na kosakola nsango ya kimya. Nzambe atindaki ye mpe mpo na kotya moboko ya kimya oyo ekoumela seko.—Luka 4:16-21.
7. Matomba nini, oyo mauti na kimya elongo na Nzambe, makoki kozwama na nzela ya Yesu Klisto?
7 Ntango Yesu abotamaki, baanzelu babimelaki babateli na mpate penepene na Beteleme, kokumisáká Nzambe mpe kolobáká ete: “Nkembo na Nzambe na bisika-bileki-Likoló, mpe kimya na nsé kati na bato oyo ye asepeli [na] bango.” (Luka 2:8, 13, 14) Ɛɛ, kimya esengelaki kozala na baoyo Nzambe amoniselaki bango boboto mpamba te bamonisaki kondima kati na ebongiseli oyo azalaki kosala na nzela ya Mwana na ye. Yango elingaki kolimbola nini? Elingaki kolimbola ete bato, atako babotami na masumu, bakoki kozala na etɛlɛmɛlo ya pɛto liboso na Nzambe, bakoki kozala na boyokani malamu elongo na ye. (Baloma 5:1) Bakoki kozwa motema mpiɔ, kimya, oyo ekoki kozwama na nzela mosusu te. Na ntango oyo etyami na Nzambe, yango ekozala mpenza kosikolama na mbuma mabe ya lisumu ya Adama, bakisá mpe kosikwama na bokɔnɔ mpe na kufa. Bakufi-miso, to bakufi-matoi, to mpe bibɔsɔnɔ bakozala lisusu te. Bolɛmbu oyo ezali kopesa mitungisi mpe kobulungana na makanisi oyo ezali koyokisa bato mpasi ekolongolama seko. Likoki ekozwama mpo na kosepela na bomoi kati na ezaleli ya kokoka libela na libela.—Yisaya 33:24; Matai 9:35; Yoane 3:16.
8. Kimya ya Nzambe epesami epai na banani?
8 Kimya ya Nzambe epesami epai na banani? Epai na baoyo nyonso bazali komonisa kondima kati na Yesu Klisto. Ntoma Paulo akomaki ete ‘Nzambe asepelaki ete, na nzela na Klisto, azongisa biloko nyonso epai na ye, awa esili ye koyeisa kimya mpo na makila ya Yesu oyo masopamaki likoló na nzeté ya mpasi.’ Ntoma abakisaki ete kozongisama wana ya boyokani etalelaki mpe “biloko na likoló”—elingi koloba, baoyo bakozala basangoli na libula elongo na Klisto na likoló. Yango etaleli mpe “biloko na nsé”—elingi koloba, baoyo bakopesamela libaku ya kozala na bomoi libela na libela awa na mabelé, ntango yango ekozongisama Paladiso mpenza. (Bakolose 1:19, 20) Lokola bazali kosalela motuya ya mbeka ya Klisto mpo na bango moko mpe na nzela ya botosi na bango epai na Nzambe, botosi oyo euti na motema, bato nyonso wana bakosepela na boyokani ya solosolo elongo na Nzambe.—Kokanisá na Yakobo 2:22, 23.
9. (a) Kimya elongo na Nzambe ezali na bopusi likoló na boyokani nini mosusu? (b) Mpo na kotya kimya ya seko bipai binso, lotómo nini Yehova apesi na Mwana na ye?
9 Kimya motindo wana elongo na Nzambe ezali na motuya monene! Soki kimya ezali te elongo na Nzambe, boye kimya ya koumela to ya solosolo ekoki kozala te kati na boyokani nyonso mosusu. Kimya elongo na Yehova ezali moboko mpo na kimya ya solo awa na mabelé. (Yisaya 57:19-21) Likambo libongi mpenza, Yesu Klisto azali Mokonzi ya Kimya. (Yisaya 9:6) Epai na moto yango, oyo na nzela na ye bato bakoki kozonga na boyokani na Nzambe, Yehova apesi lisusu lotómo ya koyangela. (Danyele 7:13, 14) Mpo na oyo etali matomba ya boyangeli ya Yesu lokola mokonzi ya bato, Yehova apesi elaka ete: “Kofuluka . . . na kimya ikosuka te.”—Yisaya 9:7; Nzembo 72:7.
10. Ndakisa nini Yesu apesaki na oyo etali kopalanganisa nsango ya kimya ya Nzambe?
10 Bato banso bazali na mposa ya nsango ya Nzambe. Yesu ye moko apesaki ndakisa ya molende mpo na kosakola yango. Asalaki yango na lopango ya tempelo na Yelusaleme, likoló ya ngomba, na balabála, epai na mwasi Mosamalia pene na libulu ya mai, mpe na bandako ya bato. Na bisika nyonso oyo bato bakokaki kozwama, Yesu azalaki kobimisa mabaku ya kosakola na ntina na kimya mpe Bokonzi ya Nzambe.—Matai 4:18, 19; 5:1, 2; 9:9; 26:55; Malako 6:34; Luka 19:1-10; Yoane 4:5-26.
Bateyami ete bálanda matambe ya Klisto
11. Yesu abongisaki bayekoli na ye mpo na mosala nini?
11 Yesu ateyaki bayekoli na ye ete básakola nsango ya kimya ya Nzambe. Lolenge moko na Yesu oyo azalaki “motatoli na sembo mpe na solo” ya Yehova, bango mpe bandimaki ete bazalaki na mokumba ya kopesa litatoli. (Emoniseli 3:14; Yisaya 43:10-12) Batalelaki Klisto ete azalaki Motambwisi na bango.
12. Lolenge nini Paulo amonisaki ntina ya mosala ya kosakola?
12 Ntoma Paulo amanyolaki likoló na motuya ya mosala yango, na kolobáká ete: “Likomi elobi ete, Mondimi moko na ye te akoyoka nsɔ́ni.” Yango elingi koloba ete moto moko te oyo azali komonisa kondima epai na Yesu Klisto, Mosaleli ya Liboso mpo na lobiko, akoyokisama nsɔ́ni. Mpe ekólo oyo moto abotami na yango ekoki te kozala epekiseli, mpamba te Paulo abakisaki ete: “Kati na Moyuda mpe Mwela kokabwana ezali te. Nkolo moko azali Nkolo na nyonso mpe azali na bozwi bokoki kosunga bato nyonso bakobelelaka ye. Zambi, elobi lisusu ete, Moto na moto oyo akobelela nkombo na [Yehova, NW ] akobika.” (Baloma 10:11-13) Kasi na lolenge nini bato balingaki koyeba libaku yango?
13. Nini esengelaki mpo ete bato bákoka koyoka nsango malamu, mpe lolenge nini baklisto ya ekeke ya liboso bakokisaki mposa yango?
13 Paulo amonisaki ntina ya kosakola na kotunáká mituna oyo mosaleli moko na moko ya Yehova asengeli kokanisa likoló na yango. Ntoma atunaki ete: “Na nzela nini bakobelela ye oyo bandimi ye te? Na nzela nini bakondima ye oyo bayoki mpo na ye te? Bakoyoka na nzela nini soko bazangi mosakoli? Bakosakola na nzela nini soko batindami te?” (Baloma 10:14, 15) Lisoló ya boklisto ya ebandeli ezali kopesa litatoli ya solosolo oyo limonisi ete mibali mpe basi, bilenge mpe mikóló, balandaki mpenza ndakisa oyo Yesu mpe bantoma na ye batikaki. Bakómaki basakoli ya molende ya nsango malamu. Na ndakisa ya Yesu, basakolaki epai na bato na bisika nyonso oyo bakokaki kokuta bango. Kozaláká na mposa ya kotika ata moto moko te, basalaki mosala na bango ezala na bisika ya bato mingi to mpe na ndako na ndako.—Misala 17:17; 20:20.
14. Na ndenge nini emonanaki mpenza ete “makolo” ya baoyo bazali kosakola nsango malamu mazalaki “kitoko”?
14 Ya solo, ezali bato nyonso te nde bayambaki basakoli baklisto wana na lolenge malamu. Atako bongo, makambo oyo Paulo atángaki uta na Yisaya 52:7 mamonanaki ete mazalaki solo. Nsima ya kotuna ete ‘bakosakola na nzela nini soko batindami te,’ abakisaki boye: “Pelamoko ekomami ete, Kitoko boni makolo na bango bakosakolaka nsango na makambo malamu!” Mingi kati na biso tozali na likanisi te ete makolo na biso mazali kitoko, to bonzenga. Na yango, mokapo wana elimboli nini? Makolo oyo malobelami awa ezali makolo oyo mazali na momeseno ya kotambwisa moto ntango akendaka kosakola epai na basusu. Makolo wana mazali mpenza komonisa moto yango. Mpe tokoki kondimisama ete bantoma mpe bayekoli mosusu ya Yesu Klisto na ekeke ya liboso bazalaki mpenza eloko ya bonzenga na miso ya baoyo bayokaki nsango malamu na nzela na bango. (Misala 16:13-15) Oyo eleki ntina mpenza, ezali ete bazalaki na motuya mingi na miso ya Nzambe.
15, 16. (a) Lolenge nini baklisto ya liboso bamonisaki ete bazalaki mpenza bamemi-nsango ya kimya? (b) Nini ekoki kosalisa biso ete tókokisa mosala na biso na motindo oyo baklisto ya ekeke ya liboso basalaki yango?
15 Nsango ya bayekoli ya Yesu ezalaki nsango ya kimya, mpe basakolaki yango na lolenge ya kimya. Yesu apesaki bayekoli na ye malako oyo malandi: “Soko bokokɔta na ndako nini, lobá liboso ete, Kimya na ndako oyo! Soko mpe moto na kimya azali wana, kimya na bino ekoumela na ye; soko bongo te, ekozonga na bino.” (Luka 10:5, 6) Sha·lohmʹ, to “kimya,” ezali mbote oyo Bayuda bazalaki kopesana. Kasi malako ya Yesu masukaki bobele na mbote ya mpamba te. Lokola bazalaki ‘bantoma bakitani na Klisto,’ bayekoli na ye bapakolami bazalaki koloba na bato ete: “Bóbutwa na bondeko na Nzambe.” (2 Bakolinti 5:20) Na boyokani na malako ya Yesu, basololaki elongo na bato na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe na ntina na oyo Bokonzi yango elimbolaki mpo na mokomoko na bato yango. Baoyo bandimaki bazwaki mapamboli; baoyo babwakaki nsango yango bazangaki.
16 Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kokokisa mosala na bango na motindo mokokani na oyo ya bayekoli wana. Nsango malamu oyo bazali komemela bato ezali ya bango te; ezali nsango ya Ye oyo atindi bango. Mokumba na bango ezali ya koyebisa nsango yango. Soki bato bandimi yango, bakomikómisa bato babongi kozwa mapamboli kitoko. Soki babwaki yango, elingi koloba baboyi kozala na kimya elongo na Yehova Nzambe mpe elongo na Mwana na ye, Yesu Klisto.—Luka 10:16.
Bato na kimya kati na mokili ya yikiyiki
17. Ata ntango tokutani na bato ya maloba mabe, lolenge nini tosengeli komitambwisa, mpe mpo na nini?
17 Atako bato bamonisi boyambi ya lolenge nini, ezali likambo ya ntina epai na basaleli ya Yehova ete bábosana te ete bazali bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe. Bato ya mokili bakoki komikɔtisa na makambo ya ntembe makasi mpe komonisa nkanda na bango na kobimisáká maloba ya kozokisa to na kofingáká baoyo bazali kosilikisa bango. Bamoko kati na biso basalaki mbala mosusu makambo motindo wana na ntango ya kala. Nzokande, soki tosili sikawa kolata bomoto ya sika mpe tozali lisusu bato ya mokili te, tokolanda banzela na bango te. (Baefese 4:23, 24, 31; Yakobo 1:19, 20) Kozanga kotalela oyo basusu bazali kosala, biso tokosalela nde toli oyo elobi ete: “Soko ekokoka, mpe lokola ezali likambo na bino, bózala na bato nyonso kimya.”—Baloma 12:18.
18. Ezaleli na biso esengeli kozala lolenge nini ntango mokonzi moko ya mokili azali kosalela biso makambo makasi, mpe mpo na nini?
18 Na bantango mosusu, mosala na biso ya kosakola ekoki komema biso kino liboso na bakonzi. Komonisáká bokonzi na bango, bakoki ‘kosɛnga na biso’ ete tólimbola ntina oyo tosalaka likambo boye to boye mpe ntina oyo toboyaka kokɔta na mwa makambo mosusu. Bakoki koluka koyeba ntina oyo tosakolaka nsango oyo tozali komema—nsango oyo ezali kobimisa mabe ya mangomba ya lokuta mpe oyo ezali koyebisa nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo. Limemya na biso mpo na ndakisa oyo Yesu atikaki ekopusa biso ete tómonisa ezaleli ya komikitisa mpe limemya mozindo. (1 Petelo 2:23; 3:15) Mbala mingi, bakonzi motindo wana bapusamaka na bakonzi ya mangomba to mpe na baoyo bazali likoló na bango. Eyano ya komikitisa mpe ya limemya ekoki kosalisa bango na kososola ete mosala na biso mozali likámá mpo na bango te mpe mozali soko moke te kotya kimya ya bato na likámá. Kútu, yango ezali nde kobota elimo ya limemya, ya boyokani mpe ya kimya epai na baoyo bazali kondima yango.—Tito 3:1, 2.
19. Na misala nini Batatoli ya Yehova bamikɔtisaka soko moke te?
19 Batatoli ya Yehova bayebani na mokili mobimba ete bazali bato oyo bakɔtaka te na matáta ya mokili. Bazali te kokɔta na matáta ya mokili na ntina na mposo, lingomba to politiki. (Yoane 17:14) Lokola Liloba ya Nzambe lizali kolakisa biso ete ‘tótosa bakonzi bazali liboso,’ tokoki kútu te kokanisa komikɔtisa na mobulu oyo bato basalaka mpo na kotɛmɛla misala ya guvernemá. (Baloma 13:1) Batatoli ya Yehova basanganaka na etuluku ata moko te oyo ezali koluka kokweisa guvernemá. (Tito 3:1) Na kotalela mitindá oyo Yehova asili kotya mpo na basaleli na ye, baklisto bakoki ata mokolo moko te kosangana na kosopama ya makila mpe na mobulu! Baklisto ya solo basuki bobele na kolobela kimya te; bomoi na bango eyokani mpenza na nsango oyo bazali kosakola.
20. Na oyo etali kimya, makambo ya motindo nini Babilone Monene esili kosala?
20 Nzokande, na bokeseni na baklisto ya solo, baoyo bazali bamonisi ya bibongiseli ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba bamimonisi ete bazali bamemi-nsango ya kimya te. Mangomba nyonso ya Babilone Monene—ezala mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba mpe mangomba oyo mazali ya boklisto te—bapesaki mabɔkɔ na bitumba ya mabota, bandimaki yango to bapesaki litambwisi kati na yango. Babimisaki minyoko, ata mpe libomi, epai na basaleli ya sembo ya Yehova. Na bongo, na ntina na Babilone Monene, Emoniseli 18:24 elobi ete: “Kati na ye, makila na basakoli, na bapɛtwi mazwami, na makila na bango nyonso babomamaki na mokili.”
21. Mayoki nini bato mingi ya motema sembo bazali komonisa ntango bazali komona bokeseni kati na etamboli ya libota ya Yehova mpe etamboli ya baoyo bazali kati na mangomba ya lokuta?
21 Na kokesana na mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba mpe na mangomba mosusu nyonso ya Babilone Monene, lingomba ya solo ezali nguya makasi, oyo ezali koyeisa bomoko. Epai na bayekoli na ye ya solo, Yesu Klisto alobaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Wana ezali bolingo oyo ezali kolongola bandelo ya ekólo, bandelo ya bitɛlɛmɛlo ya bato, bandelo ya makambo ya nkita mpe koyinana na ntina na kokesana ya mposo oyo ezali kokabola bato mosusu nyonso na mokili. Lokola basili komona likambo yango, bamilió mingi ya bato kati na mokili mobimba bazali koloba na basaleli bapakolami ya Yehova ete: “Tokokenda na yo elongo, zambi toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.”—Zekalia 8:23.
22. Lolenge nini totalelaka mosala ya kopesa litatoli oyo mosengeli naino kosalema?
22 Lokola tozali libota ya Yehova, tozali na esengo monene mpo na oyo esili kosalema kino sikawa, nzokande mosala esuki naino te. Nsima ya kobwaka nkóna mpe kobatela bokóli na yango, mosáli-bilanga atikaka mosala te. Akóbaka kosala mosala, mingi mpenza na ntango bobuki mbuma ekómi pene na nsuka na yango. Eleko ya bobuki mbuma esɛngaka milende mingi mpe ya solosolo. Mpe bobuki mbuma oyo eleki monene mpo na basambeli ya Yehova ezali kosalema sikawa koleka bileko nyonso mosusu. Oyo ezali ntango ya bosepeli. (Yisaya 9:3) Ya solo, tokutanaka na botɛmɛli mpe na kozanga bosepeli. Na oyo etali mokomoko na biso, ekoki kozala ete tozali kobunda na bokɔnɔ moko makasi, mikakatano ya libota to mpe kobeba ya nkita. Kasi bolingo na biso mpo na Yehova ezali kopusa biso na kolendendela. Nsango oyo Nzambe apesi biso ete tómema ezali nsango oyo bato basengeli koyoka yango. Ezali nsango ya kimya. Ya solo, ezali nsango oyo Yesu ye moko asakolaki—nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Kokokisama nini Yisaya 52:7 ezwaki likoló na Yisalaele ya kala?
◻ Lolenge nini Yesu amimonisaki mpenza momemi-nsango ya kimya oyo aleki basusu nyonso?
◻ Lolenge nini ntoma Paulo ayokanisaki Yisaya 52:7 na mosala oyo baklisto bazali kosangana na yango?
◻ Kozala bamemi-nsango ya kimya na mikolo na biso esangisi makambo nini?
[Bililingi na lokasa 13]
Motindo moko na Yesu, Batatoli ya Yehova bazali bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe
[Bililingi na lokasa 15]
Ata bato bamonisi mayoki ya lolenge nini liboso ya nsango ya Bokonzi, Batatoli ya Yehova babatelaka ntango nyonso kimya