Baklisto ya solo bazali bango nyonso Basakoli ya nsango malamu
“Bóyembela Yehova, bópambola nkombo na ye. Mokolo na mokolo bóyebisa nsango malamu ya lobiko oyo euti epai na ye.”—NZEMBO 96:2, NW.
1. Nsango malamu nini esengeli ete bato báyoka yango, mpe nini emonisi ete Batatoli ya Yehova bamipesi mpenza na kosakola nsango yango?
NA KATI ya mokili oyo makama ezali kobima mokolo na mokolo, koyeba, ndenge Biblia esakoli yango, ete etikali moke bitumba, kobomana, nzala mpe konyokola bato esila, ezali mpenza likambo ya kobɔndisa. (Nzembo 46:9; 72:3, 7, 8, 12, 16) Mpo na Batatoli ya Yehova, yango ezali nsango malamu oyo moto nyonso asengeli koyoka yango. Batatoli ya Yehova bayebani bipai nyonso ete basakolaka “nsango malamu ya likambo ya malamu mingi.” (Yisaya 52:7, NW) Ya solo, Batatoli mingi banyokwami mpo balingaka te kotika kosakola nsango malamu. Kasi, soki batikaka kosakola te, ezali mpo balukaka nde bolamu ya bato. Batatoli bamonisi mpenza molende mpe bazongi nsima te na mosala yango!
2. Wapi ntina moko oyo Batatoli ya Yehova bazali na molende?
2 Lelo oyo, molende ya Batatoli ya Yehova ezali lokola oyo baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki na yango. Zulunalo moko ya Lingomba ya Katolike (Osservatore Romano) elobaki bosolo ete: “Baklisto ya liboso, soki kaka bazwi batisimo, bazalaki komiyoka ete bazali na mokumba ya kosakola Nsango Malamu. Baombo bazalaki kosolola na bato mpo na koyebisa bango Nsango Malamu.” Mpo na nini Batatoli ya Yehova bazali na molende lokola oyo baklisto ya liboso bazalaki na yango? Ya liboso, ezali mpo ete nsango malamu oyo bazali kosakola euti na Yehova Nzambe ye moko. Ekoki nde kozala na ntina mosusu koleka oyo wana oyo ekoki kopesa bango molende? Bazali kosakola mpo na kokokisa maloba ya mokomi ya nzembo ete: “Bóyembela Yehova, bópambola nkombo na ye. Mokolo na mokolo bóyebisa nsango malamu ya lobiko oyo euti epai na ye.”—Nzembo 96:2, NW.
3. (a) Wapi ntina ya mibale ya molende ya Batatoli ya Yehova? (b) “Lobiko oyo euti epai na Nzambe” ezali na makambo nini na kati na yango?
3 Maloba ya mokomi ya nzembo ezali komonisa biso ntina ya mibale ya molende ya Batatoli ya Yehova. Nsango na bango ezali nsango ya lobiko. Bato mosusu basalaka mosala ya monganga, bamosusu mosala ya kosalisa bato ya mpasi, bamosusu mosala ya kobongisa nkita, to mpe misala mosusu mpo bato mosusu mpe bázala na bomoi ya malamu; bato wana babongi kozwa longonya mpo na milende na bango. Kasi nyonso oyo moto akoki kosala mpo na moto mosusu ezali moke mpenza soki tokokanisi yango na “lobiko oyo euti epai na [Nzambe].” Na nzela ya Yesu Klisto, Yehova akobikisa bato ya komikitisa na masumu, maladi mpe liwa. Baoyo bakozwa bolamu yango bakozala na bomoi libela na libela! (Yoane 3:16, 36; Emoniseli 21:3, 4) Lobiko ezali lelo oyo moko ya ‘misala ya kokamwa’ oyo baklisto bazali kosakola ntango bazali kokokisa maloba oyo: “Bósolola lokumu na [Nzambe] kati na mabota na bato, misala na ye ya kokamwa kati na bato nyonso. Zambi [Yehova] azali monene mpe akoki na kokumisama; ye azali kotosama liboso na banzambe nyonso.”—Nzembo 96:3, 4.
Ndakisa ya Nkolo
4-6. (a) Yebisá ntina ya misato oyo Batatoli ya Yehova bazalaka na molende. (b) Molende nini Yesu azalaki na yango na mosala ya kosakola nsango malamu?
4 Ezali mpe na ntina mosusu, ya misato, oyo Batatoli ya Yehova bazali na molende. Balandaka ndakisa ya Yesu Klisto. (1 Petelo 2:21) Moto yango ya kokoka andimaki na motema mobimba mokumba ya “kosakola nsango malamu epai ya bato ya komikitisa.” (Yisaya 61:1, NW; Luka 4:17-21, NW) Na ndenge yango, akómaki mopalanganisi to mosakoli ya nsango malamu. Atambolaki Galilai mobimba mpe Yudea mobimba mpe ‘azalaki kosakola Nsango Malamu ya Bokonzi.’ (Matai 4:23) Lokola ayebaki ete bato mingi bakondima nsango malamu yango, alobaki na bayekoli na ye ete: “Mbuma na elanga iteli mingi mpenza nde basali bazali mingi te. Bóbondela Nkolo ya elanga ete atinda basali kati na elanga ya mbuma na ye.”—Matai 9:37, 38.
5 Mpo na kosala makambo oyo eyokani na libondeli na ye, Yesu apesaki bato mosusu formasyo mpo bázala mpe basakoli ya nsango malamu. Na nsima, atindaki bantoma na ye bango moko mpe ayebisaki bango ete: “Wana ekokenda bino, bósakola ete, Bokonzi ya Likoló ezali kobɛlɛma.” Elingaki nde koleka malamu soki basalaki bibongiseli mpo na kosunga bato na mikakatano na bango na ntango wana? To ebongaki nde bákɔta na makambo ya politiki mpo na kosilisa makambo ya mabe oyo ezalaki komonana mingi na ntango wana? Te. Yesu apesaki malako oyo baklisto nyonso basakoli ya nsango malamu basengeli kolanda ntango alobaki na bayekoli na ye ete: “Wana ekokenda bino, bósakola.”—Matai 10:5-7.
6 Na nsima, Yesu atindaki bayekoli mosusu bákende kosakola ete: “Bokonzi ya Nzambe esili kobɛlɛma.” Ntango bazongaki mpe bayebisaki Yesu ete mosala na bango ya kosakola nsango malamu elekaki malamu, Yesu asepelaki mingi. Abondelaki ete: “Tata, Nkolo ya lola, mpe ya nse, nasanzoli yo ete obombi makambo oyo na bato ya mayele mpe na bato ya kokanisa, mpe omonisi yango na bana mike.” (Luka 10:1, 8, 9, 21) Bayekoli ya Yesu, bato oyo liboso bazalaki babomi-mbisi, basali-bilanga, mpe bongo na bongo; bazalaki komonana bana mike liboso ya bakonzi ya mangomba ya ekólo oyo bakɔtaki bakelasi minene. Kasi, bayekoli bazwaki formasyo mpo na kosakola nsango malamu oyo eleki nsango nyonso mosusu.
7. Ntango Yesu amataki na likoló, nsima na ye bayekoli babandaki kosakola nsango malamu epai ya banani?
7 Yesu amataki na likoló mpe nsima na ye, bayekoli bakobaki kosakola nsango malamu ya lobiko. (Misala 2:21, 38-40) Basakolaki libosoliboso epai ya banani? Bakendaki nde na mabota oyo bayebaki Nzambe te? Te, esika ya liboso oyo basakolaki nsango malamu ezalaki Yisalaele, ekólo ya bato oyo bayebaki Yehova banda mbula koleka 1 500. Ebongaki básakola na ekólo ya bato oyo bazalaki basambeli ya Yehova? Ɛɛ. Yesu alobaki na bango ete: “Bokozala batatoli na ngai kati na Yelusaleme, na [Yudea] mobimba, na Samalia, mpe kino nsuka ya mokili.” (Misala 1:8) Bayisalaele basengelaki koyoka nsango malamu ndenge moko na mabota mosusu nyonso.
8. Na ndenge nini Batatoli ya Yehova bazali kolanda ndakisa ya bayekoli ya Yesu na ekeke ya liboso?
8 Ndenge moko mpe, Batatoli ya Yehova lelo oyo bazali kosakola na mokili mobimba. Bazali kosala elongo na anzelu oyo Yoane amonaki ete “azalaki na nsango malamu ya seko mpo na kosakola lokola nsango ya esengo epai ya baoyo bazali kofanda na mokili, mpe epai ya bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe nkota nyonso, mpe bato nyonso.” (Emoniseli 14:6, NW) Na mobu 2001, basakolaki na mikili 235, oyo mosusu kati na yango ebengamaka mikili ya boklisto. Tokoki nde koloba ete Batatoli ya Yehova basalaka mabe ndenge basakolaka na bisika oyo mangomba ya boklisto ezalaka banda kala? Bato mosusu bazali koloba ete ezali mabe mpe bazali komona ete mosala wana ya kosakola ezali “koyiba bandimi.” Nzokande, Batatoli ya Yehova bakanisaka ndenge oyo Yesu azalaki kotalela Bayuda ya komikitisa na ntango na ye. Atako bazalaki na banganga na bango, Yesu akakatanaki te koyebisa bango nsango malamu. ‘Ayokaki mawa mpo na bango ete balɛmbi mpe balemalemi lokola bampate bazali na mobateli te.’ (Matai 9:36) Ntango Batatoli ya Yehova bakutani na bato oyo bayebi Yehova te mpe bayebi Bokonzi na ye te, basengeli nde kobombela bato ya ndenge wana nsango malamu mpo mangomba mosusu ezali koloba ete bazali bandimi na bango? Soki tolandi ndakisa ya bantoma ya Yesu, eyano ezali ete te. Nsango malamu esengeli kosakolama “na mabota nyonso,” kolongola ata moko te.—Malako 13:10.
Baklisto ya liboso bazalaki bango nyonso kosakola nsango malamu
9. Na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso, banani bazalaki kosakola?
9 Na ekeke ya liboso, banani bazalaki kosakola? Makambo nyonso ezali komonisa ete baklisto nyonso bazalaki basakoli ya nsango malamu. Mokomi William Williams alobi ete: “Makambo nyonso ezali komonisa ete baklisto nyonso ya Lingomba ya ebandeli . . . bazalaki kosakola nsango malamu.” Mpo na makambo oyo elekaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), Biblia elobi ete: “Bango nyonso [mibali mpe basi] batondaki na [elimo santu, NW], mpe babandi kosolola na nkota mosusu [lokola elimo santu epesi, NW] bango maloba.” Bato oyo bazalaki kosakola nsango malamu bazalaki mibali mpe basi, bilenge mpe mikóló, baombo mpe bansomi. (Misala 1:14; 2:1, 4, 17, 18; Yoele 2:28, 29; Bagalatia 3:28) Ntango baklisto mingi bakimaki Yelusaleme mpo bazalaki konyokola bango kuna, “baoyo bapalanganaki bakei epai na epai kosakoláká Nsango Malamu.” (Misala 8:4) Ezali te ete mwa bato moke oyo baponamaki nde bazalaki kosakola nsango malamu kasi ‘baoyo nyonso bapalanganaki.’
10. Etinda nini oyo esɛngi makambo mibale ekokisamaki liboso ete ebongiseli ya Bayuda ebebisama?
10 Makambo elandaki kosalema bongo na bambula nyonso wana ya ebandeli. Yesu asakolaki ete: “Nsango Malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Maloba wana ekokisamaki na ekeke ya liboso lokola nsango malamu esakolamaki na bisika mingi mpenza liboso ete basoda ya Loma bábebisa losambo mpe mboka ya Bayuda. (Bakolose 1:23) Lisusu, bayekoli nyonso ya Yesu batosaki maloba na ye ete: “Boye, bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya [elimo santu, NW], kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso oyo esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20) Baklisto ya liboso bazalaki kosɛnga na bato te ete bándimela Yesu mpe na nsima kotika bango básalela Nzambe na ndenge na bango, ndenge tozali komona yango epai ya bateyi mosusu ya mikolo na biso. Bazalaki nde koteya bango bákóma bayekoli ya Yesu, básangana na kati ya masangá, mpe bazalaki kopesa bango formasyo mpo ete bango mpe bákende kosakola nsango malamu mpe bákómisa bato bayekoli. (Misala 14:21-23) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova balandaka ndakisa wana.
11. Lelo oyo banani bazali koyebisa bato nsango malamu oyo eleki nsango mosusu nyonso?
11 Lokola Paulo, Balanaba mpe bandeko mosusu ya ekeke ya liboso, Batatoli ya Yehova mosusu bakei na bamboka mopaya mpo na kosala mosala ya misionɛrɛ. Mosala na bango ezali mpenza na litomba, mpamba te bakɔti na makambo ya politiki te to basali makambo mosusu te oyo eyokani te na etinda ya kosakola nsango malamu. Bango batosi kaka etinda ya Yesu ete: “Wana ekokenda bino, bósakola.” Nzokande, Batatoli ya Yehova mingi bazali bamisionɛrɛ na mboka mopaya te. Mingi na kati na bango basalaka misala lokola bato nyonso mpo na kozwa mbongo, mpe bamosusu bazali naino na kelasi. Basusu bazali mpe batata mpe bamama ya bana. Kasi Batatoli nyonso bayebisaka bato mosusu nsango malamu oyo bango mpe bayokaki. Ezala bilenge to mikóló, basi to mibali, bango nyonso bazali kolanda na esengo mpenza elendiseli ya Biblia oyo elobi ete: “Osakola liloba, ozala na etingya na bilaka malamu mpe na bilaka malamu te.” (2 Timote 4:2) Lokola baoyo basalaki mosala yango liboso na bango na ekeke ya liboso, bazali ‘kotika te koteya mpe kosakola nsango malamu na ntina na Klisto, Yesu.” (Misala 5:42, NW) Bazali koyebisa bato nsango malamu oyo eleki nsango mosusu nyonso.
Mosala ya koluka bandimi to ya kosakola nsango malamu?
12. Ndenge nini bato bakómi kotalela likambo ya koluka bandimi ya sika?
12 Liloba ya Grɛki prosêlutos elimboli “mondimi ya sika.” Lelo oyo, bato mosusu bazali koloba ete koluka bandimi ya sika ezali mabe. Kutu, mokanda ya lisangani moko ya mangomba (Conseil mondial des Églises) elobelaki oyo bango babengi “lisumu ya koluka bandimi ya sika.” Mpo na nini? Zulunalo moko ya Lingomba ya Katolike (Catholic World Report) elobaki ete: “Lokola na Lingomba ya Ɔrtɔdɔksɛ bazali kolelalela mingi ete mangomba mosusu ezali ‘koluka bandimi ya sika,’ bato mingi bakómi kozwa likambo yango ndenge mosusu; mpo na bango yango ekómi lokola kobongwanisa bato na makasi.”
13. Pesá mwa bandakisa oyo ezali komonisa koluka bandimi ya sika na ndenge ya mabe.
13 Koluka bandimi ya sika ezali nde mabe? Ekoki kozala mabe. Yesu alobaki ete ndenge oyo bakomeli na Bafalisai bazalaki koluka bandimi ya sika ezalaki mabe mpo na bato oyo bazalaki kokóma bandimi. (Matai 23:15) Ya solo, “kobongwanisa bato na makasi” ezali mabe. Na ndakisa, moto moko ya mayele na istware, nkombo na ye Josèphe, ye alobaki ete ntango Jean Hyrcan, mokonzi moko ya Bamakabe, alongaki bato ya Idumea, “atikaki bango báfanda na mboka na bango kasi basengelaki kondima kokatama ngenga mpe kondima kotosa mibeko ya Bayuda.” Mpo bato ya Idumea bátikala na mboka na bango atako Bayuda bazalaki koyangela bango, basengelaki kondima losambo ya Bayuda. Bato ya mayele na istware balobaka ete na ekeke ya mwambe ya T.B., Charlemagne alongaki bato ya Saxe, na nɔrdi ya Mpoto, mpe asɛngisaki bango na makasi ete bákóma bandimi.a Kasi, tokoki mpenza koloba ete bato ya Saxe mpe bato ya Idumea babongwanaki solo? Na ndakisa, tokoki nde koloba mpenza ete Mokonzi Elode, moto ya Idumea, oyo alukaki koboma Yesu ntango azalaki naino moke, azalaki mpenza kolanda Mibeko ya Mose oyo epemamaki na Nzambe?—Matai 2:1-18.
14. Ndenge nini bamisionɛrɛ mosusu ya mangomba ya boklisto bazali kokómisa bato bandimi na bango na makasi?
14 Lelo oyo, tokoki mpenza koloba ete mangomba ezali kokómisa bato bandimi na makasi? Makambo mosusu oyo mangomba ezali kosala tokoki kobenga yango kokómisa bato bandimi na makasi. Tozali koyoka ete bamisionɛrɛ mosusu ya mangomba ya boklisto bazali kolaka bato ete bakotinda bango bákende kotánga bakelasi na Mpoto mpe na Amerika soki bandimi kokɔta na mangomba na bango. To mpe bazali kosɛnga moto oyo akimá mboka na ye oyo azali na biloko ya kolya te ete alanda mateya na bango liboso bápesa ye mwa biloko ya kolya. Na 1992, lapolo ya likita moko ya Baepiskɔpɔ ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔksɛ elobaki ete, “ntango mosusu mangomba ezali kosalela biloko ya mokili to mpe ezali konyokola bato na mitindo ndenge na ndenge, kaka mpo na koluka bandimi ya sika.”
15. Tokoki nde koloba ete Batatoli ya Yehova balukaka bandimi na makasi? Limbolá.
15 Kobenda bato na makasi ete bákɔta na lingomba mosusu ezali mabe. Batatoli ya Yehova basalaka bongo te.b Yango wana, tokoki koloba te ete balukaka bandimi na makasi. Nzokande, na ndakisa ya baklisto ya ekeke ya liboso, basakolaka nsango malamu epai ya moto nyonso. Bayebisaka na moto nyonso oyo asepeli koyoka bango ete akoki koyeba makambo mosusu soki andimi koyekola Biblia. Bato yango oyo basepeli bayekolaka kondimela Nzambe mpe mikano na ye, kondima yango eutaka na boyebi ya solosolo ya Biblia. Nsukansuka, babelelaka nkombo ya Nzambe, Yehova, mpo bázwa lobiko. (Baloma 10:13, 14, 17) Ezali likambo ya moto ye moko soki akoyamba nsango malamu to akoboya yango. Makambo ya kobenda bato na makasi ezalaka te. Soki ezalaki bongo, mbɛlɛ kobongwana elingaki kozala na ntina moko te. Nzambe andimaka losambo ya moto se soki ezali kouta na motema na ye.—Deteronome 6:4, 5; 10:12.
Mosala ya kosakola nsango malamu na mikolo na biso
16. Ndenge nini mosala ya kosakola nsango malamu oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala ekoli na bambula oyo?
16 Na mikolo na biso oyo, Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpo na kokokisa Matai 24:14 na mikili mingi koleka. Na mosala na bango ya kosakola nsango malamu, basalelaka mingimingi zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.c Na mobu 1879, ntango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebandaki kobima, ezalaki na motángo ya bazulunalo 6 000 mpe ezalaki kaka na monɔkɔ moko. Na 2001, elingi koloba nsima ya mbula 122, bakómaki kobimisa bazulunalo 23 042 000 na minɔkɔ 141. Mosala na bango ya kosakola nsango malamu ekolaki nzela moko na kobakisama ya bazulunalo oyo bazalaki kobimisa. Na ekeke ya 19, mbula na mbula bazalaki kolekisa mwa bankóto ya bangonga na mosala ya kosakola nsango malamu; nzokande, na 2001, balekisaki ngonga 1169082225 na mosala yango. Kaka na mbula yango, sanza na sanza batalaki bato soki 4921702 na bandako na bango mpo na koyekola na bango Biblia ofele. Talá mosala monene mpe ya malamu oyo basali! Basakoli ya Bokonzi 6117666 nde basali mosala yango.
17. (a) Banzambe nini ya lokuta bato bazali kosambela na moi ya lelo? (b) Moto nyonso, azala moto ya monɔkɔ nini, ya ekólo nini, azala nani na mokili oyo, asengeli koyeba nini?
17 Mokomi ya nzembo alobaki ete: “Banzambe nyonso ya bato bazali bikeko nde [Yehova] asalaki lola.” (Nzembo 96:5) Lelo oyo, bato mingi bazali kosambela bikólo, banyama to biloko mosusu oyo ezali bilembo ya bikólo, bato minene, biloko ya mokili to mpe bozwi. (Matai 6:24; Baefese 5:5; Bakolose 3:5) Mohandas Gandhi alobaká mokolo mosusu ete: “Na makanisi na ngai . . . lelo oyo boklisto oyo ezali na mikili ya Mpoto ezali se ya nkombo mpamba. Bato bazali nde kosambela mpenza Mammon [bozwi].” Nsango malamu esengeli kosakolama bipai nyonso. Moto nyonso, azala moto ya monɔkɔ nini, ya ekólo nini, to azala nani na mokili oyo, asengeli koyeba Yehova mpe koyeba mikano na ye. Tozali na elikya ete bato nyonso bakoyoka maloba ya mokomi ya nzembo ete: “Bópesa [Yehova] lokumu mpe nguya. Bópesa [Yehova] lokumu oyo ekoki na nkombo na ye”! (Nzembo 96:7, 8) Batatoli ya Yehova basalisaka bato báyeba Yehova mpo bápesa ye lokumu na ndenge ebongi mpenza. Baoyo bazali kondima bazali kozwa matomba mingi. Matomba nini bazali kozwa? Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mokanda moko (The Catholic Encyclopedia) elobi ete na ntango oyo Lingomba ya Protesta ebandaki, kokɔtisa bato na lingomba moko na makasi emonisamaki na mwa maloba ya Latin: Cuius regio, illius et religio. (Tokoki kobongola makanisi na yango ete: “Moto oyo azali koyangela mboka nde asengeli kopona losambo na yango.”)
b Na likita ya ebongiseli moko (United States International Religious Freedom Commission) oyo esalemaki na mokolo ya 16 Novɛmbɛ 2000, moto moko amonisaki ete mosala ya Batatoli ya Yehova ekeseni na mosala ya bato oyo bazali koluka kobongola bato na makasi. Amonisaki ete ndenge oyo Batatoli ya Yehova basakolaka epesaka moto likoki ya koloba ete “Nazali na mposa na yango te” mpe kokanga ndako na ye.
c Nkombo mobimba ya zulunalo yango ezali Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli Eyebisaka Bokonzi ya Yehova.
Okoki kolimbola?
• Mpo na nini Batatoli ya Yehova bazali na molende mpo na kosakola nsango malamu?
• Mpo na nini Batatoli ya Yehova basakolaka ata na bikólo oyo mangomba ya boklisto ezali?
• Mpo na nini tokoki koloba te ete Batatoli ya Yehova bakómisaka bato bandimi na makasi?
• Ndenge nini mosala ya kosakola nsango malamu oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala ekoli na mikolo na biso?
[Elilingi on page 9]
Yesu azalaki na molende mpo na kosakola nsango malamu mpe apesaki basusu formasyo mpo básala mosala yango
[Elilingi na lokasa 10]
Na masangá ya ekeke ya liboso, bato nyonso bazalaki kosakola nsango malamu
[Elilingi na lokasa 11]
Kotindika bato na makasi ete bákɔta na lingomba mosusu ezali mabe