Ekoki kosalema ete bato nyonso bázala ndenge moko?
JOHN ADAMS, presida ya kala ya États-Unis, azalaki na kati ya bato oyo bakomaki mokanda ya kosɛnga lipanda. Mokanda yango ezalaki na maloba oyo ya malamu: “Tondimi ete likambo oyo ezali solo: bato nyonso bakelamá mpo bázala ndenge moko.” Kasi, makambo mosusu ezali komonisa lokola ete John Adams azalaki kondima te ete bato bazali mpenza ndenge moko, mpo akomaki boye: “Ntango Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso asalaki bato, asalaki bango na makanisi ndenge moko te mpe na nzoto ndenge moko te; na bongo moto moko te ya mayele akoki kokómisa bango ndenge moko.” Nzokande, Herbert Wells, moto ya mayele na makambo ya kala na ekólo Angleterre, ye akanisaki ete bato nyonso bakoki kozala ndenge moko na makambo misato: kozala na lingomba moko ya malamu na mokili mobimba, kótánga kelasi ndenge moko, mpe mosala ya soda ezala lisusu te.
Kasi, tii lelo oyo likambo oyo Wells akanisaki, ete bato nyonso bazali ndenge moko, esalemá naino te. Bato bazali ata pene te ya kokóma ndenge moko, mpe bokeseni na kati ya bato ezali komonana mingi na mokili ya lelo. Bokeseni yango ememeli bato makambo ya malamu? Te. Kutu, bokeseni ekaboli nde bato, ebimisi zuwa, koyinana, nkanda, mpe ebomisi bato mingi. Likanisi oyo ete mindɛlɛ baleki baindo, oyo kala epalanganaki mingi na Afrika, na Australie, mpe na Amerika ya Nɔrdi, epesaki bato ya mposo mosusu mpasi mingi—na ndakisa, babomaki bakóló-mboka ya esanga Van Diemen (lelo oyo Tasmanie). Na Mpoto, likambo ya komona Bayuda lokola bato mpamba etindaki Banazi na koboma ebele ya Bayuda. Lokola bato minene bazalaki na bozwi mingi, kasi babola bazalaki konyokwama, yango ebimisaki Révolution française na ekólo France na ekeke ya 18 mpe Révolution bolchevique na ekeke ya 20, na ekólo Russie.
Moto moko ya mayele na ntango ya kala akomaki boye: “Moto azali koyangela moto mpo na koyokisa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9, NW) Maloba na ye ezali solo, ezala ntango moto moko kaka nde azali koyangela to ntango bato mingi nde bazali koyangela. Ntango bato bamitomboli likoló ya bamosusu, yango ebimisaka kaka mawa mpe mpasi.
Na miso ya Nzambe, bato nyonso bazali ndenge moko
Ezali nde na bato oyo baleki bamosusu? Na miso ya Nzambe, ezali bongo te. Biblia elobi boye: “Na nkɔkɔ moko [Nzambe] abotisi mabota nyonso ya bato kofanda na mikili nyonso ya nse.” (Misala 17:26) Longola yango, Mozalisi ‘atalaka bilongi ya mikóló te mpe atalaka mozwi koleka mobola te mpo ete bazali bango nyonso mosala ya mabɔkɔ na ye.’ (Yobo 34:19) Bato nyonso bautaki na nkɔkɔ moko, mpe na miso ya Nzambe bango nyonso babotamaka ndenge moko.
Tóbosana mpe te ete, ntango moto akufi, nyonso oyo akokaki komikumisa na yango ete aleki bamosusu esili. Bato ya Ezipito ya kala bazalaki kondima yango te. Ntango Falo moko akufi, bazalaki kotya biloko ya valɛrɛ mingi na kati ya lilita na ye mpo asalelaka yango na esika na ye ya lokumu na bomoi oyo akozala na yango nsima ya liwa. Azalaki mpenza kosalela biloko yango? Te. Biloko yango mingi bazalaki koyiba yango, mpe mingi oyo bayibaki yango te, okoki lelo kokuta yango na kati ya bandako oyo babombaka biloko ya kala (musées).
Lokola asilaki kokufa, Falo azalaki soki moke te kosalela biloko wana nyonso ya ntalo. Soki moto akufi, makambo ya kokesenisa bato ya mayele mingi na ya mayele moke, bazwi na babola ezalaka lisusu te. Biblia elobi boye: “Bato ya mayele bakokufa; moto na elema mpe ebebe bakolimwa elongo. Moto akoumela kati na lokumu seko te; ye azali lokola nyama na mokili oyo ikolimwaka.” (Nzembo 49:10, 12) Ozala mokonzi to moombo, maloba oyo epemami na elimo ya Nzambe etaleli biso nyonso: “Nde bakufi bayebi likambo te, bazali na libonza mpe te . . . Ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika ya bakufi, esika ekokenda yo.”—Mosakoli 9:5, 10.
Na miso ya Nzambe, biso nyonso tobotamaka ndenge moko mpe biso nyonso tosukaka ndenge moko, na liwa. Na bongo, koloba ete bato boye baleki bato mosusu, na bomoi mokuse oyo tozali na yango, ezali na ntina moko te!
Ndenge nini bato nyonso bakozala ndenge moko?
Kasi, tozali nde na elikya ete mokolo mosusu ekozala na mokili moko, epai makambo ya kokesenisa bato ekozala lisusu na ntina te? Ɛɛ. Eleki sikoyo mbula soki 2 000, ntango Yesu azalaki awa na mabele, makambo ebandaki kobongisama mpo na mokili ya ndenge wana. Yesu apesaki bomoi na ye lokola mbeka mpo na kosikola bato nyonso ya kondima mpo ete “moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi azala na bomoi ya seko.”—Yoane 3:16.
Mpo na komonisa ete moyekoli na ye moko te asengeli komitombola likoló ya baninga na ye bandimi, Yesu alobaki boye: “Kasi bino, bóbengama Labi te, mpo kaka moko nde azali moteyi na bino, nzokande bino nyonso bozali bandeko. Lisusu, bóbenga moto moko te tata na bino awa na mabelé, mpo kaka moko nde azali Tata na bino, Oyo azali na likoló. Bóbengama mpe te ‘batambwisi,’ mpo Motambwisi na bino azali kaka moko, Klisto. Kasi oyo aleki monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino. Moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama, mpe moto nyonso oyo azali komikitisa akotombwama.” (Matai 23:8-12, NW) Na miso ya Nzambe, bayekoli nyonso ya solosolo ya Yesu bazali ndenge moko na kati ya lingomba ya solo.
Baklisto ya liboso bazalaki nde komimona ete bazali ndenge moko? Baoyo bakangaki ntina ya mateya ya Yesu basalaki yango. Mokomoko na bango azalaki komimona ete ye na baninga na ye bazali ndenge moko na kati ya kondima lokola bazalaki kobengana “ndeko.” (Filemona 1, 7, 20) Bazalaki kolendisa moto moko te ete amitalela lokola nde aleki bamosusu. Na ndakisa, tótalela komikitisa oyo Petelo amonisaki ntango alobaki mpo na ye moko na mokanda na ye ya mibale: “Ngai Simona Petelo, moombo mpe ntoma ya Yesu Klisto, nazali kokomela bango basili kozwa likabo ya kondima lolenge moko na biso.” (2 Petelo 1:1) Petelo ateyamaki na Yesu ye moko, mpe lokola azalaki ntoma, azalaki na mokumba monene mpenza. Kasi amibengaki moombo mpe ayebaki ete baklisto mosusu bazwaki likabo ya kondima ndenge moko na ye.
Moto mosusu akoki koloba ete likambo ya koloba ete bato nyonso bazali ndenge moko eyokani te na oyo elekaki liboso ete Yesu abotama, ndenge Nzambe aponaki Yisalaele lokola libota na ye. (Exode 19: 5, 6) Akoki koloba ete yango ezali lolenge moko ya kotombola ekólo moko likoló ya bikólo mosusu; kasi ezali bongo te. Ezali solo ete lokola Bayisalaele bazalaki bakitani ya Abalayama, bazalaki na boyokani ya ndenge mosusu elongo na Nzambe, mpe asalelaki bango mpo na koyebisa bato nyonso makambo na ye. (Baloma 3:1, 2) Kasi mokano ya likambo yango ezalaki te ya kotombola bango likoló ya bikólo mosusu. Ezalaki nde mpo ete ‘mabota nyonso epambolama.’—Genese 22:18; Bagalatia 3:8.
Kasi, Bayisalaele nyonso te nde bamekolaki kondima ya nkɔkɔ na bango Abalayama. Bazalaki sembo te mpe baboyaki kondima ete Yesu azali Masiya. Yango wana, Nzambe abwakaki bango. (Matai 21:43) Kasi, baoyo bazalaki bato ya komikitisa na kati na bango bazwaki mapamboli oyo Nzambe alakaki. Na Pantekote ya mobu 33 na ntango na biso (T.B.), lisangá ya boklisto esalemaki. Ebongiseli wana ya baklisto oyo bapakolamaki na elimo santu ebengamaki “Yisalaele ya Nzambe,” mpe ekómaki nzela oyo mapamboli yango esengelaki koya.—Bagalatia 6:16.
Bandeko mosusu ya lisangá wana basengelaki koteya bango ete bato nyonso bazali ndenge moko. Na ndakisa, moyekoli Yakobo apesaki toli epai ya baoyo bazalaki kopesa lokumu mingi na baklisto oyo bazalaki bazwi koleka oyo bazalaki babola. (Yakobo 2:1-4) Ndenge wana ezalaki malamu te. Ntoma Paulo amonisaki ete baklisto oyo bazalaki Bayuda balekaki soki moke te bato ya bikólo mosusu oyo bakómaki baklisto, mpe baklisto ya mibali balekaki baklisto ya basi te. Akomaki boye: “Zambi bino nyonso bozali bana ya Nzambe kati na Klisto Yesu na nzela na kondima. Bino bosili kobatisama moto na moto kati na Klisto, bosili kolata Klisto. Moyuda azali te, soki [Mogrɛki] te, moombo azali te soki nsomi te, mobali azali te, soki mwasi te. Nde bino nyonso bozali moko kati na Klisto Yesu.”—Bagalatia 3:26-28.
Bato oyo bamonaka ete bazali ndenge moko lelo
Batatoli ya Yehova bazali lelo kosala makasi mpo na kolanda mitinda ya Makomami. Bayebi ete kokabola bato mpo bakeseni mposo, bikólo, bozwi mpe bongo na bongo ezali na ntina moko te na miso ya Nzambe. Yango wana, epai na bango ezali te na bato oyo bazali bakonzi ya lingomba mpe bamosusu bandimi, mpe bango moko bakabwanaka te na kolanda loposo ya nzoto to bozwi. Atako bamosusu kati na bango bakoki kozala bazwi, balukaka te ‘kolakisa na lolendo nyonso bozwi na bango,’ mpo bayebi ete biloko yango ezali se mpo na ntango mokuse. (1 Yoane 2:15-17, NW) Bango nyonso bazali na bomoko mpe bazali kosambela kaka Nkolo moko oyo azali Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, Yehova Nzambe.
Mokomoko na bango andimaka mokumba ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai ya bato mosusu. Lokola Yesu, bakumisaka bato oyo bazali konyokwama mpe baoyo basundolami, na ndenge bakendaka kotala bango na bandako na bango mpo na koteya bango Liloba ya Nzambe. Baoyo bamonanaka lokola bato mpamba bazali kosala elongo na baoyo bato mosusu bakoki komona bango lokola bato minene. Bizaleli ya elimo nde ezali na ntina mingi koleka bokeseni ya bikólo mpe ya mposo, to bokeseni na kati ya babola na bazwi. Ndenge ezalaki na ekeke ya liboso, bango nyonso bazali bandeko basi mpe mibali na kati ya kondima.
Kozala ndenge moko elimboli te kokokana na makambo nyonso
Ya solo, kozala ndenge moko elimboli te kokokana na makambo nyonso. Na lisangá ya boklisto, okoki kokuta mibali mpe basi, mikóló mpe bana mike; lisangá yango ezali na bato ya mposo ndenge na ndenge, ya minɔkɔ mingi, ya bikólo mingi, mpe bazali na bozwi ndenge moko te. Moto na moto azali na mayele to mpe na makasi ndenge moko na bamosusu te. Kasi bokeseni wana esalaka te ete bamosusu bázala likoló, mpe bamosusu na nse. Kasi, komona bato ya ndenge na ndenge bongo ezalaka mpenza esengo. Baklisto yango bayebi ete makoki nyonso oyo bazali na yango ezali nde makabo oyo euti epai ya Nzambe mpe ezali na ntina moko te ete moto amimona ete aleki bamosusu.
Soki bato bazali kokabwana na kati na bango ezali mpo bazali komeka komiyangela bango moko na esika ya kolanda mitinda ya Nzambe. Etikali moke, Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mokili mpo na libela, mpe boyangeli yango ekotya nsuka na bokeseni oyo bato bazali kosala, ekolongola mpe makambo nyonso mosusu oyo enyokolaka bato banda kala. Na ntango wana mpenza nde, ‘bato ya komikitisa bakozwa mokili.’ (Nzembo 37:11) Ntina oyo moto akoki komikumisa mpo akanisi ete aleki basusu ekozala lisusu te. Bokeseni kati na bato ekokabola bango lisusu te, bakozala libota moko.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Mozalisi ‘atalaka bilongi ya mikóló te mpe atalaka mozwi koleka mobola te mpo ete bazali bango nyonso mosala ya mabɔkɔ na ye.’—Yobo 34:19.
[Elilingi na lokasa 6]
Batatoli ya Yehova bapesaka bato mosusu lokumu
[Bililingi na lokasa 7]
Bizaleli ya elimo nde ezali na ntina mingi na kati ya baklisto ya solo