Mabondeli na yo ‘ebongisami lokola mpaka ya malasi’?
“Tiká ete libondeli na ngai ebonga liboso na yo lokola mpaka ya malasi.”—NZEMBO 141:2.
1, 2. Kotumba mpaka ya malasi elimbolaki nini?
YEHOVA NZAMBE atindaki mosakoli Mose ete abongisa mpaka ya malasi ya bulɛɛ mpo na hema ya losambo ya Yisalaele. Nzambe alakisaki ete básangisa mitindo minei ya biloko ya nsolo. (Exode 30:34-38) Mpaka ya malasi yango ezalaki mpenza na nsolo ya mpimbo.
2 Kondimana ya Mibeko oyo libota ya Yisalaele esalaki na Nzambe esɛngaki kotumba mpaka ya malasi mokolo na mokolo. (Exode 30:7, 8) Kotumba mpaka ya malasi elimbolaki likambo moko ya sikisiki? Ɛɛ, mpamba te mokomi ya nzembo ayembaki ete: “Tiká ete libondeli na ngai ebonga liboso na yo [Yehova Nzambe] lokola mpaka ya malasi mpe kotombola na mabɔkɔ na ngai lokola mbeka na mpokwa.” (Nzembo 141:2) Na mokanda ya Emoniseli, ntoma Yoane alobi ete baoyo bazali zingazinga ya kiti ya bokonzi ya Nzambe na likoló bazali na basaani ya wolo etondi na mpaka ya malasi. Lisolo lipemami elobi ete, “Mpe mpaka ya malasi elimboli mabondeli ya basantu.” (Emoniseli 5:8, NW) Boye, kotumba mpaka ya malasi na nsolo ya mpimbo elimboli mabondeli endimami oyo basaleli ya Yehova bazali kosala butu na moi.—1 Batesaloniki 3:10; Baebele 5:7.
3. Eloko nini ekosalisa biso ‘tóbongisa mabondeli na biso lokola mpaka ya malasi liboso ya Nzambe’?
3 Mpo Nzambe andima mabondeli na biso, tosengeli kobondela ye na nkombo ya Yesu Klisto. (Yoane 16:23, 24) Kasi, ndenge nini tokoki kobongisa lisusu mabondeli na biso? Soki totaleli mwa bandakisa ya Makomami, ekosalisa biso na kobongisa mabondeli na biso lokola mpaka ya malasi liboso ya Yehova.—Masese 15:8.
Tóbondela na kondima
4. Boyokani nini ezali kati na kondima mpe mabondeli oyo Nzambe andimaka?
4 Mpo mabondeli na biso mábuta epai ya Nzambe lokola mpaka ya malasi na nsolo ya mpimbo, tosengeli kobondela na kondima. (Baebele 11:6) Ntango bankulutu baklisto basololi na moto moko oyo azali na maladi na elimo mpe andimi lisalisi na bango oyo euti na Makomami, “libondeli na kondima” oyo bakosala “ekobikisa mobɛli.” (Yakobo 5:15) Mabondeli oyo masalami na kondima masepelisaka Tata na biso ya likoló. Ezali mpe bongo mpo na boyekoli mozindo ya Liloba ya Nzambe. Mokomi na nzembo amonisaki elimo malamu ntango ayembaki ete: “[Nakotombola] mpe mabɔkɔ na ngai na malako na yo, yango elingi ngai, mpe nakobanza bilakeli na yo. Lakisá ngai bososoli malamu mpe boyebi zambi nandimi malako na yo.” (Nzembo 119:48, 66) Tiká ete ‘tótombola mabɔkɔ’ na libondeli ya komikitisa mpe tómonisa kondima na ndenge tozali kotosa mibeko ya Nzambe.
5. Tosengeli kosala nini soki toyebi likambo oyo tosengeli kosala te?
5 Na ndakisa soki toyebi ndenge ya kosala te mpo na kolonga komekama moko. Mbala mosusu toyebi te ete esakweli moko ya sikisiki ya Biblia ezali kokokisama. Na esika ya kotika likambo yango ebulunganisa elimo na biso, tóbondela mpo na kosɛnga mayele. (Bagalatia 5:7, 8; Yakobo 1:5-8) Ya solo, tokoki kolikya te ete Nzambe akoyanola biso na ndenge ya likamwisi. Tosengeli komonisa bosembo ya mabondeli na biso na ndenge tozali kosala makambo oyo asɛngi na basaleli na ye nyonso. Tosengeli komipesa na boyekoli ya Makomami oyo ezali kotonga kondima na lisalisi ya mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47; Yosua 1:7, 8) Tosengeli mpe kokola na boyebi wana tozali kosangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita ya basaleli ya Nzambe.—Baebele 10:24, 25.
6. (a) Biso nyonso tosengeli koyeba likambo nini mpo na mikolo na biso mpe kokokisama ya bisakweli ya Biblia? (b) Longola kobondela ete nkombo ya Yehova ezala mosantu, tosengeli mpe kosala nini?
6 Lelo oyo, baklisto mosusu bazali koluka matomba na bango mpe misala oyo ezali komonisa ete babosani ete tosili kokóma mosika na kati ya “elaka na nsuka.” (Danyele 12:4) Ebongi ete baninga na bango bandimi bábondela mpo na bango ete bálamusa to bálendisa kondima na bango na likambo oyo Makomami emonisi ete Klisto azali na kati ya nguya ya Bokonzi na ye banda 1914 ntango Yehova atyaki ye Mokonzi na likoló mpe ete azali koyangela katikati ya banguna na ye. (Nzembo 110:1, 2; Matai 24:3) Biso nyonso tosengeli koyeba ete makambo oyo esakolamaki lokola kobomama ya “Babilone Monene,” lisangani ya mangomba ya lokuta, mpe ndenge Koko ya Makoko akobundisa basaleli ya Yehova, mpe ndenge Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso akobikisa bango na etumba ya Armagedon, ezali makambo oyo ekoki kobima na mbalakaka mpe nyonso wana ekoki kosalema na mwa ntango mokuse. (Emoniseli 16:14, 16; 18:1-5; Ezekiele 38:18-23) Tóbondela ete Nzambe asunga biso tólala mpɔngi na elimo te. Tiká ete biso nyonso tóbondela makasi mpo ete nkombo ya Yehova ezala mosantu, Bokonzi na ye eya, mpe mokano na ye esalema na mabelé ndenge ezali kosalema na likoló. Tómonisa ntango nyonso kondima mpe tómonisa ete mabondeli na biso ezali sembo. (Matai 6:9, 10) Ɛɛ, tiká ete baoyo nyonso balingaka Yehova báluka liboso Bokonzi mpe boyengebene na ye mpe básangana mingi na mosala ya kosakola nsango malamu liboso ete nsuka eya.—Matai 6:33; 24:14.
Tósanzola mpe tótɔnda Yehova
7. Nini ezali kosimba motema na yo na kati ya libondeli ya Davidi oyo ndambo na yango ekomami na 1 Ntango 29:10-13?
7 Lolenge moko malamu ya ‘kobongisa mabondeli na biso lokola mpaka ya malasi’ ezali kosanzola mpe kotɔnda Nzambe na motema mobimba. Mokonzi Davidi asalaki mabondeli motindo yango na ntango oyo ye na bato ya Yisalaele bapesaki makabo mpo na kotonga tempelo ya Yehova. Davidi abondelaki ete: “Yo [Yehova], Nzambe na Yisalaele, tata na biso, okumisama libela na libela. Ɛ [Yehova], epai na yo, monene ezali mpe nguya mpe nkembo mpe elonga mpe lokumu. Zambi nyonso na likoló mpe na nse ezali na yo; bokonzi mpe ezali na yo, ɛ [Yehova], mpe yo okokumisama nkolo likoló na nyonso. Mosolo mpe lokumu ikoutaka bobele na yo; yo ozali mokonzi likoló na nyonso. Na lobɔkɔ na yo, nguya ezali mpe makasi; kofulukisa mpe kokembisa nyonso ezali na lobɔkɔ na yo. Boye, ɛ Nzambe na biso, [sikoyo] tokotɔnda yo mpe tokosanzola nkombo na yo na nkembo.”—1 Ntango 29:10-13.
8. (a) Maloba nini ya masanzoli ezali na Nzembo 148 kino 150 oyo ezali mpenza kosimba motema na yo? (b) Soki tozali na mayoki lokola oyo emonisami na Nzembo 27:4, tokosala nini?
8 Talá maloba kitoko ya kokumisa mpe kopesa matɔndi! Ekoki kozala ete mabondeli na biso mazali na maloba ya kitoko te, kasi makoki mpenza kouta na motema. Mokanda ya Nzembo ezali na mabondeli ya matɔndi mpe ya masanzoli mingi. Okokuta maloba kitoko ya masanzoli na Nzembo 148 kino 150. Nzembo mingi ezali komonisa matɔndi epai ya Nzambe. Davidi ayembaki ete: “Nalɔmbi eloko moko epai na [Yehova], nakolanda yango; yango ete, nafanda kati na ndako na [Yehova]; mikolo nyonso na bomoi na ngai; ete natala boboto na [Yehova] mpe natuna makambo kati na Tempelo na ye.” (Nzembo 27:4) Tiká tósala na boyokani na mabondeli motindo yango; elingi koloba tózala na molende ya kosangana na misala nyonso ya lisangá ya Yehova. (Nzembo 26:12) Soki tokosala bongo mpe soki tokomanyola likoló ya Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, tokozala na bantina mingi ya kopusana epai ya Yehova na masanzoli mpe matɔndi oyo euti na motema.
Tóluka lisalisi ya Yehova na komikitisa
9. Mokonzi Asa abondelaki ndenge nini, mpe makambo esukaki ndenge nini?
9 Soki tozali kosalela Yehova na motema mobimba lokola Batatoli na ye, tokoki kolikya ete akoyoka mabondeli na biso ntango tosɛngi lisalisi. (Yisaya 43:10-12) Tózwa ndakisa ya Asa, oyo azalaki mokonzi ya Yuda. Mboka na ye ezalaki na kimya na boumeli ya mbula 10 ya liboso ya boyangeli na ye oyo nyonso eumelaki mbula 41 (977-937 L.T.B.). Na nsima, Zela, Moetiopia ayaki na milio moko ya basoda mpo na kobundisa Yuda. Atako bazalaki moke mpenza, Asa na bato na ye babimaki kokutana na banguna. Kasi, liboso ya kobunda, Asa abondelaki makasi. Andimaki ete Yehova azali na nguya ya kobikisa. Mokonzi asɛngaki lisalisi. Alobaki ete: “Ɛ [Yehova], Nzambe na biso, sungá biso zambi tokotalela yo mpe na nkombo na yo toyei liboso na ebele monene oyo. Ɛ [Yehova], yo Nzambe na biso, tiká te ete moto aleka yo.” Yuda elongaki na ndenge Yehova abikisaki bango mpo na nkombo na ye monene. (2 Ntango 14:1-15) Ezala ete Nzambe abikisi biso na komekama to alendisi biso ete tóyikela yango mpiko, ntembe ezali te ete ayokaka kolela na biso ntango tosɛngaka ye lisalisi.
10. Ntango toyebi likambo oyo tokoki kosala te mpo na kolonga mokakatano moko, ndenge nini libondeli ya Mokonzi Yosafata ekoki kosalisa biso?
10 Soki toyebi te ndenge nini kolonga mokakatano moko, tokoki komindimisa ete Yehova akoyoka malɔmbɔ na biso mpo na kozwa lisungi. Likambo yango emonanaki na ntango ya Yosafata, mokonzi ya Yuda, oyo abandaki koyangela na mobu 936 L.T.B. mpe bokonzi na ye eumelaki mbula 25. Ntango basoda ya Moaba, ya Amona, mpe ya bitúká ya ngombangomba ya Seili basanganaki mpo na kobundisa Yuda, Yosafata abondelaki ete: “Ɛ Nzambe na biso, yo okopesa bango etumbu te? Zambi tozali na nguya liboso na ebele monene te oyo ezali koyela biso. Toyebi likambo na kosala te nde miso na biso izali epai na yo.” Yehova ayanolaki na libondeli wana ya komikitisa, abundelaki Yuda mpe abomaki banguna na ndenge akɔtisaki bango na mobulungano mpe babomanaki bango na bango. Yango wana, mabota ya zingazinga ekómaki kobanga, mpe kimya ekɔtaki na Yuda. (2 Ntango 20:1-30) Soki toyebi likambo ya kosala te mpo na kolonga mokakatano moko, tokoki kobondela lokola Yosafata ete: ‘Toyebi likambo tosengeli kosala te, kasi totii miso na biso epai na yo.’ Elimo santu ekoki kokundwela biso makambo euti na Makomami oyo esengeli mpo na kosilisa mokakatano yango, to Nzambe akoki kosalisa biso na ndenge oyo eleki mayele ya bomoto.—Baloma 8:26, 27.
11. Misala ya Nehemia mpo na bifelo ya Yelusaleme ekoki koteya biso nini mpo na libondeli?
11 Mbala mosusu tosengeli kolendendela na libondeli mpo ete Nzambe asunga biso. Nehemia alelaki, azalaki kolya te, mpe abondelaki mikolo mingi mpo na bifelo ya Yelusaleme oyo bibebaki mpe mpo na bwale ya bato oyo bazalaki kofanda na Yuda. (Nehemia 1:1-11) Tomoni ete mabondeli na ye ebutaki epai ya Nzambe lokola mpaka ya malasi na nsolo ya mpimbo. Mokolo moko, Alatazelezese, mokonzi ya Perse atunaki Nehemia ntango azalaki mawamawa ete: “Yo ozali kolɔmba nini?” Nehemia alobi ete, “[Mbala moko, NW] nabondelaki mpe epai na Nzambe na lola.” Nzambe ayanolaki na libondeli wana ya mokuse mpe ya nse ya motema, mpe Nehemia azwaki ndingisa ya kokokisa mposa na ye. Akendaki na Yelusaleme mpo na kotonga bifelo na yango oyo bibebaki.—Nehemia 2:1-8.
Tiká ete Yesu ateya yo ndenge ya kobondela
12. Lobá na mokuse mpe na maloba na yo moko libondeli ya ndakisa oyo Yesu alakisaki.
12 Kati na mabondeli nyonso oyo ezali na Makomami, libondeli ya ndakisa oyo Yesu Klisto amonisaki lokola mpaka ya malasi na nsolo ya mpimbo ezali mpenza koteya biso makambo mingi. Evanzile ya Luka elobi ete: “Moko na bayekoli na [Yesu] alobaki na ye ete, Nkolo lakisá biso kobondela [lokola] Yoane alakisaki bayekoli na ye. Alobaki na bango ete, Wana ekobondela bino, lobá ete, Tata, nkombo na yo ezala bulɛɛ. Bokonzi na yo eya. Pesá biso kwanga ekoki na mokolo na mokolo, mpe limbisá biso masumu na biso, mpo ete biso tokolimbisaka bato nyonso bazali na nyongo na biso. Kambá biso kati na komekama te.” (Luka 11:1-4; Matai 6:9-13) Sikoyo, tótalela naino libondeli yango malamumalamu. Libondeli yango epesamaki mpo tózongelaka yango te, kasi ezali ndakisa oyo tokolanda.
13. Maloba “Tata, nkombo na yo ezala bulɛɛ” malimboli nini?
13 “Tata, nkombo na yo ezala bulɛɛ.” Kobénga Yehova Tata ezali libaku malamu ya basaleli na ye oyo bamipesi. Lokola bana bakendaka noki epai ya tata oyo ayebi koyokela bango mawa mpo na likambo nyonso oyo etungisi bango, biso mpe tosengeli mbala na mbala kozwa ntango ya kobondela Nzambe na lokumu mpe na limemya. (Nzembo 103:13, 14) Tosengeli kolakisa na mabondeli na biso ete tozali na lobanzo ya kokumisa nkombo ya Nzambe mpamba te tolingi ete esukwama na mbindo nyonso oyo bapakoli yango. Ɛɛ, tolingi ete nkombo ya Nzambe ekumisama mpe etalelama ete ezali bulɛɛ, to mosantu.—Nzembo 5:11; 63:3, 4; 148:12, 13; Ezekiele 38:23.
14. Kobondela ete, “Bokonzi na yo eya” elimboli nini?
14 “Bokonzi na yo eya.” Bokonzi ezali boyangeli ya Yehova oyo emonisami na guvernema ya Masiya kuna na likoló. Apesi yango na mabɔkɔ ya Mwana na ye mpe na “bato na bulɛɛ” oyo basangani na ye. (Danyele 7:13, 14, 18, 27; Emoniseli 20:6) Etikali moke ‘ekoya’ kolongola batɛmɛli nyonso ya bokonzi ya Nzambe awa na mabelé. (Danyele 2:44) Na nsima, mokano ya Yehova ekosalema na mabelé, lokola ezali kosalema na likoló. (Matai 6:10) Yango ekopesa esengo monene na bikelamu nyonso oyo bizali kosalela Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ na bosembo.
15. Kosɛnga Yehova “kwanga ekoki na mokolo” emonisi nini?
15 “Pesá biso kwanga ekoki na mokolo na mokolo.” Kosɛnga Yehova bilei “ekoki na mokolo” emonisi ete tozali kosɛnga biloko ebele ebele te kasi bobele mpo na bamposa na biso ya mokolo na mokolo. Atako totyaka motema ete Nzambe akopesa biso, tosalelaka bamwaye nyonso ya sembo oyo emonani mpo na kozwa bilei mpe biloko mosusu oyo tozali na yango mposa. (2 Batesaloniki 3:7-10) Tosengeli mpe kotɔnda Mopesi na biso oyo azali na likoló mpo na bolingo, mayele, mpe nguya na ye oyo ezali komonana na biloko oyo azali kopesa biso.—Misala 14:15-17.
16. Ndenge nini tokoki kozwa bolimbisi epai ya Nzambe?
16 “Limbisá biso masumu na biso, mpo ete biso tokolimbisaka bato nyonso bazali na nyongo na biso.” Lokola tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosalaka masumu, tokolonga te kotosa mitinda ya kokoka ya Yehova na ndenge oyo esengeli mpenza. Yango wana, tosengeli kobondela mpo na kosɛnga bolimbisi na lisalisi ya mbeka ya lisiko ya Yesu. Kasi soki tolingi ete “Moyoki ya mabondeli” asalela mbeka wana mpo na masumu na biso, tosengeli kobongola motema mpe kondima disipilini nyonso oyo apesi biso. (Nzembo 65:2, NW; Baloma 5:8; 6:23; Baebele 12:4-11) Tokoki mpe kolikya ete Nzambe akolimbisa biso bobele soki ‘tokolimbisa baoyo nyonso bazali na nyongo na biso,’ elingi koloba baoyo bazali kosalela biso masumu.—Matai 6:12, 14, 15.
17. Maloba “Kambá biso kati na komekama te” malimboli nini?
17 “Kambá biso kati na komekama te.” Na bisika mosusu Biblia elobaka lokola ete Yehova nde asali likambo moko, nzokande atikeli yango bobele nzela. (Luta 1:20, 21) Nzambe amekaka biso te ete tósala masumu. (Yakobo 1:13) Komekama na kosala mabe eutaka na Zabolo, na nzoto na biso ya masumu, mpe na mokili oyo. Satana nde azali Momeki oyo alukaka kopusa biso tósalela Nzambe masumu. (Matai 4:3; 1 Batesaloniki 3:5) Ntango tozali kosɛnga ete, “Kambá biso na komekama te,” tozali nde kosɛnga Nzambe atika biso tókwea te ntango tomekami ete tótombokela ye. Akoki kotambwisa biso ete tókwea te mpe “oyo mabe,” elingi koloba Satana, akweisa biso te.—Matai 6:13; 1 Bakolinti 10:13.
Sála makambo oyo eyokani na mabondeli na yo
18. Ndenge nini tokoki kosala makambo oyo eyokani na mabondeli na biso mpo na kozala na libala mpe na libota ya esengo?
18 Libondeli ya ndakisa oyo Yesu apesaki elobelaki makambo minene ya ntina, kasi tokoki kobondela mpo na likambo nyonso. Na ndakisa, tokoki kobondela mpo na komonisa mposa na biso ya kozala na libala ya malamu. Mpo tókwea na pite te kino tokobala, tokoki kobondela mpo na kozala na komipekisa. Kasi, na nsima tósala makambo oyo eyokani na mabondeli na biso; tóboya mikanda mpe kominanola oyo ezali kolamusa mposa ya kosala pite. Tózala mpe na ekateli ya ‘kobala bobele kati na Nkolo.’ (1 Bakolinti 7:39; Deteronome 7:3, 4) Ntango tobali, tosengeli kosala makambo oyo eyokani na mabondeli na biso mpo tózala na bolamu; mpo na yango tosengeli kolanda toli ya Nzambe. Mpe soki toboti bana, tosengeli kosuka kaka na kobondela te ete bákóma basaleli ya Yehova. Tosengeli kosala nyonso mpo na koteya bango solo ya Nzambe na nzela ya boyekoli ya Biblia mpe komema bango na makita nyonso ya boklisto.—Deteronome 6:5-9; 31:12; Masese 22:6.
19. Tosengeli kosala nini soki tozali kobondela mpo na mosala na biso ya kosakola?
19 Tozali kobondela mpo ete mosala na biso ya kosakola epambolama? Boye, tósala makambo oyo eyokani na mabondeli yango; tósangana na ndenge oyo esengeli na mosala ya kosakola Bokonzi. Soki tozali kobondela mpo na kozwa mabaku ya kosalisa bato bátambola na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko, tosengeli kozwa bankombo ya bato oyo basepeli na nsango na biso mpe kobongisa ntango na manaka na biso mpo na koyekola na bango Biblia. Tokoloba boni soki tozali na mposa ya kosala mosala ya ntango nyonso lokola mobongisi-nzela? Boye tósala matambe oyo esengeli na boyokani na mabondeli na biso, tóbakisa ntango oyo tozali kolekisa na mosala ya kosakola mpe tósakola elongo na babongisi-nzela. Kosala matambe motindo wana ekomonisa ete tozali kosala makambo oyo eyokani na mabondeli na biso.
20. Lisolo oyo elandi ekolobela makambo nini?
20 Soki tozali kosalela Yehova na bosembo, tokoki kozala na elikya ete akoyanola na mabondeli na biso oyo eyokani na makambo oyo alingi. (1 Yoane 5:14, 15) Ya solo, tozwi makanisi ya ntina na boyekoli ya mabondeli mosusu oyo ekomami na Biblia. Na lisolo oyo elandi tokoyekola malako mosusu ya Makomami mpo na baoyo balingi ‘kobongisa mabondeli na bango ete ezala lokola mpaka ya malasi liboso ya Yehova.’
Okoyanola ndenge nini?
◻ Mpo na nini tosengeli kobondela na kondima?
◻ Masanzoli mpe matɔndi esengeli kozala na esika nini na mabondeli na biso?
◻ Mpo na nini tosengeli koluka lisalisi ya Yehova na elikya nyonso na kati ya libondeli?
◻ Tángá mwa makambo minene ya libondeli ya ndakisa.
◻ Ndenge nini tokoki kosala makambo oyo eyokani na mabondeli na biso?
[Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 12]
Lokola Mokonzi Yosafata, ntango mosusu tokoki kobondela: ‘Yehova, toyebi likambo tosengeli kosala te, kasi totii miso na biso epai na yo’
[Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 13]
Obondelaka na kolanda libondeli ya ndakisa oyo Yesu apesaki?