Klisto ayinaki ezaleli ya kotyola mibeko—bongo yo?
“Yo olingaki boyengebene, mpe oyinaki kotyola mibeko. Yango wana Nzambe, ye Nzambe na yo, apakoli yo na mafuta na esengo koleka baninga na yo.”—BAEBELE 1:9, MN.
1. Longola kolinga boyengebene, eloko nini esengisami lisusu epai na basaleli nyonso ya Jéhovah Nzambe?
BASALELI ya Jéhovah na solo, balingi ye na motema na bango mobimba, na molimo na bango mobimba, na elimo na bango mobimba mpe na makasi na bango mobimba. (Malako 12:30) Balingi kosepelisa motema ya Jéhovah na kotikaláká sembo. (Masese 27:11) Mpo na kosala yango, basengeli bobele kolinga boyengebene te, kasi basengeli mpe koyina ezaleli ya kotyola mibeko. Ezali yango esalemaki na Yesu Klisto, Ndakisa na bango. Elobami na ntina na ye ete: “Yo olingi boyengebene, mpe oyini kotyola mibeko.”—Baebele 1:9, MN.
2. Ezaleli ya kotyola mibeko esangisi makambo nini?
2 Ezaleli ya kotyola mibeko ezali nini? Ezali lisumu, lokola ntomá Yoane amonisaki yango wana akomaki ete: “Moto na moto oyo akosalaka lisumu azali kotyola mibeko, mpo ete lisumu ezali bongo kotyola mibeko.” (1 Yoane 3:4, MN) Moto oyo akotyolaka mibeko “apekisami na mibeko te mpe ayebi kotósa yango te.” (Webster’s Ninth New Collegiate Dictionary) Ezaleli ya kotyola mibeko esangisi makambo nyonso mabe, na mbindo, na bosɔtɔ mpe yango ezangi kolongobana. Makambo oyo mazali kosalema na mokili mamonisi ete ezaleli ya kotyola mibeko ezali kosalema lelo koleka na mikolo ya liboso. Ntembe ezali soko moke te ete tozali kobika na “ntango ya mpasi” oyo ntomá Paulo asakolaki na 2 Timoté 3:1-5. Na ntina etali ezaleli nyonso oyo ya kotyola mibeko, ezali malamu mpenza lokola tosili kozwa etinda ya koyina mabe nyonso! Na ndakisa, elobami na biso ete: “Bino baoyo bokolingaka Jéhovah, boyina mabe.” (Nzembo 97:10) Bobele bongo, totangi ete: “Boyina yango ezali mabe, mpe bolinga oyo ezali malamu.”—Amos 5:15.
Mitindo misato ya koyina
3-5. Wapi mitindo misato oyo liloba “koyina” lisalelami kati na Liloba na Nzambe?
3 Koyina elimboli nini? Kati na Liloba na Nzambe liloba “koyina” lisalelami na mitindo misato mikeseni. Ezali na koyina oyo euti na mabe mpe mokano na yango ezali mpo na kookisa mpasi. Baklisto basengeli te kozala na motindo na koyina wana. Ezali motindo na koyina oyo epusaki Kaina na koboma ndeko na ye, Abele moyengebene. (1 Yoane 3:12) Ezali mpe motindo na koyina oyo bakonzi ya mangomba bazalaki na yango epai na Yesu Klisto.—Matai 26:3, 4.
4 Liloba “koyina” lilobelami lisusu na Makomami na ndimbola ya kozala na bolingo moke. Na ndakisa, Yesu alobaki ete: “Soko moto ayei epai na ngai nde ayini tata na ye te, na mama na ye te, na mwasi na ye te, na bana na ye te, na bandeko na ye mibali te, na bandeko na ye basi te, mpe molimo na ye mpenza te, akoki kozala moyekoli na ngai te.” (Luka 14:26, MN) Na elobeli ya polele, Yesu alingaki bobele koloba ete tosengeli kozala na bolingo moke epai na bandeko na biso mpe kozala na bolingo mingi epai na ye. Yakobo ‘ayinaki Lea’; kasi na solo mpenza, azalaki nde na bolingo moke epai na ye, mpe alingaki Rachel mingi.—Genese 29:30, 31.
5 Na nsuka, ezali na ndimbola ya liloba “koyina” oyo tosengeli mpenza kotalela yango awa. Ezali kopesa likanisi ya koboya mpenza to kooka mpii mpo na moto to mpe eloko moko; ete tolingi te kozala na boyokani elongo na moto wana to na eloko wana. Nzembo 139 elobeli “koyina eleki makasi.” Mpo na yango nde Davidi alobaki ete: “Ɛ Jéhovah! Nayini nde bango te, baoyo bakoyinaka yo mpenza? Nazali nde na mpii mpo na bango te, baoyo bazali kotombokela yo? Nayini bango na koyina eleki makasi. Bakómi bayini na ngai mpenza.”—Nzembo 139:21, 22, MN.
Mpo na nini tosengeli koyina ezaleli ya kotyola mibeko
6, 7. (a) Mpo na nini tosengeli mpenza koyina ezaleli ya kotyola mibeko? (b) Wapi ntina ya mibale ya nguya oyo tosengeli koyina ezaleli ya kotyola mibeko?
6 Mpo na nini tosengeli koyina ezaleli ya kotyola mibeko? Moko na bantina ezali mpo na kobatela limemya ya biso moko mpe kozala na lisosoli malamu. Bobele na ezaleli wana nde tokoki kozala na boyokani malamu elongo na Jéhovah, Tata na biso na likoló, oyo na sembo mpe na bolingo. Davidi apesaki ndakisa malamu na likambo yango, lokola tokoki komona yango na kotangáká Nzembo 26. Na ndakisa, alobaki ete: “Naboyi koyangana na bato mabe mpe nakofanda esika moko na bato na masumu te.” (Nzembo 26:5) Bolingo na biso mpo na Nzambe mpe mpo na boyengebene, esengeli kopusa biso na kooka nkanda ya sembo—ee, koyina—makambo nyonso oyo ye ataleli yango ete ezali kotyola mibeko, kati na yango mpe misala mabe ya baoyo baboyi kotósa Jéhovah mpe bayini ye. Lisusu, tosengeli koyina ezaleli ya kotyola mibeko na ntina na nsɔni oyo yango ekobwakaka likoló na nkombo na Nzambe.
7 Ntina mosusu oyo bato na Jéhovah basengeli koyina ezaleli ya kotyola mibeko ezali oyo ete, yango ezali likámá mpe ekopesaka mpasi monene. Kolóna kati na nzoto, oyo elimboli kolona ezaleli ya kotyola mibeko, ekobimisa makambo nini? Paulo, akomaki ete: “Bomizimbisa te: bakosɛkaka Nzambe te. Mpo ete, soko moto akokona nini, akobuka bobele yango; mpo ete ye oyo akolóna na mosuni akobuka libebi mpo na mosuni na ye, nde ye oyo akolóna na elimo akobuka bomoi na nzela ya elimo.” (Bagalatia 6:7, 8, MN) Na yango, tosengeli soko moke te kozala na mposa ya kotyola mibeko. Ya solo, tosengeli koyina ezaleli ya kotyola mibeko mpo na bolamu na biso mpe kimya na biso ya elimo.
Baoyo bazali koyina ezaleli ya kotyola mibeko
8. Na ntina na koyina ezaleli ya kotyola mibeko, nani apesaki ndakisa eleki malamu, mpe emonisami na mikapo nini ya Makomami?
8 Na ntina etali koyina ezaleli ya kotyola mibeko, Nzambe azali ndakisa ya liboso mpo na bikelamu nyonso ya mayele. Azali na nkanda na sembo mpenza na ntina na kotyola mibeko mpe Liloba na ye liyebisi ete: “Jéhovah ayini makambo motoba; ee, molimo na ye moyini makambo sambo: miso na enzombo, lolemo na lokutá, mpe mabɔkɔ masopi makila ya moto na sembo, motema oyo mokobanzaka na misala mabe, makolo makopotaka mbango epai na mabe, motatoli na lokutá oyo akolobaka makambo na sembo te, mpe moto na moto akoyeisa kowelana kati na bandeko.” Totangi lisusu ete: “Kobanga Jehovah elimboli koyina mabe. Komikumisa mpe lolendo mpe nzela mabe mpe monoko na lokutá, nayini yango.” (Masese 6:16-19; 8:13, MN) Lisusu, elobami na biso ete: “Ngai Jéhovah, nalingi boyengebene, nayini moyibi mpe bokesene”—Yisaya 61:8, MN.
9, 10. Lolenge nini Yesu amonisaki ete ayinaki ezaleli ya kotyola mibeko?
9 Yesu Klisto amekolaki Tata na ye na ntina etali koyina ezaleli ya kotyola mibeko. Na yango, totangi ete: “Yo olingaki boyengebene mpe oyinaki kotyola mibeko. Yango wana Nzambe, ye Nzambe na yo, apakoli yo na mafuta na esengo koleka baninga na yo”. (Baebele 1:9, MN) Mpo na motindo na koyina wana, Yesu azali ndakisa mpo na biso. Amonisaki koyina oyo azali na yango na ntina na ezaleli ya kotyola mibeko na kotóndoláká baoyo bazalaki kosala yango na nko—bakonzi ya mangomba ya lokutá. Mbala mingi, azalaki kobénga bango ete bakosi. (Matai mokapo 23) Na libaku mosusu, alobaki na bango ete: “Bino bouti na tata na bino, Diable, mpe bolingi kosala mikano ya tata na bino.” (Yoane 8:44, MN) Mbala mibale, amonisaki koyina oyo azalaki na yango na ntina na ezaleli ya kotyola mibeko na kosaleláká makasi ya nzoto na ye mpo na kopɛtola tempelo longwa na basambeli na bokosi mpe na lokoso.—Matai 21:12, 13; Yoane 2:13-17.
10 Yesu amonisaki lisusu koyina oyo azalaki na yango mpo na ezaleli ya kotyola mibeko mpe masumu, wana aboyaki kosangana na yango ata moke. Na yango, akokaki kotuna banguna na ye ete: “Nani kati na bino akokweisa ngai mpo na lisumu?” (Yoane 8:46, MN) Yesu azalaki “moto na sembo, na mabe te, na litɔnɔ te, akabwani na bato ya masumu.” (Baebele 7:26, MN) Ezali yango nde Petelo andimisaki na ntango akomaki ete Yesu “asalaki lisumu te, mpe azwami na bokosi kati na monoko na ye te.”—1 Petelo 2:22, MN.
11. Tozali na ndakisa nini ezwami na Makomami mpo na bato bazangi kokoka baoyo bayinaki ezaleli ya kotyola mibeko?
11 Nzokande, Yesu azalaki moto ya kokoka. Tozali nde na bandakisa ezwami na Makomami na ntina bato bazangi kokoka, baoyo bayinaki mpenza ezaleli ya kotyola mibeko? Ee! Na ndakisa, Moize mpe baninga na ye Balevi bamonisaki koyina monene na losambo ya bikeko na kobomáká soko 3 000 basambeli na bikeko na kolanda etinda na Jéhovah. (Exode 32:27, 28) Finehase amonisaki koyina monene na kotyola mibeko wana abomaki basali mibale na pite na likɔngá.—Mituya 25:7, 8.
Tomonisa ete toyini ezaleli ya kotyola mibeko
12. (a) Lolenge nini tokoki komonisa ete tozali koyina ezaleli ya kotyola mibeko? (b) Makambo nini tosengeli mpenza kosala mpo na bobwaka makanisi mabe?
12 Na eleko na biso, lolenge nini tokoki komonisa ete toyini ezaleli ya kotyola mibeko? Na kopekisáká makanisi na biso, maloba na biso, mpe misala na biso. Tosengeli kolóna momeseno ya kokanisa makambo na kolendisa wana makanisi na biso matyami na likambo mosusu te. Soki tolamuki na butu, tokoki ntango mosusu kolona makanisi mabe, na kokanisáká likoló na mabe oyo basalelaki biso to kotya makanisi na makambo matali kosangisa nzoto. Totika te ete makambo wana, mazwama kati na biso, kasi tozwa nde momeseno ya kolona makanisi malamu. Na ndakisa, kati na makanisi na biso, tomeka kobómba mwa mikapo ya Makomami, bolamu libwa to mbuma libwa ya elimo. (Matai 5:3-12; Bagalatia 5:22, 23) Okoki kotanga bankombo ya bantomá 12? Oyebi Mibeko Zomi? Wapi masangá nsambo oyo malobelami na Emoniseli? Koyekola ba cantiques ekoki mpe kosalisa biso na kotya makanisi na biso na makambo na solo, oyo nabongi, oyo na sembo, oyo na pɛto, oyo na bobóto, oyo na lokumu, oyo malamu mpe ebongi kosanzolama.—Bafilipi 4:8.
13. Koyina oyo tozali na yango na ntina na ezaleli ya kotyola mibeko, ekopusa biso na koyina motindo na maloba nini?
13 Lisusu, tokomonisa ete toyini kotyola mibeko na kozanga kobimisa maloba na mbindo. Na mokili, bato mingi basepelaka kosolola to koyokamela maloba na nsɔni, kasi baklisto basengeli te kozala na mposa ya koyoka yango. Kasi, tosengeli nde kolongwa wana mpo ete tosangana ata na lisoló moko te lilobeli makambo yango. Soki tokoki te kolongwa na esika wana, tokoki komonisa na ezaleli na biso ete tozali koyina masoló motindo wana. Tosengeli kosimba toli oyo kitoko ete: “Tika te ete maloba mabe mabima na monoko na yo, kasi bimisa maloba nyonso malamu mpo na kolendisa na ntango esengeli, ete epesa litomba na baoyo nyonso bazali koyoka yango.” (Baefese 4:29, MN) Biso moko tosengeli te komibebisa na kolobáká to koyokáká makambo na mbindo.
14. Lolenge nini koyina oyo tozali na yango na ntina na ezaleli ya kotyola mibeko ezali kobatela biso kati na makambo ya mombongo mpe na mosala?
14 Koyina oyo tozali na yango mpo na kotyola mibeko esengeli komema biso lisusu na koboya misala nyonso ya masumu. Kozala na koyina mpo na kotyola mibeko ekosalisa biso ete tokwea na likambo wana te. Baklisto ya solo bakosalaka masumu te. (Tala 1 Yoane 5:18) Na ndakisa, tosengeli koyina misala nyonso ya mombongo mozangi kolongobana. Lelo, ebele ya ba Témoins de Jéhovah bazali kopusama na bakonzi na bango ya misala ete basala makambo mazangi kolongobana, kasi bazali koboya yango. Baklisto bazali nkutu kobungisa mosala na bango na esika na kosala likambo oyo likotungisa lisosoli na bango liteyami na Biblia. Epai mosusu, tolingi komonisa koyina na biso mpo na kotyola mibeko, na kozanga kobuka mibeko ya nzela mpe na kozanga kobuba wana tosengeli kofuta mpako to mpe kofuta douane.—Misala 23:1; Baebele 13:18.
Toyina mposa mabe na nzoto
15. Mikano nini Nzambe akokisi yango wana azalisaki bato na mposa ya kosangisa nzoto?
15 Lokola tozali baklisto, tosengeli mpenzampenza koyina mbindo nyonso na ntina na kosangisa nzoto. Na kozalisáká bato na mposa ya kosangisa nzoto, Nzambe akokisaki mikano mibale ya malamu mingi. Asalaki bongo mpo ete libota na bato lisila te, mpe azwaki bibongiseli bitondi na bolingo mpo na bolamu ya bikelamu na ye. Ata bato oyo bazali babólá, baoyo batanga te, to mpe bazali na ezalela mosusu ya mabe, bakoki kozwa bolamu monene kati na libala. Nzokande, Jéhovah asili kotya bandelo epai yango esengeli kosalema. Esengeli kotósa bandelo yango etyami na Nzambe.—Genese 2:24; Baebele 13:4.
16. Ezaleli nini tokozala na yango liboso na masano to misala ya mbindo na ntina na kosangisa nzoto?
16 Soki toyini ezaleli ya kotyola mibeko, tokomibatela mpenza longwa na mbindo nyonso ya kosangisa nzoto mpe na lolenge nyonso na mbindo ya kominanola. Na yango, tokoboya mikanda mpe bazulunalo nyonso oyo emonisi bizaleli mabe. Bobele bongo, soki toyini ezaleli ya kotyola mibeko, tokotala ata lisano moko te ya mbindo, ezala na televizio, na cinéma to na teyatre. Soki tomoni ete lisano yango lizali mbindo, tosengeli nokinoki kokanga televizio, to mpe kozwa makasi ya kobima na esika oyo bazali kolakisa yango. Bobele bongo, koyina oyo tozali na yango na ntina na kotyola mibeko ekobatela biso na miziki nyonso ebɛtami na maloba na kolamusa mposa. Tokoluka te ete toyeba makambo ya mbindo, kasi tokozala ‘bana mike mpo na mabe; nzokande, tokozala mikóló mpo na bososoli.’—1 Bakolinti 14:20.
17. Toli nini ezwami na Bakolose 3:5 oyo ekoki kosalisa biso mpo na kotikala pɛto kati na bizaleli?
17 Tozwi toli oyo malamu ete: “Boboma binama na nzoto na bino bizali awa na mabelé na ntina na pite na mbindo, na mposa na nzoto.” (Bakolose 3:5, MN) Na ntembe te soki tolingi kotikala pɛto kati na bizaleli tosengeli kozwa meko makasi. Na kotalela liloba na Greke libongolami na “boboma,” oyo ezwami na Bakolose 3:5, mokanda The Expositor’s Bible Commentary elobi ete: “Emonisi ete tosengeli te bobele kotya ndelo to koloba ete misala na biso mpe bizaleli na biso ezali mabe, kasi tosengeli kolongola yango nyonso mpe kotika lolenge na bomoi na biso ya kala. ‘Kolongola nyonso’ ezali mbala mosusu komonisa nguya ya liloba wana. . . . Ndimbola ya liloba wana mpe lolenge oyo yango elobelami, emonisi ekateli makasi mpe na mpasi oyo ezwami na moto ye moko.” Tosengeli bongo koboya mikanda to masano ya televizio oyo etalisaka makambo na nsɔni lolenge moko na maladi mabe, na mpasi makasi oyo ekobomaka, mpamba te yango esalaka bongo kati na bizaleli mpe na elimo. Klisto amonisaki likanisi motindo moko na ntango alobaki ete tolongola lobɔkɔ, soko lokolo, ata mpe liso oyo ezali kobɛtisa biso libaku.—Malako 9:43-48.
Toyina mangomba ya lokutá mpe lipɛngwi
18. Lolenge nini tokoki komonisa ete tozali koyina ezaleli ya kotyola mibeko oyo esalemi na mangomba?
18 Na nsuka, lokola Yesu amonisaki koyina oyo azalaki na yango na ntina na ezaleli ya kotyola mibeko na kotondoláká bokosi ya bakonzi ya mangomba, bobele bongo lelo, ba Témoins Jéhovah bazali komonisa koyina oyo bazali na yango na ntina na ezaleli ya kotyola mibeko nyonso oyo euti na bokosi ya mangomba. Lolenge nini? Na kokabolaka mikanda oyo mikolimbolaka Biblia oyo mizali komonisa polele Babilone Monene, mwasi na pite mpo na losambo. Soki toyini mpenza bokosi ya mangomba, oyo ezali bongo ezaleli ya kotyola mibeko, tokokakatana te mpo na kotondola Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba. Tokosala yango mpo na bato na sembo basili kozimbisama na yango mpe asili kotya bango na boombo ya elimo. Soki tozali koyina ezaleli ya kotyola mibeko oyo esalemi na Babilone Monene, tokozala na molende kati na motindo nyonso ya mosala na biso ya Bokonzi.—Matai 15:1-3, 7-9; Tito 2:13, 14; Emoniseli 18:1-5.
19. Lolenge nini tosengeli kotalela bapɛngwi, mpe mpo na nini?
19 Etinda ya koyina ezaleli ya kotyola mibeko esalelami mpe mpo na misala nyonso ya bapɛngwi. Ezaleli na biso epai na bapɛngwi esengeli kozala lokola oyo na Davidi, ye oyo alobaki ete: “Ɛ Jéhovah! Nayini nde bango te, baoyo bakoyinaka yo mpenza? Nazali nde na mpii mpo na bango te, baoyo bazali kotombokela yo? Nayini bango na koyina eleki makasi. Bakómi bayini na ngai mpenza.” (Nzembo 139:21, 22, MN) Bapɛngwi ya eleko na biso bazali kosala elongo na “motyoli na mibeko,” bakonzi ya mangomba na boklisto ya lokutá. (2 Batesaloniki 2:3, MN) Lokola tozali ba Témoins de Jéhovah ya sembo, tozali na likambo moko te likoyokanisa biso elongo na bango. Lokola tozali bato bazangi kokoka, motema na biso mokoki kozala na mposa ya koloba mabe na ntina na bandeko na biso. Mokomoko na baklisto oyo basali “moombo na sembo mpe na mayele,” bazali bato bazangi kokoka. (Matai 24:45-47) Kasi, bango nyonso elongo basali kelasi na sembo mpe na mayele. Bapɛngwi bazali komonisa mabungá na bango to yango emonani lokola mbébá esalemi na bandeko oyo bazali kokamba biso. Mpo na komibatela, tosengeli kokima masoló ya bapɛngwi lokola eloko na ngɛngɛ mingi; yango ezali bongo mpenza.—Baloma 16:17, 18.
20, 21. Lolenge nini tokoki kolimbola na bokuse, bantina oyo tozali na yango mpo na koyina ezaleli ya kotyola mibeko?
20 Tomonaki ete ezaleli ya kotyola mibeko oyo emonani mingi na mokili, ekokani na lisumu. Tosengeli te bobele kolinga boyengebene; tosengeli lisusu koyina ezaleli ya kotyola mibeko. Basusu kati na baoyo babimaki na lisangá na boklisto, bakanisaki mbala mosusu ete balingaki boyengebene, nzokande bayinaki mpenza kotyola mibeko te. Tomonaki lisusu ntina oyo tosengeli koyina ezaleli ya kotyola mibeko. Ezali na ntina wana nde tozali na lisosoli malamu mpe tozali kobatela limemya na biso. Lisusu, ezaleli ya kotyola mibeko elimboli kozanga sembo epai na Jéhovah Nzambe. Mpe ezaleli ya kotyola mibeko ekobotaka mbuma mabe: mawa, kobeba, mpe liwa.
21 Tomonaki lisusu lolenge nini tosengeli koyina kotyola mibeko. Mpo na yango, tosengeli kosala eloko moko te ezangi kolongobana, na mposa ya nzoto to na lipɛngwi te, ata soko ezali motindo nini. Lokola tolingi kokokisa mokumba moko kati na kolongisama ya nkombo na Jéhovah mpe tolingi kosepelisa motema na ye, tosengeli te bobele kolinga boyengebene mpe kosala mingi kati na mosala na ye, kasi tosengeli lisusu koyina ezaleli ya kotyola mibeko, lokola yango esalaki Mokambi mpe Motambwisi na biso, Yesu Klisto.
Bozongeli
◻ Lolenge nini Makomami mosaleli liloba “koyina”?
◻ Bantina nini malamu tozali na yango mpo na koyina ezaleli ya kotyola mibeko?
◻ Bandakisa nini malamu tozali na yango mpo na baoyo bayinaki ezaleli ya kotyola mibeko?
◻ Lolenge nini tokoki komonisa ete tozali koyina ezaleli ya kotyola mibeko?
[Elilingi na lokasa 8]
Yesu apɛtolaki tempelo mpo ete ayinaki ezaleli ya kotyola mibeko
[Elilingi na lokasa 10]
Soki toyini ezaleli ya kotyola mibeko, tokoboya masano nyonso ya mbindo