Totonda na esengo
“Bayekoli batondaki na esengo mpe na elimo santu.”—MISALA 13:52.
1. (a) Esengo ezali mbuma ya lolenge nini? (b) Mpo na ebongiseli nini ya esengo Nzambe asengeli kokumisama?
ESENGO! Ezaleli oyo na boklisto ezwami na esika ya mibale, bobele nsima na bolingo, kati na molongó na mbuma na elimo oyo etangami na Paulo. (Bagalatia 5:22-25) Eloko nini ebotaka esengo yango? Nsango malamu oyo anzelu na Nzambe asakolaki yango na babateli na mpate na bopolo esili koleka mibu 1 900, oyo ete: “Tala, napesi bino nsango malamu na esengo monene ekozala na bato nyonso. Mpo ete Mobikisi, ye Nkolo, abotameli bino lelo na mboka na Davidi.” Na nsima limpinga na baanzelu babimaki esika moko na anzelu ya liboso, babandaki kokumisa Nzambe na esengo nyonso kolobaka ete: “Nkembo na Nzambe na bisika-bileki-likoló, mpe kimya na nsé kati na bato oyo ye asepeli na bango!”—Luka 2:10-14.
2, 3. (a) Mpo na nini ezalaki likambo malamu ete Nzambe atinda Mwana na ye mobotami ya liboso mpo ete azala Mosikoli na bato? (b) Ntango azalaki naino awa na mabelé, ndenge nini Yesu asalelaki lisusu mokano na Nzambe?
2 Jéhovah amonisaki boboto na ye mpo na bato na kopesaka bango lobiko na nzela na Klisto Nkolo. Mwana wana na Nzambe, mobotami na liboso, oyo azali mpenza mayele na solo, amonisami kolobaka na ntina na Tata na ye na ntango na kozalisa ete: “Nazalaki pembeni na ye lokola moko oyo abokolamaki na ye, mokolo na mokolo nazalaki esengo na ye, kosepela liboso na ye ntango nyonso; kosepela na bifandelo na mokili na ye mpe esengo na ngai ezalaki kati na bana na bato.”—Masese 8:30, 31.
3 Ezalaki bongo likambo malamu ete Jéhovah atinda Mwana na ye, oyo esengo na ye ezalaki kati na bana na bato, mpo ete akoma Mosikoli na bango. Mpe yango esengelaki kokumisa Nzambe, kopesaka ye nzela na kokokisa mokano na ye kitoko: kotondisa mabelé na bato balingi boyengebene mpe kimya. (Genese 1:28) Lisusu, ntango azalaki na mabelé, Mwana yango, Yesu, atako amekamaki makasi, amonisaki ete moto na kokoka azali na likoki ya kotosa Jéhovah, Nkolo Moyangeli na ye, na bosembo nyonso, komonisaka na bongo kozanga ntembe ete boyangeli ya Tata na ye likoló na bikelamu na ye ezali sembo. (Baebele 4:15; 5:8, 9) Bomoi ya bosembo na Yesu ezali mpe ndakisa oyo baklisto nyonso ya solo basengeli kolanda yango na likebi nyonso.—1 Petelo 2:21.
4. Esengo nini monene Yesu azwaki mpo na ezalela na ye ya koyika mpiko, mpe yango esengeli kolendisa biso na likambo nini?
4 Na kokokisaka mokano ya Tata na ye, Yesu amizwelaki esengo monene, na kozeláká esengo eleki lisusu mozindo, lokola ntoma Paulo amonisi yango kati na Baebele 12:1, 2: “Topota na etingya na emekaneli na mbango etyami liboso na biso, awa ezali biso kotala Yesu, ye Mobandisi mpe Mosukisi na kondima. Mpo na esengo etyami liboso na ye, ayikeli nzete na mpasi mpiko, atyoli nsoni na yango, mpe azali kofanda na loboko na mobali na kiti na bokonzi na Nzambe.” Ezali bongo esengo ya motindo nini? Esengo oyo Yesu azali kooka, ezali bobele te mpo abulisaki nkombo ya Tata na ye mpe asikolaki bato na liwa, kasi lisusu mpo ete azali koyangela lokola Mokonzi mpe Nganga Monene, mpe akopesa nzela na bato na botosi ete bafanda seko na mabelé oyo ekobongwana paradis.—Matai 6:9; 20:28; Baebele 7:23-26.
5. Banani bazali “bandeko” na Yesu, mpe esengo nini monene bazali na yango elongo na ye?
5 Na yango, Mwana na Nzambe azalaki kooka uta kala esengo na kosalisa bato. Ezali mpe na esengo nde asalaki pembeni na Tata na ye na koponáká etuluku na bato na sembo oyo azali kobenga bango “bandeko” na ye mpe baoyo, na liwa na bango, bazali kosekwa na likoló. Elongo na Yesu, bazali bongo na esengo eleki nyonso. Batangami ‘bato na esengo mpe basantu’ mpe “bakozala banganga na Nzambe mpe na Klisto, bakozala bakonzi esika moko na ye mbula nkoto.”—Baebele 2:11; Emoniseli 14:1, 4; 20:6.
6. (a) Libyangi nini ya esengo Mokonzi apesi yango epai na “bampate mosusu”? (b) Libaku nini kitoko ntalo mingi na bampate bazali na yango lelo?
6 Epai mosusu, ebele monene na bato, “bampate mosusu,” baoyo Mokonzi oyo azali koyangela atii bango na lobóko na ye ya mobali mpo na komonisa ete andimi bango, bapesameli libengami oyo ete: “Yaka bino bopambwami na Tata na ngai, bosangola libula na bokonzi bobongisami mpo na bino longwa na ebandeli na mokili.” (Yoane 10:16; Matai 25:34) Oyo nde esengo! Kati na bato oyo bakozwa libula na mabelé oyo makoyangelama na Bokonzi na Nzambe, mingi bazali kondima uta sikawa kokokisa mikumba pembeni ya baklisto bapakolami, na boyokani na oyo Jéhovah asakolaki ete: “Bapaya bakotemaka mpo na koleisa bitonga na bino, bato na mikili mosusu bakozala batimoli na bino mpe babateli na miwiti na bino; kasi bino bokobyangama banganga na Jéhovah; bato bakobyanga bino basaleli na Nzambe na biso.” Bango nyonso bazali kosangisa mingongo na bango na oyo ya mosakoli na Nzambe mpo na koloba ete: “Nakosepela mingi kati na Jéhovah, molimo na ngai ekozwa esengo mpo na Nzambe na ngai; mpo ete alatisi ngai na bilamba na lobiko.”—Yisaya 61: 5, 6, 10.
7. Mpo na nini mokolo oyo ebandaki na 1914 ezali mpenza na ntina mingi?
7 Kobanda 1914 tozali bongo kobika kati na mokolo moko ya ntina koleka, oyo ya boyangeli na Klisto, ye oyo azali Mokonzi kati na likoló, mokolo oyo eyebisami mpenza kati na Nzembo 118:24, 25 ete: “Oyo ezali mokolo mosalemi na Jéhovah; tika ete tosepela mpe tozala na esengo kati na yango. E Jéhovah, nakobondela yo ete, bikisa biso; e Jéhovah, nakobondela yo ete, longisa biso!” Mokolo yango ekokoma na mokano na yango monene ntango Jéhovah akoboma Babilone monene, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba mpe akobálisa Klisto, Mokonzi na likoló, na mwasi na ye, “bandeko” na ye 144 000. Basaleli nyonso na Nzambe ‘bakosepela mpe bakotonda na esengo’ mpo na yango. Bakosepela lisusu ntango Mokonzi na bango mpe Masiya akobunda na Armagedon mpo na kokotela libota na ye ya sembo mpe kokotisa bango kati na mokili ya sika mpe ya sembo. (Emoniseli 19:1-7, 11-16) Kasi Jéhovah azali kopambola basaleli na ye oyo bazali kosakola elikya wana ya esengo? Mpo na yango totala rapport oyo elandi.
Bokoli kati na mokili
8. (a) Mpo na nini rapport ekomami na nkasa 18 kino 21 emonisi esengo ‘kati na elimo santu’? (b) Tanga mwa makambo masimbi likebi na biso kati na rapport ya mokili mobimba.
8 Ba Témoins de Jéhovah ya ntango na biso batondi na elikya kati na nguya na elimo santu,’ (Baloma 15:13) Ezali yango nde tablo oyo ezwami na bankasa 18 kino 21 ya zulunalo oyo ezali komonisa; ezali bongo rapport monene likoló na mosala mosalemaki mpo na kosakola Bokonzi na boumeli ya mobu 1990 kati na mokili mobimba. Tozali kosepela na komona motuya ya sika ya basakoli na molende 4 017 213, oyo ezali komonisa kobakisama ya 77 % na boumeli ya mibu zomi oyo miuti koleka, mpe yango emonisi ete bampate bazali koyanganisama mbango kati na mikili 212. Mpo na mbala ya liboso uta koleka mibu 15, ntalo na bato bazwi batisimo ezwi motuya ya sika: 301 518. Mpo na oyo etali bobele batisimo, totangaki mituya minene koleka kati na ba assemblées mingi, mpenzampenza oyo epai kuna Batemwe ya Europe de l’Est bayanganaki. Kati na bato bazwaki batisimo, ezalaki na bilenge mingi baoyo balongolaki bongo likanisi oyo ezwamaki na socialisme, engebene yango ete mangomba to makambo na Nzambe masengeli kolimwa nzela moko na mibange oyo baumeli mingi.
9. (a) Mateya oyo baboti bazali kopesa epai na bana na bango ya mike mpenza ezali kobimisa esengo nini? (b) Makambo nini ya mboka na bino to mosusu endimisi yango?
9 Ebele na bilenge bazali koyanola na libyangi oyo tozali kokuta kati na Nzembo 32:11: “Bino bayengebeni bosepela kati na Jéhovah mpe bozala na esengo; boyemba na esengo bino nyonso na mitema sembo!” Ezali komonana ete baboti mingi bazali kolanda toli oyo ezali kosenga bango ete bateya bana na bango “longwa bomwana na bango.” (2 Timote 3:15) Bazali kosalela malamu mikanda mpe bakasete oyo ebongisami mpo na bana mike. Ntango bazali kobanda kokende na kelasi, bana yango bazali kokakatana te na kolanda kopesa litatoli lokola Mojaponé oyo moke ya mwasi ya mibu mwambe, oyo alobaki ete: “Nsima na vacances, nakendaki kotala molakisi na ngai ya mwasi mpe natunaki ye ete: ‘Okendaki na nkunda ya tata na yo na boumeli ya vacances?’ Ayanolaki ngai ete, ‘Ee, tata na ngai azalaki moto malamu mpenza; nakendaka na nkunda na ye mbula nyonso.’ Na yango nabakisaki ete: ‘Soki oyekoli Biblia mpe soki olandi mateya na Nzambe, okokoka komonana na tata na yo kati na paradis awa na mabelé.’ Na nsima napesaki ye Mokanda mpo na masolo ya Biblia. Sikawa, poso nyonso, molakisi na biso ya mwasi azali kotangela kelasi mobimba mokapo moko ya mokanda yango, na ntango ya déjeuner.”
10. Matomba nini mazwami mpo na mokanda Les jeunes s’interrogent? Pesa ndakisa.
10 Bilenge bazali kosalela malamu mokanda Les jeunes s’interrogent—Réponses pratiques, ezala mpo na boyekoli na bango moko to mpo na kopesa litatoli epai na bilenge mosusu. Baboti mpe bazali kosepela na mokanda yango mingi. Moklisto mwasi moko ya Suisse oyo asanganaki na mosala ya pionnier auxiliaire azwaki ekateli ya kokende kotala baboti ya baninga ya kelasi ya mwana na ye. Na bongo asololaki masolo malamu elongo na baboti mingi mpe atikelaki bango mikanda 20 (mingi mpenza Les jeunes s’interrogent) mpe bazulunalo 27. Elenge moyekoli moko moke ya mwasi na mboka Trinité apesaki mokanda yango epai na molakisi na ye ya mwasi, nsima na yango mama na ye akabolaki 25 ekzamplere na balakisi 36 ya eteyelo wana. Sanza oyo elandaki, asololaki mpenzampenza na baboti ya bana kelasi oyo ye ayebaki; atikelaki bango mikanda 92 mpe abandaki boyekoli mingi ya Biblia. Profesere moko ya eteyelo moko ya Koré asalelaki mokanda Les jeunes s’interrogent mpo na kopesa mwa masolo oyo motó na likambo na yango ezali “Ndenge nini kozwa bapwe ya malamu?” mpe “Ndenge nini koyokana elongo na profesere na ngai?,” na nsima asengaki ete bayekoli bazwa mokanda yango. Nsima na kotikela bango yango 39, baboti mosusu baimaimaki. Kasi ntango Directeur ya eteyelo atalaki mokanda yango, alobaki na ntina na yango ete ezali “malamu mingi” mpe asengaki moko mpo na mwana na ye ya mwasi.
Mateya maleki malamu
11, 12. Matatoli nini mamonisi ete mikanda ya la Société mizali kopesa mateya kitoko?
11 Motuya malamu na mateya mazwami na bazulunalo na biso endimami epai na bato mingi. Na yango, na États-Unis, biro ya eteyelo moko esengaki ba ekzamplere 1 200 ya Réveillez-vous! ya 22 Juillet 1990 (oyo elobelaki crack, lolenge mosusu na drogue) mpo na kosalela yango kati na kelasi. Epai mosusu, etamboli malamu ya bana na ba Témoins de Jéhovah na eteyelo ezali ntango nyonso kosepelisa bato. Kati na kelasi moko ya mobulu mingi kuna na Thaïlande, molakisi ya mwasi abengisaki Racha, oyo azali na mibu zomi na moko, liboso na bayekoli mpe akumisaki ye mpo na etamboli malamu na ye. Mpe na nsima alobaki ete: “Mpo na nini bino banso bolandaka ndakisa na ye te? Azali koyekola mingi mpe azali komitambwisa malamu.” Mpe abakisaki ete: “Nakanisi ete ekosengela na bino kokoma ba Témoins de Jéhovah lokola Racha mpo na kozala na etamboli malamu.”—Tala Masese 1:8; 23:22, 23.
12 Elenge moklisto moko ya mwasi na République Dominicaine akomaki ete: “Na mibu minei, wana ekomaki ngai pene na kotika maternelle na eteyelo moko ya banyangó, epai kuna nayekolaki kotanga mpe kokoma, napesaki mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis epai na molakisi na ngai, ye mamelo. Nabakisaki maloba oyo: ‘Natondi yo mingi mpo ete olakisi ngai kotanga mpe kokoma. Nalingi ete yo mpe oyeba kondima na ngai mpe okoma na elikya motindo moko na ngai oyo ezali bongo ya kozala na bomoi na seko na mabelé ntango ekokoma paradis.’ Mpo na yango balongolaki ngai na eteyelo. Mibu mwambe na nsima, nakutanaki lisusu na molakisi yango. Na bongo ayebisaki ngai motindo nini, atako botemeli makasi ya sángo, alongaki kotanga mokanda yango. Na nsima akendaki na kapitale epai kuna ayekolaki Biblia elongo na Temwe moko. Azwaki batisimo mokolo moko na ngai na assemblée ya distrike ‘Monoko na peto.’” Tala oyo emonisi ete mayele ekoki kobima, lokola elobi yango liloba na esakweli, ata na “minoko na bana mike.”—Matai 21:16; Nzembo 8:1, 2.
13. Ndenge nini ebele na bilenge bazali kosala liboso na toli ya Salomo, mpe ndenge nini yango emonani kati na rapport ya mokili mobimba?
13 Salomo apesaki toli oyo ya kolendisa: “E elenge, sepela na bolenge na yo mpe tika ete motema na yo esepelisa yo na mikolo na bolenge na yo, tambola mpe na nzela na motema na yo.” (Mosakoli 11:9) Ezali esengo na komona lelo ebele na bana ya ba Témoins de Jéhovah kosalela malamu mibu ya bolenge na bango. Bazali kolengela bomoi na bango ya mikolo mizali liboso na likanisi ya kosalela Jéhovah ntango nyonso na kobandaka mosala oyo moleki misala nyonso mosusu na kitoko nsima wana basilisi kelasi na bango. Motuya na ba pionniers ezali kobakisama ntango nyonso nokinoki mpamba te na boumeli ya mobu na mosala 1990 bazalaki na moyenne 821 108 sanza nyonso, mpe, elongo na bandeko mibali mpe bandeko basi 11 092 oyo bazali kosala na Béthel, yango emonisi 21 % ya ntalo nyonso ya basakoli
14. Na motindo nini baklisto basi bazali kosangana kati na mosala na kosakola, mpe mpo na ezalela nini babongi kopesamela longonya?
14 Toyeba ete kati na mikili mingi, ndakisa na États-Unis, pene na 75 % ya ba pionniers bazali basi, likambo oyo lindimisi mpenzampenza maloba oyo mayebisami kati na Nzembo 68:11: “Jéhovah alakisi mpe basi baoyo bapalanganisi nsango bazali mingi mpenza.” Bandeko na biso ya basi babongi kokumisama, mpamba te bazali kokokisa eteni eleki monene ya mosala na kosakola. Mateya kitoko oyo bazali kopesa kati na boyekoli ya Biblia na bandako ebendi bato mingi na solo. Esengeli mpe kokumisa baklisto basi oyo babálá baoyo bazali kosimba na bosembo nyonso mibali na bango, likambo oyo ezali kosalisa mibali yango na kokokisa mikumba mingi kati na lisangá.—Masese 31:10-12; Baefese 5:21-25, 33.
Mateya na Biblia mazali kopesa matomba malamu
15. (a) Na kotalela rapport ya mokili mobimba, kati na mikili nini mosala ya kotambwisa boyekoli na Biblia mozali ya malamu koleka? (b) Tanga makambo oyo mamonisi ete boyekoli na biblia bokoki kobota mbuma malamu.
15 Mosala na koteya Biblia ezali kokola mpamba te sanza nyonso boyekoli na Biblia esalemaki kati na bandako 3 624 091 (moyenne). Solo na Biblia ezali na makoki ya kobongola bato, lokola emonisi yango lisolo oyo euti na mokili moko ya mosika. Na ebandeli ya Janvier 1987, moto moko na Ostrali oyo autaki kolekisa basanza 25 na boloko mpo na moyibi mpe mpo na kosala mikanda ya lokuta mpe kosalela yango, babenganaki ye mpe akotaki na mboka Nouvelle-Zélande. Azalaki komela drogue mpe koteka drogue uta mibu 17. Mobu molandaki, mwasi na ye abandaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Amonaki ete ntango nyonso oyo boyebi na ye ezalaki kobakisama etamboli na ye ezalaki kobongwana na lolenge ya polele. Azalaki kokoma mwasi moko malamu mpe mama moko malamu. Na masengi mingi ya mwasi na ye, mobali yango ayanganaki na assemblée moko ya circonscription na Juin 1989, nsima na yango andimaki koyekola Biblia. Bato babandaki bongo komona mbongwana monene kati na molato na ye mpe kati na bomoi na ye. Mosika te, libota na ye mobimba, bato nsambo, babandaki koyangana na makita. Komityaka na ngambo ya bato oyo bazali kolanda toli kitoko ya Paulo oyo eyebisami kati na Baefese 4:17-24, azwaki batisimo na Janvier 1990.
16. (a) Mpo na nini mituya likoló na Ekaniseli ya mobu 1990 mizali kopesa esengo? (b) Nini esengeli bongo kosalema nokinoki, mpe milende nini ebongi tosala mpo na kopesa lisalisi na biso?
16 Kati na makambo masimbi likebi na biso na rapport mpo na mbula ya mosala oyo euti koleka, totanga motuya monene ya bayangani 9 950 058 na Ekaniseli, mokolo na Mardi 10 Avril 1990. Mikili koleka 70 kati na 212 miyebisaki assistance moko oyo eleki mbala misato motuya mobimba ya Batemwe. Na ndakisa, mikili nsambo ya Afrike oyo, atako bipekiseli bityamaki likoló na mosala, bazali na motuya ya basakoli 62 712 batangaki motuya ya bayangani 204 356 na Ekaniseli. Basakoli 1 914 ya Libéria, mokili oyo ebebisami na etumba, basepelaki na komona bayangani 7 811 na Ekaniseli. Na Haïti, epai kuna ezali na maximum ya basakoli 6 427, batangaki bayangani 36 551. Basakoli 886 ya bisanga oyo bipalangani na Micronésie batangaki bayangani 3 958. Na Sri Lanka, ezalaki na bayangani 4 521 mpo na basakoli 1 298; mpe na Zambie, bayangani 326 991 mpo na basakoli 73 729, to moyangani moko mpo na bafandi 25. Mpo na mbala oyo lisusu, rapport ya mokili mobimba emonisi ete bamilio na bato na motema sembo bazali kozela ete bayanganisama kati na lopango ya bampate. Kasi motema sembo ekoki te. Esengeli na biso kobongisa malamu na lolenge na biso ya koteya kati na boyekoli na Biblia, mpo ete tokoka kosalisa bayangani mingi na Ekaniseli ete bakolisa kondima moko makasi. Tolingi ete bamitya na molongo na biso mpo basangana na molende na kokumisa Jéhovah. Bomoi na bango etalelami na likambo yango.—Nzembo 148:12, 13; Yoane 17:3; 1 Yoane 2:15-17.
Esengo ya kokoka
17. Bandakisa nini ya ekeke ya liboso esengeli kolendisa ekateli na biso mpo na kobatela ngwi esengo na biso?
17 Ezala mimekamo nini tozali kokutana na yango, tozala na ekateli ya kosimba ngwi esengo na biso. Ntango mosusu tokozala mpenza na mimekamo ya mpasi te lokola oyo Etienne azwaki, kasi ndakisa na ye ekoki kolendisa biso. Atako bafundaki ye na bifundeli na lokuta, abatelaki kimya na ye mpe esengo na ye. Banguna na ye “bamonaki elongi na ye ezalaki lokola elongi na anzelu.” Na boumeli ya monyoko na ye, Nzambe azalaki elongo na ye. “Etondaki ye na elimo santu” kino na liwa na ye, apesaki litatoli na molende. Mpo na Paulo mpe Barnabas, baoyo bazalaki kokokisa mosala na bango ya kosakola epai na bapakano, ‘basepelaki mpe bakumisaki liloba na Jéhovah.’ Kasi kuna mpe minyoko mibimaki. Nzokande yango elembisaki bandimi te. “Bayekoli batondaki na esengo mpe na elimo santu.” (Misala 6:15; 7:55; 13:48-52) Atako likambo nini banguna na biso bakoki kosalela biso mpe ezala nini mikakatano na biso ya mokolo na mokolo, tosengeli soki moke te kotika ete emela esengo na biso, mbuma na elimo santu. Paulo apesi toli oyo ete: “Mpo na elikya, bosepelaka; mpo na minyoko, bolendendela na mitema petee. Mpo na kobondela, boyikaka mpiko.”—Baloma 12:12.
18. (a) Yelusaleme na Sika ezali nini, mpe mpo na nini libota na Jéhovah esengeli kosepela elongo na yango? (b) Ndenge nini “makoló na sika mpe mabelé na sika” ekopesa bolamu epai na bato?
18 Nzokande elikya yango ezali ya kitoko mingi. Epai na basaleli na ye nyonso, Jéhovah alobi ete: “Tala nazali kotonga likoló na sika mpe mokili na sika; mpe makambo na liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te. Kasi bosepela mpe boyoka esengo libela na yango ezali ngai kotonga.” Klisto Nkolo, asangani na “Yelusaleme na Sika” (lelo ezali kapitale ya lisangá na Nzambe na likoló, lisangá oyo libéngámi “Yelusaleme na likoló”), bakisa mpe lisangá ya mokili na sika awa na mabelé, bakopesa esengo ya libela epai na bato. (Bagalatia 4:26) Lisekwa na bakufi, kotombwama ya bato nyonso na botosi na ezalela ya kokoka mpo na bomoi na seko, bomoi ezangi nsuka, ya ntina mpe ya esengo awa na mabelé oyo ekokóma paradis, tala elikya ya kitoko mpe ntina na esengo. Boye te? Mpo ete Jéhovah ye moko ‘azali kosepela kati na Yelusaleme mpe kati na bato na ye,’ mosakoli na ye apesi libyangi oyo mosusu epai na libota na Nzambe: “Bosepela elongo na Yelusaleme mpe bozala na esengo mpo na ye, bino nyonso bozali kolinga ye! Bosepela na ye na esengo.” (Yisaya 65:17-19; 66:10; Emoniseli 14:1; 20:12, 13; 21:2-4) Tika ete totonda ntango nyonso na esengo mpe na elimo santu wana ezali biso kolanda toli ya ntoma Paulo: “Bosepelaka ntango nyonso kati na Nkolo. Nalobi lisusu ete, bosepelaka!”—Bafilipi 4:4.
Bozongeli:
◻ Ndakisa nini ya koyika mpiko na esengo Yesu atikaki?
◻ Bantina nini ya esengo bituluku mibale na baklisto oyo bamipesi na Nzambe bazali na yango?
◻ Ndenge nini lelo, bilenge mpe mikolo bazali kosepela kati na solo?
◻ Na kotalela rapport ya 1990, eyano nini epesami na libondeli oyo: “E Jéhovah, pambola mosala na yo!”
◻ Ntango nini mpe ndenge nini tokozwa esengo ya kokoka?
[Etanda na lokasa 18-21]
RAPPORT YA MOSALA YA BA TÉMOINS DE JÉHOVAH NA MOKILI MOBIMBA MPO NA MOBU 1990
(Talá na zulunalo oyo ebimisamaki)
[Elilingi na lokasa 16]
Anzelu na Jéhovah asakolaki kobotama na Klisto Nkolo lokola “nsango malamu ya esengo monene”