Eteni ya mibale—Bingɛngiseli ya pole—Ya minene mpe ya mike
“Biso tokomɔna pole kati na pole na yɔ.”—NJEMBO 36:9.
1. Milende nini misalemaki na ebendeli mpo na kososola bililingi oyo bizali kati na mokanda ya Emoniseli?
EMONISELI, moko na mikanda ya Biblia, ekamwisaki Baklisto uta na bileko ya liboso. Ezali kopesa ndakisa kitoko ya lolenge oyo pole ya solo ezali kokóla sé kokóla. Na 1917, Basaleli ya Yehova babimisaki bandimbola ya Emoniseli kati na búku Le mystère accompli. Kozanga kobanga, etɔndolaki mabe ya boklisto ya nkombo mpamba mpe ya bakonzi ya politiki kati na mokanda yango, kasi mingi na bandimbola yango eutaki na mikanda ndenge na ndenge. Nzokande, Le mystère accompli esalelamaki mpo na komeka bosembo ya Bayekoli ya Biblia epai na esaleli oyo ezali komonana oyo Yehova azalaki kosalela.
2. Pole nini lisoló “Kobotama ya libota” emwangisaki likoló na mokanda ya Emoniseli?
2 Engɛngiseli moko makasi ya pole engɛngaki likoló na mokanda ya Emoniseli na kobimisama ya lisoló oyo ezalaki na motó ya likambo “Kobotama ya libota” kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mársi 1925 (ebimeli ya Lingelesi). Ekanisamaki ete Emoniseli mokapo 12 ezalaki kolobela etumba kati na mokili ya Loma mpe lingomba ya Katoliki ya Loma, mpe mwana mobali ezalaki bongo komonisa bokonzi ya pápa. Kasi lisoló yango limonisaki ete Emoniseli 11:15-18 ezali na boyokani na ndimbola ya mokapo 12, komonisáká ete etaleli kobotama ya Bokonzi ya Nzambe.
3. Mikanda nini mimwangisaki pole mingi lisusu likoló na Emoniseli?
3 Nyonso wana ememaki bango na kokóma na bososoli mingi lisusu ya Emoniseli na lisalisi ya búku Lumière, oyo ezalaki na bavolimi mibale, na 1930. Kasi kosembolama mosusu ebimaki kati na babúku “Babylone la Grande est tombée!” Le Royaume de Dieu a commencé son règne! (1963, na Lingelesi) mpe “Alors sera consomé le mystère de Dieu” (1969, na Lingelesi). Nzokande, esengelaki koyekola lisusu makambo mingi na ntina na mokanda ya esakweli ya Emoniseli. Ee, pole makasi lisusu emwangisamaki likoló na yango na 1988, na nzela ya mokanda Emoniseli—kokokana na yango monene ebelemi! Ekoki kolobama ete kongɛngisama oyo ezali kokóla mokemoke emonisami polele mpamba te esakweli ya Emoniseli ezali kokokana na “mokolo na Nkolo,” oyo ebandaki na 1914. (Emoniseli 1:10) Mokanda ya Emoniseli esengelaki bongo kososolama malamu koleka wana mokolo yango ezalaki kopusana.
Ndimbola epesami na ntina na “Bakonzi baleki likoló”
4, 5. (a) Lolenge nini Bayekoli ya Biblia bazalaki kotalela Baloma 13:1? (b) Na nsima, nini emonanaki ete ezali etɛlɛmɛlo oyo eyokani na Makomami na ntina na “bakonzi baleki likoló”?
4 Engɛngiseli ya pole makasi emonanaki na 1962 na ntina na Baloma 13:1, oyo elobi ete: “Tika ete moto na moto atosaka bango bajali na bokonji [“bakonzi baleki likoló,” NW].” Bayekoli ya Biblia ya liboso basosolaki ete “bakonzi baleki likoló” oyo balobelami awa ezali bongo bakonzi ya mokili. Bakanisaki ete mokapo yango elimbolaki ete soki moklisto abyangami ete akɔta na mosala ya soda na ntango ya etumba, asengelaki kolata sokɔtɔ, komema mondoki, mpe kokende na etumba. Ekanisamaki ete lokola moklisto akoki koboma te moninga na ye moto, asengelaki kobɛta mondoki likoló soki akutani na mokakatano.a
5 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mársi mpe ya 15 Mársi 1963, epesaki pole makasi likoló na likambo yango wana etalelaki maloba ya Yesu oyo mazali kati na Matai 22:21: “Pɛsa epai na Kaisala yango ejali na Kaisala mpe na Njambe yango ejali na Njambe.” Maloba ya bantoma oyo mazwami na Misala 5:29 mazali na boyokani na likambo yango, ete: “Ekoki ete totosa Njambe liboso na kotosa bato.” Baklisto basengeli kotosa Kaisala—“Bakonzi baleki likoló”—nzokande bakotosa te soki esengi ete baklisto básala likambo oyo ezali kobuka mobeko ya Nzambe. Emonanaki ete botosi epai na Kaisala ezali na ndelo, kasi ezalaki na makambo nyonso te. Baklisto bapesaka epai na Kaisala bobele makambo oyo ezali na kowelana te na masɛngami ya Nzambe. Kozwa bososoli likoló na likambo wana ezalaki mpenza likambo ya esengo!
Bingɛngiseli ya pole likoló na makambo matali kotambwisama ya lisangá
6. (a) Mpo na kopɛngola ebongiseli ya bokonzi oyo ezali kati na boklisto ya nkombo mpamba, etindá nini balandaki? (b) Na nsima, nini emonanaki ete ezalaki lolenge malamu ya kopona baoyo bazali na mokumba ya kokɛngɛla lisangá?
6 Esengelaki koyeba soki nani asengelaki kosala lokola nkulutu to diakre kati na lisangá. Mpo na kopɛngola ebongiseli ya bokonzi oyo esalelamaka kati na boklisto ya nkombo mpamba, elobamaki ete basengelaki koponama na voti ya basangani ya lisangá mokomoko na lolenge ya demokrasi. Kasi bokóli ya pole oyo emonisamaki kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛ́mbɛ mpe ya 15 Ɔkɔtɔ́bɛ 1932 (bibimeli ya Lingelesi) emonisaki ete koponama ya bankulutu na nzela ya voti ezwaki moboko kati na Makomami te. Na yango, komité ya mosala ekitanaki yango, mpe la Société akómaki kopona mokambi ya mosala.
7. Bingɛngiseli ya pole ebimisaki mbongwana nini malamu mpo na oyo etali lolenge oyo basáli kati na lisangá basengelaki koponama?
7 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 mpe ya 15 Yúni, 1938, ezalaki na bingɛngiseli ya pole oyo emonisaki ete basaleli kati na lisangá basengelaki koponama na voti te, kasi kotyama engebene teokrasi. Na 1971 engɛngiseli mosusu ya pole emonisaki ete lisangá mokomoko esengelaki te kotambwisama na mosaleli bobele moko. Nzokande, esengelaki kozala na lisangani ya bankulutu, to bakɛ́ngɛli, oyo Lisangani ya Mikólo-bakambi ya Batatoli ya Yehova eponi. Na yango, na pole oyo engɛngaki lisusu mingi na boumeli ya mibu koleka 40, eyaki komonana polele ete bankulutu mpe badiakre, oyo babéngami lelo basaleli na misala, basengelaki koponama na “moombo na sembo mpe na mayele,” na nzela ya Lisangani ya Mikólo-bakambi. (Matai 24:45-47) Yango eyokanaki na oyo ezalaki kosalema na eleko ya Bantoma. Lisangani ya mikólo-bakambi ya ekeke ya liboso eponaki Timoté mpe Tito ete bázala bakɛ́ngɛli. (1 Timoté 3:1-7; 5:22; Tito 1:5-9) Nyonso wana ezali kokokisama oyo ezali kobenda likebi, oyo ezwami kati na Yisaya 60:17: “Na esika na motako nakoyeisa wɔlɔ mpe na esika na ebende nakoyeisa palata; na esika na mabaya motako, na esika na mabanga ebende. Nakobongola mikɔlɔ na yɔ kino kimya mpe banyokoli na yɔ kino boyɛngɛbɛne.”
8. (a) Solo oyo ezali sé kokóla ememaki mbongwana nini malamu mpo na oyo etali lolenge la Société ezalaki kotambwisama? (b) Tangá bakomité ya Lisangani ya Mikólo-bakambi, mpe mikumba ya mokomoko na yango ezali nini?
8 Ezalaki mpe na likambo litalaki lolenge ya kotambwisama ya la Société Watch Tower. Na boumeli ya bambula mingi, Lisangani ya Mikólo-bakambi ya Batatoli ya Yehova ezalaki bongo lisangani ya batambwisi ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, mpe makambo mingi mazalaki bobele na mabɔkɔ ya prezidá. Lokola emonisamaki kati na búku Annuaire des Témoins de Jéhovah 1977 (nkasá 258 kino 259), na 1976 Lisangani ya Mikólo-bakambi ebandaki kotambwisama na bakomité motoba, mokomoko epesamelaki mokumba ya kotalela misala ya sikisiki ya mosala ya mokili mobimba. Komité ya basáli etalelaka makambo ya basáli, mpe matomba ya baoyo nyonso bazali kosala kati na libota ya Betele na mokili mobimba. Komité ya bobimisi etalelaka makambo oyo ezali na boyokani na misala ya mokili mpe mibeko ya Leta, lokola bandako mpe bonyati mikanda. Komité ya mosala etalelaka mosala ya kosakola mpe kotambwisama ya misala ya bakɛ́ngɛli-batámboli, babongisi-nzela, mpe mosala ya basakoli kati na lisangá. Komité ya koteya etalelaka makambo matali makitá ya masangá, mayangani ya mokolo moko, mayangani ya zongazonga, mpe mayangani ya etúká mpe ya mikili mingi mpe biteyelo mpo na kobongisama ya elimo ya basaleli ya Nzambe. Komité ya bokomi ekambaka bolengeli mpe bobongoli ya mikanda nyonso, mpo na kondimisama ete makambo manso mazali na boyokani na Makomami. Komité ya Prezidá etalelaka makambo matali lisungi mpe makambo misusu ya minene. Lisusu, na bambula 1970, babiro ya bafiliale ya la Société Watch Tower ekómaki kotambwisama na komité moko na esika ete etambwisama na mokɛngɛli moko.b
Pole na ntina etali etamboli ya boklisto
9. Lolenge nini pole ya solo ememaki bopusi likoló na boyokani ya Baklisto mpe biyangeli ya mokili?
9 Bingɛngiseli mingi ya pole etalelaki etamboli ya boklisto. Na ndakisa, tolobela likambo ya kozanga komikɔtisa na makambo ya mokili. Engɛngiseli moko ya makasi mpenza ebimaki kati na lisoló oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Kozanga komikɔtisa na makambo ya mokili” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛ́mbɛ 1939 (ebimeli ya Lingelesi). Ebimaki mpenza na ntango ebongi, bobele nsima wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki! Lisoló yango elobelaki kozanga komikɔtisa na ngambo moko to na ngambo mosusu kati na makambo ya mokili mpe emonisaki ete Baklisto basengeli te komikɔtisa kati na makambo ya politiki to na bowelani kati na mabota. (Mika 4:3, 5; Yoane 17:14, 16) Yango ezali kosala ete mabota manso mayina bango. (Matai 24:9) Bitumba ya Yisraele ya kala ezali ndakisa te mpo na Baklisto, lokola Yesu amonisi yango polele na Matai 26:52. Lisusu, lelo oyo, ata ekólo moko te ya politiki eyangelami na teokrasi, boyangeli ya Nzambe, lokola ezalaki na Yisraele ya kala.
10. Bingɛngiseli ya pole bimonisi nini mpo na oyo etali lolenge oyo baklisto basengeli kotalela makila?
10 Pole emwangisamaki mpe na ntina ya likambo litali ezaleli ya bulɛɛ ya makila. Bayekoli ya Biblia bakanisaki ete mobeko oyo epekisi kolia makila, oyo ezwami na Misala 15:28, 29 etalelaki bobele Bayuda oyo bazalaki baklisto. Nzokande, Misala 21:25 emonisi ete na eleko ya bantoma mobeko wana esalelamaki lisusu epai na bato ya mabota oyo bakómaki bandimi. Na yango, mobeko motali ezaleli ya bulɛɛ ya makila ezali mpo na baklisto nyonso, lokola emonisamaki kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yulí 1945. Yango elimboli te bobele koboya kolia makila ya nyama, lokola na boudin oyo esalemi na makila, kasi lisusu koboya mpe makila ya moto, lokola na nzela ya kozongisama makila.
11. Nini emonanaki na ntina na likanisi ya baklisto mpo na kosalela likaya?
11 Lokola pole ekólaki, bizaleli ya kala oyo etalelamaki bobele lokola eboyami, na nsima etalelamaki mpenza ete ezali masumu minene. Na ndakisa, moko na makambo yango etalelaki bongo komela likaya. Kati na Zion’s Watch Tower ya 1 Augústo 1895, ndeko Russell abendaki likebi likoló na 1 Bakolinti 10:31 mpe 2 Bakolinti 7:1 mpe akomaki ete: “Nazali komona te na motindo nini, mpo na moklisto, komela likaya na lolenge moko to mosusu ekoki kopesa nkembo epai na Nzambe to ekoki kopesa ye moko litomba.” Uta 1973, emonanaki polele ete moto moko te oyo amelaka likaya akoki kozala Motatoli ya Yehova. Na 1976 emonisamaki polele ete Motatoli ya Yehova akoki te kosala kati na kompanyi ya masano ya mbongo soki alingi kobatela lokumu malamu kati na lisangá.
Kosembola mosusu
12. (a) Engɛngiseli moko ya pole emonisaki nini na ntina na motángo ya mafungola ya Bokonzi oyo epesamelaki Petelo? (b) Na mabaku nini Petelo asalelaki lifungola moko na moko?
12 Pole mosusu ebakisamaki likoló na motángo ya mafungola ya elilingi oyo Yesu apesaki na Petelo. Bayekoli ya Biblia bakanisaki ete Petelo azwaki mafungola mibale oyo efungolaki nzela epai na bato ete bákoma babulami ya bokonzi—moko mpo na Bayuda, esalelamaki na Pantekote na mobu 33 T.B., mpe mosusu esalelamaki mpo na Bapakano na mobu 36 T.B. na ntango Petelo ateyaki Korneye. (Misala 2:14-41; 10:34-48) Na nsima, eyaki komonana ete ezalaki mpe na etuluku ya misato oyo etalelamaki—Basamalia. Petelo asalelaki lifungola ya mibale mpo na kofungwela bango libaku ya Bokonzi. (Misala 8:14-17) Na yango, lifungola ya misato esalelamaki na ntango Petelo asakolaki epai na Korneye.—Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 1979, nkasá 16 kino nkasá 22, 26.
13. Bingɛngiseli ya pole bimonisaki nini na ntina na mapango ya bampate oyo malobelami na Yoane mokapo 10?
13 Na lisalisi ya engɛngiseli mosusu ya pole, emonanaki ete Yesu alobelaki te bobele mapango mibale ya bampate kasi mapango misato. (Yoane, mokapo 10) Yango ezalaki (1) lopango ya bampate ya Bayuda, oyo Yoane Mobatisi azalaki mobateli ya ekuke na yango, (2) lopango ya babulami bapakolami ya Bokonzi, mpe (3) lopango ya “bampate mosusu,” baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé.—Yoane 10:2, 3, 15, 16; Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 15 Mái 1984 (ebimeli ya Lifalansé), nkasá 10 kino 20.
14. Lolenge nini pole oyo ebakisamaki lisusu emonisi polele ebandeli ya Yubile ya elilingi?
14 Kososolama ya Yubile ya elilingi ezwaki mpe kongɛngisama mosusu. Na nsé ya Mibeko, nsima ya mibu 50 nyonso, Yubile ya monene ezalaki kosalema, oyo kati na yango bazalaki kozongisa biloko epai na bankólo na yango. (Levitike 25:10) Kobanda kala, esosolamaki ete yango ezalaki elilingi ya Mbula Nkotó ya boyangeli ya Klisto. Nzokande, bambula oyo euti koleka kala mingi te, eyaki komonana ete Yubile ya elilingi ebandaki mpenza na Pantekote na mobu 33 T.B., na ntango baoyo bazwaki elimo santu oyo esopamaki basikolamaki na boombo ya kondimana ya Mibeko ya Mose.—Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuáli 1987, nkasá 18 kino nkasá 28.
Polele ebakisami likoló na maloba
15. Engɛngiseli nini epesamaki mpo na oyo etali kosalelama ya liloba “mwango”?
15 “Mosakoli alukaki mpe maloba na kitɔkɔ mpe na sembo, akomaki maloba na sɔlɔ.” (Mosakoli 12:10) Maloba wana makoki kosalelama malamu na motó ya lisoló na biso oyo, mpamba te pole engɛngi te bobele likoló na makambo minene lokola mateya mpe etamboli kasi lisusu likoló na maloba mpe ndimbola na yango ya sikisiki. Na ndakisa, kati na Bayekoli ya Biblia, moko na mikanda oyo bazalaki kolinga mingi ezalaki bongo búku ya liboso ya Étude des Écritures, oyo ezalaki na motó ya likambo Le divin plan des âges (Mwango ya Nzambe ya bikeke mingi). Nzokande, na nsima, eyaki kososolama ete Liloba ya Nzambe elobaka ete bobele bato nde babongisaka myango. (Masese 19:21) Makomami malobi te ete Yehova abongisaka myango. Azali na ntina ya kobongisa myango te. Oyo nyonso akanaka ekokisamaka mpenza mpe azali mayele mpe nguya oyo ezangi nsuka, lokola tozali kotánga yango kati na Baefese 1:9, 10 (NW): “Ezali engebene bolingo malamu na ye nde amityelaki mokano mpo na kotambwisa makambo na nsuka ya ntango elakami.” Na yango, eyaki kososolama mokemoke ete “mokano” ezalaki liloba libongi wana tozali koloba na ntina na Yehova.
16. Mokemoke, nini emonanaki ete ezalaki ndimbola ya sikisiki ya Luka 2:14?
16 Na nsima, esengelaki kososola malamu Luka 2:14. Engebene libongoli ya King James, elobi ete: “Nkembo na Nzambe kati na esika eleki likoló, mpe kimya na mabelé, bolingo malamu epai na bato.” Emonanaki ete yango emonisaki te likanisi ya sikisiki, mpamba te bolingo malamu ya Nzambe emonisami te epai na bato mabe. Na yango, Batatoli bamonaki ete yango ezalaki likambo ya kimya epai na bato oyo bazalaki na bolingo malamu epai na Nzambe. Yango wana bakoki kobénga bato basepeli na Biblia ete bato na bolingo malamu. Kasi na nsima, bayaki kososola ete ezalaki kotalela bolingo malamu ya bato te, kasi bolingo malamu ya Nzambe. Na yango, maloba na nsé ya lokasa likoló na Luka 2:14 kati na Traduction du monde nouveau elobeli “bato oyo [Nzambe] azali kondima.” Baklisto nyonso oyo bazali kotosa ndai na bango ya komipesa bazali kondimama epai na Nzambe.
17, 18. Nini oyo Yehova akolóngisa, mpe akobulisa eloko nini?
17 Bobele bongo, na boumeli ya ntango molai, Batatoli ya Yehova bazalaki koloba na ntina na kolóngisama ya nkombo ya Nzambe. Kasi Satana atyaki ntembe na ntina na nkombo ya Nzambe? Na kotalela likambo yango, mosaleli moko ya Satana atyelaki yango ntembe, lokola nde Yehova azalaki na lotómo mpo na yango te? Soko moke te. Ezalaki te nkombo ya Yehova nde ebɛtɛlamaki ntembe mpe oyo esengelaki kolóngisama. Yango wana mikanda ya la Société Watch Tower na mikolo oyo ezali te kolobela kolóngisama ya nkombo ya Yehova. Ezali kolobela kolóngisama ya boyangeli mpe kobulisama ya nkombo na ye. Yango ezali na boyokani na lolenge oyo Yesu ayebisaki biso ete tobondelaka: “Tiká ete nkombo na yo ebulisama.” (Matai 6:9, NW) Mbala na mbala, Yehova azalaki koloba ete akobulisa nkombo na ye, oyo Bayisraele babetelaki yango ntembe te kasi nde batyolaki yango.—Ezekiele 20:9, 14, 22; 36:23.
18 Likambo ya kobenda likebi ezali oyo ete, na 1971, “Les nations sauront que je suis Jéhovah” — Comment? esalaki bokeseni oyo: “Yesu Klisto abundi . . . mpo na kolóngisama na boyangeli ya Yehova ya molɔngɔ́ mobimba mpe mpo na kokembisama ya nkombo ya Yehova.” (Nkasá 364 kino 365) Na 1973 (na Lingelesi), búku Le Royaume millénaire de Dieu s’est approché elobaki ete: “‘Bolózi monene’ oyo ezali koya ezali ntango oyo Yehova Nzambe Mozwi-na-Nguya Nyonso akolóngisa boyangeli na ye na molɔ́ngɔ́ mobimba mpe akobulisa nkombo na ye oyo ezali na motuya monene.” (Lokasa 409) Na nsima, na 1975, búku Man’s Salvation Out Of World Distress at Hand! elobaki ete: “Na ntango yango, likambo lileki monene kati na molɔ́ngɔ́ ekokokisama, kolóngisama ya boyangeli ya Yehova ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe kobulisama ya nkombo na ye ya bulɛɛ.”—Nkásá 281.
19, 20. Lolenge nini tokoki komonisa ete tozali kopesa motuya na bingɛngiseli ya pole ya elimo?
19 Oyo nde lipamboli basaleli ya Yehova bazali na yango ya kozala kati na pole ya elimo! Na kokesena monene, molili ya elimo oyo bakonzi ya mangomba ya nkombo mpamba bazali kati na yango emonisami kati na maloba oyo ya mokonzi moko ya lingomba: “Mpo na nini lisumu? Mpo na nini bampasi ezali? Mpo na nini mabe ezali? Wana ezali mituna oyo nakotuna epai na Nkolo na ntango nakokende na likoló.” Kasi Batatoli ya Yehova bakoki kopesa ye biyano: Na ntina na likambo litali lotómo ya boyangeli ya Yehova na molɔngɔ́ mobimba mpe likambo ya koyeba soki bato bakoki kobatela bosembo na bango epai na Nzambe ata liboso na botɛmɛli ya Satana.
20 Na boumeli ya bambula mingi, bingɛngiseli ya solo ya minene mpe ya mike bisili kongɛngisa nzela ya basaleli ya sembo ya Yehova. Yango ekokisaki mikapo lokola Nzembo 97:11 mpe Masese 4:18. Kasi tobosana soko moke te ete kotambola na pole elimboli kososola pole oyo ezali kokóla mpe kosala na boyokani na yango. Lokola tomoni yango, pole wana oyo ezali kokóla etaleli etamboli na biso mpe mokumba na biso ya kosakola.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyanola na lolenge wana ya kotalela makambo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yúni mpe ya 15 Yúni, 1929 (ebimeli ya Lingelesi), emonisaki ete “bakonzi baleki likoló” ezali bongo Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto. Ezalaki liboso etɛlɛmɛlo wana nde esembolamaki na 1962.
b Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Apríli 1992, emonisaki ete bandeko oyo baponami kati na “bampate mosusu” bakómaki kopesamela mokumba ya kosunga bakomité ya Lisangani ya Mikólo-bakambi, kokokanáká bongo na Banetinimi ya eleko ye Ezela.—Yoane 10:16; Ezela 2:58.
Ozali komikundola?
◻ Pole nini emwangisamaki na ntina na botosi epai na “bakonzi baleki likoló”?
◻ Bingɛngiseli ya pole ebimisaki bokóli nini mpo na oyo etali lolenge ya kotambwisa lisangá?
◻ Bopusi nini pole oyo ebakisamaki lisusu esalaki na ntina na etamboli ya baklisto?
◻ Kosembolama nini pole ya elimo ememaki na ntina na bososoli na biso ya makambo mosusu ya Makomami?
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]
Mafungola mazwami na lokasá 24: Bililingi bisalemi na fɔtɔ́ oyo ezwamaki na Cooper-Hewit, National Desin Museum, Smithsonian Institution