Ntubéla euti na bato to mpe na Nzambe?
EPAI na bakatolike ntubélá esili mpenza kobóngwana na boumeli ya bikeke. Ntango lingomba ya katolike ebandaki, ntu- bélá mpe pénétésa (pénitence) esengisamak bobele mpo na lisumu ya monene. Mpo na yango mokanda La religion dans l’Occident médiéval (angl.) elobi ete: “Kino na nsuka na ekeke ya motoba, bibongiseli bitaleli pénétésa bizalaki naino na nguya mingi: sakremantu ezalaki kosalema bobele mbala moko kati na bomoi mobimba ya moto, ntubélá ezalaki kosalema liboso na bato banso, pénétésa ezalaki molai mpe ezalaki kosɛnga makambo makasi.”
Pénétésa ekokaki kosalelama kino wapi? Na 1052, basɛngaki na moto moko oyo asalaki pénétésa ete etambola makolo ngulu longwa Bruges, na mokili ya Beligike, kino na Yelusaleme! Mokanda Le christianisme en Occident, 1400-1700 (angl.) emonisi ete “na 1700, ezalaki naino komonana kati na bisika mosantu ya mangomba, mpe na maziba na mai ete, bakatolike bazalaki komikótisa na mai ya malili mpenza oyo ezalaki kosukela bango kino nkingo, wana bazalaki kofukama na bisika yango mpo na kosala mabondeli na bango ya pénétésa.” Lokola na eleko yango, lilimbisi lizalaki kopesama bobele nsima na kosala pénétésa, mingi na bato bamonaki malamu kozela ete basala ntubélá na bango bobele na ntango bakokóma pene na kokufa.
Ntubélá lokola oyo ezali kosalema na mikolo na biso, ebimaki bongo na ntango nini? Totangi kati na mokanda La religion dans l’Occident médiéval ete: “Motindo na sika na pénétésa ekótisamaki na France pene na nsuka na ekeke ya motoba, na basango ya ekólo Celte. . . . Ezali bongo ntubélá oyo ekosalemaka na litoi, oyo na boumeli na yango, moto oyo alingi kosala pénétésa akotubéla masumu na ye bobele epai na sángó moko. Yango ezalaki mbongwana oyo esalemaki kati na lolenge oyo basángó bazalaki kosala, oyo ezalaki bongo litambwisi ya elimo.” Lolenge yango ya kala, ezalaki kosenga ete basángó batubélana masumu bamoko epai na bamosusu mpo ete bazwa lisalisi ya elimo oyo bazali na yango mposa, mpo na kolonga bolembu na bango. Kasi mpo na oyo etali lolenge na ntubela ya sika, elingi koloba ntubélá na litoi, Lingomba eyebisaki ete basango bazalaki na likoki monene: “nguya, to bokonzi va kolimbisa masumu.”—Nouvelle Encyclope’die catholique (angl.).
Kasi, Yesu apesaki solo bokonzi yango epai na bamoko na bayekoli na ye? Wapi maloba na ye oyo mamemaki bato kino koloba boye?
“Bafungóla ya Bokonzi”
Na libaku moko, Yesu alobaki na Petelo ete: “Nakopesa yo bafungola ya. Bokonzi na likoló mpe eloko nini ezali yo kokanga na mokili, ekokangama na likoló, mpe eloko nini ezali yo kofungola na mokili, ekofungolama na likoló.” (Matai 16:19) Yesu akanisaki nini wana alobelaki “bafungóla ya bokonzi”? Mpo na kososola malamu liloba yango, totalela libaku mosusu oyo Yesu asalelaki liloba “fungóla.”
Mokolo moko, Yesu alobaki epai na bakonzi ya mangomba na Bayuda, baoyo bayekolaki mingi mpenza Mibeko na Moise, ete: “Mawa na bino balakisi na mibeko, mpo ete bolongoli fungola ya mayele! Bino mpenza bokoti te, mpe bopekisi bango balingaki kokóta.” (Luka 11:52) ‘Bopekisaki bango ete bakota te.’ Epai wapi? Yesu alobeli yango na sikisiki na Matai 23:13. Totangi yango ete: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi! Mpo ete bokofúnga bokonzi ya likoló liboso na bato; mpamba te bino mpenza bokoingela wana te, nde bokotika te ete baoyo balingi baingela.” Bakonzi ya mangomba na Bayuda bazalaki kofúnga ekuke liboso na bato na kopekisáká bango ete bazwa te likoki ya kozala mokolo mosusu elongo na Yesu Klisto na likoló. “Fungóla” oyo bakonzi yango ya mangomba “balongolaki” etalaki likambo ya lilimbisi ya masumu te. Ezalaki nde fungola oyo ekopesaka nzela na boyebi oyo Nzambe asili kolakisa yango.
Bobele bongo, “bafungóla ya Bokonzi” oyo epesamaki epai na Petelo emonisi te bokonzi ya koyebisa na likoló masumu nini masengeli kolimbisama mpe masumu nini masengeli kolimbisama te. Kasi emonisaki nde mosala monene oyo Petelo azwaki mpo na kofungola nzela oyo ekomemaka na likoló, na kolakisáká boyebi oyo Nzambe amonisaki yango, na nzela ya mosala na ye ya kosakola Mpo na mbala ya yambo, afungolaki nzela yango mpo na Bayuda mpe bato oyo babóngwanaki na losambo ya Bayuda; na nsima mpo na Basamarité, mpe na nsuka, asalaki yango mpo na Bapakano.—Misala 2:1-41; 8:14-17; 10:1-48.
“Nyonso ekokanga bino na mabelé”
Liboso na bayekoli mosusu, Yesu azongelaki lisusu maloba oyo alobelaki Petelo. “Nazali koloba na bino solo ete, eloko nini ezali bino kokanga yango awa na mokili, ekokangama na likoló, mpe eloko nini ezali bino kofungola yango na mokili ekofungolama na likoló.” (Matai 18:18) Bokonzi nini Yesu apesaki epai na bayekoli na ye na esika oyo? Ba versets ya zingazinga ezali komonisa ete azalaki kolobela lolenge ya kosilisa matáta kati na bandimi mpe kobatela bopeto ya lisangá na kobimisáká basumuki oyo baboyi kobongola motema.—Matai 18:15-17.
Wana moto moko abukaki mibeko minene ya Nzambe, mibali oyo bazalaki na mikumba kati na lisangá basengelaki kosambisa likambo yango mpe kozwa ekateli soko mosumuki asengeli “kokangama” (elingi koloba akwei na likambo) to “afungolami” (elíngi koloba alongi likambo). Yango elimbolaki ete likoló esengeli kotósa bikateli bizwami na bato? Te. Lokola oyo elimbolami na Robert Young, ye molimboli na Biblia ete, makatami nyonso bayekoli bakozwa yango, ekolanda bobele makatami oyo masilaki kozwama na likoló, mpe soko moke te koleka liboso na yango. Alobi na sikisiki ete, na elobeli ya polele, Mt 18 verset 18 esengelaki kotangama boye: Eloko nyonso ekokanga bino awa na nsé, “ekozala eloko oyo esilaki (liboso) kokangama” na likoló.
Ezali mpenza likambo na mayele te na kokanisa ete makatami mazwami na bisambiselo ya likoló ekoka kolanda makatami oyo mazwami na bato bazangi kokoka. Kasi ebongi mpenza na koloba ete bato oyo batyamaki na Klisto basengelaki kolanda mitinda na ye mpo na lolenge ya kobatela bopeto ya lisangá na ye. Basengelaki kosala yango na kozwáká makatami na bango na kotalela mitinda oyo misilaki liboso kotyama na likoló. Mpo na yango, basengelaki kotambwisama na Yesu ye moko.—Matai 18:20.
Moto moko akoki nde kozala na lotomo ya “kozala momonisi na Klisto na lolenge na ye ya mosambisi mpe tata,” kino kozwa bokonzi ya kokata na ntina na avenire ya seko ya moko na baninga na ye bandimi? (Nouvelle Encyclopédie catholique [angl.]) Basángó oyo epai na bango bato bakendeke ntubélá, bakopesaka lilimbisi lokola momeseno moko, ata soko “emonani [kati na bateolojié katolike] ete bobele bato moke nde bazali na mayoki ya mawa mpo na masumu na bango.” (Nouvelle Encyclopédie britannique) Ntango nini oyokaki mpo na mbala ya nsuka ete sángó moko aboyaki kolimbisa masumu ya moto moko? Ntina ezali ete, sángó azali komiyoka na nguya te mpo na koluka koyeba soko mosumuki azali na mawa to te mpo na mabe oyo usalaki. Kasi, na motindo uyo, ndenge nini akoki kozala na lotómo ya koIimbisa masumu? Kanisa naino tribinale oyo zuzi ya motema na mawa akolimbisaka basali na mabe, ata baoyo na mitó makasi; akosɛnga bobele ete bayebisa mabe na bango na lolenge na molulu moko, mpe bamonisa mawa oyo bazali kooka mpo na mabe basalaki. Motindo ya mawa oyo ya libunga ekobakisa nde basali na mabe, mpe ekobebisa mpenza botosi na makambo na bosembo. Na solo, ntubélá, lokola oyo ezali kosalema kati na Lingomba ya katolike, ekomema bato bobele ete basalaka masumu.—Mosakoli 8:11.
Ramona, ye oyo na eleko moko, azalaki kotubela engebene molulu ya katolike mpe asalaki yango na boumeli ya sanza nsambo, alobaki ete: “Ntubélá ezali kopusa moto soko moke te ete apengola kosala lisumu na mikolo mizali koya.” Alandi ete: “Ntubélá ekopesaka likanisi ete, Nzambe akolimbisaka nyonso. Atako likambo nini nzoto na biso ezangi kokoka ekopusa biso na kosala, ye akolimbisa yango. Wana ezali te kokólisa mposa ya kosala makambo malamu”a
Kasi tokokanisa nini na ntina na maloba oyo na Yesu makomami na Yoane 20:22, 23? Kati na mokapo oyo, alobi epai na bayekoli na ye ete: “Bozwa elimo santu. Soko bokolimbisa masumu ya moto nani, makolimbisama na ye; soko bokokanga masumu ya moto nani, makokangama na ye.” Ba versets oyo ezali komonisa te ete Yesu apesaki solo bayekoli na ye bokonzi ya kolimbisa masumu?
Soko tokotalela ba versets ya zingazinga te, mokapo oyo mokoki komonana lokola ete yango endimisi likanisi wana. Kasi tososola naino maloba yango na kotalela mpe litatoli ya Matai 18:15-18, mpe makambo nyonso oyo mateyami na Biblia na ntina na koyambola masumu mpe na ntina na lilimbisi. Nini emonani kati na yango? Bobele ete na Yoane 20:22, 23, Yesu apesaki epai na bayekoli na ye, bokonzi mpo na kobimisa na lisangá, bato oyo bazalaki kosala masumu minene nde baboyaki kobongola mitema Bobele na libaku wuns, Yesu apesaki epai na bayekoli na ye, bokonzi ya komonisa mawa mpe kolimbisa basumuki babéngolɛki mitema Na maloba wana, Yesu alingaki koloba te ete baklisto basengelaki kotubela masumu nyonso na bango epai na sángó.
Baoyo nyonso bazalaki na mikumba kati na lisangá bazalaki na bokonzi ya kokata ezaleli nini baklisto basengelaki kozala na yango epai na baoyo bazalaki kosala masumu minene. Basengelaki kozwa bikateli na komitikáká kotambwisama na elimo santu ya Nzambe mpe na kotongáká yango likoló na malako na Nzambe oyo malobamaki na Yesu Klisto mpe oyo ezali na Makomami Mosantu. (Tala Misala 5:1-5; 1 Bakolinti 5:1-5, 11-13.) Na motindo oyo, bato yango bazalaki na mikumba bazalaki nde kotósa litambwisi liuti na likoló, kasi bazalaki te kolakisa bikateli nini bisengelaki kozwama na likoló.
“Boyambolana masumu moto na moninga na ye”
Na mabaku nini esengeli bongo mpo na baklísto ete bayambolanaka masumu bamoko na bamosusu? Na ntango lisumu monene lisalemi (kasi ezali te mpo na libungá nyonso moke), moklisto asengeli koyambola lisumu na ye epai na bakengeli baoyo bazali kokamba lisangá Ata soko mosumuki asali lisumu monene te, nde lisosoli na ye litungisami mpenza, akozwa bolamu na koyamboláká lisumu na ye mpe na kolukáká lisalisi ya elimo.
Na yango, Yakobo, mokomi na Biblia alobi boye: “Moko na bino azali malali? Tika ete abyanga mikoló ya lingomba babondela mpo na ye, wana esili bango kopakola ye mafuta na nkombo na Nkolo. Mpamba te libondeli ya kondima likobikisa mobeli, mpe Nkolo [akotelemisa] ye. Soki asalaki masumu, yango ekolimbisama. Boye, boyambolana masumu, moto na moninga na ye.”—Yakobo 5:14-16.
Likanisi ya ntubelá na litoi, oyo na momeseno mpe ya molulu, emonisami te kati na maloba oyo. Na kokesena, ezali komonisa ete soko moklisto moko atungisami na lisumu moko kino kozala na mayoki ete akoki lisusu kobondela be, moklisto yango asengeli kobénga bankulutu to bakɛngɛli ya lisangá, bango bakobondela elongo na ye. Bakosalisa ye na kozwa lisusu kolongono na elimo na kopakoláká ye “mafuta” oyo ezali bongo Liloba na Nzambe.—Nzembo 141:5; Tala Luka 5:31, 32; Emoniseli 3:18. Tokosimba na likebi nyonso ete Yoane Mobatisi asɛngaki na bayoki na ye ete ‘babota mbuma ebongi na kobongola motema.’ (Matai 3:8; Tala Misala 26:20.) Mosumuki oyo abongoli mpenza motema akotikaka nzela mabe. Lokola Davidi, mokonzi ya Yisraele, mosumuki abongoli motema oyo akoyambola mabungá na ye epai na Nzambe, akolimbisama Davidi akoma- ki ete: “Nayambwelí yo lisumu na ngaí, mpe nabómbi mabe na ngai te. Nalobaki ete: ‘Nakoyambola mabungá na ngai epai na Jéhovah.’ Mpe yo olimbisaki mabe na ngai.”—Nzembo 32:5, MN.
Tokoki kozwa lilimbisi te na misala ya pénétésa. Bobele Nzambe nde akoki kopesa biso yango. Ya solo, azali kotalela masɛngami ya boyengebene na ye ya kokoka, kasi lilimbísi na ye ezali komonisa bolingo na ye mpo na bato. Lilimbisi na ye lizali mpe komonisa ngolu na ye oyo etongami likoló na mbeka ya lisiko na Yesu Klisto. Kasi bobele basumuki baoyo babongoli motema, bango batiki kosala makambo mabe na miso na Nzambe, bango nde bakoki kozwa lilimbisi wana. (Nzembo 51:7; Yisaya 1:18; Yoane 3:16; Baloma 3:23-26) Bobele baoyo bakozwa lilimbisi ya Jéhovah Nzambe nde bakozwa bomoi ya seko. Mpe mpo ete tozwa lilimbisi yango, tosengeli koyambola masumu na biso na kolanda masɛngami ya bato te, kasi na motindo mosengami na Nzambe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na kokesena, tala oyo elobami na Malako 3:29;
Baebele 6:4-6; 10:26. Kati na mikapo oyo, bakomi na biblia bamonisi na ntembe te ete, Nzambe akolimbisaka masumu nyonso te.
[Elilingi na lokasa 7]
Davidi ayambolaki masumu na ye epai na
Jéhovah, ye oyo alimbisaki yango