Elikya ya lisekwa ezali na ndimbola nini mpo na yo?
“Okozipola lobɔkɔ na yo mpe okosilisa mposa ya bikelamu nyonso ya bomoi.”—NZEMBO 145:16.
1-3. Elikya nini bato mosusu bazali na yango mpo na mikolo ekoya? Pesá ndakisa.
CHRISTOPHER, mwana moko ya mbula libwa ná leki na ye ya mobali, babimaki na mosala ya kosakola ndako na ndako mokolo moko na ntɔngɔ elongo na noko, mama leki, mpe bandeko na bango mosusu mibale pene na engumba Manchester, na ekólo Angleterre. Zulunalo Lamuká! elobelaki likambo oyo esalemaki na nsima. “Na nsima ya nzanga, bango nyonso bakendeki kotambola mpo na kozwa mopɛpɛ na Blackpool, libongo moko ya moke, oyo ezali pene na Manchester. Bango nyonso 6 bazalaki na kati ya bato 12 oyo bakufaki na likama ya motuka, oyo ata bapolisi balobaki ete ezali likama moko ya nsɔmo mpenza.”
2 Mokolo moko liboso likama yango esalema, libota yango bayanganaki na Boyekoli ya mokanda epai bayekolaki lisolo oyo elobelaki liwa. Tata na ye alobaki boye: “Christopher azalaki mwana moko oyo azalaki kokanisa lokola mokóló. Na butu wana, alobelaki polele mokili ya sika mpe elikya na ye mpo na mikolo ezali koya. Ntango tozalaki kosolola, Christopher alobaki mbala moko boye: ‘Likambo ya malamu mpo na biso Batatoli ya Yehova ezali ete, ata soki liwa esalaka biso mpasi, toyebi ete mokolo mosusu tokomonana lisusu awa na mabelé.’ Ntango alobaki bongo, moko te kati na biso ayebaki ete maloba yango ekotikala ntango nyonso na makanisi na biso.”a
3 Bambula mingi liboso, na 1940, bayebisaki Franz, Motatoli moko ya Australie oyo azalaki na bolɔkɔ moko ya Berlin ete bakoboma ye mpo aboyi kotika Yehova. Franz akomelaki mama na ye boye: “Na boyebi nyonso oyo nazali na yango, soki nandimaki kokóma soda, elingaki kozala lisumu moko oyo ebongi na liwa. Yehova alingaki komona ngai mabe mpenza. Nalingaki kozanga elikya ya lisekwa. . . . Kasi sikoyo, Mama mpe bandeko na ngai nyonso ya bolingo, bayebisi ngai lelo ete bakoboma ngai lobi na ntɔngɔ, kasi bóbanga te. Nzambe azali kopesa ngai makasi ndenge kaka azalaki kopesa baklisto nyonso ya solo na ntango ya kala. . . . Soki botikali sembo tii na liwa, tokokutana lisusu na ntango ya lisekwa. . . . Tokomonana lisusu.”b
4. Masolo oyo touti kolobela awa esali nini na motema na yo, mpe tokotalela nini sikoyo?
4 Elikya ya lisekwa ezalaki na ndimbola monene mpo na Christopher mpe Franz. Bazalaki kondima mpenza ete ekokokisama. Na ntembe te, masolo na bango esimbi mpenza mitema na biso! Mpo na kobakisa bolingo mpe botɔndi na biso epai ya Yehova mpe kolendisa elikya na biso mpo na lisekwa, tiká tótalela ntina oyo lisekwa ekosalema mpe nini elikya yango esengeli kosala na motema ya mokomoko na biso.
Emonaneli ya lisekwa na mabelé
5, 6. Emonaneli oyo ntoma Yoane alobeli na Emoniseli 20:12, 13 emonisi nini?
5 Na emonaneli moko ya makambo oyo ekosalema na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto Yesu, ntoma Yoane amonaki lisekwa ezali kosalema na mabelé. Akomaki boye: “Namonaki bakufi, bato minene ná bato mike, . . . Mpe mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki na kati na yango, mpe liwa ná Hadesi ezongisaki bakufi oyo bazalaki na kati na yango.” (Emoniseli 20:12, 13) Ezala “bato minene” to “bato mike” oyo bakangamaki na kati ya Hadesi (Sheole), elingi koloba nkunda ya bato nyonso, bango nyonso bakobima. Baoyo bakufaki na mbu bakozonga mpe na bomoi na ntango wana. Elikya kitoko wana ezali na kati ya mokano ya Yehova.
6 Klisto akobanda Boyangeli na ye ya Mbula Nkóto na kokanga Satana mpe kobwaka ye na libulu mozindo. Lokola Satana akozala lisusu na likoki ya kosala eloko te na ntango wana, akokoka te kobungisa bato oyo bakosekwa to baoyo bakobika na bolɔzi monene. (Emoniseli 20:1-3) Yo okoki komona ete mbula nkóto ezali molai mingi, kasi na miso ya Yehova yango ezali kaka “lokola mokolo moko.”—2 Petelo 3:8.
7. Na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, bakosambisa bato na kotalela makambo nini?
7 Emonaneli yango emonisi ete Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto ekozala ntango ya kosambisa. Ntoma Yoane akomaki boye: “Namonaki bakufi, bato minene ná bato mike, batɛlɛmi liboso ya kiti yango ya bokonzi, mpe barulo efungwamaki. Kasi rulo mosusu efungwamaki; ezali rulo ya bomoi. Mpe bakufi basambisamaki na makambo oyo ekomamá na kati ya barulo yango engebene misala na bango. . . . Mpe basambisamaki moto na moto engebene misala na ye.” (Emoniseli 20:12, 13) Tósimba ete bato bakosambisama te mpo na makambo oyo basalaki to oyo bazangaki kosala liboso bákufa. (Baloma 6:7) Kasi, bakosambisama nde na kotalela makambo oyo ekozala na “barulo” oyo ekofungwama. Makambo oyo moto akosala nsima ya koyoka makambo oyo ezali na barulo yango nde ekomonisa soki nkombo na ye ekomami to te na “rulo ya bomoi.”
“Lisekwa ya bomoi” to “lisekwa ya kosambisama”
8. Wapi makambo mibale oyo ezali kozela bato oyo bakosekwa?
8 Mwa liboso, kaka na emonaneli yango, Yesu alobi ete azali “na bafungola ya liwa mpe ya Hadesi.” (Emoniseli 1:18) Azali “Kapita ya bomoi” oyo Yehova apesi nguya ya kosambisa “bato ya bomoi mpe bakufi.” (Misala 3:15; 2 Timote 4:1) Ndenge nini akosala yango? Akozongisa bakufi na bomoi. Yesu alobaki na ebele ya bato oyo azalaki koteya boye: “Bókamwa te mpo na yango, mpamba te ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.” Mpe abakisaki boye: “Baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi, baoyo bazalaki na momeseno ya kosala makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.” (Yoane 5:28-30) Elikya nini ezali mpo na mibali mpe basi ya sembo ya ntango ya kala?
9. (a) Mingi kati na bato oyo bakosekwa bakoyekola makambo nini? (b) Mosala monene nini ya koteya bato ekosalema na ntango wana?
9 Ntango bato yango ya sembo bakosekwa, bakomona mbala moko ete bilaka oyo bazalaki kotyela motema ekokisami mpenza. Bakozala mpenza na esengo ntango bakoyeba soki nani azali Momboto ya mwasi ya Nzambe oyo balobeli na esakweli ya liboso ya Biblia, na Genese 3:15! Bakosepela mpenza ntango bakoyoka ete Yesu, Masiya oyo Nzambe alakaki, atikalaki sembo tii na liwa, mpe bongo apesaki bomoi na ye mbeka mpo na kosikola bato! (Matai 20:28) Baoyo bakoyamba bato oyo bakosekwa bakozala na esengo mingi ya kosalisa bango bámona ete mbeka yango ezali komonisa boboto monene mpe motema mawa ya Yehova. Ntango bato oyo bakosekwa bakomona makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ezali kosala mpo na kokokisa mokano ya Yehova mpo na mabelé, na ntembe te mitema na bango ekotonda na esengo mpe bakosanzola Yehova. Bakozala na mabaku mingi mpenza ya komonisa bosembo na bango epai ya Tata na bango ya likoló ná Mwana na ye. Moto nyonso oyo akozala na bomoi na ntango wana akozala na esengo ya kopesa mabɔkɔ na mosala monene ya koteya ebele ya bakufi oyo bakosekwa, oyo basengeli mpe kondima mbeka ya Yesu.
10, 11. (a) Boyangeli ya Mbula Nkóto ekopesa bato nyonso awa na mabelé mabaku nini? (b) Likambo yango esengeli kosala nini na mitema na biso?
10 Ntango Abalayama akosekwa, akozala na esengo monene ya kozala na mokili oyo ekoyangelama na “engumba” oyo azalaki kozela. (Baebele 11:10) Yobo, moto ya sembo, akozala na esengo mpenza ntango akoyoka ete lisolo ya bomoi na ye elendisaki basaleli mosusu ya Yehova oyo bosembo na bango emekamaki! Danyele mpe akolinga koyeba ndenge bisakweli oyo akomaki ekokisamaki!
11 Ya solo, baoyo nyonso bakozwa bomoi na mokili ya sika ya boyengebene, ezala baoyo bakosekwa to baoyo bakobika na bolɔzi monene, bakozala na makambo mingi ya koyekola na ntina ya mokano ya Yehova mpo na mabelé mpe mpo na bafandi na yango. Elikya ya kozala na bomoi ya seko mpe ya kosanzola Yehova libela na libela ekosala ete bato básepela mingi na programɛ ya mateya oyo ekopesama na boumeli ya Mbula Nkóto. Nzokande, etamboli oyo mokomoko na biso akozala na yango nsima ya koyoka makambo oyo ekozala na barulo nde ekosala ete abika to akufa. Tokosalela makambo oyo tokoyekola na barulo yango? Tokomanyola makambo ya ntina oyo tokoyekola mpe tokobomba yango mpo tólonga komekama ya nsuka oyo Satana akobimisa mpo na kolongola biso na nzela ya solo?
12. Nini ekosalisa moto mokomoko amipesa mpenza na mosala ya koteya bato mpe ya kokómisa mabelé paladiso?
12 Tosengeli te kobosana mapamboli kitoko oyo mbeka ya lisiko ya Klisto ekomemela biso. Bato oyo bakosekwa bakotungisama te na bamaladi mpe mitungisi mosusu ya nzoto oyo ezali konyokola bato lelo oyo. (Yisaya 33:24) Lokola na mokili ya sika bato nyonso bakozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe bakozala na elikya ya kokóma na nzoto ya kokoka, bakomipesa mpenza na mosala ya koteya bamiliare ya bato oyo bakosekwa mpo na kolakisa bango nzela ya bomoi. Bato yango bakopesa mpe mabɔkɔ na mosala oyo eleki misala nyonso oyo esalemá, elingi koloba mosala ya kobongisa mabelé mobimba mpo na kokómisa yango paladiso mpo na lokumu ya Yehova.
13, 14. Mpo na nini bakofungola Satana mpo ameka bato mbala ya nsuka, mpe yango ekosuka ndenge nini mpo na mokomoko na biso?
13 Ntango bakobimisa Satana na libulu mozindo mpo na komeka bato mbala ya nsuka, akomeka lisusu kopɛngwisa bango. Emoniseli 20:7-9 elobi ete ‘bikólo’ nyonso ‘oyo ekobungisama nzela,’ to bituluku ya bato, oyo bakokwea na komekama ya Satana bakobomama: ‘Mɔtɔ ekouta na likoló mpe ekolya bango.’ Mpo na baoyo kati na bango basekwaki na boumeli ya Mbula Nkóto, kobomama na bango ekomonisa ete lisekwa na bango ezali lisekwa ya kosambisama. Nzokande, basekwi oyo bakotikala sembo bakozwa likabo ya bomoi ya seko. Ya solo mpenza, lisekwa na bango ekozala “lisekwa ya bomoi.”—Yoane 5:29.
14 Ndenge nini elikya ya lisekwa ekoki kobɔndisa biso ata sikoyo? Lisusu, tosengeli kosala nini mpo tózwa matomba ya elikya yango na mikolo ezali koya?
Mateya oyo tokoki kozwa sikoyo
15. Ndenge nini elikya ya lisekwa ekoki kosalisa biso sikoyo?
15 Ekoki kozala ete ndeko na yo moko auti kokufa mpe ozali kotungisama naino na mpasi oyo moto ayokaka soki ndeko na ye akufi. Elikya ya lisekwa ezali kosalisa yo ozala na kimya ya motema mpe makasi oyo bato oyo bayebi solo te bazali na yango te. Paulo abɔndisaki baklisto ya Tesaloniki na maloba oyo: “Tolingi te bózanga koyeba makambo oyo etali bato oyo bazali kolala na kati ya liwa; mpo bóyoka mawa te na ndenge bamosusu oyo bazali na elikya te bayokaka.” (1 Batesaloniki 4:13) Kanisá naino ete ozali na mokili ya sika mpe ozali komona ndenge bato bazali kosekwa! Soki ozali kokanisa na mozindo na elikya ya kokutana lisusu na bandeko na yo oyo bakufá, yango ekobɔndisa yo mpenza ata sikoyo.
16. Okomiyoka ndenge nini na ntango ya lisekwa?
16 Ekoki kozala ete, mpo na botomboki ya Adama, ozali kotungisama na maladi moko. Soki ezali bongo, kotika te ete mpasi wana etinda yo obosana elikya kitoko ya kosekwa mpe kozonga na bomoi na nzoto kolɔngɔnɔ mpe makasi na mokili ya sika. Mokolo yango, ntango okofungola miso mpe okomona bato oyo bakozala wana mpo na koyamba yo na esengo, okozanga te kopesa Yehova matɔndi mpo na motema-boboto na ye.
17, 18. Wapi mateya mibale ya ntina oyo tosengeli kosimba?
17 Liboso makambo yango esalema, tótalela sikoyo mateya mibale oyo tosengeli kosimba. Ya liboso ezali ntina ya kosalela Yehova na molimo mobimba banda sikoyo. Na ndakisa ya Nkolo na biso Klisto Yesu, bomoi na biso ya komipimela emonisaka ete tolingaka Yehova mpe bazalani na biso. Soki botɛmɛli to minyoko esali ete tóbungisa mosala to bonsomi na biso, tosengeli kozala na ekateli ya kotikala makasi na kondima na biso, ata soki minyoko yango ezali makasi ndenge nini. Ata soki batɛmɛli basengeli koboma biso, elikya ya lisekwa ekoki kobɔndisa biso mpe kopesa biso makasi ya kotikala sembo epai ya Yehova mpe Bokonzi na ye. Ya solo, molende na biso na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli ezali kopesa biso elikya ya kozwa mapamboli ya seko oyo Yehova abombeli bayengebene.
18 Liteya ya mibale ezali kotalela ndenge oyo tosalaka ntango mitungisi ya nzoto na biso ya kozanga kokoka etye biso na komekama. Lokola toyebi ete lisekwa ekozala mpe tozali na botɔndi mpo na boboto monene ya Yehova, yango elendisaka ekateli na biso ya kotikala makasi na kondima. Ntoma Yoane alobaki boye: “Bólingaka mokili te ná biloko oyo ezali na kati ya mokili. Soki moto azali kolinga mokili, bolingo ya Tata ezali na kati na ye te; mpamba te eloko nyonso oyo ezali na kati ya mokili—mposa ya mosuni mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko na yo ya kobikela—euti epai ya Tata te, kasi euti na mokili. Lisusu, mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoane 2:15-17) Soki tokanisi “bomoi ya solosolo” oyo ezali kozela biso, tokomona mpamba bamposa nyonso ya mokili oyo ekoki kobenda biso soki totyeli yango motema. (1 Timote 6:17-19) Soki tomekami na pite to ekobo, tokotɛmɛla yango makasi. Tomoni ete soki tozali lelo oyo na etamboli oyo ezali kosepelisa Yehova te mpe tokufi liboso Armagedon eya, biso mpe tokozala na kati ya bato oyo elikya ya lisekwa ezali te mpo na bango.
19. Wapi likambo eleki ntina mingi oyo tosengeli kobosana te?
19 Likambo eleki ntina, oyo tosengeli kobosana te ezali libaku kitoko oyo tozali na yango ya kosepelisa motema ya Yehova lelo mpe libela na libela. (Masese 27:11) Soki totikali sembo tii na liwa to soki tokobi kozala sembo tii na nsuka ya ebongiseli ya makambo mabe oyo, Yehova akomona ete toponi ngámbo na ye na ntembe oyo Satana abimisaki mpo na lotomo ya Nzambe ya kozala mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Lisusu, ekozala mpenza esengo soki tobiki na bolɔzi monene to tosekwi mpo na kozala na bomoi na mabelé oyo ekobongwana Paladiso!
Bamposa na biso ekokokisama
20, 21. Nini ekosalisa biso tótikala sembo ata soki tozwi biyano na mituna nyonso te na ntina na lisekwa? Limbolá.
20 Makambo oyo toyekoli na ntina ya lisekwa eyanoli na mituna na biso nyonso te. Yehova akosala nini mpo na bato oyo babalanaki liboso bákufa? (Luka 20:34, 35) Bato bakosekwa kaka na bisika oyo bakufaki? Bakosekwa na bisika oyo bandeko na bango bafandi? Ezali na ebele ya mituna mosusu na ntina na lisekwa oyo ezwi naino biyano te. Atako bongo, tosengeli kobosana te maloba ya Yilimia oyo: “[Yehova] azali na malamu epai ya baoyo [bazelaka] ye, epai ya molimo oyo azali koluka ye. Ezali malamu ete moto [azela] na kimya mpo na kobika ya [Yehova].” (Bileli 3:25, 26) Na ntango oyo Yehova akolinga, tokozwa biyano ya malamu mpenza na mituna wana nyonso. Ndenge nini toyebi yango?
21 Tóbosana te maloba oyo mokomi ya Nzembo ayembaki mpo na Yehova: “Okozipola lobɔkɔ na yo mpe okosilisa mposa ya bikelamu nyonso ya bomoi.” (Nzembo 145:16) Ntango tozali kokola, bamposa na biso ebongwanaka. Makambo oyo tozalaki kosepela na yango ntango tozalaki naino bana, tosepelaka na yango lisusu te lelo oyo. Makambo oyo tokutanaka na yango to bilikya na biso nde esalaka ete tótalela bomoi na lolenge boye to boye. Kasi, ezala bamposa nini tokozala na yango na mokili ya sika, Yehova akozanga te kokokisa yango.
22. Mpo na nini tosengeli mpenza kosanzola Yehova?
22 Likambo eleki ntina mpo na mokomoko na biso lelo oyo ezali ete tózala sembo. “Eloko oyo balukaka epai ya bakapita ezali ete moto amonana moto ya sembo.” (1 Bakolinti 4:2) Tozali bakapita ya nsango malamu ya nkembo ya Bokonzi ya Nzambe. Molende na biso na mosala ya kosakola nsango malamu epai ya bato nyonso oyo tozali kokutana na bango esalisaka biso tótikala na nzela oyo ezali komema na bomoi. Tosengeli kobosanaka soki moke te ete “ntango mpe likambo ekanami te” ekómelaka biso nyonso. (Mosakoli 9:11, NW) Mpo na kolonga mitungisi ezangi ntina oyo ezali kouta na mikakatano ya bomoi, kangamá makasi na elikya kitoko ya lisekwa. Yebá ete ata soki okufi liboso Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto ebanda, okoki kobɔndisama na koyeba ete lisekwa ezali. Na ntango oyo Yehova abongisá, okozala na likoki ya kozongela maloba oyo Yobo alobaki na Mozalisi: “Okobyanga mpe ngai nakozongisela yo.” Yehova abongi mpenza kozwa masanzoli, ye oyo azali na mposa makasi ya kozongisa na bomoi bato nyonso oyo abombá na makanisi na ye!—Yobo 14:15.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Lamuká! ya 8 Yuli 1988, lokasa 10 (na Lifalanse), ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Les Témoins de Jéhovah : Prédicateurs du Royaume de Dieu, lokasa 662, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Ozali koyeba lisusu?
• Na boyangeli ya Mbula Nkóto, bakosambisa bato na kotalela makambo nini?
• Mpo na nini bato mosusu bakozwa “lisekwa ya bomoi” mpe basusu “lisekwa ya kosambisama”?
• Ndenge nini elikya ya lisekwa ekoki kobɔndisa biso sikoyo?
• Ndenge nini Nzembo 145:16 ezali kosalisa biso tózala na makanisi ebongi mpo na mituna etali lisekwa oyo ezwi naino biyano te?
[Bililingi na lokasa 21]
Ndenge nini elikya ya lisekwa ekoki kosalisa biso sikoyo?