“Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te”
“Ezali mpo na yango nde nayei na mokili, mpo napesa litatoli na ntina na solo.”—YOANE 18:37.
1, 2. (a) Na ndenge nini bokabwani ezali se kobakisama na mokili? (b) Na lisolo oyo tokozwa biyano na mituna nini?
NDEKO mwasi moko na sudi ya Mpoto alobi boye: “Banda bomwana na ngai namonaka kaka makambo ya kozanga bosembo. Na yango, naboyaki makambo ya politiki ya ekólo na biso mpe nakómaki kondima makanisi ya bato mingi na oyo etali mbongwana na ekólo. Nazalaki makango ya teroriste moko na boumeli ya bambula ebele.” Ndeko mobali moko na sudi ya Afrika amonisi ntina oyo azalaki moto ya mobulu, alobi boye: “Nazalaki komona ete mboka na biso elekaki bamboka mosusu nyonso, mpe nakɔtaki na parti politiki moko. Bateyaki biso ete tóboma batɛmɛli na biso na makɔnga, ata mpe bato ya mboka na biso, oyo bapesaka baparti politiki mosusu mabɔkɔ.” Ndeko mwasi moko na Europe centrale alobi: “Nazalaki kokanisela basusu mabe, mpe nazalaki koyina bato ya ekólo mosusu to bato ya lingomba mosusu.”
2 Lelo oyo, bato mingi bakanisaka ndenge bandeko oyo tolobeli bazalaki kokanisa liboso. Baparti politiki mingi ebimisaka mobulu mpo na koluka kozwa lipanda. Bato bazali kowelana mingi na makambo ya politiki. Mpe na bikólo ebele, banyokolaka mpenza bapaya. Kaka ndenge Biblia esakolaki yango, na mikolo oyo ya nsuka bato ‘balingi kosala boyokani te.’ (2 Timote 3:1, 3) Lokola mokili etondi na bokabwani, ndenge nini bakristo bakoki kobatela bomoko? Ndakisa ya Yesu ekoki koteya biso makambo mingi. Ata mpe na mikolo na ye, bato bakabwanaki mpo makanisi na bango na makambo ya politiki ekesanaki. Na lisolo oyo, tokozwa biyano na mituna misato oyo: Mpo na nini Yesu akɔtaki te na makambo ya politiki? Ndenge nini Yesu amonisaki ete basaleli ya Nzambe basengeli te kokɔta na makambo ya politiki? Mpe ndenge nini Yesu ateyaki biso ete tosengeli ata moke te kozala na ngámbo ya bato ya mobulu?
NDENGE OYO YESU AZALAKI KOTALELA BAOYO BAZALAKI KOLUKA LIPANDA
3, 4. (a) Na mikolo ya Yesu, Bayuda mingi bazalaki na mposa ya nini? (b) Nini emonisi ete bayekoli ya Yesu bakómaki mpe na mposa wana?
3 Bayuda mingi oyo Yesu asakwelaki bazalaki koluka kozwa lipanda epai ya Baroma. Mingimingi Bayuda oyo babengamaki Bazelote, ya parti politiki moko, bazalaki kosala nyonso mpo bato bákolisa mposa wana ya lipanda. Bazelote ebele bazalaki kolanda mobali moko na nkombo Yudasi Mogalile, oyo azalaki na bomoi na siɛklɛ ya liboso. Azalaki masiya ya lokuta mpe azalaki kobungisa bato mingi nzela. Josèphe, Moyuda moko mpe moto ya istware alobaki ete Yudasi azalaki kotinda Bayuda bábundisa Baroma mpe azalaki kobenga baoyo bazalaki kofuta mpako epai ya Baroma ete bazali “bibangabanga.” Nsukansuka Baroma babomaki Yudasi yango. (Misala 5:37) Kutu Bazelote mosusu bakómaki bato ya mobulu mpo na kokokisa mikano na bango.
4 Bayuda ebele bazalaki kozela koya ya Masiya na mposa makasi. Bayebaki ete Masiya akolongola bango na boombo ya Baroma mpe akokómisa lisusu Yisraele ekólo moko monene na ntango wana. (Luka 2:38; 3:15) Mingi na bango bandimaki ete Masiya akotya bokonzi moko na mabele, na ekólo Yisraele. Soki likambo yango esalemaka, Bayuda nyonso oyo bakimaki na bisika ndenge na ndenge na mokili balingaki kozonga na ekólo na bango. Ata mpe Yoane mobatisi atunaki Yesu ete: “Yo ozali Moto oyo azali koya, to tosengeli nde kozela mosusu?” (Matai 11:2, 3) Mbala mosusu Yoane azalaki na mposa ya koyeba soki moto mosusu akoya kolongola Bayuda na boombo. Mwa moke na nsima, ntango Yesu asekwaki bayekoli mibale bakutanaki na ye na nzela ya Emause. Bazalaki na elikya ete Yesu nde moto akosikola Yisraele. (Tángá Luka 24:21.) Mpe bantoma batunaki Yesu ete: “Nkolo, ozali kozongisela Yisraele bokonzi na ntango oyo?”—Misala 1:6.
5. (a) Mpo na nini bato ya Galile balingaki ete Yesu akóma mokonzi na bango? (b) Ndenge nini Yesu asembolaki makanisi na bango?
5 Na ntembe te, ndenge oyo Bayuda bazalaki kozela Yesu etindaki bato mingi ya Galile báluka kokómisa Yesu mokonzi na bango. Ekoki kozala ete bamonaki ete Yesu akozala mokonzi moko malamu; mpo azalaki molobi malamu, akokaki kobikisa bato ya maladi, akokaki mpe kosilisa nzala. Bato bakamwaki ntango Yesu aleisaki bato 5 000 na ndenge ya likamwisi. Yesu amonaki ete bato balingaki mpenza kokómisa ye mokonzi. Biblia elobi ete: “Yesu, lokola ayebaki ete balingi koya kokanga ye mpo na kotya ye mokonzi, alongwaki akei lisusu na ngomba, kaka ye moko.” (Yoane 6:10-15) Emonanaki ete mokolo oyo elandaki, bato batikaki kotungisa ye. Na nsima, Yesu alimbolelaki bango ete ayaki te mpo na kokokisa bamposa na bango ya mosuni, kasi nde mpo na koteya bango makambo etali Bokonzi ya Nzambe. Alobaki na bango ete: “Bósalaka mosala, ezala te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi mpo na bilei oyo eumelaka mpo na bomoi ya seko.”—Yoane 6:25-27.
6. Ndenge nini Yesu amonisaki polele ete alukaki te bokonzi awa na mabele? (Talá elilingi ya ebandeli.)
6 Mwa moke liboso ya liwa na ye, Yesu ayebaki ete bayekoli na ye mosusu bakanisaki ete akobanda koyangela na Yerusaleme. Yesu apesaki bango ndakisa ya mina mpo na kosalisa bango bákanga ntina ete likambo oyo bazali kokanisa ekosalema te. Ndakisa yango emonisaki ete Yesu, ‘moto moko ya lokumu,’ akokende mosika mpo na ntango molai. (Luka 19:11-13, 15) Yesu ayebisaki Ponse Pilate, guvɛrnɛrɛ ya Roma ete akɔtaka te na makambo ya politiki ya mokili oyo. Pilate atunaki Yesu ete: “Yo ozali mokonzi ya Bayuda?” (Yoane 18:33) Mbala mosusu Pilate abangaki ete Yesu akotinda bato bátombokela Baroma. Kasi Yesu ayanolaki ye ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.” (Yoane 18:36) Yesu aboyaki kokɔta na makambo ya politiki mpo Bokonzi na ye ekozala na likoló. Alobaki ete mosala na ye awa mabele ezalaki ya ‘kopesa litatoli na ntina na solo.’—Tángá Yoane 18:37.
7. Mpo na nini ekoki kozala mpasi tóboya kopesa mabɔkɔ na parti politiki moko boye, ata na nse ya motema na biso?
7 Na ndakisa ya Yesu soki tokangi ntina ya mokumba na biso, tokoboya kopesa mabɔkɔ na parti politiki nyonso, tokosala yango te ata na nse ya motema na biso. Kasi ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Mokɛngɛli ya zongazonga moko alobi ete: “Esika nafandaka bato bazali kolekisa ndelo na likambo yango. Balingaka ekólo na bango makasi koleka mpe mingi na bango bakanisaka ete bakozala malamu kaka soki moto ya ekólo na bango nde akómi mokonzi. Likambo ya esengo, bandeko babateli bomoko na ndenge batye makanisi na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Bayebi ete Nzambe nde akosilisa kozanga bosembo mpe mikakatano mosusu oyo tozali kokutana na yango.”
YESU AKƆTAKI ATA MOKE TE NA MAKAMBO YA POLITIKI
8. Likambo nini ya kozanga bosembo Bayuda mingi bakutanaki na yango na mikolo ya Yesu?
8 Ntango bato bamonaka makambo ya kozanga bosembo zingazinga na bango, mbala mingi bamikɔtisaka makasi na makambo ya politiki. Na mikolo ya Yesu, kofuta mpako ezalaki kosala ete bato ebele bákɔta na makambo ya politiki. Kutu, Yudasi Mogalile oyo tolobelaki, atombokaki mpo Baroma bazalaki kotya bankombo ya bato na liste mpo bámindimisa ete bakofuta mpako. Bazalaki kofuta mpako mpo na makambo mingi, na ndakisa mpo na biloko ya moto, mabele mpe bandako. Lisusu bakɔngɔli-mpako bazalaki kondima kanyaka, yango ezalaki kokómisa makambo mabe koleka. Ntango mosusu bazalaki kofuta bakonzi ya guvɛrnema mpo na kozwa esika mpe bazalaki kosalela bokonzi na bango mpo na kozwa mbongo mingi. Zakai, mokonzi ya bakɔngɔli-mpako na Yeriko, akómaki mozwi mpo azalaki kofutisa bato mpako mingi.—Luka 19:2, 8.
9, 10. (a) Ndenge nini banguna ya Yesu balukaki kokɔtisa ye na makambo ya politiki? (b) Liteya nini tozwi na eyano ya Yesu? (Talá elilingi ya ebandeli.)
9 Banguna balukaki kokanga Yesu na motambo na likambo etali kofuta “mpako oyo moto nyonso afutaka,” ya denari moko oyo bakonzi ya Roma batyelaki bato. (Tángá Matai 22:16-18.) Bayuda basepelaki na mpako yango ata moke te mpo ezalaki kokundwela bango ete guvɛrnema ya Roma nde ezalaki kokonza bango. “Bato ya Erode,” oyo bazalaki kosepela na politiki na ye bakanisaki ete soki Yesu alobi ete basengeli te kofuta mpako, bakofunda ye ete azali monguna ya bokonzi ya Roma. Kasi soki alobi ete basengeli kofuta mpako, bato bakotika kolanda ye. Kasi, Yesu asalaki nini?
10 Yesu azalaki ekɛngɛ mpe akweaki te na motambo yango. Alobaki: “Boye, bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.” (Matai 22:21) Yesu ayebaki ete bakɔngɔli-mpako mingi bazalaki kondima kanyaka, kasi ye atyaki makanisi na ye wana te. Atyaki nde makanisi na Bokonzi ya Nzambe, oyo ekosilisa mpenza mikakatano ya bato. Yesu atikelá biso ndakisa. Tosengeli te kokɔta na makambo ya politiki, ata soki tomoni lokola ete parti politiki moko ezali malamu mpe ezali kosala makambo na bosembo, kasi mosusu ezali mabe mpe ezali kosala makambo na bosembo te. Bakristo batyaka makanisi na bango na Bokonzi ya Nzambe mpe na boyengebene na yango. Na yango, tokanisaka to tolobaka mabe te mpo na makambo ya kozanga bosembo oyo bato ya politiki basalaka.—Matai 6:33.
11. Ndenge nini tokoki kosalisa basusu bábongisa makanisi na bango na oyo etali bosembo?
11 Batatoli ya Yehova mingi balongolá makanisi mabe oyo bazalaki na yango mpo na makambo ya politiki. Na ndakisa, ndeko moko ya mwasi oyo afandaka na Grande-Bretagne, liboso ayeba solo, na iniversite atángaki kelasi oyo elobelaka bizaleli ya bato mpe yango esalaki ete akóma kolobela makambo ya politiki mingi. Alobi boye: “Nalingaki ete básalela baindo makambo ndenge esengeli, mpo tonyokwamá na makambo ya kozanga bosembo. Atako nazalaki kolonga na maloba, kasi ezalaki kobota mbuma ya malamu te. Nayebaki te ete makambo oyo esalaka ete básalela bato ya loposo mosusu makambo na bosembo te ezwa mpenza misisa na mitema ya bato. Ntango nabandaki koyekola Biblia, namonaki ete nasengeli kobanda naino kobongisa motema na ngai. Mpe ndeko mwasi moko ya mondɛlɛ asalisaki ngai nabongisa makanisi na ngai. Lelo oyo, nazali mobongisi-nzela ya sanza na sanza na lisangá ya elobeli ya bajɛstɛ, mpe nazali koyekola ndenge ya kosolola na bato ya lolenge nyonso.”
“ZONGISÁ MOPANGA NA YO NA ESIKA NA YANGO”
12. Yesu ayebisaki bayekoli na ye bákeba na “levire” ya lolenge nini?
12 Na mikolo ya Yesu, mbala mingi bakonzi ya mangomba bazalaki kokɔta na makambo ya politiki. Na ndakisa, buku moko (Daily Life in Palestine at the Time of Christ) elobi ete Bayuda bakabwanaki na kolanda mangomba mpe baparti politiki. Yango wana Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bófungola miso, bókeba na levire ya Bafarisai mpe na levire ya Erode.” (Marko 8:15) Ntango Yesu atángaki nkombo ya Erode, mbala mosusu azalaki kolobela bato ya etuluku ya Erode. Etuluku mosusu ezalaki ya Bafarisai, oyo balingaki ete Bayuda bázwa lipanda epai ya Baroma. Na kotalela lisolo oyo Matai akomaki, Yesu akebisaki mpe bayekoli na ye mpo na Basadukai. Basadukai balingaki ete Baroma bákoba koyangela mpe yango esalaki ete bázwa bisika ya lokumu. Yesu akebisaki bayekoli na ye na “levire,” to mateya ya bituluku wana mibale. (Matai 16:6, 12) Ezali malamu mpo Yesu akebisaki bango mwa moke nsima ya koluka kokómisa ye mokonzi.
13, 14. (a) Na ndenge nini makambo ya politiki mpe lingomba ememaka na mobulu mpe kozanga bosembo? (b) Mpo na nini kozanga bosembo epesi biso nzela te ya kobimisa mobulu? (Talá elilingi ya ebandeli.)
13 Mbala mingi mobulu ebimaka soki mangomba ekɔti na makambo ya politiki. Yesu ateyaki bayekoli na ye bákɔta na makambo ya politiki te. Ezalaki moko ya likambo oyo etindaki banganga-nzambe mpe Bafarisai báluka koboma Yesu. Bazalaki kobanga ete bato bákoba koyoka ye mpe bátika kolanda bango. Soki esalemaki bongo, balingaki kobungisa bokonzi na bango na lingomba mpe na politiki. Balobaki ete: “Soki totiki ye kaka boye, bango nyonso bakondimela ye, mpe Baroma bakoya kobɔtɔla esika na biso mpe ekólo na biso.” (Yoane 11:48) Na yango, Kaifa, nganga-nzambe monene alukaki kobomisa Yesu.—Yoane 11:49-53; 18:14.
14 Kaifa atindaki basoda bákanga Yesu na butu. Kasi lokola Yesu ayebaki likambo yango, ntango alyaki elongo na bantoma na ye mpo na mbala ya nsuka, ayebisaki bango bázwa mwa mipanga. Mipanga mibale elingaki kokoka mpo na koteya bantoma liteya moko ya ntina mingi. (Luka 22:36-38) Mwa moke na nsima kaka na butu yango, bato bayaki kokanga Yesu, mpe Petro asilikaki makasi mpo likambo yango ezalaki sembo te, abimisaki mopanga mpe abɛtaki mobali moko. (Yoane 18:10) Kasi Yesu alobaki na Petro ete: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango, mpo baoyo nyonso basalelaka mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 26:52, 53) Liteya nini ya ntina Yesu apesaki bayekoli na ye? Basengelaki kokɔta na makambo ya mokili te. Eyokani mpenza na libondeli oyo Yesu autaki kosala kaka na butu wana. (Tángá Yoane 17:16.) Kaka Nzambe nde azali na lotomo ya kobunda mpo na makambo oyo ezali sembo te.
15, 16. (a) Ndenge nini Liloba ya Nzambe esalisaki bakristo báboya matata? (b) Bokeseni nini Yehova amonaka ntango atalaka mokili lelo oyo?
15 Ndeko mwasi ya sudi ya Mpoto oyo tolobelaki na ebandeli azwaki mpe liteya yango. Alobi boye: “Namonaki ete mobulu ememaka bosembo te. Mpe baoyo bamipesaka na mobulu mbala mingi basukaka na liwa. Mingi na bango bakómaka nkandankanda. Nazalaki na esengo ya koyekola na Biblia ete kaka Nzambe nde akomema bosembo ya solosolo na mabele. Yango nde nsango oyo nazali kosakola na boumeli ya mbula 25.” Ndeko mobali ya Afrika ya sudi, oyo tolobelaki na ebandeli akómá kosalela nde “mopanga ya elimo,” elingi koloba, Liloba ya Nzambe. (Baefese 6:17) Lelo, asakolaka nsango ya kimya na bato ya lolenge nyonso, ata soki bazali ya ekoló nini. Ndeko mwasi ya Europe centrale, oyo tolobelaki mpe na ebandeli, nsima ya kokóma Motatoli ya Yehova, abalanaki na ndeko mobali ya ekólo oyo azalaki koyina liboso. Bango nyonso misato basali bambongwana wana mpo balingi kolanda ndakisa ya Kristo.
16 Ezali mpenza na ntina kosala bambongwana wana! Biblia elobi ete bato bazali lokola mbu oyo ezali kotombwatombwana mpe ezali kokoka kofanda nyɛɛ te. (Yisaya 17:12; 57:20, 21; Emoniseli 13:1) Makambo ya politiki etombokisaka bato, ekabolaka bango, mpe ememaka mobulu. Kasi biso tozali na kimya mpe na bomoko. Ntango Yehova amonaka ndenge bato bakabwaná lelo na mokili, na ntembe te azali na esengo ndenge biso basaleli na ye tozali na bomoko.—Tángá Sefania 3:17.
17. (a) Makambo nini misato ekoki kosala ete tóbatela bomoko na biso? (b) Tokolobela nini na lisolo elandi?
17 Na lisolo oyo, tomoni ete tokoki kobatela bomoko na biso na makambo misato oyo: (1) Totyaka motema ete Bokonzi ya Nzambe ekosilisa kozanga bosembo nyonso, (2) tokɔtaka na makambo ya politiki te, mpe (3) toboyaka mobulu. Kasi kokanisela basusu mabe ezali likambo oyo ekoki kobundisa bomoko na biso. Na lisolo elandi, tokomona ndenge tokoki kolonga ezaleli yango ndenge bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalaki.