Yehova abatelaka biso mpo na lobiko
“Nguya ya Nzambe ezali kobatela bino na nzela ya kondima mpo na lobiko oyo etikali moke emonisama na ntango ya nsuka.”—1 PE. 1:5.
OKOPESA EYANO NINI?
Ndenge nini Yehova abendaki biso na losambo ya solo?
Ndenge nini tokoki kotika ete Yehova atambwisa biso na toli na ye?
Ndenge nini Yehova alendisaka biso?
1, 2. (a) Nini ezali kondimisa biso ete Nzambe akosalisa biso tótikala sembo? (b) Ndenge nini Yehova ayebi mokomoko na biso?
“MOTO oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye nde akobika.” (Mat. 24:13) Maloba yango ya Yesu emonisi polele ete mpo tóbika ntango Yehova akoboma mokili ya Satana, tosengeli kotikala sembo tii na nsuka. Kasi, yango elingi koloba te ete Yehova atiki biso tósalela bwanya mpe makasi na biso moko mpo na koyika mpiko. Biblia elobi boye: “Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema, kasi nzela moko na komekama akobongisela mpe bino nzela ya kobima mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.” (1 Ko. 10:13) Maloba yango elimboli nini?
2 Mpo Yehova atika te ete tómekama koleka oyo tokoki kokangela motema, asengeli koyeba makambo na biso nyonso, ata mpe mikakatano oyo tokutanaka na yango, ndenge oyo moto na moto azali, mpe makambo oyo tokoki koyikela mpiko. Nzambe ayebi biso malamu ndenge wana? Ɛɛ. Biblia emonisi ete Yehova ayebi malamu mokomoko na biso. Ayebi makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo mpe bizaleli na biso. Akoki ata koyeba makanisi mpe mikano ya motema na biso.—Tángá Nzembo 139:1-6.
3, 4. (a) Ndenge nini lisolo ya Davidi ezali komonisa ete Yehova atyelaka mokomoko na biso likebi? (b) Likambo nini ya kokamwa Yehova azali kosala lelo oyo?
3 Nzambe atyelaka mpenza biso bato mpamba likebi ndenge wana? Davidi, mokomi ya nzembo amitunaki motuna yango mpe alobaki na Yehova boye: “Ntango nazali komona likoló oyo osalá, misala ya misapi na yo, sanza ná minzoto oyo obongisá, moto—mowei mpamba—azali nani mpo okanisa ye?” (Nz. 8:3, 4) Mbala mosusu motuna yango eyelaki Davidi ntango akanisaki bomoi na ye moko. Yehova amonaki ete Davidi, mwana mobali ya nsuka ya Yese, azali “moto moko oyo azali kosepelisa motema na ye” mpe alongolaki ye na mosala ya ‘kobatela etonga mpo akóma mokambi’ ya Yisraele. (1 Sa. 13:14; 2 Sa. 7:8) Kanisá ndenge oyo Davidi ayokaki ntango amonaki ete Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba azalaki kotya likebi na makanisi ya motema ya elenge lokola ye oyo azalaki kaka mobateli ya bampate!
4 Ezali mpe likambo ya kokamwa komona ndenge oyo Yehova azali kotyela biso likebi lelo oyo. Azali koyanganisa “biloko kitoko ya bikólo nyonso” mpo bákóma basambeli na ye mpe azali kosalisa bango bátikala sembo. (Hag. 2:7) Mpo na koyeba malamu ndenge oyo Yehova asalisaka biso tótikala sembo, tótalela naino ndenge oyo abendaka bato na losambo ya solo.
NZAMBE ABENDAKA BISO
5. Ndenge nini Yehova abendaka bato epai ya Mwana na ye? Pesá ndakisa.
5 Yesu alobaki boye: “Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.” (Yoa. 6:44) Maloba yango emonisi ete mpo moto akóma moyekoli ya Kristo, esengeli Nzambe asalisa ye. Ndenge nini Yehova abendaka bampate epai ya Mwana na ye? Na nzela ya mosala ya kosakola nsango malamu mpe na lisalisi ya elimo santu na ye. Na ndakisa, ntango Paulo ná baninga na ye bakómaki na engumba Filipi, bakutanaki na mwasi moko nkombo na ye Lidia mpe basakwelaki ye nsango malamu. Biblia elobi boye: “Yehova afungolaki motema na ye mpo atya likebi na makambo oyo Paulo azalaki koloba.” Nzambe asalelaki elimo na ye mpo na kosalisa mwasi yango akanga ntina ya nsango malamu, mpe nsukansuka ye ná bato ya ndako na ye bazwaki batisimo.—Mis. 16:13-15.
6. Ndenge nini Nzambe abendaki mokomoko na biso na losambo ya solo?
6 Kaka Lidia nde akutaná na likambo ya ndenge wana? Te. Soki ozali mokristo oyo azwá batisimo, Nzambe abendaki mpe yo na losambo ya solo. Ndenge kaka Tata na biso ya likoló amonaki eloko moko ya malamu na motema ya Lidia, amonaki mpe eloko moko ya malamu epai na yo. Ntango obandaki koyekola Biblia, Yehova apesaki yo elimo santu mpo esalisa yo okanga ntina ya nsango malamu. (1 Ko. 2:11, 12) Ntango okómaki kosala makasi osalela makambo oyo ozalaki koyekola, apambolaki milende na yo. Ntango omipesaki epai na ye, motema na ye esepelaki. Banda okɔtá na nzela ya bomoi, Yehova azalaka ntango nyonso pene na yo.
7. Ndenge nini toyebi ete Nzambe akosalisa biso tótikala sembo?
7 Lokola Yehova asalisaki biso tókóma basaleli na ye, akotika biso te tóbunda biso moko mpo na kotikala sembo. Ayebi ete ndenge kaka toyebaki solo na makasi na biso moko te, tokoki mpe kotikala na solo na makasi na biso te. Ntoma Petro akomelaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo ete: “Nguya ya Nzambe ezali kobatela bino na nzela ya kondima mpo na lobiko oyo etikali moke emonisama na ntango ya nsuka.” (1 Pe. 1:5) Maloba yango etaleli mpe bakristo nyonso mpe esengeli kosimba motema ya mokomoko na biso. Mpo na nini? Mpamba te biso nyonso tozali na mposa ete Nzambe asalisa biso tótikala sembo epai na ye.
NZAMBE AKOKI KOBATELA BISO TÓBƐTA LIBAKU TE
8. Mpo na nini tosengeli koyeba ete tokoki kobɛta libaku?
8 Mitungisi ya bomoi mpe nzoto na biso ya kozanga kokoka ekoki kosala ete tótalela te makambo ndenge oyo Yehova azali kotalela yango mpe na bongo, tóbɛta libaku, mbala mosusu kutu kozanga ete tóyeba yango. (Tángá Bagalatia 6:1.) Likambo moko oyo ekómelaki Davidi emonisi yango.
9, 10. Ndenge nini Yehova apekisaki Davidi asala libunga, mpe asalaka nini mpo na biso lelo oyo?
9 Ntango Mokonzi Saulo azalaki kolanda Davidi mpo na koboma ye, Davidi amonisaki mpenza komipekisa na ndenge azongisaki mabe te epai ya mokonzi yango oyo azalaki koyokela ye zuwa. (1 Sa. 24:2-7) Kasi, mwa moke na nsima, Davidi azangaki komipekisa. Azalaki na mposa ya biloko ya kolya mpo na bato na ye mpe asɛngaki Moyisraele moko na nkombo Nabale ete asalisa ye. Lokola Nabale alobaki mabe mpo na ye, Davidi asilikaki makasi mpe azwaki ekateli ya koboma mibali nyonso ya ndako ya Nabale; abosanaki ete akozala na nyongo ya makila na miso ya Nzambe soki abomi bato oyo basali mabe moko te. Abigaile, mwasi ya Nabale, nde apekisaki Davidi asala libunga monene wana. Lokola Davidi amonaki ete Yehova nde asalelaki mwasi wana, alobaki na ye boye: “Yehova Nzambe ya Yisraele apambwama, ye oyo atindi yo okutana na ngai na mokolo ya lelo! Mpe tiká ete mayele na yo epambwama, mpe yo moko opambwama, yo moto opekisi ngai lelo ete namema ngambo ya makila mpe natika lobɔkɔ na ngai moko ebikisa ngai.”—1 Sa. 25:9-13, 21, 22, 32, 33.
10 Liteya nini tokoki kozwa na lisolo yango? Yehova asalelaki Abigaile mpo na kopekisa Davidi asala libunga. Asalaka mpe bongo epai na biso lelo oyo. Ya solo, tosengeli kokanisa te ete Nzambe akotinda moto apekisa biso mbala nyonso oyo tolingi kosala libunga. Tokoki mpe koyeba mpenza te ndenge oyo Nzambe akosala na likambo moko boye to likambo nini akotika ete esalema mpo na kokokisa mokano na ye. (Mos. 11:5) Atako bongo, tokoki kozala na elikya ete Yehova ayebaka ntango nyonso makambo na biso mpe ete akosalisa biso tótikala sembo epai na ye. Alaki biso boye: “Nakosala ete ozala na mayele ya kososola mpe nakoteya yo nzela oyo osengeli kokende. Nakopesa yo toli wana liso na ngai ezali kotala yo.” (Nz. 32:8) Ndenge nini Yehova apesaka biso toli? Tokoki kosala nini mpo toli yango esalisa biso? Mpe mpo na nini tokoki kondima ete Yehova azali kotambwisa basaleli na ye lelo oyo? Tótalela ndenge oyo mokanda ya Emoniseli epesi biyano na mituna yango.
TOLI YA NZAMBE EBATELAKA BISO
11. Yehova ayebi mpenza makambo oyo elekaka na masangá nyonso? Limbolá.
11 Na emonaneli oyo ezali na Emoniseli mokapo 2 mpe 3, Yesu Kristo oyo asekwi atalaki makambo oyo ezalaki koleka na masangá nsambo ya Azia Moke. Kristo atalaki te kaka elimo oyo lisangá mobimba ezalaki komonisa, kasi makambo mpenza ya sikisiki. Kutu, na masangá mosusu atángaki bato, mpe mpo na likambo mokomoko, apesaki longonya to toli oyo ebongi. Yango ezali komonisa nini? Masangá nsambo ezali elilingi ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo nsima ya 1914, mpe toli oyo Yesu apesaki masangá nsambo ebongi mpe mpo na masangá nyonso ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba lelo oyo. Na yango, tokoki mpenza koloba ete Yehova azali kotambwisa basaleli na ye na nzela ya Mwana na ye. Ndenge nini tokoki kolanda litambwisi yango?
12. Ndenge nini tokoki kotika Yehova atambwisa biso?
12 Lolenge moko oyo tokoki kotika Yehova atambwisa biso ezali ntango tozali koyekola biso moko. Na nzela ya mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele, Yehova azali kopesa biso batoli ebele oyo euti na Biblia. (Mat. 24:45) Nzokande, mpo batoli yango esalisa biso, tosengeli kozwaka ntango ya koyekola yango mpe kosalela makambo oyo toyekoli. Boyekoli na biso moko epesaka Yehova nzela ‘abatela biso mpo tóbɛta libaku te.’ (Yuda 24) Osilá koyekola likambo moko na mikanda ya moombo ya sembo oyo omonaki lokola nde ekomamaki mpenza mpo na yo? Moná ete toli yango euti na Yehova. Ndenge kaka moninga moko akoki kobɛta yo na lipeka mpo na kobenda likebi na yo na eloko moko, Yehova mpe akoki kosalela elimo na ye mpo na kobenda likebi na yo, ata mpe ya bato mosusu, na ezaleli moko oyo osengeli kobongisa. Soki tozali kolanda litambwisi ya elimo santu, tokotika ete Yehova atambwisa biso. (Tángá Nzembo 139:23, 24.) Yango wana, ebongi mpenza tótalela soki tozali na momeseno malamu ya koyekola.
13. Mpo na nini ezali malamu tótalela momeseno na biso ya koyekola?
13 Kolekisa ntango mingi na masano ekoki koyiba biso ntango oyo tosengeli kolekisa na boyekoli na biso moko. Ndeko moko alobaki boye: “Ezali mpasi te tóbosana boyekoli na biso moko. Lelo oyo masano ekómi mingi koleka ndenge ezalaki liboso, mpe ezali kosɛnga lisusu mbongo mingi te ndenge ezalaki liboso. Masano yango ezali na televizyo, na ordinatɛrɛ, mpe na telefone. Ezali bisika nyonso.” Soki tokebi te, ntango oyo tosengeli kolekisa na boyekoli na biso moko ekoki kobanda kokita mokemoke mpe nsukansuka tokozanga ntango ya koyekola. (Ef. 5:15-17) Ebongi mokomoko na biso amituna boye: ‘Nazwaka mpenza ntango ya koyekola Liloba ya Nzambe na mozindo, to nayekolaka kaka soki nazali na diskur to na devuare ya kobongisa?’ Soki ezali bongo, mbala mosusu ekosɛnga tósalela ntango oyo toponá mpo na koyekola biso moko to kosala losambo na kati ya libota mpo na koluka bwanya oyo Yehova azali kopesa mpo na kobatela biso mpo na lobiko.—Mas. 2:1-5.
BILENDISELI ESALISAKA BISO TÓYIKA MPIKO
14. Ndenge nini Biblia emonisi ete Yehova atyaka likebi na ndenge oyo tozali koyoka?
14 Davidi akutanaki na mikakatano mingi na bomoi na ye. (1 Sa. 30:3-6) Makambo oyo akomaki na litambwisi ya elimo santu emonisi ete Yehova ayebaki ndenge oyo azalaki koyoka. (Tángá Nzembo 34:18; 56:8.) Nzambe ayebi mpe malamu ndenge oyo toyokaka. Azalaka penepene na biso ntango tozali na “motema [oyo] ebukani” to na “elimo [oyo] etutami.” Koyeba likambo yango ekoki kobɔndisa biso, ndenge ebɔndisaki Davidi mpe etindaki ye ayemba ete: “Nakozala na esengo mpe nakosepela na motema boboto na yo, mpo omoni mpasi na ngai; oyebi bampasi ya molimo na ngai.” (Nz. 31:7) Kasi Yehova asukaka te kaka na komona mpasi na biso. Abɔndisaka mpe alendisaka biso mpo tókoka koyika mpiko. Lolenge moko oyo asalaka yango ezali na nzela ya makita ya lisangá.
15. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Asafe?
15 Ndakisa ya Asafe, mokomi moko ya nzembo, emonisi litomba moko ya koyangana na makita. Lokola Asafe azalaki ntango nyonso kokanisa makambo ya kozanga bosembo oyo azalaki komona, amitunaki soki kosalela Nzambe ezali na ntina. Asafe alɛmbaki nzoto. Amonisaki yango na maloba oyo: “Motema na ngai ekómaki ngayi mpe nazalaki koyoka mpasi makasi na kati ya bangɛi na ngai.” Mpo na yango, etikalaki moke atika kosalela Yehova. Nini esalisaki Asafe azongela makanisi ya malamu? Alobaki boye: “Nakɔtaki na esika mosantu monene ya Nzambe.” Kuna, lokola azalaki elongo na baninga na ye basambeli ya Yehova, akómaki lisusu kotalela makambo na ndenge ebongi. Amonaki ete bato mabe bazali na esengo ya ntango mokuse mpe ete Yehova akosilisa makambo ya kozanga bosembo. (Nz. 73:2, 13-22) Ezali mpe bongo mpo na biso. Mpasi oyo toyokaka na motema ntango tozali komona makambo ya kozanga bosembo oyo ezali na mokili ya Satana ekoki kolɛmbisa biso nzoto. Koyangana elongo na bandeko epesaka biso makasi mpe esalisaka biso tókoba kosalela Yehova na esengo.
16. Ndenge nini ndakisa ya Hana ekoki kosalisa biso?
16 Kasi, okosala nini soki likambo moko na lisangá ezali kopesa yo mokakatano mpo na koyangana na makita? Mbala mosusu bakitisi yo mikumba mpe ozali koyoka nsɔni, to ozwanaki matata ná ndeko moko. Soki ezali bongo, ndakisa ya Hana ekoki kosalisa yo. (Tángá 1 Samwele 1:4-8.) Maloba oyo mbanda na ye Penina azalaki koloba na ye ezalaki kotungisa ye mingi. Motungisi yango ezalaki kobakisama mbula na mbula ntango libota mobimba bazalaki kokende na Silo mpo na kopesa Yehova bambeka. Motungisi yango ezalaki makasi na boye ete Hana “azalaki kolela mpe azalaki kolya te.” Atako bongo, atikaki te ete likambo yango ezangisa ye mabaku ya kokende kosambela Yehova. Yehova amonaki bosembo na ye mpe apambolaki ye.—1 Sa. 1:11, 20.
17, 18. (a) Ndenge nini tolendisamaka na makita? (b) Oyokaka ndenge nini lokola oyebi ete Yehova abatelaka biso mpo na lobiko?
17 Lelo oyo, ezali na ntina mingi biso bakristo bálanda ndakisa ya Hana. Tosengeli kozangisaka makita te. Ndenge biso nyonso tosilá komona yango, makita elendisaka biso. (Ebr. 10:24, 25) Bolingo ya bandeko na biso bakristo ebɔndisaka biso. Likanisi moko oyo tokoki koyoka na diskur moko to na eyano ya ndeko moko ekoki kosimba motema na biso. Ntango tozali kosolola liboso mpe nsima ya makita, ndeko moko akoki koyoka biso na boboto to koloba na biso maloba ya kobɔndisa. (Mas. 15:23; 17:17) Ntango tozali koyembela Yehova, mitema na biso mpe eyokaka esengo. Mingimingi ntango totondi na “makanisi oyo etungisaka” nde tozalaka na mposa ya bilendiseli oyo tozwaka na makita, epai Yehova apesaka biso makasi na ‘mabɔndisi na ye’ mpe alendisaka ekateli na biso ya kotikala sembo.—Nz. 94:18, 19.
18 Lokola tozali kobanga te mpo ete Nzambe na biso azali kobatela biso, tozali koyoka lokola Asafe oyo ayembelaki Yehova ete: “Osimbi lobɔkɔ na ngai ya mobali. Okokamba ngai na toli na yo.” (Nz. 73:23, 24) Tozali mpenza kotɔnda Yehova na ndenge abatelaka biso mpo na lobiko!
[Elilingi na lokasa 28]
Yehova abendaki mpe yo
[Bililingi na lokasa 30]
Kosalela toli ya Nzambe ebatelaka biso
[Elilingi na lokasa 31]
Bilendiseli oyo tozwaka esalisaka biso tóyika mpiko