MOKAPO 43
Banani bazali bandeko na biso?
MOKOLO moko, Moteyi Monene atunaki motuna moko ya kokamwisa. Atunaki boye: “Nani azali mama na ngai, mpe banani bazali bandeko na ngai?” (Matai 12:48) Okoki kopesa eyano na motuna wana?— Mbala mosusu oyebi ete nkombo ya mama ya Yesu ezalaki Malia. Kasi oyebi bankombo ya bandeko na ye ya mibali?— Azalaki mpe na bandeko ya basi?—
Biblia etángi bankombo ya bandeko na ye ya mibali: “Yakobo mpe Yozefe mpe Simona mpe Yuda.” Yesu azalaki mpe na bandeko basi ntango azalaki kosakola. Lokola Yesu azalaki mwana ya liboso, bandeko na ye wana nyonso bazalaki baleki na ye.—Matai 13:55, 56; Luka 1:34, 35.
Bandeko ya Yesu bazalaki mpe bayekoli na ye?— Biblia elobi ete na ebandeli “bazalaki komonisa kondima na kati na ye te.” (Yoane 7:5) Nde na nsima, Yakobo ná Yuda, bakómaki bayekoli na ye, mpe bakomaki ata mikanda ya Biblia. Oyebi mikanda yango?— Ezali mokanda ya Yakobo ná mokanda ya Yuda.
Atako Biblia epesi bankombo ya bandeko na ye ya basi te, toyebi ete Yesu azalaki ntango mosusu na bandeko ya basi mibale to koleka. Bandeko na ye wana ya basi bakómaki bayekoli na ye?— Toyebi te mpo Biblia elobi eloko moko te. Kasi oyebi mpo na nini Yesu atunaki motuna oyo: “Nani azali mama na ngai, mpe banani bazali bandeko na ngai?”— Tiká tóluka koyeba yango.
Yesu azalaki koteya bayekoli na ye, mbala moko, moto moko akataki ye maloba mpe ayebisi ete: “Mama na yo ná bandeko na yo batɛlɛmi libándá, bazali koluka koloba na yo.” Na bongo, Yesu asalelaki libaku yango mpo na kopesa liteya moko ya ntina; yango wana, atunaki motuna yango ya kokamwisa: “Nani azali mama na ngai, mpe banani bazali bandeko na ngai?” Asembolaki lobɔkɔ na ye epai ya bayekoli na ye mpe ayanolaki na motuna yango, na maloba oyo: “Talá! Mama na ngai ná bandeko na ngai!”
Na nsima Yesu alimbolaki maloba yango boye: “Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló, ye wana nde ndeko na ngai ya mobali, mpe ndeko na ngai ya mwasi, mpe mama na ngai.” (Matai 12:47-50) Yango emonisi ete Yesu alingaki bayekoli na ye mingi. Ateyaki biso ete atalelaka bayekoli na ye lokola bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mpe bamama na ye ya solosolo.
Na ntango wana bandeko mpenza ya Yesu— Yakobo, Yozefe, Simona, mpe Yuda— bandimaki naino te ete Yesu azali Mwana ya Nzambe. Ntango mosusu bandimaki mpenza te maloba oyo anzelu Gabiliele ayebisaki mama na bango. (Luka 1:30-33) Na bongo ekoki kozala ete bazalaki kolinga ye te. Moto oyo azali kosala makambo ya ndenge wana azali mpenza ndeko ya solosolo te. Oyebi moto moko oyo asalelaki ndeko na ye ya mobali to ya mwasi makambo ya mabe?—
Biblia elobeli lisolo ya Esau ná Yakobo mpe ndenge oyo Esau ayokaki nkanda makasi tii akómaki koloba ete: “Nakoboma Yakobo ndeko na ngai.” Lebeka, mama na bango, abangaki makasi; yango wana atindaki Yakobo epai mosusu mpo Esau aboma ye te. (Genese 27:41-46, NW) Kasi, bambula mingi na nsima, Esau abongolaki makanisi na ye, ayambaki Yakobo mpe apesaki ye bizi.—Genese 33:4.
Yakobo abotaki bana mibali 12. Kasi bana mibali ya Yakobo, bayaya ya Yozefe, bazalaki kolinga leki na bango Yozefe te. Bazalaki koyokela ye zuwa mpo tata na bango azalaki kolinga ye mingi. Yango wana, batɛkaki ye epai ya bato ya mombongo ya baombo, oyo bazalaki kokende na Ezipito. Na nsima, bayebisaki tata na bango ete nyama moko ya zamba ebomi Yozefe. (Genese 37:23-36) Yango ezalaki likambo moko ya nsɔmɔ, ezali bongo te?—
Na nsima, bandeko ya Yozefe bayokaki mawa mpo na likambo oyo basalaki. Yango wana, Yozefe alimbisaki bango. Sikoyo, oyebi soki na likambo nini Yozefe akokanaki na Yesu?— Na ntango oyo Yesu azalaki na mpasi, bantoma na ye bakimaki ye, Petelo kutu awanganaki ye. Kasi ata bongo, Yesu alimbisaki bango nyonso, kaka ndenge Yozefe alimbisaki bandeko na ye.
Ezali mpe na bandeko mibale, Kaina ná Abele. Tokoki mpe kozwa liteya na oyo ekómelaki bango. Nzambe atalaki na motema ya Kaina mpe amonaki ete azali mpenza kolinga ndeko na ye te. Yango wana, Nzambe ayebisaki Kaina ete asengeli kobongola makanisi na ye. Soki Kaina alingaka mpenza Nzambe, mbɛlɛ ayokelaki ye. Kasi alingaki Nzambe te. Mokolo moko, Kaina alobaki na Abele ete: ‘Tókende na elanga.’ Abele akendaki elongo na Kaina. Lokola bazalaki kaka bango mibale kuna na elanga, Kaina abɛtaki ndeko na ye makasi mpe abomaki ye.—Genese 4:2-8.
Biblia eyebisi biso ete ezali na liteya moko ya ntina oyo tokoki kozwa na lisolo wana. Oyebi liteya yango?— ‘Talá nsango oyo boyokaki banda na ebandeli: Tosengeli kolingana; ezala te lokola Kaina, oyo autaki na moto mabe.’ Na bongo, bandeko basengeli kolingana. Basengeli kozala lokola Kaina te.—1 Yoane 3:11, 12.
Mpo na nini ezali mabe kozala lokola Kaina?— Mpamba te Biblia elobi ete ye ‘autaki na moto mabe,’ Satana Zabolo. Lokola Kaina asalaki ndenge Zabolo asalaka, ezali lokola nde Zabolo azalaki tata na ye.
Omoni sikoyo mpo na nini ezali na ntina olinga bandeko na yo?— Soki ozali kolinga bango te, tokoloba ete ozali kolanda ndakisa ya bana ya nani?— Bana ya Zabolo. Okolinga kozala mwana ya Zabolo te, ezali bongo te?— Na bongo, ndenge nini okoki komonisa ete olingi kozala mwana ya Nzambe?— Okomonisa yango soki ozali mpenza kolinga bandeko na yo ya mibali mpe ya basi.
Kasi bolingo ezali nini?— Bolingo ezali mposa makasi oyo toyokaka na motema, oyo etindaka biso tósalela basusu makambo ya malamu. Tomonisaka ete tozali kolinga basusu ntango tozali kosepela mpenza na bango mpe ntango tozali kosalela bango makambo ya malamu. Mpe banani bazali bandeko na biso oyo tosengeli kolinga?— Kobosana te ete Yesu ateyaki ete bandeko na biso ezali baoyo bazali na kati ya libota monene ya baklisto.
Ezali mpenza na ntina tólinga bandeko na biso baklisto?— Biblia elobi ete: “Moto oyo azali kolinga ndeko na ye te, oyo ye amoni, akoki te kolinga Nzambe, oyo ye amoni te.” (1 Yoane 4:20) Na bongo, na libota na biso ya baklisto, tosengeli kolinga kaka mwa ndambo ya bandeko te. Tosengeli nde kolinga bandeko nyonso. Yesu alobaki ete: “Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:35) Olingaka bandeko nyonso, ezala ya mibali to ya basi?— Kobosana likambo oyo te: soki ozali kolinga bango te, okoki kolinga mpenza Nzambe te.
Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka mpenza bandeko na biso?— Soki tolingaka mpenza bango, tokoboya kosolola na bango te na kokimáká bango. Tokosepela na bango nyonso. Tokosalela bango ntango nyonso makambo ya malamu mpe tokondima kokabelana biloko. Mpe soki bakutani na mikakatano, tokosalisa bango mpo tozali mpenza na kati ya libota moko monene.
Soki tozali mpenza kolinga bandeko na biso nyonso, ezala ya mibali to ya basi, yango ekomonisa nini?— Yango ekomonisa ete tozali bayekoli ya Yesu, Moteyi Monene. Mpe ezali yango nde biso tolingi kozala, ezali bongo te?—
Mokanda ya Bagalatia 6:10 mpe ya 1 Yoane 4:8, 21 emonisi mpe ete tosengeli kolinga bandeko na biso. Tolendisi yo ofungola Biblia na yo mpe otánga mikapo yango.