Bamemi na pole—Mpo na mokano nini?
“Nasili kotya yo lokola pole na mabota.”—MISALA I3:47.
1. Lolenge nini ntóma Paulo apusamaki na etinda oyo ezwami na Misala 13:47?
“JEHOVAH apesaki biso etinda na maloba oyo ete: ‘Nasili kotya yo lokola pole na mabota, mpo ete ozala mpo na lobiko kino na nsuka ya mabele,’” oyo ezali maloba ntoma Paulo alobaki yango. (Misala 13:47, MN) Asukaki te bobele na kolobela etinda yango kasi lisusu ayebaki bonene na yango. Nsima na kokoma moklisto, ntoma Paulo apesaki bomoi na ye mpo na kokokisa etinda oyo. (Misala 26:14-20) Etinda yango epesameli mpe biso? Soki ezali bongo, mpo na nini ezali na ntina na mikɔlo na biso?
Ntango ‘pole ezangaki’ mpo na bato
2. (a) Wana mokili ekotaki na mikolo na yango ya nsuka, makambo nini mabimaki oyo mazalaki na bopusi makasi likoló na elimo ya mokili mpe bizaleli na yango? (b) Moto monene moko ya Leta na Grande-Bretagne alobaki nini na kotalela makambo oyo amonaki kobima na août 1914?
2 Liboso ete bato mingi oyo bazali lelo na bomoi babotama, mokili ekotaki na ntango na yango ya nsuka. Makambo minene mabimaki na kolandana nokinoki. Satan le Diable, mobandisi ya molili ya elimo mpe molili ya bizaleli, abwakamaki na mabele. (Baefese 6:12; Emoniseli 12:7-12) Bato basilaki komikotisa na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Na ebandeli ya août 1914, wana etumba emonanaki solo ete ekosalema, Monsieur Edward Grey, ministre des affaires étrangères ya mboka Grande-Bretagne, atalaki na lininisa ya biro na ye na Londres mpe alobaki ete: “Miinda misili kozimisama na Europe mobimba; tokokoka komona yango lisusu kopela te na boumeli ya bomoi na biso.”
3. Litomba nini batambwisi ya mokili bazwaki na komekaka kobongisa makambo ya bato?
3 Na milende misalemaki mpo na kozongisa pole wana, Lisanga ya Mabota (Société des Nations) libandaki mosala na yango na 1920. Kasi pole emonanaki mpenzampenza te. Na nsuka ya etumba ya mibale ya mokili mobimba, batambwisi ya mokili bamekaki lisusu kopelisa pole yango, ya mbala wana na nzela ya Lisanga ya Mabota Masangani to O.N.U. Na mbala oyo lisusu, pole engengaki te na lolenge losengeli. Nzokande, na ntina na makambo mingi oyo mauti kosalema kala mingi te, batambwisi ya mokili bazali kolobela mingi “ebongiseli ya sika ya mokili mobimba.” Kasi ekoki kozala mpasi na koloba ete “ebongiseli ya sika” oyo bato bakosala ekopesa kimya ya solo mpe kobatelama. Nkutu, matata, bokabwani kati na bikolo, mobulu, kozanga mosala, bobola, kobeba ya ezingelo mpe maladi, makambo nyonso wana mazali kopesa nzela te ete bato bazala na esengo.
4, 5. (a) Ntango nini mpe ndenge nini molili ezipaki libota ya bato? (b) Nini esengelaki mpo na opesa kobondisama?
4 Ya solo, ezalaki kala mpenza liboso ya 1914 nde pole ezimanaki mpo na bato. Yango esalemaki esili koleka pene na bambula 6 000, kati na Edene, ntango baboti na biso ya liboso baponaki kozwa bikateli bango moko kozanga kotalela mokano ya Nzambe. Mpasi oyo libota ya bato lizwi kobanda ntango wana ezali bobele makambo ndenge na ndenge mazwami na nse na oyo Biblia ebengi yango ete “nguya ya molili.” (Bakolose 1:13) Ezalaki na nse ya bopusi ya Satan le Diable nde moto ya liboso, Adam, akotisaki mokili kati na lisumu; mpe kobanda na Adam lisumu mpe liwa epalangani na bato nyonso. (Genese 3:1-6; Baloma 5:12) Na yango, bato babungisaki kondimama na Jéhovah, Liziba ya pole mpe ya bomoi.—Nzembo 36:9.
5 Nzela bobele moko oyo pole ekokaki lisusu kongenga na solo mpo na bato nyonso esengelaki kozwama soki balukaki kondimama na Jéhovah Nzambe, Mozalisi ya bato. Na bongo, “ezipeli oyo ezipi bato nyonso,” etumbu mpo na lisumu, ekokaki kolongolama. Lolenge nini yango ekokaki kosalema?—Yisaya 25:7.
Ye oyo apesamaki “lokola Pole na mabota”
6. Bilikya nini kitoko Jéhovah atye liboso na biso na nzela na Yesu Klisto?
6 Ata liboso ete Adam mpe Eva babimisama na Paradis, Jehovah asakolaki koya ya “libota” oyo esengelaki kozala mosikoli ya baninga na boyengebene. (Genese 3:15) Nsima na kobotama ya bomoto ya Libota wana ya ndaka, Jéhovah apusaki Simeona oyo azalaki mobange, na tempelo na Yelusaleme, na kondima moto yango lokola “pole oyo esengeli kolongola ezipeli oyo ezali likolo na mabota.” (Luka 2:29-32, MN) Na nzela na kondima kati na mbeka ya bomoi ya moto ya kokoka Yesu, bato bakokaki kolongolama na ekweli ya lisumu babotamaki na yango. (Yoane 3:36) Na boyokani na mokano na Jéhovah, bakokaki kolikya bomoi ya seko kati na ezaleli ya kokoka lokola basangani ya Bokonzi na likolo to lokola bayangelami na Bokonzi yango kati na paradis na mabelé. Oyo nde ebongiseli malamu!
7. Mpo na nini bilaka bipesamaki na Yisaya 42:1-4 mpe kokokisama na yango na ekeke ya liboso bizali kotondisa biso na elikya?
7 Yesu Klisto azali ye moko ndanga mpo na kokokisama ya makambo minene wana mazali koya. Na boyokani na kobikisama oyo Yesu asalaki mpo na bato oyo banyokwami, ntoma Matai alobeli mpo na ye makambo makomami na Yisaya 42:1-4. Makomi yango malobi, na ndambo na yango ete: “Tala mosaleli na ngai oyo naponi! Molingami na ngai, oyo molimo na ngai endimi! Natyaki elimo na ngai kati na ye, mpe akomonisa boyengebene polele mpo na mabota.” Ezali yango te oyo bato ya mabota nyonso bazali na yango mposa? Esakweli elandi: “Akowelana te, akonganga te, moto akoyoka mongongo na ye kati na nzela te. Akobuka lititi litutami te, akozimisa te nsinga ya mwinda oyo ezali kopela mokemoke.” Na boyokani na maloba wana, Yesu asalelaki bato oyo bazalaki na mpasi makambo makasi te. Ayokelaki bango mawa, alakisaki bango mikano ya Jéhovah, mpe abikisaki bango.—Matai 12:15-21, MN.
8. Na ndimbola nini Yesu apesamaki na Jéhovah “lokola kondimana mpo na mabota” mpe “lokola pole na mabota”?
8 Kolobaka epai na mosaleli na ye Yesu, Mopesi na esakweli wana alobi ete: “Ngai, Jéhovah, nabengi yo kati na boyengebene, mpe nasimbi loboko na yo. Mpe nakobatela yo mpe nakopesa yo lokola kondimana mpo na mabota, lokola pole na mabota, mpo ete ofungola miso ya bakufi miso, mpo na kobimisa mokangami na boloko, mpe na ekanganelo baoyo bafandi na molili.” (Yisaya 42:6, 7) Ee, Jehovah apesaki Yesu Klisto lokola kondimana, lokola ndanga monene ete elaka ekokokisama. Oyo nde elendiseli! Yesu amonisaki solo komibanzabanza mpo na bato ntango azalaki awa na mabele; apesaki ata bomoi na ye mpo na bato. Ezali ye nde moto oyo Jehovah apesaki bokonzi likolo na mabota nyonso. Likambo ya kokamwa ezali te soki Jehovah alobelaki ye lokola pole na mabota. Yesu ye moko alobaki ete: “Nazali pole na mokili.”—Yoane 8:12.
9. Mpo na nini Yesu alukaki te kosembola mokili oyo ezalaki na ntango na ye?
9 Mpo na mokano nini Yesu azalaki pole na mokili? Ya solo ezalaki te mpo na mokano ya bato to ya makambo ya mosuni. Aboyaki komeka kosembola ebongiseli ya politike oyo ezalaki na ntango wana mpe aboyaki kozala mokonzi, ezala oyo epesamelaki ye na Satana, mokonzi ya mokili, to oyo epesamelaki ye na bato. (Luka 4:5-8; Yoane 6:15; 14:30) Yesu amonisaki mawa monene epai na baoyo bazalaki na mpasi mpe apesaki bango kobondisama oyo bato mosusu bakokaki kopesa bango te. Kasi ayebaki ete kobondisama ya libela ekoki kozwama te kati na ebongiseli oyo ya libota na bato bazali na nse ya etumbu ya Nzambe na ntina na masumu babotami na yango mpe oyo etambwisami na bopusi ya banguya mabe oyo ezangi komonana. Komonisaka mayele na Nzembe, Yesu apesaki bomoi na ye mobimba na kosala mokano na Nzambe.—Baebele 10:7.
10. Na nzela nini mpe mpo na mokano nini Yesu azalaki pole na mokili?
10 Na bongo, na nzela nini mpe mpo na mokano nini Yesu azalaki pole na mokili? Amipesaki ye moko na kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe. (Luka 4:43; Yoane 18:37) Lisusu, na kopesaka litatoli mpo na solo na ntina na mokano ya Jehovah, Yesu akumisaki nkombo ya Tata na ye ya likoló. (Yoane 17:4, 6) Mpe, lokola pole na mokili, Yesu atondolaki polelepolele lokuta ya mangomba mpe na bongo apesaki bonsomi ya elimo na baoyo bakangamaki na boombo ya mangomba. Amonisaki Satana lokola mozimbisi azangi komonana ya bato oyo bamitiki ete asalela bango. Lisusu, Yesu amonisaki polele misala oyo mizali ya molili. (Matai 15:3-9; Yoane 3:19-21; 8:44) Oyo eleki mpenza, amonisaki ete azali pole na mokili na kopesaka bomoi na ye ya moto ya kokoka lokola lisiko, kofungolaka bongo nzela na baoyo bakondima ebongiseli wana ete bazwa bolimbisi ya masumu, bazala na boyokani malamu elongo na Nzambe, mpe elikya ya bomoi ya seko kati na libota ya molongo mobimba ya Jehovah. (Matai 20:28; Yoane 3:16) Mpe na nsuka, na kobatelaka ezaleli ya kobanga Nzambe na lolenge ya kokoka kati na bomoi na ye mobimba, Yesu alongisaki boyangeli ya Jehovah mpe amonisaki ete Satana azali mobuki na lokuta, na bongo bolamu ya seko ekokaki kozwama mpo na baninga na boyengebene. Kasi Yesu azalaki bobele ye moko momemi na pole?
“Bozali Pole na mokili”
11. Bayekoli na Yesu basengelaki kosala nini mpo na kozala bamemi na pole?
11 Na Matai 5:14, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bozali pole na mokili.” Basengelaki kolanda matambe na ye. Ezala na lolenge na bomoi na bango, ezala na mateya na bango, basengelaki kobenda likebi ya basusu epai na Jéhovah lokola Liziba ya pole ya solo. Na komekolaka Yesu, basengelaki koyebisa nkombo ya Jéhovah mpe basengelaki kosimba boyangeli na Ye. Lokola Yesu asalaki yango, basengelaki mpe kosakola Bokonzi na Nzambe lokola elikya bobele moko mpo na bato. Basengelaki lisusu komonisa lokuta ya mangomba, misala oyo mizali ya molili, mpe moto mabe oyo azali komema makambo wana. Bayekoli na Klisto basengelaki kolobela bato na bipai nyonso ntina na bibongiseli bitondi na bolingo oyo Jéhovah akamati mpo na lobiko ya bato na nzela na Yesu Klisto. Oyo nde molende ezalaki na baklisto ya liboso mpo na kokokisa mokumba wana, kobandaka liboso na Yelusaleme mpe na Yudea mpe kino na Samalia, lokola Yesu atindaki yango!—Misala 1:8.
12. (a) Pole ya elimo esengelaki kopalangana kino epai wapi? (b) Elimo na Jéhovah epesaki nzela na ntóma Paulo na kososola nini na ntina na Yisaya 42:6, mpe lolenge nini esakweli wana esengeli kopusa bomoi na biso?
12 Nzokande, kosakola nsango malamu esukaki te bobele na bituká wana. Yesu atindaki bayekoli na ye “kozalisa bayekoli bato na mabota nyonso.” (Matai 28:19) Na ntango ya kobongwana ya Saulo moto na Tarse, Nkolo amonisaki malamumalamu ete Saulo (oyo akómaki ntóma Paulo) asengelaki te kosakola bobele epai na Bayuda kasi lisusu epai na Bapakano. (Misala 9:15) Na lisalisi ya elimo santu, ntóma Paulo ayebaki oyo yango ezalaki kosenga. Na bongo, asosolaki ete esakweli ya Yisaya 42:6, oyo ekokisamaki na Yesu Klisto, ezali lisusu etinda oyo ezali kotalela baoyo nyonso bakomonisa kondima na Klisto. Na yango, na Misala 13:47, wana atangaki Yisaya, ntoma Paulo alobaki ete: “Jehovah asili kopesa biso etinda, na maloba oyo ete ‘Nasili kotya yo lokola pole na mabota, mpo ete ozala lobiko kino na nsuka ya mabele.’” Ezali boni mpo na yo? Osili kosimba na motema etinda oyo ya kozala momemi na pole? Lokola Yesu mpe ntóma Paulo, osili kopesa bomoi na yo mpo na kosala mokano ya Nzambe?
Pole mpe Solo euti na Nzambe ezali kotambwisa biso
13. Na boyokani na Nzembo 43:3, nini ezali libondeli na biso mpenza, mpe yango ezali kobatela biso na nini?
13 Soki, na mayele na biso moko tomeki ‘kopelisa pole,’ kongengisa avenir ya bato, tosengeli koyeba ete tozangi mpenza likanisi ya Liloba lipemami na Nzambe. Kozanga komibanzabanza na oyo mokili ezali kosala, baklisto ya solo bazali kotalela Jéhovah lokola Liziba mpenza ya pole. Libondeli na bango ezali lokola oyo eyebisami na Nzembo 43:3, oyo elobi ete: “Tinda pole na yo mpe solo na yo. Tika ete yango etambwisa ngai. Tika ete yango emema ngai na ngomba na yo mosantu mpe na tabernakle na yo kitoko.”
14, 15. (a) Motindo nini Jéhovah azali kotinda lelo pole mpe solo na ye? (b) Lolenge nini tokoki komonisa ete pole mpe solo ya Nzambe ezali mpenza kotambwisa biso?
14 Jehovah azali kolanda koyanola na libondeli wana ya basaleli na ye ya sembo. Azali kotinda pole na koyebisaka mokano na ye, na kopesaka nzela na basaleli na ye ete bakanga ntina na yango, mpe lisusu na kokokisaka oyo alobaki. Ntango tozali kobondela Nzambe, esengeli te kozala likambo ya likolólikoló, to oyo ezali komonisa bobele lolenge ya lokuta ya kobanga Nzambe. Mposa na biso ya solosolo ezali ete pole oyo ezali kouta epai na Jéhovah etambwisa biso, lokola Nzembo emonisi yango. Tozali kondima mokumba oyo epesami na baoyo bazali na pole ya Nzambe. Lokola ntóma Paulo, tososoli ete kokokisama ya Liloba na Jéhovah ezali komema elongo na yango etinda oyo etali baoyo nyonso bakomonisa kondima na yango. Lokola ntóma Paulo, tozali komiyoka ete tozali na nyongo epai na bato kino tokopesa bango nsango malamu oyo Nzambe apesaki biso mpo na mokano wana.—Baloma 1:14, 15.
15 Pole mpe solo oyo Jéhovah asili kotinda na mikolo na biso emonisi polele ete Yesu Klisto azali koyangela longwa na kiti na ye ya Bokonzi na likoló. (Nzembo 2:6-8; Emoniseli 11:15) Yesu asakolaki ete na boumeli ya koya na ye lokola mokonzi, nsango malamu oyo ya Bokonzi esengeli kosakolama na mabele mobimba mafandami lokola litatoli. (Matai 24:3, 14) Mosala wana mozali kosalema lelo, na makasi nyonso kati na mokili mobimba. Soki tokomisi mosala yango likambo lileki ntina kati na bomoi na biso, na bongo, lokola mokomi na Nzembo alobaki yango, pole mpe solo ya Nzambe ezali kotambwisa biso.
Nkembo na Jehovah esilaki kobanda kongenga
16, 17. Uta 1914, lolenge nini Jéhovah angengisaki nkembo na ye likolo na lisanga na ye oyo ekokani na mwasi, mpe etinda nini apesaki ye?
16 Na elobeli ya kitoko, Makomami malobeli lolenge oyo pole ya Nzambe ezali kopesama na bato bipai nyonso. Na Yisaya 60:1-3, oyo elobeli “mwasi” ya Jehovah, to lisanga na ye ya likoló oyo esalemi na basaleli na ye ya sembo, totangi ete: “Ɛ mwasi, telema, ngengisa pole, mpo ete likolo na yo nkembo na Jehovah ebandi kongenga. Mpamba te molili ekozipa mabele, mpe molili makasi ekozipa mabota; kasi likoló na yo Jéhovah akobanda kongenga, mpe likoló na yo nkembo na ye ekomonana. Mpe na solo mabota makoya epai na pole na yo mpe bakonzi epai na kongenga ya pole na yo.”
17 Ezali na mobu 1914 nde nkembo na Jéhovah ebandaki kongenga likoló na lisanga na ye ya likolo oyo ekokani na mwasi, na ntango yango, nsima na eleko molai ya bozeli, mwasi yango abotaki Bokonzi ya Masiya, oyo Yesu Klisto azali Mokonzi na yango. (Emoniseli 12:1-5) Pole na nkembo ya Jéhovah ezali kongenga likoló ya boyangeli wana oyo ye andimi yango mpe oyo ebongi mpo na koyangela mabele mobimba.
18. (a) Lokola Yisaya 60:2 esakolaki yango, mpo na nini molili ezipi mabelé? (b) Lolenge nini moto mokomoko oyo alingi akoki kosikolama longwa na molili oyo ezipi mokili?
18 Nzokande na ngambo mosusu, molili ezipi mabele mpe molili tnu ezipi mabota. Mpo na nini? Mpo ete mabota mazali kobwaka boyangeli ya Mwana alingami mingi ya Nzambe mpo na kolanda boyangeli ya bato. Bakanisi ete na kobwakaka lolenge boye ya boyangeli ya moto mpe kondimaka mosusu, bakokoka kosilisa mikakatano na bango. Kasi yango ekokoka te komema kobondisama oyo bazali kolikya. Bazali komona te ye oyo azali na nsima ya makambo na mabota longwa na bisika bizangi komonana mpe azali kopusa bango. (2 Bakolinti 4:4) Bazali kobwaka Liziba ya pole ya solo mpe mpo na yango bazali kati na molili. (Baefese 6:12) Nzokande, atako mabota makosala nyonso, likoki ezali ete moto mokomoko oyo alingi asikolama longwa na molili wana. Na lolenge nini? Na kozalaka na kondima mobimba kati na Bokonzi na Nzambe mpe na kotosaka yango.
19, 20. (a) Mpo na nini mpe lolenge nini nkembo na Jéhovah engengaki likoló na bayekoli na Yesu oyo bapakolami na elimo? (b) Mpo na ntina nini Jéhovah akómisi bapakolami na ye bamemi na pole? (c) Lokola esakolamaki, lolenge nini “mikonzi” mpe “mabota” bayaki epai na Nzambe mopesi na pole?
19 Boklisto ya lokuta ezali na kondima te kati na Bokonzi na Nzambe mpe ezali kotosa yango te. Kasi bayekoli ya Yesu Klisto, bapakolami na elimo bazali kondima yango. Lokola litomba, pole ya Jehovah, elingi koloba kondimama na Nzambe, ezali kongenga likolo na bamonisi wana ya mwasi na ye ya likolo, mpe nkembo na ye esili komonana likolo na bango. (Yisaya 60:19-21) Bazali kosepela na pole ya elimo oyo mbongwana na makambo ya politike mpe ya nkita ekoki kolimwisa yango te. Jehovah asili kosikola bango longwa na Babilone Monene. (Emoniseli 18:4) Bandimami na ye mpamba te bazali kondima mpamela na ye mpe bazali kosimba na bosembo nyonso boyangeli na ye. Bilikya kitoko mpo na mikolo mizali koya bipesameli bango, mpe bazali kosepela na elikya oyo Jehovah atye liboso na bango.
20 Kasi mpo na mokano nini Jehovah asalaki bongo epai na bango? Lokola ye moko alobaki na Yisaya 60:21, ezali mpo ete “akembisama,” mpo ete nkombo na ye ekumisama mpe ete basusu baya epai na ye lokola Nzambe bobele moko ya solo—mpe yango mpo na bolamu na bango ya seko. Na boyokani na yango, na mobu 1931 basambeli wana ya Nzambe ya solo bazwaki nkombo Témoins de Jéhovah. Na nzela ya litatoli na bango, “bakonzi” bayaki nde na pole oyo bazalaki komonisa, lokola Yisaya asakolaki yango? Ee! Ezali te batambwisi ya politike na mabele, kasi batikali ya baoyo babyangami kozala mikonzi elongo na Klisto kati na Bokonzi na ye ya likolo. (Emoniseli 1:5, 6; 21:24) Mpe ezali boni mpo na “mabota”? Basili kobendama na pole oyo? Ntembe ata moke te! Ezali te mabota ya politike, kasi ebele monene na bato oyo bauti na mabota nyonso baoyo basili komitya na ngambo na Bokonzi na Nzambe, mpe bazali kozela na motema likolo kosikolama mpo na kokota kati na mokili ya sika ya Nzambe. Ekozala solo mokili ya sika kati na yango boyengebene ekozala.—2 Petelo 3:13; Emoniseli 7:9, 10.
21. Lolenge nini tokoki komonisa ete tozali kozanga te mokano ya ngolu oyo Jéhovah amonisi biso awa apesi biso nzela na kokanga ntina ya mokano na ye?
21 Ozali moko kati na etuluku oyo ezali se kokola ya bamemi na pole? Jehovah apesaki biso nzela ya koyeba mokano na ye mpo ete, lokola Yesu, tokoka kozala bamemi na pole. Na komonisaka molende kati na mosala oyo Jéhovah apesi na basaleli na ye na mikolo na biso, tika ete biso nyonso tomonisa ete tozali kozanga te mokano ya ngolu oyo Nzambe azali kopesa biso. (2 Bakolinti 6:1, 2) Ezali na mosala moko te eleki oyo na ntina na mikolo na biso. Mpe ezali na libaku moko te ya monene koleka oyo tozali na yango ya kokomisa Jéhovah na komonisaka na bato mosusu nkembo ya pole oyo ezali kouta epai na ye.
Bozongeli
◻ Wapi bantina ya liboso ya bampasi minene ya bato?
◻ Na ndimbola nini Yesu mpe bayekoli na ye bazali “pole na mokili”?
◻ Lolenge nini pole mpe solo ya Jéhovah ezali kotambwisa biso?
◻ Lolenge nini Jéhovah asalaki mpo ete nkembo na ye engenga likolo ya lisanga na ye?
◻ Mpo na mokano nini Jéhovah akomisi libota na ye bamemi na pole?
[Bililingi na lokasa 9]
Likambo libimaki na Edene lizali kosalisa biso na kokanga ntina ya bampasi minene oyo bato bazali na yango lelo
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Tom Haley/Sipa
Paringaux/Sipa