Mokolo oyo tosengeli kobosana yango te
“Nasili koloba na bino makambo oyo ete bozala na kimya kati na ngai. Kati na mokili, bozali na bolózi; kasi bozala na mpiko! Ngai nasili kolónga mokili.”—YOANE 16:33.
1, 2. Mokolo nini mokeseni na mikolo nyonso mosusu kati na Lisoló na bato, mpe mpo na nini?
MOKILI ya lelo mozali na makambo mingi ya kolobela likoló na kimya. Na nsima na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, kimya esangisamaki na mokolo ya Elónga. Mbula na mbula, Noël ekosalemaka mpo na komonisa ‘kimya awa na mabelé.’ (Luka 2:14) Kasi ezali na mokolo moko makeseni na mikolo nyonso mosusu kati na lisoló na bato. Ezali mokolo Yesu ayebisaki maloba oyo mazali awa na likoló. Na mikolo koleka milió mibale oyo bato basili koumela awa na mabelé, bobele mokolo wana nde mobongolaki makambo na bato mpo na bolamu na bango ya seko..
2 Mokolo yango monene mozali bongo 14 Nisan, engebene manáka ya Bayuda. Na mobu 33 ya ntango na biso, mokolo ya 14 Nisan mobandaki na kolala na moi na mokolo ya 1er avril. Totala makambo masalemaki na mokolo wana ya ntina mingi.
Mokolo ya 14 Nisan!
3. Lolenge nini Yesu asalelaki bangonga na ye ya nsuka?
3 Wana butu eingeli, sanza kitoko engɛngi na mobimba na yango, ekokundolaka ete ezali Jéhovah nde akotyaka bilaká mpe bileko. (Misala 1:7) Kasi likambo nini lizali koleka kati na “eteni na ndako [oyo] na likoló,” epai Yesu mpe bantóma na ye 12 bayangani mpo na kokumisa Pasiká ya Bayuda ya mbula na mbula? Ezali ye komibongisa mpo na ‘kolongwa na mokili oyo ete akenda epai na Tata, Yesu amonisi bolingo epai na baninga na ye kino na nsuka.’ (Yoane 13:1) Lolenge nini? Na maloba mpe na ndakisa, Yesu alandi kokɔtisa epai na bayekoli na ye, bizaleli oyo bikosalisa bango ete balónga mokili.
Aláti ezaleli ya komikitisa mpe bolingo
4. (a) Yesu asalaki nini mpo na kolakisa bayekoli na ye lolenge oyo basengelaki komonisa ezaleli moko ya ntina mingi? (b) Lolenge nini toyebi ete Petelo ayekolaki ntina na ezaleli ya komikitisa?
4 Esengeli lisusu ete bantóma balongola zuwa mpe lolendo oyo losangani na kowelana. Na yango, Yesu akamati lisumé mpe abandi kosukola bango makolo. Wana ezali elembo na komikitisa na lokutá te, lokola oyo pápa akosalaka yango mbula na mbula na mboka Loma. Soko moke te. Komikitisa ya solo ezali likabo likoutaka na ‘elimo ya komikitisa oyo ekomema na kotalela bato mosusu lokola ete baleki biso.’ (Bafilipi 2:2-5) Na ebandeli, Petelo aboyi ete Yesu asukola ye makolo mpo ete akangi naino ntina te. Wana asembolami, asɛngi na Yesu ete asukola ye nzoto mobimba. (Yoane 13:1-10) Atako bongo, Petelo azwaki litomba na liteya wana. Mpo na yango, nsima na bambula, ye mpe apesaki toli na motindo malamu epai na basusu. (1 Petelo 3:8, 9; 5:5) Ezali mpenza na ntina ete biso nyonso lelo, tomitambwisa lokola baombo na Klisto basɔkɛmi.—Tala Masese 22:4; Matai 23:8-12.
5. Lilako nini Yesu apesaki limonisi motuya ya ezaleli mosusu ya ntina mingi?
5 Moko na ba 12 azwi litomba te na batoli na Yesu. Ezali bongo Yuda Mokeliota. Ezali bango kolya na elambo na Pasiká, Yesu atungisami, mpe alobi ete Yuda akotɛka ye, mpe abimisi ye. Nsima, Yesu alobi bobele epai na bayekoli na ye 11 ya sembo, ete: “Napesi bino lilako oyo ya sika ete: bolinganaka; bolinganaka lokola ngai nasili kolinga bino. Bato nyonso bakoyeba ete bino bozali bayekoli na ngai soko bozali na bolingo kati na bino.” (Yoane 13:34, 35) Wana ezali mpenza lilako ya sika, limonisami na ndakisa monene na Yesu ye moko. Awa ngonga ebɛlɛmi mpo na liwa na ye lokola mbeka, Yesu amonisi bolingo monene. Asaleli minite mokomoko oyo atikali na yango mpo na koteya mpe kolendisa bayekoli na ye. Na nsima, alobeli mingi likoló na bolingo, ete: “Oyo ezali lilako na ngai ete: bolinganaka lokola ngai nasili kolinga bino. Moko te azali na bolingo boleki oyo na monene ete: moto moko akabi molimo na ye mpo na baninga na ye.”—Yoane 15:12, 13.
Azali “nzela, mpe solo, mpe bomoi”
6. Libonza nini Yesu atii liboso na etuluku ya bayekoli oyo bamesenaki na ye?
6 Yesu alobi epai na basembwi 11, ete: “Tika te ete mitema na bino mitungisama! Bondimela Nzambe, bondimela mpe ngai. Na ndako na Tata na ngai bifandelo bizali mingi. Soki te, mbɛlɛ nayebisi bino, mpamba te nakei kobongisela bino esika.” (Yoane 14:1, 2) Esika yango ekozala kati na “bokonzi ya makoló.” (Matai 7:21) Yesu alimboli lolenge nini etuluku wana ya bayekoli oyo bameseni na ye bakoki kozwa libonza na bango. Alobi ete: “Nazali nzela, mpe solo, mpe bomoi. Moto akokenda epai na Tata te, soko na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Ezali sé lolenge moko mpo na bato oyo bakozwa bomoi ya seko awa na mabelé.—Emoniseli 7:9, 10; 21:1-4.
7-9. Mpo na nini Yesu alobaki na ntina na ye moko ete azali “nzela, mpe solo, mpe bomoi”?
7 Yesu azali “nzela.” Tokoki kobɛlɛma na libondeli epai na Nzambe bobele na nzela na Yesu Klisto. Yesu ye moko apesi endimiseli epai na bayekoli na ye ete Tata akopesa bango biloko oyo bakosɛnga na nkombo na Yesu. (Yoane 15:16) Ata libondeli moko te litindami epai na bikeko soko epai na “basantu,” to oyo etondi na Ave Maria mpe na nzembo ikozongelamaka, ekoki te koyokama mpe kondimama epai na Tata. (Matai 6:5-8) Epai mosusu, tozali kotanga na Misala 4:12 na ntina na Yesu ete: “Lobiko mpe ezali na moto mosusu te, mpo ete nkombo mosusu te esili kopesama awa na nsé kati na bato ete tokoka kobika mpo na yango.”
8 Yesu azali “solo.” Ntóma Yoane alobaki na ntina na ye ete: “Liloba akómaki mosuni mpe afandaki kati na biso, mpe tomonaki nkembo na ye, nkembo lokola oyo na mwana bobele moko epai na tata; mpe atondaki na ngolu mpe na solo.” (Yoane 1:14, MN) Yesu akómaki solo mpo na ebele na bisakweli bizwami kati na Makomami na Liebele, mpo ete akokisaki yango. (2 Bakolinti 1:20; Emoniseli 19:10) Lisusu, ayebisaki solo na kolobáká epai na bayekoli na ye mpe na bibele na bato oyo bazalaki koyoka ye, na kotyana ntembe elongo na bakonzi ya mangomba na lokutá, mpe na kopesáká ndakisa ya molende.
9 Yesu azali “bomoi.” Na lolenge na ye ya Mwana na Nzambe, Yesu alobaki ete: “Ye oyo andimeli Mwana azali na bomoi ya seko; ye oyo aboyi kotósa Mwana akozala na bomoi te, kasi nkanda na Nzambe eumeli likoló na ye.” (Yoane 3:36) Kondima kati na mbeka na Yesu ekomema kino na bomoi ya seko: bomoi bozangi kufa kati na likoló mpo na “etonga moke” ya baklisto bapakolami, mpe bomoi ya seko awa na mabelé mpo na ebele monene ya “bampate mosusu.”—Luka 12:32; 23:43; Yoane 10:16.
Toyika mpiko na minyoko
10. Mpo na nini tosengeli ‘kolónga mokili,’ mpe Yesu apesi elendiseli nini mpo na yango?
10 Baoyo bazali kolikya kozala na bomoi kati na ebongiseli ya sika ya Jéhovah, basengeli kobundisa mokili oyo “mozali kolala na nsé na nguya na oyo mabe,” Satan le Diable. (1 Yoane 5:19, MN) Maloba na Yesu oyo mazwami na Yoane 15:17-19, mazali mpenza elendiseli. Alobi ete: “Napesi bino lilako ete bolinganaka. Soki mokili eyiní bino, boyeba ete esilaki koyina ngai liboso. Soki bozalaki bato ya mokili mbɛlɛ mokili molingó bino. Kasi mpo ete bozali bato ya mokili te mpe ngai naponi bino kati na mokili, mpo na yango mokili eyiní bino.” Kino na 1992 baklisto ya solo bazali sé koyinama; mpe tozali kosepela mpo na ndakisa eleki malamu epesami na baoyo batelemi ngwi mpe bazali kozwa makasi na komikitisáká na nsé na lobɔkɔ na nguya na Nzambe. (1 Petelo 5:6-10) Biso banso tokoki koyika mpiko na mimekamo na kondimeláká Yesu, oyo asukisi lisoló na ye na maloba oyo na mɔ́tɔ ete: “Nasili koloba na bino makambo oyo ete bozala na kimya kati na ngai. Kati na mokili, bozali na bolózi; kasi bozala na mpiko! Ngai nasili kolónga mokili.”—Yoane 16:33.
Kondimana na sika esalemi
11. Yilimia asakolaki nini na ntina etali kondimana na sika?
11 Na boumeli ya mpokwa wana, Yesu alobeli kondimana na sika na nsima na kokumisa Pasiká. Mosakoli Yilimia asakolaki makambo yango bikeke mingi liboso, ete: “Jéhovah alobi ete: ‘Na mikolo mikoya, nakosala kondimana na sika elongo na ndako na Yisraele mpe elongo na ndako na Yuda. . . . Nakotya mobeko na ngai kati na bango, nakokoma yango na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango mpe bango bakozala bato na ngai. Nakolimbisa mabe na bango, mpe nakokanisa masumu na bango lisusu te.’” (Yilimia 31:31-34) Mbeka oyo ekopesa motuya na kondimana na sika ekosalema na mokolo ya 14 Nisan ya mobu 33.
12. Lolenge nini Yesu asalaki kondimana na sika, mpe yango ekokisi likambo nini?
12 Yesu alobi epai na basembwi 11 ete azali na mposa mingi ete alya Pasiká wana elongo na bango. Mpe azwi limpa, apamboli yango, abuki yango, mpe apesi bango, ete: “Oyo elakisi nzoto na ngai epesami mpo na bino. Bosalaka boye mpo na ekaniseli na ngai.” Bobele bongo, alekiseli bango kopo na vinyo motane, ete: “Kopo oyo elakisi kondimana na sika na ntina na makila na ngai oyo nasopi yango mpo na bino.” (Luka 22:15, 19, 20, MN) Kondimana na sika ezwi nguya mpo na “makila na motuya mingi” na Yesu, motuya moleki oyo na makila na nyama mamwangisamaki mpo ete kondimana na Mibeko elongo na Yisraele, ezwa nguya na yango. (1 Petelo 1:19; Baebele 9:13, 14) Baoyo basili kokɔtisama kati na kondimana na sika basili kozwa lilimbisi mobimba na masumu na bango. Bazali bongo na likoki ya kotangama kati na ba 144 000 baoyo bazwi libula ya seko lokola Yisraele ya elimo.—Bagalatia 6:16; Baebele 9:15-18; 13:20; Emoniseli 14:1.
“Mpo na ekaniseli na ngai”
13. (a) Na likambo nini tosengeli kokanisa na eleko ya Ekaniseli? (b) Bobele banani basengeli kolya limpa mpe komeka vinyo, mpe mpo na nini?
13 Ekaniseli ya mbula na mbula ya liwa na Yesu ekozala mbula oyo na mokolo ya 17 avril 1992. Ekozala bongo mbala ya 1960 uta ebandaki kokanisama. Lokola tobɛlɛmi na date yango, ebongi na biso ete tokanisa mpo na makambo nyonso makokisamaki na mbeka na kokoka na Yesu. Ebongiseli yango ezali komonisa mayele na Jéhovah mpe bolingo na ye mozindo mpo na bato. Bosembo makasi oyo Yesu amonisaki kino liwa ya mpasi, elóngisi Jéhovah liboso na Satana, oyo apamelaki ye na lokutá ete bato bakoki kotikala sembo te liboso na mimekamo. (Yobo 1:8-11; Masese 27:11) Mpo na makila na ye masopami lokola mbeka, Yesu azali moyokanisi ya kondimana na sika, na nzela na yango Jéhovah asali “libota lipɔnami, bonganga na bokonzi, libota mosantu, bato balakami mpo na kosala libota na Nzambe.” Ezali bango naino awa na mabelé, basembwi wana bazali ‘kosakola misala malamu’ ya Jéhovah, Nzambe na bango, oyo “abyangaki bango longwa na molili mpo na kokɔta na pole na ye monene.” (1 Petelo 2:9, MN; tala Exode 19:5, 6.) Bobele bango nde babongi kolya limpa mpe komela vinyo oyo bakolekisaka mbula na mbula na Ekaniseli.
14. Kati na likambo nini bamilió na bayangani mpamba na Ekaniseli bazali kozwa bolamu mingi?
14 Mbula eleki, bato 10 650 158 bayanganaki na Ekaniseli kati na mokili mobimba, kasi bobele bato 8 850 nde balyaki limpa mpe bamelaki vinyo. Bongo, bolamu nini bamilió na bayangani mpamba bazali kozwa? Bazali kozwa bolamu monene. Atako bazali kolya limpa te mpe bazali komela vinyo te, kasi bazali na bolamu mingi na elimo mpo ete bazali na bomoko elongo na bandeko mibali mpe basi ya mokili mobimba wana ezali bango koyoka nsango ya makambo minene oyo Jéhovah azali kokokisa mpo na mbeka ya Mwana na ye.
15. Longola baklisto bapakolami, bolamu nini bato mosusu bazali kozwa na mbeka na Yesu?
15 Lisusu, na 1 Yoane 2:1, 2 (MN), ntóma apesi biso endimiseli oyo ete: “Tozali na molobeli epai na Tata, Yesu Klisto, moyengebene. Azali mbeka ya lisiko mpo na masumu na biso, mpe bobele mpo na yango na biso te, kasi mpo na oyo ya mokili mobimba.” Ya solo, atako mbeka na Yesu ezali kopesa liboso bolamu epai na kelasi na Yoane oyo eyambami kati na kondimana na sika, kasi epesi mpe lilimbisi mpo na masumu ya “mokili mobimba.” Ezali bongo “mbeka ya lisiko” mpo na masumu ya bato nyonso mosusu, kati na mokili, baoyo bandimeli makila na Yesu oyo masopami. Makila yango mafungoli biso nzela ya elikya kitoko, ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé makobongwana paradis.—Matai 20:28.
“Kati na bokonzi ya Tata na ngai”
16. (a) Na lolenge emonani, eloko nini Yesu mpe batuki na libula elongo na ye basili kozwa yango sikawa? (b) Nini esɛɔngami lelo epai un batikali bapakolami mpe epai na ebele monene?
16 Wana elandi ye kolendisa bantóma na ye, Yesu alobeli mokolo akomela lisusu vinyo na elilingi, elongo na bayekoli na ye kati na Bokonzi ya Tata na ye. (Matai 26:29) Alobi na bango ete: “Bino bato bosili koumela elongo na ngai kati na makambo na ngai ya mpasi. Mpe lokola Tata na ngai asili kosala kondimana elongo na ngai mpo na Bokonzi, ngai mpe nasali kondimana elongo na bino mpo na kolya mpe komela na mesa na ngai kati na bokonzi na ngai, mpe bokofanda na kiti na bokonzi mpo na kosambisa mabota zomi na mibale ya Yisraele.” (Luka 22:28-30, MN) Lokola Yesu azwaki nguya ya bokonzi kati na makoló na 1914, tokoki kosukisa ete mingi kati na batuki na libula elongo na Yesu, baoyo bayanganisami na boumeli ya bikeke, basili kosekwisama mpo na ‘kofanda na kiti na bokonzi’ elongo na ye. (1 Batesalonike 4:15, 16) Mokolo yango mobɛlɛmi nokinoki wana baanzelu bakotika “mipɛpɛ minei” ya “bolózi monene”! Na ntango likambo yango likokóma, ba 144 000 Bayisraele ya elimo bakosila kotyama bilembo mpe bamilió na basangani ya ebele monene bakosila koyanganisama. Bango nyonso basengeli kotikala sembo lokola Yesu asalaki yango, mpo na kozwa libonza na bango: bomoi ya seko.—Emoniseli 2:10; 7:1-4, 9.
17 mpe makambo mazali na encadré. (a) Na etaleli ebongi mpenza, nani akoki kozwama mpo na kokitana mopakolami moko oyo aboyami mpo na kozanga sembo? (b) Engɛngiseli nini kitoko epesamaki kati na masoló ya La Tour de Garde ya 1938 likoló na kolendisama, mpe nsima, likoló na bokóli ya lisangá ya teokratike awa na mabelé?
17 Likambo nini likosalema soki mopakolami moko atikali sembo te? Na eleko oyo esili kopusana, motuya ya baoyo bazangi sembo ezali bobele moke mpenza. Ebongi mpenza kokanisa ete moto oyo bakokitanya akouta te kati na bato na sika baoyo bauti kozwa batisimo, kasi kati na baoyo basili koumela elongo na Yesu kati na mimekamo na ye uta bambula mingi na mosala ya sembo. Bingɛngiseli ya pole na elimo bibimisami na La Tour de Garde na bambula 1920 mpe 1930, bilakisi ete koyanganisama ya batikali bapakolami emonanaki lokola ete esilaki na eleko wana. Baoyo bazali ‘kosukola bilamba na bango mpe bayeisi yango mpɛmbɛ kati na makila na Mwana na mpate’ uta ntango wana bazali na elikya ya esengo, kasi ya lolenge mosusu. Na nzela na Klisto, elimo na Jéhovah ezali komema bango epai na “maziba na mai na bomoi” kati na Paradis na mabelé.—Emoniseli 7:10, 14, 17.
Libondeli na mayoki mingi
18. Mateya nini na nguya tozali kozwa na libondeli na Yesu lizwami na Yoane mokapo 17?
18 Yesu asukisaki Ekaniseli oyo asalaki elongo na bayekoli na ye na libondeli na mayoki mingi lizwami na Yoane 17:1-26. Abondeli liboso ete Tata na ye akumisa ye awa atikali sembo kino nsuka. Na bongo, Jéhovah mpe akokumisama mpe nkombo na ye ekokumisama, mpe ekosukolama na bifundeli nyonso. Ya solo, mpamba te Yesu moto na kokoka amonisi mpenza ete bato bazalisami na Nzambe bakoki kotikala sembo, ata kati na makambo na mpasi mingi. (Deteronome 32:4, 5; Baebele 4:15) Lisusu, liwa na Yesu lokola mbeka lipesi likoki monene epai na bakitani na Adam. Yesu alobi ete: “Oyo ezali bomoi ya seko, ete bayekola koyeba yo Nzambe bobele moko ya solo, mpe motindami na yo, Yesu Klisto.” Kozala na boyebi ya solo ya Jéhovah Nzambe mpe ya Mwana na ye, Mwana na mpate na Nzambe, oyo apesaki bomoi na ye mpo na lokumu na Jéhovah mpe mpo na lobiko na bato, ezali likambo ya ntina mingi. (Yoane 1:29; l Petelo 2:22-25) Mbeka oyo na bolingo mingi ezali kopusa yo na komonisa botɛɔndi na yo na nzela na komipesa mobimba epai na Jéhovah mpe kati na mosala na ye mopambolami?
19. Lolenge nini batikali mpe ebele monene bakoki kozala na bomoko na motuya mingi?
19 Na nsima, Yesu abondeli Tata na ye mosantu ete abatela bayekoli oyo bazali komonisa ete bazali bato ya mokili te, baoyo bandimi liloba na Ye ete lizali solo mpe bazali kobatela bomoko na bango ya motuya mingi elongo na Tata mpe Mwana. Awa batikali bapakolami mpe ebele monene bazali kosala esika moko, bazali na bomoko na bolingo wana eboyi bango kosangana na makambo ya mokili, na mobulu mpe na mabe na yango, tokoloba ete libondeli wana lindimami mpenza kino na mikolo na biso. Boye te? Maloba na nsuka oyo Yesu ayebisi Tata na ye, Jéhovah, mazali na motuya monene. Yesu alobi ete: “Nasili koyebisa bango nkombo na yo, mpe nakoyebisa yango lisusu, ete bolingo oyo olingaki ngai ezala kati na bango, mpe ngai kati na bango.”—Yoane 17:14, 16, 26.
20. Mpo na nini mokolo ya 14 Nisan ya mobu 33 ezali mpenza mokolo oyo tosengeli kobosana yango te?
20 Ebimi ye mpo na kokenda na elanga ya Getesemane, Yesu alekisi lisusu ntango moko mokuse mpe na kolendisa, elongo na bayekoli na ye. Na ntango wana nde banguna na ye bayei kokanga ye! Maloba mazangi mpo na kolobela monyoko oyo Yesu azwi yango, mpasi oyo azali kooka na motema na ye wana ezali ye kokanisa na ntina na nsoni oyo ebwakami likoló na Jéhovah, mpe bosembo oyo asengeli komonisa na boumeli ya momekamo wana. Yesu ayiki mpiko kino nsuka, na boumeli na butu mobimba mpe pene na moi mobimba na mokolo wana. Amonisi polele ete Bokonzi na ye bouti na mokili te. Liboso na kokufa, angangi ete: “Yango ekokani!” (Yoane 18:36, 37; 19:30) Elónga na ye likoló na mokili ezali na makambo nyonso. Ya solo mpenza, mokolo ya 14 Nisan ya mobu 33 ezali mokolo oyo tosengeli kobosana yango te!
[Footnotes]
Victory in Europe Day and Victory over Japan Day.
Bozongeli
◻ Yesu ateyaki nini na ntina etali ezaleli ya komikitisa mpe bolingo?
◻ Na ndimbola nini Yesu azali “nzela, mpe solo, mpe bomoi”?
◻ Mokano ya kondimana na sika ezali nini?
◻ Bomoko nini mpe bolingo nini bozali kati na batikali bapakolami mpe ebele monene?
[Etanda na lokasa 20]
Mayele na Salomo Monene
Masoló na motó na likambo “Organisation,” mabimisamaki kati na La Tour de Garde ya Lingelesi ya 1er juin mpe ya 15 juin na mobu 1938 (ebimeli ya 1er août mpe ya 15 août ya mobu 1938 na Lifalansé), epesaki miboko ya ebongeli ya teokratike oyo ba Témoins de Jéhovah bazali naino kolanda lelo oyo. Ezalaki nsuka ya eleko wana monene ya kosembolama na ntina na mateya mpe na lisangá, eleko oyo ebandaki na 1919. (Yisaya 60:17) Kokokanisáká eleko yango ya mibu 20 mpe bambula 20 na boumeli na yango Salomo atongaki tempelo mpe ndako ya mokonzi na Yelusaleme, la Tour de Garde elobaki ete: “Likomami mosantu liyebisi biso ete, nsima na kokokisa programme ya botongi basalemaki na boumeli ya mibu ntuku mibale, Salomo akokisaki programme mosusu na etando ya mboka mobimba. (1 Mik. 9:10, 17-23; 2 Nta. 8:1-10) Nsima na yango nde, mokonzi mwasi na Seba autaki longwa na ‘ndelo ya mokili mpo na koyoka mayele na Solomo.’ (Mat. 12:42; 1 Mik. 10:1-10; 2 Nta. 9:1-9, 12) Makambo wana mobimisi motuna oyo ete: Ntango ekoya mosika te, ekomema likambo nini epai na libota na Jéhovah? Tolingi kozela yango na elikya nyonso—mpe tokomona yango.” Elikya wana ezalaki mpamba te. Mpo na lisangá ya teokratike, programme monene ya botongi ya elimo ezali kosalema kati na mokili mobimba esili koyanganisa koleka bamilió minei ya bato oyo basali ebele monene. Lokola, mokonzi mwasi na Seba, bato wana bauti longwa na ndelo ya mokili mpo na koyoka mayele ya Salomo Monene, Klisto Yesu, mayele oyo ye azali kopesa bango na nzela ya “moombo na sembo mpe na mayele.”—Matai 24:45-47.