Eklezia ya ebandeli eteyaki ete Nzambe azali bosato?
Eteni 1—Yesu mpe bayekoli na ye bateyaki Bosato?
Yesu mpe bayekoli na ye balakisaki liteya ya Bosato to Trinité? Bakonzi ya Lingomba bateyaki yango na boumeli ya bikeke oyo bilandaki? Lolenge nini yango ebimaki? Mpe mpo na nini ezali ntina na koyeba solo likoló na endimeli yango? Oyo ezali eteni ya yambo na masolo oyo Mosenzeli ekolanda kobimisa mpo na mituna oyo.
BAOYO bandimi ete Biblia ezali Liloba na Nzambe, bayebi ete bazali na mokumba ya koteya bazalani na bango likoló na Mozalisi. Bayebi lisusu ete, makambo bazali koteya likoló na Nzambe esengeli kozala solo.
Nzambe apamelaki “babɔndisi” na Yobo mpo ete bakokisaki mokumba yango na motindo mosengeli te. “Jéhovah alobaki na Elifaza, Motemami ete: ‘Nkanda na ngai epɛleli yo mpe baninga na yo mibale; mpo ete bolobi likambo na solo te na ntina na ngai, lokola yango elobi moombo na ngai Yobo.”’—Yobo 42:7. MN.
Likoló na lisekwa, ntoma Paulo alobaki ete tokoki kozala “batatoli na lokuta mpo na Nzambe” soko, na ntina na ye, tokoteya makambo oyo ye asukaki te. (1 Bakolinti 15:15, MN) Lokola ezali bongo mpo na liteya ya lisekwa tosengeli mpenza komisɛnzela na ntango tozali koteya makambo mosusu na ntina na Nzambe.
Liteya ya Bosato to Trinité
Pene na mangomba nyonso ya boklisto ya lokuta ezali koteya ete Nzambe azali Bosato. Encyclopédie catholique (angl.) elobi na ntina na Bosato ete yango ezali “liteya ya mobɔkɔ na lingomba na boklisto,” mpe elimboli yango boye:
“Ezali na bato misato kati na bomoko na Bonzambe: Tata, Mwana mpe Elimo-Santu; nzokande bato wana misato bakeseni Engebene elembo ya Athanase, ‘Tata azali Nzambe, Mwana azali Nzambe, mpe Elimo—Santu azali Nzambe, nzokande Banzambe bazali misato te kasi bobele Nzambe moko.’ . . . Bato yango nyonso bakobika seko mpe bakokani: bango banso bakelami te mpe nyonso batondi na nguya.”1
Encyclopédie baptiste (angl.) epesi mpe ndimbola motindo moko. Totangi na yango ete:“(Yesu azali . . . Jéhovah na seko . . . Elimo santu azali Jéhovah . . . Mwana mpe Elimo bazali bokokani monene elongo na Tata. Soki Tata azali Jéhovah, bango mpe lokola.”2
Babengani batɛmɛli longwa na lingomba
Na mobu 325, likita ya Nicée lisalemaki na Asie Mineure, libimisaki Endimeli oyo ete Mwana na Nzambe azali “mpenza Nzambe,” mpe Tata azali “mpenza Nzambe.” Elobamaki kati na Etinda yango ete:
“Lingomba ya katolike ezali kobengana baoyo bazali koloba ete, na (eleko) moko (Mwana) azalaki te, ete liboso na kobotama azalaki te, mpe abotami ntango eloko moko ezalaka te; to mpe baoyo bazali koloba ete Mwana na Nzambe azali na lolenge mosusu to bomoto mosusu, to ete azalisamaki mpe akoki kobongwana.”3
Na yango, moto na moto oyo azalaki kondima ete Mwana mpe Tata, banso mibale bazalaki seko te to ete mwana azalisamaki, moto yango apesamelaki etumbu ya seko. Tokoki kokanisa bopusi oyo mwango wana ezalaki na yango likoló na ebele na bandimi.
Na mobu 381, likita mosusu lisalemaki na constantinople mpe liyebisaki ete esengelaki kosambela mpe kokumisa elimo santu lolenge moko na Tata mpe Mwana. Nsima na mbula moko, na mobu 382, likita ya bakonzi ya mangomba lisalemaki na Oonstantinople, na boumeli na yango bandimaki mpenza ete elimo santu ezali Nzambe.4 Bobele na mbula wana, liboso na likita lisalemaki na Loma, pápa Damase alakisaki mokanda na mateya oyo masengelaki kokweisama na Lingomba. Mokanda yango mobengami ete Tome de Damase, mozalaki na maloba oyo:
“Ye oyo aboyi kondima ete Tata azali seko, ete Mwana azali seko mpe ete Elimo-Santu azali seko. moto wana azali mopengwi.”
“Ye oyo aboyi kondima ete Mwana azali mpenza Nzambe lokola Tata azali mpenza Nzambe, ete azali na nguya nyonso, ayebi makambo manso mpe akokani na Tata, moto wana azali mopɛngwi.”
“Ye oyo aboyi kondima ete Elimo—Santu . . . azali mpenza Nzambe . . . azali na nguya nyonso mpe ayebi makambo manso . . . moto wana azali mopɛngwi.”
“Ye oyo aboyi kondima ete bato misato oyo: Tata, Mwana mpe Elimo-Santu bazali mpenza bato, ete bakokani, ete bazali seko, bazali na biloko bizali komonana mpe oyo ezangi komonana, mpe ete banso bazali bazwi na nguya nyonso . . . moto wana azali mopɛngwi.”
“Ye oyo akoloba ete (Mwana oyo) akómaki moto, azalaki mpe na likoló te elongo na Tata na ntango ye azalaki na bomoi awa na mabelé, moto wana azali mopɛngwi.”
“Ye oyo andimi ete Tata azali Nzambe, ete Mwana azali Nzambe mpe Elimo-Santu azali . . . nde akoloba te ete bango banso bazali bobele Nzambe moko . . . moto wana azali mopɛngwi.”5
Basángó oyo babengi bango ete Jésuites, baoyo babongolaki mikapo wana longwa na lokótá ya latin, balobaki boye: “Emonani lokola ete Pápa santu celestin ll (422-432) atalelaki mitinda wana lokola mibeko; ekoki kotalelama lokola ndimbola ya kondima.”6 Edmund Fortman, molimboli na Biblia alobi ete, mokanda Tome etondi na “makanisi makasi na liteya ya Bosato.”7
Soki ozali kati na lingomba oyo lizali koteya Bosato, okoloba ete maloba wana mazali ndimbola ya kondima na yo? Lisusu, oyebaki ete mpo na kondima liteya ya Bosato oyo lilakisami na mangomba esengelaki kondima ete Yesu azalaki mpe na likoló wana ezalaki ye na bomoi awa na mabelé? Liteya yango liyokani na oyo ekomamaki kati na mokanda De l’lncarnation na Athanase, ye mokonzi ya lingomba na ekeke ya minei:
“Liloba (Yesu) amibómbáki kati na ye moko te, mpe lolenge oyo azalaki na bomoi lokola moto awa na mabelé epekisaki ye te ete nzala mpe na bomoi epai mosusu. Wana azalaki koningana mpe mpo na mayele na Ye mpe nguya na Ye, azalaki mpe ntango nyonso kokamba molóngó. . . . Azali ntango nyonso Liziba ya bomoi ya molóngó mobimba, kozaláká na eloko nyonso, mpe azali libanda na biloko nyonso.”8
Liteya ya Bosato to Trinité ezali nini?
Bamoko bakanisi ete kondima Trinité elimboli kopesa bonzambe nyonso epai na Yesu. Bamosusu bakanisi ete ezali bobele kondima Tata, Mwana mpe elimo santu.
Nzokande, etaleli malamu ya bindimeli na boklisto ya lokuta emonisi ete makanisi wana mayokani te na bandimbola eyebani. Bandimbola eyebani emonisi polelepolele ete Bosato ezali bobele likanisi moko te. Kasi ezali nde eboke na makanisi ndenge na ndenge oyo masangisamaki uta kala mpo na kosala ebongiseli moko.
Lolenge oyo Bosato to Trinité etalelamaki nsima na likita ya constantinople (381), mokanda Tome de Damase (382), elembo ya Athanase oyo esalemaki na nsima, mpe mikanda misusu ezali kosalisa biso na koyeba sikisiki mpo na lolenge oyo bazali kotalela liteya yango ne boklisto ya lokuta. Tala makanisi malandi:
1. Ezali na bato misato kati na Bonzambe:Tata, mwana mpe elimo-santu.
2. Moko na moko na bato yango azali seko, moko abimi liboso to mpe nsima na mosusu te.
3. Moko na moko azali mozwi-na-nguya nyonso, moko aleki mosusu te.
4. Moko na moko ayebi komona makambo mazali liboso mpe makambo manso.
5. Moko na moko azali mpenza Nzambe.
6. Nzokande, ezali na Banzambe misato te, kasi bobele Nzambe moko.
Na ndenge emonani, liteya ya Bosato ezali eboke ya makanisi ndenge na ndenge oyo touti kotanga makanisi na yango na ntina mingi, mpamba te botaleli mozindo ekomonisa makanisi mosusu. Nzokande, emonani ete soki totii moko na makanisi yango ya ntina mingi na pembeni, ekozala lisusu Bosato oyo boteyami na boklisto ya lokuta te. Mpo na kotalela malamu liteya yango, esengeli na biso kozwa makanisi yango nyonso.
Awa esosoli biso makanisi mazali kati na liloba “Bosato,” tomituna ete: Yesu mpe bayekoli na ye balakisaki liteya yango? Soki ezali bongo mbɛlɛ makanisi na yango nyonso masengelaki kosangisama uta ekeke ya liboso ya ntango na biso. Kasi lokola mateya na Yesu mpe bayekoli na ye ezali kati na Biblia, boye liteya ya Bosato limonisami na Biblia to te. Soki ezali na Biblia, esengeli bongo komonisama na lolenge ya polele.
Tokoki kokanisa te ete Yesu mpe bayekoli na ye bapesaki liteya moko likoló na Nzambe kozanga ete bamonisa lolenge ye azali mpenza, mingi mpenza lokola bayebaki ete bandimi basengelaki kino kopesa bomoi na bango mpo na Nzambe. Mbɛlɛ Yesu mpe bayekoli na ye batyaki likebi na bango mingi mpo na kolakisa liteya wana ya mobɔkɔ.
Totalela Makomami
Na Misala mokapo 17, verset 11, elobami na ntina na bato mosusu ete bazalaki “malamu mingi” mpo ete ‘batangaka Makomami mokolo na mokolo mpo na kotala soko ezali bongo’ na makambo oyo ntoma Paulo azalaki kolobela bango. Bato wana balendisamaki na kotalela mateya na Paulo kati na Makomami, nzokande Paulo azalaki ntoma. Ezali yango nde tosengeli kosala.
Tomikundola ete Makomami ‘mapemami na Nzambe’ mpe masengeli kosalelama mpo na “kosembola, mpo na kobɔkɔlo kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala na makoki, aselingwa mpo na misala nyonso malamu.” (2 Timoté 3:16, MN) Na yango, Biblia ekoki, mpo na mateya oyo mazali kati na yango. Soki Bosato ezali solo, esengeli komonana kati na Biblia.
Tosengi yo ete etanga Biblia, mingi mpenza mikanda 27 ya Makomami na greke na boklisto, mpo na kotala soko Yesu mpe bayekoli na ye bateyaki Bosato. Na bolukiluki na yo, omituna mituna oyo ete:
1. Ezali ata na mokapo moko mozali na liloba “Bosato”?
2. Ezali ata na mokapo moko oyo moyebisi ete Nzambe esalemi na bato misato bakeseni, Tata, Mwana mpe elimo santu, nzokande bango banso bazali bobele Nzambe moko?
3. Ezali ata na mokapo moko oyo moyebisi ete Tata, Mwana mpe elimo santu bakokani na makambo manso, na seko, na nguya, na etelemelo mpe na mayele?
Okoki koluka, kasi okomona ata mokapo moko te na Makomami oyo ezali na liloba “Bosato,” ata mokapo moko mpe te oyo elobi ete Tata, Mwana mpe elimo santu bakokani na makambo manso, na seko, na nguya, na etelemelo to na mayele. Ata mokapo moko te elobi ete Mwana akokani na Tata kati na makambo manso, mpe ata soki mokapo motindo wana ezalaki, mbɛlɛ ekokaki kolongisa Bosato te, mpamba te liteya wana lizali komonisa eboke ya biloko mibale te kasi ya biloko misato, mpe kati na Biblia, esika moko te ekokanisi elimo santu na Tata.
Oyo elobami na ebele na balimboli na Biblia
Ebele na balimboli na Biblia kati na bango, bamosusu bazali bateyi na Bosato, bayebi ete liteya ya Bosato lizali kati na Biblia te. Na ndakisa, tala oyo tozali kotanga kati na Encyclopédie des religions (angl.):
“Lelo, balimboli na Biblia mpe bateolojié bazali koloba ete liteya ya Bosato lizali te kati na Biblia ya liebele . . . Atako Biblia ya liebele ebengi Nzambe ete tata na Yisraele mpe elobeli Nzambe lokola mpo na moto na mosuni, na kosaleláká maloba lokola Liloba (davar), Elimo (ruah), Mayele (hokhmah) mpe Komonana (shekhinah), ekozala bongo kobebisa makanisi mpe elimo ya Kondimana na Kala soko bakokangisa maloba oyo na liteya ya Bosato oyo ebimaki bobele nsima mpenza.
“Balimboli na Biblia mpe bateolojié balobi lisusu ete, Kondimana na Sika ezali ata na liteya moko te lizali komonisa Bosato. Nzambe Tata na biso azali liziba ya nyonso oyo ezali na bomoi (Pantokrator), azali mpe tata na Yesu Klisto; ‘Tata’ ezali nkombo ya lokumu te oyo bapesi yango na moto ya yambo ya Bosato, kasi ezali nde nkombo mosusu oyo basengeli kobenga Nzambe. . . .
“Kati na Kondimana na Sika, maloba oyo mazali kolimbola polele bomoto na Nzambe (‘bosato oyo ezali kati na biloko nyonso’) ezali te; tozali mpe komona te maloba ya sikisiki kati na yango liteya wana liyaki kolakisama na nsima (hupostasis, ousia, substantia, subsistentia, prosópon, persona). . . . Na ntembe te, liteya oyo ekoki komonisama ata na esika moko te katina Makomami.”9
Na kotalela lisoló ya liteya wana, tala oyo tokoki kotanga kati na La Nouvelle Encyclopédie britanique (angl.):
“Liloba Bosato lizali te kati na Kondimana na Sika. Liteya yango lilimbolami polele te . . .’’
“Liteya wana likólaki mokemoke na boumeli na bikeke mingi mpe kati na mikakatano mingi. . . .
“Kokesena kati na bato wana misato mpe bomoko katina yango basɛngisami na liteya moko wana ye mangomba oyo ete, moto bobele moko mpe bapersona misato, esalemaki te liboso na ekeke ye minei.”10
Tozali kotanga pene na lolenge moko kati na Nouvelle Encyclopédie catholique (angl.) likoló na ebandeli ya Bosato:
“Balimboli na Biblia mpe bateolojié kati na bango mpe motuya monene na bakatolike, bayebi ete moto moko te akoki kolobela liteya ya Bosato kati na Kondimana na Sika kozanga ete akakatana. Bato oyo bayekoli lisoló ya bindimeli mpe bateolojié ya mayele bayebi ete, liteya ya Bosato oyo elimbolami na kokoka, ebandaki longwa na bileko na ebandeli na boklisto kino pene na nsuka na ekeke ya minei. Ezali bobele na eleko wana nde bakokaki kobenga ete liteya ya Bosatu, ‘Nzambe moko na bapersona misato,’ ekómaki eteni monene ya bomoi mpe likanisi na baklisto. . . .
“Lolenge oyo yango elimbolami lelo, ekokani te na oyo bazalaki kolimbola yango na ntango ebandaki; oyo elimbolami sikawa ebongisami na boumeli ya bikeke misato.”11
“Polele mpenza te”?
Bandimi na Bosato bakoki mbala mosusu koloba ete Biblia elobi “polele mpenza te” mpo na Bosato. Kasi, maloba yango mabimaki bobele nsima na ntango Biblia esilaki kokomama. Wana ezali bobele komeka kolobisa Biblia makambo oyo bakonzi ya mangomba bango moko basilaki kozwa ekateli mpo na kokólisa liteya yango na boumeli na bikeke.
Omituna motuna oyo: Mpo na nini Biblia ezali koloba “polele mpenza te” likoló na mateya na yango ya ntina mingi, oyo etali bomoto na Nzambe? Biblia ekolobaka polele likoló na makambo mosusu na mobɔkɔ; kasi mpo na nini elobi polele te likoló na liteya oyo ya ntina mingi? Soki azalaki mpenza Bosato, mbɛlɛ Mozalisi ya molóngó amonisi yango te na polele mpenza kati na mokanda oyo ye akomisaki?
Ntina oyo Biblia eteyi Bosato te ezali pɛtɛɛ; ezali mpo ete yango ezali liteya ya Biblia te. Soki Nzambe azalaki Bosato mbɛlɛ ayebisaki yango polele mpenza ete Yesu mpe bayekoli na ye bamonisa yango epai na bato mosusu. Mpe boyebi wana ya ntina ekokaki kokomama kati na Liloba lipemami na Nzambe. Mbɛlɛ Nzambe atiki te ete bato bazangi kokoka bakakatana na likambo wana na boumeli na bikeke mingi na nsima.
Botaleli malamu ya mikapo na Biblia oyo bateyi na Bosato bamonisi ete yango elobeli liteya wana na polele te, emonisi biso nini? Emonisi ete mikapo yango milobi te na ntina na Bosato oyo boteyami na boklisto ya lokuta. Bateolojié bazali kobongola Makomami mpo na komeka komonisa makanisi oyo bazali na yango likoló na Bosato. Kasi makanisi yango mazali te kati na makomi na Biblia. Ya solo, makanisi yango mazali kotɛmɛla litatoli ya Biblia na mobimba na yango.
Moko na mikapo oyo mitangami mpo na kokɔtela Bosato ezali Matai 28:19, 20, epai balobeli Tata, Mwana mpe elimo santu. Bato mosusu bazali komona likanisi ya Bosato. Kasi tanga ba versets yango. Elobami kati na yango ete bango misato basali Nzambe moko mpe ete bakokani na seko, na nguya, na etelemelo mpe na mayele? Te. Ezali bobele bongo mpo na mikapo misusu oyo milobeli na mbala moko Tata, Mwana mpe elimo santu.
Mpo na baoyo bakomeli, kati na Matai 28:19, 20, kosukisa na ntina na kosalelama na liloba “nkombo” na bomoi (singulier), mpo na Tata, mpo na Mwana mpe elimo santu, tolɔmbi bango ete batalela lolenge basaleli liloba bobele moko wana na ntina na Abalayama mpe Yisaka, oyo esalelami na Genese 48:16.—Jerusalem; Traduction du monde nouveau.
Bateyi ya Bosato bazali mpe kotanga mokapo na Yoane 1:1 epai kuna balobeli “Liloba” kati na mabongoli mosusu ete azalaki “elongo na Nzambe” mpe ete azalaki “Nzambe.” Nzokande mabongoli mosusu mayebisi ete Liloba ezalaki “nzambe” to azalaki “ekelamu na bonzambe,” kozanga komonisa Nzambe, kasi ekelamu na nguya. Lisusu, verset wana na Biblia eyebisi sikisiki ete “Liloba” azalaki “elongo” na Nzambe. Soko tokanisi malamu, Liloba ye moko akokaki lisusu kozala Nzambe te. Ata lolenge nini tokosukisa na ntina na “Liloba,” solo ezali ete, verset wana elobeli bobele bato mibale, kasi bato misato te. Na yango, na ntango tozali kotalela malamu mikapo oyo misalelami mpo na kolongisa Bosato, tozali komona ata elembeteli moko te.a
Tokoki kotalela likambo mosusu: soki Yesu mpe bayekoli na ye bateyaki Bosato, bakonzi ya mangomba na lokumu baoyo bayaki nsima na ye mbɛlɛ bango mpe bateyaki yango lokola. Mibali yango oyo babengami lelo ete Bakonzi ya mangomba balandi na bantoma, bateyaki Bosato? Tala likambo oyo tokotalela na eteni ya mibale na molongó ya masoló oyo makobima kati na banimero ya Mosenzeli oyo ekolanda.
Mikanda
1. The catholic Encyclopedia, 1912, volume XV, page 47.
2. The Baptist Encyclopoedia, ekomami na litambwisi ya William Cathcart, 1888, pages 1168. 1169.
3. A Short History of christian Doctrine, de Bernhard Lohse, ebimeli ya 1980, page 53.
4. lbid, pages 64, 65.
5. L’Eglise enseigne, engebene libongoli ya John Clarkson, S.J., John Edwards, S.J., William Kelly, S.J., mpe John Welch, S.J., 1955, pages 125 kino 127.
6. lbid., page 125.
7. The Triune God, ya Edmund Fortman, ebimeli ya 1982, page 126.
8. De l’lncarnation, engebene libongoli ye Penelope Lawson, ebimeli ya 1981, pages 27, 28.
9. The Encyclopedia of Religion, Mircea Eliude, oyo akambaki kokomama na yango na 1987, volume 15, page 54.
10. The New Encyclopaedia Britannica, ebimeli ya 15, na 1985, volume 11, Micropoedia. page 928.
11. New catholic Encyclopedia, 1967, volume XIV, page 295,’
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa makanisi mingi na mikapo wana ya Biblia, tala brochure Doit-on croire à la Trinité? oyo ebimisami na la Société Watchtower.
[Elilingi na lokasa 19]
Ndakonzambe Tagnon na France