Saulo akutani na baninga mpe banguna na ye ya kala
NA NTEMBE te Saulo, oyo na nsima akómaki kobengama ntoma Paulo, azalaki koyeba te makambo ekoleka ndenge nini ntango akozonga na Yelusaleme mpo na mbala ya liboso banda akómaki moklisto.a Mbula misato liboso, alongwaki na engumba yango; na ntango wana azalaki kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Yesu. Azwaki ndingisa ya kokanga moyekoli nyonso ya Yesu oyo akokaki kokuta na Damasi.—Misala 9:1, 2; Bagalatia 1:18.
Ntango akómaki moklisto, Saulo asakolaki na mpiko nyonso kondima na Masiya oyo asekwisamaki. Mpo na yango, Bayuda oyo bazalaki na Damasi balukaki koboma ye. (Misala 9:19-25) Akokaki nde kolikya ete baninga na ye ya kala oyo bazalaki na Yelusaleme báyamba ye malamu? Kasi, mposa ya liboso ya Saulo ezalaki ete akutana ná bayekoli ya Klisto oyo bazalaki na Yelusaleme. Yango ezalaki pɛtɛɛ te.
Biblia elobi boye: “Ntango akómaki na Yelusaleme asalaki makasi mpo na kosangana esika moko na bayekoli; kasi bango nyonso bazalaki kobanga ye, mpo bandimaki te ete azali moyekoli.” (Misala 9:26) Na ntembe te oyebi ntina oyo bazalaki kobanga ye. Bango bayebaki ye ete azalaki monyokoli monene ya bayekoli ya Klisto. Mpo na bango, ekokaki kozala ete Saulo akómaki komibenga moklisto na mayele mabe mpo na kokɔta na lisangá na mokano ya kosala bango mabe. Yango wana baklisto na Yelusaleme bazalaki kotalela ye na mosika.
Kasi, moyekoli moko asalisaki Saulo. Biblia elobi ete Balanabasi akambaki Saulo “epai ya bantoma,” emonani ete akambaki ye epai ya Petelo (Kefa) ná Yakobo, ndeko ya Nkolo; ekoki kozala Balanabasi nde ayebisaki bango ndenge akómaki moklisto mpe mosala ya kosakola oyo asalaki na Damasi. (Misala 9:27; Bagalatia 1:18, 19) Biblia elobi te likambo oyo esalaki ete Balanabasi atyela Saulo motema. Ekoki kozala ete Balanabasi akutanaki na Saulo liboso, mpe azwaki libaku ya kotalela ye malamu mpe kondima ete azalaki mpenza moyekoli. To mpe Balanabasi asololaki na baklisto mosusu ya Damasi oyo bayebisaki ye ndenge oyo Saulo abongwanaki. Ata soki ezalaki bongo to te, Balanabasi asalaki ete bayekoli bátika kokanisela Saulo mabe. Na yango, Saulo aumelaki na ntoma Petelo mikolo 15.
Mikolo zomi na mitano elongo na Petelo
Ndenge Saulo amonisaki yango epai ya Bagalatia, azwaki mokumba na ye ya kosakola epai ya Yesu ye moko, kasi epai ya moto moko te. (Bagalatia 1:11, 12) Kasi, na ntembe te, Saulo ayebaki ete ezalaki na ntina mingi ayeba malamu mosala oyo Yesu asalaki. Mikolo oyo alekisaki elongo na Petelo epesaki ye libaku ya koyeba yango. (Luka 24:12; 1 Bakolinti 15:3-8) Saulo azalaki na makambo mingi ya kotuna Petelo ná Yakobo, kasi bango mpe bazalaki na mituna mingi na ntina na emonaneli mpe mokumba oyo azwaki.
Ndenge oyo abikaki na mabɔkɔ ya baninga na ye ya kala
Biblia elobi ete Setefano azali moklisto ya liboso oyo abomamaki. Bato oyo Setefano atyanaki na bango ntembe bautaki na “oyo ebengami Sinagoga ya Basikwami, mpe ya bato ya Kilene ná bato ya Alezandria mpe ya baoyo bautaki na Silisia ná Azia.” Nzokande, Saulo azalaki “kotyana ntembe ná Bayuda ya monɔkɔ ya Grɛki,” azalaki kosakwela bango na mpiko nyonso. Basalaki nini? Balukaki koboma ye.—Misala 6:9; 9:28, 29.
Ezalaki mabe te Saulo aluka kolimbola mbongwana monene oyo asalaki na bomoi na ye mpe ateya baninga na ye ya kala makambo na ntina na Masiya. Kasi, Bayuda yango batombokelaki ye makasi mpo bamonaki ete akómi mopɛngwi.
Saulo azalaki nde komona likama oyo ezalaki liboso na ye? Na Biblia tozali kotánga ete ntango Saulo azalaki kobondela na tempelo, asenzwaki, mpe amonaki Yesu oyo alobaki na ye boye: “Salá mbangu mpe bimá noki na Yelusaleme, mpo bakondima te litatoli na yo na ntina etali ngai.” Saulo ayanolaki ye boye: “Nkolo, bango moko bayebi ete nazalaki kotya na bolɔkɔ baoyo bandimelaka yo mpe nazalaki kobɛta bango fimbo na sinagoga moko na moko; mpe ntango makila ya motatoli na yo Setefano ezalaki kosopama, ngai moko mpe natɛlɛmaki wana mpe nazalaki kondima.”—Misala 22:17-20.
Bato mosusu balobaka ete maloba wana ya Saulo emonisaki ete ayebaki likama oyo ekokaki koyela ye. Basusu mpe bamonaka ete na maloba yango, alingaki koloba boye: ‘Nazalaki monyokoli lokola bango, mpe bango bayebi yango. Na ntembe te basengeli koluka koyeba mpo na nini nabongwani. Mbala mosusu nakosalisa bango bándima solo.’ Atako bongo, Yesu ayebaki malamumalamu ete Bayuda yango bakondima te litatoli ya moto oyo bango bazalaki kotalela ye ete azali “mopɛngwi.” Ayebisaki Saulo boye: “Kende, mpamba te nakotinda yo epai ya bikólo mosusu mosika.”—Misala 22:21, 22.
Ntango baklisto mosusu bamonaki likama oyo Saulo azalaki na yango, bakitisaki ye nokinoki tii na Kaisalia mpe batindaki ye na ntaka ya kilomɛtrɛ 500 na engumba na ye Talasi. (Misala 9:30) Saulo alekisaki bambula mingi liboso azonga lisusu na Yelusaleme.
Ekoki kozala ete ndenge oyo Saulo alongwaki nokinoki na Yelusaleme ezalaki libateli mpo na lisangá. Soki atikalaki kaka kuna, elingaki kozala likama. Biblia elobi ete nsima ya kokende na ye, “lisangá na kati ya Yudea mobimba mpe Galilai mpe Samalia ekɔtaki na eleko moko ya kimya, kotongamáká; mpe wana yango ezalaki kotambola na kobanga Yehova mpe na libɔndisi ya elimo santu ekobaki kokola.”—Misala 9:31.
Tózala ekɛngɛ
Lokola na siɛklɛ ya liboso, lelo oyo mpe ekoki kozala na makambo oyo ekosɛnga na biso tózala ekɛngɛ. Ya solo, ebongi te tókaniselaka moto mabe kaka mpo azali mopaya. Kasi, na bantango mosusu bato ya mabe balukaka komimonisa lokola basaleli ya Yehova mpo na kokokisa bamposa na bango moko to mpo na kobebisa lisangá. Yango wana, tosalelaka bososoli mpo tókwea te na mitambo ya bakosi.—Masese 3:27; 2 Timote 3:13.
Ndenge oyo Saulo asalaki nsima ya komeka kosakola na Yelusaleme emonisi mpe likambo mosusu oyo baklisto basengeli kozala ekɛngɛ mpo na yango. Kopesa litatoli na bisika mosusu to epai ya bato mosusu, ata mpe baninga na biso ya kala, ekoki kozala likama mpo na nzoto, elimo, ata mpe etamboli na biso. Na yango tosengeli kozala ekɛngɛ, na ndakisa tosengeli kopona ngonga mpe esika ya malamu.—Masese 22:3; Matai 10:16.
Tosengeli kozala na kondima ete nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ekosakolama liboso ete ebongiseli mabe oyo esuka. Saulo atikelaki biso ndakisa malamu na likambo yango; ‘azalaki koloba na mpiko mpenza na nkombo ya Nkolo’ ata liboso ya baninga na ye mpe banguna na ye ya kala!—Misala 9:28.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Saulo ayebani mingi na nkombo ya ntoma Paulo. Nzokande, na bavɛrsɛ mingi oyo elobelami na lisolo oyo, babengi ye na nkombo ya Saulo.—Misala 13:9.
[Elilingi na lokasa 16]
Ntango akómaki na Yelusaleme, Saulo atatolaki na mpiko epai ya Bayuda ya monɔkɔ ya Grɛki