“Nasɛngi nakende kosamba liboso ya Kaisala!”
EBELE ya bato bakangi mobali moko mpe babandi kobɛta ye. Mpo na bango, moto yango asengeli kokufa. Ntango kaka balingi mpenza koboma ye, basoda bayei mpe babɔtɔli ye na makasi na mabɔkɔ ya bato yango oyo bazali na nkanda makasi. Moto yango nani? Ntoma Paulo. Bato oyo babɛti ye bazali Bayuda; balingi ata moke te ete Paulo asakola nsango malamu mpe balobi ete asambwisi tempelo. Basoda oyo babikisi ye bazali Baloma; komanda na bango nkombo na ye Klaudio Lusia. Lokola mobulu ezalaki, basoda bakangi Paulo mpe bakei na ye; na makanisi na bango, Paulo azali moto ya mobulu.
Mikapo nsambo ya nsuka na mokanda ya Misala ezali kolobela makambo oyo esalemaki kobanda na ntango oyo bakangaki ye. Soki toyebi lotomo oyo Paulo azalaki na yango na kotalela mibeko ya Leta, mpe toyebi makambo oyo bafundaki ye na yango, ndenge oyo asambaki, mpe toyebi mwa moke ndenge oyo Baloma bazalaki kosambisa mpe kokata makambo, nyonso wana ekosalisa biso tókanga ntina ya lisolo oyo ezali na mikapo yango.
Na kasho ya Klaudio Lusia
Klaudio Lusia azalaki mpe na mokumba ya kobatela engumba Yelusaleme ete ezala na kimya. Mokonzi oyo azalaki likoló na ye ezalaki guvɛrnɛrɛ Moloma oyo azalaki koyangela etúká ya Yudea; ye azalaki kofanda na engumba Kaisalia. Likambo oyo Lusia asalaki ya kobɔtɔla Paulo na mabɔkɔ ya bato oyo balingaki kosala ye mabe, ezalaki na kati ya mikumba na ye lokola azalaki mokonzi ya bapolisi; babengaka yango kobatela moto oyo azali na likama mpe kotya na kasho moto oyo azali kobimisa mobulu. Lokola akangaki ntina te na makambo oyo Bayuda bazalaki koloba, Lusia amemaki mokangami na biro ya basoda oyo ezalaki na ndako moko makasi oyo babengaki Linɔ́ngi ya Antonia.—Misala 21:27–22:24.
Lusia asengelaki koyeba likambo oyo Paulo asalaki. Ntango bato bazalaki kosala makɛlɛlɛ, akangaki ntina ya likambo te. Yango wana, alukaki makambo milaimilai te, apesaki mbala moko mitindo ete “bábeta ye fimbo mpo aloba, bongo ye akoka koyeba mpenza ntina oyo bazalaki koganga ndenge wana mpo naye.” (Misala 22:24, NW) Mbala mingi, mpo na kolobisa bato ya mobulu, baombo, mpe bato mosusu ya mpamba, bazalaki kobɛta bango fimbo. Soki babɛti moto fimbo (flagrum), azalaki kokanga motema te, azalaki mpenza koloba; kasi fimbo yango ezalaki nsɔmɔ. Basalaki fimbo yango na bansingansinga mpe bansinga mosusu bakangisaki mwa bibende mikemike. Bafimbo mosusu esalemaki na mposo ya nyama oyo bakangisaki mwa bibende mpe mikuwa mikemike oyo ekoki kozokisa. Ezalaki kozokisa mpota minene, kopasola mpenza misuni ya nzoto.
Ntango balingaki bábanda kobɛta ye, Paulo ayebisaki basoda ete azali mwana-mboka ya Loma. Moloma oyo bakateli ye naino etumbu te bakokaki kobɛta ye fimbo te; lokola Paulo ayebisaki bango ete azali mwana-mboka ya Loma, babɛtaki ye lisusu te. Mokonzi ya basoda oyo anyokoli mwana-mboka ya Loma to apesi ye etumbu, akokaki kolongwa mosala. Yango wana, kobanda wana, Paulo azalaki lokola moto nyonso ya bolɔkɔ te, akokaki koyamba bato oyo bazalaki kokende kotala ye.—Misala 22:25-29; 23:16, 17.
Lokola Lusia ayebaki mpenza te likambo oyo bafundaki Paulo na yango, amemaki ye liboso ya Sanedrina mpo na koluka koyeba ntina oyo bazalaki koyokela ye nkanda makasi. Kasi kuna, Paulo alobaki ete bazali kosambisa ye mpo na liteya ya lisekwa; likambo yango epelisaki mɔ́tɔ kati na bato ya Sanedrina mpe bango na bango bakómaki kotyana ntembe. Likambo eyaki mpenza ndongo kati na bango na boye ete Lusia abangaki ete bakoki kosala Paulo mabe, mpe na mbala wana lisusu, Lusia abikisaki ye na mabɔkɔ ya Bayuda oyo bazalaki mpenza na nkanda.—Misala 22:30–23:10.
Lusia aboyaki amema ngambo ya liwa ya moto oyo azali Moloma. Ntango ayokaki ete Bayuda bazali kosala likita mpo na koboma Paulo, atindaki mokangami yango nokinoki na mboka Kaisalia. Makambo ya Leta ezalaki kosɛnga ete ntango batindi mokangami epai ya bakonzi oyo bakosambisa ye, basengelaki mpe kotinda mokanda oyo ekolimbola likambo oyo mokangami yango asali. Mokanda yango ekoyebisa makambo nyonso oyo bamonaki na ankɛtɛ na bango, ntina oyo bakangi moto yango, mpe makanisi ya moto oyo asalaki ankɛtɛ na likambo yango. Na mokanda na ye, Lusia akomaki ete Paulo ‘afundamaki na ntina na ntembe ya Mibeko ya Bayuda, kasi afundamaki na likambo moko te libongi na liwa to na bolɔkɔ,’ mpe asɛngaki ete bato oyo bafundaki Paulo bákende bango moko kosamba liboso ya guvɛrnɛrɛ Feliki.—Misala 23:29, 30.
Guvɛrnɛrɛ Feliki akati likambo te
Feliki azalaki mokonzi monene oyo azalaki koyangela etúká. Mpo na kosambisa moto, ye moko azalaki kopona soki akolanda mimeseno ya mboka, to mpe akolanda mibeko oyo ekomamaki na mikanda, mibeko oyo bakokaki kosambisa na yango bato minene mpe bakonzi ya Leta. Bazalaki kobenga yango ordo, to liste. Akokaki mpe kolanda ebongiseli oyo babengaki extra ordinem, oyo bakokaki kosalela mpo na kokata ata likambo nini ya mabe. Guvɛrnɛrɛ ya etúká asengelaki ‘kolanda te ndenge oyo bazalaki kosala na Loma, kasi ndenge oyo ebongaki kosala.’ Yango ezali komonisa ete guvɛrnɛrɛ azalaki na bokonzi mingi ya kozwa bikateli.
Toyebi makambo nyonso te etali mibeko ya Loma; kasi, likambo ya Paulo ezali “mpenza ndakisa ya likambo oyo tribinale ya etúká ezalaki kosambisa na ndenge ya ebongiseli babengi extra ordinem.” Yango ezalaki kosalema boye: guvɛrnɛrɛ, elongo na bapesi-toli na ye, basengelaki koyoka moto oyo ayei kofunda likambo. Na nsima, bazalaki kobenga moto oyo bafundi ye liboso ya moto oyo afundi ye mpe bazalaki kopesa ye nzela aloba. Kasi moto oyo afundi nde azalaki na mokumba ya kopesa bilembeteli ya efundeli na ye. Zuzi azalaki kopesa etumbu nyonso oyo amoni ete ebongi. Akokaki kokata likambo mbala moko to kokata yango mokolo mosusu, mpe soki aponi kokata likambo mokolo mosusu, moto oyo afundami akotikala naino na bolɔkɔ. Moto moko ya mayele, nkombo na ye Henry Cadbury, alobaki boye: “Na ntembe te, lokola zuzi azalaki na lotomo ya kosala nyonso oyo amoni malamu, ezalaki mpasi te ‘abendama na kozala sembo te’ mpe kondima kanyaka, ezala mpo na kotika moto na bonsomi, kokatela moto etumbu, to kokata likambo mokolo mosusu.”
Nganga-monene Anania, na mikóló ya Bayuda, na Teletulu bafundaki Paulo liboso ya Feliki ete ‘azali likama monene mpe azali kobimisa botomboki epai ya Bayuda nyonso na mabele mobimba.’ Bafundaki ye ete azalaki mokonzi ya “lingomba ya bato ya Nazalete” mpe alingaki kosambwisa tempelo.—Misala 24:1-6, NW.
Bato oyo babɛtaki Paulo na ebandeli bakanisaki ete amemaki Tolofimi, moto moko oyo azalaki Moyuda te, na kati ya lopango ya tempelo epai oyo kaka Bayuda bakokaki kokɔta kuna.a (Misala 21:28, 29) Soki totaleli likambo na bosembo mpenza, moto mpenza oyo tokoki koloba ete asalaki mabe, atako ezalaki mpe kaka makanisi na bango, ezalaki nde Tolofimi. Kasi, soki mpo na Bayuda likambo oyo bango bakanisaki ete Paulo asalaki ezalaki nde kolendisa moto na kobuka mobeko wana, bakokaki mpe kotalela likambo yango lokola mbeba monene oyo moto akoki kozwela etumbu ya liwa. Emonani mpe ete bakonzi ya Loma bapekisaki Bayuda te na kokatela moto etumbu mpo na mbeba wana. Elingi koloba ete soki na esika ya bapolisi ya Lusia, bapolisi ya tempelo nde bakangaki Paulo, mbɛlɛ Sanedrina ekokaki mpenza kosambisa ye mpe kokatela ye etumbu.
Na makanisi ya Bayuda, makambo oyo Paulo azalaki koteya ezalaki te mateya ya Lingomba ya Bayuda, to ya lingomba oyo endimami na mibeko (religio licita). Esengelaki kotalela yango ete bapesaki yango ndingisa te, ezali nde kopɛngwisa bato.
Balobaki mpe ete Paulo azalaki “kobimisa botomboki epai ya Bayuda nyonso na mabele mobimba.” (Misala 24:5, NW) Eutaki koleka ntango mingi te, Amperɛrɛ Klaudio alobaki ete Bayuda ya Alesandalia bazalaki “kobimisa bolɔzi na mokili mobimba.” Maloba yango ekokani mpenza na oyo Bayuda balobaki. Moto moko ya mayele na istware, nkombo na ye Adrian Sherwin-White, alobaki ete: “Na ntango oyo Klaudio azalaki koyangela to na ebandeli ya boyangeli ya Néron, soki bafundi Moyuda na likambo ya ndenge wana, ekokaki mpenza mpo básambisa moto yango mpe bákatela ye etumbu. Bayuda bazalaki koluka ete guvɛrnɛrɛ atalela mosala ya kosakola oyo Paulo azalaki kosala ete ezali kotya mobulu na kati ya Bayuda ya mikili oyo Loma ezalaki koyangela. Bayuda bayebaki ete baguvɛrnɛrɛ bazalaki kondima te kokweisa moto oyo afundami kaka mpo na makambo ya lingomba, yango wana balukaki kokɔtisa makambo ya politiki na efundeli oyo etalelaki mpenzampenza makambo ya lingomba.”
Paulo asambaki na likambo mokomoko oyo bafundaki ye na yango. ‘Nabimisi mobulu ata moke te. Ya solo, nazali moto ya “mwa lingomba,” ndenge bango bazali kobenga yango, kasi yango elakisi ete nalandaka mibeko ya Bayuda. Bayuda mosusu ya Azia babimisaki yikiyiki. Soki mpenza ngai nasalaki bango likambo, báya koloba yango awa.’ Paulo amonisaki ete makambo nyonso oyo bafundaki ye na yango etalelaki kowelana ya bango na bango Bayuda; Baloma bayebaki makambo yango malamu te, bayebaki mpe te ndenge nini kokata makambo ya ndenge wana. Mpo na kobakisa te nkanda ya Bayuda oyo basilaki kobanda kotomboka, Feliki akataki kosamba wana. Na ndenge yango, abimisaki mokakatano mpe ekómaki mpasi mpo na kosambisa lisusu likambo yango. Apesaki Paulo na mabɔkɔ ya Bayuda te, oyo balobaki ete bango nde babongi kosambisa ye, asambisaki ye na kolanda mibeko ya Baloma te, abimisaki ye mpe na bolɔkɔ te. Bakokaki kotya Feliki mbamba te ete akata kaka likambo yango, mpe longola mposa oyo Feliki azalaki na yango ete Bayuda bálinga ye, azalaki kolekisa ntango mpo na likambo mosusu: akanisaki ete Paulo akofuta ye avoka.—Misala 24:10-19, 26, NW.b
Poloki Fesete ayei, makambo ebongwani
Kuna na Yelusaleme, nsima ya mbula mibale, Bayuda bafundaki lisusu likambo yango ntango guvɛrnɛrɛ mosusu ya sika, nkombo na ye Poloki Fesete, akómaki kuna; basɛngaki ye ete atikela bango Paulo básambisa ye. Kasi, Fesete alobaki na bango na mokuse ete: “Baloma batikaka moto te na mabɔkɔ ya baoyo bafundi ye kaka mpo na kosepelisa bango liboso ete moto yango akutana na bato yango oyo bafundi ye mpe asamba likambo oyo bafundi ye na yango.” Moto moko ya mayele na istware, nkombo na ye Harry Tajra, alobaki boye: “Fesete asosolaki mbala moko ete bato yango bazalaki na mposa ya koboma moto moko oyo azali mwana-mboka ya Loma.” Yango wana ayebisaki Bayuda ete bákende kosamba likambo na bango na mboka Kaisalia.—Misala 25:1-6, 16, NW.
Kuna na Kaisalia, Bayuda balobaki ete Paulo “abongi lisusu kozala na bomoi te,” kasi bamonisaki ntina moko ya solosolo te, mpe Fesete asosolaki ete Paulo asalaki likambo moko te oyo ebongi na etumbu ya liwa. Fesete ayebisaki mokonzi mosusu ete: “Bazalaki kaka kotyana na ye mwa bantembe na makambo na bango ya kosambela nzambe mpe mpo na moto moko boye, Yesu, oyo akufaki kasi oyo Paulo azalaki koloba ete azali na bomoi.”—Misala 25:7, 18, 19, 24, 25, NW.
Ezalaki polele ete Paulo akɔtaki na makambo ya politiki te; kasi, mpo na ntembe ya makambo na bango ya losambo, Bayuda bamonaki ete tribinale na bango nde ekokaki kokata likambo yango malamu. Paulo alingaki kondima ete akende kosamba makambo ya ndenge wana na Yelusaleme? Fesete atunaki Paulo soki akondima, nzokande, likanisi ya ndenge wana ezalaki malamu ata moke te. Soki Fesete azongisaka Paulo na Yelusaleme mpo básambisa ye kuna, alingaki nde kokaba ye na mabɔkɔ ya Bayuda mpamba te kuna, bato oyo bafundaki ye bango moko nde balingaki kosambisa ye. Paulo alobaki ete: “Nazali liboso ya tribinale ya Kaisala, esika oyo basengeli kosambisa ngai. Nasali Bayuda mabe ata moko te. . . . Moto moko te akoki kokaba ngai na mabɔkɔ na bango kaka mpo na kosepelisa bango. Nasɛngi nakende kosamba liboso ya Kaisala.”—Misala 25:10, 11, 20, NW.
Soki Moloma alobi bongo, bakokaki lisusu kosambisa ye na tribinale ya etúká te. Moloma azalaki na lotomo “ya solosolo, [lotomo] nyonso mpe oyo bazalaki kotosa yango” mpo na kosɛnga ete básambisa ye liboso ya tribinale mosusu (provocatio). Yango wana, nsima ya kotuna makanisi ya bapesi-toli na ye na ndenge oyo yango ekoki kosalema, Fesete alobaki ete: “Lokola osɛngi okende kosamba epai ya Kaisala; okokende epai ya Kaisala.”—Misala 25:12, NW.
Fesete asepelaki ete Paulo alongwa na mabɔkɔ na ye. Nsima ya mwa mikolo, ye moko alobaki epai ya Elode Akalipa II ete likambo wana ezalaki kotungisa ye. Esengelaki ete Fesete akomela amperɛrɛ mokanda oyo ekolimbola likambo yango, kasi mpo na Fesete, kosamba yango ezalaki mpo na makambo ya mindɔndɔmindɔndɔ ya mibeko ya Bayuda. Nzokande, Akalipa ayebaki makambo ya Bayuda malamu; yango wana, ntango alukaki koyeba likambo yango, mbala moko Fesete asɛngaki ye ete asalisa ye mpo na kokoma mokanda wana. Lokola azalaki kokanga ntina ya likambo moko te ntango Paulo azalaki koloba liboso ya Akalipa, Fesete agangaki ete: “Polo, yo ozali na liboma! Koyekola mingi ekomisi yo liboma.” Nzokande, Akalipa akangaki malamu ntina ya likambo. Alobaki ete: “Etikali moke obongola makanisi na ngai mpo nakoma mokristo.” Ata soki batalelaki ndenge nini nyonso oyo Paulo alobaki, Fesete na Akalipa bandimaki ete Paulo asalaki mabe moko te mpe bakokaki kotika ye soki asɛngaki te ete akenda epai ya Kaisala.—Misala 25:13-27; 26:24-32, Boyokani ya Sika.
Nsuka ya mobembo mpo na kokende kosamba
Ntango akómaki na Loma, Paulo abengisaki mikóló ya Bayuda mpo na kosakwela bango nsango malamu mpe mpo na koluka koyeba soki bayebaki nini mpo na ye. Yango ekokaki kosalisa ye ayeba soki bato oyo bafundaki ye bazalaki na makanisi ya kosala nini. Mbala mingi ezalaki kosalema ete bakonzi oyo bazalaki na Yelusaleme básɛnga na Bayuda oyo bazalaki kofanda na Loma básalisa bango mpo na kofunda likambo moko, kasi Paulo ayokaki ete balobaki na bango likambo moko te mpo na ye. Ntango azalaki kozela bábengisa ye mpo na kosamba, Paulo azwaki ndingisa ya kofutela ndako mpe kosakola nsango malamu ndenge alingi. Ekoki kozala ete batikelaki ye asalaka nyonso wana mpamba te, mpo na Baloma, Paulo asalaki mabe moko te.—Misala 28:17-31.
Paulo alekisaki lisusu mbula mibale lokola mokangami. Mpo na nini? Biblia eyebisi biso ntina te. Moto oyo asɛngi ete likambo na ye ekóma na Loma basengelaki kotika ye te kino bato oyo bafundi ye bakolandela ye lisusu; kasi, mbala mosusu Bayuda ya Yelusaleme, lokola bamonaki ete makambo oyo bafundaki ye na yango ezalaki ya solo te, bakendaki kuna te. Mbala mosusu, bamonaki ete ndenge malamu oyo bakokaki kopekisa Paulo kokende kosakola ezalaki ya kotika ye ndenge wana, afanda kuna, mpe bango bákende te. Ezala bongo to te, ezali komonana ete Paulo asambaki liboso ya Néron, bamonaki ye na mabe moko te, mpe na nsuka batikaki ye mpe azongelaki mosala na ye ya misionɛrɛ, soki mbula mitano nsima ya kokanga ye.—Misala 27:24.
Banguna ya solo babandá kala ‘kosala makambo ya mabe na nzela ya mibeko’ mpo na kopekisa mosala ya kosakola oyo baklisto bazali kosala. Likambo yango ekamwisaka biso te. Yesu alobaki ete: “Soko basili konyokola ngai, bakonyokola bino lokola.” (Nzembo 94:20, NW; Yoane 15:20) Kasi, Yesu alakaki biso ete tokozala na bonsomi ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba. (Matai 24:14) Yango wana, lokola kaka ntoma Paulo oyo azongaki nsima te liboso ya minyoko mpe botɛmɛli, lelo oyo, Batatoli ya Yehova mpe bazali ‘kolongisa mpe kondimisa nsango malamu na mibeko.’—Bafilipi 1:7, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Efelo moko ya mabanga oyo etongamaki malamu mpenza, ya mɛtrɛ soki 1,30 na bosanda, ekabolaki Lopango ya bapakano na lopango ya kati. Soki moto azali kotambola pembenipembeni ya efelo yango, mbala nyonso oyo aleki mwa bamɛtrɛ, azalaki komona maloba ya kokebisa oyo bakomaki na efelo yango, mosusu ezalaki na Grɛki mpe mosusu na Latin mpe elobaki boye: “Epekisami na mopaya akatisa ndelo oyo mpe akɔta na kati ya esika mosantu. Ye oyo bakokanga ye, etali ye; akobomama.”
b Mibeko epekisaki likambo yango. Mokanda moko elobi boye: “Na mibeko etali kobɔtɔla biloko ya bato, oyo babengaki Lex Repetundarum, epekisamaki na moto nyonso oyo azali mokonzi to azali mosali ya Leta ete asɛnga báfuta ye avoka to andima yango, ezala mpo na kokanga moto to kotika ye, kokata likambo to te to kotika moto ya bolɔkɔ.”