Elimo ya komipesa ezali kotinda bato na Gileadi
GILEADI, eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, ezali eteyelo mpo na kobongisa mibali mpe basi oyo bamipesi mpo bákende kosala mosala ya misionɛrɛ na mboka mopaya. Banani bakoki kokɔta na Gileadi? Bato oyo bazali na elimo ya komipesa. (Nzembo 110:3) Emonanaki mpenza bongo mokolo ya 8 Sɛtɛmbɛ 2001, ntango bandeko oyo bazalaki na kelasi ya mbala ya 111 bazwaki badiplome na bango.
Bana-kelasi mosusu, liboso kutu bákende na Gileadi, basilaki kotika bandeko na bango, baninga na bango mpe bamboka na bango mpe bakendaki kosakola nsango malamu na bamboka oyo mosala ezali mingi kasi basakoli bazali moke. Na bongo, bamekaki bango moko mpe bamonaki soki bakoki komesana na makambo ya sika na mboka mopaya. Na ndakisa, Richer na Nathalie bamibongisaki mpe bakendaki na ekólo Bolivie; Todd na Michelle bakendaki na République dominicaine; David na Monique bakendaki na ekólo moko ya Azia mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Bana-kelasi mosusu bazalaki kosakola na bikólo oyo: Nicaragua, Équateur mpe Albanie.
Christy alandaki toli ya koyekola monɔkɔ ya Espagnol na eteyelo ya ntei; yango esalisaki ye akoka kokende kosala mbula mibale na Équateur ntango azalaki naino monzemba. Bana-kelasi mosusu bakendaki na mboka mopaya te, kasi bakómaki koyangana na masangá ya minɔkɔ mosusu na bamboka na bango. Saul na Priscilla babundaki etumba ya ndenge mosusu; bango bamonisaki elimo ya komipesa na ndenge basalaki makasi mpo na koyekola koloba Lingelesi malamu liboso bákende na Gileadi.
Pɔsɔ 20 ya kelasi elekaki nokinoki. Mokolo ya kozwa badiplome ekokaki, mpe bana-kelasi, elongo na baninga na bango na bandeko na bango, bayokaki toli ya malamu mpe maloba ya nsuka mpo na kolendisa bango.
Theodore Jaracz, oyo akambaki likita yango, ye azwaká diplome na Gileadi na kelasi ya mbala ya 7, mpe lelo oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Na ebandeli ya lisolo na ye, amonisaki ete ebongiseli ya Yehova ebosanaka te ntina oyo bapesaka bana-kelasi mateya na Gileadi; ntina yango ezali ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mabele mobimba. (Malako 13:10) Na Gileadi bapesaka bana-kelasi mateya mpo na kosala mosala ya kosakola koleka ndenge oyo bazalaki kosala liboso mpe bákende kosala na bamboka oyo bazali mpenza na mposa ya bamisionɛrɛ oyo balandi mateya na kelasi. Ndeko Jaracz apesaki bana-kelasi toli ete básalela malamu mateya oyo bazwi na Gileadi ntango bakokende kokutana na bamisionɛrɛ oyo bazali kosala na bamboka 19 epai batindi bango.
Toli malamu mpo na bana-kelasi oyo bazwi badiplome
Masukulu mingi elandanaki. William Van De Wall, ye azali na komite ya filiale ya États-Unis, asalaki lisukulu oyo ezali na motó ya likambo ete: “Baklisto ya solo bazalaka na molende mpo na mosala ya misionɛrɛ.” Alobelaki mingi mosala ya ‘kokómisa bato bayekoli’ oyo elobelami na Matai 28:19, 20 (NW), mpe alendisaki bana-kelasi na maloba oyo: “Bólanda ndakisa ya Yesu, asalaki mosala ya misionɛrɛ na molende mpe na esengo.” Mpo na kosalisa bamisionɛrɛ ya sika bábungisa te molende na bango na mosala yango, alendisaki bango boye: “Bózala na programɛ ya mindɔndɔ te; bózala na mimeseno malamu ya koyekola, bótikala nsima te na makambo ya Teokrasi; mpe bókanisaka ntango nyonso ntina oyo batindi bino epai oyo bozali kokende.”
Na nsima, Guy Pierce, ye azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, azwaki maloba. Asalaki lisukulu oyo elobi: “Bólanda kobongisa ‘mayele na bino ya kokanisa.’” (Baloma 12:1, NW) Apesaki bana-kelasi toli malamu mpenza; alendisaki bango básalelaka mayele ya kokanisa oyo Nzambe apesá biso. Alobaki ete: “Bókanisaka malamumalamu makambo oyo Yehova azali koloba na bino na kati ya Liloba na ye. Yango nde ekobatela bino.” (Masese 2:11) Ndeko Pierce apesaki lisusu bana-kelasi toli ete bázala te bato oyo batingamaka na makanisi na bango moko, noki te bakosalela malamu te ‘mayele na bango ya kokanisa.’ Tokanisi mpenza ete toli malamu oyo bana-kelasi bazwi ekosalisa bango na mosala na bango ya misionɛrɛ.
Na nsima, mokambi ya likita abengaki Lawrence Bowen, molakisi moko na Gileadi; ye asalaki lisukulu oyo elobi “Bózwa mokano ya koyeba likambo te.” Amonisaki ete na mosala na ye ya misionɛrɛ na Kolinti, ntoma Paulo ‘akanaki koyeba likambo mosusu . . . te bobele Yesu Klisto mpe ye moto asili kobakisama na [nzete, NW].’ (1 Bakolinti 2:2) Paulo ayebaki ete elimo santu, nguya oyo eleki nguya nyonso, ezali kosimba nsango oyo ezali komonana na Biblia mobimba: Kolongisama ya bokonzi ya Yehova na nzela ya Mombóto oyo alakaki. (Genese 3:15) Balendisaki bana-kelasi nyonso 48 bázala lokola Paulo na Timote mpe bálonga na mosala na bango ya misionɛrɛ, bákangama makasi na ‘ndakisa ya maloba ya lobiko.’—2 Timote 1:13, NW.
Motó ya likambo ya lisukulu ya nsuka na kati ya masukulu ya liboso oyo elandanaki ezalaki: “Bózala na botɔndi mpo na libaku malamu na bino, yango ezali likabo ya Nzambe.” Wallace Liverance, sekrɛtɛrɛ ya Eteyelo ya Gileadi, asalisaki bana-kelasi na kokanga ntina ete kozwa mokumba na kati ya mosala ya Nzambe ezalaka ngɔlu na ye, ezalaka te likambo oyo moto alongaka to azwaka mpo na makoki na ye. Ndeko Liverance apesaki ndakisa ya ntoma Paulo mpe amonisaki ete: “Soki Yehova aponaki Paulo azala ntoma epai ya bato ya bikólo mosusu, ezalaki te mpo na misala na ye, mpo emonana te ete Paulo azalaki na lotomo ya kozwa mokumba wana to ye kaka nde abongaki na yango. Ezalaki te mpo alekisaki bambula mingi na mosala ya Nzambe to mpo ayebaki makambo mingi. Soki totaleli makambo na ndenge na biso bato, tokomona ete ebongaki mpenza bápona nde Balanaba. Ezalaki likambo ya kotalela mayele ya moto te, ekoki mpenza kozala ete Apolo ayebaki koloba malamu koleka Paulo. Paulo azwaki mokumba wana na ngɔlu ya Nzambe.” (Baefese 3:7, 8) Ndeko Liverance alendisaki bana-kelasi ete básalela likabo to mokumba oyo bazwi na mosala ya Nzambe, mpo na kosalisa bato mosusu bákóma baninga ya Nzambe mpo bango mpe bázwa ‘likabo ya [Nzambe], bomoi ya seko kati na Yesu Klisto, Nkolo na biso.’—Baloma 6:23.
Na nsima, Mark Noumair, molakisi mosusu ya Gileadi, asololaki na ndambo ya bana-kelasi; motó ya likambo ya lisolo na bango elobaki ete “Komibongisaka ebotaka mbuma malamu.” (Masese 21:5) Bapesaki bandakisa mpo na komonisa ete ntango ministre moklisto amibongisi malamu mpo na mosala ya kosakola, mingimingi soki abongisi motema na ye, akozala mpenza na mposa ya kosalisa bato. Akozanga te maloba oyo ebongi koloba. Kasi, akoloba mpe akosala makambo oyo ekosalisa bato na elimo. Lokola Ndeko Noumair ye moko azalaká misionɛrɛ na Afrika, amonisaki ete “yango nde sɛkɛlɛ mpo na kolonga na mosala ya misionɛrɛ.”
Mosala ya misionɛrɛ ezali mosala ya esengo
Ralph Walls na Charles Woody batunaki bamisionɛrɛ basalá-kala oyo bazalaki na Patterson na kelasi mpo na bandeko oyo bazali na bakomite ya filiale. Biyano ya bandeko yango na mituna oyo batunaki bango emonisaki ete mpo na koyoka esengo ya mosala ya misionɛrɛ esengeli kolinga bato. Bana-kelasi na bandeko na bango mpe baninga na bango oyo bazalaki na likita yango balendisamaki na maloba ya bamisionɛrɛ yango oyo baumeli na mosala, na ndenge bazalaki kolimbola ntina oyo mosala ya misionɛrɛ ezali mosala ya esengo.
John Barr, ye azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisukulu monene na mokolo yango; motó ya likambo na yango ezalaki “Bóyembela Yehova loyembo ya sika.” (Yisaya 42:10) Ndeko Barr amonisaki ete maloba “loyembo ya sika” ezali na bisika 9 na kati ya Biblia. Atunaki motuna ete: “Loyembo yango ya sika elobelaka mpenza nini?” Na nsima apesaki eyano ete: “Maloba oyo ezali mwa moke liboso mpe nsima ya vɛrsɛ wana emonisi ete loyembo ya sika ezali koyembama mpo na makambo ya sika oyo boyangeli ya Yehova ezali kokokisa mokemoke.” Alendisaki bana-kelasi ete bango mpe bátika te koyemba mpo na kokumisa Bokonzi monene ya Nzambe oyo bapesi na Mokonzi mpe Masiya, Yesu Klisto. Ndeko Barr alobaki ete mateya oyo bazwaki na Gileadi esalisaki bango na kokanga malamumalamu ntina ya makambo ndenge na ndenge oyo etali ‘loyembo’ yango ya ‘sika.’ Alobaki ete: “Mateya ya Gileadi emonisaki mpenza ntina oyo bosengeli ‘koyemba’ masanzoli mpo na Yehova elongo na bandeko bisika nyonso oyo bokokende; bózala ntango nyonso na bomoko na bato mosusu na bisika oyo bazali kotinda bino.”
Na nsima, bana-kelasi bazwaki badiplome na bango mpe moko na bango azwaki maloba na nkombo ya bango nyonso mpo na kotánga mokanda mpo na kozongisa matɔndi mpo na mateya oyo bazwaki na Gileadi.
Yo mpe okoki kosala mingi lisusu na mosala ya Nzambe mpe kobota mbuma mingi na mosala yango? Soki ezali bongo, salá makasi ndenge bana-kelasi oyo basalaki. Yango nde esalisaki bango mpo bákokisa masɛngami mpo na mosala ya misionɛrɛ. Moto oyo amipesi na bolingo na ye moko mpo na kosala mosala ya Nzambe azwaka esengo mingi.—Yisaya 6:8.
[Etanda na lokasa 25]
MAKAMBO ETALI BANA-KELASI
Bauti na bikólo: 10
Batindami na bikólo: 19
Bazalaki bana-kelasi: 48
Mwayene ya mbula ya kobotama: 33,2
Mwayene ya mbula basali na lisangá: 16,8
Mwayene ya mbula basali mosala ya ntango nyonso: 12,6
[Elilingi na lokasa 26]
Kelasi ya mbala ya 111 ya Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ; banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.
(1) Yeomans, C.; Toukkari, A.; Nuñez, S.; Phillips, J.; Dawkin, M.; Silvestri, P. (2) Morin, N.; Biney, J.; López, M.; Van Hout, M.; Cantú, A.; Szilvassy, F. (3) Williams, M.; Itoh, M.; Van Coillie, S.; Levering, D.; Fuzel, F.; Geissler, S. (4) Yeomans, J.; Moss, M.; Hodgins, M.; Dudding, S.; Briseño, J.; Phillips, M. (5) López, J.; Itoh, T.; Sommerud, S.; Kozza, C.; Fuzel, G.; Moss, D. (6) Williams, D.; Dudding, R.; Geissler, M.; Morin, R.; Biney, S.; Cantú, L. (7) Dawkin, M.; Hodgins, T.; Levering, M.; Silvestri, S.; Van Hout, D.; Briseño, A. (8) Van Coillie, M.; Nuñez, A.; Kozza, B.; Sommerud, J.; Toukkari, S.; Szilvassy, P.