LISOLO YA BOYEKOLI 46
Zalá na mpiko mpo Yehova azali mosungi na yo
“Nakotika yo soki moke te, mpe nakosundola yo ata moke te.”—EBR. 13:5.
LOYEMBO 55 Bóbanga bango te!
NA MOKUSEa
1. Nini ekobɔndisa biso ntango toyoki lokola tosundolami to mpe mikakatano eleki biso motó? (Talá Nzembo 118:5-7)
OSILÁ koyoka lokola osundolami mpe moto ya kosalisa yo azali te ntango okutanaki na mokakatano? Likambo wana ekómelá bato mingi, ata mpe basaleli ya sembo ya Yehova. (1 Bak. 19:14) Soki yango ekómeli yo, kanisá elaka ya Yehova oyo ete: “Nakotika yo soki moke te, mpe nakosundola yo ata moke te.” Yango wana, tokoki koloba na mpiko nyonso ete: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga eloko te.” (Ebr. 13:5, 6) Ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Yudea maloba oyo na mobu soki 61 ya ntango na biso. Maloba yango ezali kosalisa biso tóbosana te makambo oyo mokomi ya nzembo akomaki na Nzembo 118:5-7.—Tángá.
2. Tokotalela nini na lisolo oyo, mpe mpo na nini?
2 Ndenge moko na mokomi ya nzembo, ntoma Paulo ayebaki, na nzela ya makambo oyo akutanaki na yango, ete Yehova azali mosungi na ye. Na ndakisa, mbula mibale liboso akoma mokanda na ye epai ya Baebre, Paulo abikaki na mopɛpɛ makasi ntango azalaki kosala mobembo na mbu. (Mis. 27:4, 15, 20) Na boumeli ya mobembo yango mpe bambula mingi liboso, Yehova asalisaki Paulo na ndenge mingi. Tokotalela lolenge misato oyo asalisaki ye. Yehova asalisaki ye na nzela ya Yesu, baanzelu, bato oyo bazalaki na bokonzi, mpe na nzela ya bandeko na ye bakristo. Kotalela makambo oyo Paulo akutanaki na yango ekokómisa makasi kondima na biso na elaka ya Nzambe ete akoyanola na mabondeli na biso ntango tozali kosɛnga ye asalisa biso.
YESU MPE BAANZELU BASALISAKI YE
3. Ntoma Paulo akokaki komituna nini, mpe mpo na nini?
3 Paulo asengelaki na lisalisi. Na mobu soki 56 ya ntango na biso, ebele ya bato babendaki ye na libanda ya tempelo na Yerusaleme mpe balukaki koboma ye. Na mokolo oyo elandaki, bamemaki ye liboso ya Sanedrina, mpe banguna na ye balingaki kokata ye bitenibiteni. (Mis. 21:30-32; 22:30; 23:6-10) Na ntango yango, ntoma Paulo akokaki komituna: ‘Mikakatano oyo ekoumela tii ntango nini?’
4. Ndenge nini Yehova asalelaki Yesu mpo na kosalisa Paulo?
4 Ndenge nini Yesu asalisaki Paulo? Na butu wana nsima ya kokanga Paulo, “Nkolo” Yesu atɛlɛmaki pene na ye mpe alobaki na ye ete: “Zalá na mpiko! Mpo lokola opesi litatoli malamumalamu na Yerusaleme mpo na makambo oyo etali ngai, ndenge moko mpe osengeli kopesa litatoli na Roma.” (Mis. 23:11) Maloba yango elendisaki mpenza Paulo! Yesu apesaki ntoma Paulo longonya mpo na litatoli oyo apesaki na Yerusaleme. Mpe apesaki ntoma Paulo elaka ete akokóma na Roma malamu, mpe kuna akopesa litatoli malamumalamu. Na ntembe te, nsima ya kozwa elaka wana, ntoma Paulo amiyokaki lokola mwana moke oyo abatelami malamu mpenza na mabɔkɔ ya tata na ye.
5. Ndenge nini Yehova asalisaki ntoma Paulo na nzela ya anzelu? (Talá elilingi ya ezipeli.)
5 Wapi mikakatano mosusu oyo Paulo akutanaki na yango? Mbula soki mibale nsima ya makambo oyo elekaki na Yerusaleme, ntoma Paulo akɔtaki na masuwa oyo ezalaki kokende na Itali. Masuwa yango ekutanaki na mopɛpɛ makasi. Lokola mopɛpɛ yango ezalaki makasi mingi, bato oyo basalaka na masuwa ná bato oyo bazalaki kosala mobembo bakanisaki ete bakokufa. Kasi, Paulo azalaki kobanga te. Mpo na nini? Ayebisaki bato oyo bazalaki na masuwa ete: “Na butu ya lelo, anzelu moko ya Nzambe oyo ngai nazali moto na ye mpe oyo ngai nazali kosalela mosala mosantu atɛlɛmaki pene na ngai, alobi: ‘Kobanga te, Paulo. Osengeli kotɛlɛma liboso ya Kaisala, mpe talá! Nzambe asili kopesa yo na boboto mpenza baoyo nyonso bazali kosala mobembo elongo na yo na masuwa.’” Yehova asalelaki anzelu moko mpo azongela elaka oyo apesaki Paulo liboso na nzela ya Yesu. Mpe nsukansuka, Paulo akómaki na Roma kaka ndenge Yehova alakaki.—Mis. 27:20-25; 28:16.
6. Elaka nini ya Yesu ekoki kopesa biso makasi, mpe mpo na nini?
6 Ndenge nini Yesu asalisaka biso lelo oyo? Yesu akosalisa biso ndenge asalisaki Paulo. Na ndakisa, Yesu apesaki baoyo nyonso bazali kolanda ye elaka ete: “Nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 28:20) Elaka yango ya Yesu ezali mpenza kolendisa biso. Mpo na nini? Mpo mikolo mosusu ezalaka mpasi tóyika mpiko. Na ndakisa, ntango ndeko to moninga na biso moko akufi, toyokaka mpasi mpenza mpe mpasi yango ekoki koumela bambula mingi. Bamosusu bazali kobunda na mikakatano ya bobange. Bamosusu mpe bazali konyokwama na makanisi. Atako bongo, tozwaka makasi ya koyika mpiko mpo toyebi ete Yesu azali elongo na biso “mikolo nyonso,” elingi koloba, ata na mikolo oyo eleki mpasi na bomoi na biso.—Mat. 11:28-30.
7. Na kotalela Emoniseli 14:6, ndenge nini Yehova asalisaka biso lelo oyo?
7 Liloba ya Nzambe emonisi ete Yehova asalisaka biso na nzela ya baanzelu na ye. (Ebr. 1:7, 14) Na ndakisa, baanzelu basungaka biso mpe bakambaka biso ntango tozali kosakola “nsango malamu ya Bokonzi” epai ya ‘bato ya bikólo nyonso, mabota nyonso, mpe minɔkɔ nyonso.’—Mat. 24:13, 14; tángá Emoniseli 14:6.
BATO OYO BAZALAKI NA BOKONZI BASALISAKI YE
8. Ndenge nini Yehova asalelaki komanda ya basoda mpo na kosalisa Paulo?
8 Lisalisi nini ntoma Paulo azwaki? Na mobu 56 ya ntango na biso, Yesu ayebisaki ntoma Paulo ete akokóma na Roma. Nzokande, Bayuda mosusu na Yerusaleme basalaki likita mpo bátyela ntoma Paulo motambo mpo báboma ye. Ntango Klode Lisiasi, komanda ya basoda ya Roma, ayebaki likambo yango, asalisaki Paulo. Na mbala moko, Klode apesaki mitindo na limpinga ya basoda ete bábatela Paulo mpe bákende na ye tii na Kaisaria, mboka oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 105 mosika na Yerusaleme. Ntango akómaki kuna, Guvɛrnɛrɛ Feliksi apesaki mitindo ete ‘bábatela Paulo na ndako ya bokonzi ya Erode.’ Na ndenge yango, Bayuda oyo balingaki kosala Paulo mabe bakokaki lisusu kozwa ye te.—Mis. 23:12-35.
9. Ndenge nini Guvɛrnɛrɛ Festusi asalisaki Paulo?
9 Mbula mibale na nsima, ntoma Paulo azalaki kaka na bolɔkɔ na Kaisaria. Festusi akómaki guvɛrnɛrɛ na esika ya Feliksi. Bayuda babondelaki Festusi azongisa Paulo na Yerusaleme mpo akende kosamba, kasi Festusi aboyaki. Ntango mosusu, guvɛrnɛrɛ yango ayebaki ete Bayuda bazalaki na mposa ya ‘kotyela Paulo motambo mpo báboma ye na nzela.’—Mis. 24:27–25:5.
10. Guvɛrnɛrɛ Festusi asalaki nini ntango Paulo asɛngaki ete akende kosamba epai ya Kaisala?
10 Na nsima, ntoma Paulo asambaki na Kaisaria. Lokola Festusi alingaki ete “Bayuda básepela na ye,” atunaki Paulo boye: “Olingi komata na Yerusaleme mpe kosambisama kuna liboso na ngai?” Ntoma Paulo ayebaki ete Bayuda bakokaki koboma ye na Yerusaleme. Lisusu, ayebaki oyo asengelaki kosala mpo na kobatela bomoi na ye, mpo na kokóma na Roma mpe kokoba mosala na ye. Yango wana alobaki ete: “Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!” Nsima ya kosolola na bapesi-toli na ye, Festusi alobaki na Paulo ete: “Lokola osɛngi okende kosamba epai ya Kaisala, okokende epai ya Kaisala.” Ekateli ya malamu oyo Festusi azwaki ya kotinda Paulo na Roma, ebikisaki bomoi ya Paulo na mabɔkɔ ya banguna na ye. Mosika te, Paulo asengelaki kokende na Roma, mosika mpenza na Bayuda oyo balingaki koboma ye.—Mis. 25:6-12.
11. Ntango mosusu ntoma Paulo akanisaki maloba nini ya kolendisa oyo Yisaya akomaki?
11 Wana Paulo azalaki kozela ete abanda mobembo na ye ya kokende na Itali, ntango mosusu akanisaki likebisi oyo mosakoli Yisaya apesaki bato oyo batɛmɛlaka Yehova. Yehova atindaki Yisaya akoma boye: “Bókana mwango, mpe yango ekobebisama! Bóloba ata liloba nini, mpe yango ekosimba te, mpo Nzambe azali na biso!” (Yis. 8:10) Paulo ayebaki ete Nzambe akosalisa ye, mpe yango epesaki ye makasi ya koyika mpiko na mikakatano oyo asengelaki kokutana na yango.
12. Ndenge nini Yuliusi asalelaki ntoma Paulo makambo, mpe mbala mosusu yango esalisaki Paulo asosola likambo nini?
12 Na mobu 58 ya ntango na biso, ntoma Paulo abandaki mobembo na ye mpo na kokende na Itali. Lokola azalaki moto ya bolɔkɔ, bapesaki ye na mabɔkɔ ya mokonzi moko ya basoda ya Roma na nkombo Yuliusi. Kobanda ntango wana, Yuliusi akómaki na bokonzi ya kosalela Paulo makambo ndenge alingi, akokaki konyokola ye to kosalela ye makambo na boboto. Ndenge nini asalelaki bokonzi na ye? Na mokolo oyo elandaki, ntango basɛmaki na esika ya liboso, ‘Yuliusi asalelaki Paulo makambo na boboto mpenza mpe apesaki ye nzela ya kokende epai ya baninga na ye.’ Na nsima, Yuliusi abikisaki kutu bomoi ya Paulo. Na ndenge nini? Basoda balingaki koboma bato nyonso ya bolɔkɔ oyo bazalaki na masuwa, kasi Yuliusi apekisaki bango. Mpo na nini? Mpo “alingaki kobikisa bomoi ya Paulo.” Na ntembe te, Paulo asosolaki ete Yehova azali kosalela mokonzi ya basoda wana ya boboto mpo na kosalisa ye mpe kobatela ye.—Mis. 27:1-3, 42-44.
13. Ndenge nini Yehova akoki kosalela bato oyo bazali na bokonzi?
13 Lisalisi nini tozwaka? Yehova akoki kosalela elimo santu na ye ya nguya mpo na kotinda bato oyo bazali na bokonzi básala oyo ye alingi soki likambo moko eyokani na mokano na ye. Mokonzi Salomo akomaki boye: “Motema ya mokonzi ezali lokola mikɛli ya mai na lobɔkɔ ya Yehova. Abalusaka yango esika nyonso asepeli kobalusa.” (Mas. 21:1) Lisese yango elimboli nini? Bato bakoki kotimola nzela ya kolekisa mai ya mokɛli epai oyo bango balingi. Ndenge moko mpe, Yehova akoki kosalela elimo na ye mpo na kotinda bakonzi básala makambo oyo ekokokisa mokano na ye. Soki asali bongo, bakonzi bazwaka bikateli mpo na bolamu ya basaleli ya Nzambe.—Talá mpe Ezera 7:21, 25, 26.
14. Na kotalela Misala 12:5, tokoki kobondelaka mpo na banani?
14 Tokoki kosala nini? Tokoki kobondela “mpo na bakonzi mpe baoyo nyonso bazali na bibonga minene” ntango basengeli kozwa bikateli oyo etali mosala na biso ya kosakola mpe koyangana na makita. (1 Tim. 2:1, 2; Neh. 1:11) Kaka ndenge bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalaki, biso mpe tobondelaka Nzambe mingi mpo na bandeko na biso oyo bazali na bolɔkɔ. (Tángá Misala 12:5; Ebr. 13:3) Tokoki mpe kobondela mpo na bakɛngɛli ya bolɔkɔ oyo bazali na bokonzi likoló ya bandeko na biso. Tokoki kosɛnga Yehova atambwisa makanisi na bango mpo bákoka kosala lokola Yuliusi mpe básalela bandeko na biso oyo bazali na bolɔkɔ “makambo na boboto mpenza.”
BANDEKO YA LISANGÁ BASALISAKI YE
15-16. Ndenge nini Yehova asalelaki Aristarke ná Luka mpo na kosalisa Paulo?
15 Lisalisi nini Paulo azwaki? Ntango Paulo azalaki na Roma, Yehova asalelaki bandeko mbala na mbala mpo na kosalisa ye. Tótalela mwa bandakisa.
16 Aristarke ná Luka, baninga ya motema ya Paulo, bandimaki kokende elongo na ye na Roma.b Batyaki bomoi na bango na likama ndenge bandimaki kosala mobembo elongo na Paulo, atako Biblia emonisi esika moko te ete Yesu ayebisaki bango ete bakokóma malamu na Roma. Kaka na nsima, na boumeli ya mobembo moko ya mabe, nde bayaki koyeba ete bomoi na bango ekobatelama. Yango wana, ntango Aristarke ná Luka bamataki na masuwa na Kaisaria, Paulo abondelaki Yehova na motema mobimba mpe apesaki ye matɔndi mpo na lisalisi oyo azwaki na nzela ya baninga na ye mibale wana ya mpiko.—Mis. 27:1, 2, 20-25.
17. Ndenge nini Yehova asalelaki bandeko ya lisangá mpo na kosalisa Paulo?
17 Na boumeli ya mobembo yango, bandeko basalisaki ntoma Paulo mbala mingi mpenza. Na ndakisa, ntango basɛmaki na libongo ya engumba Sidone, Yuliusi apesaki Paulo nzela ya “kokende epai ya baninga na ye mpe ya kozwa lisalisi epai na bango.” Mpe na nsima, na engumba Puteoli, ntoma Paulo ná baninga na ye ‘bakutaki bandeko mpe babondelaki bango báfanda elongo na bango mikolo nsambo.’ Ntango bandeko yango bazalaki kosalisa Paulo ná baninga na ye ya mobembo, na ntembe te, Paulo azalaki koyebisa bango makambo ya kolendisa oyo esepelisaki bango mingi. (Talá mpe Misala 15:2, 3.) Nsima ya kolendisana, ntoma Paulo ná baninga na ye bakobaki mobembo na bango.—Mis. 27:3; 28:13, 14.
18. Nini etindaki Paulo apesa Nzambe matɔndi mpe azwa mpiko?
18 Mbala mosusu, wana Paulo azalaki kokende na Roma, azalaki kokanisa makambo oyo akomelaki lisangá ya engumba yango mbula misato liboso ete: “Uta mwa bambula nazali na mposa makasi ya kokóma epai na bino.” (Rom. 15:23) Kasi, akanisaki ata moke te ete ntango akokóma kuna akozala nde moto ya bolɔkɔ. Kanisá ndenge oyo alendisamaki ntango amonaki bandeko ya Roma batɛlɛmi pembenipembeni ya nzela, bazali kozela mpo na kopesa ye mbote! “Ntango amonaki bango, Paulo apesaki Nzambe matɔndi mpe azwaki mpiko.” (Mis. 28:15) Simbá ete, Paulo apesaki Nzambe matɔndi mpo amonaki bandeko na ye. Mpo na nini? Mpo Paulo amonaki lisusu ete Yehova azalaki kosalela bandeko mpo na kosalisa ye.
19. Na kotalela 1 Petro 4:10, ndenge nini Yehova akoki kosalela biso mpo na kosalisa bandeko oyo bazali kokelela?
19 Tokoki kosala nini? Oyebi bandeko ya lisangá na bino oyo bazali konyokwama mpo na maladi to mpe bazali kokutana na mikakatano mosusu? To ntango mosusu, ndeko to moninga na bango moko akufi. Soki toyebi ndeko moko oyo azali kokelela, tokoki kosɛnga Yehova asalisa biso tóloba to tósalela ye makambo na boboto. Ntango mosusu, bandeko na biso bazalaka kaka na mposa ya maloba mpe misala na biso mpo bálendisama. (Tángá 1 Petro 4:10.)c Soki tosalisi bango, bakoki komona mpenza ete elaka ya Yehova oyo elobi ete, “Nakotika yo soki moke te, nakosundola yo ata moke te,” ekokisamaka mpe epai na bango. Na ntembe te, yango esengeli kopesa yo esengo mpenza!
20. Mpo na nini tokoki koloba na mpiko mpenza ete: “Yehova azali mosungi na ngai?”
20 Lokola Paulo ná baninga na ye, biso mpe tokoki kokutana na mikakatano ya makasi. Kasi, toyebi ete tokoki kozwa mpiko mpo Yehova azali na biso. Asalisaka biso na nzela ya Yesu mpe ya baanzelu. Lisusu, soki likambo moko eyokani na mokano na ye, Yehova akoki kosalisa biso na nzela ya bato oyo bazali na bokonzi. Mpe ndenge mokomoko na biso ayebi yango, Yehova asalelaka elimo santu na ye mpo na kotinda bandeko na biso ya lisangá básalisa biso. Yango wana, ndenge moko na Paulo, tozali mpenza na ntina ya koloba na mpiko ete: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?”—Ebr. 13:6.
LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi
a Lisolo oyo ekolobela lolenge misato oyo Yehova asalisaki ntoma Paulo ayikela mikakatano na ye mpiko. Kotalela ndenge oyo Yehova asungaki basaleli na ye na ntango ya kala, ekokómisa kondima na biso makasi ete Yehova akosalisa biso ntango tozali kokutana na mikakatano lelo oyo.
b Aristarke ná Luka basalaki mibembo mosusu liboso elongo na Paulo. Mibali yango ya sembo mpe bazalaki na bolɔkɔ elongo na Paulo na Roma.—Mis. 16:10-12; 20:4; Kol. 4:10, 14.
c Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/01/2009, nk. 13-14, par. 5-9.