Mituna ya Batángi
“Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” ya 1 Novɛ́mbɛ 1995 elobelaki mingi makambo oyo Yesu alobaki na ntina na “libota oyo,” lokola tozali kotánga yango na Matai 24:34. Yango elingi nde komonisa ete mwa ntembe ezali na likambo litali kotyama ya Bokonzi ya Nzambe na 1914 kati na makoló?
Lisoló wana ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli likɔtisi ata mbongwana moko te na mateya na biso ya moboko na ntina na mobu 1914. Yesu amonisaki elembo oyo esengelaki kolakisa kozala na ye kati na nguya ya Bokonzi. Tozali na bilembeteli mingi oyo bizali komonisa ete elembo yango ebandaki kokokisama na mobu 1914. Komonana ya makambo lokola bitumba, nzala, maladi mabe, koningana ya mabelé, mpe bilembeteli mosusu ezali kondimisa ete Yesu asilaki kobanda mosala ya Mokonzi kati na bokonzi ya Nzambe uta mobu 1914. Yango emonisi ete uta ntango yango tozali kobika na nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo.
Boye, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli wana ezalaki mpenza kongɛngisa likambo nini? Likanisi ya moboko mpenza ezalaki nde ndimbola oyo Yesu asalelaki liloba “libota” na Matai 24:34. Mokapo yango molobi boye: “Nazali koloba na bino solo ete libota oyo ekoleka te kino ekobima makambo oyo nyonso.” Yesu alingaki koloba nini na kosaleláká liloba “libota,” ezala na eleko wana to na eleko na biso?
Mikapo mingi ya Makomami mindimisi ete Yesu asalelaki te liloba “libota” mpo na kolobela mwa etuluku ya bato to etuluku ya sikisiki, oyo ekoki kozala bobele bakonzi ya Bayuda to bayekoli na ye ya sembo. Nzokande, asalelaki liloba “libota” mpo na kokweisa bibele ya Bayuda oyo baboyaki kondima ye. Atako bongo, likambo ya esengo ezali ete, bato mingi bakokaki kosala oyo ntoma Petelo asɛngaki bango na mokolo ya Pantekote, elingi koloba bábongola mitema mpe ‘bámibikisa na libota wana ya kilikili.’—Misala 2:40.
Na maloba wana, emonani polele ete Petelo azalaki kolobela na bosikisiki te etuluku ya bato oyo bazali na motángo ya sikisiki ya mibu ya kobotama to bolai ya ntango, to mpe azalaki kokangisa “libota” na dati moko te. Alobaki te ete bato basengeli kobikisama na libota ya bato babotamaki mbula moko na Yesu to libota ya bato babotamaki na mobu 29 T.B. Petelo azalaki nde kolobela Bayuda ya eleko wana oyo bazangaki kondima—bamoko bazalaki mbala mosusu bilenge, basusu mikóló—oyo bayokaki mateya ya Yesu, bamonaki bikamwiseli oyo asalaki to bayokaki nsango na yango, kasi baboyaki kondima ye ete azali Masiya.
Na ntembe te ezali na lolenge wana nde Petelo akangaki ntina ya kosalelama ya liloba “libota” na ntango oyo ye elongo na bantoma misato mosusu bazalaki na Yesu likoló na Ngomba ya Olive. Engebene maloba ya esakweli ya Yesu, Bayuda ya eleko wana—mingimingi, baoyo bazalaki na bomoi eleko moko na Yesu—basengelaki komona to koyoka nsango ya bitumba, ya koningana ya mabelé, ya nzala, mpe bilembeteli mosusu oyo elingaki komonisa ete nsuka ya ebongiseli ya Bayuda ekómaki pene. Kútu, libota wana lilekaki te liboso ete nsuka eya na mobu 70 T.B.—Matai 24:3-14, 34.
Tosengeli kondima ete mbala mingi tozwaki maloba ya Yesu na ndimbola wana te. Ezali wana momesano ya bato ya kozanga kokoka ya kolinga kozala sikisiki na ntina na dati oyo nsuka ekoya. Tómikundola ete ata mpe bantoma balukaki makambo ya sikisiki, na ntango batunaki: “Moteyi, okozongisela Yisalaele bokonzi na ntango oyo?”—Misala 1:6.
Na kozaláká na makanisi ya sembo motindo moko, basaleli ya Nzambe na mikolo na biso bamekaki kobimisa uta na oyo Yesu alobaki na ntina “libota” ntango moko ya sikisiki oyo etángami uta na mobu 1914. Na ndakisa, lolenge moko ya kokanisa ezalaki boye ete libota moko ekoki kozala na bomoi na boumeli ya mbula 70 to 80, yango ezali na bato oyo bazalaki na mibu ya kobotama ya kokoka mpo na kokanga ntina ya etumba ya liboso ya mokili mobimba mpe makambo mosusu oyo mabimaki; boye tokoki kotánga bambula mpo na koyeba pene na ntango nini nsuka ekoya.
Nzokande atako makanisi motindo wana mazalaki na moboko ya malamu, yango ezali nde na boyokani na toli oyo Yesu apesaki na nsima? Yesu alobaki ete: “Mpo na mokolo yango mpe ntango yango, moto ayebi te, ata banze na Likoló te, ata Mwana mpenza te, kasi bobele Tata ayebi. . . . Boye bótala mpo ete boyebi te soko Nkolo na bino akoya na mokolo nini.”—Matai 24:36-42.
Na bongo, makambo toutaki koyekola kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ntina na “libota oyo” mabongoli te bososoli na biso ya makambo masalemaki na 1914. Kasi epesi biso nde bososoli ya polele ya liloba “libota” lolenge Yesu asalelaki yango, mpe esalisi biso na komona ete kosalelama yango ezali moboko te mpo na biso ete tókoka kotánga mikolo—kobanda 1914 —mpo na koyeba soki tokomi mpenza pene na nsuka.