Bankulutu mpe basaleli na misala bazali kobatela boyokani kati na bango
MWA moke nsima na Pantekote ya mobu 33 T.B., mokakatano moko mobimaki kati na lisangá ya boklisto oyo eutaki kosalema kala mingi te. Ebongiseli moko ekamatamaki mpo na kosalisa basi-bakufeli-mibali oyo bazalaki na bosenga. Kasi na nsima “Bayuda oyo balobi lokota na Liɛla baimaimaki na ntina na Baɛbɛlɛ, mpɔ ete basi-bakufeli-mibali kati na bango bajangaki na ntango na kokabola bilɔkɔ na mokɔlɔ na mokɔlɔ.”—Misala 6:1.
Koimaima wana ekómaki na matoyi ya bantoma. “Bongo bajomi na mibale bayanganisi ebele na bayekoli, mpe balobi ete: ‘Ebongi tɛ ete biso totika kolakisa Liloba na Njambe mpɔ na kosala mosala na mɛsa. Na bongo, bandeko, boluka mibali nsambo na kati na bino, bato na lokumu malamu, baoyo batondi na [elimo, NW] mpe na mayɛlɛ, mpe tokotia bango na lotomo oyo.’”—Misala 6:2, 3.
Yango emonisi ebongiseli oyo ezalaki kati na lisangá ya boklisto. Mibali mosusu bazalaki na mokumba ya kotalela makambo mikemike ya bomoi, nzokande basusu bazalaki na mokumba ya kotalela makambo minene ya elimo. Yango ezali likambo ya sika te. Na Yisraele ya kala, Alona mpe bakitani na ye baponamaki ete bázala banganga mpo na kopesa mbeka epai na Nzambe. Nzokande, Yehova asɛngaki na Balevi ete basungaka bango na ‘kobatela bisaleli yɔnsɔ na hema na koyangana.’ (Mituya 3:5-10) Bobele bongo, bakɛngɛli bazali lelo oyo kosalisama na basaleli na misala.
Mokumba ya Bankulutu mpe ya Basaleli na misala
Makomami mazali komonisa polele masɛngami matombwami mpo na bankulutu mpe mpo na basaleli na misala (1 Timoté 3:1-10, 12, 13; Tito 1:6-9) Bazali kowelana te, kasi bazali kosala mpo na mokano moko—kotónga lisangá. (Kokanisá na Baefese 4:11-13.) Atako bongo, ezali na mwa makambo oyo makesenisi mosala bazali kosala kati na lisangá. Na 1 Pɛtɛlɔ 5:2, elobami mpo na bakɛngɛli ete: “Bobatela etɔnga na Njambe kati na bino. Bobatela bango mpɔ na kopusama tɛ, kasi na mitema malamu lokola elingi Njambe, na mposa na kojua lifuti tɛ kasi mpɔ na kopɛsa mpamba.” Bakozongisa monɔkɔ epai na Nzambe na lolenge oyo bakokisaki mosala wana ya bulee.—Baebele 13:17.
Ezali boni mpo na basaleli na misala? Makomami masɛngi te ete bázala na makoki mingi mpo na koteya. Misala na bango mikeseni na oyo ya bankulutu. Na ekeke ya liboso T.B., kozanga ntembe, ezalaki na makambo mingi ya mosuni, makambo mikemike, to misala ya mabɔkɔ oyo mizalaki kobenda likebi, mbala mosusu mpe makambo matalaki kosomba bisaleli ya bakopi ya Makomami to ata mpe kosala bakopi yango moko.
Lelo oyo, basaleli na misala bazali kolanda kokokisa misala mikeseni kati na lisangá, na ndakisa kobatela mosolo ya lisangá mpe bateritware, kokabola bazulunalo mpe babúku, mpe bopɛtɔ ya Ndako ya Bokonzi. Basaleli na misala mosusu oyo bazali na makoki bakoki mpe kosalelama mpo na koteya, na bantango mosusu bazali kotambwisa Boyekoli ya Mokanda oyo esalemaka kati na lisangá, basalaka mikumba na Likita ya Mosala, mpe bapesaka masukúlu ya bato nyonso.
Wana bankulutu mpe basaleli na misala bazali kosala elongo kati na boyokani, bamposa ya lisangá—ya elimo mpe oyo etali lolenge ya kotambwisa misala—ezali kokokisama na lolenge ya malamu. Na bongo basangani ya lisangá bazali na esengo, na makasi, mpe na elimo bazali kobota mbuma. Omikundola oyo Paulo akomaki na ntina na bapakolami oyo bazalaki na Efese: “Na nguya na ye, njoto mobimba ejali kokola, awa ejali yango kokangama mpe kotongama na bilembo yɔnsɔ bijui yango, bijali mpe kosalaka lokola ebɔngi na yango mpe bongo ejali komilendisa na bolingo.”—Baefese 4:16.
Bankulutu mpe basaleli na misala basengeli kosala makasi mpo na kokólisa boyokani motindo wana, kozala na likanisi moko, kobembana, kosalana elongo, mpe bomoko. Nzokande, boyokani motindo wana eyaka yango moko te. Esengeli kolóna yango mpe kobatela yango.
Oyo bankulutu bakoki kosala
Litambe ya ntina ezali ya koyeba ete boyokani kati na nkulutu mpe mosaleli na misala ezali te lokola boyokani kati na nkolo mpe moombo to lokola kati na nkolo-mosala mpe mosáli. Epai kuna boyokani ya solo ezali, bankulutu bazali kotalela basaleli na misala ete bazali baninga basaleli ya Nzambe. (Kokanisá na 1 Bakolinti 3:6-9.) Baloma 12:10 eyebisi ete: “Mpɔ na lokumu, bokumisanaka.” Na yango bankulutu bakobwaka ezaleli ya kotalela basaleli na misala na lolenge oyo ekomonisa ete bakitisami to bayokisami nsoni. Bakolendisa makanisi nyonso oyo mazali ya malamu, kasi bakolembisa yango te. Kosalela basaleli na misala makambo na limemya nyonso ekosalisa bango na kozala na bizaleli malamu mpe ekosalisa bango na kosepela na mosala na bango kati na lisangá.
Bankulutu basengeli koyeba ete mokumba na bango ya kobatela etongá ya Nzambe oyo etyami na nsé na bango esangisi mpe bandeko oyo bazali basaleli na misala. Ya solo, basaleli na misala basengeli kozala baklisto oyo bakɔmeli. Atako bongo, lokola basangani nyonso ya etongá, bango bazali mpe na mposa ete bátyelaka bango mbala na mbala likebi libongi na moto na moto. Bankulutu basengeli kotalela malamu bokóli na bango ya elimo.
Na ndakisa, ntango ntoma Paulo akutanaki na elenge mobali Timoté, nokinoki atyaki likebi na makoki ya Timoté mpe “alingaki ete akɛnda na ye.” (Misala 16:3) Timoté asalaki lokola moninga ya Paulo mpo na kosala mibembo, mpe abongisamaki malamu mpo na yango. Yango wana, bambula mingi na nsima, Paulo akomelaki baklisto ya Kolinti ete: “Yango wana, najali kotindela bino Timɔtɛ, ye ajali mwana na ngai na bolingo mpe na kondima kati na Nkolo; ye akokanisela bino mpɔ na njela na ngai kati na Klisto Yesu”!—1 Bakɔlinti 4:17.
Bankulutu, bosilá kosalela makoki ya basaleli na misala kati na lisangá na bino? Bozali kosalisa bango ete bákóla na kobongisáká bango mpo na oyo etali koloba liboso na bato mpe kolimbola malamu Biblia? Bosilá kobyanga mibali wana babongi mpo na kobima elongo na bino kati na mosala ya kotala bampate? Bobimaka elongo na bango kati na mosala ya kosakola? Kati na lisese oyo Yesu apesaki ya talanta, nkolo alobaki na basáli na ye ya sembo ete: “Malamu, yɔ moombo malamu mpe na sembo!” (Matai 25:23) Bozalaka na maloba ya kokumisa mpe ya kopesa longonya motindo wana epai na basaleli na misala oyo bazali kokokisa na bopɔlɔ nyonso mikumba mipesameli bango na lolenge ya malamu? (Kokanisá na Masese 3:27.) Soki bosalaka yango te, bakozala na mayoki ete mosala na bango ezali na ntina te, boye te?
Kosolola ezali mpe na ntina mingi mpo na kosala na boyokani. (Kokanisá na Masese 15:22.) Misala misengeli te kopesama mpe kolongolama kozanga kotalela masɛngami to bongo na bongo. Bankulutu basengeli kobondela mingi mpo na koyeba lolenge nini makoki ya ndeko moko makosalelama malamu kati na lisangá. (Kokanisá na Matai 25:15.) Wana mosala moko esengeli kosalema, ndeko asengeli koyeba malamumalamu nini esɛngami na ye. Masese 11:14 (NW) epesi likebisi oyo ete: “Wana litambwisi ya sikisiki lizali te, bato bakokwea.”
Esengeli te kosuka bobele na koloba na ndeko moko ete okotalela mosolo, bazulunalo, to mpe mikanda oyo ezalaki epai na mosaleli na misala mosusu. Na bantango mosusu mosaleli na misala ya sika akokutana na ebele ya makambo mazangi sikisiki to makambo makomami malamu te. Oyo nde likambo ya kolembisa! 1 Bakɔlinti 14:40 eyebisi ete: “Tika ete makambo yango yɔnsɔ masalama na motindo mojali na nsɔni tɛ mpe na mobulu tɛ.” Bankulutu basengeli kokamata bibongiseli mpo na kolakisa bandeko, komesenisa bango na makambo matali lisangá mpe bino moko bópesa ndakisa malamu mpo na oyo etali kolanda bibongiseli yango. Na ndakisa, bankulutu basengeli kotalela mosolo ya lisangá nsima na sanza misato. Kotalela na bopotu ebongiseli wana ekoki kobimisa mikakatano mpe ekoki kolongola limemya oyo basaleli na misala basengeli kozala na yango mpo na malako matali ebongiseli.
Kasi ekozala boni soki ndeko moko akomonisa bopotu mpo na kokokisa mpenza mokumba moko boye? Na esika ya kolongola ye na mokumba na ye, bankulutu basengeli kolobela likambo yango elongo na ye. Mbala mosusu ekoki kozala ete abongisamaki malamu te. Soki ndeko alandi kozala na mikakatano na mokumba na ye, mbala mosusu ekozala malamu ete azwa mokumba mosusu.
Bankulutu bakoki lisusu kopesa nzela na boyokani na komonisáká komikitisa. Bafilipi 2:3 elendisi baklisto ete: “Bosala likambo mɔkɔ mpɔ na njombo tɛ kasi, awa ejali bino na kosɔkɛma, botanga bamosusu ete baleki bino.” Na yango, nkulutu akomeka kosalana elongo soki mosaleli na misala moko oyo apesaka bato bisika ya kofanda asɛngi ye ete afanda na esika boye kati na Ndako ya Bokonzi, na kokanisáká te ete lokola azali nkulutu akotosa te. Ekoki kozala ete mosaleli na misala yango alandi bobele likanisi oyo epesamaki ya kofanda na bisika bikeseni kati na Ndako ya Bokonzi, atako asengeli komikundola ete mobeko ezali te mpo ete bato nyonso básala bongo.a Nkulutu akobwaka ezaleli ya koyangela mosaleli na misala mpambampamba na makambo oyo mapesami na ye.
Basaleli na misala bazali kosala mpo na boyokani
“Basaleli na misala basengeli kozala bato oyo bazali kozwa makambo na lisɛki te,” lolenge ntoma Paulo akomaki yango. (1 Timoté 3:8, NW) Lolenge na bango ya kotalela mikumba na bango na lisɛki te—kasi lokola eteni moko ya mosala na bango ya bulee—ekopɛngola ete matáta mázala. Soki ozali mosaleli na misala, okokisaka mokumba na yo na mɔ́tɔ nyonso? (Baloma 12:7, 8) Ozali komipesa mpo na kozala na makoki mingi na lolenge ya kosalela mikumba na yo? Ozali moto oyo babongi kotyela motema? Omonisaka elimo ya bosepeli wana mokumba epesameli yo? Mosaleli na misala moko na mboka moko ya Afrika azalaki na mikumba misato kati na lisangá. Ezaleli na ye ezalaki nini? Alobi ete: “Ya solo, elimboli bobele kosala mosala mingi ya makasi, mpe mosala ya makasi ekoboma yo te.” Ya solo, baoyo bazali komipesa bango moko bazali kozwa esengo monene.—Misala 20:35.
Okoki mpe kosala mingi mpo na kokólisa boyokani na kosaláká na motema mobimba elongo na bankulutu. Baɛbɛlɛ 13:17 eyebisi ete: “Botosa bango bakokambaka bino mpe bomisɔkisa liboso na bango. Jambi bajali kokɛngɛlaka milimo na bino lokola bato baoyo bakojongisa monɔkɔ na ntina na makambo na bango. Tika ete basala mosala na esɛngɔ, na mawa tɛ mpɔ ete yango ekosungaka bino tɛ.” Ya solo, bankulutu bazangi kokoka, mpe ekoki kozala mpasi te mpo na kozwa bango na mabungá. Nzokande ezaleli ya kotɔngatɔnga ekoki kobota kozanga kotyela motema. Ekoki kosilisa esengo na yo mpe ekoki kozala na bopusi mabe likoló na basusu kati na lisangá. Na yango, ntoma Petelo apesaki toli oyo: “Bobɛlɛ bongo, bino bilɛngɛ, botosa mibange. Bomikangela kosɔkɛma lokola elamba, mɔkɔ asunga mosusu . . . Na bongo bomisɔkisa na lobɔkɔ na Njambe makasi, ete atombola bino na elaka epɔni ye.”—1 Petelo 5:5, 6.
Toli oyo ebongi mpenza soki ozali na mayoki ete bazali kobosana yo mpo na oyo etali kozwa mikumba ya mosala. Mbala mosusu “olingi kosala mosala ya mokɛngɛli,” kasi ozali koponama mpo na yango te. (1 Timoté 3:1) Komisɔkisa ekoki kosalisa yo na kobatela “ezaleli ya kozela.” (Bileli 3:24) Na esika ya kozala na nkanda epai na bankulutu—likambo oyo likoki kobebisa boyokani malamu—tuná bango soki ezali na bisika oyo osengeli kosala milende. Kozanga ntembe, mposa makasi ya kondima mpe kosalela toli ekozala elembeteli ete ozali kokóla na elimo.
Komikitisa mpe komisɔkisa ya moto na Nzambe ekoki kosalisa mosaleli na misala na kobatela bokatikati na ye soki azali na makoki na makambo mosusu ya bomoi, lokola kotánga mingi mpe etɛlɛmɛlo kati na bato. Oyo nde komekama mpo na ye soki ameki kotyola bankulutu to kobenda likebi likoló na makoki na ye! Masese 11:2 ekundweli biso ete “Mayɛlɛ ejali elongo na basɔkɛmi.” Ndeko oyo azali na kosɔkɛma ayebi bandelo na ye. Alingaka kosala na kimya nyonso na nsima ya basusu mpe kosalela makoki na ye mpo na kosunga bankulutu. Komisɔkisa ekoki mpe kosalisa ye na koyeba ete atako ayebi makambo mingi na kotalela mokili, kasi akoki mpe kozanga bwanya mpe bososoli na makambo minene ya elimo—bizaleli oyo bankulutu basengeli kokólisa mingi.—1 Bakolinti 1:26 kino 2:13; Bafilipi 1:9.
Na polele nyonso, bankulutu mpe basaleli na misala bazali kokokisa mokumba moko monene. Bango nyonso bakoki kosala mingi mpo na kotónga lisangá mobimba. Kasi mpo na kosala bongo, basengeli kosala elongo kati na boyokani, “na kosɔkɛma yɔnsɔ mpe na bopɔlɔ, na [motema molai, NW] koyikana mpiko kati na bolingo, komeka na mposa ete bobatela bomɔkɔ na elimo kati na ekanganeli na kimia.”—Baɛfɛsɛ 4:2, 3.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Mosenzeli ya Augústo 15, 1992, lokasa 12.
[Bililingi na lokasa 27]
Bankulutu bakotalelaka te basaleli na misala lokola bato oyo bazali na nsé na bango, kasi lokola baninga basaleli ya Nzambe