Tótambola na Nzambe —na elikya ya bomoi ya seko
“Biso tokotambola na nkombo na [Yehova] Nzambe na biso, libela na libela.”—MIKA 4:5.
1. Mpo na nini Yehova akoki kobéngama “Mokonzi ya seko”?
YEHOVA NZAMBE azali na ebandeli te. Abéngami “Mokóló na mikolo,” ebéngeli oyo ebongi mpenza mpamba te azali na bomoi seko na seko. (Danyele 7:9, 13, NW) Yehova akozala libela na libela. Bobele ye nde azali “Mokonzi na seko.” (Emoniseli 10:6; 15:3) Mpe ye amonaka mbula nkóto “lokola mokolo na lobi wana esili yango koleka mpe lokola kokɛngɛla moko na butu.”—Nzembo 90:4.
2. (a) Mokano ya Nzambe mpo na bato ya botosi ezali nini? (b) Tosengeli kotonga bilikya mpe mikano na biso likoló na nini?
2 Lokola Mopesi na bomoi akoumela seko, alakaki babalani ya liboso, Adama na Eva, bomoi ezangi nsuka na kati ya Paladiso. Kasi, lokola Adama azangaki botosi, abungisaki likoki ya kozala na bomoi ya seko, na nsima atikelaki bakitani na ye lisumu mpe liwa. (Baloma 5:12) Atako bongo, botomboki ya Adama ebongolaki mokano oyo Nzambe azalaki na yango na ebandeli te. Mokano ya Yehova ezali ete bato ya botosi bakozwa bomoi ya seko, mpe nsukansuka, akokokisa mokano na ye. (Yisaya 55:11) Na yango, ebongi mpenza ete bilikya mpe mikano na biso etongama na likanisi ya kosalela Yehova seko na seko. Atako tosengeli kobosana “mokolo ya Yehova” na makanisi na biso te, ezali mpe na ntina mingi tóbosana te ete mokano na biso ezali ya kotambola na Nzambe libela na libela.—2 Petelo 3:12, NW.
Yehova akokisaka misala na ye na elaka na ye
3. Ndenge nini toyebi ete Yehova azali na “elaka” mpo na kokokisa mikano na ye?
3 Lokola tozali kotambola na Nzambe, tozali kotya likebi mingi na kokokisa mokano na ye. Toyebi ete Yehova azali Motosi Monene ya ntango, mpe tondimi ete azangaka kokokisa mikano na ye te na elaka na ye. Na ndakisa, ‘awa esilaki elaka kokoka solo, Nzambe atindaki Mwana na ye.’ (Bagalatia 4:4) Bayebisaki ntoma Yoane ete makambo nyonso oyo amonaki lokola bilakiseli ya bisakweli bikokokisama na “elaka” na yango. (Emoniseli 1:1-3) Ezali na “elaka na kosambisa bakufi.” (Emoniseli 11:18) Eleki mbula 1 900, ntoma Paulo apemamaki mpo na koloba ete Nzambe “asili kopona mokolo wana ekosambisa ye mikili nyonso na sembo.”—Misala 17:31.
4. Ndenge nini toyebi ete Yehova azali na mposa ya kosukisa ebongiseli ya biloko mabe oyo?
4 Yehova akosukisa ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo, mpamba te lelo oyo na mokili nkombo na ye ezali kotyolama. Bato mabe bakómi mingi. (Nzembo 92:7) Na maloba mpe na misala na bango, bazali kofinga Nzambe, mpe Nzambe azali koyoka motema mpasi ntango azali komona basaleli na ye bazali kotukama mpe konyokwama. (Zekalia 2:8) Ezali likambo ya kokamwa te ete Yehova azwi meko ete mosika te ebongiseli mobimba ya Satana esuka! Nzambe aponi ntango ya sikisiki oyo akosala likambo yango, mpe kokokisama ya bisakweli ya Biblia ezali komonisa polele ete tozali sikawa na “elaka na nsuka.” (Danyele 12:4) Etikali moke akosopa mapamboli epai na baoyo nyonso balingaka ye.
5. Ndenge nini Lota na Habakuku bazalaki kotalela makambo oyo mazalaki kosalema zingazinga na bango?
5 Basaleli ya Yehova na ntango ya kala bazalaki na mposa ya komona nsuka ya makambo mabe. Mosembwi Lota “azalaki komitumola mpo na lofundo na bizaleli na bato kati na mobulu.” (2 Petelo 2:7) Lokola makambo oyo ezalaki kosalema zingazinga na ye ezalaki kopesa mpasi na motema, mosakoli Habakuku amilelaki ete: “Ɛ [Yehova], kino ntango nini nakobyanga mpe okoyoka te? Nakongangela yo ete, Mobulu! Nde okobikisa te. Mpo na nini okomonisa ngai mabe mpe okotala mikakatano? Libebi mpe yauli izali liboso na ngai; kowelana mpe kobunana ikobimaka.”—Habakuku 1:2, 3.
6. Yehova alobaki nini mpo na koyanola na libondeli ya Habakuku, mpe yango ekoki koteya biso nini?
6 Yehova ayanolaki Habakuku mwa moke na maloba oyo: “Emonaneli ezali bobele mpo na ntango ebongisami, ekómi noki epai na nsuka, ekozanga te; ata ezali koumela, [zelá] yango; ekoya solo mpenza, ekoumela mingi te.” (Habakuku 2:3) Na ndenge yango, Nzambe amonisaki ete akotya nsuka na “ntango ebongisami.” Ata soki tokoki komona ete ezali koumela, Yehova akokokisa mokano na ye, ekozanga te!—2 Petelo 3:9.
Tósala na molende mpenza
7. Ndenge nini Yesu asalaki mosala na ye atako ayebaki na bosikisiki te ntango oyo mokolo ya Yehova esengelaki koya?
7 Ezali mpenza na ntina tóyeba na bosikisiki ntango oyo Yehova akokokisa makambo liboso tótambola na ye na molende? Te. Tótalela mwa bandakisa. Yesu azalaki kosepela mingi na komona ntango oyo mokano ya Nzambe ekosalema na mabelé lokola ezali kosalema na likoló. Kutu, Klisto ateyaki bayekoli na ye básambelaka ete: “Tata na biso oyo azali na Likoló, Nkombo na yo ezala mosantu, Tiká Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalama na nse [lokola ezali kosalema] na Likoló.” (Matai 6:9, 10) Atako Yesu ayebaki ete Nzambe akoyanola na libondeli na ye, ayebaki ntango ya sikisiki oyo makambo makosalema te. Na kati ya esakweli monene mpo na nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo, Yesu alobaki ete: “Nde mpo na mokolo yango mpe ntango yango, moto ayebi te, ata [baanzelu, NW] na Likoló te, ata Mwana mpenza te, kasi bobele Tata ayebi.” (Matai 24:36) Lokola Yesu Klisto azali na esika monene na kokokisama ya mikano ya Nzambe, akosangana mpenza na koboma banguna ya Tata na ye ya likoló. Nzokande, ntango Yesu azalaki awa na mabelé, ayebaki te ntango oyo Nzambe akosukisa ebongiseli oyo. Likambo yango elɛmbisaki molende na ye na mosala ya Yehova? Te! Ntango bayekoli bamonaki Yesu azali kopɛtola tempelo na mpiko nyonso, bakanisaki ete esili kokomama ete, ‘[Molende, NW] mpo na ndako na yo ekolya ngai.’ (Yoane 2:17; Nzembo 69:9) Yesu amipesaki mobimba na mosala oyo batindaki ye, mpe akokisaki yango na molende mpenza. Mpe lisusu asalelaki Nzambe na elikya ya bomoi ya seko.
8, 9. Ntango bayekoli batunaki motuna na ntina na kozongisama ya Bokonzi, bayebisaki bango nini, mpe basalaki nini na nsima?
8 Ezalaki mpe bongo mpo na bayekoli ya Klisto. Liboso ya komata na likoló, Yesu akutanaki na bango. Lisolo elobi: “Na bongo, esilaki bango koyangana, batuni ye ete, Motei, okozongisela Yisalaele bokonzi na ntango oyo?” Ndenge moko na Nkolo na bango, bango mpe bazalaki na mposa makasi ete Bokonzi eya. Kasi, Yesu ayanolaki ete: “Ezali likambo na bino koyeba ntango soko bilaka bisili Tata kotya na bokonzi na ye moko te, kasi wana ekosila [elimo santu, NW] koya na likoló na bino, bokozwa nguya, mpe bokozala batatoli na ngai kati na Yelusaleme, na Yuda mobimba, na Samalia, mpe kino nsuka na mokili.”—Misala 1:6-8.
9 Likambo moko emonisi te ete bayekoli balɛmbaki nzoto mpo na eyano yango. Kutu, babomaki nzoto na mosala ya kosakola. Nsima ya mwa bapɔsɔ, batondisaki Yelusaleme na mateya na bango. (Misala 5:28) Mpe nsima ya mbula 30, mosala na bango ya kosakola epalanganaki mingi mpenza na boye ete Paulo alobaki ete nsango malamu esakolamaki “epai na bato nyonso na nse na Likoló.” (Bakolose 1:23) Atako Bokonzi ‘ezongisamaki na Yisalaele’ te na ndenge oyo bayekoli balikyaki na libunga nyonso, mpe etyamaki naino te kuna na likoló na ntango oyo bazalaki na bomoi, kasi bakobaki kosalela Yehova na molende nyonso mpe na elikya ya bomoi ya seko.
Tótalela matindiki na biso
10. Lokola toyebi mokolo oyo Nzambe akoboma ebongiseli ya Satana te, yango ezali kopesa biso libaku nini?
10 Basaleli ya Yehova na mikolo na biso mpe bazalaka na mposa ya komona nsuka ya ebongiseli ya biloko mabe oyo. Nzokande, lobanzo na biso ya liboso ezali lobiko na biso te mpo na kokɔta na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. Tolingi naino ete nkombo ya Yehova esantisama mpe bokonzi na ye elongisama. Yango wana, tokoki kosepela ete Nzambe ayebisi biso te ‘mokolo to ngonga’ oyo aponaki mpo na kobebisa ebongiseli ya Satana. Likambo yango ezali kopesa biso likoki ya komonisa ete tozali na ekateli ya kotambola na Nzambe libela na libela mpo ete tolingi ye, kasi te mpo ete tozali na mikano oyo tolingi ete mikokisama nokinoki to mpe mpo ete tozali na mikano ya moimi.
11, 12. Ndenge nini bosembo ya Yobo ebɛtelamaki ntembe, mpe ndenge nini ntembe yango etaleli biso?
11 Ntango tozali kobatela bosembo na biso epai ya Nzambe tozali mpe komonisa ete Zabolo akosaki ntango alobaki ete mosembwi Yobo—mpe bato mosusu lokola ye, basalelaka Nzambe mpo na litomba na bango moko. Ntango Yehova alobaki ete mosaleli na ye Yobo azali moto malamu, azali sembo, abangaka Nzambe, Satana alobaki na motema mabe nyonso ete: “Yobo akotosaka Nzambe bobele mpamba? Yo otiki lopango kozingela ye te mpo na ndako na ye mpe na biloko na ye nyonso epai na epai? Opamboli mosala na mabɔkɔ na ye mpe bibwele na ye isili kofuluka mingi kati na mokili. Nde tiká ete osembola lobɔkɔ na yo [sikoyo] mpe [osimba] nyonso izali na ye mpe akolakela yo mabe na miso na yo.” (Yobo 1:8-11) Lokola abatelaki bosembo na ye na ntango ya mpasi, Yobo amonisaki ete maloba yango ezali lokuta.
12 Soki biso mpe tobateli bosembo ndenge yango, tokoki kokweisa efundeli nyonso ya Satana ete tozali kosalela Nzambe bobele mpo toyebi ete mosika te tokozwa mbano. Lokola toyebi ntango ya sikisiki oyo Nzambe akopesa bato mabe bitumbu te, ezali kopesa biso libaku ya komonisa ete tolingaka mpenza Yehova mpe tolingi kotambola na banzela na ye libela na libela. Ezali komonisa ete tozali sembo epai ya Nzambe mpe totii motema na ndenge oyo ye asalaka makambo. Lisusu, lokola toyebi mokolo mpe ntango te, ezali kosalisa biso na kosɛnzɛla mpe kolala mpɔngi te na elimo mpamba te toyebi ete nsuka ekoki koya ata na ntango nini, lokola moyibi na kati ya butu. (Matai 24:42-44) Ntango tozali kotambola na Yehova mokolo na mokolo, tozali kosepelisa motema na ye mpe tozali kozongisa eyano epai na Zabolo, oyo azali kopamela ye.—Masese 27:11.
Omityela mikano ya seko!
13. Biblia emonisi nini na ntina na komilɛngɛla mpo na mikolo mizali koya?
13 Baoyo bazali kotambola na Nzambe bayebi ete komityela mikano ya bokatikati mpo na mikolo mizali koya ezali likambo ya mayele. Lokola bayebi mikakatano mpe bandelo oyo eyaka ntango moto akómi mobange, bato mingi balukaka kosalela malamu bolenge na bango mpe makasi na bango mpo ete bázala na mikakatano ya mbongo te na nsima. Kasi, tokoloba boni mpo na oyo eleki ntina, elingi koloba elimo na biso na mikolo mizali koya? Masese 21:5 elobi: “Makanisi na bato na mosala makozwisa biloko mingi, nde ye oyo akosalaka mbangumbangu akozanga bobele kozanga.” Komilɛngɛla na kozaláká na elikya ya bomoi ya seko ezali mpenza na litomba. Lokola toyebi ntango ya sikisiki te oyo ebongiseli ya biloko oyo ekosuka, ebongi tómibanzabanzaka mpo na bamposa na biso ya mikolo mizali koya. Kasi, tózala na bokatikati mpe tótya matomba ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso. Bato oyo bazangi kondima bakoki koloba ete soki moto azali kotya mokano ya Nzambe liboso ya matomba na ye moko, azali komona mosika te. Kasi, ezali mpenza bongo?
14, 15. (a) Lisese nini Yesu apesaki mpo na oyo etali kolɛngɛla bomoi ya mikolo mizali koya? (b) Mpo na nini mozwi na lisese ya Yesu azalaki komona mosika te?
14 Yesu apesaki lisese moko oyo ezali koteya biso na likambo yango. Alobaki boye: “Bilanga na mozwi moko bibotaki malamu, mpe akanisaki na motema na ye ete, Nasala nini? mpo ete nazali na esika na kotya mbuma na ngai te. Alobaki ete, Nakosala boye, nakoboma bibombelo na ngai, mpe nakotonga mosusu bikoleka monene, mpe nakoyanganisa mbuma na ngai nyonso na biloko na ngai wana, mpe nakoloba na molimo na ngai ete, Molimo, ozali na biloko mingi malamu bibombami mpo na mbula mingi. Pemá, lyá, melá, mpe sepelá. Nde Nzambe alobi na ye ete, Yo zoba! na butu oyo bakoluka bomoi na yo epai na yo. Bongo biloko bisili yo kobongisa bikozala na nani? Moto oyo abombi biloko mpo na ye mpenza nde azali mozwi epai na Nzambe te, azali na motindo boye.”—Luka 12:16-21.
15 Yesu alingaki nde koloba ete mozwi asengeli kosala makasi te mpo na koluka libateli na ye ya mosuni mpo na mikolo mizali koya? Te, mpamba te Makomami mazali kolendisa kosala na molende. (2 Batesaloniki 3:10) Libunga ya mozwi ezalaki ete asalaki eloko moko te mpo na kozala “mozwi epai na Nzambe.” Ata soki akokaki kosepela na biloko na ye ya mosuni na boumeli ya mbula mingi, nsukansuka alingaki kaka kokufa. Azalaki komona mosika te, azalaki kokanisa bomoi ya seko te.
16. Mpo na nini tokoki kotyela Yehova motema mpo na libateli na biso na mikolo mizali koya?
16 Kotambola na Nzambe na elikya ya bomoi ya seko ezali likambo oyo ebongi mpe ye oyo azali kosala yango azali komona mosika. Ezali lolenge oyo eleki malamu ya komilɛngɛla mpo na mikolo mizali koya. Kozala na mikano ya kotánga kelasi, koluka mosala, mpe kosala libota ezali malamu, kasi tosengeli kobosana te ete Yehova asundolaka te basaleli na ye oyo bazali sembo. Mokonzi Davidi ayembaki ete: “Nazalaki elenge mpe nakómi mobange, nde naino namoni moyengebene te oyo atikami, to mwana na ye oyo akolɔmbaka kwanga.” (Nzembo 37:25) Bobele bongo, Yesu andimisaki ete Nzambe akokokisa bamposa ya baoyo bazali koluka liboso Bokonzi mpe bazali kotambola na banzela ya sembo ya Yehova.—Matai 6:33.
17. Ndenge nini toyebi ete nsuka ekómi pene?
17 Atako tozali kosalela Nzambe na elikya ya bomoi ya seko, tozali kobosana mokolo ya Yehova na makanisi na biso te. Kokokisama ya bisakweli ya Biblia ezali komonisa mpenza ete mokolo yango ekómi pene. Na ekeke oyo, tomoni makambo mingi lokola bitumba, maladi, koningana ya mabelé, nzala, mpe monyoko ya baklisto ya solo mpe mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba. Makambo nyonso oyo mazali komonisa ete ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo elingi kosuka. (Matai 24:7-14; Luka 21:11) Mokili etondi na bato oyo bazali “bamikumisi na bango mpenza, baluki na mosolo, bato na lolendo, bato na ngambo, batuki, bato bazangi kokumisa baboti, bato bazangi matɔndi, bato bazangi bulɛɛ, bato bazangi bolingo, bazangi boboto, batɔngi, batomboki, bato na yauli, bayini na malamu, bakosi, bato na nko, bato babimbi na lolendo, baoyo bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe.” (2 Timote 3:1-5) Na mikolo oyo ya nsuka, bomoi na biso basaleli ya Yehova ezali mpasi mingi. Tozali na mposa makasi ya mokolo oyo Bokonzi ya Yehova ekolongola mabe nyonso! Kasi mpo na sikoyo, tózala na ekateli ya kotambola na Nzambe na elikya ya bomoi ya seko.
Tósalela Nzambe na elikya ya bomoi oyo ezangi nsuka
18, 19. Eloko nini emonisi ete basembwi ya ntango ya kala basalelaki Yehova na elikya ya bomoi ya seko?
18 Wana tozali kotambola na Yehova, tókanisaka kondima ya Abele, Enoka, Noa, Abalayama, mpe Sala. Nsima ya kotánga bankombo na bango, Paulo akomaki ete: “Bango nyonso bakufaki kati na kondima, bazangaki kozwa biloko bilakami, kasi bamonaki yango mosika mpe bapesaki yango losako. Bayambolaki ete bazali bapaya na mokili, bato na mokili mosusu.” (Baebele 11:13) Basembwi wana bazalaki “na mposa na mokili moleki malamu, yango kuna na Likoló.” (Baebele 11:16) Na kondima, bazalaki na mposa ya esika oyo eleki malamu na nse ya Bokonzi ya Nzambe oyo Masiya na ye akotambwisa. Tokoki kondima ete Nzambe akopesa bango mbano ya bomoi ya seko na esika ya malamu koleka: na Paladiso awa na mabelé oyo Bokonzi na ye ekoyangela.—Baebele 11:39, 40.
19 Mosakoli Mika amonisaki ekateli ya basaleli ya Yehova ya kosambela Nzambe libela na libela. Akomaki ete: “Mpo ete mabota nyonso bakotambola, moko na moko na nkombo na Nzambe na ye; nde biso tokotambola na nkombo na [Yehova] Nzambe na biso, libela na libela.” (Mika 4:5) Kino liwa na ye, Mika asalelaki Yehova na bosembo. Na ntembe te, ntango akosekwisama na mokili ya sika, mosakoli yango akokoba kotambola na Nzambe libela na libela. Azali mpenza ndakisa malamu mpo na baoyo nyonso bazali na bomoi na mikolo ya nsuka!
20. Tosengeli kozala na ekateli nini?
20 Yehova asepelaka na bolingo oyo tozali komonisa mpo na nkombo na ye. (Baebele 6:10) Ayebi ete ezali na biso pɛtɛɛ te kobatela bosembo epai na ye na kati ya mokili oyo Zabolo azali koyangela. Atako “mokili ezali kolongwa,” kasi, “ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko.” (1 Yoane 2:17; 5:19) Yango wana, na lisalisi ya Yehova, tózala na ekateli ya koyika mpiko liboso ya minyoko oyo tozali kokutana na yango mokolo na mokolo. Tiká ete tótya makanisi mpe tóyokanisa bomoi na biso na mapamboli oyo Tata na biso ya likoló alaki. Tokozwa yango soki tokokoba kotambola na Nzambe na elikya ya bomoi ya seko.—Yuda 20, 21.
Okoyanola ndenge nini?
◻ Nzambe azali na mokano nini mpo na bato ya botosi?
◻ Mpo na nini Yehova abomi naino te mokili oyo ezangi kobanga Nzambe?
◻ Mpo na nini kozanga koyeba mokolo ya sikisiki oyo Yehova akopesa bitumbu na ye esengeli kokitisa molende na biso te?
◻ Tángá mwa matomba ya kotambola na Nzambe na elikya ya bomoi ya seko.
[Elilingi na lokasa 17]
Kotambola na Nzambe esɛngi kosalela ye na molende lokola bayekoli ya Klisto na ekeke ya liboso