Mokanda ya Biblia nimero 1—Genese
Mokomi: Mose
Esika ya bokomi: Mokili mokauki
Nsuka ya bokomi: 1513 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: “Na ebandeli” kino 1657 L.T.B.
1. Tángá bamoko ya mitó na makambo ya ntina elobelami kati na Genese.
KANISÁ ete okamati mokanda moko oyo ezali bobele na mikapo 50 ya mikuse mpe na nkasa na yango ya liboso omoni ete yango nde ezali lisoló bobele moko ya sikisiki oyo ezali kolobela ebandeli mpenza ya lisoló ya bato mpe lisoló oyo emonisi boyokani oyo moto azali na yango elongo na Nzambe, Mozalisi na ye, mpe boyokani oyo moto azali na yango na mabelé oyo matondi na ebele ya bikelamu! Kati na nkasa yango, ososoli mpe na mozindo mokano oyo mpo na yango Nzambe atyaki moto awa na mabelé. Wana otángi lisusu mwa mosika, omoni mpo na nini moto akufaka mpe mpo na nini bato bazali lelo kati na ezalela ya mpasi, mpe ososoli moboko ya solosolo ya kozala na kondima mpe ya kozala na elikya, mpe ya koyeba esaleli oyo Nzambe akosalela mpo na kobikisa bato—Mombóto oyo alakamaki. Mokanda ya kokamwisa oyo ezali na makambo yango nyonso ezali bongo Genese, mokanda ya liboso kati na mikanda 66 ya Biblia.
2. Liloba Genese elimboli nini, ezali eteni ya liboso ya eloko nini?
2 “Genese” elimboli “Ebandeli; Kobotama,” liloba yango ezwami uta na libongoli ya mokanda yango kati na Biblia ya Greke, libongoli ya Septante. Kati na maniskri ya Liebele, motó na likambo ya mokanda yango ezali bongo liloba na yango ya liboso, Bereʼ·shithʹ, “na ebandeli” (na Greke, en ar·kheiʹ). Genese ezali mokanda ya liboso kati na Pantatɛ́kɛ (liloba liuti na Greke, elimboli “barulo mitano” to “volimi mitano”). Emonani polele ete ebéngamaki liboso Torah (Mibeko) to “búku ya mibeko ya Mose” kasi na nsima ekabolamaki na rulo mitano mpo ete ekoka kosalelama kozanga nkaká.—Yos. 23:6; Ezl. 6:18.
3. (a) Nani azali Mobandisi ya mokanda ya Genese, kasi nani nde akomaki yango? (b) Lolenge nini Mose azwaki makambo oyo akomaki kati na Genese?
3 Yehova Nzambe azali Mobandisi ya Biblia, kasi apemisaki Mose ete akoma mokanda ya Genese. Epai wapi Mose azwaki makambo oyo akomaki na Genese? Azwaki makambo mosusu mbala moko uta na Nzambe mpe mosusu bayebisaki ye yango na monɔkɔ, na kotambwisama na elimo santu, na nzela ya makambo oyo bato bayebisaki ye. Ekoki mpe kozala mpenza ete Mose azalaki na mikanda mikomami oyo bankɔ́kɔ na ye babombaki lokola eloko ya motuya mingi, masoló ya ntina matali ebandeli ya bato.a
4. (a) Epai wapi mpe ntango nini Mose asilisaki kokoma mokanda ya Genese? (b) Lolenge nini Mose akokaki kozwa makambo oyo akomaki na eteni ya nsuka ya Genese?
4 Ekoki mpenza kozala ete Mose akomaki mokanda yango na kopemama na Nzambe kati na mokili mokauki ya Sinai na mobu 1513 L.T.B. (2 Tim. 3:16; Yoa. 5:39, 46, 47) Epai wapi Mose azwaki makambo oyo akomaki na eteni ya nsuka ya Genese? Lokola nkɔ́kɔ na ye Levi azalaki ndeko mobali oyo abotamaki tata moko na Yosefe, bobele bato ya libota na ye nde bakokaki koyeba bosikisiki ya makambo wana. Ekoki kútu kozala ete bomoi ya Levi ekokanaki na makambo mingi na bomoi ya Amalama, tata na Mose. Lisusu, elimo ya Yehova esungaki mpenza mpo ete eteni wana ya Makomami ekomama malamu.—Ex. 6:16, 18, 20; Mit. 26:59.
5. Elembeteli nini ezwami kati na Biblia emonisi ete Mose nde akomaki mokanda yango?
5 Ezali mpasi te mpo na koyeba moto oyo akomaki Genese. Maloba oyo ete “Búku na mibeko na Mose” mpe maloba mosusu ya lolenge oyo na ntina na mikanda mitano ya liboso ya Biblia, oyo Genese ezali kati na yango, ezali komonana mbala mingi kobanda na eleko ya Yosua, mokitani ya Mose, kino nsuka. Ya solo, Mose alobelami mbala 200 kati na mikanda mosusu 27 ya Biblia. Bayuda babɛtaki ntembe soko moke te na ntina na likoki ya Mose ya koyeba kokoma. Makomami ya Greke ya boklisto mazali mbala mingi kolobela Mose lokola mokomi ya “mibeko,” nzokande elembeteli eleki monene ezali bongo oyo Yesu Klisto apesaki. Mose akomaki wana Yehova ayebisaki ye mpenza ete akoma makambo azalaki koyoka mpe na kopemama na Ye.—Ex. 17:14; 34:27; Yos. 8:31; Dan. 9:13; Luka 24:27, 44.
6. Nini emonisi ete likoki ya kokoma ebandaki uta na ebandeli ya lisoló ya bato?
6 Basusu oyo babɛtabɛtaka ntembe basilaki kotuna ete: Kasi lolenge nini Mose mpe baoyo bazalaki liboso na ye bayebaki kokoma? Likoki ya kokoma eyaki bambula mingi na nsima, boye te? Na ntembe te, likoki ya kokoma ebandaki mpenza na ebandeli ya lisoló ya bato, ekoki kozala ete ebandaki liboso na Mpela ya Noa, oyo esalemaki na mobu 2370 L.T.B. Ezali na bilembeteli oyo bimonisi ete moto azwaki likoki ya kokoma uta na ebandeli mpenza? Atako ezali solo ete banganga-mayele ya arkeoloji bapesaki bambula oyo ezalaki na nsé ya mobu 2370 L.T.B. mpo na bitando ya mabanga oyo bakundolaki, kasi badati yango ezali bobele engebene makanisi mazangi bosikisiki. Nzokande, tosengeli koyeba ete Biblia ezali komonisa polele ete kotongama ya bamboka, kosalema ya bibɛtɛli miziki, kosalela bibendé ebandaki liboso mpenza ya Mpela. (Gen. 4:17, 21, 22) Na bongo, tozali na ntina malamu ya koloba ete bato bazalaki na mikakatano mingi mpenza te mpo na kokólisa mwango na bango ya kokoma.
7. Elembeteli nini euti na Biblia te emonisi ete mpela moko esalemaki na mokili mobimba mpe ete milɔngɔ́ misato ya mabota ya bato ezalaki, lokola elobelami kati na lisoló ya Biblia?
7 Na makambo mingi mosusu, Genese emonisi na lolenge ya kokamwa ete ezali na bilembeteli mingi ya makambo oyo masalemaki mpenza. Ezali bobele mokanda ya Genese nde ezali koyebisa lisoló ya makambo masalemaki mpenza na ntango ya Mpela mpe baoyo babikaki na yango, atako masoló na ntina na mpela mpe baoyo babikaki na yango (mingimingi mpo ete babatelamaki kati na masuwa) mazwami kati na masapo ya bikólo mingi. Lisoló ya Genese ezali mpe komonisa ebandeli ya bifandelo ya mabota mingi kobanda na bana misato ya Noa—Semi, Hama, mpe Yefete.b Dr. Melvin G. Kyle, ya Eteyelo ya Teoloji ya Xenia, na etúká ya Missouri, na États-Unis, alobi ete: “Uta na ntéi ya mboka moko na Mésopotamie, bato na libota ya Hama bakendaki na súdi-wɛ́sti, libota ya Yefete bakendaki na nɔ́rdi-ɛ́sti, mpe libota ya Semi bakendaki na ‘epai na ɛ́sti’ pene na ‘mokili na Sinala’; likambo yango ekoki kobɛtɛlama ntembe te.”c
8. Bilembeteli nini mosusu bimonisi bosolo ya Mokanda ya Genese?
8 Bosolo ya Genese lokola eteni moko ya lisoló liuti na Nzambe emonani mpe mpo na boyokani oyo ezali kati na yango, mpe boyokani na yango na biteni mosusu ya Makomami mapemami. Bosembo na yango emonisi ezaleli ya mokomi oyo azalaki kobanga Yehova mpe azalaki kolinga solo mpe oyo, kozanga kokakatana, akomaki masumu ya libota ya Yisalaele mpe ya bato ya lokumu kati na libota yango. Lisusu, bosikisiki na yango ya makasi emonisi kokokisama ya bisakweli na yango, lokola ekomonisama pene na nsuka ya mokapo oyo, ezali komonisa Genese lokola ndakisa monene ya makomi oyo mapemami na Yehova Nzambe.—Gen. 9:20-23; 37:18-35; Gal. 3:8, 16.
MAKAMBO MAZALI KATI NA GENESE
9. (a) Nini eyebisami na mokapo ya liboso ya Genese na ntina na mosala ya bozalisi oyo Nzambe asalaki? (b) Makambo nini lisusu mayebisami na ntina na moto na mokapo ya mibale?
9 Kozalisama ya makoló mpe mabelé, mpe kolɛngɛlama ya mabelé mpo ete ezala efandelo ya moto (1:1–2:25). Kozongáká mpenza nsima kino bamiliare ya bambula, Genese ebandi na maloba oyo ya pɛtɛɛ mpenza: “[Na ebandeli Nzambe azalisaki makoló mpe mabelé, NW].” Na lolenge ya polele, maloba oyo ya ebandeli mazali komonisa ete Nzambe azali Mozalisi mpe biloko bikoki komonana oyo ye azalisaki ezalaki bongo makoló mpe mabelé. Na maloba ya nguya, oyo eponami malamu, mokapo ya liboso ekóbi na koyebisáká lisoló mobimba ya mosala ya bozalisi na ntina na mabelé. Yango esalemaki na boumeli ya bileko nsambo oyo ebéngami mikolo, mokomoko na yango ezali kobanda na mpokwa moko, wana mosala ya bozalisi ya eleko yango eyebani naino sikisiki te, mpe ezali kosuka na pole ya ntɔ́ngɔ́ wana nkembo ya mosala ya bozalisi emonani polele. Na kolandana ya “mikolo” pole ebimi; mopɛpɛ mobimi; mabelé makauki mpe bitwele ebimi; mingɛngɛli mpo na kokabola butu na moi ebimi; mbisi mpe ndɛkɛ ebimi; mpe nyama oyo itambolaka na mabelé ibimi mpe na nsuka moto ayei kobima. Awa, Nzambe amonisi mobeko oyo ezali kotambwisa bikelamu ya lolenge na lolenge, kokabwana wana monene esali ete lolenge moko ya ekelamu ekoka soko moko te kobima uta na ekelamu ya lolenge mosusu. Nsima ya kosala moto na elilingi na ye mei, Nzambe asakoli mokano na ye oyo ezali na biteni misato: atondisa yango na bana ya sembo, atya yango na nsé na ye, mpe azala na bokonzi likoló na nyama. Yehova apamboli “mokolo” ya nsambo mpe atángi yango ete ezali bulɛɛ, sikawa akóbi na ‘kopemáká na mosala nyonso mosalaki ye.’ Na nsima lisoló yango emonisi polele, to na nkembo mpenza, lolenge Nzambe azalisaki moto. Ezali kolobela elanga ya Edene mpe esika yango ezalaki, elobeli mobeko oyo Nzambe apesaki na ntina na nzeté oyo epekisamaki, eyebisi lolenge Adama azali kopesa nkombo na nyama, mpe eyebisi lolenge nini Yehova abalisi babalani ya liboso, na kosaláká mwasi uta na nzoto mpenza ya Adama mpe na komemáká ye epai na Adama.
10. Lolenge nini Genese ezali kolimbola ebandeli ya lisumu mpe liwa, mpe mokano nini ya ntina mingi emonisami awa?
10 Lisumu mpe liwa ekɔti na mokili; “mombóto” oyo alakamaki lokola mobikisi (3:1–5:5). Mwasi alei mbuma epekisami mpe apusi mobali na ye na kotomboka elongo na ye, mpe na yango Edene ebebisami mpo na kozanga botosi. Nokinoki Nzambe amonisi esaleli oyo na nzela na yango mokano na ye mokokokisama: “Mpe Yehova Nzambe alobaki na nyoka [Satana, ekelamu ezangi komonana oyo epusaki bato na kotomboka] ete: ‘. . . Mpe nakotya koyinana kati na yo mpe mwasi, kati na mombóto na yo mpe mombóto na ye. Ye akosasa yo na motó mpe yo okosasa ye na litindi.’” (3:14, 15, NW) Nzambe abengani moto na elanga, moto akei kobikela na mpasi mpe na mosala na mitoki na ye kati na nzube mpe nkamba na nzube. Na nsuka, asengelaki kokufa mpe kozonga lisusu mabelé uta na yango akamatamaki. Bobele bakitani na ye nde bakoki kotya elikya na Mombóto oyo alakamaki.
11. Lolenge nini mbeba ya lisumu ekóbaki kino na libanda ya Edene?
11 Mbeba oyo lisumu ebimisaki ekóbi komonana kino na libándá ya Edene. Kaina, mwana mobali ya liboso, abomi Abele ndeko na ye ya mobali, mosaleli ya sembo ya Nzambe. Yehova abengani Kaina kino mboka na Kokima, epai kuna aboti bana oyo na nsima bayaki kobomama na ntango ya Mpela. Sikawa Adama aboti mwana mosusu, Sete, ye oyo abotaki Enosa; na ntango oyo bato babandi kobelela nkombo ya Yehova na bokosi. Adama akufi wana akokisi mibu 930 ya bomoi.
12. Lolenge nini mabelé mabebisamaki na mikolo ya Noa?
12 Bato mabe mpe baanzelu babebisi mabelé: Nzambe ayeisi Mpela (5:6–11:9). Molɔngɔ́ ya libota ya Sete epesami awa. Moto oyo ayebani mingi kati na libota ya Sete ezali bongo Enoka, oyo azali kobulisa nkombo ya Yehova na ‘kotamboláká na Nzambe na solo elongo.’ (5:22) Moto mosusu oyo ayebani mingi mpo na kondima na ye ezali bongo Noa, moko na bakitani ya Enoka, oyo abotamaki mbula 1 056 nsima ya kozalisama ya Adama. Na boumeli ya eleko yango, likambo moko lisalemi oyo likólisi mobulu na mabelé. Baanzelu ya Nzambe basundoli bifandelo na bango na makoló mpo na koya kobala bana basi kitoko ya bato. Kosangana wana oyo epesameli nzela te ebimisi bana bingambé oyo babéngami Banefilime (elimboli “Bakweisi”), oyo bamilukeli lokumu na bango mpenza kasi ya Nzambe te. Yango wana Yehova asakoli epai na Noa ete akoboma moto mpe nyama mpo ete mabe mazali kokóla kati na mokili. Bobele Noa nde andimamaki na Nzambe.
13. Lolenge nini Yehova azali sikawa kobulisa nkombo na ye?
13 Noa aboti Semi, Hama mpe Yefete. Lokola mobulu mpe libebi ezali kokóba na mabelé, Yehova amonisi Noa ete alingi kobulisa nkombo na Ye na nzela ya mpela moko monene, mpe apesi Noa etindá ya kotonga masuwa ya libateli, apesi ye malako ya sikisiki mpo na botongi. Noa atosi nokinoki mpe ayanganisi libota na ye oyo ezali na bato mwambe, elongo na nyama mpe ndɛkɛ; na nsima, na mobu ya 600 ya bomoi na ye (na 2370 L.T.B.), Mpela ebandi. Mbula ekóbi konɔka na boumeli ya mikolo 40, kino ata mpe ngomba milai izipami wana mai makómi na bolai ya mapeko 15 (koleka 6,75m) likoló na ngomba yango. Na nsima ya mbula moko, Noa akoki sikawa kobimisa libota na ye na libanda ya masuwa, likambo ya liboso asali ezali bongo kopesa mbeka monene ya botɔ́ndi epai na Yehova.
14. Etindá nini Yehova apesi sikawa mpe kondimana nini asali, lisusu makambo nini malobelami kati na bomoi ya Noa?
14 Sikawa Yehova apamboli Noa mpe libota na ye mpe apesi bango etindá ete bátondisa mabelé na kobotáká bana. Ekateli ya Yehova epesi nzela ete nyama ekoka kolyama kasi asɛngi na bango ete báboya makila, oyo ezali bongo molimo, to bomoi ya mosuni, mpe ayebisi ete moto oyo abomi moninga na ye moto asengeli mpe kobomama. Boyokani oyo Nzambe asali, ete akoyeisa lisusu mpela soko moke te likoló na mokili, emonani polele na kobima ya monama na makoló. Na nsima, Hama amonisi kozanga botosi epai na Noa, mosakoli ya Yehova. Na ntango Noa ayoki yango, alakeli Kana mwana ya Hama mabe kasi apamboli Semi, komonisáká ete akolingama mingi, ete Yefete mpe akopambolama. Noa akufi wana akokisi mibu 950.
15. Lolenge nini bato bameki komisalela nkombo ya lokumu mpo na bango moko, mpe lolenge nini Yehova abulunganisi mokano na bango?
15 Bana misato ya Noa bakokisi etindá ya Yehova ya koyikana mingi, kobimisáká bongo mabota 70, bankɔ́kɔ ya bato ya lelo. Nimilodi, mwana ya mwana ya Hama atángami te kati na mabota wana, na ntembe te, ezali mpo ete akómaki “mobomi monene na nyama na kotɛmɛla Yehova.” (10:9, NW) Atɛlɛmisi bokonzi moko mpe abandi kotonga bingumba. Na ntango oyo bobele lokótá moko ezali kolobama na mabelé mobimba. Na esika ete bápalangana na mabelé mobimba mpo na kotondisa yango mpe kolóna likoló na yango, bato babandaki kotonga engumba moko mpe linɔ́ngi moko oyo nsɔngɛ na yango esengeli kokóma na likoló mpo ete bákoka komizwela lokumu mpo na bango mpenza. Nzokande, Yehova atɛmɛlaki mokano na bango na kobulunganisáká lokótá na bango, mpe na yango apalanganisaki bango. Engumba yango ebéngami Babele (oyo elimboli “Mobulungano”).
16. (a) Mpo na nini boyekoli ya kolandana ya molɔngɔ́ ya libota ya Semi ezali na ntina mingi? (b) Lolenge nini Abalama akómaki kobéngama “moninga na Nzambe,” mpe azwi mapamboli nini?
16 Boyokani ya Nzambe elongo na Abalayama (11:10–25:26). Molɔngɔ́ molai ya bakitani ya Semi kino na Abalama mwana na Tela emonani polele, komonisáká bongo mpe bokangami ya milɔngɔ́ ya mabota. Na esika ete aluka komisalela nkombo ya lokumu mpo na ye moko, Abalama amonisi kondima epai na Nzambe. Na ntango akómi na mibu 75 ya kobotama, Nzambe apesi ye etindá ya kotika engumba Ulu ya Kaladi, mpe akei na mokili ya Kanana, akatisi Ebale Pelata, kobéngáká nkombo ya Yehova. Mpo na kondima na ye mpe botosi na ye, akómi kobéngama “moninga [molingi] na Nzambe,” mpe Nzambe asali kondimana elongo na ye. (Yak. 2:23; 2 Nta. 20:7; Yis. 41:8) Nzambe abateli Abalama mpe mwasi na ye na boumeli ya mwa ntango oyo balekisi na Ezipito. Na ntango azongaki na Kanana, Abalama amonisi elimo na ye ya bokabi mpe ya motema kimya na kotikáká nzela na Lota, oyo azalaki bongo mwana ya ndeko na ye mpe moninga na ye ya losambo, ete apona eteni malamu ya mabelé. Na nsima, abikisi Lota na mabɔkɔ ya mikonzi minei oyo bakangaki ye. Na nsima ya kouta na etumba, Abalama akutani na Melikisedeke, mokonzi ya Saleme, ye azali nganga ya Nzambe, mpe mpo na yango apamboli Abalama, mpe epai na ye nde Abalama afuti ndambo na zomi.
17. Lolenge nini Nzambe ayeisaki kondimana na ye monene, mpe nini emonisami na ntina na mombóto ya Abalama?
17 Na nsima Nzambe abimeli Abalama, asakoli ete Ye azali nguba mpo na Abalama mpe akólisi elaka ya kondimana na komonisáká ete motángo ya mombóto ya Abalama ekokóma lokola minzoto na likoló. Eyebisamaki epai na Abalama ete mombóto na ye akozwa mpasi na boumeli ya mibu 400 kasi Nzambe akobikisa yango, na kokatáká etumbu likoló na libota oyo ekoyokisa yango mpasi. Na ntango Abalama akokisi mibu 85, kino sikawa Salai mwasi na ye azali naino ekomba, apesi ye Moezipito mosaleli na ye Agala ete abota mwana na nzela na ye. Yisamaele abotami mpe atalelami lokola ete ye akozala mosangoli ya libula. Nzokande, mokano ya Yehova ezalaki lolenge mosusu. Na ntango Abalama akokisi mibu 99, Yehova abongoli nkombo na ye mpe akómisi yango Abalayama, abongoli nkombo ya Salai mpe akómisi yango Sala, mpe alaki ete Sala akobota mwana. Kondimana ya kokatama ngɛnga epesami na Abalayama, mpe nokinoki akatisi bato ya ndako na ye ngenga.
18. Makambo nini oyo masengeli kobenda likebi na biso masalemaki kati na bomoi ya Lota?
18 Sikawa Nzambe asakoli epai na moninga na Ye Abalayama ekateli na Ye ya koboma Sodomo mpe Gomola mpo ete masumu na bango maleki mingi. Baanzelu ya Yehova bakebisi Lota mpe basungi ye mpo ete akoka kokima Sodomo elongo na mwasi na ye mpe bana na ye mibale ya basi. Nzokande, mwasi na ye, amonisi bopɔtu na kotaláká biloko oyo bitikali na nsima, akómi libanga ya mungwa. Mpo ete bákoka kobota, bana basi ya Lota balangwisi tata na bango vinyo, mpe basangisi na ye nzoto, baboti bana mibale, oyo bakómi batata ya mabota ya Moaba mpe ya Amona.
19. Komekama nini Abalayama akutani na yango mpe alóngaki yango na ntina na Mombóto, mpe Yehova amonisi lisusu nini mpo na kokokisama ya elaka na Ye?
19 Nzambe abateli Sala ete abebisama te na Abimeleke Mofilisitia. Yisaka, mosangoli ya libula oyo alakamaki abotami na ntango Abalayama akokisi mibu 100 mpe Sala akokisi mibu soko 90. Nsima ya mbula mitano, Yisamaele, mwana ya mibu 19, atyoli Yisaka, mosangoli ya libula, mpo na yango Agala mpe Yisamaele babenganami, mpe Nzambe andimi likambo yango. Mwa bambula na nsima, Nzambe ameki Abalayama na kotindáká ye ete apesa mwana na ye Yisaka lokola mbeka likoló na moko na bangomba ya Moliya. Kondima monene ya Abalayama epai na Yehova ebulunganisami te. Alingi kopesa mwana mpe mosangoli ya libula na ye lokola mbeka kasi Yehova apekisi ye mpe apesi ye mpate mobali ete atumbela ye mbeka na esika ya mwana yango. Yehova andimisi lisusu elaka na Ye epai na Abalayama, kolobáká ete akoyikanisa mombóto ya Abalayama lokola minzoto ya likoló mpe lokola mbuma ya zɛlo oyo ezalaka na libóngo ya mai na monana. Amonisi ete mombóto na ye ekokamata bikuke ya banguna na ye mpe ete mabota nyonso ya mabelé makopambolama na nzela ya Mombóto yango.
20. Bokɛngi nini Abalayama amonisi na kolukáká mwasi mpo na Yisaka mpe lolenge nini ye akómaki mosangoli bobele moko ya libula?
20 Sala akufi wana akokisi mibu 127 mpe akundami kati na elanga oyo Abalayama asombaki epai na bana ya Heta. Sikawa Abalayama atindi kapita ya basaleli ya ndako na ye ete akende kozwela Yisaka mwasi na mboka ya bandeko na ye. Yehova akambi mosaleli wana kino na libota ya Betuele mwana na Nahola, mpe bibongiseli bikamatami mpo ete Lebeka azonga elongo na ye. Lebeka andimi kokende, mpe libota na ye lipamboli ye, mpe akómi mwasi ya Yisaka. Abalayama ye moko akamati mwasi mosusu, Ketula, oyo aboteli ye bana motoba. Kasi, apesi bango makabo mpe atindi bango epai mosusu mpe akómisi bongo Yisaka lokola mobulami na ye bobele moko. Na nsima, Abalayama akufaki wana akokisaki mibu 175.
21. Lolenge nini Yisaka mpe Lebeka bayaki kobota bana mapasa?
21 Lokola Yehova asakolaki yango, ndeko mobali ya Yisaka, Yisamaele, akómi motó ya libota moko monene, oyo esalemi likoló na bankumu 12, bana ya Yisamaele. Na boumeli ya mbula 20 Lebeka azali bobele ekomba, kasi Yisaka alandi ntango nyonso kolɔmba Yehova, mpe mwasi na ye aboti bana mapasa, Esau na Yakobo, oyo na ntina na bango Yehova ayebisaki ye ete nkulutu akosalela lɛki. Sikawa Yisaka akokisi mibu 60.
22. Lolenge nini Esau mpe Yakobo batalelaki kondimana ya Abalayama, mpe yango ebimisaki matomba nini?
22 Yakobo mpe bana na ye 12 (25:27–37:1). Esau akómi mobomi monene ya nyama. Kozangáká limemya mpo na kondimana ya Abalayama, mokolo mosusu, wana euti ye na bokila, atekisi lotómo na ye ya bonkulutu bobele mpo na supu ya ndunda. Abali mpe basi mibale Bahiti (mpe na nsima abali mwasi mosusu Moyisamaele), oyo bapesi baboti na ye mpasi monene. Na lisungi ya mama na ye, Yakobo amilatisi lokola Esau mpo ete akoka kozwa lipamboli oyo ebongisamaki mpo na mwana ya liboso. Esau ayebisaki Yisaka te ete asilaki kotekisa lotómo na ye ya bonkulutu, kasi sikawa azali kokana mwango mpo na koboma Yakobo nsima ya koyoka likambo oyo Yakobo asali, na yango Lebeka apesaki Yakobo toli ete akima na Halana epai na Labana, ndeko na ye ya mobali. Liboso ete Yakobo akima, Yisaka apamboli ye lisusu mpe ayebisi ye ete akamata mwasi mopakano te, kasi moko kati na libota ya mama na ye. Wana ezali ye kokende na Halana, amoni Yehova na ndɔ́tɔ na ntango akómi na Betele, Yehova alendisi ye mpe andimisi ye ete kondimana oyo esalemaki na ntina na ye ezali mpenza solo.
23. (a) Lolenge nini Yakobo ayaki kobota bana 12? (b) Lolenge nini Lubene abebisi lotómo na ye ya bonkulutu?
23 Na ntango akómi na Halana, Yakobo asaleli Labana, abali bana na ye mibale, Lea na Laele. Atako akómi mobali ya basi mibale mpo na mayele mabe ya Labana, Nzambe apamboli libala yango na kopesáká Yakobo bana mibali 12 mpe mwana moko ya mwasi na nzela ya basi na ye mpe na nzela ya basaleli na bango mibale, Zilipa mpe Biliha. Nzambe asali na boye ete bitongá ya Yakobo bikóla mingi mpe na nsima ayebisi ye ete azonga na mokili ya bankɔ́kɔ na ye. Labana alandi ye, kasi basali boyokani na esika ebéngami Galede mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (na Liebele, ham·Mits·pahʹ ). Na kokóbáká mobembo na ye, baanzelu balendisi Yakobo mpe abundi na anzelu moko na butu, mpe na nsima anzelu wana apamboli ye mpe abongoli nkombo ya Yakobo ekómi Yisalaele. Yakobo abongisi na kimya nyonso bokutani elongo na Esau mpe akóbi mobembo na ye kino Sikeme. Awa, mwana mobali ya mokonzi ya Bahiti abebisi Dina, mwana mwasi ya Yakobo. Bandeko na ye ya mibali Simeona mpe Levi bazongisi mabe na mabe na kobomáká mibali ya Sikeme. Yango esepelisi Yakobo te, mpamba te ebebisi lokumu na ye kati na mboka wana, ye momonisi ya Yehova. Nzambe ayebisi ye ete akende na Betele mpo na kosala etumbelo kuna. Na mobembo na bango mpo na kokende na Betele, Laele akufi wana azali kobotela Yakobo mwana ya 12, Benyamina. Lubene asangisi nzoto na makasi na Biliha, mosaleli ya Laele mpe mama ya bana mibale kati na bana ya Yakobo, mpe mpo na yango abebisi lotómo na ye ya bonkulutu. Mwa moke na nsima Yisaka akufi wana asili kokokisa mibu 180, bongo Esau mpe Yakobo bakundi ye.
24. Mpo na nini Esau mpe libota na ye bakendaki na etúká ya Seili epai na ngomba mingi?
24 Esau mpe bato na ye bakei na etúká ya Seili epai na ngomba mingi, bozwi ya Esau mpe ya Yakobo ekómi mingi na boye ete bakoki kofanda lisusu esika moko te. Molɔngɔ́ ya bana ya Esau, ya basheiki mpe ya mikonzi etángami. Yakobo akóbi kofanda na Kanana.
25. Makambo nini masalemaki oyo ememi Yosefe ete akóma moombo na Ezipito?
25 Bakei na Ezipito mpo na kobatela bomoi (37:2–50:26). Lokola Yehova alingi Yosefe mingi mpe mpo na bandɔ́tɔ azali kolɔ́tisa ye, bankulutu na ye ya mibali bakómi koyina Yosefe. Bayangi mwango mabe mpo na koboma ye, kasi na esika ya kosala bongo batekisi ye epai na bato ya mombongo, Bayisamaele, oyo bazali koleka na nzela wana. Bazindisi elamba ya nzelanzela ya Yosefe kati na makila ya ntaba, balakisi yango epai na Yakobo lokola elembeteli ete elenge mobali ya mibu 17 asili kobomama na nyama ya zámba. Yosefe amemami na Ezipito mpe atekisami epai na Potifala, kapita ya bakɛngɛli ya Falo.
26. Mpo na nini lisoló ya kobotama ya Pɛlɛsɛ ezali na ntina mingi?
26 Mokapo 38 ebimi naino mwa moke na nzela mpo na koyebisa lisoló ya kobotama ya Pɛlɛsɛ, mwana ya Tamala, oyo asaleli komibomba mpo na kopusa Yuda bokilo na ye ete akokisa mokumba ya mobali oyo mbɛlɛ mobali na ye, mwana ya Yuda, asɛngelaki kokokisa yango. Lisoló yango emonisi lisusu lolenge oyo, na bokɛngi monene mpenza, Makomami mazali kolobela likambo mokomoko oyo ezali na boyokani na kobima ya Mombóto oyo elakamaki. Pɛlɛsɛ mwana ya Yuda akómi moko na bankɔ́kɔ ya Yesu.—Luka 3:23, 33.
27. Lolenge nini Yosefe akómi ministre-mokonzi ya Ezipito?
27 Na ntango yango, Yehova apamboli Yosefe na Ezipito, mpe Yosefe akómi moto monene kati na ndako ya Potifala. Nzokande, akutani na mokakatano mosusu mpo ete aboyi kosala pite na mwasi ya Potifala noki akobwaka nsɔ́ni likoló na nkombo ya Yehova, mpo na yango afundami na efundeli ya lokuta mpe abwakami na bolɔ́kɔ. Kuna, Yehova asaleli ye mpo ete akoka kolimbola ndɔ́tɔ ya bakangami mibale oyo bazali elongo na ye na bolɔ́kɔ, moko mopesi vinyo mpe mosusu mosáli mampa kati na ndako ya Falo. Na nsima, ntango Falo alɔ́ti ndɔ́tɔ oyo ebangisi ye mingi, mpe bayebisi ye na ntina na makoki ya Yosefe ya kolimbola ndɔ́tɔ, na yango babimisi ye na bolɔ́kɔ mpe bamemi ye nokinoki epai na Falo. Komonisáká ete mayele na ye mauti na Nzambe, Yosefe alimboli ndɔ́tɔ yango ete ezalaki kosakola mbula nsambo ya biloko mingi, oyo ekolandama na mbula nsambo ya nzala. Falo andimi ete “[elimo ya Nzambe, NW]” ezali likoló na Yosefe mpe aponi ye lokola ministre-mokonzi mpo ete aluka likambo ya kosala liboso na mokakatano wana. (Gen. 41:38) Sikawa akómi na mibu 30, Yosefe akambi misala na mayele nyonso na kobombáká biloko ya kolya na boumeli ya mbula nsambo oyo ezalaki na biloko mingi. Na bongo, na boumeli ya eleko ya nzala na mokili mobimba oyo eyei kobima na nsima, atekisi mbuma epai na bato ya Ezipito mpe bato ya mabota mosusu oyo bayei na Ezipito mpo na koluka bilei.
28. Makambo nini mapusaki libota ya Yakobo ete bákende na Ezipito?
28 Emonani ete, Yakobo atindi bana na ye zomi ya mibali ya mikóló bákende na Ezipito mpo na koluka bilei. Yosefe abosani bango te, kasi bango babosani ye. Akangi Simeona lokola ndanga, asɛngi bango ete bámemela ye lɛki na bango ya mobali ya nsuka na ntango bakoya lisusu kosomba bilei. Na ntango bana libwa bazongi elongo na Benyamina, Yosefe amimonisi epai na bango, alimbisi bandeko na ye zomi oyo batekisaki ye, mpe atindi bango ete bákende kokamata Yakobo mpe báya bango nyonso na Ezipito mpo na bolamu na bango na boumeli ya eleko ya nzala. Yakobo elongo na bakitani na ye 66 basali bobele bongo, bayei na Ezipito. Falo apesi bango eteni eleki kitoko kati na mboka, mokili ya Gosene, epai kuna bafandi.
29. Bisakweli nini Yakobo apesi wana akómi pene na liwa?
29 Lokola Yakobo akómi pene na kokufa, apamboli Efelaima na Manase, bana mibali ya Yosefe, mpe na nsima ayanganisi bana na ye moko ya mibali 12 mpo na koyebisa bango nini ekokómela bango “na mikolo mikoya.” (49:1) Sikawa ayebisi na mozindo kolandana ya bisakweli, nyonso eyaki kokokisama na lolenge ya kokamwa.d Awa, asakoli ete lingenda ya bokonzi ekotikala na libota ya Yuda kino Shilo akoya (elimboli “Ye oyo ezali mpo na ye; Ye nde nkolo na yango”), Mombóto oyo elakamaki. Na yango, nsima ya kopambola mitó ya mabota 12 mpe nsima ya kopesa mitindá na ntina na bokundami na ye kati na Mokili ya Ndaka, Yakobo akufi wana akokisi mibu 147. Yosefe akóbi kobatela bandeko na ye mpe mabota na bango kino ye moko mpe ayei kokufa wana akómi na mibu 110, na ntango yango amonisi kondima na ye ete Nzambe akozongisa Bayisalaele na mokili na bango mpe asɛngi ete mikuwa na ye mimemama na Mokili ya Ndaka.
LITOMBA NA YANGO
30. (a) Moboko nini Genese epesi biso mpo na kososola mikanda mosusu ya Biblia? (b) Mokanda ya Genese ezali kolobela mokano nini ya solosolo?
30 Lokola ezali ebandeli ya Liloba ya Nzambe lipemami, Genese ezali na litomba monene mpenza na koyebisáká ebandeli ya mikano ya nkembo ya Yehova Nzambe. Ezali mpenza moboko malamu mpo na kososola mikanda mosusu ya Biblia! Na mozindo mpenza, ezali kolobela ebandeli mpe nsuka ya mokili ya sembo oyo ezalaki kati na Edene, bokóli ya mokili ya liboso ya bato oyo batyolaki Nzambe mpe kobomama ya mokili yango, mpe kobima ya mokili oyo mabe. Emonisi polele motó na likambo ya Biblia na mobimba na yango, ete: kolóngisama ya Yehova na nzela ya Bokonzi na ye oyo ekoyangelama na “mombóto” molakami. Ezali komonisa mpo na nini moto akufaka. Kobanda na Genese 3:15 kino nsuka—mingi na lisoló oyo ezali kolobela boyokani oyo Nzambe azalaki na yango elongo na Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo—ezali komonisa elikya ya kozala na bomoi kati na mokili ya sika na nsé ya Bokonzi ya Mombóto. Ezali na litomba mpamba te ezali komonisa mokano oyo ebongi mpo na bato nyonso—ete bázala basembwi mpe babulisi ya nkombo ya Yehova.—Lom. 5:12, 18; Ebe. 11:3-22, 39, 40; 12:1; Mat. 22:31, 32.
31. Na kotalela etánda oyo ezwami na nsuka ya mokapo oyo, monisá ete Genese ezali (a) na bisakweli ya ntina mingi mpe (b) na mitindá ya motuya.
31 Makomami ya Greke ya boklisto mazongeli makambo mpe bato nyonso ya ntina mingi oyo balobelami kati na mokanda ya Genese. Lisusu, lokola emonisami kati na Makomami, bisakweli bikomami kati na Genese bizali kokokana na bosikisiki mpenza. Moko na yango, “mbula nkámá minei” ya mpasi ya mombóto ya Abalayama, ebandaki na ntango Yisamaele atyolaki Yisaka na 1913 L.T.B. mpe esukaki na kosikolama na Ezipito na 1513 L.T.B.e (Gen. 15:13) Bandakisa ya bisakweli mosusu ya ntina mingi mpe kokokisama na yango emonisami kati na etánda oyo ezali na nsuka. Mitindá miuti na Nzambe oyo milobelami mpo na mbala ya liboso kati na Genese mizali mpe na litomba monene mpo na kokólisa kondima mpe bososoli. Basakoli ya ntango ya kala, mpe Yesu, mpe bayekoli na ye, bazalaki mbala mingi kozongela mpe kosalela biteni ya mokanda ya Genese. Ekozala malamu ete tólanda ndakisa na bango, mpe boyekoli ya etánda oyo ezali na nsuka ekosunga biso.
32. Likambo nini ya ntina mingi mokanda ya Genese ezali koyebisa na ntina na libala, na ntina na kolandana ya molɔngɔ́ ya mabota, mpe na ntina na lolenge ya kotánga ntango?
32 Genese ezali komonisa polele mokano ya Nzambe na ntina na libala, boyokani malamu kati na mwasi na mobali, malako ya bokonzi mpe ya kolakisama kati na libota. Yesu mpe azalaki kosalela makambo mazwami kati na mokanda yango, kozongeláká bongo mokapo ya liboso mpe ya mibale ya Genese kati na liloba oyo moko: “Botángi te ete ye oyo asalaki bango longwa na ebandeli, asalaki bango mobali mpe mwasi? Alobi mpe ete, Mpo na ntina oyo, moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye mpe bango mibale bakozala nzoto moko.” (Mat. 19:4, 5; Gen. 1:27; 2:24) Lisoló ya Genese ezali na ntina mingi mpamba te ezali koyebisa kolandana ya milɔngɔ́ ya libota ya bato mpe ezali kopesa nzela mpo na koyeba uta ntango nini moto atyamaki awa na mabelé.—Gen., Mik. 5, 7, 10, 11.
33. Tángá mwa malako mpe bizaleli oyo bizalaki kosalelama na eleko ya batata ya mabota oyo ezali mpenza kosalisa biso ete tósosola Biblia.
33 Mpo na moto oyo ayekolaka Makomami, litomba monene akoki kozwa ezali bongo boyekoli ya lolenge ya bomoi ya batata ya mabota oyo mokanda ya Genese ezali kopesa ye nzela ya kosala yango. Lolenge ya bomoi ya batata ya mabota ekambamaki engebene lisangani etambwisami na boyangeli ya libota oyo ezalaki kosala kati na bato ya Nzambe uta na eleko ya Noa kino na ntango oyo Mibeko mipesamaki na Ngomba Sinai. Makambo mingi ya mozindo oyo makɔtisami kati na kondimana ya Mibeko mazalaki kosalema liboso na eleko ya batata ya mabota. Lokumu oyo etángami likoló na etuluku mobimba ya bato (18:32), ekweli oyo etángami likoló na etuluku mobimba ya bato (19:15), etumbu ya liwa mpe ezalela ya bulɛɛ ya makila (9:4-6) mpe lolenge nini Nzambe ayinaki likambo ya kokumisa bato (11:4-8), ezaleli oyo ebebisaki mokili na boumeli ya lisoló mobimba ya bato. Makambo mpe bankombo mingi na ntina na kosalelama ya mibeko epesi nzela mpo na kososola makambo oyo masalemaki na nsima, ata kino na eleko ya Yesu. Mibeko ya batata ya mabota mpo na oyo etali kobatela bato mpe biloko (Gen. 31:38, 39; 37:29-33; Yoa. 10:11, 15; 17:12; 18:9) mpe kopesama ya bozwi epai na moto mosusu (Gen. 23:3-18), mpe mibeko ya kozwa libula mpo na ye oyo azali mwana ya liboso kati na libota (48:22), tosengeli koyeba nyonso wana soki tolingi kososola malamu Biblia. Makambo mosusu oyo mazalaki kosalema na eleko ya batata ya mabota makɔtisamaki kati na Mibeko ezalaki bongo kokatama ngenga (oyo epesamaki liboso epai na Abalayama), kosala kondimana, libala kati na mwasi mpe ndeko mobali ya mobali na ye (38:8, 11, 26), mpe kokata ndai mpo na kondimisa likambo moko.—22:16; 24:3.f
34. Batoli nini, oyo ezali na ntina mingi mpo na baklisto, tokoki kozwa yango na boyekoli ya Genese?
34 Genese, mokanda ya liboso ya Biblia, ezali kopesa biso batoli mingi na ntina na bokangami, kondima, bosembo, limemya, botosi, bonkondé, mpe mpiko. Talá mwa bandakisa: Kondima ya Enoka mpe mpiko na ye na kotamboláká elongo na Nzambe katikati na banguna ya nsɔ́mɔ; boyengebene, bosembo, mpe botosi monene ya Noa; kondima ya Abalayama, molende na ye; bompikiliki na ye; elimo na ye ya kondima mikumba lokola tata ya libota mpe molakisi ya mibeko ya Nzambe epai na bana na ye, elimo na ye ya bokabi, mpe bolingo na ye; botosi ya Sala epai na mobali na ye mpe molende na ye na mosala; ezaleli ya Yakobo ya bopɔlɔ mpe ezaleli na ye ya komibanzabanza mpo na kokokisama ya elaka ya Yehova; botosi ya Yosefe epai na tata na ye, bosembo na ye na bizaleli malamu, mpiko na ye, etamboli na ye malamu kati na bolɔ́kɔ, botosi na ye liboso na bakonzi baleki likoló, ezaleli na ye ya komikitisa na kopesáká nkembo epai na Nzambe, mpe ezaleli na ye ya kolimbisa mpe ya motema mawa epai na bandeko na ye; mposa makasi oyo bato nyonso wana bazalaki na yango ya kobulisa nkombo ya Yehova. Bizaleli wana malamu bizali komonana polele kati na bomoi ya baoyo batambolaki elongo na Nzambe na boumeli ya eleko molai ya mbula 2 369 kobanda na kozalisama ya Adama kino na kufa ya Yosefe, nyonso wana elobelami kati na mokanda ya Genese.
35. Mokanda ya Genese elobeli makambo nini oyo ekoki kolendisa kondima na biso?
35 Ya solo, lisoló ya Genese ezali na litomba mpamba te ezali kolendisa kondima na biso, komonisáká bongo bandakisa ya bato oyo bazalaki na kondima, ɛɛ kondima emekami oyo ezalaki na mposa makasi ya komona mboka oyo Nzambe nde azali motongi na yango mpe mozalisi na yango, boyangeli ya Bokonzi na ye oyo abandaki kolɛngɛla yango uta kala na nzela ya Mombóto oyo alakaki, mobulisi ya nkombo monene ya Yehova.—Ebe. 11:8, 10, 16.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 919-920; Vol. 2, lokasa 1212.
b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 328-329.
c Biblical History in the Light of Archaeological Discovery, 1934, D. E. Hart-Davies, lokasa 5.
d Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 1962 (ebimeli ya Lifalansé), nkasa 408-422, 440-456.
e Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 460-461, 776.
f Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 1952 (ebimeli ya Lifalansé), lokasa 339-346.
[Etanda na lokasa 18]
GENESE—EPEMAMI MPE EZALI NA LITOMBA
Makomi Etindá Makambo mauti ya Genese na bakomi mosusu
1:27; 2:24 Ezalela ya bulɛɛ, ya koumela Mat. 19:4, 5 ya libala
2:7 Moto azali molimo 1 Kol. 15:45
2:22, 23 Bokonzi 1 Tim. 2:13; 1 Kol. 11:8
9:4 Ezalela ya bulɛɛ Mis. 15:20, 29 ya makila
20:3 Ekobo ezali mabe 1 Kol. 6:9
24:3; 28:1-8 Kobala bobele mondimi 1 Kol. 7:39
Bisakweli bikokisami mpe bisakweli bikokani moko na mosusu
12:1-3; Koyebana ya Mombóto 22:15-18 ya Abalayama Gal. 3:16, 29
14:18 Melikisedeki elilingi Ebe. 7:13-15 ya Klisto
16:1-4, 15 Ndimbola ya elilingi emonisami na Sala, Agala, Gal. 4:21-31 Yisamaele, Yisaka
17:11 Ndimbola ya elilingi emonisami na Lom. 2:29 kokatama ngenga
49:1-28 Mapamboli ya Yakobo likoló na mabota 12 Yos. 14:1–21:45
49:9 Nkɔ́si ya libota ya Yuda Emon. 5:5
Mikapo mosusu oyo basakoli, Yesu, mpe bayekoli basalelaki—kati na elilingi, elakiseli, to ndakisa—oyo emonisi elembeteli mosusu ya bosolo ya Genese
1:1 Nzambe azalisaki Yis. 45:18; likoló mpe mabelé Emon. 10:6
1:26 Moto asalemi na elilingi ya Nzambe 1 Kol. 11:7
1:27 Moto asalemi, mobali Mat. 19:4; mpe mwasi Mko. 10:6.
2:2 Nzambe apemaki na mokolo ya nsambo Ebe. 4:4
3:1-6 Nyoka akosaki Eva 2 Kol. 11:3
3:20 Bato nyonso ya mokili bauti na bato mibale Mis. 17:26 ya ebandeli
4:8 Kaina abomaki Abele Yuda 11; 1 Yoa. 3:12
4:9, 10 Makila ya Abele Mat. 23:35
Mikp. 5, 10, 11 Kolandana ya mabota Luka, mok. 3
5:29 Noa Ezek. 14:14; Mat. 24:37
6:13, 17-20 Mpela Yis. 54:9; 2 Pet. 2:5
12:1-3, 7 Kondimana ya Abalayama Gal. 3:15-17
15:6 Kondima ya Abalayama Lom. 4:3; Yak. 2:23
15:13, 14 Mobémbo na Ezipito Mis. 7:1-7
18:1-5 Boyambi bapaya Ebe. 13:2
19:24, 25 Sodomo na Gomola ebomami 2 Pet. 2:6; Yuda 7
19:26 Mwasi ya Lota Luka 17:32
20:7 Abalayama mosakoli Nz. 105:9, 15
21:9 Yisamaele atyoli Yisaka Gal. 4:29
22:10 Abalayama alingi kopesa Yisaka lokola mbeka Ebe. 11:17
25:23 Yakobo na Esau Lom. 9:10-13; Mki. 1:2, 3
25:32-34 Esau atekisi lotómo ya bonkulutu Ebe. 12:16, 17
28:12 Ebutelo ekangisi likoló na mabelé Yoa. 1:51
37:28 Yosefe atekisami na Ezipito Nz. 105:17
41:40 Yosefe akómi ministre-mokonzi Nz. 105:20, 21