Mokanda ya Biblia nimero 13—1 Ntango
Mokomi: Ezela
Esika ya bokomi: Yelusaleme (?)
Nsuka ya bokomi: soko 460 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: Na nsima ya 1 Ntango 9:44: 1077-1037 L.T.B.
1. Na makambo nini mokanda ya Ntango ya Liboso ezali eteni moko ya ntina mpe ya litomba kati na mokanda ya Nzambe?
MOKANDA ya Ntango ya Liboso esuki bobele na kotánga milɔngɔ́ ya mabota? Ezali bobele kozongelama ya mikanda ya Samwele mpe ya Mikonzi? Ezali bongo soko moke te! Oyo ezali eteni moko ya kongɛngisa mpe ya ntina mingi kati na mokanda ya Nzambe—ezalaki na ntina mingi na eleko oyo yango ekomamaki mpo na kobongisama lisusu ya libota mpe losambo na yango, mpe ezali na ntina mingi mpe na litomba mpamba te ezali komonisa ndakisa ya losambo oyo ebongi na Nzambe mpo na mikolo mizalaki koya, bakisá mpe mikolo na biso. Mokanda ya Ntango ya Liboso ezali na mwa ndambo ya maloba maleki kitoko ya kosanzola Yehova oyo mazwami kati na Makomami. Ezali komonisa na lolenge malamu mpenza motindo oyo Bokonzi ya boyengebene ya Yehova ekozala, mpe baoyo nyonso bazali kotya elikya na Bokonzi wana bakozwa litomba na koyekoláká mokanda yango. Na boumeli ya bikeke, Bayuda batalelaki mikanda nyonso mibale ya Ntango na motuya mingi, ezalaki mpe bongo mpo na baklisto. Jérôme mobongoli ya Biblia atalelaki mokanda ya Ntango ya Liboso mpe ya Mibale na motuya mingi, kútu, alobaki ete ezali bongo “Testamá ya Kala elobelami na mokuse” mpe alobaki ete “ezali na motuya monene mpe na ntina mingi; na bongo, ye oyo amitángi ete ayebi malamu makomi mosantu, kasi ayebi Mikanda ya Ntango te azali nde komikosa.”a
2. Mokanda ya Ntango ekomamaki mpo na nini?
2 Emonani ete na ebandeli mikanda mibale ya Ntango mizalaki bobele búku moko, to rulo moko, oyo eyaki kokabolama na nsima mpo ete ekoka kosalelama kozanga nkaká nyonso. Mpo na nini mokanda ya Ntango mokomamaki? Tótalela makambo masalemaki na eleko ya kokomama na yango. Boombo na Babilone eutaki kosuka esilaki koleka mbula soko 77. Bayuda bazongaki na mokili na bango. Nzokande, momeseno moko mabe mosilaki kokóla, bato batikaki kosalela losambo ya Yehova kati na tempelo oyo etongamaki lisusu na Yelusaleme. Mokonzi ya Perse apesaki nzela na Ezela ete apona basambisi mpe balakisi ya mibeko ya Nzambe (mpe oyo ya Mokonzi) mpe akembisa ndako ya Yehova. Milɔngɔ́ ya nkombo ya mabota ya sikisiki mizalaki na ntina mingi mpo na kondimisama ete bobele bato oyo bazali na lotómo nde bakoki kosala mosala ya bonganga mpo na komonisa polele libula ya mabota uta na yango banganga bazalaki kozwa lisungi. Na kotalela bisakweli ya Yehova na ntina na Bokonzi, asengelaki mpe kozala na mokanda moko oyo ezali kolobela makambo polelepolele mpe oyo ebongi kotyelama motema, oyo ekokaki komonisa molɔngɔ́ ya libota ya Yuda mpe oyo ya Davidi.
3. (a) Ezela azalaki na mposa ete Bayuda básosola likambo nini? (b) Mpo na nini alobeli mingi lisoló ya Yuda, mpe lolenge nini amonisi polele ntina ya losambo ya solo?
3 Ezela azalaki na mposa makasi ya kolamwisa Bayuda oyo bazongaki ete bázala na bosepeli mpe kosalisa bango básosola ete bazalaki mpenza basangoli ya motema-boboto oyo Yehova alakaki komonisa epai na bango. Na bongo, kati na mikanda ya Ntango, amonisaki bango lisoló mobimba ya libota mpe ya eutelo ya bato, kobanda na mobali ya liboso, Adama. Lokola bokonzi ya Davidi nde ezalaki likambo ya ntina mingi, Ezela amonisaki polele lisoló ya Yuda; na bongo alobeli mingi mpenza te lisoló litali bokonzi ya mabota zomi, yango ezali na litomba te. Alobelaki bakonzi minene ya Yuda oyo bamipesaki na kotonga tempelo to na kobongisa yango lisusu mpe na molende nyonso bamonisaki ndakisa malamu na ntina na losambo ya Nzambe. Amonisaki masumu masalemaki na ntina na losambo, oyo mamemaki kokwea ya bokonzi, na komonisáká mpe bilaka ya Nzambe na ntina na kozongisama lisusu ya bokonzi yango. Alobelaki makasi ntina ya losambo ya pɛto na kobendáká likebi likoló na makambo mingi mataleli tempelo, banganga na yango, Balevi, bakapita ya bayembi, mpe bongo na bongo. Bayisalaele bazwaki bilendiseli mingi kati na mokanda ya masoló ya kala oyo emonisaki polele ntina ya kolongwa na bango na boombo—elingi koloba, kozongisama lisusu ya losambo ya Yehova na Yelusaleme.
4. Bilembeteli nini bimonisi ete Ezela nde akomaki Ntango?
4 Elembeteli nini emonisi ete Ezela nde akomaki mikanda ya Ntango? Maloba oyo mazwami na vɛrsɛ́ mibale ya nsuka ya mokanda ya Ntango ya Mibale 36:22, 23 makokani na oyo mazwami na ebandeli ya vɛrsɛ́ mibale ya liboso kati na mokanda ya Ezela 1:1, 2, mpe mokanda ya Ntango ya Mibale esuki na katikati ya fraze oyo esukisami na Ezela 1:3. Na bongo, ekoki mpenza kozala ete ye oyo akomaki mokanda ya Ntango akomaki mpe mokanda ya Ezela. Yango emonisami mpe polele kati na likambo oyo ete lolenge ya koyebisa lisoló, lokótá, lolenge ya kosalela maloba, mpe ekomeli oyo ezwami kati na Ntango mpe kati na Ezela ekokani. Maloba mosusu oyo mazwami kati na mikanda oyo mibale mamonani kati na mikanda mosusu ya Biblia te. Ezela, ye oyo akomaki mokanda oyo ebéngami na nkombo na ye, esengeli mpenza kozala ete akomaki mpe mikanda ya Ntango. Bonkɔ́kɔ ya Bayuda endimi likambo yango.
5. Makoki nini ya elimo mpe ya mosuni Ezela azalaki na yango?
5 Longola Ezela, moto mosusu te azalaki na makoki koleka ye mpo na kokoma lisoló wana ya solo mpe ya sikisiki. “Mpo ete Ezela asili kotya motema na ye ete asosola Mobeko na [Yehova] mpe ete abila yango mpe ete alakisa malako mpe kosambisa-sembo kati na Yisalaele.” (Ezl. 7:10) Yehova asungaki ye na nzela ya elimo santu. Mokonzi ya Perse oyo azalaki koyangela mboka oyo ezalaki nguya ya mokili mobimba na eleko wana ayebaki ete Ezela azalaki na mayele mauti na Nzambe mpe apesaki ye bokonzi mingi na etúká ya Yuda. (Ezela 7:12-26) Na yango, lokola azwaki lotómo ya koyangela uta na Nzambe mpe na mokonzi, Ezela azalaki na likoki ya kokoma lisoló na ye na kosaleláká mikanda mileki malamu mpenza oyo ezalaki na eleko wana.
6. Mpo na nini tokoki kondima ete mokanda ya Ntango ezali mpenza solo?
6 Ezela azalaki molukiluki monene. Asalaki bolukiluki kati na mikanda ya kala ya lisoló ya Bayuda oyo mikomamaki na basakoli ya eleko na ye oyo babongi kotyelama motema; asalelaki mpe búku oyo bakalaki mpe bakomeli ya Letá bayanganisaki masoló na yango. Ekoki kozala ete mikanda misusu oyo asalelaki kati na bolukiluki na ye ezalaki mikanda ya Letá ya Yisalaele mpe ya Yuda, masoló ya kolandana ya milɔngɔ́ ya mabota, makambo ya kala oyo basakoli bakomaki, mpe mikanda oyo mizalaki na mabɔkɔ ya batata ya mabota. Ezela alobeli mikanda soko 20 epai kuna azwaki makambo oyo akomaki.b Na kotángáká yango polele, na bosembo nyonso, Ezela apesaki bato ya eleko na ye likoki ya kotalela esika oyo azwaki makambo oyo ye akomaki soki bazalaki na mposa ya kosala bongo, mpe yango endimisi lisusu ete mokanda yango ebongi na kotyela motema mpe ezali solo. Ntina oyo epusaki Bayisalaele oyo bazalaki na bomoi na eleko ya Ezela ete bándima bosolo ya mikanda ya Ntango ezali mpe kopusa biso lelo oyo ete tózala na elikya motindo wana.
7. Mokanda ya Ntango mokomamaki na mbula nini, banani batalelaki yango ete ezali solo, mpe lisoló na yango eumelaki ntango boni?
7 Lokola Ezela “abutaki longwa na Babilone” na mbula ya nsambo ya Alatazelezese Lobɔkɔ-molai, Mokonzi ya Perse, elingi koloba na 468 L.T.B., mpe alobeli te lisoló litali boyei ya ntina mingi ya Nehemia na 455 L.T.B., mokanda ya Ntango esilaki kokomama na mobimba na yango katikati na eleko oyo ekaboli mibu oyo mibale, ekoki mpenza kozala pene na mobu 460 L.T.B., na Yelusaleme. (Ezl. 7:1-7; Neh. 2:1-18) Bayuda ya eleko ya Ezela bandimaki ete mokanda ya Ntango ezali eteni mpenza ya ‘Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.’ Babéngaki yango Div·rehʹ Hai·ya·mimʹ, oyo elimboli “Makambo ya mikolo,” elingi koloba, lisoló ya mikolo to ya ntango. Soko mibu 200 na nsima, babongoli ya Septante na Greke batángaki mpe mokanda ya Ntango kati na kanɔ́ ya Biblia. Bakabolaki mokanda yango na biteni mibale mpe, kokanisáká ete ezalaki kobakisama ya Samwele mpe ya Mikonzi to ya Biblia mobimba ya eleko wana, babéngaki yango Pa·ra·lei·po·meʹnon, elimboli “Makambo mazangi kolobelama (Mayebisami te).” Atako nkombo yango ebongi mpenza te, kasi ezali komonisa ete Ntango ezali mokanda ya solo, ezali kati na Makomami mapemami. Wana azalaki kolɛngɛla libongoli ya Latin, Vulgate, Jérôme alobaki ete: “Na lolenge lobongi mpenza, tokoki kobénga [yango] Khro·ni·konʹ ya lisoló mobimba ya makambo ya Nzambe.” Emonani ete nkombo “Ntango” euti na liloba yango. Mokanda nyonso oyo ebéngami na nkombo ete ntango (chronique) ezali bongo koyanganisama ya masoló ya makambo masalemaki na kokomáká yango na molɔngɔ́ engebene eleko oyo likambo mokomoko lisalemaki. Nsima ya kolakisa milɔngɔ́ ya mabota oyo milobelami kati na yango, mokanda ya Ntango ya Liboso etaleli mingi mpenza eleko ya Mokonzi Davidi, kobanda na mobu 1077 L.T.B. kino na liwa na ye.
MAKAMBO MAZALI KATI NA NTANGO YA LIBOSO
8. Mokanda ya Ntango ya Liboso ekabolami na biteni nini mibale?
8 Mokanda oyo ya Ntango ya Liboso ekabwani na biteni mibale: mikapo 9 ya liboso milobeli mingi mpenza milɔngɔ́ ya Mabota; mpe mikapo 20 ya nsuka, milobeli makambo oyo masalemaki na boumeli ya mbula 40 kobanda na liwa ya Saulo kino na nsuka ya boyangeli ya Davidi.
9. Mpo na nini tosengeli te koluka dati mosusu ya kokomama ya Ntango?
9 Milɔngɔ́ ya mabota (1 Nta. 1:1–9:44). Mikapo oyo mimonisi molɔngɔ́ ya libota kobanda na Adama kino na Zelubabele. (1 Nta. 1:1; 3:19-24) Mabongoli mingi matye molɔngɔ́ ya Zelubabele na libota ya zomi. Lokola Zelubabele azongaki na Yelusaleme na mobu 537 L.T.B., mpe lokola ekoki mpenza kozala ete Ezela asilisaki kokoma mokanda ya ntango na mobu 460 L.T.B., boye mabota nyonso wana makokaki kobima te na eleko mokuse oyo ekaboli mibu oyo mibale. Nzokande, na eteni oyo makomi ya Liebele mazali bobele mwa ndambo, mpe ekoki koyebisama sikisiki te lolenge nini bato mingi oyo batángami wana bazali na bokangami na Zelubabele. Na yango, tokoki kozala na elonga te na kolobela dati mosusu ya nsima mpo na oyo etali kokomama ya mokanda ya Ntango, lokola basusu basali yango.
10. (a) Mabota nini matángami liboso? (b) Molɔngɔ́ nini ya libota elobelami polele na ebandeli ya mokapo ya mibale? (c) Milɔngɔ́ nini mosusu mitángami, mpe misuki na nini?
10 Na ebandeli, mokanda ya ntango elobeli mabota zomi kobanda na Adama kino na Noa, mpe mabota mosusu zomi kino na Abalayama. Bana ya Abalayama mpe bakitani na bango; bana ya Esau mpe bana ya Seili bazalaki kofanda na etúká ya Seili oyo ezalaki na ngomba mingi; mpe bakonzi ya liboso ya Edome balobelami. Nzokande, kobanda na mokapo ya mibale, lisoló lilobeli mingi bakitani ya Yisalaele, to Yakobo; kobanda na ye, molɔngɔ́ ya libota etángami liboso na nzela ya Yuda mpe na nsima mabota zomi kino na Davidi. (1 Nta. 2:1-14) Milɔngɔ́ ya mabota mosusu mpe mitángami, kolobeláká mingi mpenza libota ya Levi mpe banganga minene, mpe na kosukisáká na molɔngɔ́ ya libota ya Benyamina, mpo na kobanda koloba na ntina na Mokonzi Saulo, moto na libota ya Benyamina, kobanda epai na ye nde lisoló mpenza ebandi koyebisama. Na bisika mosusu ekoki komonana lokola ete bongolabongola ezali kati na milɔngɔ́ ya mabota oyo Ezela alobeli mpe oyo mayebisami kati na biteni mosusu ya Biblia. Kasi, tosengeli kobosana te ete bato mosusu bazalaki bobele na nkombo moko te, mpe lokola mibu mingi misilaki koleka, lokótá mpe lolenge ya kokoma nkombo misusu ebongwanaki. Boyekoli mozindo ezali kosalisa biso ete tópɛngola mikakatano mingi mpenza.
11. Lobela makambo mosusu ya ntina oyo matyami katikati na milɔngɔ́ ya mabota.
11 Na bisika ndenge na ndenge ya milɔngɔ́ ya mabota, Ezela akɔtisi mwa ndambo ya makambo matali istware mpe geografi mpo na kolimbola polele mpe kokundola makambo ya ntina. Na ndakisa, katikati na nkombo ya bakitani ya Lubene, Ezela akɔtisi likambo moko ya ntina mingi: “Bana na Lubene, mwana na nkulutu na Yisalaele. Zambi azalaki mwana na nkulutu; kasi mpo ete abebisaki mbeto na tata na ye, lokumu na nkulutu epesamelaki bana na Yosefe, mwana na Yisalaele. Boye libota ekotángama kobila lokumu na libota te. Mpo ete Yuda alekaki bandeko na ye mpe mokóló autaki na ye. Nde lokumu na nkulutu ezalaki na Yosefe.” (1 Nta. 5:1, 2) Mwa maloba wana mazali na ndimbola monene. Lisusu, ezali bobele kati na mikanda ya Ntango nde toyebi ete Yoaba, Amasa, mpe Abisai bazalaki bana ya ndeko ya Davidi, yango ezali kosalisa biso na kososola malamu makambo mingi matali bango.—1 Nta. 2:16, 17.
12. Lolenge nini Saulo akufaki?
12 Kozanga sembo ya Saulo ememi ye na liwa (1 Nta. 10:1-14). Lisoló ebandi na kolobeláká ntango oyo Bafilisitia babimisi etumba na Ngomba Giliboa. Bana mibali misato ya Saulo, kati na bango mpe Yonatana, babomami. Na nsima Saulo azokisami. Lokola aboyaki kokangama na mabɔkɔ ya banguna, asɛngaki na mokumbi-na-bibundeli na ye ete: “Bimisá mopanga na yo mpe tɔbɔlá ngai na yango ete baoyo bakatami ngenga te báya mpe báseka ngai te.” Mokumbi-na-bibundeli na ye aboyi, mpe Saulo amibomi. Na yango, Saulo akufi mpo na etamboli na ye, “atombokelaki [Yehova] mpe libota na [Yehova] oyo ye abatelaki te kasi akendaki kotuna toli epai na [“mosololi-na-bilimu,” NW]. Atunaki [Yehova] te.” (1 Nta. 10:4, 13, 14) Yehova apesi bokonzi epai na Davidi.
13. Lolenge nini Davidi akómi na bolamu mingi kati na bokonzi?
13 Davidi atyami lokola mokonzi (1 Nta. 11:1–12:40). Na nsima, mabota 12 mayangani epai na Davidi na Hebeloni mpe bapakoli ye lokola mokonzi likoló na Yisalaele mobimba. Davidi akamati Siona mpe akómi ‘monene koleka mpe [Yehova] na bibele azalaki na ye elongo.’ (1 Nta. 11:9) Mibali na nguya batyami bakapita kati na limpinga, mpe na nzela na bango, Yehova apesi “lobiko monene.” (1 Nta. 11:14, NW) Na bomoko, mibali na etumba bayangani esika moko na motema mobimba mpo na kokómisa Davidi mokonzi. Ezalaki libaku ya kosala elambo mpe kosepela kati na Yisalaele.
14. Etumba kati na Davidi mpe Bafilisitia esukaki lolenge nini, mpe libaku nini ya kolendisa kondima ememi bato na koyemba na esengo?
14 Davidi mpe sanduku ya Yehova (1 Nta. 13:1–16:36). Davidi asololi na bankumu ya mboka, mpe bandimi koyeisa Sanduku kino na Yisalaele, koutáká na yango na Kilyata-yalima, epai kuna efandaki na boumeli ya mibu soko 70. Wana ezali bango koya na nzela, Uza akufi mpo ete amonisi kozanga botosi, aboyi kolanda malako ya Nzambe, mpe Sanduku etikali na ndako ya Obede-edome mpo na mwa ntango. (Mit. 4:15) Bafilisitia bazongeli etumba na bango, kasi Davidi alóngi bango mbala mibale na bolóngi monene, na Bala-pelasimi mpe na Gibona. Nsima ya kozwa malako uta na Davidi, Balevi balandi sikawa bibongiseli ya Teokrasi mpo na komema Sanduku yango na libateli nyonso kino na Yelusaleme, epai kuna batye yango kati na hema oyo Davidi atɛlɛmisaki mpo na yango, wana bato bazali kobina mpe kosepela. Bazali kotumba mbeka mpe bazali koyemba, ye moko Davidi asali loyembo moko ya kopɛsa matɔ́ndi epai na Yehova mpo na libaku yango. Motó na likambo monene na yango ezali oyo ete: “Tiká ete likoló esepela, mokili mpe eyoka esengo, báloba kati na mabota ete, [Yehova] azali mokonzi!” (1 Nta. 16:31) Oyo nde libaku ya kolendisa, ya koyeisa kondima! Na nsima, loyembo wana ya Davidi endimami na bato nyonso mpe esalelami lokola moboko mpo na nzembo mosusu, oyo moko na yango ezali bongo Nzembo 96. Mosusu ekomami na vɛrsɛ́ 15 ya Nzembo 105:1-15.
15. Elaka nini kitoko Yehova apesi mpo na kokokisa mposa ya Davidi ya kotonga ndako mpo na losambo oyo esalemi kati na bomoko?
15 Davidi mpe ndako ya Yehova (1 Nta. 16:37–17:27). Likambo moko oyo esalemá naino te emonani sikawa na Yisalaele. Sanduku ya kondimana ezwami kati na hema moko na Yelusaleme epai kuna Asafa mpe bandeko na ye ya mibali bazali kosala mosala, nzokande na mwa kilomɛtɛlɛ moke na nɔ́rdi-wɛ́sti ya Yelusaleme, na Gibona, Sadoko nganga monene mpe bandeko na ye ya mibali bazali kopesa mbeka oyo esɛngamaki engebene Mibeko kati na mongombo. Lokola azali komibanzabanza ntango nyonso ete losambo ya Yehova ekumisama mpe ezala na bomoko, Davidi amonisi mposa na ye ya kotonga ndako mpo na sanduku ya kondima ya Yehova. Kasi Yehova alobi ete ezali Davidi te kasi mwana na ye nde akotonga ndako mpo na Ye mpe ete ‘akokokisa kiti na bokonzi na ye libela,’ komoniseláká ye motema-boboto, lokola oyo tata amonisaka epai na mwana na ye. (1 Nta. 17:11-13) Elaka wana monene euti na Yehova—kondimana oyo mpo na bokonzi moko ya seko—esimbi mpenza Davidi na motema. Na botɔ́ndi nyonso, alɔmbi ete nkombo ya Yehova “ekumisama mpe ekokisama libela” mpe ete lipamboli na Ye ezala likoló na ndako ya Davidi.—1 Nta. 17:24.
16. Elaka nini Yehova akokisi na nzela ya Davidi, kasi lisumu nini Davidi asali?
16 Davidi alɔ́ngi bitumba mingi (1 Nta. 18:1–21:17). Na nzela ya Davidi, Yehova akokisi sikawa elaka na Ye ya kopesa Mokili ya Ndaka mobimba epai na mombóto ya Abalayama. (1 Nta. 18:3) Na bitumba oyo elandani nokinoki, Yehova ‘abikisi Davidi’ na nzela na ye nyonso. (1 Nta. 18:6) Lokola alóngi bitumba mingi, Davidi akangi Bafilisitia na boombo, abomi Bamoaba, alóngi bato na Soba, asɛngisi na makasi ete Basulia báfuta mpako, mpe alóngi Edome mpe Amona mpe Amaleki. Kasi, Satana apusi Davidi ete atánga motángo ya Bayisalaele mpe na bongo asali lisumu. Yehova apesi etumbu na kobimisáká maladi kasi na motema mawa na ye, asilisi maladi yango na esika ya etutelo na lɔsɔ na Olonana, nsima wana bato 70 000 basilaki kokufa.
17. Davidi asali nini mpo na kolɛngɛla kotongama ya ndako ya Yehova, mpe lolenge nini alendisi Salomo?
17 Davidi alɛngɛli kotongama ya tempelo (1 Nta. 21:18–22:19). Anzelu ayebisi Davidi na nzela ya Gada ete “atongela [Yehova] etumbelo na mbeka epai na etutelo na lɔsɔ na Olonana Moyebusi.” (1 Nta. 21:18) Nsima ya kosomba etutelo na lɔsɔ na Olonana, na botosi nyonso, Davidi atumbi mbeka mingi kuna mpe abondeli Yehova, mpe ye ayanoli na kotindáká ‘mɔ́tɔ uta na lola kino likoló na etumbelo na mbeka na kotumba.’ (1 Nta. 21:26) Davidi asosoli ete Yehova alingi ete ndako na ye etongama wana, mpe abandi mosala ya bolɛngɛli bisaleli mpe ya koyanganisa yango, alobi ete: “Mwana na ngai Salomo azali naino na bilanga [“mbula ya kobotama,” NW] mingi te mpe na nguya te, mpe ndako oyo ekotongamela [Yehova] ekozala malamu bɛ na lokumu mpe nkembo kati na mikili nyonso. Boye nakobongisa mpo na yango.” (1 Nta. 22:5) Davidi alimbweli Salomo ete Yehova apesaki ye nzela te ete atonga ndako, mpamba te azalaki moto na bitumba mpe na makila. Alendisi mwana na ye ete azala na mpiko mpe na makasi kati na mosala yango, na kolobáká ete: “Tɛlɛmá mpe salá mosala! Tiká ete Yehova azala na yo elongo.”—1 Nta. 22:16.
18. Mpo na mokano nini mituya ya bato mitángami?
18 Davidi amibongisi mpo na losambo ya Yehova (1 Nta. 23:1–29:30). Mosala ya kotánga mituya ya bato ebandi, mbala oyo esalemi engebene mokano ya Yehova, mpo na kobongisa lisusu mosala ya banganga mpe ya Balevi. Awa misala ya Balevi milobelemi na bozindo mingi koleka na esika mosusu nyonso kati na Makomami. Basáli epai na mokonzi bakabolami na bituluku bibongisami malamu.
19. Maloba nini Davidi asaleli mpo na kopesa Salomo mokumba ya botongi, apesi ye malako nini, mpe ndakisa nini monene amonisi?
19 Pene na nsuka ya boyangeli oyo na boumeli na yango makambo mingi maselemi, Davidi ayanganisi bamonisi ya libota mobimba, “lisangá ya Yehova.” (1 Nta. 28:8, NW) Mokonzi atɛlɛmi mpe alobi ete: “Yoká ngai, bandeko na ngai mpe bato na ngai.” Na nsima ayebisi bango mposa ya motema na ye: kotongama ya ‘ndako na Nzambe ya solo.’ Na miso ya bato nyonso oyo bayangani wana, ayebisi Salomo etindá oyo ete: “Mpe yo, Salomo mwana na ngai, yebá Nzambe na tata na yo mpe salelá ye na motema malamu mpe na molimo na botosi; zambi Nzambe akotalatala mitema nyonso mpe akososola makanisi mpe mikano nyonso. Soko okoluka ye, akozwana na yo; nde soko okotika ye, akotika yo libela. Talá sasaipi, zambi [Yehova] aponi yo ete otonga ndako mpo na esika na bulɛɛ. Zalá na nguya mpe salá yango.” (1 Nta. 28:2, 9, 10, 12) Apesi elenge Salomo malako ya sikisiki ya botongi oyo azwaki na kopemama ya Yehova mpe apesi ebele ya bozwi na ye moko lokola likabo mpo na mosala ya botongi—talanta 3 000 ya wolo mpe talanta 7 000 ya palata, oyo abombaki mpo na mosala yango. Na komonáká ndakisa monene wana, bankumu mpe bato nyonso bamekoli yango na kopesáká wolo na motuya ya talanta 5 000 mpe daliki 10 000 mpe palata ya motuya ya talanta 10 000, bakisá mpe bibendé mpe motako mingi.c (1 Nta. 29:3-7) Bango nyonso bamonisi esengo na bango mpo na libaku wana.
20. Maloba nini ya nguya mingi Davidi asaleli kati na libondeli na ye ya nsuka?
20 Na nsima Davidi asanzoli Yehova na libondeli, kondimáká na bosolo mpenza ete ebele ya makabo wana nyonso mautaki nde na lobɔkɔ na Ye mpe asɛngaki na Ye ete alanda kopambola Salomo mpe libota mobimba. Libondeli ya nsuka oyo Davidi asali ezali na maloba kitoko mingi mpo na kokumisa bokonzi ya Yehova mpe nkombo na Ye ya nkembo: “Yo [Yehova], Nzambe na Yisalaele, tata na biso, okumisama libela na libela. Ɛ [Yehova], epai na yo, monene ezali mpe nguya mpe nkembo mpe elongá mpe lokumu. Zambi nyonso na likoló mpe na nsé ezali na yo, bokonzi mpe ezali na yo, ɛ [Yehova] mpe yo okokumisama nkolo likoló na nyonso. Mosolo mpe lokumu ikoutaka bobele na yo; yo ozali mokonzi likoló na nyonso. Na lobɔkɔ na yo, nguya ezali mpe makasi; kofulukisa mpe kokembisa nyonso ezali na lobɔkɔ na yo. Boye, ɛ Nzambe na biso, sasaipi tokotonda yo, mpe tokosanzola nkombo na yo na nkembo.”—1 Nta. 29:10-13.
21. Likambo nini litombwani lilobelami na nsuka ya mokanda ya Ntango ya Liboso?
21 Salomo apakolami mpo na mbala ya mibale mpe afandi ‘na kiti na [Yehova] lokola mokonzi’ na esika ya Davidi oyo anuni. Nsima ya koyangela na boumeli ya mbula 40, Davidi akufi “wana ezalaki ye na bilanga [“mbula ya kobotama,” NW] mingi mpenza; atondaki na mikolo mpe na mosolo mpe na lokumu.” (1 Nta. 29:23, 28) Ezali bongo na esika oyo nde Ezela asukisi mokanda ya Ntango ya Liboso, na kolobeláká likambo moko oyo etombwani mpenza, na komonisáká mingi mpenza bonene ya bokonzi ya Davidi likoló na bikonzi ya mabota nyonso.
LITOMBA NA YANGO
22. Lolenge nini Bayisalaele oyo bazalaki na bomoi na eleko ya Ezela balendisamaki na lisalisi ya mokanda ya Ntango ya Liboso?
22 Bayisalaele oyo bazalaki na bomoi na eleko ya Ezela bazwaki matomba mingi kati na mokanda na ye. Lisoló mobimba oyo lilobelami na mokuse, na bosikisiki nyonso mpe na elikya nyonso, lisalisaki bango ete básosola malamu motema mawa oyo Yehova amonisaki na bolingo nyonso epai na bango mpo na bosembo oyo azali na yango na ntina na kondimana ya bokonzi oyo asalaki elongo na Mokonzi Davidi mpe mpo na nkombo na ye moko. Bilendiseli oyo bazwaki epesaki bango likoki ya kosambela Yehova na molende mingi lisusu koleka. Kotángama ya milɔngɔ́ ya mabota elendisaki kondima na bango na ntina na banganga oyo bazalaki kosala kati na tempelo oyo esilaki kotongama lisusu.
23. Lolenge nini Matai, Luka, mpe Setefano basalelaki mokanda ya Ntango ya Liboso na litomba mpenza?
23 Mokanda ya Ntango ya Liboso ezalaki mpe na litomba mingi mpo na baklisto ya ekeke ya liboso. Matai mpe Luka basalelaki milɔngɔ́ ya mabota oyo mazali kati na mokanda yango mpo na kondimisa polele ete Yesu Klisto azali “mwana na Davidi” mpe Masiya oyo azali na lotómo mpenza. (Mat. 1:1-16; Luka 3:23-38) Na nsuka ya litatoli na ye, Setefano alobelaki lisɛngi oyo Davidi asalaki na ntina na kotongama ya ndako mpo na Yehova mpe alobaki na ntina na Salomo oyo atongaki yango. Na nsima amonisaki ete “Oyo-Aleki-Likoló akofandaka na ndako itongami na mabɔkɔ na bato te,” komonisáká ete tempelo ya eleko ya Salomo ezalaki elilingi ya makambo ya likoló oyo mazali na nkembo mingi koleka.—Mis. 7:45-50.
24. Na mikolo na biso, ndakisa nini ya malamu tokoki komekola uta na Davidi?
24 Ezali boni mpo na baklisto ya solo lelo oyo? Mokanda ya Ntango ya Liboso esengeli kotonga mpe kolamwisa kondima na biso. Ezali na mateya mingi oyo tokoki kozwa kati na ndakisa malamu ya Davidi. Akokanaki soko moke te na Saulo oyo azangaki sembo, azalaki ntango nyonso koluka litambwisi ya Yehova! (1 Nta. 10:13, 14; 14:13, 14; 17:16; 22:17-19) Wana akumbaki sanduku ya Yehova na Yelusaleme, mpe ayembaki nzembo ya masanzoli, mpe abongisaki mosala ya Balevi, mpe asɛngaki ete atonga ndako ya nkembo mpo na Yehova, Davidi amonisaki ete atyaki Yehova mpe losambo na ye na esika ya liboso kati na makanisi na ye. (1 Nta. 16:23-29) Azalaki komilelalela te. Alukaki te mikumba minene mpo na ye moko kasi alukaki nde kosala mokano ya Yehova. Na yango, na ntango Yehova apesaki mokumba ya kotonga tempelo epai na mwana na ye, na motema mobimba mpenza apesaki mwana na ye malako mpe apesaki ntango na ye, makasi na ye, mpe bozwi na ye mpo na kolɛngɛla mosala oyo mosengelaki kobanda na nsima ya liwa na ye. (1 Nta. 29:3, 9) Azali mpenza ndakisa monene mpo na oyo etali komipesa epai na Nzambe!—Ebe. 11:32.
25. Mokanda ya Ntango ya Liboso ezali kopusa biso ete tómonisa ezaleli nini na ntina na nkombo ya Yehova mpe Bokonzi na ye?
25 Makambo minene mingi malobelami kati na mikapo ya nsuka. Elobeli ya lokumu oyo Davidi asalelaki mpo na kosanzola Yehova mpe mpo na kokumisa ‘nkombo na ye ya nkembo’ esengeli kopusa biso ete tósepela mpenza na libaku malamu oyo tozali na yango na mikolo na biso ya koyebisa nkembo ya Yehova mpe Bokonzi na ye oyo etambwisami na Klisto. (1 Nta. 29:10-13) Tiká ete kondima na biso mpe esengo na biso ekokana ntango nyonso na oyo ya Davidi na komonisáká botɔ́ndi mpo na Bokonzi ya seko ya Yehova mpe na komipesáká mobimba mpo na mosala na Ye. (1 Nta. 17:16-27) Ya solo, mokanda ya Ntango ya Liboso ezali komonisa polele mpenza motó na likambo ya Biblia: Bokonzi ya Yehova na nzela ya Mombóto na ye; kotikáká biso na mposa makasi ya koluka koyeba makambo mosusu matali mikano ya Yehova.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Commentary ya Clarke, Vol. II, lokasa 574.
b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 444-445.
c Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, lokasa 1076.