MOKAPO 8
Lisangá “ekɔtaki na eleko moko ya kimya”
Saulo, monyokoli monene, akómi mosakoli ya molende
Euti na Misala 9:1-43
1, 2. Saulo akendaki na Damasi na mokano nini?
ETULUKU moko ya bato bakómi pene na Damasi; bazali na mokano moko ya mabe oyo bazali kokende kokokisa kuna. Bazali kokana kobimisa na makasi bayekoli ya Yesu na bandako na bango, kokanga bango, kosambwisa bango, mpe komema bango na Yerusaleme mpo bákende kosamba liboso ya Sanedrina.
2 Kutu, mwa mikolo liboso, Saulo moto oyo azali kokamba etuluku yango, andimaki kobomama ya moyekoli moko ya Yesu.a Azalaki wana ntango baninga na ye babomaki Stefano na mabanga mpe ye asepelaki na likambo yango. (Mis. 7:57–8:1) Atako banyokolaki bayekoli ya Yesu oyo bazalaki kofanda na Yerusaleme, motema ya Saulo ekitaki kaka te; alingaki mpe konyokola bayekoli oyo bazalaki na bamboka mosusu. Azalaki na mposa ya kolimwisa mpenza mwa lingomba oyo bazalaki kobenga “Nzela.”—Mis. 9:1, 2; talá etanda “Mokumba oyo Saulo asengelaki kokokisa na Damasi,” na lokasa 61.
3, 4. (a) Likambo nini ekómelaki Saulo? (b) Mituna nini tokotalela?
3 Na mbala moko, Saulo amoni pole moko makasi. Baninga na ye ya mobembo mpe bamoni pole yango kasi bazali kokoka koloba te mpo na nsɔmɔ. Saulo akufi miso mpe akwei na nse. Saulo azali komona te, kasi ayoki mongongo moko euti na likoló elobi ete: “Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai?” Saulo akamwe mpenza mpe atuni ete: “Yo nani, Nkolo?” Na ntembe te, eyano oyo Saulo ayoki epesi ye nsɔmɔ mpenza: “Ngai Yesu, oyo yo ozali konyokola.”—Mis. 9:3-5; 22:9.
4 Liteya nini tokoki kozwa na maloba ya liboso ya Yesu epai ya Saulo? Matomba nini tokoki kozwa soki totaleli makambo oyo ememaki na kobongwana ya Saulo? Ndenge oyo lisangá esalelaki eleko ya kimya oyo eyaki nsima ya kobongwana ya Saulo ekoki koteya biso nini?
“Mpo na nini ozali konyokola ngai?” (Misala 9:1-5)
5, 6. Maloba ya Yesu epai ya Saulo ekoki koteya biso nini?
5 Ntango Yesu abimelaki Saulo na nzela ya Damasi, atunaki ye te ete: “Mpo na nini ozali konyokola bayekoli na ngai?” Ndenge touti komona yango, atunaki ete: “Mpo na nini ozali konyokola ngai?” (Mis. 9:4) Ya solo, ntango bazali konyokola bayekoli na ye, Yesu amonaka lokola ete bazali nde konyokola ye.—Mat. 25:34-40, 45.
6 Soki ozali konyokwama mpo na kondima na yo, yebá ete Yehova ná Yesu bazali koyeba mpasi na yo. (Mat. 10:22, 28-31) Ntango mosusu Yehova akolongola monyoko yango sikoyo te. Kobosana te ete Yesu azalaki komona ndenge Saulo apesaki mabɔkɔ na bato oyo babomaki Stefano, mpe azalaki komona ntango Saulo azalaki kokɔtela bayekoli na ye ya sembo na bandako mpo na kokanga bango. (Mis. 8:3) Kasi, Yesu apekisaki te makambo yango esalema na ntango wana. Atako bongo, Yehova, na nzela ya Kristo, apesaki Stefano mpe bayekoli mosusu makasi oyo esengelaki mpo bátikala sembo.
7. Makambo nini tosengeli kosala mpo na koyikela minyoko mpiko?
7 Yo mpe okoki koyikela minyoko mpiko soki: (1) Ozwi ekateli ya kotikala sembo ata soki okutani na mokakatano nini. (2) Osɛngi Yehova asalisa yo. (Flp. 4:6, 7) (3) Otiki Yehova azongisa mabe oyo bazali kosala yo. (Rom. 12:17-21) (4) Otye elikya ete Yehova akopesa yo makasi ya koyika mpiko tii ntango ye moko akolongola monyoko yango.—Flp. 4:12, 13.
“Saulo, ndeko, Nkolo . . . atindi ngai” (Misala 9:6-17)
8, 9. Ananiasi ayokaki ndenge nini mpo na mokumba oyo Yesu apesaki ye?
8 Nsima ya kopesa eyano na motuna ya Saulo ete, “Yo nani, Nkolo?” Yesu alobaki na ye ete: “Tɛlɛmá mpe kɔtá na engumba, mpe bakoyebisa yo oyo osengeli kosala.” (Mis. 9:6) Lokola Saulo azalaki komona lisusu te, baninga na ye nde bamemaki ye tii na ndako oyo afandaki na Damasi; kuna akilaki bilei mpe abondelaki mikolo misato. Na ntango yango, Yesu alobelaki likambo ya Saulo epai ya moyekoli moko na engumba yango oyo nkombo na ye Ananiasi, mobali moko oyo Bayuda nyonso oyo bazalaki kofanda na Damasi “bazalaki koloba malamu mpo na ye.”—Mis. 22:12.
9 Kanisá mokakatano oyo Ananiasi azalaki na yango! Mokonzi ya lisangá, Yesu Kristo oyo asekwaki, alobaki na ye mpe aponaki ye mpo na mokumba moko ya ntina mingi. Ezalaki lokumu monene, kasi mokumba yango ezalaki pɛtɛɛ te! Ntango Yesu ayebisaki ye ete asengeli koloba epai ya Saulo, Ananiasi azongisaki ete: “Nkolo, nayoki nsango ya mobali wana epai ya bato mingi, mpe mabe nyonso oyo asalaki basantu na yo na Yerusaleme. Mpe awa ye azali na bokonzi oyo banganga-nzambe bakonzi bapesi ye ya kokanga baoyo nyonso babelelaka nkombo na yo.”—Mis. 9:13, 14.
10. Ndenge oyo Yesu alobaki na Ananiasi eteyi biso nini?
10 Yesu apamelaki Ananiasi te mpo amonisaki ete azali kobanga. Nzokande, Yesu apesaki ye malako ya polele. Kutu, apesaki ye lokumu na ndenge ayebisaki ye ntina oyo asɛngaki ye akokisa mokumba wana ya mpasi. Yesu alobaki boye mpo na Saulo: “Mobali wana azali mbɛki oyo naponi mpo na komema nkombo na ngai epai ya bikólo, epai ya bakonzi mpe epai ya bana ya Yisraele. Mpo nakolakisa ye polele ebele ya makambo oyo asengeli konyokwama na yango mpo na nkombo na ngai.” (Mis. 9:15, 16) Ananiasi atosaki mbala moko maloba ya Yesu. Akendaki kokutana na monyokoli Saulo mpe alobaki na ye boye: “Saulo, ndeko na ngai, Nkolo Yesu oyo abimelaki yo na nzela oyo ozalaki koya, atindi ngai, mpo omona lisusu mpe otonda na elimo santu.”—Mis. 9:17.
11, 12. Lisolo oyo elobeli Yesu, Ananiasi, mpe Saulo ekoki koteya biso nini?
11 Lisolo oyo elobeli Yesu, Saulo, mpe Ananiasi ekoki kosalisa biso tókanga ntina ya makambo mingi. Na ndakisa, Yesu azali mpenza kotambwisa mosala ya kosakola, ndenge alakaki yango. (Mat. 28:20) Atako Yesu alobaka epai ya mokomoko na biso te lelo oyo, atambwisaka mosala ya kosakola na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele, oyo atye mpo abatela basali na ye. (Mat. 24:45-47) Na litambwisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, basakoli mpe babongisi-nzela, bazali kotindama mpo báluka bato oyo balingi mpenza koyeba Kristo. Ndenge mokapo oyo eleki emonisaki yango, bato yango mingi babondelaki Nzambe mpo asalisa bango mpe na nsima, bakutanaki na Batatoli ya Yehova.—Mis. 9:11.
12 Ananiasi andimaki mokumba oyo Yesu apesaki ye mpe azwaki mapamboli. Yo mpe otosaka etinda ya kopesa litatoli malamumalamu, ata soki mokumba yango ebangisaka yo mwa moke? Bandeko mosusu babangaka kokende ndako na ndako kosolola na bato oyo bayebi te. Bamosusu bazalaka na mokakatano mpo na kosakola epai ya bato na bisika na bango ya mosala, na balabala, to na telefone to na balɛtrɛ. Ananiasi alongolaki kobanga mpe azwaki libaku malamu ya kosalisa Saulo azwa elimo santu.b Ananiasi akokisaki malamu mokumba na ye mpo atyelaki Yesu motema mpe atalelaki Saulo lokola moto oyo akoki kokóma ndeko na ye mokristo. Na ndakisa ya Ananiasi, biso mpe tokoki kolongola kobanga soki tozali kondima ete Yesu azali kokamba mosala ya kosakola, tozali komitya na esika ya basusu, mpe tozali kotalela ata moto oyo akoki kobangisa biso ete akoki kokóma ndeko na biso.—Mat. 9:36.
“Abandaki kosakola mpo na Yesu” (Misala 9:18-30)
13, 14. Soki ozali koyekola Biblia kasi ozwi naino batisimo te, ndakisa ya Saulo ekoki koteya yo nini?
13 Saulo abandaki nokinoki kosalela makambo oyo ayekolaki. Nsima ya kobikisama, andimaki kozwa batisimo mpe akómaki kosangana na bayekoli na Damasi. Kasi, asukaki wana te. “Na mbala moko na basinagoga abandaki kosakola mpo na Yesu, ete azali Mwana ya Nzambe.”—Mis. 9:20.
14 Soki ozali moyekoli ya Biblia, kasi ozwi naino batisimo te, okosala lokola Saulo mpe okozwa ekateli ya kosalela makambo oyo ozali koyekola? Ya solo, Saulo amonaki likamwisi ya Kristo mpe, na ntembe te, yango esalisaki ye azwa ekateli nokinoki. Kasi, bato mosusu mpe bamonaki makamwisi ya Yesu. Na ndakisa, etuluku moko ya Bafarisai bazalaki wana ntango Yesu abikisaki mobali moko oyo azalaki na lobɔkɔ ekauká, mpe Bayuda mingi bayebaki ete Yesu asekwisaki Lazare. Kasi, mingi kati na bango bandimaki ye te; kutu, bazalaki kotɛmɛla ye. (Mrk. 3:1-6; Yoa. 12:9, 10) Kasi, Saulo abongwanaki. Mpo na nini Saulo andimaki Yesu, nzokande bato mosusu baboyaki kosala yango? Mpamba te azalaki kobanga Nzambe koleka bato mpe azalaki na botɔndi mingi mpo na motema mawa oyo Kristo amoniselaki ye. (Flp. 3:8) Soki yo mpe ozali na botɔndi ya ndenge wana, okotika eloko moko te epekisa yo osangana na mosala ya kosakola mpe okokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo.
15, 16. Saulo azalaki kosala nini na basinagoga, mpe Bayuda ya Damasi basalaki nini?
15 Okoki kokanisa ndenge bato bazalaki kokamwa, bazalaki na nsɔmɔ, mpe bazalaki koyoka nkanda ntango Saulo akómaki kosakola nkombo ya Yesu na basinagoga? Bazalaki kotuna ete: “Oyo ezali te mobali oyo abimiselaki bato oyo babelelaka nkombo ya Yesu na Yerusaleme mpasi mingi?” (Mis. 9:21) Ntango Saulo azalaki kolimbwela bato ntina oyo akómaki kondimela Yesu, “azalaki komonisa makambo na molɔngɔ mpenza ete moto yango azali Kristo.” (Mis. 9:22) Kasi, bato mosusu bandimaka te ata soki bamonisi bango makambo na molɔngɔ. Moto oyo akangamá na makambo ya bonkɔkɔ to moto oyo azali na lolendo akoki mpe koboya kondima ata soki bamonisi ye makambo na molɔngɔ. Atako bato mosusu bandimaki te, Saulo azongaki nsima te.
16 Ata nsima ya mbula misato, Bayuda ya Damasi bazalaki kaka kotɛmɛla Saulo. Nsukansuka, bazwaki mokano ya koboma ye. (Mis. 9:23; 2 Ko. 11:32, 33; Gal. 1:13-18) Ntango likambo yango eyebanaki, Saulo asalelaki mayele mpe alongwaki na engumba yango; mpo na kobima, bandeko bakitisaki ye na kitunga na lidusu oyo ezalaki na efelo ya engumba. Luka alobi ete bato oyo basalisaki Saulo mpo akima na butu wana bazalaki “bayekoli na ye [Saulo].” (Mis. 9:25) Elobeli yango emonisi ete bato mosusu oyo bayokaki Saulo na Damasi bandimaki nsango oyo azalaki kosakola mpe bakómaki bayekoli ya Kristo.
17. (a) Ndenge nini bato na bato bayambaka solo ya Biblia? (b) Tosengeli kokoba kosala nini, mpe mpo na nini?
17 Na ebandeli, ntango okómaki koyebisa bandeko, baninga, mpe bato mosusu makambo ya malamu oyo ozalaki koyekola, mbala mosusu ozalaki kokanisa ete moto nyonso akondima solo mpo ezali polele. Ekoki kozala ete bamosusu bandimaki yango, kasi mingi bandimaki te. Kutu, ekoki kozala ete bandeko na yo mosusu bakómisaki yo monguna na bango. (Mat. 10:32-38) Nzokande, soki ozali kokoba kokolisa mayele na yo ya kolimbola Biblia mpe soki ozali kobatela etamboli ya malamu, nsukansuka, ata baoyo bazali kotɛmɛla yo bakoki kobongola makanisi na bango.—Mis. 17:2; 1 Pe. 2:12; 3:1, 2, 7.
18, 19. (a) Ntango Barnabasi alandelaki likambo ya Saulo mpe amonaki ete akómaki solo moyekoli, yango ememaki litomba nini? (b) Ndenge nini tokoki komekola Barnabasi mpe Saulo?
18 Ntango Saulo akómaki na Yerusaleme, bayekoli bazalaki mpenza kondima te ete akómi moyekoli. Nzokande, ntango Barnabasi alandelaki likambo ya Saulo mpe amonaki ete akómi mpenza moyekoli, bantoma bayambaki ye, mpe afandaki na bango mwa ntango. (Mis. 9:26-28) Saulo azalaki na bokɛngi, kasi azalaki koyoka nsɔni te mpo na nsango malamu. (Rom. 1:16) Asakolaki nsango malamu na mpiko mpenza na Yerusaleme, esika oyo abandaki mosala na ye ya konyokola bayekoli ya Yesu Kristo. Ntango Bayuda ya Yerusaleme bamonaki ete moto na bango abongwanaki, basepelaki ata moke te; kutu, balukaki koboma ye. Lisolo elobi boye: “Ntango bandeko bayebaki likambo yango, bakitisaki [Saulo] na Kaisaria mpe batindaki ye na Tarse.” (Mis. 9:30) Saulo alandaki litambwisi ya Yesu, oyo emonisamaki na nzela ya lisangá. Ezaleli yango ememelaki Saulo mpe lisangá mobimba matomba.
19 Tósimba mpe ete Barnabasi azwaki likanisi ya kosalisa Saulo. Na ntembe te, boboto oyo amonisaki esalaki ete bato wana mibale oyo bazalaki basaleli ya molende ya Yehova bákóma baninga makasi. Yo mpe osalaka lokola Barnabasi, elingi koloba osepelaka kosalisa bandeko ya sika, kobima na bango na mosala ya kosakola mpe kosalisa bango bákola na elimo? Okozwa mapamboli mingi soki ozali kosala yango. Soki ozali mosakoli ya sika, osalaka lokola Saulo, elingi koloba, ondimaka lisalisi oyo bazali kopesa yo? Soki ozali kosala elongo na basakoli oyo bameseni na mosala, okokolisa mayele na yo na mosala ya kosakola, okoyoka esengo mingi, mpe okosala boninga oyo ekoki koumela libela.
“Mingi bandimelaki Nkolo” (Misala 9:31-43)
20, 21. Ndenge nini basaleli ya Nzambe, na ntango ya kala mpe na mikolo na biso, basalelaki malamu ‘bileko ya kimya’?
20 Nsima ya kobongwana ya Saulo mpe nsima ya kolongwa na ye na Yerusaleme mpo básala ye mabe te, “lisangá na Yudea mobimba, na Galile mpe na Samaria ekɔtaki na eleko moko ya kimya.” (Mis. 9:31) Bayekoli basalaki nini na “bantango [wana] ya malamu”? (2 Tim. 4:2) Lisolo elobi ete bazalaki “kotongama.” Bantoma mpe bandeko mosusu oyo bazalaki kokamba lisangá bazalaki kolendisa kondima ya bayekoli mpe bazalaki ndakisa mpo na bango; na ntango wana lisangá “ezalaki kotambola na kobanga Yehova mpe na libɔndisi ya elimo santu.” Na ndakisa, Petro asalelaki ntango yango mpo na kolendisa bayekoli na engumba ya Lida, na mokili patatalu ya Sharone. Milende na ye esalisaki bato mingi oyo bazalaki na bingumba wana ‘bándimela Nkolo.’ (Mis. 9:32-35) Bayekoli babendamaki na makambo mosusu te; bamipesaki nde na kosalisana mpe kosakola nsango malamu. Na ndenge yango lisangá “ekobaki kokola.”
21 Na nsuka ya siɛklɛ ya 20, na bikólo mingi Batatoli ya Yehova bakɔtaki na “eleko moko ya kimya.” Baguvɛrnema oyo enyokolaki basaleli ya Nzambe na boumeli ya bambula ekweaki, mpe na bisika mosusu oyo nsango malamu epekisamaki, bipekiseli elɛmbaki to mpe elongwaki. Bankóto ya Batatoli basalelaki libaku yango mpo na kosakola epai ya bato mpe yango ebotaki mbuma malamu.
22. Ndenge nini okoki kosalela malamu bonsomi oyo ozali na yango?
22 Ozali kosalela malamu bonsomi oyo ozali na yango? Soki ofandaka na ekólo moko oyo bozali na bonsomi ya kosambela, Satana akoluka kobenda yo mpo oluka biloko mingi ya mokili, kasi Bokonzi te. (Mat. 13:22) Kotika te ete makambo wana ebenda yo. Salelá malamu eleko nyonso ya kimya oyo okoki kozala na yango sikoyo. Talelá yango lokola mabaku ya kopesa litatoli malamumalamu mpe ya kolendisa lisangá. Kobosana te ete bomoi na yo ekoki kobongwana na mbalakaka.
23, 24. (a) Lisolo ya Tabita eteyi biso makambo nini? (b) Ekateli nini tosengeli kozwa?
23 Talelá likambo oyo ekómelaki moyekoli moko oyo nkombo na ye ezalaki Tabita, to Dorkasi. Mwasi yango azalaki kofanda na Yope, engumba moko oyo ezalaki pembeni ya engumba Lida. Ndeko yango ya sembo asalelaki malamu ntango mpe makoki na ye; azalaki “kosala makambo mingi ya malamu mpe kopesa makabo mingi.” Kasi, abɛlaki na mbalakaka mpe akufaki.c Liwa na ye epesaki bayekoli ya engumba Yope mawa makasi, mingimingi basi oyo mibali bakufá oyo azalaki komonisela boboto. Ntango Petro akómaki na ndako oyo bazalaki kobongisa ebembe ya Tabita mpo na kokunda ye, asalaki likamwisi oyo ntoma moko te ya Yesu asalaki yango liboso. Petro abondelaki mpe na nsima asekwisaki Tabita! Kanisá esengo oyo basi oyo mibali na bango bakufá mpe bayekoli mosusu bayokaki ntango Petro abengaki bango na kati ya ndako mpe alakisaki bango Tabita oyo azongaki na bomoi! Na ntembe te, makambo yango epesaki bango makasi ya koyika mpiko na mikakatano oyo ezalaki liboso na bango! Tokoki kokamwa te ete nsango ya likamwisi yango “eyebanaki na Yope mobimba, mpe mingi bandimelaki Nkolo.”—Mis. 9:36-42.
24 Toyekoli makambo mibale na lisolo ya Tabita. (1) Bomoi ezali mokuse. Yango wana, ezali na ntina mingi tómisalela nkombo malamu liboso ya Nzambe ntango tozali na likoki ya kosala yango! (Mos. 7:1) (2) Lisekwa ekosalema mpenza. Yehova amonaki ebele ya misala ya boboto oyo Tabita asalaki mpe apesaki ye mbano. Akobosana te mosala na biso ya makasi mpe akosekwisa biso soki tokufi liboso ya Armagedone. (Ebr. 6:10) Yango wana, ezala tozali kolekisa “bantango ya mpasi” to ‘bantango ya kimya’ sikoyo, tókoba kopesa litatoli malamumalamu mpo na Kristo.—2 Tim. 4:2.
a Talá etanda “Saulo Mofarisai,” na lokasa 62.
b Mbala mingi, likabo ya elimo santu ezalaki kopesama na nzela ya bantoma. Nzokande, mpo na Saulo, emonani ete Yesu asalelaki Ananiasi mpo na kopesa Saulo likabo ya elimo santu. Nsima ya kobongwana na ye, Saulo aumelaki ntango molai liboso akutana na bantoma 12. Kasi, ekoki mpenza kozala ete azalaki kosala mosala ya Nzambe na ntango wana. Na yango, tokoki kokanisa ete Yesu alingaki Saulo azala na nguya oyo esengeli mpo na kokokisa mokumba ya kosakola.
c Talá etanda “Tabita ‘atondaki na misala ya malamu,’” na lokasa 67.