Balanaba “Mwana na kobɔndisa”
NTANGO nini obɔndisamaki na moninga moko mbala ya nsuka? Ozali komikundola mbala ya nsuka oyo obɔndisaki moto moko? Mbala na mbala, biso nyonso tozalaka na mposa ya kolendisama, mpe tosepelaka mingi na bato oyo balendisaka biso na bolingo nyonso! Kobɔndisa esɛngaka kozwa ntango ya koyoka, ya kososola, mpe ya kopesa lisungi. Olingi kosala yango?
Moto moko oyo amonisaki ndakisa ya bolingo malamu motindo oyo ezali Balanaba, oyo “azalaki mobali malamu mpe atondaki na [elimo santu, NW] mpe na kondima.” (Misala 11:24) Mpo na nini bakokaki koloba na Balanaba bongo? Makambo nini asalaki mpo ete báloba na ye motindo wana?
Mosungi ya solosolo
Nkombo na ye mpenza ezalaki Yosefe, kasi bantoma bapesaki ye nkombo mosusu oyo ezalaki komonisa ezaleli na ye—Balanaba, oyo elimboli “Mwana na kobɔndisa.”a (Misala 4:36, NW) Lisangá ya boklisto eutaki kosalema. Bamosusu bakanisaka ete Balanaba azalaki moko na bayekoli ya Yesu na ebandeli. (Luka 10:1, 2) Ata soki yango ezali solo to te, mobali yango asalaki misala malamu.
Mwa moke nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., Balanaba, ye Molevi moto na Kupulu, atɛkisaki elanga na ye na bolingi na ye moko, mpe apesaki bantoma mosolo yango. Mpo na nini asalaki bongo? Lisolo moko ezali na mokanda ya Misala eyebisi biso ete baklisto mosusu oyo bazalaki na Yelusaleme na eleko wana, ‘basengelaki kokabola biloko na moto na moto lokola ezalaki ye na bosɛnga.’ Balanaba amonaki solo ete bosɛnga ezalaki, mpe na elimo ya bokabi apesaki likabo na ye. (Misala 4:34-37) Ekoki kozala ete azalaki na mwa bozwi, kasi akakatanaki te mpo na kopesa bozwi na ye mpe komipesa ye moko mpo na kotombola matomba ya Bokonzi.b Nganga-mayele Frederick Bruce, alobi ete: “Na esika nyonso oyo Balanaba akutaki bato to makambo oyo ezalaki kosɛnga elendiseli, azalaki kopesa elendiseli oyo akokaki kopesa.” Yango emonisami polele na lisolo ya mibale oyo kati na yango alobelami.
Sikawa pene na mobu 36 T.B., Saulo moto na Talasia (oyo na nsima akómaki ntoma Paulo), asilaki kokóma moklisto, alingaki kokutana na bandeko ya lisangá ya Yelusaleme, “nde bango nyonso babangaki ye mpo ete bandimi te ete azali moyekoli.” Ndenge nini akokaki kondimisa bandeko ya lisangá ete abongwani solo mpenza, kasi asali mayele mabe te na mokano ya kopanza lisangá malamumalamu na nsima? “Balanaba akamati ye mpe akambi ye epai na bantoma.”—Misala 9:26, 27; Bagalatia 1:13, 18, 19.
Ntina oyo Balanaba andimelaki Saulo elobami te. Nzokande, “Mwana na kobɔndisa” asalaki engebene nkombo na ye na koyokáká Paulo mpe na kopesáká ye lisungi kati na ezalela oyo emonanaki ete ezangi elikya. Atako na nsima Saulo azongaki na mboka na ye Talasia, mibali yango mibale basalaki boninga. Na bambula oyo elandaki, boninga yango ebimisaki matomba malamu.—Misala 9:30.
Na Antiokia
Pene na mobu 45 T.B., nsango ekómaki na Yelusaleme ete mosala ya kosakola ezalaki kokola malamu na Antiokia ya Sulia—ebele ya bafandi ya engumba yango oyo bazalaki koloba lokota Greke bazalaki kokóma bandimi. Lisangá etindaki Balanaba kuna mpo ete atala mpe abongisa mosala ya kosakola. Basalaki mpenza liponi ya malamu. Luka alobi ete: “Esili ye kokóma mpe komona ngɔlu na Nzambe, asepeli, mpe apesi bango nyonso toli ete bátya mitema na bango koumela na Nkolo; mpo ete ye Balanaba azalaki mobali malamu mpe atondaki na [elimo santu, NW] mpe na kondima. Ebele monene na bato basangani na Nkolo.”—Misala 11:22-24.
Asukaki wana te. Engebene nganga-mayele ya Biblia Giuseppe Ricciotti, “Balanaba azalaki moto na misala malamu, mpe nokinoki asosolaki mposa ya kokamata bibongiseli mpe kokokisa yango mpo ete bokoli oyo ezalaki komonana elandana na mosala ya kobuka mbuma mingi. Na yango, libosoliboso, bazalaki na bosɛnga ya babuki mbuma.” Na ntembe te, lokola autaki na Kupulu, Balanaba ayebaki mpenza lolenge ya kosala elongo na bato ya mabota. Akokaki koyoka ete abongi koteya bato oyo bazalaki Bayuda te. Kasi alingaki kosangana na bato mosusu na mosala oyo ya kosepelisa mpe ya kolendisa.
Balanaba akanisaki Saulo. Ekoki mpenza kozala ete Balanaba ayebaki emonaneli ya esakweli oyo Anania azwaki na eleko oyo Saulo akómaki moklisto, ete monyokoli ya kala wana ‘asili koponama mpo na komema nkombo ya Yesu liboso na bato ya mabota.’ (Misala 9:15) Na yango, Balanaba akendaki na Talasia—mobembo mbala moko pene na kilomɛtɛlɛ 200—mpo na koluka Saulo. Bango mibale basalaki esika moko na boumeli ya mbula mobimba, mpe na eleko yango, na litambwisi ya Nzambe, “bayekoli babyangami nkombo baklisto, liboso na Antiokia.”—Misala 11:25, 26.
Na boyangeli ya Klaudio, nzala makasi ekɔtaki na bisika mingi na Bokonzi ya Loma. Josèphe, Moyuda mokomi ya makambo ya kala alobi ete, na Yelusaleme “bato mingi bakufaki mpo ete bazangaki makoki ya kosomba bilei.” Boye, “bayekoli [na Antiokia] bakani kotinda biloko na kosunga bandeko bafandi na Yuda, moto na moto pelamoko ekokaki na ye. Basali bongo mpe batindeli mikóló na lingomba yango na mabɔkɔ na Balanaba na Saulo.” Nsima ya kokokisa malamu mokumba na bango, bakamataki Yoane Malako mpe bazongaki na ye na Antiokia, epai batángamaki lokola basakoli mpe balakisi na lisangá.—Misala 11:29, 30; 12:25; 13:1.
Mosala monene ya misionere
Na nsima, likambo moko monene esalemaki. “Wana ezalaki bango kosalela Nkolo mpe kokila, [elimo santu, NW] elobi ete, Bótangwela ngai Balanaba na Saulo mpo na mosala mosili ngai kobyanga bango mpo na yango.” Kanisá naino! Elimo ya Yehova esɛngisi ete bango mibale bápesamela mosala ya monene. “Na bongo esilaki bango kotindama na [elimo santu, NW] balongwi kokenda na Selukia, mpe longwa wana batamboli na masuwa kino Kupulu.” Balanaba akokaki mpe kobéngama ntoma, to motindami.—Misala 13:2, 4; 14:14.
Nsima ya koleka na Kupulu mpe kobongwanisa Selegi Paulo, Moyangeli ya esanga yango, oyo ezalaki moko na bisanga ya Loma, bakendaki na Pelege, na sudi ya Asie Mineure, kuna Yoane Malako atikaki bango mpe azongaki na Yelusaleme. (Misala 13:13) Emonani ete kino wana Balanaba nde moto azalaki kokamba bango, mbala mosusu mpamba te azalaki na eksperiansi mingi. Nzokande, kobanda wana, ezali Saulo (sikawa abéngami Paulo) nde abandi kokamba. (Kokanisá na Misala 13:7, 13, 16; 15:2.) Balanaba azokisamaki nde na likambo yango? Te, azalaki moklisto oyo akɔmeli mpe na komikitisa nyonso asosolaki ete Yehova azali mpe kosalela moninga na ye na nguya. Na lisalisi na bango, Yehova alingaki ete bateritware mosusu eyoka nsango malamu.
Kutu, liboso ete bábengana bango na Antiokia ya Pisida, engumba mobimba eyokaki Liloba ya Nzambe epai na Paulo na Balanaba, mpe bato mingi bandimaki. (Misala 13:43, 48-52) Na Ikoni, ‘ebele monene na Bayuda mpe na [Bagreke, NW] bandimi.’ Yango epusaki Paulo na Balanaba báumela kuna ntango molai, ‘kosakoláká na molende mpo na Yehova, oyo azalaki kopesa bilembo na bikamwiseli bisalemi na mabɔkɔ na bango.’ Koyokáká ete bayangaki mwango ya kobola bango mabanga, Paulo na Balanaba bakimaki na mayele mpe bakobaki mosala na mokili na Lukaonia, na mboka na Lusutula, mpe na Delebe. Atako bakutanaki na makambo oyo etyaki bomoi na bango na likama na Lusutula, Balanaba na Paulo bakobaki ‘kolendisa mitema ya bayekoli, kopesáká bango toli ete báumela na kondima mpe kolobáká ete, Ekoki na biso kokɔta na Bokonzi na Nzambe na nzela na bolɔzi mingi.’—Misala 14:1-7, 19-22.
Basakoli mibale wana ya mpiko bapesaki nzela na eloko moko te ete ebangisa bango. Nzokande, bazongaki mpo na kolendisa baklisto ya sika na bisika oyo bakutanaki na botɛmɛli makasi, mpe emonani ete bazalaki kosunga mibali ya makoki mpo ete bákamba masangá oyo mautaki kosalema.
Likambo ya kokatama ngenga
Mbula soko 16 nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., Balanaba akɔtisamaki na likambo moko ya ntina mingi etalelaki kokatama ngenga. “Bamosusu balongwaki na Yuda mpe bayei [na Antiokia ya Sulia] kolakisa bandeko ete, Soko bokokatama ngenga na motindo na Mose te, bokokoka kobikisama te.” Balanaba na Paulo bayebaki ete yango ezali bongo te na kotaleláká makambo bamonaki, mpe kowelana ebimaki na ntina na likambo yango. Na esika ete básalela bokonzi na bango na makasi, basosolaki ete likambo yango esengeli kokatama mpo na bolamu ya bandeko banso. Na bongo, batindaki likambo yango na lisangani ya mikóló-bakambi na Yelusaleme, epai kuna lapolo na bango esungaki mpo na kokata likambo yango. Na nsima, Paulo na Balanaba, balobelami lokola “balingami . . . baoyo basili kotya bomoi na bango mpo na nkombo na Nkolo na biso Yesu Klisto,” bazalaki kati na baoyo bazwaki mokumba ya koyebisa ekateli yango epai ya bandeko na Antiokia. Ntango mokanda ya lisangani ya mikóló-bakambi etángamaki mpe masukulu masalemaki, bandeko ya lisangá ‘basepelaki na elendiseli’ yango mpe ‘babakisi nguya na bango.’—Misala 15:1, 2, 4, 25-32.
“Ntembe makasi ebimi”
Nsima ya koyoka makambo ya malamu mingi na ntina na Balanaba, tokoki kokanisa ete tokokoka kosala lokola ye te. Nzokande, “Mwana na kobɔndisa” azalaki moto ya kozanga kokoka lokola biso. Wana bazalaki kobongisa mobembo ya mibale na mosala ya misionere mpo na kotala masangá, matata ebimaki. Balanaba alingaki komema ndeko na ye Yoane Malako, kasi Paulo alingaki te, mpamba te Yoane Malako atikaki bango na mobembo ya liboso. “Ntembe makasi ebimi, bongo bakabwani, mpe Balanaba akamati Malako mpe akei na masuwa kuna na Kupulu. Nde Paulo aponi Sila, . . . mpe alongwi wana” mpe akei nzela mosusu.—Misala 15:36-40.
Likambo ya mawa mpenza! Atako bongo, lisolo yango eyebisi biso likambo mosusu na ntina na bomoto ya Balanaba. Nganga-mayele moko alobi ete: “Ekozala ntango nyonso lokumu ya Balanaba mpamba te andimaki ete oyo ekoya eya, mpe kotyela lisusu Malako motema.” Ndenge mokomi wana alobi, ekokaki kozala ete “motema oyo Balanaba atyelaki Malako esungaki ye ete amimonisa moto oyo abongi kotyelama motema mpe ezalaki lokola elendiseli mpo na kokokisa mokumba na ye.” Ndenge makambo malekaki, emonisaki ete Balanaba azalaki na elonga ya kotyela Malako motema, mpamba te na nsima, ata Paulo asosolaki ntina ya Malako kati na mosala ya boklisto.—2 Timoté 4:11; kokanisá na Bakolose 4:10.
Ndakisa ya Balanaba ekoki kotindika biso na kozwaka ntango mpo na koyoka, kososola, mpe kolendisa baoyo balɛmbi na motema mpe kopesa lisungi ebongi ntango tomoni ete bosɛnga ezali. Lisolo oyo emonisi bolingi malamu na ye mpo na kosalela bandeko na bopɔlɔ mpe na mpiko, bakisa matomba malamu oyo mazwamaki, ezali elendiseli. Ezali mpenza lipamboli kozala na bato lokola Balanaba kati na lisangá!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kobénga moto “mwana na” ezali ezaleli moko ezalaki komonisa ete moto yango azali na ezaleli wana mpenza. (Tángá Deteronome 3:18, NW, maloba na nse ya lokasa.) Na ekeke ya liboso, mbala mingi bazalaki kosalela bankombo ya kobakisa mpo na kobenda likebi likoló ya bizaleli ya moto moko. (Kokanisá na Malako 3:17.) Ezalaki lolenge bato nyonso bazalaki komonisa ete bayebi moto.
b Na kotalela makambo malobamaki kati na Mobeko ya Mose, bamosusu batunaki ndenge nini Balanaba, oyo azalaki Molevi, azalaki na elanga. (Mituya 18:20) Nzokande, tosengeli koyeba ete, elobami polele te soki elanga yango ezalaki na Palestine to na Kupulu. Lisusu, ekoki solo kozala ete yango ezalaki bobele eteni ya mabelé mpo na kokunda bibembe oyo Balanaba azwaki pembeni ya engumba Yelusaleme. Ata soki ezalaki ndenge nini, Balanaba apesaki biloko na ye mpo na kosunga bamosusu.
[Elilingi na lokasa 23]
Balanaba “azalaki mobali malamu mpe atondaki na elimo santu mpe na kondima”