MOKAPO 2
“Bokozala batatoli na ngai”
Ndenge oyo Yesu abongisaki bantoma na ye mpo bátambwisa mosala ya kosakola
Euti na Misala 1:1-26
1-3. Ndenge nini Yesu akabwanaki na bantoma na ye, mpe mituna nini tokoki komituna?
BANDA mwa bapɔsɔ, bantoma bazali komona makambo ya esengo oyo balingi kutu esila te! Lisekwa ya Yesu epesi bango esengo mingi mpenza. Banda mikolo 40, Yesu azali komonana mbala na mbala, mpe na libaku nyonso, azali koteya mpe kolendisa bayekoli na ye. Nzokande, oyo ezali mokolo ya nsuka oyo bakomona ye.
2 Yesu ná bantoma na ye bakutani na Ngomba ya Olive; ntango azali koloba na bango, bantoma bazali koyoka ye na likebi mpenza. Ntango Yesu asilisi koloba, asemboli mabɔkɔ mpo na kopambola bango. Na mbala moko, abandi kolongwa na mabele! Bayekoli na ye bazali kotala ye ntango azali komata. Na nsima, lipata moko ezipi ye mpe alimwe na miso na bango. Yesu alimwe, kasi bayekoli na ye bazali kaka kotala na likoló.—Luka 24:50; Mis. 1:9, 10.
3 Likambo yango ememi mbongwana monene na bomoi ya bantoma ya Yesu. Bakosala nini lokola Nkolo na bango, Yesu Kristo, amati na likoló? Tómitungisa te, Nkolo na bango asilaki kobongisa bango malamu mpo na kokoba mosala oyo abandisaki. Ndenge nini abongisaki bango mpo na mosala ya ntina mingi oyo atikelaki bango, mpe bango basalaki nini? Yango esengeli kotinda bakristo básala nini lelo oyo? Mokapo ya liboso ya Misala epesi biyano ya kolendisa mpenza na mituna yango.
“Bilembeteli mingi mpo na kondimisa” (Misala 1:1-5)
4. Ndenge nini Luka abandi lisolo na ye na mokanda ya Misala?
4 Na ebandeli ya mokanda na ye, Luka amonisi ete azali koloba na Teofile, moto oyo atindelaki Evanzile oyo akomaki.a Luka amonisi polele ete lisolo yango ezali kolandana ya lisolo ya liboso, elingi koloba lisolo ya Evanzile; yango wana, azongeli naino na mokuse makambo oyo ezali na nsuka ya Evanzile yango, asaleli elobeli mosusu mpe abakisi mwa makambo.
5, 6. (a) Nini esengelaki kosalisa bayekoli ya Yesu bákoba kozala na kondima makasi? (b) Ndenge nini “bilembeteli mingi mpo na kondimisa” esalisaka bakristo bázala na kondima?
5 Nini esengelaki kosalisa bayekoli ya Yesu bákoba kozala na kondima makasi? Na Misala 1:3, tozali kotánga boye mpo na Yesu: “Amimonisaki na bomoi epai na bango na bilembeteli mingi mpo na kondimisa bango ete azalaki na bomoi.” Na Biblia mobimba, kaka Luka, “monganga mpe ndeko ya bolingo” nde asaleli liloba oyo ebongolami na “bilembeteli mingi.” (Kol. 4:14) Ezali liloba moko oyo ezalaki kosalelama na mikanda ya minganga, mpe ezali kopesa likanisi ya bilembeteli oyo ezali kondimisa, oyo moto akoki kotyela ntembe te. Yesu apesaki bilembeteli ya ndenge wana. Amonanaki mbala ebele; na mabaku mosusu epai ya moyekoli moko to bayekoli mibale, kasi na mabaku mosusu epai ya bantoma nyonso, mpe na libaku mosusu, epai ya bandimi koleka 500. (1 Ko. 15:3-6) Yango ezali mpenza bilembeteli mpo na kondimisa!
6 Lelo oyo mpe, “bilembeteli mingi mpo na kondimisa” esalisaka bakristo bázala na kondima makasi. Ezali nde na bilembeteli oyo ezali kondimisa ete Yesu azalaki na bomoi awa na mabelé, akufaki mpo na masumu na biso, mpe na nsima asekwaki? Ɛɛ! Masolo ya solosolo ya bato oyo bamonaki makambo na miso, masolo oyo ekomami na Liloba ya Nzambe, ezali kopesa bilembeteli nyonso oyo tokoki kozala na mposa na yango. Koyekola masolo yango mpe kobondela Nzambe mpo na kosɛnga lisalisi na ye ekoki mpenza kokómisa kondima na biso makasi. Tóbosana te ete bilembeteli ya solosolo ekoki kosalisa moto azala na kondima ya solosolo, kasi na bindimelá te. Kondima ya solosolo ezali na ntina mingi mpo na kozwa bomoi ya seko.—Yoa. 3:16.
7. Ndakisa nini Yesu apesaki bayekoli na ye na ndenge oyo azalaki kosakola mpe koteya?
7 Yesu azalaki mpe “koyebisa bango makambo etali Bokonzi ya Nzambe.” Na ndakisa, alimbolaki bisakweli oyo emonisaki ete Masiya asengelaki konyokwama mpe kokufa. (Luka 24:13-32, 46, 47) Ntango Yesu alimbolaki polele mokumba na ye ya Masiya, alobelaki mingi Bokonzi ya Nzambe, mpamba te azalaki Mokonzi oyo Nzambe aponaki. Bokonzi ezalaki ntango nyonso motó ya likambo ya nsango oyo Yesu azalaki kosakola; lelo oyo mpe, bayekoli na ye balobelaka mingi Bokonzi ntango bazali kosakola.—Mat. 24:14; Luka 4:43.
“Tii na esika eleki mpenza mosika na mabele” (Misala 1:6-12)
8, 9. (a) Wapi mabunga mibale oyo bantoma ya Yesu bazalaki na yango? (b) Ndenge nini Yesu asembolaki makanisi ya bantoma na ye, mpe yango epesi bakristo liteya nini lelo oyo?
8 Ntango bantoma bayanganaki na Ngomba ya Olive, ezalaki mbala ya nsuka oyo bakutanaki na Yesu liboso amata na likoló. Batunaki ye boye: “Nkolo, ozali kozongisela Yisraele bokonzi na ntango oyo?” (Mis. 1:6) Na motuna yango, bantoma bamonisaki mabunga mibale oyo bazalaki na yango. Ya liboso, bazalaki kokanisa ete Bokonzi ya Nzambe ekozonga na Yisraele awa na mabele. Ya mibale, bazalaki kolikya ete Bokonzi oyo elakamaki elingaki kobanda koyangela “na ntango oyo,” elingi koloba na mikolo wana. Ndenge nini Yesu asembolaki makanisi na bango?
9 Na ntembe te, Yesu ayebaki ete libunga ya liboso elingaki kosembolama mosika te. Etikalaki moke bayekoli na ye bámona kobotama ya ekólo moko ya sika, Yisraele ya elimo. Likambo yango esalemaki mikolo zomi na nsima! Nzambe akataki boyokani ná ekólo Yisraele. Mpo na libunga ya mibale, Yesu alobaki na bango na boboto nyonso ete: “Koyeba bantango mpe bileko oyo Tata atyá na nse ya bokonzi na ye moko etali bino te.” (Mis. 1:7) Yehova azali Nkolo-ntango. Liboso Yesu akufa, ye moko alobaki ete ata Mwana ayebi te ‘mokolo mpe ngonga’ oyo nsuka ekoya, kasi “kaka Tata nde ayebi.” (Mat. 24:36) Lelo oyo, soki mokristo moko akómi na mposa ya koyeba mokolo oyo nsuka ya makambo ya ntango oyo ekoya, azali komitungisa mpo na likambo oyo etali ye te.
10. Bantoma bazalaki na elimo nini oyo biso mpe tosengeli kozala na yango, mpe mpo na nini?
10 Atako bongo, tosengeli te kotyola bantoma ya Yesu, bato oyo bazalaki na kondima makasi. Na komikitisa nyonso, bandimaki kosembolama. Longola yango, atako motuna na bango emonisi ete bazalaki na libunga, emonisi mpe ete bazalaki na makanisi ya malamu. Yesu azalaki mbala na mbala kolendisa bayekoli na ye ete: “Bokoba kosɛnzɛla.” (Mat. 24:42; 25:13; 26:41) Bazalaki kolala mpɔngi te na elimo, bazalaki koluka elembo oyo ekomonisa ete etikali moke Yehova asukisa makambo ya ntango oyo. Biso mpe tosengeli kozala na elimo ya ndenge wana. Kutu, lokola tozali na “mikolo ya nsuka,” ezali na ntina mingi tómonisa elimo yango.—2 Tim. 3:1-5.
11, 12. (a) Yesu apesaki bayekoli na ye etinda nini? (b) Mpo na nini Yesu alobelaki elimo santu liboso apesa etinda ya kosakola?
11 Yesu ayebisaki bantoma likambo oyo basengelaki kotyela likebi. Alobaki boye: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba, na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Nsango ya lisekwa ya Yesu esengelaki kosakolama liboso na Yerusaleme, epai babomaki ye. Na nsima, elingaki kopalangana na Yudea mobimba, na Samaria, mpe na bisika mosusu.
12 Yango wana, Yesu apesaki etinda ya kosakola kaka nsima ya kozongela elaka na ye ya kotinda elimo santu mpo na kosalisa bango. Yango ezali moko na bisika soki 40 oyo tokokuta maloba “elimo santu” na mokanda ya Misala. Mokanda yango emonisi mbala na mbala ete tokoki te kosala mokano ya Yehova kozanga lisalisi ya elimo santu. Yango wana, ezali na ntina mingi tóbondelaka ntango nyonso mpo na kosɛnga elimo yango! (Luka 11:13) Tozali mpenza na mposa ya elimo yango na eleko na biso.
13. Lelo oyo basaleli ya Nzambe basengeli kosakola tii epai wapi, mpe mpo na nini tosengeli kondima mokumba yango na esengo?
13 Lelo oyo, “esika eleki mpenza mosika na mabele” ezali lisusu te oyo bayekoli bakokaki kokanisa na ntango wana. Kasi, ndenge tomonaki yango na mokapo eleki, Batatoli ya Yehova bandimi na motema moko mokumba ya kopesa litatoli; bayebi ete Nzambe alingi ete bato ya ndenge nyonso báyoka nsango malamu ya Bokonzi na ye. (1 Tim. 2:3, 4) Omipesaka na mosala yango oyo ekobikisa bomoi ya bato? Mosala mosusu te epesaka mpenza esengo mpe ezali na ntina koleka mosala yango! Yehova akopesa yo makasi oyo osengeli na yango mpo na kosala mosala yango. Mokanda ya Misala ekomonisa yo mayele oyo osengeli kosalela mpe makanisi oyo osengeli kozala na yango mpo na kosala mosala yango malamu.
14, 15. (a) Baanzelu balobaki nini mpo na kozonga ya Kristo, mpe balingaki komonisa nini na maloba yango? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.) (b) Ndenge nini emonani ete Kristo azongaki “ndenge kaka” akendaki?
14 Ndenge tomonaki yango na ebandeli ya mokapo oyo, Yesu amataki na likoló mpe alimwaki na miso ya bayekoli na ye. Kasi, bantoma 11 batikalaki wana mpe bazalaki kaka kotala likoló. Nsukansuka, baanzelu mibale babimelaki bango mpe balobaki na bango boye: “Mibali ya Galile, mpo na nini botɛlɛmi bozali kotala likoló? Yesu wana oyo azalaki na bino mpe oyo Nzambe akamati ye, akoya mpe bongo ndenge kaka bomonaki ye azali komata na likoló.” (Mis. 1:11) Baanzelu yango balingaki nde koloba ete Yesu akozonga na nzoto ya mosuni, ndenge mangomba mosusu eteyaka? Te, balingaki koloba bongo te. Ndenge nini toyebi yango?
15 Baanzelu balobaki ete Yesu akozonga “ndenge kaka” akendaki, kasi te na nzoto wana.b Yesu akendaki ndenge nini? Bantoma bazalaki lisusu komona ye te ntango baanzelu bazalaki koloba na bango. Kaka bato moke, elingi koloba bantoma wana, nde basosolaki ete Yesu alongwaki na mabele mpe azongaki epai ya Tata na ye na likoló. Kristo asengelaki mpe kozonga kaka ndenge wana. Esalemaki mpe bongo. Lelo oyo, kaka bato moke oyo bazali na bososoli ya elimo nde bazali koyeba ete Yesu azwi bokonzi mpe azali koyangela. (Luka 17:20) Tosengeli kososola elembo ya kozala ya Yesu mpe koyebisa yango epai ya bato mosusu mpo bango mpe bámona ete mikolo etikali ya kotánga.
“Lakisá nani oponi” (Misala 1:13-26)
16-18. (a) Liteya nini tozwi na Misala 1:13, 14 na ntina etali mayangani ya bakristo? (b) Ndakisa ya Maria, mama ya Yesu, ezali koteya biso nini? (c) Mpo na nini makita ya lisangá ezali na ntina mingi lelo oyo?
16 Tokoki kokamwa te ete bantoma “bazongaki na Yerusaleme na esengo mingi.” (Luka 24:52) Kasi, ndenge nini basengelaki kolanda litambwisi mpe malako ya Kristo? Misala 1:13, 14 elobi ete bayanganaki na “shambrɛ ya likoló,” mpe ebakisi mwa makambo oyo esalisi biso tóyeba ndenge oyo makita ya ndenge wana ezalaki kosalema. Na eleko wana, bandako mingi na Palestine ezalaki na bashambrɛ oyo ezalaki likoló mpe ezalaki na baeskalye na libándá mpo na komata na bashambrɛ yango. Ekoki kozala ete “shambrɛ ya likoló” wana ezalaki na ndako oyo Misala 12:12 elobeli, ndako oyo ezalaki ya mama ya Marko. Ezala bongo to te, na ntembe te ezalaki esika moko ya mindɔndɔ te mpe ebongaki mpenza mpo bayekoli ya Kristo báyangana wana. Kasi, banani bazalaki na likita yango mpe bazalaki kosala nini?
17 Tomoni ete bato oyo bayanganaki na likita yango ezalaki kaka bantoma te, ezalaki mpe kaka mibali te. “Basi mosusu” bazalaki wana, ata mpe Maria, mama ya Yesu. Ezali mpe na esika yango nde Biblia elobeli Maria mpo na mbala ya nsuka. Tokoki mpenza kokanisa ete ntango azalaki na likita yango, azalaki koluka esika ya lokumu te, kasi azalaki na komikitisa mpe ayanganaki ná bandeko mosusu ya basi mpe ya mibali mpo na kosambela. Na ntembe te, abɔndisamaki mingi na komona ete na ntango wana, bana na ye mosusu nyonso minei ya mibali oyo bazalaki kondimela Yesu te ntango azalaki na bomoi, bazalaki mpe wana. (Mat. 13:55; Yoa. 7:5) Mibali yango babongwanaki mpenza nsima ya lisekwa ya ndeko na bango.—1 Ko. 15:7.
18 Lisusu, tótalela ntina oyo bayekoli yango bayanganaki: “Na bomoko mpenza, bango nyonso batingamaki na mabondeli.” (Mis. 1:14) Banda kala, koyangana ezalaka na ntina mingi na losambo ya bakristo. Toyanganaka mpo na kolendisana, mpo na kozwa malako mpe batoli mpe na koleka, mpo na kosambela Tata na biso ya likoló, Yehova. Mabondeli oyo tosalaka mpe banzembo ya masanzoli oyo toyembaka na bantango wana esepelisaka ye mingi mpe ezalaka na ntina mingi mpo na biso. Tótika soki moke te mayangani mosantu wana oyo elendisaka biso!—Ebr. 10:24, 25.
19-21. (a) Liteya nini tokoki kozwa na kotalela mokumba monene oyo Petro akokisaki na lisangá? (b) Mpo na nini moto mosusu asengelaki kozwa esika ya Yudasi, mpe ndenge oyo aponamaki ezali koteya biso nini?
19 Na ntango yango, bayekoli ya Kristo basengelaki kotalela likambo moko, mpe ntoma Petro azwaki likanisi ya kolobela yango. (Vɛrsɛ 15-26) Ndenge oyo Petro azongelaki makanisi ya malamu nsima ya kowangana Nkolo na ye mbala misato ezali mpenza kolendisa! (Mrk. 14:72) Biso nyonso tozalaka na bamposa ya mabe oyo ekoki komema biso na lisumu, mpe tosengeli kobosanaka te ete Yehova azali ‘malamu mpe asepelaka kolimbisa’ moto oyo abongoli mpenza motema.—Nz. 86:5.
20 Petro amonaki ete moto mosusu asengeli kozwa esika ya Yudasi, ntoma oyo atɛkaki Yesu. Kasi, nani abongaki kozwa esika na ye? Ntoma yango ya sika asengeli kozala moto oyo alandaki Yesu na boumeli ya mosala na ye mpe amonaki lisekwa na ye. (Mis. 1:21, 22) Likanisi yango eyokanaki na elaka oyo Yesu ye moko apesaki: “Bino baoyo bolandi ngai bokofanda mpe na bakiti ya bokonzi 12, mpe bokosambisa mabota 12 ya Yisraele.” (Mat. 19:28) Emonani mpenza ete mokano ya Yehova ezalaki ete bantoma 12 oyo balandaki Yesu na boumeli ya mosala na ye awa na mabele bázala “mabanga 12 ya moboko” mpo na Yerusaleme ya Sika. (Em. 21:2, 14) Yango wana, Nzambe asalisaki Petro asosola ete esakweli oyo elobaki ete, “moto mosusu azwa mokumba na ye ya mokɛngɛli,” etalelaki nde Yudasi.—Nz. 109:8.
21 Kasi, ndenge nini baponaki moto oyo azwaki esika ya Yudasi? Babwakaki mbɛsɛ, momeseno oyo ezalaki kosalelama mingi na ntango ya kala. (Mas. 16:33) Nzokande, yango ezali mbala ya nsuka oyo Biblia elobeli koponama na kobwaka mbɛsɛ. Emonani ete momeseno wana esukaki mwa moke na nsima, ntango bayekoli bazwaki elimo santu. Kasi, tótalela mpe mpo na nini babwakaki mbɛsɛ. Bantoma babondelaki boye: “Ee Yehova, yo moto oyebi mitema ya bato nyonso, na mibali oyo mibale, lakisá nani oponi.” (Mis. 1:23, 24) Balingaki ete Yehova ye moko apona. Matiasi, oyo na ntembe te azalaki na kati ya bayekoli 70 oyo Yesu atindaki bákende kosakola, aponamaki. Na bongo, Matiasi akómaki moko na “bantoma zomi na mibale.”c—Mis. 6:2.
22, 23. Mpo na nini tosengeli komemya mpe kotosa baoyo bazali kokamba lisangá lelo oyo?
22 Likambo yango ezali komonisa biso ntina oyo basaleli ya Nzambe basengeli kozala na ebongiseli ya malamu. Tii lelo oyo, mibali oyo bakokisi masɛngami baponamaka mpo na kozala bakɛngɛli na lisangá. Bankulutu batalelaka malamumalamu masɛngami ya Biblia mpo na bakɛngɛli, mpe babondelaka mpo elimo santu etambwisa bango. Na bongo, lisangá mobimba etalelaka mibali yango ete baponami na elimo santu. Mokomoko na biso amemyaka mpe atosaka litambwisi na bango, mpe yango elendisaka bomoko na kati ya lisangá.—Ebr. 13:17.
23 Lokola bayekoli balendisamaki na ndenge Yesu azalaki komonana epai na bango nsima ya lisekwa na ye mpe na ndenge oyo makambo ebongisamaki na lisangá, babongisamaki mpenza mpo na likambo oyo ezalaki liboso na bango. Tokolobela likambo yango ya ntina mingi na mokapo oyo elandi.
a Na Evanzile na ye, Luka abengaki mobali yango “Teofile, moto ya lokumu mingi,” likambo oyo etindaka bato mosusu bákanisa ete Teofile azalaki moto monene mpe azalaki naino mondimi te. (Luka 1:3) Kasi, na mokanda ya Misala, Luka abengi ye kaka, “Ee Teofile.” Bato mosusu ya mayele oyo bayekolaka maloba ya Biblia balobaka ete Teofile akómaki mondimi nsima ya kotánga Evanzile ya Luka; yango wana, ntango Luka atindelaki ye mokanda ya Misala, akómaki kotalela ye lokola ndeko na ye ya elimo, yango wana abengaki ye lisusu te “moto ya lokumu mingi.”
b Na esika yango, Biblia esaleli liloba ya Grɛki tropos, oyo elimboli “lolenge,” kasi te liloba morphê, oyo elimboli “nzoto.”
c Bambula mingi na nsima, Paulo aponamaki mpo azala “ntoma ya bikólo,” kasi azalaki moko na bantoma 12 te. (Rom. 11:13; 1 Ko. 15:4-8) Akokaki te koponama na mokumba wana ya ntina mpo azalaki te elongo na Yesu ntango Yesu azalaki awa na mabele.