MOKAPO 10
“Liloba ya Yehova ekobaki kopalangana”
Petro abimi na bolɔkɔ; minyoko elongi te kopekisa nsango malamu epalangana
Euti na Misala 12:1-25
1-4. Petro akutanaki na mokakatano nini, mpe olingaki komiyoka ndenge nini soki ozalaki na esika na ye?
PETRO abwakami na bolɔkɔ. Batyeli ye basoda mibale mpo na kokɛngɛla ye. Baporte minene ya bibende ekangami na makɛlɛlɛ makasi. Petro afandi na kati ya bolɔkɔ ntango molai, mbala mosusu mpe mikolo mingi, mpo na kozela ekateli oyo ekozwama mpo na ye. Azali komona eloko mosusu te kaka bifelo mpe bibende ya bolɔkɔ, minyɔlɔlɔ oyo bakangi ye, mpe basoda oyo bazali kokɛngɛla ye.
2 Petro ayoki ete bakateli ye etumbu ya makasi. Mokonzi Erode Agripa I alingi ete Petro abomama.a Kutu, Petro akolakisama liboso ya bato nyonso nsima ya Elekeli; etumbu ya liwa oyo bakateli ye ezali likabo oyo bapesi bato mpo na kosepelisa bango. Ekateli yango ezali kaka te mpo na kobangisa ye; mokonzi yango autaki kobomisa Yakobo, oyo azalaki ntoma lokola Petro, azalaki mpenza na makanisi ya koboma Petro.
3 Tokómi na mpokwa ya mokolo oyo ezali liboso ya mokolo oyo baponi mpo na koboma Petro. Ntoma yango azali kokanisa nini ntango afandi na molili na kati ya bolɔkɔ? Mbala mosusu azali kokanisa maloba oyo Yesu alobaki mwa bambula liboso ete mokolo mosusu, Petro akokangama mpe akomemama na makasi mpo na kobomama. (Yoa. 21:18, 19) Mbala mosusu Petro azali kokanisa ete mokolo yango ekómi.
4 Soki ozalaki na esika ya Petro, olingaki komiyoka ndenge nini? Bato mingi bakolɛmba nzoto, bakomona ete elikya ezali lisusu te. Kasi, ezali nde na likambo moko oyo ekoki kolongola moyekoli ya solosolo ya Yesu Kristo elikya nyonso? Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Petro mpe baninga na ye bakristo basalaki ntango bakutanaki na minyoko? Tótalela yango.
“Lisangá ekobaki kobondela Nzambe makasi” (Misala 12:1-5)
5, 6. (a) Mpo na nini mpe ndenge nini Mokonzi Erode Agripa I abandaki konyokola lisangá? (b) Mpo na nini liwa ya Yakobo ezalaki komekama monene mpo na lisangá?
5 Ndenge tomonaki yango na mokapo eleki, kobongwana ya Korneyi ná libota na ye, oyo bazalaki bato ya ekólo mosusu, ezalaki likambo ya sika mpe ya esengo mingi mpo na lisangá ya bokristo. Kasi, Bayuda oyo bazalaki bandimi te basepelaki ata moke te koyoka ete Bayuda mingi oyo bakómaki bakristo bazalaki kosambela elongo na bato oyo bazali Bayuda te.
6 Erode, mokonzi oyo atondaki na mayele mabe, amonaki ete likambo yango ezali libaku malamu mpo Bayuda básepela na ye; yango wana, akómaki konyokola bakristo. Na ntembe te, ayokaki ete ntoma Yakobo azalaki moninga mpenza ya Yesu Kristo. Yango wana, Erode, “abomaki Yakobo ndeko ya Yoane na mopanga.” (Mis. 12:2) Yango ezalaki komekama monene mpo na lisangá! Yakobo azalaki moko na bantoma misato oyo bamonaki kobongwana ya Yesu mpe makamwisi mosusu oyo bantoma mosusu bamonaki te. (Mat. 17:1, 2; Mrk. 5:37-42) Yesu abengaki Yakobo ná ndeko na ye Yoane “Bana ya nkake” mpo bazalaki motema mɔtɔmɔtɔ. (Mrk. 3:17) Na yango, lisangá ebungisaki motatoli moko ya mpiko mpe ya sembo, ntoma oyo balingaki mingi.
7, 8. Bandeko basalaki nini ntango bakangaki Petro?
7 Bayuda basepelaki mingi na liwa ya Yakobo, kaka ndenge Agripa alukaki yango. Yango wana, azwaki mpe mokano ya koboma Petro. Ndenge tomonaki yango na ebandeli, Agripa akangisaki Petro. Kasi, ekoki kozala ete mokonzi yango abosanaki te ete na mabaku mosusu bantoma babimaki ntango batyaki bango na bolɔkɔ, ndenge tomonaki yango na Mokapo 5. Mpo Petro azwa nzela ya kokima te, Erode asɛngaki ete bákanga Petro na minyɔlɔlɔ mpe bátya ye na kati ya bakɛngɛli mibale, mpe bápona bakɛngɛli 16 oyo bakobanda kolandana butu moi mpo na kokɛngɛla ye. Soki akimi, bakɛngɛli yango bakozwa etumbu oyo Petro asengelaki kozwa, elingi koloba bakobomama. Liboso ya mokakatano ya ndenge wana, bakristo mosusu basalaki nini?
8 Bandeko ya lisangá bayebaki malamu likambo oyo basengeli kosala. Misala 12:5 elobi boye: “Na yango Petro akangamaki kaka na bolɔkɔ, kasi lisangá ekobaki kobondela Nzambe makasi mpo na ye.” Ya solo, bandeko yango bazalaki kobondela makasi mpenza mpo na ndeko na bango; bazalaki kutu kosala malɔmbɔ. Liwa ya Yakobo elongolaki bango elikya te; etindaki mpe bango te bákanisa ete libondeli ezali na ntina te. Mabondeli ezali na ntina mingi na miso ya Yehova. Soki tozali kobondela na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso. (Ebr. 13:18, 19; Yak. 5:16) Likambo yango ezali liteya oyo bakristo basengeli kozwa lelo oyo.
9. Na oyo etali libondeli, liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo bakristo mosusu basalaki mpo na Petro?
9 Oyebi bandeko oyo bazali na mikakatano? Mbala mosusu bazali na minyoko, Leta epekisi mosala na bango to bazali na makama. Ebongi mpenza kobondela makasi mpo na bango! Mbala mosusu mpe oyebi bandeko oyo bazali kobunda na mikakatano mosusu oyo emonanaka polele te, na ndakisa matata na kati ya libota, kolɛmba nzoto, to makambo mosusu oyo ekoki kolɛmbisa kondima na bango. Soki ozali kozwa ntango ya kokanisa liboso ya kobondela, okoki koyeba bandeko oyo okoki kotánga bankombo na bango ntango ozali kobondela Yehova, “Moyoki ya libondeli.” (Nz. 65:2) Na ntembe te, yo mpe olingaka ete bandeko básala bongo mpo na yo ntango okutani na mikakatano.
“Landá ngai” (Misala 12:6-11)
10, 11. Lobelá ndenge oyo anzelu ya Yehova abimisaki Petro na bolɔkɔ.
10 Petro azalaki nde komitungisa mpo na likambo oyo ekokaki kokómela ye? Tokoki koyeba te; kasi, na butu ya nsuka oyo alekisaki na bolɔkɔ, alalaki mpɔngi makasi na katikati ya bakɛngɛli mibale oyo bazalaki kolala ata moke te. Na ntembe te, mobali yango ya kondima ayebaki ete ata soki likambo nini ekokómela ye, azalaki na libateli ya Yehova. (Rom. 14:7, 8) Ezala ndenge nini, Petro akokaki te kokanisa makambo ya kokamwa oyo elingaki kosalema mosika te. Na mbala moko, pole moko makasi etondaki na esika oyo azalaki. Anzelu moko oyo, na ntembe te, bakɛngɛli bazalaki komona ye te, atɛlɛmaki wana mpe alamusaki Petro. Minyɔlɔlɔ oyo ekangaki mabɔkɔ ya Petro, oyo ezalaki komonana ete ekoki kokatana te, ekweaki yango moko!
11 Anzelu azalaki kopesa Petro mitindo na maloba mokuse: “Tɛlɛmá noki! . . . Latá bilamba mpe basandale na yo. . . . Latá elamba na yo ya likoló.” Petro atosaki mbala moko. Na nsima, anzelu alobaki ete: “Landá ngai,” mpe Petro atosaki. Babimaki na bolɔkɔ, balekaki liboso ya bakɛngɛli oyo bazalaki libándá, mpe na kimya nyonso, bakómaki kopusana na porte monene ya ebende. Ndenge nini balingaki koleka porte yango? Soki Petro amitunaki motuna yango, aumelaki te kozwa eyano. Ntango bapusanaki pene ya porte, efungwamaki “kaka yango moko.” Liboso Petro azwa ntango ya kokanisa, balekaki na porte mpe bakómaki na balabala, mpe anzelu alimwaki. Petro atikalaki wana, mpe na ntango yango amonaki ete makambo yango esalemaki mpenza. Ezalaki ndɔtɔ te. Abimaki na bolɔkɔ!—Mis. 12:7-11.
12. Mpo na nini kokanisa ndenge oyo Yehova abikisaki Petro ekoki kobɔndisa biso?
12 Tokoki mpenza kobɔndisama soki tokanisi nguya ezangi nsuka oyo Yehova azali na yango mpo na kobikisa basaleli na ye! Ekólo oyo elekaki na nguya na mokili mobimba nde epesaki bokonzi epai ya moto oyo akangisaki Petro. Atako bongo, Petro abimaki na bolɔkɔ! Ya solo, Yehova asalaka makamwisi ya ndenge wana mpo na basaleli na ye nyonso te. Abikisaki Yakobo te; abikisaki mpe Petro te na mbala oyo bakangaki ye lisusu, ntango maloba ya Yesu mpo na ntoma yango ekokisamaki. Lelo oyo, bakristo balikyaka te kobikisama na ndenge ya likamwisi. Nzokande, babosanaka te ete Yehova abongwani te. (Mal. 3:6) Mpe mosika te, akotinda Mwana na ye abimisa bamilio ya bato na bolɔkɔ oyo eleki mpenza mabe, elingi koloba na liwa. (Yoa. 5:28, 29) Elikya yango ekoki mpenza kopesa biso makasi ntango tokutani na mikakatano na bomoi na biso.
“Bamonaki ye mpe bakamwaki” (Misala 12:12-17)
13-15. (a) Bandeko oyo bayanganaki na ndako ya Maria basalaki nini ntango Petro akómaki kuna? (b) Kobanda wana, mokanda ya Misala elobeli mingi nini, kasi Petro akobaki kosala nini mpo na bandeko na ye bakristo?
13 Petro atɛlɛmaki na balabala, na kati ya molili, mpe azalaki kokanisa epai wapi asengeli kokende. Na mbala moko, azwaki likanisi. Ndako ya Maria, mokristo moko ya mwasi, ezalaki mosika te. Ekoki kozala ete Maria azalaki mwasi oyo mobali akufá mpe azalaki na mwa bozwi; azalaki na ndako ya monene oyo lisangá mobimba ekoki koyangana. Maria azalaki mama ya Yoane Marko, oyo mokanda ya Misala elobeli mpo na mbala ya liboso na lisolo oyo; na nsima, elenge yango akómaki lokola mwana mpo na Petro. (1 Pe. 5:13) Na butu yango, bandeko mingi bazalaki kobondela makasi mpenza na ndako ya Maria atako ngonga ekómaki mosika mpenza. Na ntembe te, bazalaki kobondela mpo ete Petro abima na bolɔkɔ, kasi ndenge oyo Yehova ayanolaki na libondeli na bango ekamwisaki bango!
14 Petro abɛtaki na porte oyo ezali komema na lopango liboso ya ndako. Mwana mwasi moko ya mosala akendaki na porte; nkombo na ye ezalaki Roda—nkombo ya Grɛki oyo basi mingi bazalaki na yango mpe nkombo yango elimboli “Rose.” Elenge yango akamwaki mpenza. Ayokaki mongongo ya Petro! Na esika afungola porte, na esengo nyonso, atikaki Petro na balabala, mpe azongaki mbangu na kati ya ndako, mpe ayebisaki bandeko ete Petro azali wana. Balobaki ete azali na ligboma, kasi ye mpe atikaki te. Azalaki kotingama ete ezali solo. Bamosusu oyo bamonaki ete mbala mosusu azali kokosa te, balobaki ete ekoki kozala anzelu ya Petro. (Mis. 12:12-15) Na ntango yango, Petro akobaki kobɛta mpe nsukansuka, bakendaki na porte mpe bafungolaki.
15 Petro azalaki liboso ya porte, “bamonaki ye mpe bakamwaki”! (Mis. 12:16) Petro apekisaki makɛlɛlɛ oyo bazalaki kosala lokola bazalaki na esengo mpe ayebisaki bango makambo oyo ekómelaki ye, mpe asɛngaki bango bápesa nsango yango epai ya moyekoli Yakobo mpe bandeko; na nsima atikaki bango, noki te basoda ya Erode báya kokuta ye wana. Petro alongwaki wana mpo na kokoba kosalela Nzambe na bosembo na esika oyo akoki kozala na kimya. Longola kaka na lisolo oyo elobeli makanisi oyo apesaki na likambo ya kokatama ngenga, ndenge elobami na Misala mokapo 15, mokanda yango elobeli ye lisusu te. Na nsima, mokanda ya Misala elobeli mingi mosala mpe mibembo ya ntoma Paulo. Atako bongo, tokoki kolikya ete Petro alendisaki kondima ya bandeko na ye na bisika nyonso oyo akendaki. Ntango Petro akabwanaki na bandeko oyo bazalaki na ndako ya Maria, na ntembe te bakristo yango bazalaki na esengo.
16. Mpo na nini tozali na elikya ete tokomona makambo mingi ya esengo na mikolo ezali koya?
16 Na bantango mosusu Yehova asalelaka basaleli na ye makambo koleka kutu oyo bakokaki kolikya, mpe yango epesaka bango esengo mingi. Bandeko bazalaki na esengo ya ndenge wana ntango bamonaki Petro. Biso mpe lelo oyo, tokoki koyoka ndenge yango ntango Yehova apamboli biso. (Mas. 10:22) Na mikolo ekoya, tokomona ndenge oyo bilaka ya Yehova ekokokisama na mabele mobimba. Na ntembe te, makambo oyo tokomona ekoleka nyonso oyo tokoki kokanisa lelo oyo. Yango wana, soki totikali sembo, tokoki kolikya makambo mingi ya esengo na mikolo ekoya.
“Anzelu ya Yehova abɛtaki ye” (Misala 12:18-25)
17, 18. Nini esalaki ete bato báluka kosepelisa Erode na koleka ndelo?
17 Erode mpe akamwaki ndenge oyo Petro abimaki na bolɔkɔ; kasi, ezalaki likambo ya esengo te mpo na ye. Erode atindaki nokinoki ete báluka Petro malamumalamu mpe bátuna bakɛngɛli. Bakɛngɛli yango ‘bazwaki etumbu,’ na ntembe te, babomamaki. (Mis. 12:19) Erode Agripa azalaki koyokela bato mawa te to kolimbisa. Moto yango ya motema mabe azwaki nde etumbu?
18 Ekoki kozala ete Agripa ayokaki mpenza nsɔni lokola alongaki te kobomisa Petro, kasi likambo moko esalisaki ye abosana nsɔni wana. Banguna na ye basalaki likambo oyo esɛngaki ete bákende koluka kimya mpe emonani ete Erode asepelaki na libaku oyo azwaki ya kosala mitingi liboso ya ebele ya bato. Luka akomaki ete na libaku yango, “Erode alataki bilamba ya bokonzi.” Josèphe, Moyuda moko oyo azalaki mokomi ya makambo ya kala, akomaki ete elamba ya Erode esalemaki na palata mpe soki moi ebɛti yango, ezalaki kongɛnga. Na nsima, mokonzi yango ya lolendo asalaki diskur. Ebele ya bato oyo bazalaki koluka kosepelisa mokonzi bagangaki ete: “Mongongo ya nzambe, kasi ya moto te!”—Mis. 12:20-22.
19, 20. (a) Mpo na nini Yehova apesaki Erode etumbu? (b) Libɔndisi nini tokoki kozwa na lisolo ya liwa ya mbalakaka ya Erode?
19 Lokumu ya ndenge wana ebongaki nde na Nzambe; yango wana Nzambe asepelaki na likambo yango te! Erode azalaki na likoki ya koboya ete likambo ya mabe ekómela ye. Akokaki kopekisa ebele ya bato wana to mpe komonisa bango ete aboyi lokumu wana. Nzokande, likambo oyo ekómelaki ye emonisaki bosolo ya lisese oyo elobi ete: “Lolendo ememaka na libebi.” (Mas. 16:18) “Na mbala moko anzelu ya Yehova abɛtaki ye,” mpe moto yango ya lolendo akufaki liwa ya nsɔmɔ mpenza. “Nkusu elyaki [Erode] mpe akufaki.” (Mis. 12:23) Josèphe mpe akomaki ete Agripa akufaki liwa ya mbalakaka mpe abakisaki ete liboso mokonzi akufa, alobaki ete azali kokufa mpo andimaki lokumu oyo bato bapesaki ye. Josèphe akomaki ete Agripa anyokwamaki mikolo mitano liboso akufa.b
20 Ntango mosusu emonanaka lokola nde bato oyo babangaka Nzambe te bazwaka etumbu te atako bazali kosala makambo ndenge na ndenge ya mabe. Yango esengeli kokamwisa biso te, mpo “mokili mobimba ezali na mabɔkɔ ya moto mabe.” (1 Yoa. 5:19) Atako bongo, ntango mosusu basaleli ya sembo ya Nzambe batungisamaka soki bato mabe bazali kozwa etumbu te. Yango ezali moko na bantina oyo masolo lokola oyo ebɔndisaka mpenza. Tomoni ete Yehova asalaki likambo moko oyo ezali kokundwela basaleli na ye nyonso ete alingaka boyengebene. (Nz. 33:5) Ata ndele, boyengebene na ye ekolonga.
21. Liteya monene nini ezali na Misala mokapo 12, mpe mpo na nini ekoki kobɔndisa biso lelo oyo?
21 Lisolo yango esuki na liteya moko ya kolendisa, elobi ete: “Liloba ya Yehova ekobaki kopalangana mpe bato mingi bakómaki bandimi.” (Mis. 12:24) Ndenge oyo mosala ya kosakola ezalaki kokola na ntango wana ekoki kotinda biso tókanisa ndenge oyo Yehova azali kopambola mosala yango na ntango na biso. Ezali polele ete lisolo ya Misala mokapo 12 ezali libosoliboso te mpo na koyebisa ndenge oyo ntoma moko akufaki mpe ndenge oyo mosusu abikaki. Ezali komonisa ndenge oyo Yehova asukisaki Satana oyo azalaki na mokano ya koboma lisangá ya bokristo mpe ya kopekisa mosala ya kosakola oyo ezalaki kosalema na molende. Mikano wana elongaki te, mpe mikano nyonso ya ndenge wana ekolonga te. (Yis. 54:17) Nzokande, baoyo bamitye na ngámbo ya Yehova mpe ya Yesu Kristo bazali kosala mosala oyo ekolonga kaka. Yango ezali likambo ya kolendisa mpenza! Tozali na libaku malamu ya kosangana na mosala ya kopalanganisa “liloba ya Yehova” lelo oyo!
a Talá etanda “Mokonzi Erode Agripa I,” na lokasa 79.
b Monganga moko akomaki ete mpasi oyo ekómelaki mokonzi wana, oyo Josèphe mpe Luka balobeli, ekokaki kouta na banyama ya libumu oyo ekangaka misɔpɔ ya moto tii ekoboma ye. Ntango mosusu moto asanzaka banyama yango, to mpe ebimaka na nzoto ya moto ntango akufi. Buku moko ya minganga elobi boye: “Lokola Luka azalaki monganga, ndenge oyo alobeli likambo yango na bosikisiki emonisi ete liwa [ya Erode] ezalaki mpenza nsɔmɔ.”