MOKAPO 13
‘Bokabwani ebimaki’
Likambo ya kokatama ngenga ekei na lisangani ya mikóló-bakambi
Euti na Misala 15:1-12
1-3. (a) Likambo nini ekokaki kokabola lisangá ya bokristo na siɛklɛ ya liboso? (b) Tokozwa nini nsima ya kotalela lisolo yango na mokanda ya Misala?
PAULO ná Barnabasi bazali na esengo mingi. Bazongi na Antiokia ya Siri nsima ya mobembo na bango ya liboso na mosala ya misionɛrɛ. Bazali na esengo mingi ndenge Yehova “afungolelaki bikólo porte ya kondima.” (Mis. 14:26, 27) Kutu, Antiokia yango moko eningani mpo na nsango malamu mpe “bato mingi” ya bikólo mosusu bazali koya na lisangá.—Mis. 11:20-26.
2 Eumeli te, nsango ya bokoli yango ekómi tii na Yudea. Kasi, na esika bato nyonso básepela, basusu babimisi lisusu ntembe na likambo ya kokatama ngenga. Ndenge nini Bayuda oyo bakómi bakristo basengeli kotalela bandeko na bango oyo bazali Bayuda te, mpe ndenge nini bato yango basengeli kotalela Mibeko ya Moize? Likambo yango ebimisi ntembe oyo ekómi makasi mpe ekoki kokabola lisangá ya bokristo. Ndenge nini likambo yango ekosila?
3 Tokotalela lisolo yango na mokanda ya Misala mpe tokozwa mateya mingi ya ntina. Yango ekoki kosalisa biso tómonisa bwanya soki makambo oyo ekoki kokabola biso ebimi na lisangá.
“Soki bokatami ngenga te” (Misala 15:1)
4. Makanisi nini ya mabe bakristo mosusu bazalaki kolendisa, mpe yango ebimisi motuna nini?
4 Moyekoli Luka akomaki boye: “Mibali mosusu bautaki na Yudea mpe babandaki koteya bandeko [na Antiokia] ete: ‘Soki bokatami ngenga te na kolanda momeseno ya Moize, bokoki kobikisama te.’” (Mis. 15:1) Lisolo elobi te soki “mibali” yango bazalaki Bafarisai liboso bákóma bakristo. Kasi, emonani ete makanisi ya mwa lingomba wana ya Bayuda oyo ezalaki kotingama na Mibeko ekɔtelaki bango makasi. Lisusu, ekoki kozala ete bazalaki komonisa lokola nde makambo oyo bazalaki koloba eutaki epai ya bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme. (Mis. 15:23, 24) Kasi, mpo na nini Bayuda oyo bakómaki bakristo bazalaki kaka kolendisa likambo ya kokatama ngenga mbula soki 13 nsima ya ntango oyo ntoma Petro, na litambwisi ya Nzambe, afungolaki nzela mpo ete bato ya bikólo oyo bakatami ngenga te, bákɔta na lisangá ya bokristo?a—Mis. 10:24-29, 44-48.
5, 6. (a) Ekoki kozala mpo na ntina nini Bayuda mosusu bazalaki kotingama na likambo ya kokatama ngenga? (b) Kondimana ya kokatama ngenga ezalaki nde na kati ya kondimana ná Abrahama? Limbolá. (Talá maloba na nse ya lokasa.)
5 Ekoki kozala mpo na bantina mingi. Ya liboso, Yehova ye moko nde atindaki ete mibali bákatamaka ngenga, mpe ezalaki komonisa ete bazali na boyokani elongo na ye. Yehova apesaki etinda yango liboso asala kondimana ya Mibeko, mpe azongelaki yango na Mibeko; apesaki etinda yango liboso epai ya Abrahama ná libota na ye.b (Lev. 12:2, 3) Na Mibeko ya Moize, ata bapaya basengelaki kokatama ngenga liboso bándima bango básala makambo mosusu, na ndakisa, kolya Elekeli. (Kob. 12:43, 44, 48, 49) Kutu, mpo na Moyuda, mobali oyo akatami ngenga te azali mbindo.—Yis. 52:1.
6 Yango wana, esengelaki ete Bayuda oyo bakómaki bakristo bázala na kondima mpe na komikitisa mpo bándima liteya wana oyo emonisamaki. Kondimana ya sika ezwaki esika ya kondimana ya Mibeko; na yango, kobotama Moyuda ezalaki lisusu te kosala ete moto azala mbala moko na libota ya Nzambe. Lisusu, mpo na Bayuda oyo bakómaki bakristo, oyo bazalaki kofanda na bisika oyo Bayuda bazalaki mingi—na ndakisa baoyo bazalaki na Yudea—ezalaki kosɛnga mpiko mingi mpo na kosakola Kristo mpe kondima ete bakristo oyo bazalaki bato ya bikólo, baoyo bakatamá ngenga te, bazali bandeko na bango.—Yir. 31:31-33; Luka 22:20.
7. Liteya nini “mibali [oyo] bautaki na Yudea” bakangaki ntina na yango te?
7 Ya solo, mitinda ya Nzambe ebongwanaki te. Yango wana, makanisi mingi oyo ezali na kondimana ya sika euti na Mibeko ya Moize. (Mat. 22:36-40) Na ndakisa, mpo na likambo etali kokatama ngenga, Paulo akomaki boye na nsima: “Moyuda ezali nde moto oyo azali bongo na kati, mpe kokatama ngenga na ye ezali oyo ya motema na elimo, kasi te na mibeko oyo ekomami.” (Rom. 2:29; Mib. 10:16) “Mibali [oyo] bautaki na Yudea” bakangaki ntina ya mateya yango te mpe bazalaki koloba ete Nzambe alongolaki te mobeko ya kokatama ngenga. Bandimaki nde kosembola makanisi na bango?
“Bokabwani mpe ntembe” (Misala 15:2)
8. Mpo na nini likambo ya kokatama ngenga ekómaki na lisangani ya mikóló-bakambi na Yerusaleme?
8 Luka abakisaki boye: “Ntango bokabwani mpe ntembe moko makasi ebimaki kati na bango [mibali oyo “bautaki na Yudea”] ná Paulo mpe Barnabasi, ebongiseli ezwamaki ete Paulo ná Barnabasi mpe bamosusu na kati na bango bámata epai ya bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme mpo na likambo yango.”c (Mis. 15:2) “Bokabwani mpe ntembe” ezalaki komonisa ete bato na bato bazalaki kotingama na makanisi na bango mpe bazalaki koluka kondimisa basusu, mpe lisangá ya Antiokia ekokaki te kokata likambo yango. Mpo na kobatela kimya mpe bomoko, bandeko ya lisangá yango bamonisaki bwanya, bayokanaki ete bámema likambo yango epai ya “bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme,” oyo bazalaki lisangani ya mikóló-bakambi. Liteya nini tokoki kozwa epai ya bankulutu ya Antiokia?
9, 10. Na ndenge nini bandeko na Antiokia, ata mpe Paulo ná Barnabasi, batikelá biso ndakisa malamu lelo oyo?
9 Liteya moko ya ntina mingi oyo tokoki kozwa ezali ete tosengeli kotyela ebongiseli ya Nzambe motema. Tókanisa naino: Bandeko ya Antiokia bayebaki ete bakristo nyonso oyo bazalaki bandeko ya lisangani ya mikóló-bakambi bazalaki Bayuda. Atako bongo, batyelaki bango motema ete bakosilisa likambo ya kokatama ngenga na boyokani na Makomami. Mpo na nini? Bandeko bazalaki na elikya ete Yehova akotambwisa makambo na nzela ya elimo santu mpe ya Mokonzi ya lisangá, Yesu Kristo. (Mat. 28:18, 20; Ef. 1:22, 23) Ntango makambo minene ebimi lelo oyo, tólandaka ndakisa malamu ya bandeko ya Antiokia, tótyaka motema na ebongiseli ya Nzambe mpe Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo.
10 Tozwi mpe liteya ete tosengeli kozala na komikitisa mpe na motema molai. Paulo ná Barnabasi baponamaki na elimo santu mpo bákende epai ya bato ya bikólo; kasi, bamonaki te ete lokola bazwaki mokumba wana, bazalaki na bokonzi ya kosilisa likambo ya kokatama ngenga kaka kuna na Antiokia. (Mis. 13:2, 3) Lisusu, na nsima Paulo akomaki boye: “Namataki [na Yerusaleme] mpo emoniseli esɛngaki ete namata kuna”—yango emonisi ete Nzambe nde azalaki kotambwisa makambo. (Gal. 2:2) Lelo oyo bankulutu basalaka makasi bámonisa elimo wana ya komikitisa mpe ya motema molai ntango makambo oyo ekoki kokabola bandeko ebimi. Na esika báwelana, batalelaka Biblia mpe balandaka malako ya moombo ya sembo mpo na kozwa litambwisi ya Yehova.—Flp. 2:2, 3.
11, 12. Mpo na nini ezali na ntina tózela Yehova?
11 Na bantango mosusu, ekoki kosɛnga tózela Yehova abakisa boyebi na biso na likambo moko. Tóbosana te ete na ntango ya Paulo, bandeko bazelaki tii na mobu 49 T.B., mbula soki 13 kobanda ntango Korneyi atyamaki mafuta na elimo na mobu 36 T.B., liboso ete Yehova amonisa polele soki bakristo oyo bazalaki bato ya bikólo basengelaki kokatama ngenga to te. Mpo na nini ntango molai ndenge wana? Mbala mosusu Nzambe alingaki ete ntango eleka mingi mpo Bayuda ya sembo bándima mbongwana monene wana mpe bámesana na yango. Ya solo, kolongolama ya kondimana ya kokatama ngenga oyo Nzambe asalaki ná Abrahama, nkɔkɔ na bango oyo balingaki mingi, esilaki koumela mbula 1 900, na yango ezalaki likambo ya moke te!—Yoa. 16:12.
12 Ezali mpenza libaku malamu ndenge Tata na biso ya likoló oyo atondi na motema molai mpe na boboto ateyaka biso mpe abongisaka biso! Yango ememelaka biso ntango nyonso matomba. (Yis. 48:17, 18; 64:8) Yango wana, tótika ata mokolo moko te ete lolendo etinda biso tótingama na makanisi na biso to tóboya kondima mbongwana oyo ekɔti na ndenge ya kotambwisa makambo to mpe ndimbola ya sika na liteya moko ya Biblia. (Mos. 7:8) Soki omoni ata mwa elembo moke ya elimo yango epai na yo, zwá ntango ya kobondela mpe komanyola mitinda oyo ezali na Misala mokapo 15!d
13. Ndenge nini tokoki komekola motema molai ya Yehova na mosala ya kosakola?
13 Ekoki kosɛnga ete tómonisa motema molai ntango tozali koyekola Biblia na bato oyo bazali na mokakatano mpo na kotika bindimeli na bango ya kala to mimeseno oyo Biblia endimi te. Na ntango yango, ekoki kosɛnga tótika mwa ntango mpo elimo ya Nzambe esala mosala na mitema na bango. (1 Ko. 3:6, 7) Ekozala mpe malamu tóbondelaka mpo na likambo yango. Na ntango oyo Nzambe akolinga mpe na ndenge oyo akobongisa, akosalisa biso tóyeba likambo oyo tosengeli kosala.—1 Yoa. 5:14.
Balobelaki “likambo mokomoko” ya kolendisa (Misala 15:3-5)
14, 15. Ndenge nini bandeko ya lisangá ya Antiokia bapesaki lokumu epai ya Paulo, Barnabasi, mpe bandeko mosusu oyo basalaki na bango mobembo, mpe ndenge nini Paulo ná baninga na ye balendisaki bandeko?
14 Luka alobi lisusu boye: “Lisangá ekendaki kotika bango na nzela mpe bato yango bakobaki mobembo na bango, bakatisaki Fenisia ná Samaria, bazalaki koyebisa likambo mokomoko oyo etali kobongwana ya bato ya bikólo, mpe bazalaki kopesa bandeko nyonso esengo monene.” (Mis. 15:3) Ndenge bakendaki kotika Paulo, Barnabasi, mpe bandeko mosusu oyo basalaki na bango mobembo, bandeko ya lisangá wana bapesaki bango lokumu na ndenge bamoniselaki bango bolingo ya bondeko; emonisi mpe ete bandeko yango balingaki ete Nzambe apambola bango. Bandeko ya Antiokia bapesi biso mpe ndakisa malamu na likambo yango! Opesaka bandeko na yo ya elimo lokumu, “mingimingi [bankulutu] baoyo bazali kosala mosala makasi na liloba mpe na mateya ya Nzambe”?—1 Tim. 5:17.
15 Na nzela na bango, bandeko oyo bazalaki kosala mobembo balendisaki bandeko na bango bakristo na Fenisia mpe na Samaria na ndenge bayebisaki bango “likambo mokomoko” ya mosala oyo basalaki epai ya bato ya bikólo. Ekoki kozala ete bakristo mosusu oyo bayokaki makambo yango bazalaki Bayuda oyo bakimaki nsima ya liwa ya Stefano mpe bakendaki kofanda na bitúká wana. Lelo oyo mpe, bandeko na biso, mingimingi baoyo bazali kokutana na minyoko, balendisamaka ntango bazali koyoka ndenge Yehova azali kopambola mosala ya kokómisa bato bayekoli. Oyanganaka na makita, mayangani ya minene mpe ya mike mpo oyoka bansango yango mpe otángaka masolo ya bandeko na mikanda ezala na papye to na site jw.org?
16. Nini emonisi ete likambo ya kokatama ngenga ekómaki monene?
16 Nsima ya kosala mobembo ya kilomɛtrɛ soki 550 na sudi, nsukansuka bandeko oyo bautaki na Antiokia bakómaki na Yerusaleme. Luka akomaki boye: “Ntango bakómaki na Yerusaleme, lisangá, bantoma mpe bankulutu bayambaki bango na boboto, mpe bayebisaki ebele ya makambo oyo Nzambe asalaki na nzela na bango.” (Mis. 15:4) Kasi, “bato mosusu ya mwa lingomba ya Bafarisai oyo bakómaki bandimi, batɛlɛmaki na bakiti na bango mpe balobaki ete: ‘Esengeli kokata bango ngenga mpe kopesa bango mitindo ete bátosa Mibeko ya Moize.’” (Mis. 15:5) Tomoni mpenza ete likambo ya kokatama ngenga ya bakristo oyo bazalaki Bayuda te ekómaki monene, mpe esengelaki kosilisa yango.
“Bantoma ná bankulutu bayanganaki” (Misala 15:6-12)
17. Banani bazalaki na lisangani ya mikóló-bakambi na Yerusaleme, mpe mpo na nini “bankulutu” mpe bazalaki na lisangani yango?
17 Masese 13:10 elobi: “Bwanya ezali epai ya baoyo balukaka toli.” Na kolanda etinda yango, “bantoma ná bankulutu bayanganaki mpo na kotalela likambo [ya kokatama ngenga].” (Mis. 15:6) “Bantoma ná bankulutu” bazalaki kozwa bikateli mpo na lisangá mobimba ya bokristo, kaka ndenge Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaka lelo oyo. Mpo na nini “bankulutu” bazalaki kosala elongo na bantoma? Tóbosana te ete ntoma Yakobo abomamaki mpe ete na eleko moko, ntoma Petro akɔtaki bolɔkɔ. Soki makambo ya ndenge wana ekómeli bantoma mosusu, bandeko mosusu oyo bazalaki wana, oyo bazalaki bakristo batyami mafuta mpe bakɔmɛli na elimo, balingaki kokoba kotambwisa lisangá.
18, 19. Petro alobaki maloba nini ya kondimisa mpenza, mpe bayoki na ye basengelaki kokóma na makanisi nini?
18 Luka abakisi boye: “Nsima ya ntembe makasi oyo ebimaki, Petro atɛlɛmaki mpe alobaki . . . : ‘Mibali, bandeko, boyebi malamu ete banda mikolo ya liboso Nzambe aponaki ngai na kati na bino ete na monɔkɔ na ngai bato ya bikólo báyoka liloba ya nsango malamu mpe bándima. Mpe Nzambe, oyo ayebaka motema, atatolaki na ndenge apesaki bango elimo santu, ndenge asalaki yango mpe epai na biso. Mpe asalaki bokeseni ata moke te kati na biso mpe bango, kasi apɛtolaki nde mitema na bango na nzela ya kondima.’” (Mis. 15:7-9) Buku moko emonisi ete liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ntembe makasi” na vɛrsɛ 7 elimboli mpe “koluka; kotuna.” Emonani mpenza ete bandeko yango bazalaki na makanisi ndenge moko te, mpe moto na moto amonisaki makanisi na ye na bosembo.
19 Na maloba ya kondimisa mpenza, Petro akundwelaki bango ete ye moko azalaki wana ntango bato ya liboso oyo bazalaki Bayuda te—Korneyi ná libota na ye—batyamaki mafuta na elimo na mobu 36 T.B. Boye, lokola Yehova azalaki lisusu te kokesenisa Moyuda ná Moyuda te, na lotomo nini bato bakokaki kosala yango? Longola yango, ezali kondimela Kristo nde epɛtolaka motema ya mondimi, kasi kotosa Mibeko ya Moize te.—Gal. 2:16.
20. Na ndenge nini bato oyo bazalaki kolendisa likambo ya kokatama ngenga bazalaki “komeka Nzambe”?
20 Na kolanda litatoli ya polele ya liloba ya Nzambe mpe ya elimo santu, Petro asukisaki boye: “Na yango, mpo na nini bozali sikoyo komeka Nzambe na ndenge bozali kosala ete bayekoli bámema ekanganeli oyo, ezala ata bankɔkɔ na biso to biso moko tokokaki te komema? Kutu, tozali nde kondima ete tokobika na nzela ya boboto monene ya Nkolo Yesu, ndenge moko mpe mpo na bango.” (Mis. 15:10, 11) Bato oyo bazalaki kolendisa likambo ya kokatama ngenga bazalaki nde “komeka Nzambe,” to ndenge Biblia mosusu ebongoli yango, ‘kokómisa motema molai na ye na nsuka.’ Bazalaki nde koluka kotyela bato ya bikólo mibeko oyo bango moko Bayuda bakokaki te kotosa yango nyonso mpe na ndenge yango, ezalaki lokola bakatelaki bango etumbu ya liwa. (Gal. 3:10) Nzokande, Bayuda oyo bazalaki koyoka Petro basengelaki kozala na botɔndi mpo na boboto monene oyo Nzambe amonisaki na nzela ya Yesu.
21. Barnabasi ná Paulo balobaki makambo nini oyo esalisaki mpo bantoma ná bankulutu bázwa ekateli?
21 Ezali polele ete maloba ya Petro etindaki bayoki na ye bákanisa, mpamba te “etuluku wana ya bato bafandaki nyɛɛ.” Na nsima, Barnabasi ná Paulo bayebisaki bandeko “ebele ya bilembo mpe ya makamwisi oyo Nzambe asalaki na nzela na bango na kati ya bikólo.” (Mis. 15:12) Na bongo, bantoma mpe bankulutu bakokaki sikoyo kotalela makambo malamu mpe kozwa ekateli oyo ekomonisa polele mokano ya Nzambe na likambo ya kokatama ngenga.
22-24. (a) Ndenge nini Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya ntango na biso elandaka ndakisa ya lisangani ya mikóló-bakambi ya siɛklɛ ya liboso? (b) Ndenge nini bankulutu nyonso bakoki komonisa ete batosaka ebongiseli ya Teokrasi?
22 Lelo oyo mpe, ntango bandeko oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi bayanganaka, batalelaka Liloba ya Nzambe mpo na kozwa litambwisi mpe babondelaka makasi mpenza mpo na kosɛnga elimo santu. (Nz. 119:105; Mat. 7:7-11) Mpo na yango, mwa mikolo liboso báyangana, batindelaka mosangani mokomoko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi makambo oyo ekolobelama mpo aluka makanisi mpe abondela mingi liboso bálobela yango. (Mas. 15:28) Na likita na bango, bandeko yango oyo batyami mafuta na elimo bamonisaka makanisi na limemya. Basalelaka mingi Biblia ntango bazali kosolola.
23 Bankulutu basengeli mpe kolanda ndakisa wana. Lisusu, soki nsima ya kotalela malamu likambo moko na likita na bango, bankulutu bayokani te na ndenge oyo basengeli kosala, bakoki kotuna makanisi na biro ya filiale to epai ya bamonisi ya biro, na ndakisa bakɛngɛli ya zongazonga. Na ngala na yango, biro ya filiale ekoki kokomela Lisangani ya Mikóló-Bakambi, soki esengeli.
24 Ya solo, Yehova apambolaka baoyo batosaka ebongiseli ya Teokrasi mpe bazalaka na komikitisa, na bosembo, mpe na motema molai. Ndenge tokomona yango na mokapo elandi, mbano oyo Nzambe apesaka baoyo basalaka bongo ezali kimya, bokoli na elimo, mpe bomoko.
a Talá etanda “Mateya ya bato oyo bazalaki kolongisa bonkɔkɔ ya Bayuda,” na lokasa 103.
b Kondimana ya kokatama ngenga ezalaki te na kati ya kondimana oyo Nzambe asalaki na Abrahama liboso, oyo ezali tii lelo. Kondimana na Abrahama ebandaki na mobu 1943 L.T.B., ntango Abrahama (oyo azalaki naino Abrama) akatisaki Ebale Efrate mpo na kokende na mokili ya Kanana. Na ntango wana Abrahama azalaki na mbula 75. Kondimana ya kokatama ngenga esalemaki nsima, na mobu 1919 L.T.B., ntango Abrahama akómaki na mbula 99.—Eba. 12:1-8; 17:1, 9-14; Gal. 3:17.
c Emonani ete Tito, Mogrɛki moko oyo akómaki mokristo mpe na nsima akómaki moninga ya mosala mpe motindami ya Paulo, azalaki na kati ya bato oyo batindamaki. (Gal. 2:1; Tito 1:4) Mobali yango azalaki ndakisa malamu ya moto ya ekólo mosusu oyo akatamá ngenga te, oyo atyamaki mafuta na elimo.—Gal. 2:3.
d Talá etanda “Bindimeli ya Batatoli ya Yehova eutaka na Biblia,” na lokasa 105.