Baklisto basengeli kotosa mokolo ya bopemi?
NA SANZA ya Juin 1991, mbula ebetaki mingi mpenza. Mpo na ntina wana, momeseno moko oyo mozali kokumisama uta bikeke mingi mobukamaki na bibongiseli ya masano mpo na kowela nkeni ya tennis na engumba Wimbledon, na Angleterre. Mpo na mbala ya liboso na lisoló ya tennis, masano masalemaki na mokolo ya lomingo mpo na kowela ntango oyo elekaki. Longola libaku ya kobuka mibeko lokola wana, mokolo ya lomingo ezalaka mokolo ya bopemi na Angleterre, lokola mpe kati na mikili misusu mingi.
Bato mosusu baponaki mikolo mikeseni mpo na bopemi. Kati na mokili mobimba, Bayuda bakumisaka Sabata uta mokolo na mitano na kolala ya moi kino mokolo ya poso nsima na kolala na moi. Mokolo ya Sabata, mpepo ya kompanyi ya Israël, oyo byangami El Al, ekosalaka mobembo te, mpe na bingumba mosusu bakompanyi ya mituka ekosalaka te. Na Jérusalem, bakoteli ya bonkoko bakangaka balabala mosusu mpo na kopekisa botamboli nyonso oyo bazali kotalela lokola eyokani te na mibeko ya Sabata.
Likambo oyo ete mangomba mingi mazali naino kotosa mokolo ya bopemi kati na poso to Sabata ezali kobimisa mituna mingi. Kokumisa Sabata etali bobele Bayuda? Mpo na nini mangomba mingi ya boklisto ya lokuta maponi mikolo ya bopemi mikeseni? Kotosa mokolo ya bopemi ya poso na poso ezali kino lelo etinda ya Biblia?
Sabata ezalaká Ntango nyonso?
Tozali kokuta mpo na mbala ya liboso lisoló ya Sabata kati na mokanda ya Exode. Wana Bayisraele bazalaki na mokili mokauki, bazalaki kolokota mana, bilei ya ekamwiseli oyo eutaki na Jéhovah. Mokolo nyonso ya motoba kati na poso, basengelaki kolokota ndambo mibale mpo ete mokolo ya nsambo mosengelaki kozala “sabata mpo na Jéhovah,” na boumeli na yango mosala nyonso mopekisamaki.—Exode 16:4, 5, 22-25.
Lisusu, Bayisraele bazwaki etinda ya kotosa Sabata mpo bamikundwela ete bazalaki baombo na mokili ya Ezipito. Ekaniseli wana elingaki kozala na ndimbola bobele moke soki basilaki kotosa liboso mobeko ya lolenge yango. Mpo na yango, mitinda mitali Sabata mipesamaki bobele na Yisraele.—Deteronome 5:2, 3, 12-15.
Malako ya makasi
Mpo ete Mibeko ya Moize milobaki mpenza makambo mingi te na ntina ya Sabata, na boumeli ya bikeke mingi balakisi na mibeko ya lingomba na Bayuda babimisaki ebele ya bipekiseli, mingimingi na kopekisáká misala ya lolenge nyonso mokolo ya Sabata. Engebene Mishna, misala oyo mipekisami misangisamaki na bituluku 39 ya ntina lokola, kotonga bilamba, kokoma mikanda mpe kosala misala ya bilanga. Mingi na mibeko yango mizali na moboko moko te kati na Biblia. Kotangáká maloba ya Mishna, mokonda monene Encyclopœdia Judaica endimi ete mizali [mibeko yango] lokola “bangomba oyo bakakesami na nsinga ya nsuki, mpo ete Makomami malobeli makambo yango bobele moke nzokande mibeko oyo mityami mizali mingi.”
Mpo na kosalela mibeko oyo misengaki ete moto moko te “abima na esika na ye na mokolo na nsambo,” ntaka ya nsuka epesamaki, mpe ebyangamaki “ntaka ya Sabata.” Engebene mikanda misusu, ekokanaki na ntaka ya ba mètres 900. (Exode 16:29) Nzokande, mobeko wana mokoki nokinoki kobongwana: Na mpokwa oyo Sabata ekobanda, bilei ya Sabata ekoki kozala na ntaka ya ba mètres 900 ya ndako. Esika yango ekotalelama bongo lokola eteni ya lopango, mpe bakoki kotanga ntaka mosusu ya ba mètres 900 longwa na esika yango.
Mingi kati na mibeko wana ya bato mizalaki naino kosalelama na mikolo na Yesu. Mpo na yango, bakonzi na mangomba bafundaki bayekoli na ye mpo ete babukaki mbuma mpo na kolya wana bazalaki koleka kati na elanga. Bafundamaki ete babukaki mibeko ya Sabata na kozwáká mbuma, likambo oyo litalelamaki mpo na Bafalisai wana lokola kobuka mbuma na bilanga, mpe konika yango na maboko ezalaki lokola kotuta yango. Yesu akweisaki makanisi na bango ya kolekisa ndelo na mabaku mingi, mpo ete bazalaki kolanda te elimo ya mibeko na Jéhovah.—Matai 12:1-8; Luka 13:10-17; 14:1-6; Yoane 5:1-16; 9:1-16.
Longwa na Sabata ya Mokolo na Poso kino na Sabata ya Lomingo
“Mikolo ya lomingo mikobatelama mpo na kokumisa Nzambe.” Yango ezali Mobeko ya Minei na ntina ya Sabata engebene malako ya lingomba ya Katolike. Mokanda ya sika ya Lifalansé Catéchisme pour adultes elimboli ete: “Lomingo ya boklisto ekumisami mokolo oyo molandi Sabata: na mokolo ya mwambe, oyo ekokani na mokolo ya liboso ya kozalisama ya sika. Ezali kozongela mwa ndambo na makambo ya Sabata, nzokande etyami mpenza moboko likoló na Pasika ya Klisto.” Ndenge nini mbongwana yango esalemaki mpo ete Sabata elongwa mokolo ya poso mpe ekóma na mokolo ya lomingo?
Atako lomingo ezalaki mokolo Yesu asekwaki, baklisto ya liboso batalelaki yango lokola mokolo ya mosala oyo ekokani na mikolo misusu. Kasi ekateli ya likita linene ya Lingomba ya Laodicée (kobanda katikati kino nsuka ya ekeke ya minei T.B. [Ntango na Biso]) emonisi ete wana ntango ezalaki koleka, Sabata ya Bayuda mokolo ya poso etikaki esika na Sabata ya “Boklisto” na mokolo ya lomingo. Malako yango “mapekisaki baklisto boyokani ya losambo elongo na Bayuda mpe kopema mokolo ya Sabata [ya Bayuda], mpe mokolo ya Nkolo [mokolo oyo asekwaki] mokumisama na motindo ya boklisto.” Kobanda ntango wana, basangani ya boklisto ya lokuta basengelaki kosala mosala mokolo ya poso mpe kotika mosala mokolo ya lomingo. Na nsima, basengisamaki ete bakende na misa mokolo ya lomingo.
Na lisungi ya bakonzi ya mokili, kosala mosala mokolo ya lomingo epekisamaki bipai nyonso kati na boklisto ya lokuta. Kobanda ekeke ya zomi na motoba mpe nsima, baoyo bazalaki kobuka mibeko yango bazalaki kofuta lomande to kobetama fimbo, mpe bakokaki kobotola bangombe na bango. Mbala mosusu, babuki mibeko oyo babongoli motema te bazalaki kokóma baombo.
Epai mosusu, mibeko mitali misala oyo mikoki kondimama mokolo ya lomingo mizalaki mpenza na makambo mingi lokola bonkoko oyo ezalaki kotambwisa Sabata na Bayuda. Mokanda Dictionnaire de théologie catholique ezali kopesa bandimbola ya milai etali bokoli ya mateya na Lingomba ya Katolike na ntina ya kosalela mibeko mpo na koyeba soki likambo moko lizali mabe to malamu, mpe kati na makambo mapekisamaki tokoki kotanga, misala ya boombo, mosala ya bilanga, kokata makambo, koteka mpe kosala bokila.
Na kokamwa, Sabata ya Bayuda etangami mpo na kolóngisa bipekiseli yango. Mokanda Encyclopedia ya sika ya Lingomba ya Katolike (Lingelesi) elobeli mibeko ya empereur Charlemagne na ntina ya lomingo: “Likanisi ya Sabata, oyo eboyamaki na Saint Jérome mpe ekweisamaki na Concile d’Orléans na 538 [T.B.] lokolo mobeko ya Bayuda kasi ya boklisto te, eyebisamaki polele kati na motinda ya Charlemagne na 789 [T.B.], oyo epekisaki misala nyonso mokolo ya lomingo lokola kobuka [Mibeko Zomi].” Na yango, atako Lingomba ya Katolike lisepelaki komona ete bakonzi ya mokili batye mobeko mpo ete lomingo ezala mokolo ya bopemi, nzokande epesaki mpe bakonzi wana ya mokili nzela ya kolóngisa bipekiseli na bango na moboko ya mibeko oyo [Lingomba] eboyaki, elingi koloba, Mibeko ya Moize mitali Sabata.
Ebongiseli oyo eyokani na Makomami te
Bikeke mingi na liboso, Bakonzi mingi na mangomba balandi na bantoma, mpe kati bango Augustin, balobaki na elónga nyonso ete Sabata ezalaki ebongiseli ya ntango mokuse oyo etalaki bobele Bayuda. Na kosalaka bongo, Bakonzi wana ya Mangomba basimbaki bobele likanisi oyo Makomami ya Greke ya boklisto mazalaki kolimbola, ete, Sabata ezali eteni monene ya Mibeko ya kondimana oyo milongolamaki na mbeka ya Yesu.—Baloma 6:14; 7:6; 10:4; Bagalatia 3:10-14, 24, 25.
Kati na Vocabulaire biblique, mokanda ya ntango na biso, maloba ya teolojié Protestá Oscar Cullmann matangami lokola andimaki ete “mpo ete Yesu asili koya, kokufa mpe asilaki kosekwa, bilambo ya K[ondimana] ya K[ala] bisili kokokisama, mpe kobatela yango ‘elimboli kozonga kati na kondimana ya kala, lokola nde Klisto ayaki te.’” Nsima na kotalela likanisi oyo ya ntina mingi, likoki lizali solo ya kolimbola mobeko makasi ya kokumisa Sabata?
Na mikolo na biso, bakomi ya Katolike balukaka mbala mingi komilóngisa na Misala 20:7, oyo elobeli “mokolo ya liboso ya poso” (lomingo), wana Paulo azalaki elongo na baninga na ye mpo na kolya. Nzokande, oyo ezali bobele lisoló moke bapesi. Eloko moko te kati na mokapo yango to kati na mikapo misusu ya Biblia emonisi ete likambo yango lityamaki lokola ndakisa oyo esengelaki kolandana na baklisto, na yango ezalaki mobeko soki moke te. Ya solo, kokumisama ya Sabata ya mokolo na lomingo ezali na moboko kati na Makomami te.
Bopemi nini Baklisto bazali na yango?
Atako baklisto basengisami te kokumisa mokolo ya bopemi ya poso na poso, balendisami bongo na kobatela bopemi ya lolenge mosusu. Ntóma Paulo alimbolaki yango na baninga na ye baklisto Bayuda, ete: “Bongo epemelo na Sabata etikali mpo na bato na Nzambe. . . . Bongo tomeka makasi koingela na epemelo yango.” (Baebele 4:4-11) Bayuda wana, liboso ete bakóma baklisto basilaki kotosa na etingya nyonso Mibeko ya Moize engebene makoki na bango. Sikawa ntóma Paulo azalaki kolendisa bango na koluka lisusu lobiko na nzela ya misala te kasi nde “kopema” na misala na bango ya kufa. Banda ntango wana, basengelaki komonisa kondima kati na mbeka ya Yesu, oyo ezalaki nzela bobele moko na yango Nzambe akokaki kotanga bato bayengebene.
Lolenge nini tokoki komonisa lelo oyo limemya motindo moko mpo na likanisi na Nzambe? Lokola baninga na bango mosusu, ba Témoins de Jéhovah, baoyo bamonisaka bososoli, bazali kosepela na bopemi ya poso na poso na mosala ya mosuni lokola esalelami na mibeko ya mikili mingi. Ezali kopesa bango ntango ya kozala elongo na libota na bango mpe na kominanola. Kasi na koleka, mokolo wana ezalaka ntango moko malamu mpo na kokokisa mikumba misusu ya boklisto. (Baefese 5:15, 16) Bazali kokende na makita mpe kosangana na mosala ya kosakola, kotala bazalani na bango mpo na kolobela bango nsango ya Biblia etali kobelema ya ntango oyo bato na kondima bazala na bomoi na mabelé oyo ekobongwana paradis. Soki olingi koyeba likambo yango, ba Témoins de Jéhovah bakozala na esengo ya kosalisa yo, ezala mokolo ya poso, ya lomingo, to mokolo mosusu kati na poso.
[Elilingi na lokasa 28]
Yesu atosaki na lolenge ya kokoka mobeko ya Sabata, na esika ya kolanda bonkoko ya Bayuda
[Elilingi na lokasa 28]
Mikumba ya boklisto mizali kopesa libondisi na mikolo ya bopemi