Toteya kati na koyangana mpe na ndako na ndako
“Nabangaki te . . . kolakisa bino kati na koyangana mpe na ndako na ndako.”—MISALA 20:20.
1. Sángó moko alobaki nini na ntina na molende ya mosala na ndako na ndako oyo mokokisami na ba Témoins de Jéhovah?
ZULUNALO Providence Sunday Journal ya le 4 Octobre 1987, ezalaki na titre oyo ete “Bakatolike bazali kosakola Nsango ndako na ndako.” Totangi kati na yango ete moko na mikano oyo bakatolike bazalaki na yango ezalaki mpo na “kosenga na bandimi na bango basila kolemba ete, bazala lisusu na molende mingi mpo na lingomba.” Zulunalo yango etangaki maloba ya John Allard, sángó mpe directeur ya Mosala ya kopalanganisa nsango na diocèse de Providence, ete: “Ya solo, bato bakoboya kondima. Mpe bakoloba ete: ‘Botala bango. Bazali kosala lokola ba Témoins de Jéhovah.’ Kasi boyebi ete ba Témoins de Jéhovah bazali na molende! Soko bokokende na Salle du Royaume nini na État [ya Rhode Island, na États—Unis], ntembe ezali te bokokuta masangá matondi na bakatolike ya kala.”
2. Motuna nini bato bakoki komituna?
2 Ezali solo, ba Témoins de Jéhovah bazali kokokisa mosala na bango na malamu mpenza, mpe yango eyebani; kasi mpo na nini bakokendeke ndako na ndako?
Lolenge bantoma basalaki
3. (a) Mosala nini Yesu apesaki epai na bayekoli na ye? (b) Nini ezalaki lolenge na kosala na liboso mpenza oyo bayekoli ya yambo na Klisto basalelaki mpo na kokokisa mosala na bango?
3 Yesu apesaki bayekoli na ye mosala oyo ya ntina mingi: “Boye bokende kozalisa bayekoli na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata, na Mwana mpe na elimo santu, kolakisa mpe bango ete batósa nyonso esili ngai kolaka bino. Mpe, tala ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka na ekeke.” (Matai 28:19, 20) Nokinoki nsima na Pantekote ya mobu 33, lolenge na kosala oyo bayekoli na Klisto basengelaki kokokisa mosala yango, emonanaki polele. Na yango, “batiki te mokolo na mokolo, kati na temple mpe ndako na ndako, bateyaki mpe basakolaki nsango malamu na ntina na Klisto, Yesu. (Misala 5:42, MN) Bambula 20 na nsima, ntoma Paulo asakolaki ndako na ndako. Yango wana akundwelaki bakengeli baklisto ya engumba Efese ete: “Nabangaki te kosakwela bino makambo makoki kosunga bino, mpe kolakisa bino kati na koyangana mpe ndako na ndako.”—Misala 20:20.
4. Mpo na nini tokoki koloba ete Misala 5:42 mpe Misala 20:20 emonisi ete mosala ya kosakola ya bayekoli ezalaki “kokabolama” na ndako na ndako?
4 Na Misala 5:42, liloba “ndako na ndako” libóngolami kat’ oiʹkon na greke, kati na yango ka·taʹ esalelami na ndimbola ya “kokabola.” Na yango, mosala ya kosakola na bayekoli “mokabolamaki” longwa na ndako moko, nsima na mosusu. Mpo na kolimbola Misala 20:20, Randolph Yeager akomaki ete Paulo ateyaki “na koyangana na bato [de·mo·siʹa] mpe na ndako na ndako ([ka·taʹ] liloba likolakisaka kokabolama lilandami na liloba oyo likomonisaka moto oyo azali kokokisa mosala yango). Paulo alekisaki mbula misato na Efese. Azalaki kokende ndako moko na moko, to mpe, azalaki koloba epai na bato banso (Mis 20 verset 26). Tala lolenge nini mosala ya kosakola ndako na ndako to na koyangana endimami na Makomami.”
5. Nini epesi biso nzela na koloba ete Misala 20:20 elobeli te bobele bokutani ya boninga oyo Paulo asalaki elongo na bankulutu to mpe bavisite na kolendisa?
5 Lolenge oyo na kosalela liloba ka·taʹ ezali mpe na Luka 8:1, epai tozali kotanga ete Yesu asakolaki “na mboka minene mpe na mboka mike.” Na Misala 20:20, Paulo asaleli boike to pluriel ya liloba kat’ oiʹkous oyo mbala mingi ebongolami na “kati na bandako.” Kasi, ntoma alobelaki te bokutani ya boninga oyo asalaki elongo na bankulutu, to mpe bavisite ya kolendisa oyo asalaki epai na baninga na ye baklisto. Verset elandi emonisi ete alobeli mosala ya ndako na ndako oyo akokisaki epai na baoyo bazali bandimi te. Na yango alobi ete: “Nasili mpenza kotatola na Bayuda mpe na Bagreke, likambo ya kobongola mitema epai na Nzambe mpe kondimela Nkolo na biso Yesu.” (Misala 20:21) Nzokande baninga na ye baklisto basilaki kobongwana mpe kondimela Yesu. Na yango, Misala 5:42 mpe Misala 20:20 elobeli nyonso mibale kosakola “na ndako na ndako” epai na baoyo bazali bandimi te.
Eloko moko te ekoki kokitana yango
6. Nini elobamaki mpo na mosala ya kosakola ya Paulo na Efese?
6 Kolimboláká maloba na Paulo mazali na Misala 20:20, na mobu 1844, Abiel Livermore akomaki kati na mokanda moko ete: “Amipesaki te bobele na kosala badiskur liboso na bato banso, na kozwáká na bopotu myango misusu, kasi na molende mpenza, alandaki kokokisa mosala na ye epai na moto na moto, na ndako na ndako, kokótisáká solo ya makoló kino na mabota mpe kati na mitema ya Baefese.” Kala mingi te, elobamaki ete: “Uta ebandeli, baklisto bayebanaki mpo na mosala ya kopalanganisa Nsango malamu ndako na ndako (Tala Misala 2:46; 5:42). . . . [Paulo] akokisaki mpenza mosala na ye epai na Bayuda mpe epai na Bapakano ya Efese; bongo baoyo bakufaki kati na masumu na bango bakoki komilongisa soko moke te.”—The Wesleyan Bible Commentary, volume 4, pages 642, 643.
7. Mpo na nini tokoki koloba ete Nzambe asepeli na mosala ya kosakola ndako na ndako oyo mokokisami na ba Témoins de Jéhovah?
7 Atako badiskur piblike ezalaki na esika na yango kati na kosakolama ya nsango malamu, nzokande ekokaki te kokitana bokutani elongo na bato kati na bandako. Mpo na yango, molimboli na Biblia Joseph Alexander alobaki ete: “Kino lelo oyo Lingomba ebimisi naino mwango moko te mokoki kokitana mosala ya kosakola liboso na bato banso to na kati na mabota.” Lokola oyo elobi O. Hills, molimboli mosusu na Biblia, “kolakisa liboso na bato banso mpe kolakisa ndako na ndako esengeli kotambola elongo.” Na ntango na makita na bango ya poso na poso, ba Témoins de Jéhovah bakopesaka mateya na nzela ya badiskur. Basili mpe kozwa elembeteli ete lolenge na kosala ya bantoma na ntina etali kopalanganisa solo ya Biblia ndako na ndako ezali malamu mpenza. Na ntembe te, Jéhovah asepeli na yango, mpamba te, mbula na mbula, mosala yango mozali kopesa nzela ete bankóto na bato babila esika na losambo na ye oyo etombwani.—Yisaya 2:1-4; 60:8, 22.
8. (a) Nini elobamaki likoló na ntina na mosala ya kosakola ndako na ndako? (b) Mpo na oyo etali mosala ya kosakola ndako na ndako mpe na bisika mosusu ya kopesa litatoli, kokokana nini emonani kati na ba Témoins de Jéhovah mpe ntoma Paulo?
8 Moto na mayele mosusu alobaki ete: “Bato bakomikundolaka noki mateya oyo bazwaki epai na bango koleka oyo bazwaki na ndakonzambe.” Paulo, ye oyo azalaki kokende kotala bato mbala na mbala, asili kopesa ndakisa malamu kati na mosala ya kosakola. Molimboli na Biblia Edwin Rice, akomaki ete: “Amipesaki te bobele na koteya mpe na kosala badiskur kati na biyanganelo mpe na zando. Mokolo na mokolo, ‘ateyaki’ mpenza ‘na ndako na ndako.’ Na Efese, Paulo abundisaki mabe etumba makasi, na kokutanaka na bato ndako na ndako, mpo na komema bango epai na Klisto.” Ba Témoins de Jéhovah bayebi yango malamu ete: lisoló ya bato mibale kati na ndako likobotaka mbuma. Bakozongaka kotala bato oyo bakutanaki na bango mpe bakosepelaka mingi wana ezali bango kosala masolo ya boninga elongo na bato oyo bayebi bindimeli na bango te. Na yango, bazali kolanda ndakisa ya Paulo. Kolobáká na ntina na ntoma, F. Peloubet akomaki ete: “Mosala ya Paulo mosukaki te bobele na makita. Ntembe ezali te ete azalaki kokende kotala bato mingi, amilengelaki mpenza mpo na kolobela lingomba na ye wana azalaki koyoka ete moto moko azalaki na mituna to azalaki na mposa ya solo, soko mpe kotemela yango.”
Bankulutu basengeli kopesa ndakisa
9. Ndakisa nini Paulo atikaki mpo na bankulutu?
9 Ndakisa nini ntoma Paulo asili kotika epai na bankulutu? Asili kolakisa bango ete basengeli kozala basakoli ya nsango malamu baoyo bakolembaka te, kosakoláká yango na molende ndako na ndako. Na 1879, Glentworth Butler akomaki ete: “[Bankulutu ya Efese] bayebaki ete, kati na mosala ya kosakola, [Paulo] amibanzabanzaki soko moke te mpo na makámá oyo akokaki kokutana na yango to mpo na lokumu na ye; bayebaki ete Paulo abombaki soko moke te solo oyo asengelaki komonisa; bayebaki ete amipesaki na koponapona te na kolakisáká mwa ndambo na makambo na sika na solo, kasi alobaki bobele makambo makokaki kosunga, mpe nyonso oyo ekokaki kosunga ‘mpo na kolendisa’: toli nyonso ya Nzambe na bopeto. Epai mosusu, ‘alakisaki’ solo na boklisto yango na bosembo nyonso, ‘ateyaki’ na molende bobele kati na ndako na eteyelo ya Tulana te mpe kati na bisika mosusu na koyangana ya bayekoli te, kasi lisusu kati na mabota epai azalaki na makoki ya kokóma. Na mposa mpe na molende lokola oyo na Klisto, mokolo na mokolo, Paulo asakolaki nsango malamu ndako na ndako, epai na moto na moto. Epai na bato ya lolenge nyonso, ya bikólo nyonso, na Bayuda batemeli mpe na Bagreke baseki, asololaki likoló na likambo bobele moko—oyo na bozindo, elakisaki basolo nyonso ebongi mpo na lobiko—likoló na kobóngola mitema epai na Nzambe, mpe likoló na kondimela Nkolo na biso Yesu Klisto.”
10, 11. (a) Mpo na oyo etali mosala ya boklisto, Paulo azelaki nini epai na bankulutu ya Efese? (b) Lokola Paulo, na motindo nini na mosala ba Témoins de Jéhovah, oyo kati na bango bankulutu mpe, bamipesi na yango?
10 Na yango, Paulo azalaki kozela nini epai na bankulutu ya Efese? Tala lolenge nini molimboli na Biblia E. Young atangi maloba na ntoma, ete: “Nalobaki bobele liboso na bato te, nasalaki mpe lisusu ndako na ndako, epai na bato ya motindo nyonso, ezala epai na Bayuda to epai na Bapakano. Motó na likambo ya mosala na ngai epai na moto nyonso ezalaki mpo na ‘kobóngola motema epai na Nzambe mpe kondimela Nkolo na biso Yesu Klisto,”’ Bongo W. Riley alimbolaki maloba na Paulo ete: “Maloba na polele mpe na petee oyo asalelaki ezalaki oyo: ‘Nazali kolikya ete bokolanda kokokisa oyo nasili kobanda, ezala na kosalela yango to na koteya yango, mpe botelema ngwi lokola ngai natelemaki; ete bokoteya moto na moto to na koyangana, lokola oyo esalaki ngai yango na balabala mpe ndako na ndako; ete bokopesa litatoli na Bayuda mpe na Bagreke likoló na kobongola mitema epai na Nzambe mpe bandimela Nkolo na biso Yesu Klisto, mpamba te yango ezali na ntina mingi.’”
11 Emonani bongo polele na Misala mokapo 20 ete Paulo azali kokundwela bankulutu makambo oyo alingaki ete basala yango: ete bapesa litatoli mpo na Jéhovah ndako na ndako. Kati na mosala yango, bankulutu na ekeke ya liboso basengelaki kopesa ndakisa epai na basangani ya lisangá. (Tala Baebele 13:17.) Lokola Paulo, ba Témoins de Jéhovah bakokendeke ndako na ndako epai na bato ya mabota nyonso mpo na kosakola Bokonzi, kobongola motema epai na Nzambe mpe kondima Yesu Klisto. (Malako 13:10; Luka 24:45-48) Lelo, kati na mosala yango ya ndako na ndako, tozali komizela ete bankulutu ya lisangá bapesa ndakisa.—Misala 20:28.
12. Na eleko moko, bankulutu mosusu baboyaki kosala nini, kasi kati na mosala nini bankulutu bazali kopesa ndakisa lelo?
12 Na 1879, Charles Russell abandaki kobimisa Le Phare de la Tour de Sion, Messager de la Présence de Christ, oyo ebengami lelo Mosenzeli ayebisaka Bokonzi ya Jéhovah. Russell mpe bayekoli mosusu ya Biblia basakolaki nsango na Bokonzi na lolenge na bantoma. Kasi na nsima, bankulutu mingi na masangá bakokisaki lisusu te mikumba na bango lokola ba Témoins. Moklisto mwasi moko akomaki ete: “Makambo matambolaki malamu kino 1927, wana eyebisamaki ete uta ntango wana, bato banso basengelaki kosangana kati na mosala ya kosakola ndako na ndako mpe basengelaki kolakisa mikanda na mokolo ya lomingo. Bankulutu na biso oyo toponaki batemelaki likanisi yango mpe bamekaki kolembisa etuluku mobimba ete basangana na mosala yango te.” Na nsima, mibali yango baboyaki kosangana na mosala ya kosakola ndako na ndako, bakitisamaki mikumba na bango ya bankulutu. Bobele motindo moko lelo, tozali komizela ete bankulutu mpe basaleli na misala bapesa ndakisa kati na mosala ya kotatola ndako na ndako mpe na bandenge mosusu ya mosala na boklisto.
Bango nyonso bazali batatoli (batemwe)
13. (a) Nini tosengeli kosala ata soki bato baboyi koyoka nsango na Bokonzi? (b) Na likambo nini Paulo akokanisami na Ezekiele?
13 Na lisalisi na Jéhovah, baklisto nyonso basengeli kosakola nsango na Bokonzi ndako na ndako, ata soko nsango yango endimami na bato te. Bayoka to bayoka te, Ezekiele, mokengeli oyo atyamaki na Nzambe, asengelaki kokebisa bato ya eleko na ye. (Ezekiele 2:5-7; 3:11, 27; 33:1-6) Kokokanisáká Ezekiele na Paulo, E. Blaiklock akomaki ete: “[Diskur ya Paulo ekomami na Misala mokapo 20] ezali mpenza komonisa nini ezalaki mosala na ye na Efese. Tala mwa makambo oyo: liboso mpenza, Paulo azalaki sembo mpe na molende. Alukaki te ete ayebana mingi to mpe andimama na bato. Komipesáká na mosala ya mokengeli lokola Ezekiele, Paulo akokisaki mokumba na ye na molende, kozanga kobanga kolobela makambo na lolenge esengelaki. Lisusu, amonisaki motema ya mawa motondi na bolingo. Azalaki mpenza na mawa wana ezalaki ye kosakola maloba na kokweisa. Kasi azalaki mpenza mopalanganisi na nsango malamu oyo akolembaka te. Liboso na bato banso mpe na ndako na ndako, na engumba mpe na etúká mobimba, asakolaki Nsango Malamu.”
14. Mpo na nini moto nyonso oyo amipesi na Jéhovah Nzambe kati na libondeli na nzela na Yesu Klisto, asengeli kopesa litatoli?
14 Ebele na mapamboli oyo Nzambe azali kopesa na eleko na biso epai na basaleli na ye, emonisi polele ete azali kosepela na komona bango komema nkombo Témoins de Jéhovah. (Yisaya 43:10-12) Epai mosusu, baklisto bazali batemwe na Yesu, mpamba te ye alobaki epai na bayekoli na ye ete: “Bokozala batatoli [batemwe] na ngai kati na Yelusaleme, na Yuda mpe na Samaria, mpe kino nsuka na mokili.” (Misala 1:8) Na yango, moto na moto oyo amipesi epai na Jéhovah Nzambe kati na libondeli na nzela na Yesu Klisto, asengeli kopesa litatoli.
15. Nini elobamaki na ntina na mosala ya kotatola oyo mokokisamaki na baklisto ya liboso?
15 Na ntina na mosala ya kosakola, balobaki ete: “Etalaki Lingomba mobimba. Mosala ya kopalanganisa nsango malamu mopesamaki na Lingomba ya ebandeli ezalaki te bobele mpo na Basi (service des femmes missionnaires) to bobele mpo na kokende epai na mikili misusu (service des Missions étrangères). Mosala yango mopesamaki mpe te bobele epai na baoyo bazalaki na mikumba, lokola bankulutu, diakono to bantoma. . . . Na eleko yango, Lingomba mobimba nde ezalaki na mokumba ya kopalanganisa nsango. Ebongiseli ya kopalanganisa nsango ya Lingomba ya ebandeli etyamaki likoló na makambo mibale: (1) Mokumba ya liboso ya Lingomba ezali mpo na kosakola nsango malamu na mokili mobimba. (2) Ezali lisangá na boklisto mobimba nde ezali na mokumba ya kokokisa mosala yango.”—Herbert Kane.
16. Balakisi mosusu kati na boklisto ya lokuta balobi nini na ntina na baklisto mpe litatoli?
16 Atako na eleko na biso balakisi kati na boklisto ya lokuta bataleli nsango na Bokonzi na lolenge mabe, bamoko kati na bango bayebi ete baklisto basengeli kozala batemwe. Na ndakisa, tala oyo tokoki kotanga kati mokanda Tous des ministres (angl.) ya Oscar Feucht: “Ata pasteur moko te akoki kokokisa mosala oyo Nzambe apesaki epai na mondimi nyonso. Likambo na mawa mpenza, bikeke mingi ya lipengwi kati na Lingomba esili kosala ete mokumba ya bandimi 500 ekómi bobele mpo na pasteur na bango. Ezalaki bongo te kati na Lingomba ya ebandeli. Baoyo bandimaki bazalaki kokende kosakola Liloba na bisika nyonso.”
17. Tokoki koloba nini mpo na esika oyo litatoli ezalaki kozwa kati na bomoi na baklisto ya liboso?
17 Lokola ezali lelo epai na ba Témoins de Jéhovah, litatoli lizwaki esika ya ntina monene kati na bomoi ya baklisto ya liboso. Na bokuse, Edward Moore, professeur na Harvard akomaki ete: “Mpo na boklisto, bikeke misato ya yambo bimonisamaki na mosala malamu, mosala oyo motali kopalanganisa kondima. Bomoi na boklisto ezalaki na kosakola nsango malamu, koyebisa nsango na lobiko. . . . Kasi, soko na bileko ya yambo bopusi mpe mateya na Yesu mapalanganaki, ezalaki te bobele mosala ya mwa ndambo na bato oyo tokobenga bango lelo bamisionere. Ezalaki nde mosala mokokisamaki na bato bayekoli misala nyonso mpe bauti na bikólo nyonso. Bamemaki kino na nsuka na mokili na [Roma] nsango ya libombami wana ya motema, ezalela ya sika liboso na mokili, oyo ezalaki lobiko mpo na bango. . . . [Boklisto ya ebandeli] ezalaki endimeli na bozindo: nsuka na ebongiseli ya mokili ebelemaki. Bazalaki kondima ete ebongiseli na sika ya mokili ekotyama na pwasa mpe na kokamwisa.”
18. Elikya nini kitoko ekoleka ndóto nyonso ya bakonzi ya politike?
18 Ezala kati na litatoli ya ndako na ndako to na bandenge mosusu ya mosala ya kosakola, ba Témoins de Jéhovah bazali koyebisa mokili ya sika molakami na Nzambe epai na bato ya eleko na bango na esengo nyonso. Bolamu oyo bokopesama na bomoi ya seko oyo bazali koyebisa, ekozala mingi mpenza koleka bandóto nyonso na baoyo bazali komiloba ete bakotya ebongiseli ya mokili na sika na ntango ekoya. (2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:1-4) Emonani lokola ete moto na moto alingi kozala na bomoi na mokili kitoko oyo Nzambe azali kopesa na bato, nzokande ezali bongo te. Kasi, totalela sikawa mwa mitindo oyo basaleli na Jéhovah bakoki kosalela mpo na koteya malamu bato oyo balingi kozala na bomoi ya seko.
Bozongeli
◻ Mpo na nini tokoki koloba ete Misala 5:42 mpe 20:20 emonisi ete bayekoli na Yesu basengeli kosakola ndako na ndako?
◻ Ndenge nini toyebi ete Nzambe asepeli na mosala ya kosakola ndako na ndako oyo mokokisami na ba Témoins de Jéhovah?
◻ Mpo na oyo etali mosala ya kosakola, nini tozali komizela epai na bankulutu mpe basaleli na misala?
◻ Esika nini litatoli esengeli kozwa kati na bomoi ya moklisto?
[Elilingi na lokasa 10]
Na mobu 33, bayekoli na Yesu bapesaki litatoli ndako na ndako kozanga kotika
[Elilingi na lokasa 13]
Paulo ateyaki “na ndako na ndako.” Na mikolo na biso, lolenge na mosala wana mozali kokokisama na ba Témoins de Jéhovah.