‘Bosengeli kozala bulɛɛ mpo ete ngai nazali bulɛɛ’
“Bino bokozala bulɛɛ mpo ete ngai [Yehova] Nzambe na bino nazali bulɛɛ.”—LEVITIKE 19:2.
1. Tángá bamoko kati na baoyo batalelami na mokili lokola bato na bulɛɛ?
MANGOMBA minene mingi ya mokili mazali na baoyo batalelami kati na yango lokola ete bazali bulɛɛ. Mama Teresa oyo ayebani mingi na mboka Inde atalelamaka mbala mingi lokola ete azali bulɛɛ mpo ete amipesá na mosala ya kosunga babólá. Pápa abéngami “Tata Mosantu.” José María Escrivá, mobandisi ya Opus Dei, etuluku moko ya Bakatolike oyo ebimi na eleko na biso, atalelami na Bakatolike mosusu lokola “ndakisa ya bosantu.” Hindouisme ezalaka na bato oyo babéngaka ba swamis, to mibali ya bulɛɛ. Gandhi akumisamaki lokola mobali ya bulɛɛ. Lingomba ya Bouddha ezalaka na bamwánɛ na yango ya bulɛɛ, mpe Bamizilmá bazali na mosakoli na bango ya bulɛɛ. Kasi elimboli mpenza nini kozala bulɛɛ?
2, 3. (a) Maloba oyo ete “bulɛɛ” mpe “ezaleli ya bulɛɛ” malimboli nini? (b) Wapi mwa mituna oyo misengeli kozwa biyano?
2 Liloba “bulɛɛ” elimboli: “1. . . . oyo ezali na boyokani na nguya ya Nzambe, ya bosantu. 2. Oyo etalelami to ebongi kozwa losambo to limemya mozindo . . . 3. Kolanda lolenge ya bomoi oyo eyokani na mitindá ya sikisiki to mitindá mitombwami ya bizaleli malamu kati na ebongiseli ya makambo ya losambo to makambo ya elimo . . . 4. Oyo ekesenisami to etyami pembeni mpo na mokano ya losambo.” Kati na Biblia, ezaleli ya bulɛɛ elimboli bongo “kozanga litɔnɔ to kozala pɛtɔ na makambo matali losambo; bosantu.” Engebene búku monene ya kolimbola maloba ya Biblia, Insight on the Scriptures, “qoʹdhesh [liloba] ya Liebele ya ebandeli lizali kopesa likanisi ya kotyama pembeni, komipesa bobele epai na Nzambe, to kosantisa ye, . . . ezalela ya kotyama pembeni mpo na kosalela Nzambe.”a
3 Libota ya Yisalaele lizwaki etindá ya kozala bulɛɛ. Mobeko ya Nzambe mozalaki koloba ete: “Mpo ete ngai nazali [Yehova] Nzambe na bino. Yango wana bómibulisa mpe bózala bulɛɛ mpo ete ngai nazali bulɛɛ.” Nani azalaki Eutelo ya ezaleli ya bulɛɛ? Lolenge nini Bayisalaele oyo bazalaki bato ya kozanga kokoka bakokaki kokóma bulɛɛ? Mpe lelo oyo liteya nini biso moko tokoki kozwa na libyangi ya Yehova mpo na oyo etali kozala bulɛɛ?—Levitike 11:44.
Boyokani oyo Yisalaele ezalaki na yango elongo na Eutelo ya ezaleli ya bulɛɛ
4. Lolenge nini ezaleli ya bulɛɛ ya Yehova emonisamaki na ndakisa moko kati na Yisalaele?
4 Biloko nyonso oyo bisalelamaki kati na losambo ya Yisalaele epai na Yehova bitalelamaki lokola bulɛɛ mpe bikumisamaki lokola biloko ya bulɛɛ. Mpo na nini? Mpamba te Yehova ye moko azali ebandeli mpe eutelo ya ezaleli ya bulɛɛ. Lisoló ya kobongisa hema ya bulɛɛ elongo na bilamba mpe na biloko ya kokɛmbisa, oyo Mose akomaki, lisuki na maloba oyo: “Basalaki etando mpo na motole na bulɛɛ na wolo malamu, mpe bakomaki likomi na yango, pelamoko na likomi na lopɛtɛ na elembo ete, Bulɛɛ epai na [Yehova].” Motole wana ya kongɛnga esalami na wolo ya pɛtɔ ekangisamaki na elamba oyo nganga monene azalaki kokanga na motó, mpe ezalaki elembo ete atyamaki pembeni mpo na kosala mosala ya bulɛɛ. Ntango bazalaki komona elembo yango oyo ezalaki na makomi likoló na yango, kongɛngáká na moi, Bayisalaele bazalaki ntango nyonso komikundola ezaleli ya bulɛɛ ya Yehova.—Exode 28:36; 29:6; 39:30.
5. Lolenge nini Bayisalaele ya kozanga kokoka bakokaki kotalelama ete bazalaki bulɛɛ?
5 Kasi lolenge nini Bayisalaele bakokaki kokóma bulɛɛ? Bobele na nzela ya boyokani na bango ya penepene elongo na Yehova mpe na nzela ya losambo na ye ya pɛtɔ. Bazalaki na mposa ya boyebi ya solosolo ya “ye Mosantu” mpo ete bákoka kosambela ye kati na ezaleli ya bulɛɛ, na bopɛtɔ ya nzoto mpe ya elimo. (Masese 2:1-6; 9:10) Na yango, Bayisalaele basengelaki kosambela Nzambe na mokano ya pɛtɔ mpe na motema pɛtɔ. Lolenge nyonso ya bokosi kati na losambo eboyamaki na Yehova.—Masese 21:27.
Ntina oyo Yehova atɔndɔlaki Yisalaele
6. Bayuda ya mikolo ya Malaki bazalaki komonisa ezaleli nini liboso na mesa ya Yehova?
6 Likambo wana limonisamaki polele ntango Bayisalaele bazalaki komema mbeka na mitema mibale na kopesáká nyama oyo ezalaki na mbeba. Na nzela ya mosakoli na ye Malaki, Yehova atɔndɔlaki mabonza wana ya mabe ete: “[Yehova] na bibele alobi ete, Ngai nazali na esengo mpo na bino te. Nakoyamba mpe likabo epai na lobɔkɔ na bino te. . . . Kasi bozali kobebisa yango wana ekolobaka bino ete, Mesa na Nkolo ebebi! Mpe mbuma, ɛɛ bilei na ye, ityolami! Bolobi ete, Tolɛmbi na likambo oyo solo! Na bongo botyoli ngai. [Yehova] na bibele alobi bongo. Bozali koyeisa yango ebɔtɔlami mpe banyama batɛngumi mpe na malali; bozali koyeisa mbeka na bino bongo. [Yehova] alobi ete, Nayamba nde yango na lobɔkɔ na bino?”—Malaki 1:10, 12, 13.
7. Misala nini ya mbindo Bayuda bamipesaki na yango na ekeke ya mitano L.T.B.?
7 Nzambe asalelaki Malaki mpo na kotɔndɔla misala mabe ya Bayuda, ekoki mpenza kozala ete esakweli yango esakolamaki na boumeli ya ekeke ya mitano L.T.B. Banganga bazalaki kopesa ndakisa moko mabe mpe etamboli na bango ezalaki bulɛɛ te. Lokola bamekolaki ndakisa wana, bato bakangamaki mpenza na mitindá ya bulɛɛ te, kino bakómaki kolongola basi na bango na libala, mbala mosusu mpo ete bákoka kobala bilenge basi bapakano. Malaki akomaki ete: “[Yehova] azali motatoli kati na yo mpe mwasi na bolenge na yo oyo yo osaleli ye na bokosib ata ye azali moninga na yo mpe mwasi na yo na nzela na kondimana. . . . Boye bókeba mpo na [“elimo,” NW] ete moko asalela mwasi na bolenge na ye na bokosi te. [Yehova] Nzambe na Yisalaele alobi ete ayini kolongolama na mwasi.”—Malaki 2:14-16.
8. Lolenge nini basusu kati na lisangá ya boklisto basili kopusama na makanisi ya ntango na biso na likambo litali koboma libala?
8 Na mikolo na biso, kati na bamboka mingi epai kuna koboma libala ezali likambo ya pɛtɛɛ, motángo ya mabala oyo mazali kokufa mozali sé komata. Ata lisangá ya boklisto mpe etalelami na likambo yango. Na esika ya koluka lisalisi ya bankulutu mpo na kolónga mikakatano mpe koluka ete libala na bango ebonga, basusu basalaki nokinoki mpo na koboma yango. Mbala mingi bana nde banyokwamaka na mayoki.—Matai 19:8, 9.
9, 10. Lolenge nini tosengeli kokanisa likoló na losambo oyo tozali kopesa Yehova?
9 Lokola touti komona, na ntina na libebi ya ezaleli ya elimo na ntango ya Malaki, Yehova akweisaki polele losambo ya likolólikoló oyo bato na Yuda bazalaki kopesa ye mpe amonisaki ete akondima bobele losambo ya pɛtɔ. Yango esengeli kopusa biso ete tókanisa malamu na ntina na lolenge ya losambo oyo tozali kopesa epai na Yehova Nzambe, Nkolo Mokonzi Monene ya mɔlɔ́ngɔ́, Eutelo ya ezaleli ya bulɛɛ ya solosolo, boye te? Tozali solo kosalela Nzambe mosala ya bulɛɛ? Tozali komibatela kati na ezaleli ya pɛtɔ na elimo?
10 Yango elingi koloba te ete tosɛngami kozala bato ya kokoka, likambo oyo lileki makoki na biso, to ete tosengeli komikokanisa na basusu. Kasi yango elingi koloba ete moklisto mokomoko asengeli kopesa na Nzambe losambo oyo ezali bongo mbuma ya makasi na ye nyonso engebene ezalela ya makambo na ye moko. Yango etali ezaleli ya losambo na biso. Mosala na biso ya bulɛɛ mosengeli kozala mbuma ya makasi na biso nyonso—mosala mosantu. Lolenge nini yango ekokisamaka?—Luka 16:10; Bagalatia 6:3, 4.
Motema ya pɛtɔ ememaka na losambo ya pɛtɔ
11, 12. Etamboli ya mbindo eutaka wapi?
11 Yesu ateyaki polele ete oyo ezali kati na motema ekoyebana malamu na makambo oyo moto azali koloba to kosala. Epai na Bafalisai oyo bazalaki komimona sembo, nzokande bazalaki mbindo, Yesu alobaki ete: “Libota na bitupa! Bokoki koloba malamu na nzela nini naino ezali bino mabe? Mpo ete monɔkɔ ekolobaka kobila litondi na motema.” Na nsima amonisaki ete misala mabe miutaka na makanisi mabe ya motema, to na bomoto ya kati. Alobaki ete: “Nde oyo ekobima na monɔkɔ euti na motema; yango wana ekopesa moto mbindo. Zambi uta na motema ekobima makanisi mabe, libomi koboma moto, ekobo, pite, moyibi, litatoli na lokuta, kotuka; ezali yango ekopesa moto mbindo.”—Matai 12:34; 15:18-20.
12 Yango ezali kosalisa biso na kososola ete misala ya mbindo misalemaka te bobele na pwasa to kozanga moboko oyo motyamaki liboso. Yango ezali kouta na makanisi ya mbindo oyo masilaki kofanda kati na motema—bamposa oyo ebombami mpe mbala mosusu makanisi mpamba ya motema. Yango wana Yesu alobaki ete: “Boyoki ete balobaki boye, Salá ekobo te. Nde ngai nazali koloba na bino ete, ye nani akotala mwasi na mposa mabe na ye, asili kosala na ye ekobo na motema na ye.” Na elobeli mosusu, pite mpe ekobo esili kozwa misisa kati na motema liboso ete likambo yango lisalema. Na nsima, wana libaku limonani, makanisi ya mbindo makokóma etamboli ya mbindo. Pite, ekobo, kosangisa nzoto mibali na mibali, basi na basi to na nyama, koyiba, kotuka mpe lipɛngwi ekomonisama lokola bilembo ya polele ya makanisi yango ya mbindo.—Matai 5:27, 28; Bagalatia 5:19-21.
13. Wapi mwa bandakisa ya makanisi ya mbindo oyo makoki komema biso na misala ya mbindo?
13 Likambo yango likoki komonisama na bandakisa ebele. Na bamboka mosusu, bandako ya masano ya mbongo ezali kosalema mingi, na yango libaku ya kobɛta masano ya mbongo lizali sé kokóla. Moto akoki komekama ete asalela mwango wana ya lokuta mpo na koluka kosilisa mikakatano na ye ya mosolo. Likanisi ya kozimbisa likoki kosenginya ndeko moko ete abwaka mitindá na ye ya Biblia to aluka komilóngisa liboso na yango.c Epai mosusu, kotala bolumbu ya mibali to ya basi, na televizyó, na video, na ordinatɛrɛ to na babúku, ekoki komema moklisto na etamboli ya mbindo. Soki amonisi bolɛmbu mpo na oyo etali molato na ye ya etumba ya elimo, akokwea nokinoki kati na pite. Kasi mbala mingi, kokwea na lisumu ebandaka kati na makanisi. Ee, kati na ezalela ya makambo lokola oyo, maloba ya Yakobo mazali kokokisama: “Moto na moto akomekamaka mpo na kobendama mpe kolengolama na mposa mabe na ye moko. Na nsima, esili mposa kozwa zemi, eboti lisumu.”—Yakobo 1:14, 15; Baefese 6:11-18.
14. Lolenge nini bato mingi batikaki etamboli na bango ya mbindo?
14 Likambo ya esengo ezali ete, baklisto mingi oyo basalaka lisumu mpo na bolɛmbu bamonisaka kobongola motema ya solo, na yango bankulutu bazalaka na likoki ya kozongisa bango na kolɔngɔ́nɔ́ ya elimo. Ata mpe mingi oyo babimisami na lisangá mpo ete bazangaki elimo ya kobongola motema bayaka na nsima kozongela makanisi malamu mpe kozongisama kati na lisangá. Bayaka kososola na nsima ete Satana akangaki bango kozanga nkaká wana bapesaki nzela na makanisi ya mbindo ete mázwa misisa kati na mitema na bango.—Bagalatia 6:1; 2 Timoté 2:24-26; 1 Petelo 5:8, 9.
Ntembe monene—Koyeba bolɛmbu na biso
15. (a) Mpo na nini tosengeli koyeba bolɛmbu na biso? (b) Nini ekoki kosalisa biso na koyeba bolɛmbu na biso?
15 Tosengeli kosala milende mpo na koyeba motema na biso na lolenge lobongi. Tozalaka pene ya koyeba bolɛmbu na biso, kondima yango, mpe na nsima kosala makasi mpo na kolónga yango? Tozalaka na mposa ya kotuna moninga moko oyo akoki kolobela biso na bosembo nyonso lolenge nini tokoki kosala milende, mpe na nsima kolanda toli na ye? Mpo na kozala ntango nyonso bulɛɛ tosengeli kolónga bolɛmbu na biso. Mpo na nini? Mpamba te Satana ayebi bolɛmbu na biso. Akosalela mayele mabe na ye mpo na kokweisa biso na lisumu mpe na etamboli ya mbindo. Na myango mabe na ye, azali komeka kokabola biso na bolingo ya Nzambe na boye ete tózala lisusu bulɛɛ te mpe tózala lisusu na ntina te mpo na losambo ya Yehova.—Yilimia 17:9; Baefese 6:11; Yakobo 1:19.
16. Etumba nini Paulo azalaki kobunda?
16 Ntoma Paulo akutanaki mpe na oyo ya ye mikakatano mpe komekama, lokola amonisi yango kati na mokanda na ye epai na Baloma ete: “Zambi nayebi ete eloko moko malamu efandi na ngai, kati na nzoto na ngai, te. Mpo ete, ata nazali kokana malamu, nayebi kosala yango te. Malamu oyo elingi ngai kosala, nakosalaka yango te. Kasi mabe oyo elingi ngai te, nakosala bobele yango. . . . Kati na motema na ngai moto, nasepeli na Mibeko na Nzambe; kasi namoni mobeko mosusu kati na bilembo na nzoto na ngai. Mobeko yango monene ezali kobunana etumba na Mibeko milingi ngai na makanisi na ngai, ezali mpe kokanga ngai moombo na mobeko na masumu mozali kati na bilembo na ngai.”—Baloma 7:18-23.
17. Lolenge nini Paulo alóngaki na ntango abundisaki bolɛmbu na ye?
17 Likambo ya ntina mingi epai na Paulo ezali ete ayebaki bolɛmbu na ye. Atako azalaki na yango, alobaki ete: “Kati na motema [ya elimo] na ngai moto, nasepeli na Mibeko na Nzambe.” Paulo alingaki oyo ezali malamu mpe ayinaki oyo ezali mabe. Atako bongo asengelaki kobunda etumba, etumba oyo ezali liboso na biso nyonso—kotɛmɛla Satana, mokili, mpe bolɛmbu ya nzoto. Bongo lolenge nini tokoki kolónga etumba mpo na kotikala bulɛɛ, komikabola na mokili oyo mpe na lolenge na yango ya kokanisa?—2 Bakolinti 4:4; Baefese 6:12.
Lolenge nini tokoki kotikala bulɛɛ?
18. Lolenge nini tokoki kotikala bulɛɛ?
18 Tokoki te kokóma na ezaleli ya bulɛɛ soki toluki nzela ya pɛtɛɛ to soki tozali koluka bobele komisepelisa. Bato motindo oyo bakoluka ntango nyonso kolóngisa etamboli na bango mpe kopesa libungá epai na baninga mosusu. Mbala mosusu tosengeli koyekola kondima nyonso oyo ekokwela biso mpo na etamboli na biso kasi kozala te lokola basusu oyo bakanisaka ete lisumá lizali kokómela bango mpo ete babotamá na libota boye to mpo ete basangolaki bizaleli boye uta na baboti na bango. Ntina ya likambo ezwami kati na motema ya moto na moto. Alingaka mpenza boyengebene? Azali na mposa ya kozala bulɛɛ? Azali solo na mposa ya kozwa mapamboli ya Nzambe? Mokomi na Nzembo amonisaki polele ntina ya kozala bulɛɛ ntango alobaki: “Longwá na mabe mpe salá malamu; luká mpe kimya, ɛɛ benganá [“landá,” NW] yango.” Ntoma Paulo akomaki ete: “Tiká ete bolingo bózala na bokosi te; bóyinaka mpo mabe mpe bósimbaka mpo malamu [“bókangama na oyo ezali malamu,” NW].”—Nzembo 34:14; 97:10; Baloma 12:9.
19, 20. (a) Lolenge nini tokoki kolendisa makanisi na biso? (b) Boyekoli ya moto ye moko, oyo ekoki mpenza kopesa matomba, esɛngaka nini?
19 Tokoki ‘kokangama na oyo ezali malamu’ soki tozali kotalela makambo na lolenge Yehova atalelaka yango mpe soki tozali na elimo ya Klisto. (1 Bakolinti 2:16) Lolenge nini yango ekosalema? Na nzela ya boyekoli mpe bomanyoli Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo. Mbala na mbala toli oyo ezongelamaka! Kasi totyelaka yango likebi oyo esengeli? Na ndakisa, oyekolaka mpenza zulunalo oyo, kolukáká mikapo ya Biblia, liboso ete oya na makita? Na liloba boyekoli tolingi koloba te bobele kotya monkɔ́lɔ́tɔ́ nokinoki na bafraze ya paragrafe nyonso. Tokoki kotalela nokinoki mpe kotya minkɔ́lɔ́tɔ́ na lisoló ya boyekoli na boumeli ya miniti 15. Yango elimboli ete toyekolaki lisoló yango? Ekoki solo kosɛnga mpenza ngonga moko to ngonga mibale mpo na koyekola mpe kozwa matomba ya elimo oyo mazali kati na lisoló mokomoko ya boyekoli.
20 Mbala mosusu tosengeli komipekisa makasi mpo na kokanga televizyó na boumeli ya mwa bangonga pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpe kotya mpenza likebi likoló na ezaleli na biso ya bulɛɛ. Boyekoli na biso ya mokolo na mokolo ekolendisa biso na elimo, kopusáká makanisi na biso ete mázwa bikateli malamu—bikateli oyo bikomema na “bizaleli na bulɛɛ.”—2 Petelo 3:11; Baefese 4:23; 5:15, 16.
21. Motuna nini mosengeli koyanolama?
21 Motuna oyo mozali kotunama sikawa mozali oyo: Kati na makambo nini mpe etamboli nini mosusu, biso baklisto, tosengeli kozala bulɛɛ, lokola Yehova azali bulɛɛ? Lisoló lilandi likolobela makambo oyo tosengeli kokanisa likoló na yango na mozindo mpenza.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mokanda wana monene ya bavolimi mibale mobimisamaki na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
b Mpo na botaleli mozindo ya oyo elimboli kosala na “bokosi,” talá Lamuká! ya 8 Febwáli 1994 (ebimeli ya Lifalansé), lokasa 21, “Lolenge nini ya koboma libala eboyami na Nzambe?”
c Mpo na koyeba makambo mosusu mamonisi mpo na nini masano ya mbongo ezali etamboli ya mbindo, talá Lamuká! ya Ɔkɔtɔ́bɛ-Desɛ́mbɛ 1995, nkasa 3-11, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
◻ Lolenge nini Eutelo ya ezaleli ya bulɛɛ amonisamaki na Yisalaele?
◻ Na lolenge nini losambo oyo Bayisalaele bazalaki kopesa na mikolo ya Malaki ezalaki mbindo?
◻ Etamboli ya mbindo eutaka wapi?
◻ Mpo ete tózala bulɛɛ, tosengeli koyeba nini?
◻ Lolenge nini tokoki kotikala bulɛɛ?