Salelá Liloba ya Nzambe mpo na komisalisa mpe kosalisa basusu
“Namoni ete bitinda nyonso oyo etali biloko nyonso ebongi.”—NZ. 119:128.
1. Mpo na nini tosengeli kotyela Liloba ya Nzambe motema mobimba?
NTANGO bankulutu batalelaka moyekoli moko ya Biblia mpo na koyeba soki akokisi masɛngami mpo abanda kobima na mosala ya kosakola, bamitunaka motuna oyo: ‘Maloba ya moto yango ezali nde komonisa ete andimaka ete Biblia ezali mpenza Liloba oyo epemami na elimo ya Nzambe?’a Mpo na moto oyo alingi kokóma mosakoli ya Bokonzi, to mpo na basaleli nyonso ya Nzambe, na ntembe te, eyano na motuna wana esengeli kozala “ɛɛ.” Mpo na nini? Soki tozali kotyela Liloba ya Nzambe motema mpe kosalela yango na mosala ya kosakola, tokozala na likoki ya kosalisa basusu báyeba Yehova mpe bázwa lobiko.
2. Mpo na nini tosengeli ‘kokangama na makambo oyo toyekolaki’?
2 Mpo na komonisa ete Liloba ya Nzambe ezali na ntina mingi, ntoma Paulo akomelaki Timote ete: “Kangamá na makambo oyo oyekolaki mpe oyo basalisaki yo ondima bosolo na yango.” “Makambo” oyo Paulo alobelaki ezali mateya ya solo ya Biblia oyo etindaki Timote andima nsango malamu. Lelo oyo, mateya wana ya solo esalisi mpe biso tóndima nsango malamu, mpe ezali kokoba kosalisa biso tózala ntango nyonso bato “ya bwanya mpo na lobiko.” (2 Tim. 3:14, 15) Mbala mingi, tosalelaka maloba ya Paulo oyo ezali na vɛrsɛ oyo elandi mpo na komonisa bato mosusu ete Biblia ezali mokanda oyo eutá epai ya Nzambe; nzokande biso moko tokoki kozwa litomba mosusu na maloba oyo ezali na 2 Timote 3:16. (Tángá.) Tótalela naino vɛrsɛ yango na mozindo. Yango ekosalisa biso tóndima lisusu makasi ete mateya nyonso ya Yehova “ebongi.”—Nz. 119:128.
“EZALI NA LITOMBA MPO NA KOTEYA”
3-5. (a) Ebele ya bato basalaki nini nsima ya koyoka diskur ya Petro na Pantekote, mpe mpo na nini? (b) Mpo na nini bato mingi na Tesaloniki bandimaki solo? (c) Nini ekamwisaka bato lelo mpo na mosala na biso ya kosakola?
3 Yesu ayebisaki libota ya Yisraele ete: “Nazali kotindela bino basakoli mpe bato ya bwanya mpe balakisi ya bato.” (Mat. 23:34) Yesu azalaki kolobela bayekoli na ye, oyo ateyaki ndenge ya kosalela Makomami na mosala ya kosakola. Na Pantekote ya mobu 33 T.B., ntoma Petro, moko ya “balakisi” yango asalaki diskur moko liboso ya ebele ya bato na Yerusaleme, mpe na diskur yango azongelaki maloba mingi oyo ezalaki na Makomami ya Ebre. Ntango bato mingi bayokaki ndenge oyo Petro amonisaki ete maloba yango etaleli bango, “mitema na bango ezokaki.” Babongolaki mitema na masumu na bango ya kala. Bato soki nkóto misato kati na bango basɛngaki ete Nzambe alimbisa bango mpe bakómaki bakristo.—Mis. 2:37-41.
4 Ntoma Paulo, molakisi mosusu, asakolaki mpe nsango malamu na bamboka mosusu mosika na Yerusaleme. Na ndakisa, na Tesaloniki, engumba moko ya Masedonia, asololaki na bato oyo bazalaki kosambela na sinagoga moko. Na boumeli ya sabata misato Paulo “azalaki kosalela Makomami mpo na kosolola na bango, azalaki kolimbola mpe kopesa bilembeteli na makomi ete esengelaki Kristo anyokwama mpe asekwa uta na bakufi.” Yango ebotaki mbuma nini? “Bamosusu na kati na [Bayuda] bakómaki bandimi” mpe “ebele mpenza ya Bagrɛki” basalaki mpe bongo.—Mis. 17:1-4.
5 Lelo oyo mpe, ndenge oyo basaleli ya Nzambe basalelaka Biblia ekamwisaka bato mingi. Na ndakisa, na ekólo Suisse, moto moko atunaki ndeko mwasi moko oyo atángelaki ye vɛrsɛ ya Biblia boye: “Ozali moto ya lingomba nini?” Ndeko mwasi yango ayanolaki: “Ngai ná moninga na ngai tozali Batatoli ya Yehova.” Moto yango alobaki ete: “Nayebaki ete esengeli kozala kaka bongo. Longola Batatoli ya Yehova, nani mosusu akoki koya epai na ngai mpo na kotángela ngai Biblia?”
6, 7. (a) Ndenge nini bandeko oyo bateyaka na lisangá bakoki kosalela Biblia malamu? (b) Mpo na nini kosalela malamu Biblia ntango ozali koyekola na moto ezali na ntina mingi?
6 Ndenge nini tokoki kosalela mingimingi Biblia ntango tozali koteya? Soki ozwi libaku ya koteya lisangá na estrade, salelá bavɛrsɛ ya Biblia oyo epesami mpo na lisolo na yo. Na esika osuka kaka na kobimisa makanisi ya bavɛrsɛ oyo esimbi lisolo, otánga yango na papye oyo obimisi na ordinatɛrɛ, to otánga yango na ordinatɛrɛ ya moke to na telefone, fungolá nde Biblia mpe tángá yango; lendisá bayoki básala mpe bongo. Longola yango, luká ndenge oyo okoki kosalela bavɛrsɛ yango mpo na kosalisa bayoki bápusana penepene na Yehova. Na esika ya kosalela bandakisa ya mindɔndɔmindɔndɔ to kobɛta masolo oyo ekosɛkisa bato, salelá nde ntango wana mpo na kolimbola Liloba ya Nzambe.
7 Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali koyekola na moto Biblia? Atako tosalelaka mikanda ya moombo ya sembo, tosengeli kokeba ete tólekaka te bavɛrsɛ ya Biblia kozanga kotánga yango. Tosengeli kolendisa moyekoli atánga bavɛrsɛ oyo maloba na yango etyami te na paragrafe, mpe kosalisa ye akanga ntina na yango. Na ndenge nini? Na esika ya kopesa moyekoli bandimbola ya milaimilai lokola nde tozali kosalela ye diskur, tosengeli nde kolendisa ye abimisa makanisi na ye. Na esika tóyebisa ye makambo oyo asengeli kondima to ndenge ya kosalela makambo oyo ayekoli, tokoki kotuna ye nde mituna oyo ebongi mpenza mpo na kosalisa ye moko azwa ekateli.b
“EZALI NA LITOMBA MPO NA . . . KOPAMELA”
8. Etumba nini Paulo azalaki kobunda na kati ya nzoto na ye?
8 Mbala mingi, tokanisaka ete “kopamela” ezali likambo oyo etali kaka bankulutu ya lisangá. Toboyi te, bakɛngɛli bazali na mokumba ya ‘kopamela baoyo bazali na momeseno ya kosala lisumu.’ (1 Tim. 5:20; Tito 1:13) Kasi biso moko mpe tosengeli komipamelaka. Paulo azalaki ndakisa malamu mpo na bakristo mosusu, mpe azalaki na lisosoli ya pɛto. (2 Tim. 1:3) Atako bongo, akomaki ete: “Nazali komona na binama na ngai mobeko mosusu oyo ezali kobunda etumba na mobeko ya makanisi na ngai mpe oyo ezali komema ngai mokangami epai ya mobeko ya lisumu.” Soki totaleli bavɛrsɛ mosusu ya mokapo wana, tokoyeba malamu etumba makasi oyo Paulo azalaki kobunda mpo na kolonga bolɛmbu ya nzoto na ye.—Tángá Baroma 7:21-25.
9, 10. (a) Ekoki kozala ete Paulo azalaki kobundana na bolɛmbu nini? (b) Ekoki kozala ete Paulo azalaki kosala nini mpo akoba kobundisa mposa ya kosala masumu?
9 Bolɛmbu nini Paulo azalaki kosala makasi alonga yango? Atako alobelaki yango polele te, akomelaki Timote ete liboso ‘azalaki moto ya lofundo.’ (1 Tim. 1:13) Liboso Paulo akóma mokristo, azalaki koyokela bakristo nkanda makasi. Mpo na komonisa mayoki oyo azalaki na yango mpo na bayekoli ya Kristo, alobaki ete: “Nazalaki na nkanda na bango makasi mpenza.” (Mis. 26:11) Paulo ayekolaki kopekisa nkanda na ye, atako bongo na bantango mosusu azalaki kobundana mpo na kopekisa mayoki na ye mpe lolemo na ye. (Mis. 15:36-39) Nini esalisaki ye alonga?
10 Na mokanda oyo Paulo akomelaki bakristo ya Korinti, alobelaki ndenge oyo azalaki kosala mpo na komipamela ye moko. (Tángá 1 Bakorinti 9:26, 27.) Na ndenge ya elilingi, azalaki kotinda makɔfi na ye na ndenge oyo ebongi mpo na kobundisa ezaleli na ye ya kozanga kokoka. Ekoki kozala ete azalaki koluka toli na kati ya Makomami, kobondela Yehova asalisa ye mpo akoka kosalela yango, mpe kosala makasi mpo na kobongwana.c Ndakisa na ye ekoki kosalisa biso mpamba te biso mpe tozali kobundana na bamposa na biso ya kosala makambo ya mabe.
11. Ndenge nini tokoki ‘kokoba komimeka’ biso moko mpo na koyeba soki tozali kotambola na nzela ya solo?
11 Tosengeli te kokanisa ete ndenge oyo tozali kosalela Nzambe sikoyo ekoki bongo. Tosengeli nde ‘kokoba komimeka’ biso moko mpo na koyeba soki tozali mpenza kotambola na nzela ya solo. (2 Ko. 13:5) Na ndakisa, ntango tozali kotánga mikapo lokola Bakolose 3:5-10, tokoki komituna boye: ‘Nazali kosala makasi mpo na koboma bamposa na ngai ya kosala masumu, to nabandi nde kokolisa bizaleli ya mbindo? Soki bililingi ya mbindo ebimi ntango nazali kosalela Internet, nakangaka site yango nokinoki to nalukaka nde kokɔta na basite ya ndenge wana?’ Soki tozali koluka kosalela batoli ya Liloba ya Nzambe na bomoi na biso moko ndenge wana, yango ekosalisa biso ‘tózala ekɛngɛ mpe tóbatela makanisi na biso.’—1 Tes. 5:6-8.
“EZALI NA LITOMBA MPO NA . . . KOSEMBOLA MAKAMBO”
12, 13. (a) Mokano na biso esengeli kozala nini ntango tolingi “kosembola makambo,” mpe ndenge nini tokoki komekola Yesu na likambo yango? (b) Maloba ya ndenge nini tosengeli kosalela te ntango tolingi “kosembola” moto na likambo moko?
12 Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kosembola makambo” elimboli “kokómisa malamu, kobongisa, kozongisa na nzela, kotya na esika oyo ebongi.” Na bantango mosusu, esɛngaka ete tósembola makambo ná bato mosusu oyo bazali kokanisela biso mabe. Na ndakisa, bakonzi ya mangomba ya Bayuda bakaniselaki Yesu mabe mpo azalaki kolya elongo na “bakɔngɔli-mpako ná basumuki.” Yesu ayebisaki bango ete: “Bato ya nzoto kolɔngɔnɔ bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla. Boye bókende koyekola ntina ya maloba oyo: ‘Nalingi motema mawa, kasi mbeka te.’” (Mat. 9:11-13) Azalaki na motema molai mpe na boboto ntango azalaki kolimbwela bato nyonso maloba ya Nzambe. Yango wana, bato ya komikitisa basosolaki ete Yehova azali “Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto mpe na solo.” (Kob. 34:6) Tomoni ete lokola Mwana ya Nzambe asalaki makasi mpo na ‘kosembola makambo,’ bato mingi bandimaki nsango malamu.
13 Ndakisa ya Yesu eteyi biso ndenge oyo tosengeli kosalisa basusu. Moto oyo asiliki akoki koloba na nkanda ete: ‘Nalingi kosembola yo na likambo moko.’ Kasi kosala bongo eyokani te na likanisi oyo ezali na 2 Timote 3:16. “Makomami nyonso” epesi biso te ndingisa ya kokatela basusu mangala. Kaka ndenge mopanga ezokisaka, mbala mingi maloba ya kozokisa esalaka nde mpasi, na esika ebongisa makambo.—Mas. 12:18.
14-16. (a) Ndenge nini bankulutu bakoki “kosembola makambo” na ndenge oyo ekosalisa basusu básilisa mikakatano na bango? (b) Mpo na nini “kosembola makambo” na ndenge oyo Biblia esɛngi ezali na ntina mpo na kobɔkɔla bana malamu?
14 Ndenge nini tokoki komonisa motema molai mpe boboto ntango tolingi “kosembola makambo”? Kanisá ete ndeko mobali moko ná mwasi na ye basɛngi nkulutu moko asalisa bango mpo básilisa matata oyo bazalaka na yango mbala na mbala. Nkulutu yango asengeli kosala nini? Na esika ete akɔtela moto moko, asengeli nde kotalela elongo na bango mibale mitinda ya Biblia; na ndakisa kosalela mitinda oyo ezali na mokapo 3 ya buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Ntango nkulutu yango azali kosolola na bango, ndeko mobali yango ná mwasi na ye bakoki komona toli nini mokomoko na bango asengeli kosalela lisusu malamu. Nsima ya mwa ntango, nkulutu yango akoki kotuna bango ndenge oyo makambo ezali kotambola na libota na bango, mpe kosalisa bango lisusu soki esengeli.
15 Ndenge nini baboti bakoki “kosembola makambo” na ndenge oyo ekosalisa bana na bango bákóma makasi na elimo? Kanisá ete olingi kosalisa mwana na yo ya mwasi oyo azali elenge atika kokangama na moninga moko boye. Ya liboso, osengeli kotalela likambo yango malamumalamu. Na nsima, soki omoni ete moninga yango akoki kobebisa mwana na yo, okoki kosolola na mwana na yo, mbala mosusu kotalela elongo na ye makanisi mosusu ya buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2. Na mikolo oyo ekolanda, osengeli kolekisa ntango mingi elongo na ye. Osengeli mpe koluka koyeba ezaleli nini azali komonisa ntango bobimi ná ye na mosala ya kosakola to ntango bozali kominanola na kati ya libota. Soki omonisi motema molai mpe boboto, mwana na yo akomona ete olingaka ye mpe otyelaka ye likebi. Na ntembe te, yango ekotinda ye asalela toli na yo mpo likambo moko ya mabe ekómela ye te.
16 Na motema molai mpe boboto nyonso, tokoki mpe kolendisa bandeko oyo bazali komitungisa mpo na bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto na bango, oyo balɛmbi nzoto mpo babungisi mosala, to oyo bazali na mokakatano mpo na kondima mateya mosusu ya Biblia. Kosalela Liloba ya Nzambe mpo na ‘kosembola makambo’ ememelaka basaleli ya Yehova matomba mingi.
“EZALI NA LITOMBA . . . MPO NA KOPESA DISIPLINI NA BOYENGEBENE”
17. Mpo na nini tosengeli kondima disiplini na botɔndi mpenza?
17 “Disiplini moko te ezalaka likambo ya esengo na ntango oyo bapesi yango.” Nzokande “na nsima, ebotelaka baoyo bateyami na yango mbuma ya kimya, elingi koloba, boyengebene.” (Ebr. 12:11) Bakristo mingi bamonaka ete disiplini oyo bazwaki epai ya baboti na bango bakristo ntango bazalaki bana mike esalisaki bango mingi. Longola yango, kondima disiplini ya Yehova, oyo bankulutu ya lisangá bapesaka, esalisaka biso tótikala na nzela ya bomoi.—Mas. 4:13.
18, 19. (a) Mpo na nini toli oyo ezali na Masese 18:13 ezali na ntina mingi mpo na “kopesa disiplini na boyengebene”? (b) Matomba nini ebimaka mbala mingi soki bankulutu bamonisi boboto mpe bolingo ntango bazali kosalisa ndeko oyo asali lisumu?
18 Esɛngaka mayele ya kososola mpo na kopesa disiplini na ndenge oyo ebongi. Yehova ayebisaki bakristo bápesaka disiplini na “boyengebene.” (2 Tim. 3:16) Yango wana, tosengeli kotika ete mitinda ya Biblia etambwisa biso. Moko ya mitinda yango ezali na Masese 18:13: “Ntango moto azali koyanola na likambo liboso ya koyoka yango, wana ezali bozoba mpo na ye mpe kosambwa.” Na yango, liboso ete bankulutu básolola na moto oyo afundami ete asali lisumu monene, basengeli koluka koyeba na mozindo makambo nyonso oyo emonisi ete ndeko yango asalaki mpenza lisumu. (Mib. 13:14) Kaka nsima ya kosala bongo nde bakoki kopesa disiplini “na boyengebene.”
19 Longola yango, Liloba ya Nzambe eyebisi bankulutu ya lisangá ete básembolaka basusu “na boboto.” (Tángá 2 Timote 2:24-26.) Toboyi te, ekoki kozala ete ndeko moko afingisi nkombo ya Yehova mpe ayokisi bato oyo basali eloko te mpasi na motema. Kasi, soki nkulutu asiliki ntango azali kopesa ndeko oyo asali likambo ya ndenge wana toli, akosalisa ye te. Nzokande, soki bankulutu bamekoli “boboto ya Nzambe,” bakoki kosalisa moto oyo asali lisumu abongola motema.—Rom. 2:4.
20. Mitinda nini baboti basengeli kolanda ntango bazali kopesa bana na bango disiplini?
20 Baboti basengeli kosalela mitinda ya Biblia ntango bazali kobɔkɔla bana na bango “na disiplini mpe na makebisi ya Yehova.” (Ef. 6:4) Tata asengeli te kopesa mwana na ye etumbu kaka nsima ya koyoka moto moko oyo afundi mwana yango epai na ye. Longola yango, nkanda makasi esengeli kozala na esika te na kati ya libota ya bakristo. “Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa,” mpe baoyo bazali na mokumba ya kopesa bilenge disiplini basengeli kosala makasi bámonisa mpe bizaleli wana.—Yak. 5:11.
LIKABO YA MOTUYA MONENE OYO YEHOVA APESÁ BISO
21, 22. Maloba nini oyo ezali na Nzembo 119:97-104 emonisi ndenge oyo otalelaka Liloba ya Yehova?
21 Mosaleli moko ya Nzambe amonisaki ntina oyo azalaki kolinga mobeko ya Yehova. (Tángá Nzembo 119:97-104.) Koyekola yango esalisaki ye akóma na bwanya, bososoli, mpe mayele. Kotosa batoli na yango esalisaki ye akima banzela mabe oyo ememelaki basusu mikakatano. Emonani ete koyekola Makomami ezalaki kosepelisa ye mingi. Azalaki na ekateli ya kotosa Nzambe mpamba te mibeko na ye ememelaki ye matomba mingi na bomoi.
22 Yo mpe ozwaka “Makomami nyonso” na motuya mingi? Yango nde esalisaki yo ondima ete Nzambe akokokisa mokano na ye. Batoli na yango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe ebatelaka yo mpo obuka te mbuma ya bololo oyo lisumu ebimisaka. Lisusu, soki ozali kolimbola yango malamumalamu, okoki kosalisa bato mosusu bándima kotambola na nzela ya bomoi mpe bátikala na nzela yango. Tiká ete tósalelaka malamumalamu “Makomami nyonso,” wana tozali kosalela Yehova, Nzambe na biso oyo atondi na bwanya mpe na bolingo.
b Ntango Yesu azalaki koteya, mbala mingi azalaki kotuna bayoki na ye ete: “Bokanisi nini?” Na nsima, azalaki kozela bápesa eyano.—Mat. 18:12; 21:28; 22:42.
c Mikanda oyo Paulo akomaki ezali na batoli mingi oyo ekoki kosalisa biso tóbengana bamposa ya mabe. (Rom. 6:12; Gal. 5:16-18) Tokoki mpenza kondima ete ye moko asalelaki toli oyo apesaki basusu.—Rom. 2:21.