Tótambola na kolanda elimo mpo tózwa bomoi mpe kimya
‘Tótambola, na kolanda bamposa ya nzoto te, kasi na kolanda elimo.’—ROM. 8:4.
1, 2. (a) Nini ekoki kosalema soki sofɛlɛ azali kotya makanisi na makambo mosusu? (b) Nini ekoki kokómela biso soki tolongoli likebi na makambo ya losambo na biso?
MOKONZI moko oyo atalelaka mibeko ya nzela na États-Unis alobaki ete mbula na mbula, mokakatano moko ezali se kokóma makasi: basofɛlɛ mingi bazali kotya makanisi na makambo mosusu ntango bazali kotambwisa motuka. Na ndakisa, telefone ya mabɔkɔ elongolaka likebi ya sofɛlɛ na mokumba na ye ya kotambwisa motuka. Ntango batunaki bato mituna, bato mingi balobaki ete batutaki bango to etikalaki moke bátuta bango mpo sofɛlɛ azalaki kosalela telefone. Moto akoki kokanisa ete ntango azali kosalela telefone wana azali kotambwisa motuka ezali kosalisa ye asala makambo nokinoki, kasi ekoki mpe kobimisa makama minene.
2 Ezali mpe bongo mpo na boyokani na biso na Nzambe. Mbala mingi, sofɛlɛ oyo atye makanisi na makambo mosusu atyaka likebi te na bilembo oyo batyá na nzela mpo na kokebisa. Ndenge moko mpe, soki tozali kotya makanisi na makambo oyo ekoki komema biso mosika na Nzambe, kondima na biso ekoki kobeba lokola masuwa oyo epanzani. (1 Tim. 1:18, 19) Ntoma Paulo alobelaki likama yango ntango akebisaki baninga na ye bakristo na Roma ete: “Kokanisa bamposa ya nzoto elakisi liwa, kasi kokanisa na elimo elakisi bomoi mpe kimya.” (Rom. 8:6) Paulo alingaki koloba nini? Ndenge nini tokoki koboya “kokanisa bamposa ya nzoto,” mpe ndenge nini tokoki “kokanisa na elimo”?
“Bakwei na likambo te”
3, 4. (a) Paulo akomaki ete azalaki na etumba nini? (b) Mpo na nini tosengeli kotya likebi na mokakatano oyo Paulo azalaki na yango?
3 Na mokanda oyo Paulo akomelaki Baroma, alobelaki etumba oyo ezalaki kati na ye: nzoto na ye ezalaki kobundisa makanisi na ye. (Tángá Baroma 7:21-23.) Paulo alukaki te komilongisa to komonisa ete azali kaka moto ya mawa, lokola nde lisumu ekangaki ye na boye ete akokaki te kosala oyo ezali malamu. Azalaki mokristo oyo akɔmeli, atyamaki mafuta na elimo mpe aponamaki mpo azala “ntoma ya bikólo.” (Rom. 1:1; 11:13) Bongo, mpo na nini Paulo alobelaki etumba oyo azalaki kobunda?
4 Paulo andimaki na bosembo nyonso ete na makasi na ye moko, akokaki te kosala mokano ya Nzambe na ndenge oyo azalaki kolinga. Mpo na nini? Alobaki boye: “Bato nyonso basali lisumu mpe bakómaka na nkembo ya Nzambe te.” (Rom. 3:23) Lokola Paulo mpe azalaki mokitani ya Adama, azalaki moto ya kozanga kokoka mpe azalaki na bamposa ya mabe. Biso mpe tokoki komiyoka lokola ye mpo tozali bato ya kozanga kokoka mpe tobundaka na bamposa ya mabe mokolo na mokolo. Lisusu, ezali na makambo mingi oyo ekoki kobenda likebi na biso mpe kolongola biso na ‘nzela ya nkaka oyo ezali komema na bomoi.’ (Mat. 7:14) Kasi Paulo azangaki elikya te, biso mpe tozangi elikya te.
5. Nani asalisaki Paulo mpe abɔndisaki ye?
5 Paulo atunaki soki nani akobikisa ye na etumba yango; na nsima alobaki boye: “Nzambe azwa matɔndi na nzela ya Yesu Kristo Nkolo na biso!” (Rom. 7:24, 25) Na nsima, alobelaki baoyo “bazali na bomoko na Kristo Yesu,” bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Tángá Baroma 8:1, 2.) Yehova akómisi bango bana na ye na nzela ya elimo santu na ye. Abengi bango mpo bázala “bazwi-ya-libula elongo na Kristo.” (Rom. 8:14-17) Elimo ya Nzambe mpe kondima na bango na mbeka ya lisiko ya Kristo esalisaka bango bálonga etumba oyo Paulo alobelaki. Na yango, na miso ya Nzambe “bakwei na likambo te” mpo na kozanga kokoka na bango. Balongwe “na mobeko ya lisumu mpe ya liwa.”
6. Mpo na nini basaleli nyonso ya Nzambe basengeli koluka kokanga ntina ya maloba ya Paulo?
6 Atako Paulo akomelaki nde bakristo oyo batyami mafuta na elimo, makambo oyo alobaki mpo na elimo ya Nzambe mpe mbeka ya lisiko ya Kristo ekoki kosalisa basaleli nyonso ya Yehova, ezala baoyo bakokende na likoló to baoyo bakozwa bomoi awa na mabele. Atako elimo ya Nzambe esalisaki Paulo apesa toli ya ndenge wana na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, ezali na ntina ete basaleli nyonso ya Nzambe bákanga ntina ya makambo oyo akomaki mpe bátosa yango.
Ndenge Nzambe “akatelaki lisumu etumbu na nzoto”
7, 8. (a) Na ndenge nini Mibeko ezalaki “na bolɛmbu na nzoto”? (b) Likambo nini Nzambe asali na nzela ya elimo na ye mpe mbeka ya lisiko?
7 Na Baroma mokapo 7, Paulo amonisaki ete bato ya kozanga kokoka bazali na nse ya nguya ya lisumu. Na mokapo 8, alobelaki nguya ya elimo santu. Paulo amonisaki ndenge elimo ya Nzambe ekoki kosalisa bakristo wana bazali kobundisa nguya ya lisumu. Ekoki kosalisa bango bázala na bomoi oyo eyokani na mokano ya Yehova, mpe Nzambe andima bango. Paulo amonisaki ete Nzambe asalelaki elimo santu na ye mpe mbeka ya lisiko ya Mwana na ye mpo na kosala likambo moko oyo Mibeko ya Moize ekokaki kosala te.
8 Mibeko ezalaki kokweisa basumuki mpo bato bazalaki kokoka kotosa mitindo na yango nyonso te. Longola yango, banganga-nzambe minene oyo bazalaki kosala na nse ya Mibeko na Yisraele bazalaki bato ya kozanga kokoka mpe bakokaki te kopesa mbeka oyo ekoki mpo na kolongola lisumu. Na yango, Mibeko ezalaki “na bolɛmbu na nzoto.” Kasi, “ndenge [Nzambe] atindaki Mwana na ye moko na nzoto oyo ezali lokola oyo ya masumu,” mpe apesaki ye lokola lisiko, “akatelaki lisumu etumbu na nzoto.” Mpe mbeka ya Yesu elongaki kosala “eloko oyo Mibeko ekokaki te kosala.” Na yango, bakristo oyo batyami mafuta na elimo batángami bayengebene mpo bazali kondimela mbeka ya lisiko ya Yesu. Toli ya Paulo elendisi bango ‘bátambola, na kolanda bamposa ya nzoto te, kasi na kolanda elimo.’ (Tángá Baroma 8:3, 4.) Basengeli kosala yango tii na nsuka ya bomoi na bango awa na mabele. Soki batikali sembo, bakozwa “motole ya bomoi.”—Em. 2:10.
9. Liloba “mobeko” oyo basaleli na Baroma 8:2, elimboli nini?
9 Paulo alobelaki mpe “mobeko ya elimo” mpe “mobeko ya lisumu mpe ya liwa.” (Rom. 8:2) Mibeko yango ezali nini? Liloba “mobeko” oyo basaleli na vɛrsɛ wana ezali mitindo te, lokola oyo ya Mibeko ya Moize. Buku moko elobi ete liloba ya Grɛki oyo babongoli na “mobeko” na vɛrsɛ wana elakisi makanisi ya kosala malamu to mabe oyo bato bazalaka na yango, oyo etambwisaka bango lokola mobeko moko boye. Liloba yango ekoki mpe kolimbola mitinda oyo moto aponi kolanda na bomoi na ye.
10. Ndenge nini mobeko ya lisumu mpe ya liwa etambwisaka biso?
10 Ntoma Paulo akomaki boye: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” (Rom. 5:12) Lokola tozali bakitani ya Adama, mobeko ya lisumu mpe ya liwa etambwisaka biso nyonso. Nzoto na biso ya masumu etindaka biso ntango nyonso tósala makambo oyo Nzambe aboyaka, nzokande makambo yango ememaka na liwa. Na mokanda oyo Paulo akomelaki Bagalatia, alobaki ete makambo ya ndenge wana ezali “misala ya nzoto.” Na nsima abakisaki boye: “Baoyo basalaka makambo ya ndenge wana bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” (Gal. 5:19-21) Bato yango bakokani na baoyo batambolaka na kolanda nzoto. (Rom. 8:4) Basalaka makambo nyonso oyo nzoto na bango ya kozanga kokoka etindi bango básala. Kasi, kaka bato oyo basalaka pite, ekobo, misala ya bilimo mabe, to masumu misusu ya minene nde batambolaka na kolanda nzoto? Te, mpamba te na misala ya nzoto, ezali mpe na makambo oyo bato mosusu bakoki komona ete ezali kaka bolɛmbu, na ndakisa, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana, mpe likunya. Nani akoki koloba ete ye atambolaka ata moke te na kolanda nzoto?
11, 12. Yehova asalaki nini mpo na kolongola biso na mobeko ya lisumu mpe ya liwa, mpe tosengeli kosala nini mpo Nzambe andima biso?
11 Tozali mpenza na esengo mpo Yehova asalisá biso mpo tólongwa na mobeko ya lisumu mpe ya liwa! Yesu alobaki boye: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” Soki tozali komonisa ete tolingaka Nzambe mpe tondimeli mbeka ya lisiko ya Yesu Kristo, tokoki kolongwa na etumbu oyo eutá na lisumu oyo tosangolá. (Yoa. 3:16-18) Yango ekoki kotinda biso tóloba ndenge Paulo alobaki ete: “Nzambe azwa matɔndi na nzela ya Yesu Kristo Nkolo na biso!”
12 Tozali lokola moto oyo alingi bábikisa ye na maladi moko makasi. Mpo abika malamumalamu, asengeli kosala makambo oyo monganga asɛngi ye. Atako kondimela lisiko ekoki kolongola biso na mobeko ya lisumu mpe ya liwa, tozali kaka bato ya kozanga kokoka mpe ya masumu. Mpo tókoba kozala na boyokani malamu na Nzambe mpe mpo apambola mpe andima biso, tosengeli kosala likambo mosusu. Paulo alobaki ete tosengeli mpe kotambola na elimo mpo tókokisa “lisɛngami ya boyengebene ya Mibeko.”
Ndenge nini tokoki kotambola na kolanda elimo?
13. Kotambola na kolanda elimo elimboli nini?
13 Ntango tozali kotambola, tozali kokende mpo na kokóma na esika moko oyo tokanisi. Na yango, kotambola na kolanda elimo esɛngi kokende liboso na kati ya solo. (1 Tim. 4:15) Atako tokoki kosala yango na ndenge ya kokoka te, mokolo na mokolo, tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo tótambola to tózala na bomoi na kolanda litambwisi ya elimo ya Nzambe. Soki tozali “kotambola na elimo,” Nzambe akondima biso.—Gal. 5:16.
14. Bato oyo “bazali kolanda bamposa ya nzoto” bazalaka na makanisi ya ndenge nini?
14 Na mokanda na ye epai ya Baroma, Paulo alobelaki mpe ndenge mibale ya bato oyo bakanisaka ndenge moko te. (Tángá Baroma 8:5.) Na vɛrsɛ yango, liloba nzoto ezali kaka nzoto na biso ya mosuni te. Na Biblia, ntango mosusu basalelaka liloba “nzoto” mpo na kolobela kozanga kokoka na biso. Yango nde ebimisaka etumba oyo Paulo alobelaki, etumba kati na nzoto mpe makanisi. Paulo abundisaki nzoto, to kozanga kokoka na ye. Kasi baoyo “bazali kolanda bamposa ya nzoto” babundaka ata kobunda te. Na esika bákanisa oyo Nzambe azali kosɛnga bango mpe bándima lisalisi na ye, mbala mingi “batyaka makanisi na bango na makambo ya nzoto.” Mbala mingi bamipesaka na kokokisa bamposa na bango ya nzoto mpe ya mosuni. Kasi, baoyo “bazali kolanda elimo” balingaka kotya makanisi na bango na “makambo ya elimo,” batikaka Yehova atambwisa bango.
15, 16. (a) Ntango moto atye makanisi na likambo moko, akómaka kokanisa nini? (b) Lelo oyo, bato mingi batyaka makanisi na bango na makambo nini?
15 Tángá Baroma 8:6. Liboso moto asala likambo moko, ezala ya malamu to ya mabe, atyaka naino makanisi na ye na likambo yango. Bato oyo batyaka ntango nyonso makanisi na bango na makambo ya nzoto baumelaka te kokóma na makanisi to bamposa oyo eyokani mpenza na makambo ya mosuni. Mbala mingi, bakómaka kokanisa, kolinga, mpe kosepela kaka na makambo yango.
16 Makambo nini bato mingi basepelaka na yango lelo oyo? Ntoma Yoane akomaki boye: “Eloko nyonso oyo ezali na mokili—mposa ya nzoto mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko ya kobikela—euti na Tata te, kasi euti na mokili.” (1 Yoa. 2:16) Bamposa yango ezali makambo lokola pite mpe ekobo, koluka koyebana, mpe koluka bomɛngo. Babuku, bazulunalo, bafilme, makambo oyo balakisaka na televizyo, mpe Internet elendisaka makambo yango ntango nyonso mpo yango nde makambo oyo bato mingi bakanisaka mpe balingaka. Nzokande, “kokanisa bamposa ya nzoto elakisi liwa”—tokoki kokufa na elimo lelo, mpe na mikolo ezali koya tokoki kozanga bomoi. Mpo na nini? “Mpo kokanisa bamposa ya nzoto elakisi kozala monguna ya Nzambe, mpo yango etosaka mobeko ya Nzambe te, kutu, ekoki mpe kotosa yango te. Yango wana baoyo bazali kolanda bamposa ya nzoto bakoki kosepelisa Nzambe te.”—Rom. 8:7, 8.
17, 18. Ndenge nini tokoki kokoba kokanisa na elimo, mpe ekomemela biso nini?
17 Nzokande, “kokanisa na elimo elakisi bomoi mpe kimya”—bomoi ya seko na mikolo ezali koya mpe sikoyo tokozala na kimya ya motema mpe kimya elongo na Nzambe. Ndenge nini tokoki komonisa ete ‘tokanisaka na elimo’? Soki tozali ntango nyonso kolanda litambwisi ya Nzambe mpe ya elimo santu na ye, tokokóma na makanisi oyo eyokani na makanisi na ye. Tokolinga makanisi na biso “etosaka mobeko ya Nzambe.” Ntango tokutani na komekama, tokoyeba mbala moko likambo oyo tosengeli kosala. Tokolinga kopona likambo ya malamu, oyo elandi litambwisi ya elimo ya Nzambe.
18 Yango wana, ezali mpenza na ntina tótyaka makanisi na biso na makambo ya elimo. Mpo tósala yango, tosengeli ‘kobongisa makanisi na biso mpo na mosala,’ komipesa na makambo ya losambo na biso, na ndakisa kobondela ntango nyonso, kotánga mpe koyekola Biblia, koyangana na makita, mpe kobima mosala ya kosakola. (1 Pe. 1:13) Na esika tótika bamposa ya masumu etambwisa biso, tosengeli nde kolanda makanisi ya Nzambe mpe kotika elimo na ye etambwisa biso. Soki tosali bongo, tokokoba kotambola na kolanda elimo. Yango ekomemela biso mapamboli mingi, mpo kokanisa na elimo elimboli bomoi mpe kimya.—Gal. 6:7, 8.
Okoki kolimbola?
• Eloko nini “Mibeko ekokaki kosala te,” mpe ndenge nini Nzambe alongaki mokakatano yango?
• “Mobeko ya lisumu mpe ya liwa” ezali nini, mpe ndenge nini tokoki kolongwa na yango?
• Tosengeli kosala nini mpo ‘tókanisaka na elimo’?
[Bililingi na nkasa 12, 13]
Otambolaka na kolanda bamposa ya nzoto, to na kolanda elimo?