MOKAPO YA ZOMI NA MINEI
Kondimana ya sika ekoki komemela yo matomba
1. Mokumba ya Yirimia esangisaki makambo nini mibale?
YEHOVA apesaki Yirimia mokumba oyo esangisaki makambo mibale. Ya liboso, asengelaki “kopikola mpe kokweisa, kobebisa mpe kobuka.” Ya mibale, asengelaki “kotonga mpe kolona.” Mpo na kokokisa likambo ya liboso, Yirimia atɔndɔlaki mabe ya Bayuda oyo bazalaki na lolendo, mpe asakolaki bitumbu oyo Nzambe alobaki ete akokweisela bango mpe bato ya Babilone. Kasi bisakweli ya Yirimia epesaki mpe elikya mpo na mikolo ezali koya. Asakolaki ete Nzambe akotonga biloko oyo akanaki kotonga mpe ete akolona biloko oyo akanaki kolona. Na ndakisa, ntango Yirimia asakolaki kozongisama ya Bayuda na mokili na bango, azalaki kokokisa likambo ya mibale ya mokumba na ye.—Yir. 1:10; 30:17, 18.
2. Mpo na nini Yehova apesaki bato na ye etumbu, mpe etumbu yango elekaki ndelo?
2 Atako Yirimia asakolaki kozongisama ya libota ya Nzambe, yango elimbolaki te ete Nzambe alingaki kotika bato na ye kaka bongo kozanga kopesa bango etumbu to ete alingaki kobuka mitinda na ye ya sembo. Te, Nzambe asengelaki kopesa Bayuda oyo batombokelaki ye etumbu. (Tángá Yirimia 16:17, 18.) Na ntango ya Yirimia, kaka bato moke na Yerusaleme nde bazalaki “kosala na boyengebene” to “koluka bosembo”; na yango, motema molai ya Yehova ekómaki na nsuka. Nzambe alobaki ete: “Nalɛmbi koyoka mawa.” (Yir. 5:1; 15:6, 7) Bayuda yango ‘bazongelaki mabunga ya bankɔkɔ na bango, bato ya liboso, oyo baboyaki kotosa’ maloba ya Yehova. Longola yango, bapesaki Nzambe nkanda na ndenge bazalaki kosala ekobo ná banzambe ya lokuta. (Yir. 11:10; 34:18) Yehova asengelaki kosembola bato na ye, mpe kopesa bango etumbu “na ndenge oyo ebongi.” Likambo yango ekokaki kosalisa bato mosusu bámona bozoba ya etamboli na bango mpe na nsima bázongela ye.—Yir. 30:11; 46:28.
3. Mpo na nini osengeli kotya likebi na esakweli oyo elobeli kondimana ya sika?
3 Na nzela ya Yirimia, Nzambe alobaki ete akosala kondimana moko ya sika oyo ekopesa bato matomba ebele mpo na ntango molai. Ntango tozali kotalela bisakweli oyo Yirimia akomaki, tosengeli mpenza kotya likebi na likambo oyo ya ntina mingi: kondimana ya sika. Kondimana yango esengelaki kozwa esika ya kondimana oyo Nzambe asalaki na Bayisraele nsima ya kobimisa bango na Ezipito, kondimana oyo Moize azalaki moyokanisi na yango. (Tángá Yirimia 31:31, 32.) Ntango Yesu Kristo abandisaki Bolei ya Mpokwa, alobelaki kondimana yango ya sika; na yango, kondimana yango etaleli mpe biso. (Luka 22:20) Ntoma Paulo mpe alobelaki kondimana yango na mokanda oyo akomelaki Baebre. Na mokanda yango, alobelaki esakweli ya Yirimia mpe amonisaki ete kondimana ya sika ezali na ntina mingi. (Ebr. 8:7-9) Kasi kondimana ya sika ezali mpenza nini? Mpo na nini Nzambe asalaki yango? Banani bazali basangani ya kondimana yango, mpe ndenge nini ekoki komemela yo matomba? Tiká tótalela makambo yango.
MPO NA NINI NZAMBE ASALAKI KONDIMANA YA SIKA?
4. Kondimana ya Mibeko ekokisaki makambo nini?
4 Mpo na kokanga ntina ya kondimana ya sika, tosengeli naino koyeba malamu ntina ya kondimana ya kala, elingi koloba kondimana ya Mibeko. Kondimana yango ya kala esengelaki kokokisa makambo mingi ya ntina mpo na ekólo oyo ezalaki kozela momboto oyo Nzambe alakaki, oyo na nzela na ye bato mingi basengelaki kozwa mapamboli. (Eba. 22:17, 18) Ntango Bayisraele bandimaki kondimana ya Mibeko, bakómaki ‘eloko ya [Nzambe] ye moko.’ Na kondimana yango, banganga-nzambe bazalaki kouta na libota ya Levi. Ntango Yehova asalaki kondimana kati na ye moko ná Yisraele na Ngomba Sinai, alobelaki “bokonzi moko ya banganga-nzambe mpe ekólo moko mosantu” kasi alobaki te ntango nini mpe ndenge nini likambo yango ekosalema. (Kob. 19:5-8) Liboso ntango yango ekoka, kondimana yango emonisaki polele ete Bayisraele bakokaki te kotosa makambo nyonso oyo Mobeko ezalaki kosɛnga. Na yango, kondimana emonisaki polele masumu na bango. Yango wana, ntango Bayisraele bazalaki na nse ya Mobeko, basengelaki kopesa bambeka mbala na mbala mpo na kozipa masumu na bango. Ata bongo, emonanaki ete bato bazali na mposa ya eloko mosusu ya motuya koleka, mbeka moko ya kokoka oyo esengelaki kopesama kaka mbala moko. Ya solo, bato bazalaki mpenza na mposa ya kolimbisama masumu na bango mpo na libela.—Gal. 3:19-22.
5. Mpo na nini Yehova asakolaki kondimana ya sika?
5 Na yango, tomoni sikoyo mpo na nini, ata ntango kondimana ya Mibeko ezalaki naino kosala mosala na yango, Nzambe atindaki Yirimia asakola kondimana mosusu, elingi koloba kondimana ya sika. Lokola Yehova azali bolingo mpe azali na boboto, alingaki ete bato ya bikólo mosusu mpe bázwa matomba ya libela ya kondimana yango. Na nzela ya Yirimia, Nzambe alobaki mpo na basangani ya kondimana yango oyo esengelaki koya ete: “Nakolimbisa libunga na bango, mpe nakokanisa lisumu na bango lisusu te.” (Yir. 31:34) Atako elaka yango epesamaki na ntango ya Yirimia, epesi mpe elikya moko kitoko mpo na bato nyonso. Na ndenge nini?
6, 7. (a) Ndenge nini bato mosusu bamiyokaka mpo na masumu na bango? (b) Mpo na nini koyekola makambo etali kondimana ya sika ekoki kolendisa yo?
6 Tozali naino bato ya kozanga kokoka mpe mbala mingi makambo oyo tosalaka emonisaka biso likambo yango. Maloba ya ndeko moko oyo azalaki kobunda na mokakatano moko boye oyo azalaki na yango endimisi biso mpenza likambo yango. Alobaki boye: “Ntango nazalaki kozongela likambo yango, nazalaki mpenza komiyoka mabe. Nazalaki komona ete nakokoka te kobongisa mabe oyo nasali. Nazalaki kokoka te kobondela. Nazalaki kobanda libondeli na maloba oyo: ‘Yehova, nayebi te soki okoyoka libondeli oyo, kasi . . .’” Bandeko mosusu oyo bakweaki lisusu na libunga moko boye to basalaki lisumu bamonaki lokola nde “lipata moko monene” ezalaki kokanga nzela mpo mabondeli na bango ekóma epai ya Nzambe te. (Bil. 3:44) Basusu bamitungisaka mpo na mabunga oyo basalá kala, ata nsima ya bambula mingi. Ata mpe bakristo mosusu oyo bazali ndakisa malamu bakoki koyoka mawa mpo na makambo mosusu oyo balobaki.—Yak. 3:5-10.
7 Moko te kati na biso asengeli kokanisa ete akoki ata mokolo moko te kokwea na etamboli ya mabe. (1 Ko. 10:12) Ntoma Paulo mpe ayebaki malamu ete azalaki kosala mabunga. (Tángá Baroma 7:21-25.) Na yango, ntango biso mpe tosali libunga tosengeli komikundola kondimana ya sika. Likambo moko ya ntina oyo Nzambe alakaki ete akosala na nzela ya kondimana ya sika, ezali ete akokanisa lisusu masumu te. Yango ezali mpenza libɔndisi mpo na biso! Na ntembe te, Yirimia alendisamaki mpenza ntango asakolaki likambo yango; biso mpe tokoki kolendisama ntango toyekoli makambo mingi na oyo etali kondimana ya sika mpe ntango tozali komona ndenge oyo yango ekoki kopesa biso matomba.
Mpo na nini Nzambe asalaki kondimana ya sika?
KONDIMANA YA SIKA EZALI NINI?
8, 9. Mpo ete masumu elimbisama, eloko nini ya motuya monene Yehova afutaki?
8 Ntango okómi koyeba Yehova malamu, okomona mpe ndenge oyo amoniselaka bato ya kozanga kokoka boboto mpe motema mawa. (Nz. 103:13, 14) Ntango Yirimia asakolaki kondimana ya sika, amonisaki ete Yehova ‘akolimbisa libunga na bango’ mpe akokanisa lisumu na bango lisusu te. (Yir. 31:34) Mbala mosusu Yirimia amitunaki ndenge nini Nzambe akokokisa elaka na ye ya kolimbisa masumu ya bato. Ata bongo, Yirimia asengelaki kokanga ntina ete ntango Nzambe alobelaki kondimana ya sika, azalaki kolobela boyokani to kɔntra oyo akosala na bato. Ata ndenge nini, na nzela ya kondimana yango, Yehova asengelaki kokokisa makambo nyonso oyo asɛngaki Yirimia aloba na litambwisi ya elimo santu, ata mpe bolimbisi ya masumu. Makambo mingi ya kondimana yango esengelaki koyebana na nsima, ntango Nzambe asengelaki komonisa makambo mosusu oyo etali mokano na ye, ezala mpe makambo oyo Masiya asengelaki kosala.
9 Mbala mosusu omonaka ete baboti mosusu babebisaka bana na bango na ndenge bapesaka bango disiplini te. Okanisi ete Yehova mpe asalaka bongo? Ata moke te! Yango emonani polele na ndenge oyo kondimana ya sika ebandaki kosala mosala na yango. Na esika ete alongola masumu ya bato kaka boye, Nzambe atosaki mpenza mitinda na ye ya boyengebene na ndenge asalaki likambo oyo eyokani na mibeko mpo na kolimbisa masumu; afutaki eloko ya motuya monene mpo asala likambo yango. Kotánga makambo oyo ntoma Paulo akomaki ntango alobelaki kondimana ya sika ekoki kosalisa yo okanga ntina ya likambo yango. (Tángá Baebre 9:15, 22, 28.) Paulo alobelaki ‘kosikolama na nzela ya lisiko’ mpe abakisaki ete “soki makila esopami te bolimbisi ezali te.” Na kondimana ya sika, mpo masumu elimbisama, ezali lisusu kosɛnga te ete bato bápesa mbeka ya makila ya bangɔmbɛ mibali to ya bantaba ndenge Mobeko ezalaki kosɛnga yango. Makila ya Yesu nde epesi kondimana ya sika makasi ya kosala mosala na yango. Na nzela ya kondimana yango oyo esimbami na mbeka ya kokoka, Yehova akoki ‘kolimbisa mabunga mpe masumu’ mpo na libela. (Mis. 2:38; 3:19) Kasi banani basengelaki kozala basangani ya kondimana yango ya sika mpe kolimbisama masumu na bango? Ezali ekólo ya Bayuda te. Yesu alobaki ete Nzambe akoboya Bayuda, baoyo bazalaki kopesa mbeka ya banyama ndenge Mobeko ezalaki kosɛnga, mpe ete akotya likebi na ye na ekólo mosusu. (Mat. 21:43; Mis. 3:13-15) Emonani polele ete “Yisraele ya Nzambe” nde ekólo yango, oyo esangisi bakristo oyo batyami mafuta na elimo santu. Na mokuse, tokoloba ete kondimana ya Mibeko ezalaki kati ya Nzambe ná bato ya Yisraele; nzokande, kondimana ya sika ezali kati ya Nzambe ná Yisraele ya elimo, mpe Yesu nde Moyokanisi ya kondimana yango.—Gal. 6:16; Rom. 9:6.
10. (a) Nani azali “etape” ya Davidi? (b) Ndenge nini bato bakoki kozwa matomba na nzela ya “etape” yango?
10 Yirimia alobelaki Moto oyo akoya, elingi koloba Masiya, ete akozala “etape” ya Davidi. Liloba yango ya elilingi ebongi mpenza. Ntango Yirimia azalaki mosakoli, molɔngɔ ya libota ya bokonzi ya Davidi ekatanaki. Atako bongo, ekumu oyo ezalaki komonisa molɔngɔ yango ekufaki te. Na nsima, Yesu abotamaki na molɔngɔ ya libota ya Mokonzi Davidi. Yango wana, abengamaki “Yehova azali boyengebene na biso” mpo na komonisa ete ezaleli yango ezali na ntina mingi na miso ya Nzambe. (Tángá Yirimia 23:5, 6.) Yehova apesaki nzela ete Mwana na ye se moko oyo abotamaki anyokwama awa na mabele mpe akufa. Na ndenge yango Yehova alandaki mitinda na ye ya bosembo mpe asalelaki motuya ya mbeka ya lisiko ya “etape” ya Davidi mpo na kolimbisa masumu. (Yir. 33:15) Yango epesi bato mosusu libaku ete bátángama “bayengebene mpo na bomoi” mpe bátyama mafuta na elimo mpo bakóma basangani ya kondimana ya sika. Likambo mosusu oyo emonisi ete boyengebene ezali na ntina mingi na miso ya Nzambe ezali ete bato mosusu oyo bazali basangani ya kondimana ya sika te bakoki, mpe bazali kozwa matomba na nzela ya kondimana yango, ndenge tokomona yango.—Rom. 5:18.
11. (a) Mobeko ya kondimana ya sika ekomami wapi? (b) Mpo na nini “bampate mosusu” basepelaka mpe na mobeko ya kondimana ya sika?
11 Olingi koyeba makambo mosusu oyo ekesenisi kondimana ya sika na kondimana ya Mibeko? Moko na makambo minene oyo ezali kokesenisa kondimana ya sika na kondimana ya Mibeko ezali bisika oyo yango ekomami. (Tángá Yirimia 31:33.) Mibeko zomi ya kondimana ya Mibeko ekomamaki likoló ya bitando ya mabanga, oyo nsukansuka ebungaki. Nzokande, Yirimia asakolaki ete mobeko ya kondimana ya sika ekokomama na mitema ya bato, mpe ete yango esengeli koumela. Baoyo bazali basangani ya kondimana ya sika, elingi koloba bakristo oyo batyami mafuta, basepelaka mpenza na mobeko yango. Ezali boni mpo na baoyo bazali basangani te ya kondimana ya sika, elingi koloba “bampate mosusu” oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele? (Yoa. 10:16) Bango mpe basepelaka mpenza na mobeko ya Nzambe. Bazali lokola bato oyo bafandaki bapaya na Yisraele, baoyo bandimaki Mobeko ya Moize mpe bazwelaki yango matomba.—Lev. 24:22; Mit. 15:15.
12, 13. (a) Mobeko ya kondimana ya sika ezali nini? (b) Mpo na nini moto oyo azali na nse ya “mobeko ya Kristo” amiyokaka te ete bazali kotinda ye na makasi ete asalela Nzambe?
12 Okopesa eyano nini soki batuni yo ete, ‘mobeko yango oyo ekomami na mitema ya bakristo oyo batyami mafuta ezali mobeko nini?’ Mobeko yango ebengami mpe “mobeko ya Kristo.” Epesamaki liboso na Bayisraele ya elimo, baoyo bazali basangani ya kondimana ya sika. (Gal. 6:2; Rom. 2:28, 29) Na mokuse, tokoki koloba ete “mobeko [yango] ya Kristo” ezali bolingo. (Mat. 22:36-39) Ndenge nini mobeko yango ekomamaka na mitema ya bakristo oyo batyami mafuta? Yango esalemaka mingimingi na lolenge mibale: ntango bazali koyekola Liloba ya Nzambe mpe kopusana pene na Yehova na libondeli. Kasi bakristo nyonso ya solo, ata mpe baoyo bazali basangani te ya kondimana ya sika basengeli mpe kosala makambo wana soki balingi kozwela yango matomba.
13 “Mobeko ya Kristo” ebengami mpe “mobeko ya kokoka mpe ya bonsomi” mpe “mobeko ya bato ya bonsomi.” (Yak. 1:25; 2:12) Bato mingi babotamaki na nse ya Mobeko ya Moize, kasi moto moko te abotamaka na kati ya kondimana ya sika to na nse ya mobeko ya Kristo. Moto nyonso oyo andimi kotosa mobeko ya Kristo, batindaka ye na makasi te ete asalela Nzambe. Kutu, bato yango basepelaka nde koyeba ete mobeko ya Nzambe ekoki kokomama na mitema mpe ete lelo oyo bato bazali na libaku ya kozwa matomba oyo ekoumela ya kondimana yango oyo Yirimia asakolaki.
Na kondimana ya sika, Nzambe asalaki likambo nini mpo masumu elimbisama? Ndenge nini okoki koyeba mobeko oyo ekomami na mitema?
BANANI BAZALI KOZWA MATOMBA NA KONDIMANA YA SIKA?
14. Banani bazali mpenza kozwa matomba ya kondimana ya sika?
14 Nsima ya koyekola ete kaka bato 144 000 nde bazali basangani ya kondimana ya sika, bato mosusu bakoki kokanisa ete kaka bato yango nde bazali kozwa matomba ya kondimana yango. Mbala mosusu bakanisaka bongo mpamba te kaka bakristo oyo batyami mafuta nde balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli ya liwa ya Yesu oyo esalemaka mbula na mbula; vinyo yango emonisaka “makila ya kondimana.” (Mrk. 14:24) Kasi kobosana te ete Yesu elongo na basangani ya kondimana ya sika basali “momboto” ya Abrahama, oyo na nzela na yango bikólo nyonso ekopambwama. (Gal. 3:8, 9, 29; Eba. 12:3) Na yango tokoki komona ete na nzela ya kondimana ya sika, Yehova akokokisa elaka na ye ya kopambola bato nyonso na nzela ya “momboto” ya Abrahama.
15. Biblia esakolaki ete bakristo oyo batyami mafuta bakozala na mokumba nini?
15 Yesu Kristo, moto ya liboso na momboto ya Abrahama, nde azali Nganga-nzambe Monene, mpe apesaki mbeka ya kokoka oyo esali ete mabunga mpe masumu ya bato elimbisama. (Tángá Baebre 2:17, 18.) Kasi, banda kala, Nzambe alobelaki “bokonzi moko ya banganga-nzambe mpe ekólo moko mosantu.” (Kob. 19:6) Na Yisraele ya kala banganga-nzambe bazalaki kouta na libota moko, mpe bakonzi bazalaki kouta na libota mosusu. Na yango, ndenge nini elaka oyo Nzambe apesaki ete ekólo moko ekobimisa bakonzi mpe banganga-nzambe esengelaki kokokisama? Ntoma Petro akomelaki baoyo basantisamaki na elimo mokanda na ye ya liboso. (1 Pe. 1:1, 2) Alobaki ete bato yango bazali “bonganga-nzambe ya bokonzi, ekólo moko mosantu, bato oyo basengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza.” (1 Pe. 2:9) Na kondimana ya sika, bakristo oyo batyami mafuta bazali banganga-nzambe na nse ya Yesu. Kanisá naino likambo yango! Mokolo na mokolo tobundisaka bamposa na biso ya kosala masumu, oyo ezali kaka ‘koyangela.’ Baoyo bakozala banganga-nzambe na nse ya Kristo bazali bato oyo babundaki mpe etumba yango na bomoi na bango. (Rom. 5:21) Na yango bayebi malamu ndenge oyo moto amiyokaka mpo na libunga oyo asalaki mpe ndenge lisosoli etungisaka moto. Elongo na Kristo, bakozala na likoki ya komitya na esika na biso ntango tozali kobundisa bamposa na biso ya kosala masumu.
16. Elendiseli nini “ebele mpenza ya bato” bakoki kozwa na Emoniseli 7:9, 14?
16 Na Emoniseli 7:9, 14, Yoane amonaki “ebele mpenza ya bato” oyo “balati bazambala ya mpɛmbɛ” mpe yango emonisi ete bazali pɛto na miso ya Nzambe. Lelo oyo, ebele mpenza ya bato yango bazali koyanganisama mpo na kobika na “bolɔzi monene”. Na yango, bazali komonana bayengebene na miso ya Nzambe. Batángami bayengebene mpe na yango babengami baninga ya Nzambe. (Rom. 4:2, 3; Yak. 2:23) Oyo nde lipamboli mpenza! Soki ozali moko kati na ebele mpenza ya bato yango, okoki kondima ete Nzambe alingi kosalisa yo lokola ozali kosala makasi mpo na kotikala pɛto na miso na ye.
17. Na ndenge nini Yehova ‘akanisaka’ lisusu te masumu oyo alimbisi?
17 Ndenge nini Nzambe atalelaka masumu ya bato oyo andimi? Ndenge tomonaki yango liboso, Yehova alobaki na nzela ya Yirimia ete: “Nakolimbisa libunga na bango, mpe nakokanisa lisumu na bango lisusu te.” (Yir. 31:34) Nzambe asalaka yango mpo na bakristo oyo batyami mafuta na nzela ya mbeka ya Yesu. Ndenge moko mpe, Nzambe akoki kolimbisa masumu ya ebele mpenza ya bato na nzela ya “makila ya kondimana.” Ntango Yirimia alobaki ete Nzambe ‘akokanisa’ lisusu masumu te, alingaki koloba te ete Nzambe akozala lisusu te na likoki ya komikundola masumu ya moto. Kasi yango emonisi ete soki Yehova apesi moto etumbu oyo esengeli mpe alimbisi mosumuki yango oyo abongoli motema, abwakaka masumu yango nsima ya mokɔngɔ na ye. Kanisá lisumu oyo Davidi asalaki ná Bate-sheba mpe mabe oyo asalelaki Uria. Davidi azwaki disiplini mpe abukaki mbuma mabe ya masumu na ye. (2 Sam. 11:4, 15, 27; 12:9-14; Yis. 38:17) Kasi Nzambe azalaki ntango nyonso te kosɛnga ye ete azongisa monɔkɔ mpo na masumu yango. (Tángá 2 Ntango 7:17, 18.) Ndenge kondimana ya sika esɛngi yango, soki Yehova alimbisi masumu na nzela ya mbeka ya Yesu, akanisaka yango lisusu te.—Ezk. 18:21, 22.
18, 19. Kondimana ya sika eteyi biso nini na oyo etali kolimbisa?
18 Na yango, kondimana ya sika ezali komonisa polele likambo moko ya kokamwa oyo Yehova asalelaka basumuki, ezala bakristo oyo batyami mafuta, oyo bazali basangani ya kondimana yango to bato mosusu oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele. Okoki mpenza kondima ete soki Yehova alimbisi masumu na yo, akokanisa yango lisusu te. Na yango, elaka oyo Nzambe apesaki na oyo etali kondimana ya sika ezali koteya biso likambo moko ya ntina. Omituna boye, ‘Nasalaka makasi namekola Yehova na ndenge nabosanaka mpe naboyaka kolobelalobela mabunga ya basusu oyo nalobaki ete nalimbisi?’ (Mat. 6:14, 15) Yango etaleli mabunga ya mike to ya minene, na ndakisa ntango molongani ya mokristo moko asali ekobo. Soki mokristo andimi kolimbisa molongani na ye oyo asalaki ekobo mpe abongoli motema, omoni te ete ezali malamu ‘akanisa lisusu te lisumu yango’? Ya solo, kobosana mabe oyo basaleli biso ezalaka pɛtɛɛ te, kasi kosala bongo ekomonisa ete tozali komekola Yehova.a
19 Tokoki mpe kosalela liteya yango oyo tozwi na kondimana ya sika ntango moto oyo abimisamaki na lisangá abongoli motema mpe azongisami na lisangá. Okosala nini soki ndeko yango asalaki yo likambo moko oyo ezali kopesa yo mpasi mpenza, to abebiselaki yo lokumu? Lokola azongisami na lisangá, ndenge nini Yirimia 31:34 ekoki kosalisa yo obongola lolenge oyo ozalaki kotalela ye mpe makambo oyo okosalela ye? Okolimbisa ndeko yango mpe okoboya kolobelalobela masumu na ye? (2 Ko. 2:6-8) Ya solo, bato nyonso oyo basepelaka na kondimana ya sika basengeli kosalela liteya yango na bomoi na bango.
Ndenge nini okoki kosalela liteya oyo kondimana ya sika epesi na oyo etali kolimbisa?
MAPAMBOLI YA KONDIMANA YA SIKA LELO OYO MPE NA MIKOLO EZALI KOYA
20. Na ndenge nini ezaleli na yo ekeseni na oyo ya Bayuda mingi ya ntango ya Yirimia?
20 Na ntango ya Yirimia, Bayuda mingi bazalaki koloba na mitema na bango ete: “Yehova akosala malamu te, mpe akosala mabe te.” (Sef. 1:12) Atako bayebaki mwa makambo oyo etali Yehova mpe bizaleli na ye, bazalaki kokanisa ete Nzambe akosala eloko te; bazalaki mpe kokanisa ete Nzambe asɛngi te ete bátosa mitinda na ye. Kasi oyebi malamu ete Nzambe ayebi mpe amonaka makambo nyonso. Lokola obangaka Nzambe, olingaka te kosala oyo ezali mabe. (Yir. 16:17) Kasi, oyebi mpe ete Yehova azali Tata ya boboto. Amonaka makambo ya malamu oyo tosalaka, ata soki bato mosusu bazali komona yango te.—2 Nt. 16:9.
21, 22. Mpo na nini ezali lisusu na ntina te báyebisa yo ete: “Yebá Yehova”?
21 Likambo mosusu ya ntina mingi ya kondimana ya sika emonani na maloba oyo: “Nakotya mobeko na ngai na kati na bango, mpe nakokoma yango na motema na bango. Mpe nakokóma Nzambe na bango, . . . Mpe bakoteyana lisusu te moto na moto moninga na ye mpe moto na moto ndeko na ye ete: ‘Bóyeba Yehova!’ mpo bango nyonso bakoyeba ngai.” (Yir. 31:33, 34) Lelo oyo, bakristo oyo batyami mafuta oyo bazali naino na mabele bamonisaka ete bazali na mobeko ya Nzambe na mitema na bango. Na esika ete bálanda mateya ya bato, balingaka mateya ya solo oyo ezali na kati ya mobeko ya Nzambe. Mpe na esengo nyonso bazali kosalisa ebele mpenza ya bato bázwa boyebi ya Biblia. Yango esalisi bakristo oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele báyeba Yehova mpe bálinga ye. Bango mpe basepelaka kolanda litambwisi ya Yehova mpe bandimelaka bilaka na ye. Na ntembe te yo mpe ozali moko na bango. Oyebi Yehova malamu mpe ozali na boyokani malamu na ye. Oyo nde limpamboli mpenza!
22 Makambo nini esalisi yo mpo ete boyokani na yo na Yehova ekóma makasi koleka? Na ntembe te, na mabaku mosusu omonaki ete Nzambe ayoki libondeli na yo. Makambo yango esalisaki yo osepela makasi koleka na bizaleli mosusu ya Nzambe. Na ntembe te omonaki mpe ndenge asalisaki yo ntango omikundolaki vɛrsɛ moko oyo esalisaki yo olonga mokakatano moko boye. Kobosanaka te makambo ya ndenge wana. Wana ozali koyekola Liloba na ye, boyebi na yo mpo na ye ekobakisama. Yango ekosala ete ozwa mpe matomba ebele.
23. Ndenge nini koyeba Yehova ekoki kosalisa yo omitungisaka ntango nyonso te mpo na mabunga oyo osalá kala?
23 Kasi kondimana ya sika ekoki mpe komemela biso lipamboli mosusu banda lelo. Koyeba ete Yehova alimbisaka na nzela ya kondimana yango ekoki kosalisa biso tómitungisaka ntango nyonso te mpo na mabunga oyo tosalá kala. Na ndakisa, bato mosusu oyo basopaki zemi liboso báyeba mitinda ya Nzambe bakoki komiyoka mawa mpe kotungisama na lisosoli mpo babomaki mwana oyo azalaki naino kokola na libumu. Bato mosusu bamiyokaka ndenge wana mpo babomaki bato na bitumba ntango bazalaki basoda. Kasi, na lisalisi ya mbeka ya lisiko ya Yesu oyo esimbi kondimana ya sika, bato oyo babongoli mpenza motema bakoki kolimbisama masumu. Lokola toyebi yango, tosengeli mpenza kondima ete soki Yehova alimbisi masumu na biso, akanisaka yango lisusu te, boye te? Tosengeli lisusu te kokanisakanisa masumu oyo Yehova asili kolimbisa mpenza.
24. Ndenge nini Yirimia 31:20 ekoki kolendisa yo?
24 Vɛrsɛ ya Yirimia 31:20 emonisi polele ete Nzambe alimbisaka mpenza. (Tángá.) Bambula mingi liboso ya ntango ya Yirimia, Yehova apesaki mabota zomi oyo ezalaki na bokonzi ya nɔrdi ya Yisraele etumbu (mabota yango emonisamaki na libota ya Efraime, oyo ezalaki libota moko ya lokumu mingi kati na mabota zomi yango) mpo bamipesaki na losambo ya bikeko. Mabota yango ememamaki na boombo. Kasi, Nzambe akangamaki kaka na bango mpe amoniselaki bango bolingo. Azalaki kaka kosepela na bango lokola ‘mwana oyo balɛngɛlaka.’ Ntango akanisaki bango, misɔpɔ na ye ‘ekómaki na yikiyiki,’ elingi koloba ete mayoki na ye eninganaki mpenza. Lisolo yango, oyo ezali na boyokani na kondimana ya sika, emonisi ete Yehova azalaka na motema monene mpenza mpe alimbisaka bato oyo babongoli motema mpe batiki etamboli na bango ya mabe.
25. Mpo na nini osengeli kozala na botɔndi epai ya Yehova mpo na kondimana ya sika?
25 Elaka ya Yehova ya kolimbisa masumu na nzela ya kondimana ya sika ekokokisama na mobimba na yango na nsuka ya Boyangeli ya Kristo oyo ekoumela mbula Nkotó. Yesu Kristo elongo na banganga-nzambe basungi 144 000 bakokómisa bato ya sembo bato ya kokoka. Nsima ya komekama ya nsuka, bato bakokóma mpenza bato ya libota ya basaleli nyonso ya Yehova oyo bazali na likoló mpe na mabele. (Tángá Baroma 8:19-22.) Na boumeli ya basiɛklɛ mingi, bato bazali kokimela mpo na kilo ya masumu oyo basalá. Kasi na ntango yango, biloko oyo Yehova azalisá, elingi koloba bato, bakozwa “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo”; yango elimboli ete bakosikolama na lisumu mpe na liwa. Na yango, osengeli mpenza kondima ete na nzela ya ebongiseli ya kondimana ya sika oyo Nzambe azwi na bolingo na ye, okoki kozwa matomba ebele. Banda lelo mpe mpo na libela, okoki kozwa matomba na nzela ya “etape” ya Davidi mpe kosepela na “boyengebene na mokili.”—Yir. 33:15.
Ndenge nini kondimana ya sika ekoki komemela yo matomba lelo oyo mpe na mikolo ezali koya?
a Likambo ya Hosea ná Gomere emonisi ete Nzambe azalaka mpenza na mposa ya kolimbisa. Talá ndimbola ya Hosea 2:14-16 na buku Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo, nkasa 128-130.