Lisosoli na yo eteyami malamu?
EKÓMELA yo oloba ete: “Nayebi ete kosala bongo ezali mabe” to “Nakoki te kosala likambo oyo ozali kosɛnga ngai. Eloko moko kati na ngai ezali koyebisa ngai ete kosala bongo ezali mabe”? Eloko yango ezali “mongongo” ya lisosoli na yo, oyo eyebisaka yo na kati ya motema ete likambo boye ezali malamu to mabe, oyo efundaka to elongisaka moto. Ya solo, tobotamaka na lisosoli.
Atako bato bapesi Nzambe mokɔngɔ, bazali kaka na likoki ya kokesenisa malamu ná mabe. Ezali bongo mpamba te moto akelamaki na elilingi ya Nzambe, yango wana azali na likoki ya komonisa bizaleli ya Nzambe lokola bwanya mpe bosembo. (Genese 1:26, 27) Mpo na yango, Ntoma Paulo akomaki na lisalisi ya elimo santu boye: “Ntango bato ya bikólo mosusu oyo bazalaka na mibeko te bazali kosala makambo ya mibeko bango moko ndenge bazalisamá, bato yango, atako bazalaka na mibeko te, bazali mobeko epai na bango moko. Bango nde bato oyo bazali komonisa ete makambo ya mibeko ekomamá na kati ya mitema na bango, wana lisosoli na bango ezali kopesa litatoli elongo na bango mpe, na kati ya makanisi na bango moko, bazali kofundama to ata mpe kolongisama.”a—Baloma 2:14, 15.
Likoki yango ya kokesenisa malamu ná mabe, oyo tozwá epai ya moto ya liboso Adama, esalaka lokola “mobeko” to malako ya etamboli malamu epai ya bato ya mposo mpe bikólo nyonso. Ezali likoki ya komitalela mpe kokata biso moko soki tosali malamu to mabe. (Baloma 9:1) Ntango Adama ná Eva babukaki mobeko ya Nzambe, bamonaki bango moko ete basali mabe mpe bamibombaki. (Genese 3:7, 8) Ndakisa mosusu oyo ezali komonisa ndenge lisosoli esalaka ezali oyo ya Davidi, ndenge ayokaki ntango amonaki ete asali lisumu na resansema oyo asalisaki. Biblia elobi ete “motema ya Davidi ebandaki kobɛta ye.”—2 Samwele 24:1-10, NW.
Likoki ya kotalela makambo oyo tosali mpe kokata soki ezali malamu to te ekoki kosalisa biso tósala likambo moko ya ntina mingi, kobongola motema na boyokani na mokano ya Nzambe. Davidi akomaki boye: “Wana nayebisaki bokesene na ngai te, nzoto na ngai ebebaki mpo na konguluma na ngai mokolo mobimba. Nayebisaki yo masumu na ngai, nabombaki bokesene ya motema na ngai te. Nalobaki ete, Nakoyebisa [Yehova] bipɛngwɛli na ngai, mpe yo olimbisi mabe ya masumu na ngai.” (Nzembo 32:3, 5) Na yango, lisosoli oyo ezali kosala malamu ekoki kozongisa mosumuki epai ya Nzambe mpe kosalisa ye amona ntina ya kozwa bolimbisi ya Nzambe mpe ya kolanda banzela na Ye.—Nzembo 51:1-4, 9, 13-15.
Lisosoli epesaka mpe makebisi to litambwisi ntango tolingi kozwa ekateli moko. Ekoki kozala lisosoli ya ndenge wana nde esalisaki Yozefe asosola liboso mobeko ebima ete ekobo ezali mabe mpe lisumu na miso ya Nzambe. Na nsima, mobeko oyo epekisaki ekobo ebimaki na kati ya Mibeko zomi oyo Nzambe apesaki bana ya Yisalaele. (Genese 39:1-9; Exode 20:14) Emonani mpenza ete tokozwa matomba mingi soki toteyi lisosoli na biso etambwisaka biso na esika esambisaka biso kaka. Lisosoli na yo esalaka ndenge wana?
Tóteya lisosoli na biso ezwaka bikateli ya malamu
Atako tobotamá na lisosoli, ezali mawa mingi komona ete likoki yango ezali lisusu ya kokoka te. Atako bato bakelamaki na ndenge ya kokoka, “bato nyonso basali lisumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe.” (Baloma 3:23) Lokola lisumu mpe kozanga kokoka ebebisá lisosoli na biso, ekoki lisusu kosala malamu te ndenge Nzambe abongisaki yango. (Baloma 7:18-23) Lisusu, makambo mosusu ekoki kobebisa lisosoli na biso. Ndenge oyo tobɔkwami to mimesano ya mboka na biso, bindimeli na biso mpe bato oyo tofandi na bango bakoki kosala ete lisosoli na biso ezala malamu to mabe. Kobeba ya bizaleli mpe mitinda ya mokili oyo ekoki kosalisa biso te tózala na lisosoli ya malamu.
Yango wana, moklisto asengeli kotambwisama na mitinda mosusu, oyo ebongwanaka te mpe ya sembo, oyo ezwami na kati ya Liloba ya Nzambe, Biblia. Mitinda yango ekoki kotambwisa lisosoli na biso na kotalela makambo na ndenge ebongi mpe na kosembola yango. (2 Timote 3:16) Soki lisosoli na biso eteyami na mitinda ya Nzambe, ekoki mpenza kosalisa biso tókima makambo oyo ekoki kobebisa etamboli na biso mpe tóyeba “kokesenisa ná mabe ná malamu.” (Baebele 5:14) Soki mitinda ya Nzambe ezali kotambwisa biso te, lisosoli na biso ekoki kokebisa biso te ntango tobandi kotɛngama. Biblia elobi ete: “Nzela ezali oyo emonani malamu [epai ya] moto, nde nsuka na yango bobele nzela ya kufa.”—Masese 16:25; 17:20.
Na makambo mosusu ya bomoi, Liloba ya Nzambe epesi malako mpe mitinda ya polele, mpe ekozala malamu tólandaka yango. Nzokande, na makambo mingi, Biblia epesi mpenza mibeko ya polele te. Ekoki kozala makambo lokola kopona mosala, komisalisa na maladi, kominanola, molato, monzɛlɛ mpe makambo mosusu. Ezali pɛtɛɛ te koyeba nini tosengeli kosala na mokomoko ya makambo wana mpe kozwa ekateli ya malamu. Mpo na yango, tosengeli kozala lokola Davidi oyo abondelaki ete: “[Ee Yehova], yebisá ngai nzela na yo; monisá ngai bilekelo na yo. Tambolisá ngai kati na solo na yo mpe lakisá ngai, zambi yo ozali Nzambe ya kobika na ngai; nazali kotalela yo mokolo mobimba.” (Nzembo 25:4, 5) Soki toyebi malamu ndenge Nzambe atalelaka makambo mpe mitinda na ye, tokoyeba mpe kotalela makambo na biso malamumalamu mpe kozwa bikateli ya malamu, oyo etambwisami na lisosoli ya pɛto.
Yango wana, soki toyebi te nini tosengeli kosala to ekateli nini tosengeli kozwa, tosengeli naino koluka koyeba oyo mitinda ya Biblia ezali kosɛnga. Mitinda yango ekoki kolobela makambo lokola kotosa ebongiseli ya bokonzi (Bakolose 3:18, 20); bosembo na makambo nyonso (Baebele 13:18); koyina mabe (Nzembo 97:10); koluka kimya (Baloma 14:19); kotosa bakonzi (Matai 22:21; Baloma 13:1-7); kosambela kaka Nzambe ye moko (Matai 4:10); kokɔta na makambo ya mokili te (Yoane 17:14); koboya baninga mabe (1 Bakolinti 15:33); kolata mpe kosala monzɛlɛ na bokatikati (1 Timote 2:9, 10) mpe kobɛtisa basusu libaku te (Bafilipi 1:10). Koyeba etinda ya sikisiki ya Biblia ekoki kolendisa lisosoli na biso mpe kosalisa biso tózwa ekateli oyo ebongi.
Yoká lisosoli na yo
Soki tolingi lisosoli na biso esalisa biso, tosengeli koyokaka yango. Lisosoli na biso oyo eteyami na Biblia ekoki kosalisa biso kaka soki tozali koyoka makebisi oyo yango ezali kopesa. Lisosoli oyo eteyami ezali lokola miinda ya tableau de bord ya motuka. Kanisá naino ete mwinda moko epeli mpo na kokebisa biso ete mafuta etikali kaka moke. Nini ekosalema soki tokipe mwinda yango te mpe tokobi kaka kotambwisa motuka? Tokoki mpenza kobebisa motɛrɛ ya motuka. Ndenge moko mpe, lisosoli to mongongo ya motema na biso ekoki kokebisa biso ete nzela oyo tozali kolanda ezali mabe. Ntango lisosoli na biso emoni ete likambo oyo tozali kosala to tokani kosala eyokani te na mitinda ya Biblia, ekokebisa biso ndenge kaka mwinda ya tableau de bord esalaka. Koyoka likebisi yango ekosalisa biso kaka te tókima likama oyo ezaleli wana ekoki komema, kasi ekosala mpe ete lisosoli na biso ekoba kosala malamu.
Ekosuka boni soki toboyi koyoka likebisi ya lisosoli na biso? Mokemoke, lisosoli na biso ekokufa. Kozala na momeseno ya koboya koyoka likebisi ya lisosoli na biso ezali lokola tozali kosimba ebende ya mɔtɔ makasi na misapi. Misisa ya nsɔngɛ ya misapi oyo emesani kosimba mɔtɔ ekokufa mpe misapi yango ekobanda koyoka lisusu mɔtɔ te. (1 Timote 4:2) Lisosoli ya ndenge wana esambisaka lisusu moto te soki asali lisumu, epesaka mpe ye makebisi te mpo na kopekisa ye kozongela lisumu yango. Lisosoli oyo ekufá elandaka lisusu te mitinda ya Biblia oyo etali malamu ná mabe, yango wana tokoki koloba ete ezali lisosoli mabe. Ezali lisosoli ya mbindo mpamba te moto oyo azali na lisosoli ya ndenge wana ‘abungisi bizaleli nyonso ya malamu’ mpe apesi Nzambe mokɔngɔ. (Baefese 4:17-19; Tito 1:15) Oyo nde likama monene!
“Zalá na lisosoli ya malamu”
Esɛngaka kosala milende ntango nyonso mpo na kobatela lisosoli malamu. Ntoma Paulo alobaki boye: “Nazali ntango nyonso kosala makasi mpo na kozala na lisosoli oyo ezali komonisa ete nasali mabe moko te epai ya Nzambe mpe epai ya bato.” (Misala 24:16) Lokola moklisto, Paulo azalaki ntango nyonso komitalela mpe kobongisa etamboli na ye mpo asala lisumu te na miso ya Yehova. Paulo ayebaki ete nsukansuka, Nzambe nde akokata soki misala na biso ezalaki malamu to mabe. (Baloma 14:10-12; 1 Bakolinti 4:4) Paulo alobaki ete: “Biloko nyonso ezali bolumbu mpe etandami polele na miso ya moto oyo epai na ye tokozongisa monɔkɔ.”—Baebele 4:13.
Paulo amonisaki mpe ntina ya koboya kosala basusu mabe. Tozali na ndakisa ya toli oyo apesaki baklisto ya Kolinti na oyo etali “kolya bilei oyo epesami epai ya bikeko.” Alingaki koloba ete ata soki Liloba ya Nzambe epekisi likambo moko boye te, ezali na ntina mingi tótalela lisosoli ya basusu ntango tolingi kosala yango. Soki tosali bongo te, tokoki kobebisa na elimo ‘bandeko na biso oyo Klisto akufelaki.’ Tokoki mpe kobebisa boyokani na biso moko na Nzambe.—1 Bakolinti 8:4, 11-13; 10:23, 24.
Na yango, kobá koteya lisosoli na yo mpe kobatela yango malamu. Liboso ya kozwa bikateli, luká litambwisi ya Nzambe. (Yakobo 1:5) Yekoláká Liloba ya Nzambe mpe tiká mitinda na yango ekóma kotambwisa makanisi mpe motema na yo. (Masese 2:3-5) Soki makambo ya minene ebimi, sololá na bandeko oyo bakɔmeli na elimo mpo na koyeba soki makanisi na yo eyokani na mitinda ya Biblia oyo etali makambo yango. (Masese 12:15; Baloma 14:1; Bagalatia 6:5) Luká koyeba soki ekateli na yo ekobebisa lisosoli na yo to oyo ya basusu te mpe, likambo ya ntina koleka, soki ekobebisa boyokani na yo na Yehova te.—1 Timote 1:5, 18, 19.
Lisosoli na biso ezali likabo kitoko oyo euti epai ya Tata na biso ya bolingo, Yehova Nzambe. Soki tozali kosalela yango na boyokani na mokano na Ye oyo apesaki biso yango, tokopusana penepene na Mozalisi na biso. Soki tozali kosala makasi mpo na ‘kozala na lisosoli malamu’ na makambo nyonso oyo tosalaka, tokomonisa mpenza ete tokelamá na elilingi ya Nzambe.—1 Petelo 3:16; Bakolose 3:10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba ya Grɛki oyo basaleli awa mpo na lisosoli elimboli “likoki oyo moto azali na yango na kati na ye ya koyeba kokesenisa malamu ná mabe” (The Analytical Greek Lexicon Revised, by Harold K. Moulton); “koyeba kokesenisa bizaleli ya malamu ná ya mabe.”—Greek-English Lexicon, by J. H. Thayer.
[Bililingi na lokasa 13]
Lisosoli na yo eteyami mpo etambwisaka yo na esika esambisaka yo kaka?
[Elilingi na lokasa 14]
Lisosoli oyo eteyami malamu eutaka na koyekola mpe kosalela mitinda ya Biblia
[Bililingi na lokasa 15]
Koboyaka te koyoka makebisi ya lisosoli na yo