Basalaki mokano ya Yehova
Mwasi moko ya mayele apɛngoli likámá
MWASI moko ya boboto abalanaki na moto mpamba—yango nde ezalaki ezalela ya Abigaili mpe Nabala. Abigaili azalaki “na boyebi malamu mpe na elongi kitoko.” Na bokeseni, Nabala azalaki “moto na nkanda mpe na makambo mabe.” (1 Samwele 25:3) Makambo oyo mabimaki mpe oyo kati na yango babalani oyo bakeseni batalelamaki etiká nkombo na bango kati na lisoló ya Biblia. Tótalela lolenge yango elekaki.
Ngɔlu ezangi kopesamela mbano
Ezalaki na ekeke ya 11 L.T.B. Davidi asilaki koponama mpo na kozala mokonzi ya Yisalaele, kasi na esika ete ayangela, azalaki nde kokima. Saulo, mokonzi oyo azalaki naino koyangela, azalaki na ekateli ya koboma ye. Mpo na yango, Davidi akómaki na bomoi ya koyengayenga. Ye na baninga na ye 600 bakimaki na mokili mokauki ya Palani, na súdi ya Yuda mpe na ngámbo ya mokili mokauki ya Sinai.—1 Samwele 23:13; 25:1.
Kuna, bakutanaki na babateli ya bampate oyo bazalaki basáli ya mobali moko na nkombo Nabala. Moto yango ya bozwi mingi azalaki mokitani ya Kalebe, ye azalaki na mpate 3 000 mpe ntaba 1 000, mpe azalaki kokata bampate na ye mikunge na Kalamele, engumba oyo ezalaki na súdi ya Hebeloni mpe ekoki kozala ete ezalaki bobele na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 40 na Palani.a Davidi mpe bato na ye basungaki babateli na bampate ya Nabala mpo na kobatela bitonga na bayibi oyo bazalaki koyengayenga kati na mokili mokauki.—1 Samwele 25:14-16.
Bobele na ntango yango, mosala ya kokata mikunge ya bampate ebandaki na Kalamele. Yango ezalaki libaku ya kosepela, lolenge ezalaka na eleko ya bobuki mbuma mpo na mosáli na bilanga. Ezalaki mpe eleko ya komonisa bokabi mingi, ntango bankolo ya bampate bazalaki kopesa lifuti na baoyo basalelaki bango mosala. Na yango Davidi alukaki sé eloko oyo ebongi na ye ntango atindaki bato zomi na engumba Kalamele mpo na kosɛnga bilei epai ya Nabala lokola lifuti mpo na mosala oyo basalaki mpo na bitonga na ye.—1 Samwele 25:4-9.
Eyano ya Nabala ezalaki ya boboto te. Na kotyola mpenza atunaki ete “Davidi nani?” Bongo, kopesáká likanisi ete Davidi mpe bato na ye bazalaki sé basáli oyo bakimaki nkolo na bango, atunaki ete: “Nakamata kwanga na ngai mpe mai na ngai mpe nyama na ngai oyo esili ngai koboma mpo na bakati na [mikunge, NW] na bampate na ngai ete napesa yango epai na bato baoyo nayebi eutelo na bango te?” Ntango Davidi ayokaki likambo yango, alobaki na bato na ye ete: “Moto na moto akanga mopanga na ye!” Pene na bato 400 bamibongisaki mpo na etumba.—1 Samwele 25:10-13.
Mayele ya Abigaili
Abigaili, mwasi ya Nabala ayokaki maloba mabe oyo mobali na ye abimisaki. Ekoki kozala ete ezalaki mbala ya liboso te oyo amikɔtisaki mpe asalaki lokola mozongisi na kimya mpo na Nabala. Atako boni, Abigaili asalaki likambo moko nokinoki. Kozanga ete ayebisa Nabala, ayanganisaki bilei—mpate mitano mpe ebele na biloko—mpe akendaki kokutana na Davidi kati na mokili mokauki.—1 Samwele 25:18-20.
Ntango Abigaili amonaki Davidi, akweaki na elongi na ye liboso na ye. Abondelaki ye ete: ‘Nkolo na ngai akanisa moto mpamba oyo te, ye Nabala. Tiká ete likabo oyo eyeisi moombo na yo epai na nkolo na ngai lipesamela bilenge, bango baoyo bakobila makolo na nkolo na ngai.’ Abakisaki ete: “Likambo oyo [na ntina na Nabala] ekozala na mawa epai na yo te to kokata motema na nkolo ngai te.” Liloba ya Liebele oyo libongolami awa na “kozala na mawa te” ezali kopesa likanisi ya kimya ya lisosoli. Boye Abigaili akebisaki Davidi ete asala likambo moko nokinoki te, oyo na nsima ekoyokisa ye mawa.—1 Samwele 25:23-31.
Davidi ayokelaki Abigaili. Alobaki na ye ete: “Mayele na yo ekumisama, yo mpe opambwama! Yo opekisi ngai lelo ete naya kotangisa makila te. Soko oyaki mbango te mpe ozwani na ngai te, solo [“moto moko te akosubaka na efelo,” NW] atikalaki epai na Nabala na ntango na moi na ntɔ́ngɔ́ te.”b—1 Samwele 25:32-34.
Liteya mpo na biso
Lisoló oyo ya Biblia emonisi ete ezali mabe te mpo na mwasi oyo azali na bobangi Nzambe ete azwa ekateli ya kosala likambo malamu soki esengeli. Abigaili asalaki makambo mayokanaki te na bolingi ya mobali na ye Nabala, kasi Biblia ekweisi ye te mpo na yango. Kútu, ezali kokumisa ye lokola mwasi ya mayele mpe ya boboto. Na kosaláká likambo moko na ntango wana ya likámá, Abigaili abikisaki bomoi ya bato mingi.
Atako mbala mingi mwasi asengeli komonisa elimo ya botosi mozindo, akoki mbala mosusu koboya makanisi ya mobali na ye na ntango mitindá ya sembo milingi kokweisama. Ya solo, asengeli kosala nyonso mpo na kobatela “[elimo] na bopɔlɔ mpe na kimya” mpe asengeli te kosala makambo lokola elingi ye bobele mpo na motema mabe, lolɛndɔ, to botomboki. (1 Petelo 3:4) Nzokande, mwasi oyo azali na bobangi Nzambe asengeli te komiyoka ete apusami na makasi kosala likambo oyo ayebi malamu ete ezali mpenza ya bozoba to ezali kobuka mitindá ya Biblia. Ya solo, lisoló ya Abigaili ezali kopesa eyano ya nguya epai na baoyo bazali kokangama na likanisi oyo ete Biblia ezali komonisa ete basi bazali baombo mpamba.
Lisoló yango lizali lisusu koteya biso komipekisa. Na bantango mosusu, Davidi amonisaki ezalela yango na lolenge ya malamu mpenza. Na ndakisa, aboyaki koboma Mokonzi Saulo oyo azalaki na likunya, atako azalaki na mabaku mingi ya kosala yango mpe liwa ya Saulo elingaki kopesa ye kimya. (1 Samwele 24:2-7) Na bokeseni, na ntango Nabala aboyaki ye na kotyola nyonso, Davidi azwamaki mpenza mpe alapaki ete akozongisela ye mabe na ye. Yango ezali likebisi ya polele mpo na baklisto oyo bazali komeka ‘kozongisa mabe mpo na mabe.’ Na makambo nyonso, basengeli kolanda toli ya Paulo ete: “Soko ekokoka, mpe lokola ezali likambo na bino, bózala na bato nyonso kimya. Balingami, bóbukanisa mpo na bino mpenza te, kasi tiká esika mpo na nkanda.”—Baloma 12:17-19.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekanisami ete mokili mokauki ya Palani epalanganaki kino na nɔ́rdi ya Bele-seba. Eteni yango ya mabelé ezalaki na bisika minene na bitwele ya koleisa bibwele.
b Maloba “moto akosubaka na efelo” ezalaki lolenge Baebele bazalaki kobénga mibali, na ntembe te ezalaki ebéngeli ya kotyola.—Kokanisá na 1 Mikonzi 14:10, NW.
[Elilingi na lokasa 15]
Abigaili amemeli Davidi makabo