Batyami pembeni lokola basanzoli na esengo kati na mokili mobimba
“Ɛ bino baombo na [Yehova], bósanzola! Bósanzola nkombo na [Yehova].”—NZEMBO 113:1.
1, 2. (a) Na boyokani na Nzembo 113:1-3, nani abongi kopesamela masanzoli na biso ya esengo? (b) Motuna nini mobongi kotunama?
YEHOVA NZAMBE azali Mozalisi Monene ya likoló mpe mabelé, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpo na libela. Abongi mpenza kopesamela masanzoli na biso ya esengo. Yango wana Nzembo 113:1-3 esɛngi na biso ete: “Ɛ bino baombo na [Yehova], bósanzola! Bósanzola nkombo na [Yehova]! Nkombo na [Yehova] esanzolama longwa sasaipi kino lobiko na lobiko. Longwa na kotana na moi kino kolimwa na yango, nkombo na [Yehova] esanzolama.”
2 Lokola tozali Batatoli ya Nzambe, tozali kosepela kosala bongo. Oyo nde esengo tozali na yango ya koyeba ete mosika te Nzambe akosala ete nzembo yango ya esengo oyo tozali koyemba lelo eyokana na mabelé mobimba! (Nzembo 22:27) Mongongo na yo ezali koyokana kati na limpinga ya bayembi wana ya mokili mobimba? Soki ɛɛ, oyo nde esengo ozali na yango ya kokabwana na mokili oyo mozangi bomoko mpe mozangi esengo!
3. (a) Nini ezali kokesenisa basaleli ya Yehova na bato mosusu? (b) Na makambo nini totyami pembeni?
3 Na ntembe te masanzoli na biso oyo tozali kopesa na bomoko epai na Yehova mazali kokesenisa biso na bato mosusu. Tozali koloba mpe koteya lolenge moko mpe tozali kosalela mitindo ndenge moko mpo na kosakola ‘malamu monene ya Yehova.’ (Nzembo 145:7) Ɛɛ, lokola tozali bato oyo bamipesi na Yehova, totyami pembeni mpo na mosala ya Nzambe na biso, Yehova. Nzambe ayebisaki Yisalaele, libota ya kala oyo emipesaki na ye ete likabwana na mabota oyo mazalaki zingazinga na bango mpe bábebisama te na misala ya mabota yango. (Exode 34:12-16) Apesaki libota na ye mibeko mpo na kosalisa bango na kosala bongo. Bobele bongo lelo oyo, Yehova asili kopesa biso Biblia, Liloba na ye Mosantu. Mateya na yango mazali komonisa biso lolenge nini tokoki kokabwana na mokili oyo. (2 Bakolinti 6:17; 2 Timoté 3:16, 17) Totyami pembeni na lolenge ya komitangola na basusu mpe kofanda kati na bamonastere mpe bakuvá te, lokola basángó mpe bamamɛ́lo ya Babilone Monene. Kolandáká ndakisa ya Yesu, tozali basanzoli ya Yehova liboso ya bato nyonso.
Tómekola Mosanzoli Monene ya Yehova
4. Na lolenge nini Yesu apesaki ndakisa na kosanzoláká Yehova?
4 Yesu atikaki soko moke te mokano na ye ya kosanzola Yehova. Mpe yango ekabolaki ye na mokili. Kati na biyanganelo mpe na tempelo na Yelusaleme, asanzolaki nkombo mosantu ya Nzambe. Ata na likoló ya ngomba to na libongo, bisika nyonso oyo bibele bayanganaki, Yesu asakolaki basolo ya Yehova liboso ya bato nyonso. Alobaki ete: “Nasanzoli yo liboso na bato nyonso, Tata, Nkolo na likoló mpe na mabelé.” (Matai 11:25, NW) Ata ntango azalaki kosambisama liboso na Ponti Pilata, Yesu atatolaki ete: “Ngai nabotami mpo na ntina oyo mpe nayei na mokili ete natatola mpo na solo.” (Yoane 18:37) Yesu asepelaki na motuya ya mosala na ye. Bisika nyonso oyo azalaki, Yesu apesaki litatoli na ntina na Yehova mpe asanzolaki ye liboso na bato nyonso.
5. Nzembo 22:22 ezali kosalelama epai na nani, mpe ezaleli na biso esengeli kozala nini?
5 Na Nzembo 22:22, tozali kokuta maloba ya esakweli matali Mosanzoli Monene ya Yehova: “Nakolakisa nkombo na yo epai na bandeko na ngai, na kati na koyangana nakosanzola yo.” Mpe na Baebele 2:11, 12, ntoma Paulo asalelaki maloba yango mpo na Nkolo Yesu, mpe epai na baoyo Nzambe asili kobulisa mpo na nkembo ya likoló. Lokola ye, bazali koyoka nsɔni te ya kosanzola nkombo ya Yehova kati na lisangá. Tozalaka na ezalela motindo yango ntango toyanganaka na makita na biso ya lisangá? Kosangana na biso ya esengo na makita, na koyoka mpe kopesa biyano, esanzolaka Yehova. Kasi masanzoli na biso ya esengo esukaka sé wana?
6. Etindá nini Yesu apesaki na bayekoli na ye, mpe lolenge nini balingi na pole bazali kokumisa Nzambe?
6 Engebene Matai 5:14-16, Nkolo Yesu mpe apesaki bayekoli na ye etindá ete bátika pole na bango engɛnga mpo ete basusu bákoka kosanzola Yehova. Alobaki ete: “Bino bozali moi na mokili. . . . Tiká ete moi na bino engɛnga liboso na bato ete bámona misala na bino malamu mpe bákumisa Tata na bino oyo azali na Likoló.” Baoyo balingaka pole bapesaka nkembo epai na Nzambe. Basalaka yango bobele na maloba mpe na misala malamu ya kopesa lisungi epai na bato? Te, basalaka yango nde na kokumisáká Yehova kati na bomoko. Ɛɛ, baoyo balingaka pole bamipesaka na Nzambe mpe bakómaka basanzoli na ye na esengo. Ozali kosala litambe yango ya esengo?
Esengo euti na kosanzola Yehova
7. Mpo na nini basanzoli ya Nzambe bazali na esengo, mpe esengo nini bazalaki na yango na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B.?
7 Mpo na nini basanzoli ya Yehova bazali na esengo? Mpamba te esengo ezali mbuma ya elimo ya Nzambe. Na Bagalatia 5:22, etángami nsima ya bolingo. Na ekeke ya liboso bayekoli ya Yesu bamonisaki mbuma yango ya elimo ya Yehova. Na ntina yango, na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., ntango Nzambe asopaki elimo na ye likoló na bayekoli ya Yesu 120, bango nyonso babandaki kosanzola Yehova na nkótá ndenge na ndenge. Basambeli Bayuda oyo bautaki na mabota mingi mpe bayaki na Yelusaleme ‘bakamwaki mpe bakakatanaki.’ Balobaki ete: “Tozali koyoka bango na nkótá na biso kosolola misala na Nzambe minene”! (Misala 2:1-11) Matomba nini mamonanaki na kosanzola Yehova na lolenge wana na minɔkɔ ndenge na ndenge? Bayuda na bapakano oyo bakɔtaki na lingomba ya Bayuda, nyonso bato 3 000 bandimaki nsango malamu ya Bokonzi etali Masiya. Babatisamaki, bazwaki elimo santu, mpe na esengo mpenza babakisaki mingongo na bango lokola basanzoli na esengo ya Yehova. (Misala 2:37-42) Oyo nde lipamboli!
8. Nsima ya Pantekote, baklisto basalaki nini mpo na kokólisa esengo na bango?
8 Lisoló ekóbi ete: “Mokolo na mokolo bayangani na motema moko na Tempelo mpe babuki kwanga na ndako na ndako mpe bakaboli bilei na esengo mpe na sembo na motema, kosanzoláká Nzambe, mpe kokumamáká na bato nyonso. Nkolo mpe abakisi baoyo bazalaki kobikisama mokolo na mokolo na motuya na bango.” (Misala 2:46, 47) Ezalaki bobele kosangana na bango mpe kolya elongo nde ezalaki komemela bango esengo monene? Te, esengo na bango monene ezalaki kouta nde na kosanzola Yehova mokolo na mokolo. Mpe esengo na bango ekólaki ntango bamonaki bankóto bandimi nsango na bango ya lobiko. Ezali bobele bongo mpo na biso lelo oyo.
Basanzoli na esengo kati na mabota nyonso
9. (a) Ntango nini mpe na lolenge nini Nzambe abandaki kopesa bato ya mabota nyonso libaku ya koyoka nsango malamu na ye? (b) Mpo na nini Koloneli mpe baninga oyo bazalaki na ye elongo bazwaki elimo santu liboso ya batisimo na bango?
9 Yehova alingaki te ete mosala ya komema pole oyo mozali kosalema na basaleli na ye mosuka bobele na libota moko. Na bongo, kobanda na mobu 36 T.B., apesaki bato ya mabota nyonso libaku ya koyoka nsango malamu. Na litambwisi ya Nzambe, Petelo akendaki na ndako ya Mopakano moko, mokonzi ya basodá na Kaisalia. Kuna akutaki Koloneli elongo na baninga na ye ya motema mpe libota na ye. Lokola balandaki maloba ya Petelo na likebi mpenza, bamonisaki kondima epai ya Yesu kati na mitema na bango. Toyebi yango ndenge nini? Toyebi yango mpamba te elimo santu ya Nzambe ekitelaki bandimi yango Bapakano. Ya solo, likabo ya elimo ya Nzambe lizalaki kopesama bobele nsima ya batisimo, kasi na libaku yango Yehova amonisaki ete andimi bato yango oyo bazalaki Bayuda te liboso ya kozindisama na mai. Soki Yehova asalaki bongo te, Petelo mbɛlɛ andimisamaki te ete Nzambe azalaki sikawa kondima Bapakano lokola basaleli na Ye mpe ete babongi kozwa batisimo ya mai.—Misala 10:34, 35, 47, 48.
10. Lolenge nini eyebisamaki uta ntango ya kala ete mabota nyonso makosanzola Yehova?
10 Uta ntango ya kala, Yehova ayebisaki ete bato ya mabota nyonso bakosanzola ye. Akozala na basanzoli na mikili nyonso. Mpo na komonisa yango, ntoma Paulo atángaki bisakweli ya Makomami ya Liebele. Ayebisaki na lisangá ya baklisto ya Loma oyo ezalaki na bato ya bikólo bikeseni ete: “Bónyangelana pelamoko Klisto asili konyangela bino mpo na nkembo na Nzambe. Mpo ete nalobi na bino ete Klisto akómaki mosaleli epai na baoyo bakatami ngenga ete amonisa sembo na Nzambe mpo na kokokisa bilaka bipesami epai na batata, mpe ete bapakano bákumisa Nzambe mpo na boboto na ye. Pelamoko ekomami [na Nzembo 18:49] ete, Nakosanzola yo kati na bapakano, mpe nakoyembela nkombo na yo. Mpe lisusu [na Deteronome 32:43] ete, Bino bapakano, bósepelaka kati na ye elongo. Mpe lisusu [na Nzembo 117:1] ete, Bino bapakano, bósanzola Nkolo, tiká ete mabota nyonso básanzola ye.”—Baloma 15:7-11.
11. Lolenge nini Nzambe asalisi bato ya mabota nyonso ete báyeba solo na ye, mpe litomba nini emonani?
11 Bato bakoki kosanzola Nzambe na bomoko bobele soko batye elikya na bango epai na Yesu Klisto, moto oyo Nzambe asili kopona mpo na koyangela bato ya mabota nyonso. Mpo na kosunga bango ete bámonisa motuya na solo na Ye oyo ezali komema na bomoi ya seko, Nzambe asali ebongiseli ya mateya mpo na mokili mobimba. Azali kopesa litambwisi na nzela ya moombo na ye ya sembo mpe ya mayele. (Matai 24:45-47) Litomba nini ezwami? Litomba ezali oyo ete mingongo koleka milió mitano mizali koyemba masanzoli mpo na Yehova kati na mikili koleka 230. Mpe bamilió mosusu bazali komonisa bosepeli na kosaláká bongo. Talá motángo ya bayangani na Ekaniseli na mobu 1996: bato 12 921 933. Oyo nde esengo!
Ebele monene ya basanzoli na esengo esakolamaki
12. Emonaneli nini ya esengo ntoma Yoane amonaki, mpe bosolo na yango ezali nini lelo oyo?
12 Kati na emonaneli, ntoma Yoane amonaki “ebele monene” bauti na mabota nyonso. (Emoniseli 7:9) Motó na likambo ya masanzoli oyo ebele monene bazali koyemba elongo na batikali bapakolami ya Nzambe ezali nini? Yoane ayebisi biso ete: “Lobiko na Nzambe na biso oyo afandi na kiti na Bokonzi, mpe na Mwana na Mpate!” (Emoniseli 7:10) Ezali yango nde ezali koyebisama na mpiko mpenza bipai binso na mokili. Tozali kopɛpa mandalala, elingi koloba ete tozali kokumisa Nzambe na bomoko lokola Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe na esengo tozali kotatola liboso na likoló mpe mabelé ete ‘lobiko na biso euti’ na ye mpe na Mwana na ye, Mwana na Mpate, Yesu Klisto. Oyo nde esengo ntoma Yoane azalaki na yango na komona emonaneli oyo ezali kosimba mitema ya ebele monene! Mpe oyo nde esengo tozali na yango lelo ya komona, mpe kútu kozala kati na kokokisama ya bosolo ya makambo oyo Yoane amonaki!
13. Nini ezali kokesenisa basaleli ya Yehova na mokili?
13 Lokola tozali basaleli ya Yehova, tozali komema nkombo na ye na esengo nyonso. (Yisaya 43:10, 12) Lokola tozali Batatoli ya Yehova, yango ezali kokesenisa biso na mokili oyo. Oyo nde esengo ya komema nkombo ya Nzambe oyo ekeseni na bankombo mosusu mpe kosala ete kokokisa mosala na ye ezala mokano ya liboso kati na bomoi na biso! Mokano monene ya Nzambe etali kobulisama ya nkombo na ye mosantu mpe komonisa boyangeli na ye ya mokili mobimba na nzela ya Bokonzi, epesi ntina na bomoi na biso. Mpe asili kosalisa biso ete tózala na esika kati na mokano na ye oyo etali nkombo mpe Bokonzi na ye. Asili kosala yango na mitindo misato.
Tozwi mokumba ya komema solo
14, 15. (a) Wapi moko ya mitindo oyo Nzambe asili kosalisa biso ete tózwa esika kati na mokano na ye na ntina na nkombo mpe Bokonzi na ye? (b) Na lolenge nini Bokonzi oyo etyamaki na mobu 1914 T.B. ekeseni na oyo ekweisamaki na mobu 607 L.T.B.?
14 Ya liboso, Yehova apesi basaleli na ye solo. Eloko oyo eleki kosepelisa ezali bongo komonisama ya Bokonzi na ye oyo ebandaki koyangela na mobu 1914. (Emoniseli 12:10) Boyangeli yango ya makoló ekeseni na boyangeli ya kala oyo ezalaki na Yelusaleme, epai kuna bakonzi ya libota ya Davidi bazalaki kotyama. Boyangeli wana ekweisamaki, mpe kobanda mobu 607 L.T.B., Yelusaleme etyamaki mobimba na nsé ya boyangeli ya banguya ya Bapakano. Bokonzi ya sika oyo Yehova atyaki na mobu 1914 ezali nguya ya makoló oyo ekotambwisama na moto mosusu te bobele na Yehova, ekobebisama mpe te. (Danyele 2:44) Lisusu, boyangeli na yango ekeseni. Na lolenge nini? Emoniseli 11:15 eyanoli ete: “Mingongo makasi kati na likoló milobi ete, Bokonzi na mokili oyo esili kokóma Bokonzi na Nkolo na biso mpe na Klisto na ye, mpe akozala mokonzi libela na libela.”
15 “Bokonzi na Nkolo na biso mpe na Klisto na ye” ezali koyangela bato na mabelé mobimba. Lolenge yango ya sika ya komonisa boyangeli ya Nzambe, oyo esangisi Mwana na ye Masiya mpe bandeko ya Yesu 144 000, oyo mingi kati na bango basili kosekwisama mpo na nkembo ya likoló, ezali mwa lisoló mpamba te—oyo banganga-mayele bakoki kosepela kosolola likoló na yango. Te, Bokonzi yango ya makoló ezali mpenza bokonzi ya solo. Mpe elikya na biso ya kozala na bomoi ya seko kati na ezalela ya kokoka lokola litomba ya boyangeli na yango ezali kopesa biso ntina oyo ekoki mpo na kokóba kozala na esengo. Lokola tozwi mokumba ya komema solo ya Liloba ya Yehova, yango ezali kopusa biso ntango nyonso koloba malamu na ntina na yango. (Nzembo 56:10) Ozali kosala bongo sanza na sanza, koyebisáká moto nyonso ete Bokonzi ya Masiya ya Nzambe ezali sikawa koyangela na makoló?
Tosungami na elimo santu mpe na bondeko ya mokili mobimba
16, 17. Wapi motindo ya mibale mpe ya misato oyo Nzambe asili kosalisa biso ete tózwa esika kati na mokano na ye?
16 Motindo ya mibale oyo Nzambe asalisi biso ete tózala na esika kati na mokano na ye ezali bongo kopesáká biso elimo santu na ye oyo ezali kopesa biso likoki ya kobota mbuma na yango malamu kati na bomoi na biso mpe kondimama na ye. (Bagalatia 5:22, 23) Lisusu, Paulo akomelaki baklisto bapakolami ete: “Toyambi . . . [elimo] uta na Nzambe, ete tósosola makambo oyo Nzambe apesi biso.” (1 Bakolinti 2:12) Na kondimáká elimo ya Yehova, biso nyonso tokoki sikawa koyeba mpe kososola makambo kitoko ya lelo oyo asili kopesa biso—bilaka na ye, mibeko na ye, mitindá na ye, mpe bongo na bongo.—Kokanisá na Matai 13:11.
17 Mpo na oyo etali motindo ya misato oyo Nzambe azali kosalisa biso, tozali kati na bondeko ya mokili mobimba mpe ebongiseli kitoko ya Yehova mpo na losambo. Ntoma Petelo alobaki na ntina na yango ntango alendisi biso ete: “Bózala na bolingo mpo na lisangani mobimba ya bandeko.” (1 Petelo 2:17, NW) Libota na biso ya bandeko mibali mpe bandeko basi na mokili mobimba oyo etondi na bolingo ezali kosalisa biso ete tósalela Yehova na esengo monene na motema, lokola Nzembo 100:2 esɛngi yango: “Bósalela [Yehova] na esengo, bóya liboso na ye na loyembo.” Vɛrsɛ́ 4 elobi lisusu ete: “Bókɔta kati na bikuke na ye na matɔ́ndi, na lopango na ye na kosanzola; bótɔ́nda ye, bósanzola nkombo na ye.” Na bongo, ezala ete tozali kosakola epai na bato to tozali koyangana na makita na biso, tokoki kozwa esengo. Oyo nde kimya mpe libateli tosili kozwa kati na mapango kitoko ya tempelo ya Yehova na elimo!
Tósanzola Yehova na esengo!
18. Mpo na nini tosengeli kozala na esengo wana tozali kosanzola Yehova atako tokutani na monyoko to mikakatano mosusu?
18 Ezala ata makambo nini ya mpasi, minyoko, to mikakatano mosusu oyo tokutani na yango, tósepela ete tozali kati na ndako ya losambo ya Yehova. (Yisaya 2:2, 3) Tóbosana te ete esengo ezali ezalela ya motema. Bandeko na biso baklisto mibali mpe basi ya ekeke ya liboso bazalaki basanzoli na esengo ya Yehova atako bazalaki kokutana na minyoko mpe kobungisa biloko mingi. (Baebele 10:34) Lelo oyo, baninga na biso bandimi bazali mpe lokola bango.—Matai 5:10-12.
19. (a) Bilendiseli nini ezongelami mbala na mbala ezali kopusa biso ete tósanzola Yehova? (b) Bomoi na biso ya seko ezali kotalela nini, mpe ekateli na biso ezali nini?
19 Biso banso oyo tozali kosalela Yehova tosepelaka kotosa bilendiseli ya Biblia mpo na kosanzola ye. Mbala na mbala, mokanda ya Emoniseli ezali kobɛta nsɛtɛ́ likoló na masanzoli epai na Nzambe na elobeli oyo ete: ‘Bósanzola Yah.’ (Emoniseli 19:1-6, NW) Kati na vɛrsɛ́ motoba ya Nzembo 150, toyebisameli mbala 13 ete tósanzola Yehova. Oyo ezali libyangami ya mokili mobimba epai na bikelamo binso ete bisangisa mingongo na bango mpo na koyemba masanzoli ya Yehova. Bomoi na biso ya seko ezali kotalela kosangana na biso na etuluku monene ya bayembi Aleluya! Ɛɛ, bato oyo bakozala na bomoi libela ezali bobele baoyo bazali kopesa masanzoli kozanga kotika epai na Yehova. Na bongo, tozwi ekateli ya kokangama sembo na lisangá na ye ya mokili mobimba wana nsuka ezali kobɛlɛma. Na yango, tokoki kozala na elikya ya komona maloba ya bosukisi ya Nzembo 150 kokokisama na mobimba: “Tiká ete nyonso na mpema básanzola [Yehova]. Aleluya!”
Okoyanola lolenge nini?
◻ Nini ezali kokesenisa basaleli ya Yehova na bato mosusu?
◻ Mpo na nini basaleli ya Yehova bazali na esengo?
◻ Nini ezali kokesenisa biso na mokili?
◻ Na mitindo nini misato Nzambe asili kosalisa biso ete tózwa esika kati na mokano na ye?
[Elilingi na lokasa 17]
Bisika nyonso oyo azalaki, Yesu atatolaki na ntina na Yehova mpe asanzolaki ye liboso na bato nyonso