Ebongi kozongisa mabe na mabe?
Na nzela moko monene na mokili ya Etats Unis, mokumbi motuka moko aumelaki mpo no kotika nzela na vuatire moko ale eleka ye. Mokumbi vuatire oyo ozongisaki mabe na kabetáká lisasi na motuka oyo mopekisaki ye nzela mpe abomaki moto moko oyo ayebaki likambo te.
Elenge mwasi moko epesamelaki te mokumba oyo ye alikyaki kozwa na lisano oyo lisengelaki kosalema na eteyelo. Mpo na kozongisa mabe, olobaki na elenge mobali molingami ya mwana mwasi oyo azwaki mokumba yango ete, mwana mwasi oyo azalaki na elenge mobali mosusu molingami na ye, na eteyelo mosusu. Bongo, akataki boyokani oyo ezalaki kati na elenge mwasi wana mpe molingami na ye.
BATO mingi bakanisaka ete bazali na lotómo ya kozongisa mabe na mabe soki bamoni ete basalelaki bango mabe. Na lolenge moko to mosusu, bazali kolanda likanisi oyo ete: “Na esika na kosilika, malamu nde kozongisa mabe na mabe.” Lelo oyo, bolingo ya bazalani esili kokita, nzokande elimo ya kozongisa mabe na mabe ezali sé kokóla.—Matai 24:12.
Bongo biso, lolenge nini tozali kotalela likambo ya kozongisa mabe na mabe? Soki tondimelaka Biblia, mbala mosusu tokoloba ete ebongi te kozongisa mabe na mabe. Kasi na kotalela mokili mabe oyo tozali kobika kati na yango, tokoki kozala na mayoki ete kolimbisa, ezaleli oyo ekeseni na kozongisa mabe na mabe, ezali mwango malamu te mpo na kobongisa makambo. Tokosala nini soki babũbi biso to mpe basali biso mabe? Tobómbaka nkanda soki moto moko ataleli biso eloko mpamba, to soki alobi mabe mpo na biso? Tozalaka na mposa ya kozongisa mabe na mabe to na mposa nde ya kolimbisa?
Ozali komisalela mabe wana ezali yo kobomba nkanda
Ezali solo ete, okoki kosalela moto mabe monene. Nzokande, mbala mingi, bato oyo balingaka kozongisa mabe na mabe, naino babundisami te mpe bazokisami te. ’’Mabe’’ oyo elobelami na ebandeli ya lisoló oyo, ezalaki sé makambo mike, kasi emonanaki monene na miso na baoyo bazwaki likatami ya kozongisa mabe na mabe.
Biblia ezali kolendisa biso ete tolóna ezaleli ya kobómba nkanda te. Masese 24:29 epesi toli oyo ete: “Loba te ete: ‘Nakosalela ye lokola ye asaleli ngai.’ ” Mpo na nini bongo? Mpo na ntina oyo malamu ete ezaleli motindo yango nde ezali kobimisa mobulu ya mayoki mpe ya nzoto. Makanisi ya kobómba nkanda mazali kobungisa kimya ya elimo mpe ezali kopekisa ete moto akanisa malamu te. Kanisa naino na likambo oyo: “Basali bilanga mibale babetamaki masasi longwa na mituka na bango mpe bango mibale bakufaki na esika ekotelemaka mituka, kotyaka nsuka na koswana oyo eumeli mibu 40, oyo ebandaki uta bomwana na bango.” Omoni ete mibali wana babebisamaki na boumeli ya bomoi na bango na mposa ya kozongisa mabe na mabe oyo etóndaki na mitema na bango!—Masese 14:29, 30.
Tosengeli kobomba nkanda te mpo na ntina oyo mosusu: baoyo basalaki mabe, ata ya monene, bakoki kobongwana. Na ndakisa, ntoma Paulo, na eleko moko ya bomoi na ye, “andimaki kufa” ya moyekoli Etyene mpe ‘azalaki naino kokanela bayekoli na Nkolo makaneli na kufa.’ Kasi abongwanaki Bambula mingi na nsima, ntoma Petelo, oyo bomoi na ye ezalaki na likámá mpo na Paulo, abengaki ye ete “Paulo, ndeko molingami na biso.” (Misala 8:1; 9:1; 2 Petelo 3:15, MN) Baklisto mbɛlɛ bakokaki kozongisa mabe epai na Paulo, mingi mpenza na ntango oyo ye azalaki komona lisusu te nde azalaki kozela bango na mboka Damas. (Misala 9:3-15) Kasi soki basalaki bongo, mbɛlɛ elingaki kozala libunga monene mpenza!
Na yango, Paulo ebongaki mpenza mpe na kopesa toli oyo ezwami na Baloma 12:20, ete: “Soko moyini na yo akooka nzala, pesa ye bilei; soko akooka mposa na mai, pesa ye mai amela.” Mpo na nini kosala bongo? Mpo ete soki tokozongisa mabe epai na moyini na biso, motema na ye mokoki kokóma lisusu makasi, mpe koyinana oyo ezali kati na biso na ye ekokóma makasi Nzokande, soki tosali malamu na moto oyo asali biso mabe to azokisi biso, mbala mosusu tokoki kokitisa nkanda na ye epai na biso mpe ata kokomisa ye moninga na biso.
Tokoki kolónga mabe na motema oyo ekomemaka na mposa ya kozongisa mabe na mabe soki tokondima mabunga na biso moko. Mokomi na nzembo atunaki ete: “Ɛ Jah, Jéhovah! Nani akotɛlɛma soko nde otaleli mabe?” (Nzembo 130:3, MN) Esilá kokómela biso nyonso ete tozokisa to kosalela moto moko mabe. Tozalaki na esengo te na ntango moto yango aboyaki kozongisela biso mabe na mabe? Na ngala na biso, tokoki mpe komipekisa te? Yesu apesaki toli oyo ete: “Makambo manso malingi bino ete bato basalela bino yango, bino bosalela bango bobele bongo.”—Matai 7:12.
Ezali solo ete Biblia elobi: “Boyina oyo ezali mabe.” (Nzembo 97:10; Amosa 5:15) Kasi, yango esɛngi te ete toyina moto oyo asali mabe. Yesu apesaki biso lilako oyo: “Bolingaka bayini na bino mpe bobondela mpo na banyokoli na bino.” (Matai 5:44) Soki tokozongisa mabe na mabe, tokokani na moto oyo asali mabe yango. Lisese moko ya kala elobi ete: “Loba te ete: ’Ngai nakozongisa mabe!’ Talela Jéhovah mpe ye akobikisa yo.” (Masese 20:22) Oyo nde ezaleli na mayele! Ezali bongo malamu na komimonisa na makasi na kotɛmɛláká lisɛnginya ya komekola moto oyo azali kosala mabe.—Yoane 16:33; Baloma 12:17, 21.
Nani azali kopesa etumbu?
Ya solo, makambo mosusu mazali minene koleka matata makobimaka kati na bato mpe maloba na kozokisa. Tosengeli kosala nini soki tokutani na basali na mabe? Makanisi oyo tobotami na yango na ntina na boyengebene ekopusa biso ete tosala eloko moko. Yango nini? Endimamaki na bamboka mosusu ete moto ye moko atalela makambo motindo wana mpe azongisa mabe oyo basaleli ye. Kasi, bamboka wana ebebaki na kobukanisa oyo esopaki makila mingi. Kati na mikili mingi lelo, mibeko na Nzambe to mpe oyo na bato, mipesi nzela te ete bato babukanisa mpo na bango moko to bazongisa mabe na mabe wana bakutani na basali na mabe, mpe yango ezali mpo na bantina malamu. Mobulu ekobimisaka sé mobulu mingi koleka.
Moto oyo basaleli ye mabe asengeli bobele kokanga mabɔkɔ mpe kondima likambo likómeli ye, kozanga kosala eloko? Ezali bongo te. Soki basaleli biso mabe to mpe babebisi biloko na biso, tokoki kokenda epai na bakonzi. Tosengeli kobyanga bapolisié. Na mosala, tokokende koyebisa na mokonzi na biso. Na eteyelo, tokoki kosenga kosolola na directeur ya eteyelo. Wana nde ezali moko na mikumba na bango: kotosisa boyengebene Biblia elobi na biso ete bakonzi na Leta bazali ‘basali na Nzambe, mpo na kokómisa nkanda na ye epai na moto oyo akosalaka mabe.’ (Baloma 13:4) Ezali mpo na boyengebene nde bakonzi bazali kokokisa mosala na bango, bazali kopekisa mabe mpe kopesa bitumbu na basali na mabe.
Ezali solo ete na bileko mosusu boyengebene esalelamaka noki te. Mokomi moko oyo azalaki na etaleli malamu ya makambo, alobaki ete: “Boyengebene ekokani na engbunduka oyo, mbala na mbala ekómaka na ngonga malamu te.” Mbala mosusu, nkutu, engbunduka yango ekomaka te. Mbala mosusu bilenge ya mobulu bazali na nguya mingi koleka na boye ete bakonzi bakoki kolónga bango te. Atako bongo, mayele esɛngi ete tomikanga motema Bibia elobi: “Zoba akoloba makanisi nyonso na motema na ye, kasi moto na mayele akozelisa yango kino nsuka.”
Nani akopesa etumbu mpo na mabe?
Bongo, na koboyáká kozongisa mabe, tokozwa bolamu mingi mpe tokozala na motema molai na koyebáká ete, soki boyengebene esengeli kosalelama, Nzambe nde akosalela yango na ntango oyo asili kobongisa yango. Jéhovah ayebi ete na ntango bitumbu bipesami na misala mabe te, nzela efungwami mpo na mabe. (Mosakoli 8:11) Akotika te ete basali na mabe na mitó makasi babebisa mokili mpo na libela. Yango wana ntóma Paulo apesaki biso toli oyo ete: “Balingami, bozongisaka mabe mpo na mabe te, kasi botika esika na nkanda; mpamba te ekomami ete: ‘Kobukanisa ezali na ngai; ngai nakozongisa yango. Jéhovah alobi bongo.’ ” (Baloma 12:19, MN) Ya solo mpenza, Biblia elobeli mokolo na kobukanisa ya Mozalisi to mokolo oyo akofuta bato mabe na mabe na bango Mokolo na kobukanisa yango ekozala nini? Nzambe akofuta mabe epai na nani? Ezali yango nde tokotalela kati na lisolo lilandi.
[Etanda na lokasa 4]
Mpo na kopengola mabe na mabe,tomikundola ete
□ Nzambe azali komibanzabanza mpo na boyengebene
□ Kobómba nkanda ezali mabe
□ Boboto ekokitisaka mikakatano elongo na mozalani
□ Bato mosusu bazali kokanga miso na mabe mingi oyo tosaleli bango
□ Baoyo bazali kosala mabunga bakoki kobongwana
□ Tozali kolónga mokili soko tokoboya komekola banzela na yango