Mokanda ya Biblia nimero 45—Baloma
Mokomi: Paulo
Esika ya bokomi: Kolinti
Nsuka ya bokomi: soko 56 T.B.
1. Paulo azali kolobela nini kati na mokanda na ye epai na Baloma?
KATI na mokanda ya Misala, tomonaki lolenge Paulo, oyo azalaki liboso monyokoli monene ya baklisto Bayuda, akómaki ntoma ya molende ya Klisto epai na mabota ya bapakano. Uta na mokanda ya Baloma, tobandi mikanda 14 ya Biblia oyo Mofalisai wana ya kala, oyo akómi sikawa mosaleli ya sembo na Nzambe, akomaki yango na nzela na kopemama na elimo santu. Na ntango akomaki mokanda ya Baloma, Paulo asilaki kosukisa mibembo na ye mibale ya milai oyo mitalaki mosala ya kosakola mpe azalaki kati na mobembo ya misato. Na ntango wana, asilaki kokoma mikanda mitano mosusu oyo mipemami: Batesaloniki ya Liboso mpe ya Mibale, Bagalatia, Bakolinti ya Liboso mpe ya Mibale. Nzokande, ezali likambo libongi ete, kati na Biblia oyo tozali na yango na mikolo na biso, Baloma etyami liboso ya mikanda mosusu, mpamba te yango ezali kolobela na bolai mpenza bokokani ya sika oyo ezali kati na Bayuda mpe baoyo bazali Bayuda te; wana ezali bituluku mibale ya bato oyo Paulo asakolaki epai na bango. Ezali kolimbola mbongwana kati na lolenge oyo Nzambe azalaki kosala makambo epai na libota na ye mpe ezali komonisa ete Makomami ya Liebele oyo mapemami masakolaki uta kala ete nsango malamu esengelaki mpe kosakolama epai na bapakano.
2. (a) Paulo alobeli mikakatano nini oyo mizalaki epai na Baloma? (b) Eloko nini emonisami polele na mokanda oyo?
2 Kosaleláká Teletio lokola mokomeli, Paulo asangisi maloba mokuse ya kondimisa mpe motuya monene ya mikapo ya Makomami ya Liebele, kati na moko na mikanda mileki nguya oyo mizali kati na Makomami ya Greke ya boklisto. Na elobeli ya kitoko mpenza, amonisi mikakatano oyo mibimaki na ntango masangá ya boklisto ya ekeke ya liboso esangisaki Bayuda mpe Bagreke. Bayuda basengelaki nde kozala na esika ya liboso mpo ete bazalaki bakitani ya Abalayama? Kosaleláká bonsomi na bango bouti na kolongolama ya Mibeko ya Mose, baklisto oyo bakɔmeli bazalaki nde na lotómo ya kobɛtisa bandeko Bayuda ya bolɛmbu libaku, baoyo bazalaki naino kotosa mimeseno ya kala? Kati na mokanda oyo, Paulo amonisi na nguya nyonso ete Bayuda mpe bato ya mabota mosusu bakokani liboso na Nzambe mpe ete bato batángami bayengebene, na nzela ya Mibeko ya Mose te, kasi na nzela ya kondima kati na Yesu Klisto mpe na nzela ya ngɔlu ya Nzambe. Bobele na ntango yango, Nzambe azali kosɛnga na baklisto ete bámonisa botosi ebongi epai na bakonzi ndenge na ndenge oyo [baklisto] bazali na nsé na bango.
3. Ndenge nini lisangá ya Loma libandaki, mpe nini esalaki ete Paulo ayeba bandeko mingi kuna?
3 Lolenge nini lisangá ya Baloma libandaki? Ezalaki na etuluku moko monene ya Bayuda kati na Loma; bakómaki kuna kobanda pene na ntango oyo Pompée akamataki Yelusaleme na mobu 63 L.T.B. Na Misala 2:10, emonisami na sikisiki ete bamoko kati na Bayuda yango bazalaki na Yelusaleme na Pantekote ya mobu 33 T.B., epai kuna bayokaki nsango malamu oyo esakolamaki. Bato na mobembo oyo bakómaki bandimi batikalaki na Yelusaleme mpo na koteyama na bantoma, mpe ntembe ezali te ete, na nsima, baoyo bautaki na Loma bazongaki kuna; ekoki kozala ete bamoko na bango bazongaki na ntango oyo minyoko mibimaki na Yelusaleme. (Mis. 2:41-47; 8:1, 4) Lisusu, bato ya ntango wana bazalaki basáli minene ya mibembo, mpe likambo yango likoki komonisa ntina oyo Paulo amesanaki makasi na basangani mingi ya lisangá ya Loma, oyo bamoko na bango bayokaki mbala mosusu nsango malamu na Grèce to na Azia na nzela ya mosala ya kosakola ya Paulo.
4. (a) Makambo nini mokanda ya Baloma eyebisi na ntina na lisangá oyo lizalaki na engumba wana? (b) Kozala ya Akula mpe ya Pilisikila na Loma emonisi nini?
4 Mayebisi ya liboso na ntina na lisangá wana, oyo mabongi kotyelama motema, mazwami kati na mokanda ya Paulo. Uta na yango, emonani polele ete basangani ya lisangá wana bazalaki Bayuda mpe bato ya mabota mosusu, mpe ete molende na bango ebongaki mpenza kokumisama. Ayebisi bango ete: “Kondima na bino ezali kolobelama na mokili mobimba,” mpe ete “Botosi na bino eyebani na bato nyonso.” (Lom. 1:8, NW; 16:19, NW) Na ekeke ya mibale, Suétone akomaki ete na boumeli ya boyangeli ya Klaudio (41-54 T.B.), babenganaki Bayuda na Loma. Nzokande, na nsima, bazongaki lisusu; likambo yango limonisami na kozala ya Akula mpe ya Pilisikila na Loma. Bango bazalaki Bayuda oyo Paulo akutanaki na bango na Kolinti mpe oyo balongwaki na Loma na ntango ya kobima ya mobeko ya Klaudio, kasi bazongaki na Loma ntango Paulo atindaki nkomá na lisangá oyo lizalaki kuna.—Mis. 18:2; Lom. 16:3.
5. Makambo nini ya sikisiki mamonisi bosolo ya mokanda ya Baloma?
5 Bosolo ya mokanda oyo bomonisami makasi mpenza. Lokola yango emonisami na maloba na yango ya ebandeli, mokanda yango mouti epai na “Paulo, moombo ya Yesu Klisto, oyo abyangami mpo na kozala ntoma, . . . epai na baoyo nyonso bazali na Loma, oyo bazali balingami ya Nzambe, babyangami mpo na kozala basantu.” (Lom. 1:1, 7, NW) Matatoli mapesami na ntina na yango, oyo mauti na mikanda ya mokili, mazali kati na matatoli ya liboso oyo mazwamaki na ntina na Makomami ya Greke ya boklisto. Petelo mpe asalelaki maloba mingi ya motindo moko kati na mokanda na ye ya liboso, oyo ekoki kozala ete mokomamaki mbula motoba to mbula mwambe na nsima, oyo momemi bato mingi ya mayele na kokanisa ete Petelo asalelaki kopi moko ya mokanda ya Baloma. Mokanda ya Baloma motalelamaki mpenza ete mozali moko kati na makomi ya Paulo mpe motángamaki mpenza bongo na Clément moto na Loma, Polycarpe moto na Sumuluna mpe Ignace moto na Antiokia; bango nyonso bazalaki na bomoi na nsuka ya ekeke ya liboso mpe na ebandeli ya ekeke ya mibale T.B.
6. Lolenge nini papirise moko ya kala epesi elembeteli ete Baloma ezali kati na mikanda mipemami?
6 Elongo na mikanda mosusu mwambe ya Paulo, mokanda ya Baloma mozwami kati na codex (búku ya bamaniskri ya kala) oyo ebéngami papirise Chester Beatty No. 2 (P46). Na ntina na codex yango ya kala, Sir Frederic Kenyon akomaki ete: “Na bongo, kuna, tozwi pene na maniskri mobimba ya mikanda ya Paulo, oyo emonani ete mikomamaki soko na ebandeli ya ekeke ya misato.”a Bapapirise Chester Beatty ya Makomami ya Greke eumeli mingi koleka bamaniskri Sinaïticus mpe Vaticanus No. 1209 oyo eyebani mingi; yango nyonso mibale ezali ya ekeke ya minei T.B. Bamaniskri wana mpe ezali na mokanda ya Baloma kati na yango.
7. Wapi bilembeteli oyo bizali komonisa esika mpe ntango ya kokomama ya mokanda ya Baloma?
7 Na ntango nini mpe na esika nini mokanda ya Baloma ekomamaki? Bato ya mayele oyo bapesaka ndimbola na makambo ya Biblia bandimi bango banso ete mokanda ya Baloma mokomamaki na mokili ya Grèce, ekoki kozala mpenza na Kolinti, ntango Paulo afandaki kuna na boumeli ya mwa basanza, pene na nsuka ya mobembo na ye ya misato lokola misionere. Bilembeteli oyo bizali kati na mokanda yango bimonisi ete ekomamaki na Kolinti. Paulo akomaki mokanda wana na ndako ya Gayo, oyo azalaki mosangani ya lisangá ya Kolinti, mpe akumisi Foibe oyo azalaki na lisangá ya penepene babéngi Kɛnkɛlɛa, oyo ezali nkombo ya libóngo ya Kolinti lizwami pene na mai monene. Emonani ete ezalaki Foibe nde amemaki mokanda yango na Loma. (Lom. 16:1, 23; 1 Kol. 1:14) Na Baloma 15:23, NW, Paulo akomaki ete: “Kati na bitúká oyo, nazali lisusu na bisika te epai kuna mosala mozangi kosalema,” mpe amonisi na vɛrsɛ́ elandi ete azali na mposa ya kokómisa mosala na ye ya misionere kino wɛ́sti, kokende na Espagne. Akokaki mpenza kokoma motindo wana pene na nsuka ya mobembo na ye ya misato, na ebandeli ya mobu 56 T.B.
MAKAMBO MAZALI KATI NA BALOMA
8. (a) Paulo alobi nini na ntina na mosala na ye? (b) Lolenge nini amonisi ete ezala Bayuda to Bagreke babongi kozwa nkanda ya Nzambe?
8 Kozanga koponapona ya Nzambe epai na Bayuda mpe bato ya mabota (1:1–2:29). Paulo oyo apemami azali koyebisa nini epai na Baloma? Kati na maloba na ye ya ebandeli, amimonisi ete azali ntoma oyo aponami na Klisto mpo na koteya ‘botosi na nzela ya kondima’ epai na mabota. Amonisi mposa makasi oyo azali na yango mpo na kokende kotala babulami oyo bazali na Loma, kosepela na “koyikisana mpiko” ye na bango, mpe koyebisa bango nsango malamu oyo ezali “nguya ya Nzambe mpo na lobiko ya moto nyonso oyo azali na kondima.” Lokola esilá kokomama uta kalakala, moyengebene akobika “na nzela ya kondima.” (1:5, 12, 16, 17, NW) Amonisi ete ezala Bayuda to Bagreke, nkanda ya Nzambe ebongi kokwela bango nyonso. Ezaleli ya koboya kondima ete Nzambe azali, [ezaleli] oyo bato bazali na yango, ekoki kolimbisama te mpo ete “bizaleli ya [Nzambe] oyo bizangi komonana, bimonani polele uta kozalisama ya mokili.” (1:20, NW) Nzokande, na bozoba nyonso, mabota masali banzambe na biloko bizalisami. Epai mosusu, Bayuda basengeli te kotalela mabota na elimo ya botyoli makasi, mpamba te bango moko mpe bazali kokwea na masumu. Bituluku nyonso mibale wana bikosambisama engebene misala na bango mpo ete Nzambe aponaponaka te. Kokatama-ngenga na mosuni ezali te likambo lileki ntina; “ye oyo azali Moyuda na solo abongi na epai na katikati; kokatama-ngenga na solo ezali na motema.”—2:29.
9. (a) Bayuda baleki basusu na nini, nzokande Paulo atángi maloba ya mikapo nini mpo na komonisa ete banso bazali na nsé na lisumu? (b) Na bongo, lolenge nini moto akoki kotángama moyengebene, mpe ndakisa nini esimbi ndimbola wana?
9 Banso batángami bayengebene na nzela ya kondima (3:1–4:25). “Na yango, Moyuda aleki [basusu] na nini?” Na litomba monene, mpamba te Bayuda bapesamelaki maloba mosantu ya Nzambe. Nzokande, “Bayuda mpe Bagreke bazali bango nyonso na nsé ya lisumu,” mpe moko te azali “moyengebene” na miso ya Nzambe. Mikapo nsambo ya Makomami ya Liebele mitángami mpo na komonisa likambo yango. (Lom. 3:1, 9-18, NW; Nz. 14:1-3; 5:9; 140:3; 10:7; Mas. 1:16; Yis. 59:7, 8; Nz. 36:1, NW) Mibeko mizali komonisa polele ezalela ya bomoto oyo etondi na masumu, boye “na misala ya mibeko, moto moko te akotángama moyengebene.” Nzokande, na nzela ya ngɔlu ya Nzambe mpe na nzela ya lisiko, ezala Bayuda to Bagreke bazali kotángama bayengebene “na nzela na kondima, kasi na misala ya mibeko te.” (Lom. 3:20, 28, NW) Paulo asimbi ndimbola wana na kotángáká ndakisa ya Abalayama, oyo atángamaki moyengebene mpo na misala te, soko mpe na kokatama-ngenga te, kasi mpo na kondima na ye oyo ebongi na kolanda. Na yango, Abalayama akómaki bobele tata na Bayuda te, kasi lisusu tata ya “bango nyonso bazali na kondima.”—4:11.
10. (a) Lolenge nini liwa likómaki koyangela lokola mokonzi? (b) Litomba nini lizwami na nzela ya botosi ya Klisto, kasi likebisi nini lipesami na ntina na lisumu?
10 Na nzela ya Klisto, bazali lisusu baombo ya lisumu te kasi ya boyengebene (5:1–6:23). Na moto moko, Adama, lisumu likɔtaki na mokili, mpe lisumu limemaki liwa, “kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.” (5:12) Liwa liyangelaki lokola mokonzi kobanda na Adama kino na Mose. Ntango Mibeko mipesamaki na nzela ya Mose, lisumu liyikanaki mpe liwa likóbaki koyangela. Kasi ngɔlu ya Nzambe ezali sikawa koyikana na lolenge ya koleka mpenza, mpe na nzela ya botosi ya Klisto mingi batángami bayengebene mpo na bomoi ya seko. Nzokande, yango elimboli te ete tosengeli kozala na bomoi boyangelami na masumu. Bato oyo babatisami kati na Klisto basengeli kozala bakufi mpo na oyo etali lisumu. Bomoto na bango ya kala ekakisami likoló na nzeté, mpe bazali na bomoi na kotaleláká Nzambe. Lisumu lizali koyangela bango lisusu te, kasi bakómi baombo ya boyengebene, na kolandáká ezaleli ya bulɛɛ. “Masumu makofuta mbongo, mbongo yango bobele kufa; nde Nzambe akopesa likabo mpamba, likabo na ye bomoi na seko kati na Yesu Klisto, Nkolo na biso.”—6:23.
11. (a) Ndakisa nini Paulo apesi mpo na komonisa kosikwama ya baklisto Bayuda longwa na Mibeko? (b) Eloko nini emonisamaki polele na Mibeko, mpe na yango biloko nini bizali kobunda etumba epai na moklisto?
11 Bakufi na oyo etali Mibeko, bazwi bomoi na nzela ya elimo kati na Klisto (7:1–8:39). Paulo asaleli ndakisa ya mwasi, oyo akangami na mobali na ye wana azali naino na bomoi, kasi akokóma na bonsomi ya kobalana na moto mosusu soki mobali na ye akufi; asaleli ndakisa yango mpo na komonisa lolenge baklisto Bayuda bakufaki na oyo etali Mibeko na nzela ya mbeka ya Klisto mpe lolenge bazwaki bonsomi mpo na kokóma bato ya Klisto mpe mpo na kobota mbuma liboso na Nzambe. Mibeko mosantu mimonisaki lisumu polelepolele, mpe lisumu limemaki liwa. Lisumu, oyo lifandi kati na nzoto na biso ya mosuni, ezali kobunda etumba mpo na kotɛmɛla makanisi na biso ya malamu. Lokola Paulo alobi yango ete: “Malamu oyo elingi ngai kosala, nakosalaka yango te. Kasi mabe oyo elingi ngai te, nakosalaka bobele yango.” Boye, “soko nakosala yango elingi ngai te, ezali ngai moto oyo akosalaka bongo te kasi masumu mazali kofanda kati na ngai.”—7:19, 20.
12. Lolenge nini basusu bakómi basangoli na libula elongo na Klisto, mpe na nini bato yango balóngi kati na nyonso?
12 Nini ekoki kobikisa moto longwa na ezalela oyo ya mawa? Na nzela ya elimo na Ye, Nzambe akoki kopesa bomoi epai na baoyo bazali bato ya Klisto! Bakómi bana, batángami bayengebene, bakómi basangoli na libula ya Nzambe mpe basangani na libula esika moko na Klisto, mpe balatisami na nkembo. Epai na bango Paulo alobi ete: “Soko Nzambe azali mpo na biso, nani akotɛmɛla biso? Nani akotangola biso na bolingo na Klisto?” Moto moko te! Na bolóngi nyonso, alobi ete: “Na makambo oyo nyonso tokoleka kolónga na mpo na ye oyo alingaki biso. Nandimi solo ete ata kufa, ata bomoi, ata baanzelu, ata mikonzi, ata makambo na ntango oyo, ata makambo makoya nsima, ata ndenge na nguya na mokili, ata molai, ata bozindo, ata eloko mosusu nini ekoki kotangola biso te na bolingo na Nzambe bozali kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso.”—8:31, 35, 37-39.
13. (a) Engebene esakweli, nani asangisami kati na Yisalaele ya solosolo ya Nzambe, mpe yango eyokani na etindá nini ya Nzambe? (b) Mpo na nini Yisalaele ya mosuni ekweaki, kasi nini ezali ntina mpo na lobiko?
13 “Yisalaele” ebikisami na kondima mpe na motema mawa ya Nzambe (9:1–10:21). Paulo amonisi “mawa monene” oyo azali na yango mpo na baninga na ye, bana ya Yisalaele, kasi andimi ete ezali Yisalaele nyonso ya mosuni te nde ezali mpenza “Yisalaele,” mpamba te Nzambe azali na lotómo ya kopona bato nyonso oyo ye alingi ete bázala bana na ye. Lokola yango emonisami kati na misala ya Nzambe epai na Falo mpe na nzela ya lisese ya mosáli na mbeki, “ezali likambo na mokano na moto te to na mpiko na ye te nde na boboto na Nzambe.” (9:2, 6, 16) Azali kobyanga bana ‘bobele kati na Bayuda te kasi lisusu kati na mabota,’ lokola Hosea asakolaki yango uta kalakala. (Hos. 2:23) Yisalaele ekweaki na mbebá mpamba te elukaki kozwa ngɔlu ya Nzambe, “na nzela na kondima te kasi na nzela na misala,” mpe mpo ete babɛtaki libaku likoló na Klisto, “libanga na kotuta mabaku.” (Lom. 9:24, 32, 33) Bazalaki na ‘molende mpo na Nzambe’ kasi ‘engebene boyebi ya sikisiki’ te. Klisto azali nsuka ya Mibeko mpo na baoyo bazali komonisa kondima mpo na boyengebene; mpe mpo na kozwa lobiko, moto asengeli koyambola polele “ete Yesu azali Nkolo” mpe komonisa kondima “ete Nzambe asekwisi ye [longwa] na bakufi.” (10:2, 9) Basakoli batindami mpo na kopesa likoki na mabota nyonso ete báyoka, bázala na kondima, mpe bábelela nkombo ya Yehova mpo ete bábika.
14. Paulo alingi komonisa nini na lisese ya nzeté ya olive?
14 Lisese ya nzeté ya olive (11:1-36). Na ntina na ngɔlu, mwa ndambo ya bato ya Yisalaele ya mosuni baponamaki, kasi mpo ete mingi na bango babɛtaki libaku, “[lobiko] eyei epai na bapakano.” (11:11) Kosaleláká lisese ya nzeté ya olive, Paulo amonisi lolenge bato oyo bazalaki Bayuda te bayaki kokangisama lokola bitape ya nzeté, na esika ya Yisalaele ya mosuni oyo ezangaki botosi. Nzokande, baoyo bazalaki Bayuda te basengelaki te kosepela na kobwakama ya Yisalaele, mpo ete soki Nzambe amipekisaki te kopesa etumbu na bitape bizangi sembo ya nzeté wana yango moko, boye akomipekisa mpe te kopesa etumbu na bitape ya nzeté ya olive ya zámba oyo bikangisami mpe biuti na mabota ya bapakano.
15. Nini esengeli mpo na kopesa na Nzambe mbeka ya bomoi?
15 Koyeisa makanisi sika; kotosa bakonzi bazali liboso (12:1–13:14). Paulo apesi toli ete bópesa nzoto na bino lokola mbeka ya bomoi epai na Nzambe. ‘Bómitambwisa lisusu te engebene ebongiseli ya biloko oyo,’ kasi bózala ‘bato babongwani na koyeisáká makanisi na bino sika.’ Bózala bato na lolendo te. Nzoto ya Klisto, motindo moko na nzoto ya moto, ezali na binama mingi oyo bizali kokokisa mikumba mikeseni, kasi bizali kosala kati na bomoko. Bózongisa mabe na mabe te. Bótika bobekoli na mabɔkɔ ya Yehova. Bólónga “mabe na [kosaláká] malamu.”—12:2, 21.
16. Lolenge nini baklisto basengeli komitambwisa liboso na bakonzi mpe bato mosusu?
16 Bótosaka bakonzi bazali liboso; yango ezali ebongiseli ya Nzambe. Bólanda kosala malamu mpe bózala na nyongo ya moto ata na eloko moko te, bózala bobele na nyongo ya bolingo bamoko epai na bamosusu. Lobiko ebɛlɛmi, boye ‘bólongola misala ya molili’ mpe ‘bólata bibundeli ya pole.’ (13:12) Bomitambwisa na etamboli malamu, na kolandáká mposa ya mosuni te.
17. Toli nini epesami na ezaleli ya kosambisa bato oyo bazali na bolɛmbu mpe esengeli kosala nini mpo na kolendisa bango?
17 Bóyambaka bato banso kozanga koponapona mpe kozanga kosambisa (14:1–15:33). Bóndima bolɛmbu ya baoyo, mpo ete kondima na bango ezali makasi te, bazali koboya kolya bilei mosusu to bazali naino kobatela mikolo ya bilambo. Kosambisa ndeko na yo te mpe kobɛtisa ye libaku te na lolenge na yo ya kolya mpe ya komela, mpamba te Nzambe azali kosambisa bato nyonso. Bólanda makambo ya kimya mpe ya kolendisa, mpe bóndima bolɛmbu ya basusu.
18. (a) Paulo atángi maloba nini mosusu mpo na komonisa ete Nzambe andimi mpe bato mosusu oyo bazali Bayuda te? (b) Lolenge nini Paulo ye moko azwi litomba na ngɔlu ya Nzambe?
18 Ntoma akomi ete: “Nyonso ikomamaki kalakala, ikomami mpo na kolakisa biso,” mpe apesi mikapo mosusu minei ya Makomami ya Liebele lokola elembeteli ya nsuka oyo emonisi ete basakoli bapemami na Nzambe basakolaki uta kalakala ete bilaka ya Nzambe bisengelaki kokóma kino epai na mabota ya bapakano. (Lom. 15:4, 9-12; Nz. 18:49; Det. 32:43; Nz. 117:1; Yis. 11:1, 10) Paulo apesi elendiseli ete: “Na bongo, bóyambanaka bamoko na bamosusu, lokola Klisto mpe ayambaki biso, mpo na nkembo ya Nzambe.” (Lom. 15:7, NW) Paulo amonisi botɔ́ndi mpo na ngɔlu oyo epesameli ye uta na Nzambe, ete azala mosaleli ya bato banso epai na mabota, “kotyamáká na mosala ya bulɛɛ ya nsango malamu ya Nzambe.” Azali ntango nyonso koluka kofungola bateritware ya sika na esika ete “atonga likoló na moboko ya moto mosusu.” Kasi alɛmbi naino nzoto te, mpo ete, nsima na komema makabo na Yelusaleme, azali na mposa ya kosala mobembo molai ya mosala ya kosakola kino Espagne mpe, wana ezali ye na nzela mpo na kokende kuna, akoka komema “ebele ya mapamboli mauti na Klisto” epai na bandeko na ye ya elimo oyo bazali na Loma.—15:16, 20, 29, NW.
19. Bambote nini mpe elendiseli nini esukisi mokanda ya Baloma?
19 Mbote ya bosukisi (16:1-27). Paulo atindeli basangani 26 ya lisangá ya Loma mbote na ye moko na kotángáká nkombo na bango; apesi mpe basusu mbote, mpe apesi bango toli ete bákangana te na bato oyo bazali kokɔtisa mikabwano mpe ‘bázala bato na mayele kati na oyo ezali malamu, kasi bázala bato bayebi likambo te kati na oyo ezali mabe.’ Nyonso wana ezala mpo na nkembo ya Nzambe “na nzela ya Yesu Klisto libela na libela. Amen.”—16:19, 27, NW.
LITOMBA NA YANGO
20. (a) Wapi bantina ebongi oyo mokanda ya Baloma epesi mpo na kondima Nzambe? (b) Lolenge nini boyengebene mpe motema mawa ya Nzambe emonisami, mpe yango ememi Paulo na koloba nini na kokamwa nyonso?
20 Mokanda ya Baloma emonisi moboko malamu mpo na kondima Nzambe, wana elobi ete “bizaleli na ye oyo bizangi komonana, bimonani polele uta kozalisama ya mokili, mpo ete yango esosolami kati na biloko bizalisami, ɛɛ, nguya na ye mpe Bonzambe na ye ya seko.” Kasi, koleka oyo wana, mokanda yango mokóbi na kokumisa boyengebene na ye mpe na koyebisa motema mawa na ye monene mpe ngɔlu na ye. Yango emonisami epai na biso na lolenge kitoko mpenza na nzela ya lisese ya nzeté ya olive, oyo kati na yango bitape ya nzeté ya zámba bikangisami ntango bitape ya nzeté yango moko bibwakami. Na komonáká, na epai moko, lolenge makasi wana ya kopesa etumbu mpe, na epai mosusu, boboto monene ya Nzambe, Paulo alobi na bokamwi nyonso ete: “Ɛ bozindo ya bozwi mpe ya mayele mpe ya boyebi ya Nzambe! Bikateli na ye bikoki komekama bozindo te mpe banzela ikoleka ye ikozwama te!”—1:20; 11:33, NW.
21. Lolenge nini mokanda ya Baloma emonisi eteni mosusu ya libombami mosantu ya Nzambe?
21 Ezali na ntina wana nde mokanda ya Baloma elimboli eteni mosusu ya libombami mosantu ya Nzambe. Na lisangá ya boklisto, bokeseni ezali lisusu te kati na Bayuda mpe baoyo bazali Bayuda te, kasi bato ya mabota nyonso bakoki kozwa ngɔlu ya Yehova na nzela ya Yesu Klisto. “Nzambe azali na koponapona te.” “Ye oyo azali Moyuda [ya solo] azali moto ya kati, mpe kokatama-ngenga na ye ezali oyo ya motema na nzela na elimo, kasi te na nzela na mibeko mikomami.” “Bokeseni ezali te kati na Moyuda mpe Mogreke, mpamba te ezali na Nkolo bobele moko mpo na banso, oyo azali mozwi epai na baoyo nyonso bazali kobelela ye.” Mpo na bango banso, ezali kondima, kasi misala ya [Mibeko] te, nde esali ete bátángama bayengebene.—2:11, 29, NW; 10:12, NW; 3:28.
22. Toli malamu nini mokanda ya Baloma epesi na ntina na boyokani elongo na baoyo bazali kati na lisangá te?
22 Batoli malamu iye izwami na mokanda oyo mpo na baklisto na Loma, ezali mpe na litomba mpo na baklisto ya mikolo na biso, baoyo bazali kokutana na mikakatano motindo moko kati na mokili oyo ya bopaya. Moklisto alendisami na “kozala na kimya elongo na bato banso,” sangisá mpe baoyo bazali na libándá ya lisangá. Molimo nyonso asengeli “kotosa bakonzi bazali liboso,” mpamba te bango bazali ebongiseli ya Nzambe mpe bazali eloko ya kobanga mpo na baoyo bazali kosala misala mabe, kasi te mpo na baoyo batosaka mibeko. Baklisto basengeli kotosa mibeko bobele mpo na kobanga etumbu te kasi mpo na lisosoli ya boklisto; na yango, bazali kofuta mpako na bango, bazali kopesa na bato nyonso oyo esengeli na bango, bazali kokokisa manso masɛngami na bango, bazali na nyongo ya moto ata na eloko moko te, “bobele kozala na [nyongo ya] bolingo bamoko epai na bamosusu.” Bolingo ekokisi Mibeko.—12:17-21, NW; 13:1-10, NW.
23. Lolenge nini Paulo alobeli makasi ntina ya kosala eyambweli liboso na bato banso, mpe ndakisa nini apesi na likambo litali komibongisa mpo na mosala ya kosakola?
23 Paulo alobeli mingi likambo litali litatoli liboso ya bato banso. Ezali na motema nde moto amonisaka kondima mpo na boyengebene, kasi na monɔkɔ nde moto asalaka eyambweli epai na bato banso mpo na lobiko. ‘Moto na moto oyo azali kobelela nkombo ya Yehova akobika.’ Kasi mpo ete yango ekoka kosalema, ezali mpenza likambo ya ntina ete basakoli bákende ‘kosakola nsango malamu ya makambo kitoko.’ Tozali mpenza bato na esengo soki tozali kati na basakoli wana oyo lokito ya nsango malamu na bango ekómi sikawa na “mokili mobimba”! (10:13, 15, 18) Mpe mpo na komibongisa na ntina na mosala oyo ya kosakola, tiká ete tómeka komimesenisa na Makomami mapemami, lolenge Paulo amimesenisaki na yango, mpamba te kati na mokapo moko oyo (10:11-21) atángi maloba ya mikapo ndenge na ndenge ya Makomami ya Liebele. (Yis. 28:16; Yoe. 2:32; Yis. 52:7; 53:1; Nz. 19:4; Det. 32:21; Yis. 65:1, 2) Azalaki mpenza na elónga ya koloba ete: “Makambo nyonso oyo makomamaki kalakala, makomamaki mpo na koteya biso, ete na nzela ya mpiko na biso mpe na nzela ya kobɔndisama euti na Makomami, tókoka kozwa elikya.”—Lom. 15:4, NW.
24. Toli nini Paulo apesi na ntina na kolóna molende mpe boyokani ya esengo kati na lisangá?
24 Batoli kitoko mpenza epesami na ntina na boyokani kati na lisangá ya boklisto. Atako bazali bato ya ekólo nini, ya mposo nini, to ya libota nini, baklisto banso basengeli koyeisa makanisi na bango sika mpo na kosalela Nzambe mosala ya bulɛɛ, engebene “mokano na Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba [“kondima,” NW], yango mpe ebongi kwa.” (11:17-22; 12:1, 2) Batoli nyonso Paulo apesi kati na Baloma 12:3-16 ezali mpenza malamu mpe ebongi! Ya solo, tozwi mpenza elendiseli mpo na kolóna molende, komikitisa mpe bolingo mozindo mpo na baoyo nyonso bazali kati na lisangá ya boklisto. Kati na mikapo ya nsuka, Paulo apesi likebisi makasi oyo litali kosɛnzɛla mpe koboya kokangama na baoyo nyonso bazali kokɔtisa mikabwano, kasi alobeli lisusu kopesana esengo bamoko na bamosusu mpe kopesana bopemi oyo euti na bosangani ya pɛto elongo na bandeko kati na lisangá.—16:17-19; 15:7, 32.
25. (a) Wapi likanisi libongi mpe wapi ndimbola mosusu mokanda ya Baloma epesi na ntina na Bokonzi ya Nzambe? (b) Na lolenge nini boyekoli ya mokanda ya Baloma ekopesa biso matomba?
25 Lokola tozali baklisto, tosengeli kokóba kolɛngɛla boyokani na biso elongo na basusu. “Mpamba te bokonzi ya Nzambe elimboli te kolya mpe komela, kasi elimboli nde boyengebene mpe kimya mpe esengo na elimo santu.” (14:17, NW) Boyengebene, kimya mpe esengo wana ezali mingimingi mpo na “basangoli na libula elongo na Klisto,” oyo basengeli “kolatisama na nkembo esika moko” na ye kati na Bokonzi na likoló. Simbá lisusu lolenge mokanda ya Baloma ezali komonisa litambe mosusu litali kokokisama ya elaka ya Bokonzi oyo epesamaki na Edene, wana elobi ete: “Etikali moke, Nzambe oyo akopesaka kimya akotuta Satana na nsé ya makolo na bino.” (Lom. 8:17, NW; 16:20, NW; Gen. 3:15) Komonisáká kondima kati na solo minene wana, tiká ete tótondaka ntango nyonso na esengo, na kimya, mpe na elikya. Tiká ete ekateli na biso ezala ya kolónga elongo na Mombóto ya Bokonzi, mpamba te tondimisami ete eloko moko te na likoló to na nsé awa na mabelé, ‘ata ekelamu nini mosusu, ekoki te kokabola biso na bolingo ya Nzambe oyo ezali kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso.’—Lom. 8:39; 15:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Our Bible and the Ancient Manuscripts, 1958, lokasa 188.