Elikya esimbi biso makasi, bolingo ezali kotambwisa biso
“Kondima mpe elikya mpe bolingo izali koumela, yango misato. Nde oyo eleki kati na yango ezali bolingo.”—1 BAKOLINTI 13:13.
1. Likebisi nini ntoma Paulo apesi biso?
NTOMA Paulo akebisi biso ete kondima na biso ekoki kozinda ndenge masuwa ezindaka. Alobaki ete “ozala na kondima mpe lisosoli malamu. Bamosusu baboyi yango mpe bazindisi kondima na bango.” (1 Timote 1:19) Na ekeke ya liboso T.B., bazalaki kotonga masuwa na mabaya. Mpo masuwa ezwa likama na mai te, esengelaki bátonga yango na mabaya ya malamu mpe na ndenge moko ya malamu.
2. Mpo na nini kondima na biso oyo ekokani na masuwa esengeli kotongama malamu, mpe yango ezali kosɛnga biso nini?
2 Kondima na biso mpe ezali lokola masuwa, esengeli kotepa na katikati ya mai monene oyo ezali kobɛtabɛta makasi, mai yango ezali bongo bato oyo bafandi na mokili. (Yisaya 57:20; Emoniseli 17:15) Yango wana, esengeli mpenza etongama malamu, mpe biso moko nde tosengeli kotonga yango malamu. Ntango “mai monene,” elingi koloba mokili ya Bayuda mpe ya Baloma, etombokelaki baklisto ya ekeke ya liboso, Yuda akomaki ete: “Balingami, bómitonga likoló ya kondima ya bosantu mingi oyo bozali na yango mpe bóbondelaka na elimo santu, boye bokotikala na kati ya bolingo ya Nzambe, awa bozali kozela mawa ya Nkolo na biso Yesu Klisto mpo na kozwa bomoi ya seko.” (Yuda 20, 21, NW) Lokola Yuda alobelaki mpe kobunda mpo na ‘kondima oyo epesami epai na basantu,’ “kondima ya bosantu mingi” ekoki kozala nde mateya nyonso ya boklisto, bakisa mpe nsango malamu ya lobiko. (Yuda 3) Klisto azali moboko ya kondima wana. Soki tolingi kokangama makasi na mateya ya boklisto ya solosolo, tosengeli kozala na kondima makasi.
Tɛlɛmá makasi liboso ya mipɛpɛ oyo ekokani na “kobanga mwa mangomba ya mike”
3. Ndenge nini basusu bazali kosalela “kobanga mwa mangomba ya mike”?
3 Na bambula oyo, makambo mingi ya nsɔmɔ esalemi na kati ya mangomba ya mike: ebele ya bato bamibomi na mbala moko, babomi bato mpe bamikɔtisi na makambo ya terorisme. Yango wana, bato mingi, ezala bato mpenza ya politiki, bazali komibanzabanza mingi mpo na kobatela bato oyo bayebi eloko te, mingi mpenza bilenge, mpo bákangama te na motambo ya mangomba mabe wana ya mike. Ya solo mpenza, ezali “nzambe na mokili oyo” nde azali kotinda bango básala makambo wana ya nsɔmɔ, mpo bato bákóma kobanga mwa mangomba ya mike, mpe mpo na yango azali kopusa bato bátombokela basaleli ya Yehova. (2 Bakolinti 4:4; Emoniseli 12:12) Bato mosusu bakamataki makambo wana lokola ndakisa mpo báboya mosala na biso. Na mikili mosusu, basalaki kampanye oyo mokano na yango emonanaki ete ezali ya kobatela bato na “mangomba mike ya mabe” kasi na libunga mpenza batángaki mpe Batatoli ya Yehova na kati ya mangomba yango mpe na bongo bafundaki biso na mayele mabe. Yango wana, na mikili mosusu ya Mpoto ekómi mpasi mpo na kosakola ndako na ndako mpe epusi bato mosusu oyo bazalaki koyekola Biblia elongo na biso bátika koyekola. Kutu, yango elɛmbisaki mpe bandeko na biso mosusu.
4. Mpo na nini botɛmɛli esengeli kolɛmbisa biso te?
4 Nzokande, na esika yango elɛmbisa biso, botɛmɛli esengeli nde kolendisa kondima na biso makasi ete tozali mpenza kolanda boklisto ya solo. (Matai 5:11, 12) Bafundaki baklisto ya ekeke ya liboso ete bazalaki mwa lingomba moke ya botomboki, mpe bazalaki “koloba mabe” mpo na bango bipai nyonso. (Misala 24:5; 28:22) Kasi ntoma Petelo ayikisaki baninga na ye bandimi mpiko, ntango akomaki ete: “Balingami, mpo na mɔ́tɔ na monyoko mozali kokómela bino lokola emekeli, bókamwa te pelamoko soko ekamwiseli ezali kokwela bino. Kasi motindo mosusu, bósepela ete bozali kosangana na mpasi na Klisto ete bósepela na esengo monene wana ekomonana nkembo na ye.” (1 Petelo 4:12, 13) Mpe, mosangani moko ya lisangani ya mikóló-bakambi ya ekeke ya liboso akomaki boye: “Bandeko na ngai, bókanisa ete ezali bobele esengo wana ekokwea bino kati na komekama na mitindo na mitindo. Boyebi ete komekama na kondima na bino ekoyeisa mpiko. Tiká mpe ete mpiko ekokisa mosala na yango nyɛɛ ete bózala basembwi mpe babongi kozanga eloko te.” (Yakobo 1:2-4) Ndenge mipɛpɛ makasi emekaka bokasi ya masuwa, ndenge moko mpe botɛmɛli oyo ekokani na mipɛpɛ makasi ekomonisa soki kondima na biso oyo ekokani na masuwa elɛmbá.
Bolɔzi ekoyeisa mpiko
5. Ndenge nini tokoki koyeba ete kondima na biso ezali makasi na ntango ya bolɔzi?
5 Soki bolɔzi oyo ekokani na mipɛpɛ makasi ebɛti mpe balongi yango, ezali nsima na yango nde baklisto bakoki kondima ya solo ete bayebi koyika mpiko mpe kondima na bango ezali ya kotɛngatɛnga te. Ezaleli na biso ya koyika mpiko “ekokokisa mosala na yango nyɛɛ” na mai oyo ezali na mipɛpɛ makasi bobele soki tozali “basembwi mpe babongi kozanga eloko te” mpe soki tozali na kondima ya makasi. Paulo akomaki boye: “Lokola basali na Nzambe, tokomilobela biso mpenza kati na makambo nyonso na mpiko monene, na bolɔzi, na mpasi, na makamba.”—2 Bakolinti 6:4.
6. Mpo na nini tosengeli ‘kosepelaka ata kati na bolɔzi,’ mpe ndenge nini yango epesaka kondima na biso makasi?
6 Ntango bolɔzi oyo ekokani na mipɛpɛ makasi ekómeli biso, tosengeli komona yango lokola ntango ya komonisa ya solo kondima na biso oyo ekokani na masuwa oyo ezali malamu mpe makasi. Epai ya baklisto ya Loma, Paulo akomaki boye: “Tokosepelaka ata kati na bolɔzi, awa eyebi biso ete bolɔzi ekoyeisa mpiko, mpe mpiko ekoyeisa motema na nguya mpe motema na nguya ekoyeisa elikya. Elikya oyo ekozimbisa biso te.” (Baloma 5:3-5) Ntango tolongaka komekama, Yehova asepelaka na biso. Yango ekómisaka elikya na biso makasi.
Mpo na nini bamosusu bazindaka lokola masuwa
7. (a) Lokola maloba ya Paulo emonisi yango, ndenge nini na elimo, bamosusu bazindaki lokola masuwa? (b) Lelo oyo, ndenge nini bamosusu bazali kotika solo?
7 Ntango Paulo akebisaki baklisto mpo na “kozinda lokola masuwa,” azalaki kolobela baoyo “babwakaki” lisosoli na bango mpe babungisaki kondima na bango. (1 Timote 1:19) Kati na bango, tokoki kotánga Imene mpe Alesandala oyo bakweaki na lipɛngwi, batikaki solo mpe bazalaki koloba mabe mpo na yango. (1 Timote 1:20, NW, maloba na nse ya lokasa; 2 Timote 2:17, 18) Lelo oyo, bapɛngwi oyo bazali kotika solo, bazali kobɛta “moombo ya sembo mpe ya mayele,” na maloba na bango mpe bazali koswa lobɔkɔ oyo ezalaki koleisa bango na elimo. Bamosusu na kati na bango bakokani na “moombo mabe,” oyo azali koloba polele ete: “Nkolo na ngai azali koumela.” (Matai 24:44-49; 2 Timote 4:14, 15) Bazali kondima te ete nsuka ya ebongiseli mabe ya ntango oyo ekómi pene mpe bazali kotyola makebisi ya elimo oyo kelasi ya moombo ezali kopesa na basaleli ya Yehova, na ndakisa likebisi oyo etali koyeba ete oyo ezali ntango ya kolala mpɔngi te. (Yisaya 1:3) Bapɛngwi wana bazali “kobebisa kondima na bamosusu,” bazali kozindisa bango na elimo.—2 Timote 2:18.
8. Makambo nini esalaki ete bamosusu bázindisa to bábebisa kondima na bango oyo ekokani na masuwa?
8 Baklisto mosusu oyo bamipesi na Nzambe bazindisaki kondima na bango oyo ekokani na masuwa na kobwakáká lisosoli na bango mpe na komipesáká na koluka bisengo ya mbindo ya mokili oyo mpe na misala na yango ya pite. (2 Petelo 2:20-22) Nzokande basusu bazali kozindisa kondima na bango oyo ekokani na masuwa mpo bazali komona ete libongo ya ebongiseli ya sika ezali naino mosika. Lokola bazali kokoka te kotánga mikolo mpo na koyeba ntango oyo bisakweli mosusu esengeli kokokisama, mpe lokola bazali kopusa “mokolo ya Yehova” mosika na kati ya makanisi na bango, bazali kotika losambo ya solo. (2 Petelo 3:10-13; 1 Petelo 1:9) Nokinoki, bazali komizongisa na kati ya ebongiseli ya ntango oyo, oyo ekokani na mai ya bozindo mpe ya yikiyiki. (Yisaya 17:12, 13; 57:20) Bato mosusu oyo batikaki lisangá ya boklisto bazali tii lelo kondima ete yango ezali lingomba ya solo. Kasi bazangaki nde motema molai mpe ezaleli ya koyika mpiko oyo esɛngami mpo na kozela mokili ya sika oyo Yehova Nzambe alaki. Mpo na bango, bomoi na kati ya Paladiso ezali koya nokinoki te.
9. Ndambo moke ya baklisto oyo basili komipesa na Nzambe bazali kosala nini, mpe makambo yango esengeli kotinda biso na kotalela nini?
9 Na bamboka mosusu, mwa ndambo moke ya baklisto bamipesi na Nzambe, bagumbi bilamba oyo etambwisaka masuwa na bango. Masuwa ezali naino kotepa, kasi na esika ete bákende liboso mpo bázala na kondima makasi, bakómi nde kotambola malɛmbɛ. Lokola babendamaki na elikya ya komona “Paladiso eya nokinoki,” bamosusu basalaki nyonso ekoki mpo bákɔta na Paladiso yango—bazalaki na molende na mosala ya kosakola mpe bazalaki koyangana mbala na mbala na makita, na mayangani ya minene mpe ya mike. Sikoyo, lokola bamoni ete makambo oyo bazalaki kozela ezali kokokisama noki te ndenge bazalaki kokanisa, bazali lisusu komipesa te ndenge bazalaki komipesa liboso. Yango emonani polele na ndenge mosala na bango ya kosakola ekiti, bayanganaka lisusu na makita mbala na mbala te, mpe bazali koboya koyangana na biteni mosusu ya mayangani minene mpe ya mike. Basusu bazali kolekisa ntango mingi na makambo ya kominanola mpe na koluka kozala na biloko mingi ya mosuni. Makambo oyo esengeli kotinda biso tótalela eloko nini epusaka biso tómipesa na Yehova. Tozali kosalela ye na molende kaka mpo tókɔta “Paladiso eya nokinoki”?
Elikya ekokani na longo ya masuwa
10, 11. Paulo akokanisaki elikya na biso na eloko nini, mpe mpo na nini bokokanisi yango ebongaki mpenza?
10 Paulo amonisaki polele ete Yehova alakaki ete mapamboli ekoya na nzela ya Abalayama. Na nsima ntoma alimbolaki ete: “Nzambe . . . atii ndai ete mpo na makambo mibale mayebi kobongwana te [liloba na ye mpe ndai na ye], oyo Nzambe akoki komimonisa na lokuta kati na yango te, biso baoyo tokimi komibomba epai na ye, tóyika mpiko ete tósimba elikya. Tozali na elikya yango lokola longo [mpo na molimo, NW], ekobukana te, ekotambola mpe te.” (Baebele 6:17-19; Genese 22:16-18) Elikya oyo etyami liboso ya baklisto bapakolami ezali elikya ya bomoi oyo ezangi kufa na likoló. Lelo oyo, ebele ya basaleli ya Yehova bazali na elikya kitoko ya bomoi ya seko awa na mabelé oyo ekobongwana paladiso. (Luka 23:43) Soki moto azangi elikya oyo, akoki kozala na kondima te.
11 Longo ezali eloko moko ya nguya mpe ya ntina, oyo basalá mpo etɛlɛmisaka masuwa mpe ebatelaka yango ete ekende na likama te. Ezali na kapitɛni moko te ya masuwa oyo akolinga atika libongo soki azali na longo te. Lokola Paulo azindaki na masuwa mbala mingi, ayebaki malamu, na kotalela makambo oyo akutanaki na yango, ete longo nde ezalaki kosimba bomoi ya bato na masuwa. (Misala 27:29, 39, 40; 2 Bakolinti 11:25) Na ekeke ya liboso, masuwa ezalaki na masini te oyo ekokaki kosalisa kapitɛni ete atambwisa yango ndenge alingi. Longola bobele masuwa ya bitumba oyo bazalaki kotambwisa na nkai, masuwa ezalaki kotambola mingimingi mpenza nde na mopɛpɛ. Soki masuwa na ye elingi kokende kotutana na mabanga, kapitɛni asengelaki bobele kobwaka longo na mai, na ndenge wana nde akokaki kobika na mopɛpɛ makasi, azalaki kotya motema ete longo ekokangama makasi na nse ya mai. Yango wana, Paulo akokanisaki elikya ya moklisto na “longo [mpo na molimo, NW] ekobukana te, ekotambola mpe te.” (Baebele 6:19) Ntango botɛmɛli oyo ekokani na mipɛpɛ makasi ekómeli biso to wana tokutani na komekama ya ndenge mosusu, elikya malamu oyo tozali na yango ezali lokola longo oyo ezali kokitisa biso motema, mpo kondima na biso oyo ekokani na masuwa ekende kotutana te na zelo, oyo elakisi bongo ntembe, to na mabanga ya nsɔmɔ, oyo elakisi bongo lipɛngwi.—Baebele 2:1; Yuda 8-13.
12. Ndenge nini tokoki koboya kotangwa na Yehova?
12 Paulo akebisaki baklisto Baebele boye: “Bandeko, bókebaka ete motema mabe mpe na kozanga kondima ezala kati na moko na bino te ete bótangwa na Nzambe na bomoi te.” (Baebele 3:12) Na makomi ya Greke, liloba ‘kotangwa’ elimboli mpenzampenza “kolongwa na nzela,” elingi koloba, kopɛngwa. Kasi tokoki kosala makasi mpo tózinda te. Kondima mpe elikya ekoki kosalisa biso tókangama na Yehova ata na ntango ya komekama oyo ekokani na mipɛpɛ makasi. (Deteronome 4:4; 30:19, 20) Kondima na biso ekozala te lokola masuwa oyo ezali komemama epai na epai na mipɛpɛ ya mateya ya bapɛngwi. (Baefese 4:13, 14) Soki tozali na elikya oyo ekokani na longo, biso basaleli ya Yehova tokozala na likoki ya kolonga mipɛpɛ makasi ya bomoi.
Bolingo mpe elimo santu ezali kotambwisa biso
13, 14. (a) Mpo na nini longo ya kondima na biso yango moko ekoki te? (b) Eloko nini mpenza esengeli kopusa biso na kosalela Yehova mosala ya bulɛɛ, mpe mpo na nini?
13 Soki moklisto moko azali kosalela Yehova bobele na elikya ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé, moklisto yango akokɔta na ebongiseli ya sika te. Moklisto asengeli kobatela elikya na ye oyo ekokani na longo ya masuwa, yango esalisaka moto atɛngatɛnga te. Kasi atako bongo, asengeli mpe kotika bolingo nde etambwisa elikya na ye mpe kondima na ye. Paulo alobelaki mingi likambo yango ntango akomaki ete: “Kondima mpe elikya mpe bolingo izali koumela, yango misato. Nde oyo eleki kati na yango ezali bolingo.”—1 Bakolinti 13:13.
14 Kolinga Yehova na motema na biso mpenza, yango nde nguya oyo ezali kopusa biso tósala mosala ya bulɛɛ, mpamba te ye alingaka biso na bolingo oyo ekosuka te. Ntoma Yoane akomaki ete: “Ye oyo akolingaka te ayebi Nzambe te, mpo ete Nzambe azali bolingo. Bolingo na Nzambe emonaneli biso ete Nzambe atindaki Mwana na ye na likinda kati na mokili ete tóbika na bomoi mpo na ye. Biso tokolingaka mpo ete ye alingaki biso liboso.” (1 Yoane 4:8, 9, 19) Mpo na botɔndi oyo tozali na yango epai ya Yehova, lobanzo na biso ya libosoliboso esengeli te kozala bobele ya koluka lobiko na biso moko, kasi nde ya kopesa litatoli mpo na kosantisama ya nkombo na ye mosantu mpe kolongisama ya lotomo ya sembo oyo azali na yango ya kozala mokonzi.
15. Ndenge nini bolingo oyo tozali na yango mpo na Yehova ezali na boyokani na lotomo na ye ya kozala mokonzi?
15 Yehova alingi tósalela ye mpo tozali kolinga ye, kasi mpo na Paladiso te. Buku Étude perspicace des Écrituresa elobi ete: “Yehova asepelaka mingi na komona ete bikelamu na ye bazali kosimba lotomo oyo azali na yango ya kozala mokonzi, asepelaka soki bazali kosala yango mpenzampenza na bolingo. Asepelaka bobele na baoyo balingaka lotomo na ye ya kozala mokonzi mpo na bizaleli na ye malamu mpe mpo yango ezali sembo. Asepelaka mpe na baoyo baponaka libosoliboso lotomo na ye ya kozala mokonzi koleka makambo mosusu. (1 Kol 2:9) Bazali kopona kosalela ye na kondimáká lotomo azali na yango ya kozala mokonzi, kasi bazali koluka te kozala na lipanda liboso na ye—bazali kosala bongo mpo bayebi ye, bayebi bolingo na ye, bosembo na ye mpe mayele na ye, bizaleli oyo bazali komona ete eleki bizaleli na bango mosika. (Nz 84:10, 11)”—Volime 1, lokasa 108.
16. Ndenge nini bolingo oyo tozali na yango mpo na Yesu ezali nguya oyo ezali na bopusi likoló ya bomoi na biso?
16 Biso baklisto, tomonisaka ete tolingaka mpe Yesu mpo na bolingo oyo ye azali na yango mpo na biso. Paulo alobaki boye: “Bolingo na Klisto ekangi biso awa ekati biso ntina ete moko akufeli bato nyonso mpe bongo bato nyonso basili kokufa. Akufeli bato nyonso ete baoyo bazali na bomoi bábika lisusu mpo na bango mpenza te, kasi mpo na ye oyo akufeli bango mpe asekwi.” (2 Bakolinti 5:14, 15) Klisto azali mpenza moboko oyo bomoi na biso ya elimo, kondima na biso mpe elikya na biso etongami. Bolingo oyo tozali na yango mpo na Klisto Yesu ezali kokómisa elikya na biso makasi mpe ezali kosimba kondima na biso, mingimingi na ntango ya komekama oyo ekokani na mipɛpɛ makasi.—1 Bakolinti 3:11; Bakolose 1:23; 2:6, 7.
17. Nguya nini Yehova apesaka biso, mpe ntina ya nguya yango emonisami ndenge nini na Misala 1:8 mpe Baefese 3:16?
17 Atako bolingo oyo biso baklisto tozali na yango mpo na Nzambe mpe mpo na Mwana na ye ezali nguya oyo ezali kotambwisa bomoi na biso, Yehova azali kopesa biso eloko mosusu oyo ezali kotambwisa biso, oyo ezali kopesa biso molende mpe oyo ezali kopesa biso makasi ete tókende liboso na mosala na ye. Ezali bongo nguya na ye oyo esalaka mosala, to elimo santu. Liloba ya Liebele mpe ya Greke oyo ebongolami na “elimo” elobelaka mpenzampenza nguya makasi oyo emonanaka te, na ndakisa mopɛpɛ. Masuwa lokola oyo Paulo amataki, mpo ekóma na esika oyo ezalaki kokende, yango ezalaki mingimingi kotalela nguya ezangi komonana ya mopɛpɛ. Ndenge moko mpe, mpo kondima na biso oyo ekokani na masuwa ekende se liboso na mosala ya Yehova, tozali na mposa ya bolingo mpe ya nguya ezangi komonana ya Nzambe oyo ekosalaka mosala.—Misala 1:8; Baefese 3:16.
Tókende se liboso kino tokokóma!
18. Eloko nini ekosalisa biso na koyika mpiko ata na komekama ya ndenge nini oyo ekoki kokómela kondima na biso na mikolo mizali koya?
18 Kondima na biso mpe bolingo na biso ekoki mbala mosusu komekama makasi liboso ete tókóma na ebongiseli ya sika. Atako bongo, Yehova apesi biso longo oyo “ekobukana te, ekotambola mpe te”—elikya kitoko oyo tozali na yango. (Baebele 6:19; Baloma 15:4, 13) Ntango tokutani na botɛmɛli to na komekama moko boye, tokoki koyika mpiko soki topikami makasi na lisalisi ya elikya na biso. Wana komekama moko esili, liboso ete mosusu ebanda, tózwa ekateli ya kolendisa elikya na biso mpe ya kokómisa kondima na biso makasi.
19. Ndenge nini tokoki kosala mpo ete masuwa ya kondima na biso elanda kotambola mpe ekóma kino na libongo na mokili ya sika ya Nzambe?
19 Liboso alobela “longo mpo na molimo,” Paulo alobaki boye: “Tolingi ete moto na moto kati na bino [asala mbangu, NW] mpo na kotondisa elikya kino nsuka ete bózala na gɔigɔi te kasi [bólanda ndakisa ya, NW] bango basili kosangola libula na bilaka mpo na kondima mpe motema pɛtɛɛ.” (Baebele 6:11, 12) Lokola bolingo oyo tolingaka Yehova mpe Mwana na ye nde ezali kopusa biso, mpe lokola elimo santu ezali kopesa biso nguya, tiká ete kondima na biso oyo ekokani na masuwa elanda kotambola kino tokokóma na libongo ya mokili ya sika oyo Nzambe alaki.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.
Bozongeli
◻ Mpo na kondima na biso, likebisi nini Paulo apesaki biso?
◻ Na makambo ya elimo, ndenge nini bato mosusu bazindaki ndenge masuwa ezindaka, mpe ndenge nini bamosusu bakómi kotambola malɛmbɛ?
◻ Wapi ezaleli ya Nzambe oyo esengeli kozala esika moko na kondima na biso?
◻ Eloko nini ekopesa biso likoki ya kokóma na libongo ya mokili ya sika oyo Nzambe alaki?
[Elilingi na lokasa 16]
Kondima na biso oyo ekokani na masuwa esengeli kotongama malamu mpo ekoka kotɛmɛla mipɛpɛ makasi ya bomoi
[Elilingi na lokasa 17]
Kondima na biso ekoki kozinda ndenge masuwa ezindaka
[Elilingi na lokasa 18]
Elikya ezali longo mpo na bomoi na biso baklisto