Kosolola malamu ezali sɛkɛlɛ mpo libala ezala malamu
Na mobu 1778, Robert Barron, abimisaki lifungola-mama (serrure) oyo ekangamaka na mabende mibale na kati mpe basalelaka mayele yango moko mpo na lifungola-mama oyo tozali na yango lelo oyo. Mpo na kofungola, esɛngaki kaka kosalela fungola moko oyo ekoki kotombola mabende mibale mbala moko.
NDENGE moko mpe, mpo libala ezala malamu, mwasi na mobali basengeli kosala na bomoko. Mpo na komona mpe koumela na esengo ya libala ya malamu, likambo moko ya ntina ezali kosolola malamu.
Makambo oyo kosolola malamu esɛngaka
Kosolola malamu esɛngaka makambo nini? Diksionere moko elobi ete kosolola elimboli “kopesa to kopesana makanisi to nsango na maloba, na kokoma to na bilembo.” Na bongo, kosolola esɛngaka kokabola mayoki mpe makanisi. Mpe kosolola malamu ezali na makambo oyo etongaka, oyo elendisaka, ya malamu, ya lokumu, mpe oyo ebɔndisaka.—Baefese 4:29-32; Bafilipi 4:8.
Kosolola malamu elekaka ntango bato bazali kotyelana motema mpe bazali komitya na esika ya moninga. Mwasi na mobali bakolisaka bizaleli yango ntango bandimi kofanda na libala bomoi na bango mobimba mpe bakati ndai ya solo mpo na kokokisa yango. Joseph Addison, mokomi moko na ekeke ya 18, akomaki boye mpo na libala ya ndenge yango: “Bato mibale oyo baponani na kati ya bato nyonso oyo bazali na mokili, na mokano ya kobɔndisana mpe kosepelisana, ntango basali bongo, bandimi ete bakolakisana esengo, boboto, mayele, bakolimbisana, bakozala na motema molai ezala mabe to malamu ya moninga, tii liwa na bango.” Libala ya ndenge yango ezali mpenza libala ya esengo! Bizaleli malamu yango ekoki kobongisa libala na bino; bokoki kokolisa yango na nzela ya kosolola malamu.
Makambo oyo epekisaka kosolola malamu
Bato mingi bakanisaka ete libala na bango ekozala kaka malamu mpe bazelaka yango na esengo mingi. Kasi, mpo na bato mingi, esengo yango eyaka kolimwa nokinoki lokola mopɛpɛ, mpe makanisi nyonso ya kolonga esilaka. Elikya ekoki kotika esika na makambo ya bololo, nkanda, bonguna, ata mpe koyinana makasi. Na ntango yango, libala ekómaka likambo ya kokanga kaka motema “tii liwa ekokabola biso.” Na yango, mpo na kobongisa to kobatela kosolola malamu oyo ebongisaka libala, esengeli kosilisa mikakatano mosusu.
Mokakatano monene oyo epekisaka kosolola malamu ekoki kozala kobanga soki mobalani akoloba to akosala nini soki bayebisi ye likambo moko to bamonisi ye mposa moko. Na ndakisa, moto akoki kobanga ete báboya ye soki ayebi ete maladi moko makasi ezali kokola na nzoto na ye, mpasi oyo mbala mosusu ekopekisa ye kosala makambo mosusu. Moto akoki kozala na mokakatano ya kolimbwela molongani na ye ete balingi kosala ye lipaso moko oyo ekobebisa kitoko ya nzoto na ye to makoki na ye ya kosala makambo mosusu. Na makambo ya ndenge yango, esengeli mpenza kosolola na motema polele mpe komilɛngɛla malamumalamu mpo na mikolo oyo ezali koya. Koyebisa moninga ete ozali kolinga ye ntango nyonso, mpe komonisa yango mbala na mbala na misala, ekolakisa ete ozali kosepela na ye mpe yango ekosalisa mpo na kolendisa libala ya malamu. Na kati ya libala, ndimbola ya solosolo ya lisese oyo esengeli mpenza komonana: “Moninga akolingaka ntango nyonso; ndeko abotami mpo na ntango na mpasi.”—Masese 17:17.
Mokakatano mosusu oyo epekisaka kosolola malamu ezali kobomba nkanda. Bato balobaka ete libala ya esengo ezali libala oyo esangisi bato mibale oyo bayebi kolimbisana, mpe likambo yango ezali solo. Mpo makambo ezala mpenza bongo, mwasi na mobali basengeli kosala makasi mpo na kolanda toli ya ntoma Paulo oyo elobi ete: “Tiká te ete moi elimwa naino bozali na nkanda na bino.” (Baefese 4:26) Mpo na kosalela toli oyo na esika ya kosilika to kobomba nkanda esengeli kosolola na elimo ya komikitisa. Na libala ya malamu, mwasi na mobali basilikaka, baswanaka, mpe babombaka nkanda ntango molai te. (Masese 30:33) Balukaka kolanda ndakisa ya Nzambe oyo abombaka nkanda te. (Yilimia 3:12) Ɛɛ, balimbisaka mpenza na motema moko.—Matai 18:35.
Mokakatano monene lisusu oyo epekisaka kosolola ezali koboya kolobisa moninga. Yango ekoki komonana na elongi ya mawa, na komilela, kosala makambo likolólikoló, mpe koboya kolobisa moninga. Mobalani oyo azali kosala bongo azali komonisa ete azali na likambo moko oyo ezali kotungisa ye. Kasi, koloba ndenge ozali koyoka mpe na lolenge ya malamu esalisaka mingi mpo libala ebonga koleka soki ofandi nyɛɛ mpe na mawa.
Ntango moninga azali koloba, kozanga koyoka ye malamu to koyoka ye ata moke te ezali mokakatano mosusu oyo esengeli kosilisa mpo masolo malamu ezala na kati ya libala. Ekoki kozala ete tolɛmbi mingi to tozali na misala mingi mpe tozali kokoka kotya makanisi esika moko te mpe tozali na makasi te ya kolanda na likebi nyonso makambo oyo tozali kolobana. Koswana ekoki kobima likoló ya makambo oyo boyokanaki malamu te, bongo mobalani moko akanisaki ete elobamaki malamu; nzokande, mosusu azali kotingama kaka ete ezali mbala ya liboso ayoka yango. Tomoni mpenza ete kozanga kosolola malamu nde ebotaka matata ya ndenge yango.
Ndenge ya kolendisa kosolola malamu
Ezali na ntina mingi kozwa ntango mpo na kosolola malamu mpe na bolingo! Bato mosusu balekisaka ntango mingi na kotala bomoi ya bato mosusu oyo balakisaka na televizyo kasi bazangaka ntango ya kotalela bomoi na bango moko. Yango wana, mbala mingi kokanga televizyo ezalaka na ntina mpo na kobanda kosolola malamu.
Kasi, lokola ezali na ntango mpo na koloba, ezali mpe na ntango ya kofanda nyɛɛ. Moto ya mayele alobaki boye: “Ntango ezali mpo na eloko na eloko . . . , ntango na [kofanda] nyɛɛ mpe ntango na koloba.” Ɛɛ, ezali mpe na maloba oyo ebongi kolobama. Lisese moko elobaka boye: “Liloba lilobami na ntango ekoki ezali malamu boni!” (Mosakoli 3:1, 7; Masese 15:23) Na yango, yebá ntango nini ezali malamu mpenza mpo na kopesa likanisi na yo to koyebisa mposa ya motema na yo. Omituna boye: ‘Molongani na ngai alɛmbi to makanisi na ye ezali mpenza na esika na yango? Likambo oyo nalingi kobanda ekoki kobimisa matata? Maloba nini nabimisaki oyo mobali to mwasi na ngai asepelaki na yango te ntango tosololaki likambo yango mbala eleki?’
Tosengeli kobosana te ete bato bayokaka malamu soki bazali komona bolamu oyo bango bakozwa soki basaleli to batosi likambo oyo basɛngi bango. Soki mwa matata ebimaki na kati ya mobali na mwasi na ye, moko na bango akoki koloba boye: “Nazali na likambo moko ezali kotungisa ngai, mpe nalingi tóbongisa yango sikoyo!” Ya solo, maloba oyo ebongi etalaka ndenge to ntango oyo makambo yango ekuti bino kasi, koloba boye ekoki kozala malamu mpenza: “Chéri (e), nazali kokanisa likambo oyo tosololaki mbala eleki mpe ndenge oyo tokoki kobongisa yango.” Maloba nini ekoki mpenza kosepelisa molongani na yo?
Ɛɛ, ndenge ya koloba likambo ezali na ntina mingi. Ntoma Paulo akomaki boye: “Tiká ete maloba na bino mázala na ngɔlu, na elengi na mungwa ntango nyonso.” (Bakolose 4:6) Bósala makasi mpo boboto eyokanaka na mongongo mpe na maloba na bino. Bóbosana te ete “maloba kitoko izali lokola mafuta na nzoi na elengi epai na molimo mpe na kobika kati na mikuwa.”—Masese 16:24.
Na mabala mosusu, kosala misala elongo na ndako ekoki kopesa bango libaku ya kosolola malamu. Boyokani ya ndenge yango ekoki kolendisa elimo ya kopesa, mbala moko mpe ekoki kopesa libaku ya kosolola malamu. Mpo na bamosusu, kofanda kimya na esika ya bango mibale kozanga kosala mosala mosusu eleki malamu mpe elendisaka mingi kosolola malamu.
Bokoki koyekola makambo mingi soki bozali kotala ndenge basi na mibali oyo bayokanaka malamu basololaka. Eloko nini esalisaki bango? Na ntembe te, boyokani na bango mpe ndenge oyo basololaka malamu eutaki na milende ya mokomoko na bango, na motema molai, mpe kopesa moninga kilo na bolingo nyonso. Na ntembe te bango moko mpe bayekolaki makambo ebele, mpamba te mabala ya malamu esalemaka na mbalakaka te. Na yango, ezali na ntina mingi kotalelaka makanisi ya molongani na yo, kotalela bamposa na ye, mpe kozala na maloba ya mayele mpo na koboya makambo oyo ekoki kobimisa matata. (Masese 16:23) Na yango, soki obalá, salá makasi ozala moto oyo mobalani na yo asepelaka kofanda na ye mpe moto oyo molongani na yo azalaka na nkaka te mpo na kosɛnga ye bolimbisi. Yango ekosalisa mpo libala na bino ezala malamu.
Yehova Nzambe alingi ete bato bázala na mabala ya esengo mpe eumela. (Genese 2:18, 21) Kasi, sɛkɛlɛ ezali na mabɔkɔ ya bato mibale oyo babalani. Esɛngaka bato mibale oyo balingani mpe basalaka mpenza makambo esika moko mpo na kosala libala ya malamu na mayele ya kosolola malamu.
[Elilingi na lokasa 22]
Soki bokangi televizyo bokozala na ntango mingi mpo na kosolola
[Bililingi na lokasa 23]
Kosolola malamu esalisaka mitema oyo milingani na bolingo ya seko