Mpo na nini koyebisa lisumu oyo moto asali?
LISESE moko ya Afrika ya Wɛ́sti elobaka ete: “Ye oyo abimisi sɛkɛlɛ́ akokóma monguna ya bato.” Ezali yango nde ekómelaki Olu ntango afundaki yaya na ye ya mobali ete azalaki kosangisa nzoto na leki na bango ya mwasi. Ndeko na ye ya mobali angangaki ete: “Ozali moto na lokuta!” Na nsima abɛtaki Olu makasi, abénganaki ye na ndako, mpe atumbaki bilamba na ye nyonso. Bato ya mboka bamityaki na ngámbo ya ndeko na ye ya mobali. Lokola bato nyonso baboyaki ye, Olu asengelaki kolongwa na mboka wana. Ezali bobele na ntango bamonaki ete leki na bango ya mwasi akómi na zemi nde bato basosolaki ete Olu alobaki solo. Ndeko na ye ya mobali ayambolaki mabe na ye, mpe bato bakómaki lisusu kolinga Olu. Makambo malingaki kokóma ndenge mosusu. Olu akokaki ata kobomama.
Ya solo, baoyo balingaka Yehova te basepelaka te ete mabunga na bango mamonisama polele. Momeseno ya bato ya masumu ezalaka koboya mpamela mpe kokangela ye oyo apesi mpamela yango nkanda. (Kokanisá na Yoane 7:7.) Likambo ya kokamwa ezali te ete bato mingi bakangaka monɔkɔ na bango na likambo litali kobimisa mabe ya bato mosusu epai na baoyo bazali na lotómo ya kosembola yango.
Motuya ya mpamela
Nzokande, ezalela ya basangani ya libota ya Yehova ezali ndenge mosusu liboso ya mpamela. Mibali mpe basi oyo bazali na bobángi Nzambe basepelaka mingi na ebongiseli oyo Yehova asili kosala mpo na kosunga baoyo basali mabunga kati na lisangá ya boklisto. Batalelaka disipilini motindo wana lokola elembo ya boboto na ye.—Baebele 12:6-11.
Yango ekoki komonisama na likambo oyo ekómelaki Mokonzi Davidi na bomoi na ye. Atako azalaki moto ya sembo kobanda bolenge na ye, ekómaki na eleko moko oyo akweaki na libunga monene. Ya liboso, asalaki ekobo. Na nsima, amekaki kobomba mabe na ye, ayangaki mwango ete mobali ya mwasi yango abomama. Kasi Yehova amonisaki lisumu ya Davidi epai ya mosakoli Natana, ye oyo alobelaki Davidi likambo yango na mpiko nyonso. Kosaleláká lisese oyo ebongi mpenza, Natana atunaki Davidi soki akokaki kosala nini epai na mobali moko ya bozwi oyo azalaki na bampate mingi kasi, mpo na koyamba moninga na ye, akamataki mpate bobele moko ya mobali mosusu mobólá mpe abomaki yango; mpate na ye bobele moko oyo alingaki mingi. Davidi, oyo liboso azalaki mobɔkɔli na bampate, ayokaki mawa mingi mpe asilikaki. Alobaki ete: “Moto oyo asali yango abongi kokufa!” Na bongo Natana akokisaki lisese yango na Davidi, na kolobáká ete: “Yo moto yango!”—2 Samwele 12:1-7.
Davidi asilikaki na Natana soko moke te; mpe lisusu alukaki komilóngisa te to mpe koluka kopesa foti na moto mosusu. Nzokande, mpamela ya Natana esalaki bopusi na lisosoli ya Davidi. Na mpasi na motema, Davidi ayambolaki ete: “Nasaleli [Yehova] lisumu.”—2 Samwele 12:13.
Lolenge Natana abimisaki lisumu ya Davidi, mpe na nsima lolenge Nzambe apamelaki ye, ebotaki mbuma malamu. Atako Davidi azangaki te kozwa etumbu mpo na etamboli mabe na ye, kasi abongolaki motema mpe azongisaki boyokani elongo na Yehova. Davidi azalaki na mayoki nini liboso ya mpamela motindo yango? Akomaki ete: “Tiká ete moyengebene abɛta ngai, malamu bongo; tiká ete apesa ngai toli; ekozala lokola mafuta malamu; motó na ngai ekoboya yango te.”—Nzembo 141:5.
Lolenge moko na mikolo na biso, basaleli ya Yehova bakoki kosala mabe monene, ata baoyo bazali sembo uta bambula mingi. Koyebáká ete bankulutu bakoki kosunga, mingi bazwaka ekateli ya kokende epai na bango mpo na kozwa lisalisi. (Yakobo 5:13-16) Kasi ntango mosusu moto oyo asali mabe akoki komeka kobomba lisumu na ye, lokola Mokonzi Davidi asalaki yango. Tosengeli kosala nini soki toyebi lisumu monene oyo moto moko kati na lisangá asali?
Ezali mokumba ya nani?
Na ntango bankulutu bayebi lisumu monene oyo esalemi, bakosolola na moto oyo asali yango mpo na kopesa ye lisungi mpe kosembolama oyo ebongi. Kosambisa bato motindo wana kati na lisangá ya boklisto ezali bongo mokumba ya bankulutu. Lokola basengeli kobatela malamumalamu elimo ya lisangá, bankulutu bakosunga mpe bakokebisa moto nyonso oyo azali kotambola na kozanga mayele to azali kosala litambe mabe.—1 Bakolinti 5:12, 13; 2 Timoté 4:2; 1 Petelo 5:1, 2.
Kasi ezali boni soki ozali nkulutu te nzokande oyebi likambo moko ya mabe oyo moklisto mosusu asali? Mitindá ya kolanda mizali kati na Mibeko oyo Yehova apesaki na libota ya Yisalaele. Mibeko milobaki ete soki moto amonaki misala ya lipɛngwi, ya kozimbisa, ya koboma, to mbeba mosusu nyonso ya monene, azalaki na mokumba ya koyebisa yango mpe ya kotatola likambo nyonso oyo ayebi. Levitike 5:1 elobi ete: “Soko moto asali mabe, eyoki ye ndai na kobyanga ye kotatola likambo limoni ye to liyebi ye, nde ye alobi yango te, mbɛ akomema lisumu na ye.”—Kokanisá na Deteronome 13:6-8; Esetele 6:2; Masese 29:24.
Atako bazali na nsé ya Mibeko ya Mose te, lelo oyo baklisto bakoki kozwa litambwisi na mitindá oyo miuti na mibeko yango. (Nzembo 19:7, 8) Na yango, soki oyebi ete moklisto moko asali lisumu monene, osengeli kosala nini?
Ndenge ya kosala
Libosoliboso, ezali na ntina mingi ete ozala na bilembeteli ya solosolo mpo na kondima ete mabe monene esalemaki. Moto na mayele alobaki ete: “Zalá motatoli na mpo na kokitisa mozalani na yo mpamba te; zimbisá na bibebu na yo te.”—Masese 24:28.
Okoki kozwa ekateli ya kokende mbala moko epai ya bankulutu. Ezali mabe te kosala bongo. Nzokande, mbala mingi lolenge ya kosalela oyo ezali komonisa bolingo mingi ezali ya kokutana na moto oyo asali mabe. Mbala mosusu makambo mazali mpenza lolenge oyo mazali komonana te. To mbala mosusu likambo yango esilaki koyebana epai ya bankulutu. Na kimya nyonso, sololá likambo yango na moto wana. Soki ezali naino na bantina ya kondimisama ete mabe monene esalemaki, lendisá ye ete akutana na bankulutu mpo na kozwa lisungi, mpe limbwela ye mpo na nini kosala bongo ezali likambo ya mayele. Koyebisa likambo yango epai na moto mosusu te, mpamba te yango ekozala matɔ́ngi.
Soki moto yango ayebisi likambo na ye epai ya bankulutu te nsima ya ntango oyo ebongi, boye yo osengeli kosala yango. Nkulutu moko to bankulutu mibale bakosolola likambo yango na moto oyo afundami. Bankulutu basengeli ‘kotuna mpe koluka mpe kotuna makasi’ mpo na koyeba soki mabe esalemaki. Soki ezali bongo, bakotalela likambo yango engebene mitindá ya Makomami.—Deteronome 13:12-14.
Esengeli litatoli ya bato mibale mpo na kondimisama ete mabe esalemaki. (Yoane 8:17; Baebele 10:28) Soki moto yango awangani efundeli yango mpe ezali sé na litatoli na yo moko, esengeli kotika likambo na mabɔkɔ ya Yehova ye moko. (1 Timoté 5:19, 24, 25) Yango ekosalema na koyebáká ete makambo nyonso ‘mamonisami polele’ na miso ya Yehova mpe ete soki moto azali na mbeba, nsukansuka masumu na ye ‘makokuta’ ye.—Baebele 4:13; Mituya 32:23.
Kasi soki na ndakisa moto awangani efundeli mpe ete ozali motatoli bobele moko mpo na yango. Likambo ekobalukela yo na boye ete otángama motɔ́ngi? Te, bobele soki otɔ́ngaki ye epai na baoyo batalelami te na likambo yango. Ezali matɔ́ngi te kolobela makambo oyo mataleli lisangá epai na baoyo bazali na lotómo mpe mokumba ya kokɛngɛla lisangá mpe ya kosembola makambo. Kútu, yango ezali nde na boyokani na mposa na biso ya kosala ntango nyonso oyo ezali malamu mpe sembo.—Kokanisá na Luka 1:74, 75.
Kobatela bopɛto kati na lisangá
Moko ya bantina oyo esengeli koyebisa lisumu ya moto ezali mpo na kobatela bopɛto ya lisangá. Yehova azali Nzambe ya pɛto, Nzambe ya bulɛɛ. Azali kosɛnga na baoyo nyonso bazali kosambela ye ete bázala pɛto na elimo mpe na bizaleli. Liloba na ye lipemami lipesi toli ete: “Lokola bana na botosi, bóndima te ete bizaleli na bino bibila mposa mabe na bino na liboso, wana ezangaki bino mayele. Kasi bózala bulɛɛ na bizaleli nyonso na bino pelamoko oyo abyangi bino azali mpe bulɛɛ. Zambi esili kokomama ete, Bokozala bulɛɛ mpo ete ngai nazali bulɛɛ.” (1 Petelo 1:14-16) Baoyo bazali na misala ya mbindo to etamboli mabe bakoki kobebisa lisangá mobimba mpe kozangisa yango ngɔlu ya Yehova soki eloko moko esalemi te mpo na kosembola to kolongola yango.—Kokanisá na Yosua, mokapo 7.
Mikanda ya ntoma Paulo na lisangá ya baklisto ya Kolinti ezali komonisa lolenge oyo koyambola lisumu esalisaki mpo na kopɛtola libota ya Nzambe na engumba yango. Na mokanda na ye ya liboso, Paulo akomaki ete: “Zambi eyokani ete ekobo ezali kati na bino, ekobo na lolenge lomonani ata kati na bapakano te; ete moto akamati mwasi na tata na ye.”—1 Bakolinti 5:1.
Biblia eyebisi biso te moto oyo amemelaki ntoma nsango yango. Ekoki kozala ete Paulo ayebaki likambo yango na nzela ya Setefana, Folotunato, mpe Akaiko, oyo basalaki mobembo longwa na Kolinti kino na Efese epai Paulo azalaki kofanda. Paulo azwaki mpe nkomá oyo ezalaki na mituna uta na lisangá ya baklisto ya Kolinti. Ata soki ayebaki yango na nzela nini, bobele ntango ayokaki likambo yango na nzela ya batatoli oyo akokaki kotyela motema, akómaki na likoki ya kopesa malako na likambo yango. Akomaki ete: “Benganá moto yango mabe na kati na bino.” Moto yango abimisamaki na lisangá.—1 Bakolinti 5:13; 16:17, 18.
Malako ya Paulo mabotaki nde mbuma ya malamu? Ɛɛ! Ya solo, mosáli na mabe ayaki koyeba mabe na ye. Kati na mokanda na ye ya mibale epai na Bakolinti, Paulo asɛngaki na lisangá ete ‘bábalola mitindo na bango mpe bálimbisa’ moto yango oyo abongolaki motema. (2 Bakolinti 2:6-8) Na yango, koyebisa lisumu ya moto epesaki nzela na kosala likambo oyo ememaki kopɛtolama ya lisangá mpe kozongisama ya ngɔlu ya Nzambe epai ya moto oyo abebisaki boyokani na ye elongo na Nzambe.
Tozali kokuta ndakisa mosusu kati na mokanda ya liboso ya Paulo epai ya baklisto ya Kolinti. Ya mbala oyo ntoma atángi baoyo bayebisaki ye likambo yango. Akomaki: “Zambi bato na [ndako na] Koloe bayebisi ngai ete kowelana ezali kati na bino bandeko.” (1 Bakolinti 1:11) Paulo ayebaki ete kowelana yango, elongo na kopesa moto lokumu loleki ndelo, ebotaki elimo ya kokabwana na bituluku oyo elingaki kobebisa bomoko ya lisangá. Na yango, na ntina na komibanzabanza na ye mozindo mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya elimo ya bandeko na ye baklisto, Paulo asalaki nokinoki mpo na kokomela lisangá yango mokanda ya toli mpo na kosembola bango.
Lelo oyo, ebele ya bandeko mibali mpe basi kati na masangá na mokili mobimba bazali kosala makasi mpo na kobatela bopɛto ya elimo kati na lisangá na kobateláká moko na moko etɛlɛmɛlo oyo endimami na Nzambe. Bamoko bazali konyokwama mpo na kosala yango; basusu basili ata kokufa mpo na kobatela bosembo na bango. Na ntembe te kondima to kobomba mabe ekomonisa kozanga botɔ́ndi mpo na milende yango.
Lisungi mpo na baoyo bakwei na lisumu
Mpo na nini bamoko na baoyo basili kokwea na lisumu monene baboyaka kokutana na bankulutu ya lisangá? Mbala mingi ezali mpo ete bayebi te matomba ya kokende epai na bankulutu. Na libunga nyonso, basusu bakanisaka ete soki bakoyambola lisumu na bango, ekoyebana na lisangá mobimba. Basusu bamikosaka na ntina na bonene ya mabe na bango. Nzokande, basusu bakanisaka ete bakoki kosembola makambo bango moko kozanga lisungi ya bankulutu.
Kasi basáli na mabe motindo yango bazali na mposa ya lisungi ya bolingo euti na bankulutu ya lisangá. Yakobo akomaki ete: “Moko na bino abɛli malali? Tiká ete abyanga mikóló na lingomba, bábondela mpo na ye, esili bango kopakwela ye mafuta na nkombo na Nkolo. Zambi libondeli na kondima ekobikisa mobɛli, Nkolo akonɛtola ye. Ata asili kosala masumu, makolimbisama epai na ye.”—Yakobo 5:14, 15.
Oyo nde ebongiseli kitoko ya kosunga baoyo bakwei na lisumu ete bázongela elimo na bango! Na kosaleláká toli ya kobɔndisa ya Liloba ya Nzambe mpe na kobondeláká mpo na bango, bankulutu bakoki kosunga babɛli na elimo ete bálongwa na nzela mabe. Na yango, na esika ya komiyoka ete bakweisami, mbala mingi baoyo babongoli motema bamiyokaka ete bazwi bopemi mpe bazwi lisungi na ntango bakutani na bankulutu ya bolingo. Elenge mobali moko na Afrika ya Wɛ́sti asalaki pite mpe abombaki lisumu na ye na boumeli ya mwa basanza. Na ntango lisumu na ye liyebanaki, alobaki na bankulutu ete: “Nazalaki mpenza na mposa ete moto moko atuna ngai na ntina na boyokani na ngai na mwana mwasi wana! Nazwi mpenza bopemi na ndenge nayamboli lisumu na ngai.”—Kokanisá na Nzembo 32:3-5.
Likambo oyo lizali komonisa bolingo
Basaleli ya Nzambe oyo bazwi batisimo basili “kobima longwa na kufa mpe kokɔta kati na bomoi.” (1 Yoane 3:14) Kasi soki ekómeli bango na kosala lisumu monene, ezali lokola nde bazongi lisusu na nzela ya liwa. Soki bazwi lisungi te, bakoki kozinda malamumalamu na kosaláká mabe mpe bakolinga kobongola motema te mpe bakozonga na losambo ya Nzambe ya solo te.—Baebele 10:26-29.
Koyebisa lisumu oyo moto asali ezali elembo ya komibanzabanza ya solo mpo na mosáli na mabe. Yakobo akomaki ete: “Bandeko na ngai, soko moto nani kati na bino akopɛngwa na makambo na solo mpe mosusu akobutwisa ye, tiká ayeba ete oyo akobutwisa moto na masumu longwa na epɛngweli na nzela na ye, akobikisa bomoi na ye mpe akozipa ebele na masumu.”—Yakobo 5:19, 20.
Na bongo, mpo na nini koyebisa lisumu oyo moto asali? Ezali mpo ete yango ekobota mbuma malamu. Ya solo, koyebisa lisumu ya moto ezali likambo ya bolingo ya boklisto ya solosolo oyo emonisami epai ya Nzambe, epai ya lisangá, mpe epai ya mosáli na mabe. Soki mokomoko kati na lisangá azali kobatela mitindá ya sembo, Yehova akosopa mapamboli likoló na lisangá mobimba. Ntoma Paulo akomaki ete: “Ye [Yehova] akolendisa bino kino nsuka ete bózanga ekweli na mokolo na Nkolo na biso Yesu Klisto.”—1 Bakolinti 1:8.
[Elilingi na lokasa 26]
Kolendisa Motatoli oyo asali lisumu ete asolola na bankulutu ezali komonisa bolingo
[Elilingi na lokasa 28]
Bankulutu basalisaka baoyo bakwei na lisumu ete bázwa lisusu ngɔlu ya Nzambe