Kolongwa na séder kino na lobiko
“Nakotambola kopo na lobiko, mpe nakobianga nkombo Jéhovah.’’—NZEMBO 116:13,MN.
1. Loyembo nini ya kala mingi ezali kotalela avenir na yo?
OKOSEPELA na loyembo oyo ezali kolobela yo mpo na avenir ya molai mpe ya esengo? Ezali yango loyembo moko ya kala mingi mpe oyo elingami na bato mingi ezali kolobela, mpe ozali na esika malamu koleka bato mingi mpo na kokanga ntina mpe kosepela na yango. Bayuda babengi loyembo yango Hallel (Kokumisa). Loyembo oyo na ndimbola monene ezwami na Nzembo 113 kino 118 ezali kolendisa biso na koyemba “Aleluya”, yango elimboli “Kumisa Jah!”.
2. Na libaku nini loyembo yango ezali koyembama mpe ezali na boyokani nini na Séder?
2 Bayuda bayembaka Hallel wana ezali bango kokumisa Elekeli (Paque). Ndenge ezali komonana, loyembo oyo ebandaki koyembama, ntango Nzambe azalaki na temple kati na yango bazalaki kotombwela ye mbeka ya banyama. Na. mikolo na biso, ezali koyembama kati na mabota na Bayuda na boumeli ya Séder, elingi koloba ntango na kolɛngɛla mpe kolia elambo na Paque. Kasi, kati na baoyo bazali koyemba na libaku yango, bato moke nde bazali kokanga ntina ya maloba oyo na Nzembo 116:13: “Nakotombola kopo na lobiko kitoko, mpe nakobianga nkombo na Jéhovah.” (MN) Na likambo nini lobiko ezali na boyokani na Paque? Ekoki kozala ete lobiko na yo ezali na boyokani na yango?
Paque—elambo na lobiko
3. Ebandeli ya Séder ezali nini?
3 Tomikundola ete Bayisraele bazalaki baombo na Ezipito na nse na boyangeli ya minyoko na Faraon. Nsuka na yango, Jéhovah aponaki Moise mpo atambwisa libota na Ye kino bonsomi. Nsima wana Nzambe abetaki Ezipito na malozi libwa, Moise asakolaki bolozi ya zomi: Jéhovah asengelaki koboma mwana ya liboso kati na bandako nyonso na Baezipito. (Exode 11:1-10) Nzokande, Bayisraele bakokaki kobatelama. Ndenge nini? Basengelaki koboma mwana na mpate, kopakola makila na yango na makonzi ya baporte na bandako na bango mpe kofanda na bandako na bango mpo na kolya mwana na mpate, limpa ezangi mfulu mpe bandunda ya bololo. Na ntango yango ya Séder, Nzambe ‘asengelaki koleka likolo’ na bandako na bango kozanga koboma bana na bango ya liboso.—Exode 12:1-13.
4, 5. Elekeli to Paque ememaki bato mingi na lobiko ndenge nini? (Nzembo 106:7-10)
4 Ntango amonaki bolɔzi oyo ya zomi, Faraon alobaki na Moise ete: “Botelema mpe bolongwa kati na bato na ngai, bino mpe Bayisraele mosusu, bokende, bosalela Jéhovah.” (Exode 12:2932) Kasi nsima ntango Baebele mpe “ebele na bato ya ndenge na ndenge” baoyo basepelaki na bango babimaki, Faraon abongolaki makanisi mpe alandaki bango. Na ntango yango Nzambe asalisaki basaleli na ye na lolenge na kokamwisa na kokatisaka bango mai Motane kozanga likama, nzokande, Faraon na mampinga na ye baoyo bazalaki kolanda bango bazindaki wana.—Exode 12:38; 14:5-28; Nzembo 78:51-53; 136:13-15.
5 Ntango bakomaki na libongo ya mai Matane, Moise ayebisaki epai na Bayisraele ete: “Bobanga te. Botelema ngwi mpe botala lobiko na Jéhovah yango ekosala ye mpo na bino lelo.” Na nsima, bato bayambaki loyembo oyo: “Jéhovah azali bokasi na ngai mpe nguya na ngai, ye akomi mpe lobiko na ngai. Ye azali nde Nzambe na ngai, mpe nakokumisa ye.” (Exode 14:13; 15:2) Ya solo, kosikolama na bana ya Yisraele, kobanda na bolɔzi ya zomi kino kokatisa mai Motane kozanga likama, ezalaki lobiko. Na bongo ebongaki ete mokomi na nzembo aloba mpo na Jéhovah ete azali Nzambe “oyo akosalaka mosala na kobikisa katikati na mokili”.—Nzembo 68:6, 20; 74:12-14; 78:12, 13, 22.
6, 7. Mpo na nini Elekeli ebandisamaki, kasi mpo na nini ezali lisusu kokumisama lokoka na ebandeli te?
6 Baebele basengelaki kokumisa Paque to Elekeli mpo na kokanisa lobiko yango. Nzambe alobaki na bango ete: “Mokolo oyo ekozala mpo na bino mokolo na ekaniseli mpe bokobatela yango lokola elambo mpo na Jéhovah na mabota na bino nyonso.” (Exode 12:14) Ntango nyonso oyo bazalaki kolya paque, to Séder, tata asengelaki kokundola epai na libota na ye lobiko yango, engebene lilako oyo ya Jéhovah: “Ekolobela bino bana na bino ete: ‘Ntina na molulu oyo ezali nini?’ bokoloba ete: ‘Ezali mbeka na Elekeli na Jéhovah, mpo ete ye alekaki likolo na ndako na bato na Yisraele na Ezipito, wana ebomaki ye Baezipito nde abikisaki ndako na biso.’”—Exode 12:25-27.
7 Lokola Bayuda bazali kobatela Séder kino lelo oyo ezali elembeteli ete lisolo yango ezali ya solo mpenza. Nzokande, makambo mosusu oyo bazali kosala lelo mazali na boyokani lisusu te na mitinda oyo Nzambe apesaki. Tala oyo tozali kotanga mpo na likambo yango kati na mokanda Ebandeli ya Séder (angl.): “Biblia ezali na malako masembolami polele likolo na Paque mpe na elambo na Limpa ezangi mfulu; kasi, malako yango mazali na boyokani te na lolenge oyo elambo yango ebandaki kokumisama na nsima. Esengeli koyeba ete malako na Biblia mazali kopesa motuya monene na moboma to mbeka na paque, oyo ezali kozwa lisusu esika ya liboso te kati na mikanda oyo mikomamaki nsima na Biblia.” Ntina monene mpo na ezalela oyo ezali ete Bayuda bazali lisusu na temple te mpo na kokaba mbeka ya banyama.
8. Mpo na ntina nini mingimingi tosengeli kotalela Paque?
8 Ezali ntina na Baklisto ete bayekola bafeti nyonso oyo Nzambe asɛngaki na Bayisraele ya kala bakumisa yango,a kasi mpo na sikawa tokotalela makambo mosusu na ntina na Elekeli to Paque oyo mazali kosɛnga likebi na biso mingi. Yesu, ye oyo azalaki Moyuda, akumisaki Elekeli to Paque. Mbala ya nsuka oyo aliaki yango, abandisaki mpe molulu bobele moko mpo na Baklisto: Elambo na Nkolo, ekaniseli ya liwa na ye. Na yango, molulu oyo ya boklisto ezali na boyokani na Elekeli.
Eleki mwana na mpate na Paque
9, 10. Na makambo nini mbeka na mwana na mpate na Elekeli ekokanaki te na mbeka mosusu?
9 Na Baebele 10:1, tozali kotanga ete ‘Mobeko ezalaki elilingi na makambo kitoko makoya”. Mokanda moko na (Cyclopoedia of Biblical, Theological, and Ecclesiastical Literature, na Mcclintock mpe Stong) elobi mpo na likambo yango ete: “Elilingi moko te na makambo kitoko makoya oyo mazali kati na Mobeko ekoki kokokana na elambo na Paque.” Mwana na mpate na Paque, mingimingi, ezalaki na ndimbola monene koleka molulu oyo ekundolaki ete Nzambe abikisaki bana ya liboso, nsima na yango Baebele nyonso, na kobimisaka bango na Ezipito.
10 Mbeka na mwana na mpate oyo ekokanaki te na bambeka mosusu na makambo mingi. Na ndakisa, mbeka mingi ya banyama oyo esengamaki na Mobeko ya Moise epesamaki na moto na moto engebene mabunga na ye to masumu na ye, mpe biteni mosusu ya banyama bitumbamaki na etumbelo. (Levitike 4:22-35) Eteni moko na nyama ya mbeka na kimya ezalaki ya nganga oyo azalaki kokokisa mosala na ye na temple mpe banganga mosusu (Levitike 7:11-38) Nzokande, mwana na mpate na elekeli akabamaki na etumbelo te, mpe apesamaki na koliama na etuluku moko ya bato, mingimingi libota moko.—Exode 12:4. 8-11.
11. Ndenge nini Jéhovah azelaki kotalela mwana na mpate na Elekeli, mpe ezalaki elilingi ya nini? (Mituya 9:13)
11 Jéhovah atalelaki mwana na mpate na Pasika ete ezalaki likambo monene koleka kino abengaki yango, “mbeka na ngai”. (Exode 23:18; 34:25.) Balimboli mosusu na Biblia bandimisaki ete “mbeka na elekeli ezalaki mbeka ya Jéhovah oyo eleki kitoko mpenza”. Na ntembe te mwana na mpate yango ezalaki esakweli to elilingi ya mbeka na Yesu. Ya solo, ntoma Paulo abiangi Yesu ete “ mpate na Elekeli na biso esili kotombwa mbeka.” (1 Bakolinti 5:7.) Yesu ayebanaki lokola “Mwana na mpate na Nzambe” mpe lokola “Mwana na mpate oyo asili kobomama”.—Yoane 1:29; Emoniseli 5:12; Misala 8:32.
Makila na kobikisa
12. Makila na mwana na mpate makokisaki mokumba nini ntango na Elekeli ya liboso!
12 Na Ezipito, makila ya mwana mpate mazalaki ntina mpo na lobiko. Wana Jéhovah abomaki bana ya liboso, alekaki likolo ya bandako oyo makonzí na bizibeli na yango epakolamaki na makila. Lisusu, lokola bazalaki koleka mpo na bana na bango ya liboso te, Baebele bakokaki kobanda mobembo mpe kokatisa mai Motane kino na bonsomi.
13, 14. Makila na Yesu mazali na ntina nini mpo na kozwa lobiko? (Baefese 1:13)
13 Mpe na mikolo na biso, makila oyo ya Yesu, oyo asopaki mazali na boyokani na lobiko. Na mobu 32, wana “Elekeli (Paque), elambo na Bayuda ebelemaki”, Yesu alobaki epai na bayoki mingi boye ete: “Ye oyo akoliaka mosuni na ngai mpe akomelaka makila na ngai azali na bomoi na seko mpe ngai nakosekwisa ye na mokolo na nsuka; mpo ete mosuni na ngai ezali bilei na solo mpe makila na ngai ezali bimeli na solo.” (Yoane 6:4, 54, 55). Bayoki na ye nyonso bango Bayuda bakanisaki na Paque oyo ebɛlɛmaki noki mpe na lolenge bankɔkɔ na bango basalelaki makila ya mwana na mpate na Ezipito.
14 Awa Yesu azalaki kolobela te mpo na limpa mpe vinyo oyo basalelaki ntango ya Elambo na Nkolo. Molulu oyo ya sika mpo na baklisto ebandaki bobele nsima na mbula moko. Ezali mpo na ntina yango, ata bantoma oyo bayokaki Yesu kobimisa maloba yango na mobu 32 bayebaki naino eloko moko te mpo na yango. Nzokande, Yesu amonisaki ete makila na ye ezalaki ntina mingi mpo na lobiko ya seko. Ntoma Paulo alimbolaki boye: “Na nzela na ye tozwi lisiko mpo na makila na ye, kolimbisama na mabunga na biso, pelamoko ngolu na ye efuluki mingi mpenza.” (Baefese 1:7) Ezali bobele na nzela ya bolimbisi oyo ezwami na makila na Yesu nde tokoki kozala na bomoi ya seko.
Lobiko ya lolenge nini, mpe wapi?
15. Lobiko ya lolenge nini mpe mabaku malamu nini mapesamaki epai na Baebele na Ezipito, kasi elikya nini epesamaki na bango te! (1Bakolinti 10:1-5)
15 Na Ezipito ya kala, ezalaki bobele lobiko moke nde epesamaki epai na baoyo babimaki na mokili yango. Moko te kati na bango azalaki na elikya ya kozwa bomoi ezangi nsuka nsima ya kobima na Ezipito. Ezali solo ete Nzambe, aponaki Balewi bazala banganga mpo na Bayisraele, mpe basangani mosusu ya libota ya Yuda bakomaki bakonzi mpo na ntango mokuse, kasi mibali oyo nyonso bakufaki (Misala 2:29; Baebele 7:11, 23, 27). Ezali solo mpenza ete, “ebele na bato na ndenge na ndenge” oyo bango mpe babimaki na Ezipito bazwaki mikumba yango te; kasi, elongo na Baebele, bakokaki kolikya kokoma na Mokili na ndaka mpe kozala na bomoi moko malamu na kosambelaka Nzambe. Lisusu, basaleli ya Jéhovah oyo bazalaki na bomoi liboso na ntango ya boklisto bazalaki na ntina ya kolikya ete na ntango oyo eponami bakozwa bomoi ezangi nsuka na mabelé, esika Nzambe abongisaki mpo ete bato bafanda, yango nde ekozala na boyokani na elaka ya Yesu oyo ekomami na Yoane 6:54.
16. Basaleli ya Nzambe ya kala bakokaki kolikya na lobiko ya lolenge nini?
16 Na nzela na basaleli na ye mosusu ya ntango ya kala Nzambe akomisaki ete mabelé ezalisamaki mpo ete bato bafanda wana mpe ete basembwi bakofanda na mokili libela. (Nzembo 37:9-11; Masese 2:21, 22; Yisaya 45:18) Kasi ndenge nini basambeli ya solo bakozwa lobiko yango soki bakufi? Nzambe akozongisa bango na bomoi awa na mabelé. Ndakisa, Yobo, amonisaki elikya ete Mozalisi akoka kokanisela ye mpe kobianga ye azonga na bomoi. (Yobo 14:1315; Danyele 12:13) Emonani polele ete lolenge moko ya lobiko ezali komema na bomoi ya seko awa na mabelé.—Matai 11:11.
17. Engebene Biblia, bato mosusu bakozwa lobiko nini ekeseni?
17 Biblia ezali kolobela mpe lobiko mpo na bomoi na likoló, epai kuna Klisto abutaki nsima na lisekwa na ye. “Ye azali na loboko na mobali na Nzambe, awa ekoti ye kati na likoló; baanzelu mpe mikonzi, mpe bango na nguya batiamaki na nse na ye.” (1 Petelo 3:18, 22; Baefese 1:20-22; Baebele 9:24). Libaku malamu ya kokende na likolo esengelaki kosuka bobele na Yesu te. Nzambe azwaki ekateli ya kobenga bato mosusu uta na mabelé, oyo motuya na bango ezali moke mpenza. Ezali mpo na yango Yesu alobaki na bantoma na ye ete: “Na ndako na Tata na ngai, bifandelo bizali mingi. . . . nakokenda kobongisela bino esika. Mpe soko nakokenda kobongisela bino esika, nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai ete esika ezali ngai, bino bozala mpe wana lokola.”—Yoane 14:2, 3.
18. Ntina nini bozali na yango sikawa ya kolobela lobiko mpo na bomoi na likoló.
18 Ezali solo ete lobiko mpo na bomoi na likolo na bomoko elongo na Yesu eleki kitoko lobiko moke oyo epesamaki nsima na Elekeli to Paque ya liboso. (2 Timoté 2:10) Ezali na mpokwa ya Séder ya nsuka oyo endimamaki nde Yesu abandisaki molulu ya sika mpo na bayekoli na ye, molulu mozalaki kokumisa lobiko mpo na bomoi na likoló. Alobaki epai na bantoma na ye ete: “Bolanda kosala boye mpo na ekaniseli na ngai. ” (Luka 22:19) Liboso ya kotalela lolenge nini baklisto basengeli kobatela molulu yango, totalela liboso ntango nini tosengeli kosala yango.
“Ntango etyamaki”
19. Mpo na nini ezali makanisi malamu kokokanisa Paque na Elambo na Nkolo?
19 Yesu alobaki ete: “Nazalaki na mposa mingi na kolia Elekeli oyo na bino elongo, naino ezwi ngai mpasi te ” (Luka 22:15) Nsima abandisaki Elambo na Nkolo, oyo bayekoli na ye basengelaki kobatela mpo na ekaniseli ya liwa na ye. (Luka 22:19, 20) Paque ezalaki kokumisama mbula moko na mbula. Na yango, na kotalela makanisi malamu Elambo na Nkolo esengeli mpe kokumisama mbala moko na mbula Na date nini? Na printemps, na eleko ya Paque, elingi koloba le 14 Nisan (engebene manaka ya Bayuda), kasi mokolo nyonso ya Vendredi te ete mpo ezali mokolo oyo Yesu akufaki.
20. Mpo na nini ba Témoin de Jéhovah bazali kotalela date ya 14 Nisan?
20 Na yango, ntoma Paulo azalaki mpenza na date ya 14 Nisan na makanisi na ye ntango akomaki ete: “Mbala na mbala ekoliaka bino limpa oyo mpe ekomelaka bino kopo oyo, bozali kosakola kufa na Nkolo kino ekoya ye.” (1 Bakolinti 11:26) Na boumeli ya bikeke mibale oyo bilandaki, baklisto mingi batikalaki sembo na kosalaka Ekaniseli na date ya 14 Nisan; bazalaki kobianga bango Bakartodesima, nkombo oyo euti na liloba ya latin oyo elimboli ya “zomi na minei”. Mcclintock mpe Strong balobi mpo na yango ete: “Mangomba ya Asie Mineure mazalaki kokumisa liwa ya Nkolo mokolo oyo ekokani na le 14 ya sanza ya Nisan, mokolo oyo, engebene makanisi ya Eklezia nyonso ya kala, Nkolo abomamaki na (nzete).” Na eleko na biso, ba Témoins de Jéhovah bazali kokumisa Elambo na Nkolo mbula na mbula na date oyo ekokani na le 14 Nisan. Kasi, bato mosusu bamonaki ete date yango ezali kokokana ntango nyonso te na oyo Bayuda bazali kokumisa Paque na bango. Ntina na bokeseni yango ezali nini?”
21. Mwana na mpate asengelaki kobomama ntango nini, kasi Bayuda na ntango na biso bazali kosala nini?
21 Baebele bazalaki kotanga mokolo kobanda na kolala na moi ya lelo (penepene na 18 heure) kino kolala na moi ya lobi. Nzambe apesaki etinda ya koboma mwana na mpate na paque le 14 Nisan, “kati na mpokwa mibale” (Exode 12:6 MN) Yango ekokanaki na ntango nini? Na mikolo na biso, Bayuda bazali kolanda likanisi na balimboli na mibeko engebene yango mwana na mpate asengelaki kobomama pene na nsuka ya le 14 Nisan, katikati na ntango oyo moi ebandi kokita (pene na 15 heures) mpe kolimwa na moi mpenza. Na yango, bazali kokumisa Séder nsima na kolala na moi, wana le 15 Nisan esili kobanda.—Malako 1:32.
22. Mpo na ntina nini ekomaka mbula mosusu ete date na Ekaniseli eyokanaka te na mokolo oyo Bayuda bakumisaka Paque? (Malako 14:17; Yoane 13:30)
22 Nzokande tozali na bantina malamu na kongaka ntina ya liloba oyo ndenge mosusu. Na Deteronome 16:6, elobami polele ete Bayisraele basengelaki kotumba “mbeka na elekeli na mpokwa na ntango na kolimwa na moi”. (Rabbinat français.) Maloba oyo malakisi kozanga ntembe ete liloba “kati na mpokwa mibale” elakisi ebandeli ya molili, uta kolala to kolimwa na moi (oyo elakisi ete le 14 Nisan ebandi) kino butu mpenza. Ezali bongo nde Bayudab oyo babiangami Bacaraites na ntango ya kala bazalaki kokanga ntina ya liloba yango mpe ezali bongo nde Basamaliac bazali kokanga ntina na yango kino lelo. Ezali lisusu mpo tondimi ete mwana na mpate na elekeli apesamaki mbeka mpe alyamaki na “ntango etyamaki”, na le 14 Nisan, kasi na le 15 Nisan te, ezali ntina mosusu mpo na yango date oyo tokumisaka Ekaniseli ekesenaka mbala mosusu na oyo ya Paque ya Bayuda.—Mituya 9:2-5.”
23. Mpo na nini esengeli kobakisa basanza na manaka ya Baebele, mpe ndenge nini Bayuda bazali kosala yango na mikolo na biso?
23 Ntina mosusu mpo na yango date oyo tozali kokumisa Ekaniseli ekeseni mbala mosusu na oyo ya Elekeli na Bayuda ezali ete:’”Bayuda bazali kosalela manaka oyo ebongisami mpo na mbula mingi liboso, manaka oyo babandaki kosalela yango bobele na ekeke ya minei na ntango na biso. Manaka yango ezali kopesa bango nzela na kobongisa libela, bambula liboso, ata bikeke mingi liboso, date ya le ler Nisan to bafeti mosusu. Lisusu, ezalaki kosɛnga ntango mosusu kobakisa sanza ya zomi na misato na manaka ya kala oyo ezalaki kolanda sanza mpo ekokana malamu na bileko. Na manaka ya lelo ya Bayuda, sanza yango ezali kobakisama na bambula oyo esili koponama: na kolandana na mibu 19, bazali ntango nyonso kobakisa sanza moko na mobu ya 3, mobu ya 6, ya 8, ya 11, ya 14, ya 17 mpe mobu ya 19.“
24, 25. (a) Na ntango ya Yesu, ndenge nini Bayuda bazalaki kobanda kotanga sanza mpe koyeba ntango nini esengelaki kokotisa sanza mosusu kati na mbula? (b) Ndenge nini ba Témoins de Jéhovah bazali koyeba date ya elambo ya Nkolo?
24 Kasi, lokola Emil Schürer alobi yango sikisiki, “na ntango ya Yesu, (Bayuda) bazalaki naino na manaka ebongisami libela te, kasi bazalaki kobunda kotanga sanza nyonso ya sika bobele na kotala na miso soki sanza ya sika ebimi (nouvelle lune), mpe, na kotalela bobele makambo oyo bazalaki komona”, bazalaki kobukisa sanza moko soki emonani na bango ete esengeli bongo. “Soki . . . bamoni penepene ya nsuka ya mbula ete Elekeli (Paque) ekozala liboso ya ebandeli ya printemps (penepene ya le 21 mars), bazalaki kobakisa sanza mosusu na kati liboso na oyo ya Nisan.” (Lisolo ya liboso ya Bayuda na eleko ya Yesu Klisto [Angl.] tome 1). Bongo sanza oyo na kobakisa ezalaki kokotisama na ndenge bileko bizalaki kolandana; ekomamaki libela kati na manaka te.
25 college central ya ba Témoins de Jéhovah ezali kosalela metode oyo ya kala mpo na koyeba date ya Elambo na Nkolo. Le ler Nisan ekokani na mokolo oyo sanza ya sika ekoki komonana nsima na kolala na moi na Yelusaleme. Na kotangaka mikolo 14 kobanda date yango tokokoma na le 14 Nisan, oyo mingimingi ezalaka mokolo oyo sanza ebimi mobimba (Tala La Tour de Garde ya le 15 Septembre 1977, nkasa 575 mpe 576). Ezali metode oyo euti na Biblia nde epesi nzela na koyebisa na ba Témoins de Jéhovah na mokili mobimba ete na mbula oyo Ekaniseli ekokumisama na le 10 Avril, nsima na kolala na moi.
26. Makambo nini mosusu matali Elambo na Nkolo bosengeli kotalela na likebi?
26 Date oyo ekokani na le 14 Nisan, mokolo oyo Yesu akumisaki Elekeli ya nsuka oyo endimamaki. Nzokande, Ekaniseli ezali kokumisa lobiko oyo eleki monene koleka lobiko oyo Bayuda bazali kokumisa na Séder. Na bongo esengeli na biso nyonso tokanga ntina ndenge nini Elambo na mpokwa ekosalemaka, ndimbola na yango ezali nini mpe na likambo nini ezali na boyokani na lobiko na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala La Tour de Garde ya le 15 mai 1980, nkasa 8 kino 24.
b Mcclintock mpe Stong bazali kolobela yango lokola “moko kati na mangomba ya bokabwani ya kala mingi mpe ya lokumu mingi na eyanganelo ya Bayuda, lingomba oyo elembo na yango mingi ezalaki botosi ya mibeko ma ndenge ekomami mokomoko.”
c “Bazali koboma nyama na mpokwa . . . Na katikati ya butu to minuit, libota mokomoko bakolya mosuni na yango . . . nsima bakotumba biloko mosusu bitikali na mosuni elongo na mikwa liboso ete ntɔngɔ etana . . . Engebene balimboli mosusu na Makomami, lingomba ya Basamalia ezali na mwa bakokani na mateya ya Biblia ndenge yango esalelamaki liboso ete ebebisama na lingomba ya Bayuda babongoli na mibeko.”—Les origines du Séder.
Bozongeli
◻ Mpo na nini Paque (Elekeli) ezali mpenza na boyokani na lobiko?
◻ Eloko nini mbeka na Yesu ekoki kokokisa koleka oyo na mwana na mpate na Elekeli?
◻ Lobiko nini ekoki kozwama na nzela na Yesu?
◻ Ndenge nini ba Témoins de Jehovah bayebaka dale ya sikisiki mpenza ya Elambo ya Nkolo?