Yesu Klisto—Makambo oyo ezali kondimisa ete azalaki awa na mabelé
ONDIMAKA ete Albert Einstein azalaki? Okoki koloba ete azalaki, kasi mpo na nini? Bato mingi bamoná ye na miso te. Kasi masolo ya solosolo oyo elobelaka makambo oyo asalá emonisaka ete azalaki mpenza. Tokoki kondima ete azalaki soki totali ebele ya makambo oyo bato ya siansi bazali kosala na kolanda mayele oyo abimisaki. Na ndakisa kura oyo bato mingi basalelaka, bazwaka yango na mayele oyo ye abimisaki.
Tokoki mpe koloba ndenge moko mpo na Yesu Klisto, oyo eyebani ete bato balandaka ye koleka bato mosusu nyonso banda mokili ebandá. Makambo oyo bakomá na ntina na ye mpe ndenge mateya na ye ebongoli bomoi ya ebele ya bato ezali komonisa mpenza ete azalaki. Atako kɛsi oyo touti kolobela na lisolo oyo eleki, oyo bakomi nkombo ya Yakobo, ekoki kondimisa biso, tokoki koloba te ete kaka kɛsi yango to eloko mosusu oyo bato basalá nde esengeli kondimisa biso ete Yesu azalaki mpenza. Ezali na masolo mingi ya bato ya mayele na makambo ya kala oyo elobeli Yesu ná bayekoli na ye oyo ezali komonisa ete azalaki mpenza.
Litatoli ya bato ya mayele na masolo ya kala
Na ndakisa, tótalela litatoli ya Flavius Josèphe, Mofalisai mpe moto ya mayele na masolo ya kala na ekeke ya liboso. Alobelaki Yesu Klisto na kati ya buku moko oyo akomaki (Antiquités judaïques). Atako bato mingi bandimaka te ete Josèphe nde moto akomaki makambo oyo ezali na esika ya liboso oyo, na kati ya buku na ye, balobi ete Yesu azali Masiya, Profesɛrɛ Louis Feldman ya Iniversite ya Yeshiva alobi ete bato moke kaka nde batyaka ntembe ete ye mpenza moto akomaki makambo oyo ezali na esika ya mibale oyo balobeli Yesu. Na esika ya mibale Josèphe alobi boye: “[Nganga-Monene Anasi] abengaki bazuzi ya Sanedrina mpe abimisaki liboso na bango Yakobo, ndeko ya Yesu oyo bazalaki kobenga Klisto.” (Antiquités judaïques, XX, 200) Mofalisai, moto ya mwa lingomba oyo bandimi na yango mingi bazalaki mpenza koyina Yesu, andimi ete ezalaki na moto moko oyo bazalaki kobenga “Yakobo, ndeko ya Yesu.”
Makambo oyo bayekoli ya Yesu bazalaki kosala ezalaki komonisa mpenza ete Yesu azalaki solo. Ntango ntoma Paulo akɔtaki bolɔkɔ na Loma soki na mobu 59 ya ntango na biso (T.B.), bato minene ya Bayuda balobaki na ye ete: “Na oyo etali mwa lingomba wana toyebi ete bipai nyonso bato bazali kolobela yango mabe.” (Misala 28:17-22) Babengaki bayekoli ya Yesu ete “mwa lingomba wana.” Soki ezali solo ete bazalaki koloba mabe mpo na bango bipai nyonso, boye bato ya mayele na masolo ya kala bazangaki mpe te kolobela likambo yango.
Tacite abotamaki pene na mobu 55 T.B. mpe azali moko ya bato minene ya mayele na masolo ya kala; ye alobelaki baklisto na buku na ye (Annales). Na lisolo oyo elobeli ndenge Néron afundaki baklisto ete batumbaki engumba Loma na mobu 64 T.B., akomaki boye: “Néron abwakaki likambo yango na motó ya bato ya mwa lingomba moko, oyo bato ya mboka bazalaki kobenga baklisto mpe bazalaki koyina makasi mpamba te bazalaki kokanisa ete bazali na misala mabe, mpe anyokolaki bango na ndenge ya mabe mpenza. Nkombo na bango euti na Klisto oyo anyokwamaki na mabɔkɔ ya Ponsi Pilato, moko ya baguvɛrnɛrɛ na biso, ntango Tibɛli azalaki mokonzi.” Makambo oyo lisolo yango elobeli ekesani te na lisolo ya Biblia oyo elobeli Yesu.
Mokomi mosusu oyo alobelá bayekoli ya Yesu ezali Pline le Jeune, guvɛrnɛrɛ ya Asie Mineure. Soki na mobu 111 T.B., Pline akomelaki Amperɛrɛ Trajan mokanda mpo na kotuna ye nini bakokaki kosala mpo na kosukisa baklisto. Pline akomaki ete, bato oyo bakoseli bango makambo ete bazali baklisto bazali kobelela banzambe mpe kosambela ekeko ya Trajan mpo na komonisa ete bazali baklisto te. Mpe abakisaki ete: “Bayebisi ngai ete mpo na baoyo bazali baklisto ya solo, tokokoka te kosɛngisa bango básala makambo wana.” Yango ezali komonisa ete Klisto azalaki mpenza, yango wana bayekoli na ye bazalaki kondima ata kobungisa bomoi na bango mpo na kondima oyo bazalaki na yango epai na ye.
Buku moko (The Encyclopædia Britannica [ebimeli ya 2002]) elobeli na mokuse makambo oyo bato ya mayele na masolo ya kala oyo bazalaki na ekeke ya liboso mpe ya mibale bakomá mpo na Yesu Klisto mpe bayekoli na ye mpe esukisi na maloba oyo: “Masolo yango oyo ekomamaki na bato oyo bazalaki baklisto te ezali komonisa ete na ntango ya kala, ata bato oyo bazalaki banguna ya lingomba ya boklisto bazalaki kobɛta ntembe te ete Yesu azalaki mpenza, kasi ntembe ezangá ntina mpo na likambo yango ebandaki kaka na nsuka ya ekeke ya 18, na ekeke ya 19 mpe na ebandeli ya ekeke ya 20.”
Litatoli ya bayekoli ya Yesu
Buku mosusu (The Encyclopedia Americana) elobi boye: “Kondimana ya Sika ezali na makambo nyonso oyo ekoki kosalisa biso tóyeba bomoi ya Yesu mpe makambo oyo ekómelaki ye, mpe lokumu oyo baklisto ya liboso bazalaki kopesa ye.” Bato ya ntembe bakoki koboya kondima ete masolo ya Biblia ezali koloba solo na ntina na Yesu. Kasi, masolo ya Biblia ezali kopesa biso nzela ya kobimisa makanisi mibale ya ntina oyo ekosalisa biso tómonisa mpenza ete Yesu azalaki awa na mabelé.
Lokola toutaki koloba yango, mayele oyo Einstein abimisá emonisaka ete azalaki mpenza. Ndenge moko mpe, mateya ya Yesu emonisaka ete azalaki mpenza. Tókamata ndakisa ya lisolo ya Yesu oyo eyebani mingi, oyo babengaka Lisolo Likoló ya Ngomba. (Matai, mokapo 5-7) Ntoma Matai akomaki ete nsima ya koyoka lisolo yango, “Bibele yango ya bato bakamwaki na ndenge na ye ya koteya; mpo azalaki koteya bango na ndenge ya moto oyo azali na bokonzi.” (Matai 7:28, 29) Na kotalela ndenge lisolo yango esimbaka mitema ya bato banda na ntango ya kala, Profesɛrɛ Hans Dieter Betz akomaki ete: “Lisolo Likoló ya Ngomba esimbaka mitema kaka ya bato ya lingomba ya Bayuda ná ya boklisto te, to mpe kaka ya bato ya Mpoto te.” Mpe abakisaki ete lisolo yango “esepelisaka bato ya mokili mobimba.”
Tótalela naino maloba ya polele, ya ntina mingi mpe ya bwanya ya lisolo yango: “Moto nyonso oyo abɛti yo mbata na litama na yo ya mobali, baluselá ye mpe oyo mosusu.” “Bókeba mpenza ete bósalela te boyengebene na bino na miso ya bato.” “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko.” “Bóbwaka mayaka na bino liboso ya bangulu te.” “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino yango.” “Makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.” “Bókɔta na ekuke ya nkaka.” “Na bambuma na bango bokoyeba bango.” “Nzete nyonso ya malamu ebotaka mbuma ya malamu.”—Matai 5:39; 6:1, 34; 7:6, 7, 12, 13, 16, 17.
Na ntembe te, osí oyoká maloba yango to makanisi ya ntina oyo euti na yango. Ntango mosusu mpe ekómá masese na monɔkɔ na bino. Maloba yango nyonso euti na Lisolo Likoló ya Ngomba. Ndenge oyo ebele ya bato mpe ebele ya bikólo basepelaka na lisolo yango ezali komonisa ete “moteyi monene” azalaki mpenza.
Soki na ndakisa moto moko akanisaki kaka kokanisa moto oyo azalaki te mpe apesaki ye nkombo Yesu Klisto. Soki mpenza moto yango azalaki na mayele mingi mpo na kobimisa mateya oyo Biblia elobaka ete ezali ya Yesu, mbɛlɛ moto yango alobelaki Yesu ná mateya na ye na ndenge oyo ekosala ete bato nyonso básepela na yango, boye te? Nzokande, ntoma Paulo alobaki ete: “Mpo na Bayuda bazali kosɛnga bilembo mpe Bagrɛki bazali koluka bwanya; kasi biso tozali nde kosakola Klisto abakami na nzete, likambo oyo ezali kobɛtisa Bayuda libaku kasi ezali bozoba epai ya bikólo mosusu.” (1 Bakolinti 1:22, 23) Nsango ya Klisto abakami na nzete ezalaki kobenda bato te, ezala Bayuda to bato ya bikólo mosusu. Nzokande, baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kosakola ete Klisto abakamaki na nzete. Mpo na nini bazalaki kolobela Klisto abakami na nzete? Ndimbola ya malamu kaka moko mpo na likambo yango ezali ete makambo oyo bakomi ya Makomami ya Grɛki ya boklisto bakomá na ntina ya bomoi mpe liwa ya Yesu ezali makambo ya solo.
Likambo ya mibale oyo ezali kondimisa biso ete Yesu azalaki mpenza ezali molende oyo bayekoli na ye bazalaki na yango mpo na kosakola mateya na ye. Mbula 30 mpamba nsima ya ntango oyo Yesu abandaki mosala na ye ya kosakola, ntoma Paulo alobaki ete nsango malamu “esakolamaki na kati ya bozalisi nyonso oyo ezali na nse ya likoló.” (Bakolose 1:23) Ya solo mpenza, atako botɛmɛli ezalaki, mateya ya Yesu epalanganaki na mokili ya kala mobimba. Paulo, oyo anyokwamaki mpo azalaki moklisto, akomaki boye: “Soki Klisto alamukaki te, mosala na biso ya kosakola ezali mpenza mpamba, mpe kondima na biso ezali mpamba.” (1 Bakolinti 15:12-17) Soki mpo na bango kosakola Klisto oyo asekwisamaki te ezalaki mpamba, boye kosakola Klisto oyo azalaki ata te elingaki kozala lisusu mpamba koleka. Lokola Pline le Jeune akomaki yango, baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kondima kokufa na esika ete bátika kondimela Klisto Yesu. Batyaki bomoi na bango na likama mpo na Klisto mpo azalaki mpenza; azalaki awa na mabelé mpe bomoi na ye ezalaki ndenge kaka Baevanzile ezali kolobela yango.
Omoni likambo oyo ezali kondimisa mpenza
Soki baklisto bándimaka te ete lisekwa ezali, mbɛlɛ bakokaki kosala mosala ya kosakola te. Yo mpe, na miso ya elimo, okoki komona Yesu oyo asekwi, soki otali makambo oyo ezali kosalema mpo na ye.
Mwa moke liboso báboma Yesu likoló ya nzete, apesaki esakweli moko monene na ntina na kozala na ye. Alobaki mpe ete asengelaki kosekwa mpe kofanda na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe mpo na kozela ntango oyo akosukisa banguna na ye. (Nzembo 110:1; Yoane 6:62; Misala 2:34, 35; Baloma 8:34) Na nsima, asengelaki kobengana Satana ná bademo na ye na likoló.—Emoniseli 12:7-9.
Likambo yango esengelaki kosalema ntango nini? Yesu apesaki bayekoli na ye ‘elembo ya kozala na ye mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.’ Bitumba ya minene, kozanga ya bilei, koningana ya mabelé, basakoli ya lokuta, kobakisama ya botyoli-mibeko mpe bamaladi ya mabe ezali elembo ya kozala na ye oyo ezangi komonana. Esengelaki mpenza ete makambo ya mabe ndenge wana esalema, mpamba te kobwakama ya Satana ná bademo na ye esengelaki kozala “mawa na mabelé.” Satana akiti na mabelé, “azali na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na eleko moko ya ntango mokuse.” Lisusu, kosakolama ya nsango malamu ya Bokonzi “na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso” ezali mpe na kati ya elembo yango.— Matai 24:3-14; Emoniseli 12:12; Luka 21:7-19.
Tozali komona ndenge makambo nyonso oyo Yesu asakolaki ezali kokokisama mokomoko mpe ata moko te ezali kozanga. Banda na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba na 1914, tomoni makambo nyonso oyo esengelaki kopesa biso elembo ya kozala ya Yesu Klisto oyo ezangi komonana. Azali mokonzi na Bokonzi ya Nzambe mpe azali kosala makambo minene na bomoi ya bato. Libaku oyo esali ete ozwa zulunalo oyo ezali komonisa ete mosala ya kosakola Bokonzi ezali mpenza kosalema lelo oyo.
Mpo na koyeba lisusu makambo mingi na ntina na kozala ya Yesu, osengeli koyekola Biblia. Tuná Batatoli ya Yehova bálimbolela yo makambo mosusu na ntina na kozala ya Yesu.
[Bililingi na lokasa 5]
Josèphe, Tacite,
mpe Pline le Jeune balobelá Yesu Klisto ná bayekoli na ye na makomi na bango
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Bililingi nyonso misato: © Bettmann/CORBIS
[Elilingi na lokasa 7]
Baklisto ya liboso bazalaki kondima mpenza ete Yesu azalaki